Mokapo 32
Nkanda na Nzambe ekokisami
1. Nini ekosila kosalema ntango mbeki nsambo ekosopama nyonso, mpe mituna nini mizali kotuma sikawa mpo na mbeki?
YOANE asili komonisa baanzelu oyo bazali na mokumba ya kosopa mbeki nsambo. Alobi ete, malozi oyo mabimi mpo na kosopama na mbeki yango, ezali “malozi na nsuka, mpamba te nkanda na Nzambe ekokisami kati na yango.” (Emoniseli 15:1; 16:1) Malozi oyo mamonisi bikateli bizwami na Jéhovah mpo na mabe oyo epalangani na mokili, masengeli kosopama nyonso. Na ntango yango bikateli na Nzambe bikokokisama mpe mokili na Satana ekozala lisusu te. Yango elimboli nini mpo na bato na mokili mpe bakonzi na biloko mabe na ntango oyo? Baklisto bakoki kosala nini mpo ete babetama na malozi yango te elongo na mokili oyo esili kokweisama? Ezali wana mituna na ntina mingi, oyo misengeli kozwa biyano sikawa. Baoyo nyonso bazali kozela na motema likoló ete boyengebene elonga bakotya likebi na makambo oyo Yoane amoni sikawa.
Nkele na Nzambe likoló na “mokili”
2. Nini esalami ntango anzelu na liboso asopi mbeki na ye na mokili, mpe “mokili” elimboli nini?
2 Anzelu na liboso abandi mosala: “Oyo na liboso akei, mpe asopi mbeki na ye na mokili. Mpota mabe na mpasi eyei na bato bazalaki na elembo na nyama na yauli mpe basambeli na ekeko na ye.” (Emoniseli 16:2) Lokola emonisamaki kati na lisolo etali kobetama na kelelo na liboso, “mokili” oyo elobelami awa elimboli ebongiseli na politike oyo emonani ete etelemi makasi oyo Satana atongaki na mokili uta ntango ya Nimerode, esili koleka mibu 4 000.—Emoniseli 8:7.
3. (a) Ndenge nini biyangeli mingi bizali kosenga na makasi epai na bato ete batosa bango lokola banzambe? (b) Lisangá nini mabota basili kotya na esika na Bokonzi na Nzambe, mpe nini ekomeli baoyo bazali kosambela yango?
3 Na ntango na biso, na mikolo oyo ya nsuka, biyangeli mingi bizali kosenga na makasi ete bato batosa bango lokola banzambe; bazali koloba ete Leta asengeli kokumisama koleka Nzambe to koleka makambo nyonso matali bosembo. (2 Timoté 3:1; tala Luka 20:25; Yoane 19:15.) Uta 1914, mbala mingi biyangeli na politike bizali kobenga bilenge ya mboka na bango na mosala na soda mpo ete bamibongisa to bakota na bitumba minene oyo ekokani na bitumba oyo esopaki makila mingi na lisolo na bato na ntango na biso. Na boumeli na mokolo na Nkolo, na esika na Bokonzi na Nzambe, mabota basili kotya ekeko na nyama—Lisangá na Mabota, nsima O.N.U., lisangá oyo ezwaki esika na yango. Oyo nde kotuka, ntango ba pape mosusu basakolaki ete lisangá oyo esalami na bato ezali elikya na kimya bobele moko mpo na mabota! Na kolobaka bongo bazali kotemela makasi Bokonzi na Nzambe. Baoyo bazali kosambela ekeko yango bazali kokoma mbindo na elimo, batondi na bampota minene na nzoto, lokola esalamaki epai na Baezipito baoyo batemelaki Jéhovah na mikolo na Moïse.—Exode 9:10, 11.
4. (a) Mai mazali kati na mbeki na liboso na nkanda na Nzambe mazali komonisa nini? (b) Ndenge nini Jéhovah azali kotalela baoyo bandimi elembo na nyama na yauli?
4 Oyo ezali kati na mbeki na liboso ezali komonisa na bokasi nyonso liponi oyo ezali liboso na bato: koyinama na mokili, to koboyama na Jéhovah. Bazali kopusama na makasi ete bazwa elembo na nyama na yauli, mpo ete “moto akoki kosomba to koteka te soko azangi elembo na nkombo na nyama na yauli soko motuya na nkombo na ye.” (Emoniseli 13:16, 17) Kasi esengeli kondima mpasi na yango! Mpamba te, na miso na Jéhovah, baoyo bandimi elembo yango bazali lokola bato babetami na “mpota mabe na mpasi.” Uta 1922, bazwaki elembo polele, yango emonisi ete baboyaki Nzambe na bomoi. Mikano na bango ya politike mizali kolonga te mpe mitema na bango mizali na likoló. Bazali mbindo na elimo. Soki babongoli mitema te, maladi oyo ‘mabe’ ekoboma bango mpo ete mokolo na kosambisa na Jéhovah ekomi. Bakoki kopona se etelemelo moko: to kozala na ngambo na biloko mabe na ntango oyo, to kosalela Jéhovah elongo na Klisto.—Luka 11:23; tala Yakobo 4:4.
Mai monene mabongwani makila
5. (a) Likambo nini esalami ntango mbeki na mibale esopami? (b) Ndenge nini Jéhovah azali kotalela bato oyo bazali kati na mai monene na elilingi?
5 Sikawa ezali ntango mpo ete mbeki na mibale na nkanda na Nzambe esopama. Yango ekobimisa nini epai na bato? Yoane ayebisi biso ete: “Oyo na mibale asopi mbeki na ye na mai monene. Mai mabongwani makila lokola makila na ebembe, mpe milimo nyonso na bomoi kati na mai mikufi, ee biloko nyonso bizalaki na mai.” (Emoniseli 16:3) Lokola kobetama na kelelo na mibale, mbeki yango esopami na “mai monene,” oyo elimboli ebele na bato na yikiyiki, batomboki mpe batangolami mosika na Jéhovah. (Yisaya 57:20, 21; Emoniseli 8:8, 9) Na miso na Jéhovah, “mai monene” yango ekokani na makila; ekelamu moko ekoki kobika na kati te. Ezali mpo na ntina yango baklisto basengeli kosangana na mokili te. (Yoane 17:14) Kosopama na mbeki na mibale na nkanda na Nzambe emonisi ete bato nyonso oyo bazali kati na mai monene yango basili kokufa na miso na Jéhovah. Na kotalelaka bango lokola etuluku, bango nyonso bazali na nyongo na makila na ebele na bato oyo basalaki eloko te. Na ntina yango, bakobomama na mampinga na Jéhovah, ntango mokolo na nkanda na ye ekoya.—Emoniseli 19:17, 18; tala Baefese 2:1; Bakolose 2:13.
Nzambe amelisi bango makila
6. Nini esalami ntango mbeki na misato esopami, mpe maloba nini mauti na anzelu mpe na etumbelo?
6 Lokola kobetama na kelelo na misato, mbeki na misato na nkanda na Nzambe esopami na mitó na mai. “Oyo na misato asopi mbeki na ye na bibale mpe na mitɔ́ na mai, mpe ekomaki makila. Mpe nayokaki anzelu na mai koloba ete: ‘Ozali moyengebene, Oyo azali mpe azalaki, Yo oyo ozali sembo, mpo ete okati boye, mpo ete basopaki makila na basantu mpe na basakoli, mpe omelisi bango makila. Babongi na yango.’ Nayoki etumbelo koloba ete: ‘Ee, Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, bikateli na yo bizali solo mpe na boyengebene.’”—Emoniseli 16:4-7.
7. “Bibale mpe mitɔ́ na mai” elimboli nini?
7 ‘Bibale mpe mitɔ́ na mai’ yango elimboli maziba na batoli mpe mayele oyo endimami na mokili, lokola bafilozofi na politike, na mombongo, na sianse, na bizaleli na bonkoko, na mitindo na bato mpe na mangomba, mayele oyo ezali kotambwisa bato kati na misala na bango mpe makatami na bango. Na esika ete batalela Jéhovah, Liziba na bomoi, mpo na koyeba solo ekopesaka bomoi, bato ‘bamitimoleli mabulu makosimbaka mai te’ mpe bameli “mayele na mokili oyo ezali bolema liboso na Nzambe.”—Yilimia 2:13; 1 Bakolinti 1:19; 2:6; 3:19; Nzembo 36:9.
8. Na lolenge nini mokili emikotisaki na nyongo makasi ya makila?
8 “Mai” yango mabebi mapusaki bato na koboma, na ndakisa na kopusa bango basopa ebele na makila na boumeli na bitumba oyo, na ekeke oyo eleki, ebomaki bamilió na bato. Mingimingi na kati na mikili oyo emibengaka ete ya boklisto, epai bitumba mibale ya mokili mobimba bibimaki, bato “bapotaki mbango mpo na kosopa makila na bato bazali na likambo te,” mpe babomaki batemwe na Nzambe lokola. (Yisaya 59:7; Yilimia 2:34) Bato na mokili bakumbaki nyongo ya makila na kosalelaka makila mingi mpo na kozongisa yango na nzoto na bato, kobukaka bongo mibeko na sembo na Jéhovah. (Genese 9:3-5, Levitike 17:14; Misala 15:28, 29) Mpo na yango, basili kozwa mpasi, kozongisa makila na nzoto esili kopalanganisa maladi ya SIDA, maladi ya hépatite mpe bamaladi mosusu. Etikali moke babuki oyo na mibeko bakozwa lifuti na bango mpo na nyongo na makila yango ntango bakozwa etumbu eleki monene na konyatama kati na “ekamelo monene na nkanda na Nzambe.”—Emoniseli 14:19, 20.
9. Kosopama na mbeki na misato esangisi lisusu nini?
9 Na mikolo na Moïse, ntango mai na ebale Nile ebongwanaki makila, Baezipito babikaki na kolukaka mai bisika mosusu. (Exode 7:24) Nzokande lelo, na boumeli na bolozi ya elimo oyo ekokani na yango, moto akoki kozwa mai na bomoi epai moko te kati na mokili ya Satana. Kosopama na mbeki na misato esangisi kosakola ete “bibale na mokili mpe mitó na mai” na mokili ekokani na makila, ezali koyeisa liwa ya elimo epai na baoyo nyonso bazali komela yango. Bobele soko babongwani epai na Jéhovah, nde bakokima etumbu na ye.—Tala Ezekiele 33:11.
10. “Anzelu na mai” alobi nini, mpe “etumbelo” ebakisi litatoli nini?
10 “Anzelu na mai,” elingi koloba anzelu oyo azali kosopa mbeki na ye likoló na mai, akumisi Jéhovah lokola Mosambisi na molongo, oyo bikateli na ye na sembo bikoki kotyamela ntembe te. Na yango, anzelu alobi boye mpo na ekateli yango: “Babongi na yango.” Na ntembe te amonaki ye moko bato bakufaki mpe na mabe oyo esalamaki na ntina na mateya na lokuta mpe bafilozofi na mokili oyo mabe na boumeli na bikeke. Na bongo ayebi ete ekateli na kosambisa na Jehovah ezali sembo. Ata “etumbelo” na Nzambe elobi. Na Emoniseli 6:9, 10, elobami ete milimo na baoyo babomamaki mizali na nse na etumbelo yango. Na bongo “etumbelo” ebakisi litatoli makasi na ntina etali boyengebene na bikateli na Jéhovah.a Ebongi mpenza ete baoyo basopaki mpe basalelaki makila na lolenge moko ya mabe bakoka komela yango na makasi, likambo oyo ezali elembo na kobomama na bango na Jéhovah.
Moi ezikisi bato na mɔ́tɔ
11. Mbeki na minei na nkanda na Nzambe esopami likolo na nini, mpe likambo nini esalami na ntango yango?
11 Mbeki na minei na nkanda na Nzambe ezali kotalela moi. Yoane ayebisi biso ete: “Oyo na minei asopi mbeki na ye na moi, mpe nzela epesami na yango kozikisa bato na mɔ́tɔ. Bato baziki na mɔ́tɔ makasi mpenza, mpe batuki nkombo na Nzambe oyo azali na nguya likolo na malozi oyo, kasi babongoli mitema mpo na kokumisa ye te.”—Emoniseli 16:8, 9.
12. “Moi” na mokili oyo elimboli nini, mpe nini epesami na moi yango na elilingi mpo na kosala?
12 Na mikolo na biso, na nsuka na biloko mabe, bandeko na elimo na Yesu ‘bazali kongenga lokola moi kati na bokonzi na Tata na bango.’ (Matai 13:40, 43) Yesu ye moko azali “moi na boyengebene.” (Malaki 4:2) Nzokande, mokili ezali na “moi” na yango: bakonzi na yango baoyo bameki kongenga na kotemela Bokonzi na Nzambe. Kobetama na kelelo na minei esakolaki ete, ‘moi, sanza mpe myoto’ oyo bizali na makolo na boklisto na mokili oyo bizali nde maziba na molili, kasi na engengiseli te. (Emoniseli 8:12) Mbeki na minei na nkanda na Nzambe emonisi sikawa ete “moi” na mokili ekobimisa molungé makasi. Bato oyo bazali kotalelama lokola bakonzi bakokisami na moi ‘bakozikisa’ mokili. Yango nde mosala epesamaki na moi na elilingi. Na lolenge mosusu, Jéhovah akopesa nzela ete bampasi yango ezala eteni na kosambisa na ye makasi likoló na mokili. Kasi na ndimbola nini bato bazikaki?
13. Na lolenge nini bakonzi na mokili oyo bakokani na moi ‘bazikisaki’ bato?
13 Nsima na Etumba ya Liboso na mokili mobimba, bakonzi na mokili basalaki Lisangá na Mabota to Société des Nations mpo na kobatela kimya na mokili, kasi milende na bango milongaki te. Bamekaki mitindo misusu na biyangeli, na ndakisa, boyangeli oyo babiangi ya fascisme mpe ya nazisme. Boyangeli ya communisme mpe elandaki kokola. Kasi na esika ete babongisa mokili, bakonzi yango na politike baoyo bakokisami na moi babandaki nde ‘kozikisa mokili na molungé makasi.’ Bitumba oyo ebimaki na Espagne, Ethiopie mpe Mandchourie ememaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Lokola emonisami na makambo na lisolo na bato na ntango oyo, bakonzi mabe lokola Mussolini, Hitler mpe Staline babomaki to babomisaki ebele na bato, mingi mpe bazalaki bana mboka na bango moko. Kala mingi te, matata kati na mikili to bitumba ya bana mboka bango na bango ‘ezikisaki’ bafandi na mikili lokola Viêt-Nam, Kampuchéa, Iran, Liban na Irlande, mpe na mikili ya Amerike Latine mpe ya Afrike. Bakisa likoló na oyo nyonso matata oyo mazali kati na bikonzi bileki makasi na mokili mobimba, mpo na bibundeli ya nsomo ya nikleere oyo bizali na makoki ya koboma bato nyonso. Na ntembe te, na mikolo oyo ya nsuka, mokili etyami liboso na “moi” oyo ezali kozikisa yango, ezali bongo bakonzi na yango mabe. Kosopama na mbeki na minei na nkanda na Nzambe emonisaki polele makambo oyo na lisolo na bato, mpe libota na Nzambe esakolaki yango na mokili mobimba.
14. Nini ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa ntango nyonso ete ezali elikya bobele moko mpo na kosilisa mikakatano na bato, kasi ndenge nini bato mingi bazali kotalela nsango yango?
14 Ntango nyonso ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa ete mikakatano oyo mizali kotungisa mokili ekosilisama se na Bokonzi na Nzambe, na nzela na yango Jéhovah abongisi kosantisa nkombo na ye. (Nzembo 83:4, 17, 18; Matai 6:9, 10) Nzokande, mokili mobimba bakangi matoi, balingi koyoka nsango yango te. Bato mingi baboyi Bokonzi, mpe bazali kotuka nkombo na Nzambe, lokola Faraon ntango aboyaki kondima boyangeli monene na Jéhovah. (Exode 1:8-10; 5:2) Lokola balingi kondima soki moke te Bokonzi na Masiya, batemeli oyo bazali konyokwama na molungé makasi na “moi” na bango, elingi koloba bakonzi na mokili oyo bazali konyokola bango.
Kiti na bokonzi na nyama na yauli
15. (a) Mbeki na mitano esopami likolo na nini? (b) “Kiti na bokonzi na nyama na yauli” ezali nini, mpe kosopama na mbeki yango likoló na kiti na bokonzi na ye elimboli nini?
15 Anzelu oyo alandi asopi mbeki na ye likoló na nini? “Oyo na mitano asopi mbeki na ye na kiti na bokonzi na nyama na yauli.” (Emoniseli 16:10a) “Nyama na yauli” ezali ebongiseli ya politike ya Satana. Boyangeli yango ezali na kiti na bokonzi ya solo mpenza te, lokola mpe nyama na yauli yango moko ezali nyama ya solo te. Kasi liloba kiti na bokonzi emonisi ete nyama na yauli azali na nguya na bokonzi likoló na bato, yango nde ekokani na likambo oyo ete mokomoko na maseke na nyama ezali na motole na bokonzi. Ya solo, “kiti na bokonzi na nyama na yauli” ezali moboko, to liziba na bokonzi yango.b Biblia ezali komonisa eutelo na nguya na bokonzi na nyama na yauli wana ezali yango koloba ete “Dalagona apesi ye nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, mpe bokonzi monene.” (Emoniseli 13:1, 2; 1 Yoane 5:19) Na yango, kosopama na mbeki likoló na kiti na bokonzi na nyama na yauli elimboli kosakolama oyo ezali komonisa polele mosala oyo Satana asili kosala mpe azali kosala mpo na kosimba nyama na yauli.
16. (a) Ezala ete bayebi to bayebi yango te, mabota bazali kosalela nani? Limbola? (b) Ndenge nini mokili ezali komonisa bizaleli na Satana? (c) Ntango nini kiti na bokonzi na nyama na yauli ekokweisama?
16 Eloko nini ezali koumelisa boyokani oyo bozali kati na Satana mpe mabota? Ntango Satana amekaki Yesu, atalisaki ye na emononeli bikonzi nyonso na mokili mpe alakaki ye ete “Nakopesa yo bikonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango,” kasi esengelaki akokisa likambo moko: angumbama mpo na kosambela ye. (Luka 4:5-7) Tokoki kokanisa ete biyangeli na mokili bizali kozwa nguya na bango mpamba? Soko moke te. Engebene Biblia, Satana azali nzambe na biloko mabe na ntango oyo; na yango, mabota bayeba yango to bayeba te, bazali kosalela ye. (2 Bakolinti 4:3, 4)c Ezalela yango ezali komonana na lolenge oyo biyangeli na mokili mobimba bizali kotambwisama, etongami likoló na bolingo makasi na ekolo, koyinana mpe moimi. Ebongisami na lolenge oyo Satana alingi: na boye ete ekomi kotambwisama na ye. Libebi na makambo na politike, mposa makasi ya koyangela, boyokani ya lokuta, kowelana mpo na kosala bibundeli ya sika, makambo oyo nyonso mamonisi bomoto mabe na Diable. Mokili mozali kolanda mitinda na kozanga sembo na Satana, na kosalaka bongo ete ye azala nzambe na yango. Kiti na bokonzi na nyama na yauli ekokwea ntango nyama yango akobomama mpe na nsuka Libota na mwasi na Nzambe ekobwaka Satana kati na libulu mozindo.—Genese 3:15; Emoniseli 19:20, 21; 20:1-3.
Molili mpe mpasi makasi
17. (a) Boyokani nini ezali kati na kosopama na mbeki na mitano mpe molili makasi na elimo oyo ntango nyonso ezipi bokonzi na nyama na yauli? (b) Bato basali nini ntango mbeki na mitano na nkanda na Nzambe esopami?
17 Uta ebandeli na yango, bokonzi na nyama na yauli ekotaki na molili makasi na elimo. (Tala Matai 8:12; Baefese 6:11, 12.) Mbeki na mitano efungoli kosakolama makasi mpe ya polele na ntina etali molili yango. Eyeisi molili yango likambo monene koleka; mpamba te, mbeki oyo na nkanda na Nzambe esopami likoló na kiti na bokonzi na nyama na yauli na elilingi. “Mpe bokonzi na ye eyindaki. Bato banyamuti ndemo na bango mpo na mpasi, mpe batuki Nzambe na likolo mpo na mpasi na bango mpe mpo na mpota na bango, kasi babongoli mitema na ntina na misala na bango te.”—Emoniseli 16:10b, 11.
18. Boyokani nini ezali kati na kobetama na kelelo na mitano mpe mbeki na mitano na nkanda na Nzambe?
18 Kobetama na kelelo na mitano ekokanaki na makambo yonso te na mbeki ya mitano na nkanda na Nzambe, mpamba te kobetama na kelelo esakolaki bolozi na mayoyo. Nzokande tomoni ete bolozi yango elandanaki na koyinda na moi mpe na mopepe. (Emoniseli 9:2-5) Lisusu, tozali kotanga na Exode 10:14, 15, mpo na mayoyo na nzela na yango Jéhovah abetaki Ezipito ete: “Ebele monene boye na mayoyo ezalaki liboso te mpe ekozala lisusu te lokola, mpo ete mazipaki likolo na mokili yango mobimba, na motindo ete mokili eyindaki.” Ee, mokili ekotaki na molili makasi. Na mikolo na biso, molili ya elimo na mokili ezali komonana polele koleka mpo na kobetama na kelelo ya mitano mpe kosopama na mbeki na mitano na nkanda na Nzambe. Nsango oyo na koswa oyo ezali kosakolama na lipata na mayoyo na ntango na biso ezali konyokola mpe kopesa mpasi na bato mabe baoyo “balingi molili na esika ete balinga moi.”—Yoane 3:19.
19. Engebene Emoniseli 16:10, 11, nini esalami ntango Satana amonisami polele ete azali nzambe na biloko mabe na ntango oyo?
19 Lokola azali mokonzi na mokili, Satana abimisi mawa mingi mpe mpasi mingi. Nzala, bitumba, mobulu, kobomana, komela bangi, pite, bamaladi oyo ezali kozwama na kosalaka pite, kozanga bosembo mpe bokosi ya mangomba—wana ezali bobele mwa makambo oyo mazali komonisa mokili ya Satana. (Tala Bagalatia 5:19-21.) Ata bongo, lokola Satana amonisami polele ete azali nzambe na biloko mabe na ntango oyo, likambo yango ezali kotungisa baoyo bazali kobika engebene mitinda na ye mpe ezali kopesa bango mpasi mingi. ‘Banyamuti lolemo na bango mpo na mpasi,’ mingimingi na kati na boklisto na mokili oyo. Mingi bazali kosilika mpo ete solo ezali komonisa polele lolenge na bomoi na bango. Bamosusu bazali komona likambo yango lokola makaneli mpe bazali bongo konyokola baoyo bazali kosakola yango. Baboi Bokonzi na Nzambe mpe bazali kofinga nkombo mosantu na Jéhovah. Lokola ezali komonisama polele ete, na elimo, bazali na maladi, bazali na mpota minene na nzoto, na yango bazali kotuka Nzambe na likoló. ‘Babongoli mitema na ntina na misala na bango te.’ Na bongo tokoki komizela te ete bato nyonso bakoka kobongola mitema liboso na nsuka na biloko mabe na ntango oyo.—Yisaya 32:6.
Ebale Efrate ekauki
20. Na lolenge nini kobetama na kelelo na motoba mpe kosopama na mbeki na motoba ebebisi Efrate?
20 Kobetama na kelelo na motoba esakolaki kokangolama na “baanzelu minei baoyo basili kokangama epai na ebale Efrate.” (Emoniseli 9:14) Na kalakala, ezali na ebale Efrate nde engumba monene na Babilone etongamaki. Mpe, na 1919, kokangolama na “baanzelu minei” na elilingi elandanaki na kokwea ya nsomo ya Babilone Monene. (Emoniseli 14:8) Ezali bongo likambo na ntina na komona ete mbeki na motoba na nkanda na Nzambe esopami mpe likoló na Efrate: “Oyo na motoba asopi mbeki na ye na ebale yango monene Efrate; mai na yango makauki ete nzela ebongisama mpo na bakonzi balongwi na ebimelo na ntango.” (Emoniseli 16:12) Oyo nde nsango mabe lisusu mpo na Babilone Monene!
21, 22. (a) Mpo na Babilone, ndenge nini mai na Efrate oyo mazalaki kobatela yango makaukaki na 539 liboso na ntango na biso? (b) “Mai” likolo na yango Babilone Monene afandi ezali nini, mpe na ndimbola nini mai yango na elilingi mazali kokauka?
21 Na ntango ekomaki na nguya makasi, Babilone ya kala ezalaki kotya elikya na yango mingi likoló na mai mingi na ebale Efrate mpo na komibatela. Kasi na 539 liboso na ntango na biso, mai na yango makaukaki ntango mokonzi na perse Cyrus alekisaki yango na nzela mosusu, yango nde epesaki nzela na bakonzi na “ebimelo na ntango” (na est), Cyrus ya Perse mpe Darius ya Mède, bakota na Babilone mpe balonga yango. Na ntango yango ya mpasi makasi, Efrate ebatelaki bongo engumba monene te. (Yisaya 44:27 kino 45:7; Yilimia 51:36) Mawa motindo moko esengeli kokomela Babilone ya ntango oyo, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba.
22 Babilone Monene “afandi likoló na mai mingi.” Engebene Emoniseli 17:1, 15, mai yango elimboli “bikólo, bibele, mabota mpe minoko,” ebele na basambeli baoyo ye azali kotalela bango lokola libateli. Kasi “mai” yango ezali kokauka! Na Europe occidentale, epai kuna na mikolo mileki lingomba ezalaki na bopusi makasi, bamilió na bato batiki kosambela. Na bamboka mosusu, na boumeli ya bambula mingi, mokano oyo bamityelaki ezali ya kosilisa bopusi na mangomba, mpe bato bazali kosala eloko moko te mpo na kokotela mangomba. Bobele bongo, ntango ngonga na koboma Babilone Monene ekokoka, basambeli na ye oyo motuya ezali bobele kokita bakobatela ye soko moke te. (Emoniseli 17:16) Atako azali komiloba ete azali na bankoto na bato, Babilone Monene akotikala kozanga libateli liboso na “bakonzi na ebimelo na ntango.”
23. (a) Na 539 liboso na ntango na biso, banani bazalaki bakonzi na “ebimelo na ntango”? (b) Na boumeli na mokolo na Nkolo, banani bazali “bakonzi na ebimelo na ntango,” mpe na lolenge nini bakoboma Babilone Monene?
23 Bakonzi yango bazali banani? Na 539 liboso na ntango na biso, ezalaki Darius ya Mède mpe Cyrus ya Perse, bango nde Jéhovah asalelaki mpo na kolonga engumba na kalakala na Babilone. Na eleko na biso, na boumeli na mokolo na Nkolo, mangomba na lokuta na Babilone Monene makobomama mpe na bakonzi na mokili, kasi mbala oyo lisusu, ekozala ekateli na Nzambe. Ya solo, ezali Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto, “bakonzi na ebimelo na ntango,” bango nde bakotia na mitema na bakonzi na mokili “likanisi” na kobundisa Babilone Monene mpe koboma ye nyee. (Emoniseli 17:16, 17) Kosopama na mbeki na motoba ezali kosakola polele ete kosambisama yango ekomi pene na kokokana.
24. (a) Ndenge nini makambo mazali kati na mbeki motoba na liboso na nkanda na Jéhovah mamonisamaki polele, mpe matomba nini mazwamaki? (b) Liboso na kolobela mbeki na nsuka na nkanda na Nzambe, Emoniseli elakisi likambo nini polele?
24 Mbeki motoba ya liboso ya nkanda na Jéhovah ezali na nsango na likama mpenza. Ezali mpo na yango, na kosalisama na baanzelu, basaleli na Nzambe na mabelé bazali komipesa mingi mpo na koyebisa na mokili mobimba makambo oyo mazali na kati na mbeki. Na yango, biteni nyonso na ebongiseli na mokili mobimba na Satana bikebisami na ndenge esengeli, mpe Jéhovah azali kopesa epai na moto nyonso libaku malamu mpo na koluka boyengebene mpe kobika. (Ezekiele 33:14-16) Mbeki na nsuka na nkanda na Nzambe esengeli lisusu kosopama. Kasi liboso na kolobela biso yango, Emoniseli elakisi polele ndenge nini Satana mpe basaleli na ye na mabelé bazali kosala makasi mpo na kopekisa kosakolama na bikateli na Jéhovah.
Koyanganisama mpo na Armagedon
25. (a) Nini Yoane ayebisi biso mpo na “maloba mapemami” na mbindo oyo makokani na mbemba? (b) Na lolenge nini kopalangana na “maloba mapemami na bilimu mabe” oyo makokani na mbemba ezali kosalama na mokolo na Nkolo, mpe ezali kobimisa nini?
25 Yoane alobeli biso ete: “Namoni maloba misato mapemami na bilimu na mbindo lokola mbemba kobima na monoko na dalagona, mpe na nyama na yauli, mpe na mosakoli na lokuta. Mpo ete mazali maloba mapemami na bilimu mabe mpe mazali kosala bilembo, mpe makei epai na bakonzi na mokili mobimba koyanganisa bango mpo na etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:13, 14) Na mikolo na Moïse, Jéhovah abimisaki bolozi na mbemba to grenouilles na nsomo na mokili na Ezipito, oyo Faraon ayangelaki, kino ete “mokili elumbaki mabe.” (Exode 8:5-15) Na boumeli na mokolo na Nkolo, mokili mpe ebebisami na makambo mosusu na mbindo oyo makokisami na mbemba, kasi mauti na liziba mosusu. Ezali ‘maloba mapemami na bilimu na mbindo’ mauti na Satana, oyo mazali elilingi na maloba na kokosa to propagande mpo na kotambwisa bakonzi nyonso na mokili, mpo bakoka kotelemela Jéhovah Nzambe. Satana azali komilengela ete bakonzi yango batia likebi te na kosopama na mbeki na nkanda na Nzambe, kasi batikala se na ngambo na ye mpo na “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.”
26. (a) Maloba na kokosa na Satana mazali kobima na bisika nini misato? (b) “Mosakoli na lokuta” azali nani, mpe ndenge nini toyebi yango?
26 Maloba na kokosa yango mazali kouta na “dalagona” (Satana) mpe na “nyama na yauli” (lisangá na politike na mokili mobimba), bikelamu yango bisili kolobelama kati na Emoniseli. Kasi “mosakoli na lokuta” azali nani? Ekelamu yango emonani lokola ya sika bobele na nkombo. Mwa nsima, Emoniseli elakisaki biso nyama na yauli moko azalaki na maseke mibale lokola mwana na mpate mpe azali kosala bilembo minene liboso na nyama na yauli na mitɔ́ nsambo. Ekelamu yango mobuki na lokuta ezalaki lokola mosakoli mpo na nyama oyo na yauli. Ezalaki kolendisa losambo na nyama na yauli kino koloba ete basala ekeko ya nyama na yauli yango. (Emoniseli 13:11-14) Nyama na yauli wana na maseke mibale lokola mwana na mpate azali se ye moko mosakoli na lokuta oyo atangami sikawa. Elembeteli ezali ete engebene maloba malandi na esakweli, ndenge moko na nyama na yauli na maseke mibale na elilingi, ‘mosakoli na lokuta azali mpe kosala bilembo liboso na [nyama na yauli na mitɔ́ nsambo], na nzela na bilembo yango azali kozimbisa baoyo bazwaki elembo na nyama na yauli mpe baoyo bazali kosambela ekeko na ye.’—Emoniseli 19:20.
27. (a) Likebisi nini esengeli oyo Yesu Klisto ye moko apesi yango? (b) Ntango azalaki na mabelé likebisi nini Yesu apesaki? (c) Na maloba nini ntoma Paulo azongelaki likebi oyo na Yesu?
27 Na ntina na maloba nyonso mauti na Satana oyo mazali kolobama na mokili, maloba oyo Yoane akomi sikawa mabongi mpenza: “Tala! Nakoya lokola moyibi. Esengo na oyo akengeli mpe abateli bilamba na ye, ete atambola bolumbu te mpe bamona nsoni na ye te.” (Emoniseli 16:15) Nani azali “koya lokola moyibi”? Ezali Yesu ye moko, oyo azali koya na ntango oyo eyebani te lokola Mobukanisi oyo atindami na Jéhovah. (Emoniseli 3:3; 2 Petelo 3:10) Ntango azalaki naino na mabelé, Yesu akokanisaki mpe kozonga na ye lokola koya na moyibi na kolobaka ete: “Boye botala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini. Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:42, 44; Luka 12:37, 40) Na kozongelaka likebisi yango, ntoma Paulo alobaki: “Mokolo na Jéhovah ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete: ‘Kimya ezali, makambo mazali te!,’ wana libebi ekokwela bango pwasa.” Satana nde akotinda bato basakola maloba oyo na lokuta ete: “Kimya ezali, makambo mazali te!”—1 Batesaloniki 5:2, 3.
28. Na maloba nini Yesu akebisaki bayekoli na ye ete basengeli kotelemela bopusi na mokili, mpe nini “mokolo yango” oyo baklisto balingi te ete ebimela bango “pwasa lokola motambo”?
28 Yesu mpe akebisaki bayekoli na ye na bopusi oyo mokili etondi na maloba na kozimbisa na Satana ekoki kozala na yango likoló na bango. Alobaki ete: “Keba na bino ete mitema na bino mikoma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na bitungiseli ya bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. . . . Senzela ntango nyonso, mpe bondela ete bozala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe na kotelema liboso na Mwana na moto.” (Luka 21:34-36) “Mokolo yango” ezali “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14) Wana “mokolo yango” mobelemi oyo Jéhovah akolongisa boyangeli na ye monene, ekomi mpasi mingi mpo na kolonga bitungiseli na bomoi. Na yango, baklisto basengeli komilengela, kokeba mpe kosenzela kino mokolo yango ekoya.
29, 30. (a) Likebisi na Yesu ete bakoyokisa nsoni na baoyo bakokuta bango balali na kolongola bango “bilamba na bango” elimboli nini? (b) Bilamba bizali komonisa ete oyo alati yango azali nani? (c) Ndenge nini moklisto akoki kobungisa bilamba na ye na elilingi, mpe nini ekozwa ye?
29 Kasi likebisi oyo elobi ete bakoyokisa nsoni epai na baoyo bakolala na kolongolaka bango “bilamba na bango” elimboli nini? Na Yisraele na kala, nganga nyonso to Lévite oyo azalaki kokengela na temple azalaki na mokumba monene. Engebene Bayuda oyo bazali balimboli na makomi, soko bakutaki moko na bango na mpongi wana ezalaki ngala na ye ya kokengela, bakokaki kobotola ye bilamba mpe kozikisa yango, mpo na koyokisa ye nsoni liboso na bato nyonso.
30 Na Emoniseli 16:15, Yesu akebisi biso ete likambo motindo moko ekoki kosalema na mikolo na biso. Banganga mpe Balevite bazalaki elilingi na bandeko na elimo na Yesu. (1 Petelo 2:9) Kasi, likebisi na Yesu etaleli mpe ebele monene. Bilamba yango bizali komonisa balati na yango ete bazali baklisto ba Témoins de Jéhovah. (Tala Emoniseli 3:18; 7:14.) Soki bapesi nzela na bopusi ya Satana ete ekotisa bango na mpongi, to epusa bango batika kokokisa mikumba na bango, bakoki kobungisa bilamba yango, na maloba mosusu, bakoyebana lisusu te lokola baklisto na mpeto. Ezalela yango ekopesa bango nsoni. Bakoki kokwea libela.
31. (a) Na maloba nini Emoniseli elobeli makasi ntina mpo na baklisto na kosenzela? (b) Bakonzi na mangomba balobaki nini mpo na Armagedon?
31 Ezali na ntina mingi mpo ete baklisto basenzela ntango nyonso lokola verset oyo ya Emoniseli elingi kokokana: “Mpe bayanganisi [maloba mapemami na badémo] bango [bakonzi to bayangeli na mokili] na esika ebyangami na monoko na liebele ete Armagedon.” (Emoniseli 16:16) Nkombo yango, mingimingi ekomamaka ete Harmaguédon, ezali komonana bobele mbala moko na Biblia; kasi yango ebendaki makanisi na bato. Bakonzi na mokili bazali kokebisa bato ete Armagedon ya nikleere ekoki kosalama. Liloba Armagedon lokola ezali mpe kokokisama na engumba na kalakala na Méguiddo, oyo ezalaki esika bitumba mingi ya makasi bizalaki kobundama na ntango na kala, bakonzi na mangomba balimbolaki ete etumba ya nsuka oyo ekosalama na mabelé ekobundama na régio moke wana ya mokili. Na kolobaka bongo bapengwi mosika na solo.
32, 33. (a) Na esika ete ezala ngomba moko ya solo, Armagedon ezali kolimbola nini? (b) Maloba nini mosusu na Biblia makokani to mazali kolobela eloko moko na Armagedon? (c) Ntango nini ngonga ekokoka mpo na anzelu na nsambo ete asopa mbeki na nsuka na nkanda na Nzambe?
32 Liloba Armagedon elimboli “Ngomba na Méguiddo.” Ata bongo elimboli esika moko na mabelé te, kasi emonisi ezalela kati na yango mabota nyonso masangani mpo na kotemela Jéhovah Nzambe mpe na nsuka makobomama. Ezali ezalela etali mokili mobimba. (Yilimia 25:31-33; Danyele 2:44) Armagedon ekokani na “ekamelo monene na nkanda na Nzambe,” na “lobwaku na kosambisa” to na “lobwaku na Yosafata,” epai kuna mabota bakoyangana mpo babomama na Jéhovah. (Emoniseli 14:19; Yoele 3:12, 14) Armagedon ekokani mpe na “mokili na Yisraele” epai kuna mampinga na Satana to Gog de Magog mabomami mpe na esika ezali “kati na mai monene mpe ngomba na Kitoko mpe na bulee” epai kuna mokonzi na epai na likoló akokoma “na nsuka na ye” na kokweaka na maboko na Mikaele, prince monene.—Ezekiele 38:16-18, 22, 23; Danyele 11:45 kino 12:1.
33 Ntango mabota bakokambama na kozimbisama na ezalela yango na mingongo mabe lokola ya mbemba, elimboli na maloba na lokuta na Satana mpe basaleli na ye na mabelé, ngonga ekokoka mpo ete anzelu na nsambo asopa mbeki na nsuka na nkanda na Nzambe.
“Esili!”
34. Anzelu na nsambo asopi mbeki na ye likoló na nini, mpe kosakola nini ‘ebimi na temple, longwa na kiti na bokonzi’?
34 “Oyo na nsambo asopi mbeki na ye likoló na mopepe. Mongongo makasi mobimi na tempelo longwa na kiti na bokonzi koloba ete: ‘Esili!’”—Emoniseli 16:17.
35. (a) “Mopepe” molobami na Emoniseli 16:17 elimboli nini? (b) Na kosopaka mbeki na ye likolo na mopepe, anzelu na nsambo amonisi nini?
35 “Mopepe” ezali eloko na nsuka oyo ebetami na bolozi. Kasi awa ezali mopepe ya solo te. Eloko moko te emonisi ete mopepe esengeli kozwa etumbu longwa na Jéhovah, lokola mpe mabele, mai monene, mitɔ́ na mai to moi ya solosolo, nyonso oyo Jéhovah azali na ntina ya kobebisa yango te. Mopepe yango ezali oyo ntoma Paulo alobelaki ntango abyangaki Satana “mokonzi na nguya na mopepe.” (Baefese 2:2) Ezali “mopepe” na Satana oyo mokili ya lelo ezali kopema, elimo to lolenge na kokanisa oyo ezali komonana kati na ebongiseli mobimba na biloko mabe, makanisi na Satana oyo makoteli makambo nyonso na bomoi na bato baoyo bazali libanda na lisangá ya Jéhovah. Na kosopaka mbeki na ye likoló na mopepe, anzelu na nsambo amonisi bongo nkanda na Nzambe likoló na Satana, likoló na lisangá na ye mpe likoló na oyo nyonso ezali kopusa bato na kopesa maboko na Satana mpo na kotemela boyangeli na Jéhovah.
36. (a) Malozi nsambo ezali nini? (b) Kosakola na Jéhovah ete: “Esili!” elakisi nini?
36 Bolozi yango mpe oyo motoba na liboso ezali bitumbu nyonso oyo Jéhovah abeti na yango Satana mpe mokili na ye. Malozi yango mazali kosakola mawa mpo na Satana mpe libota na ye. Ntango mbeki yango ya nsuka esopami, Jéhovah ye moko asakoli: “Esili!” Eloko mosusu ya kobakisa ezali te. Ntango makambo oyo mazali kati na mbeki na nkanda na Nzambe makosila kosopama, kino ete mposa na Jéhovah ekosila, na bongo akokokisa kozanga koumela bikateli oyo bisakolamaki na nsango yango.
37. Na maloba nini Yoane ayebisi makambo esalami nsima na kosopama na mbeki na nsambo na nkanda na Nzambe?
37 Yoane alobi lisusu boye: “Mikalikali mizalaki, na mingongo, na nkake. Mokili mpe eningani mingi, na motindo mobimaki boye te longwa na ntango ezalaki bato na mokili, eningani bongo mingi mpenza. Mboka yango monene ebukani na ndambo misato. Bamboka na mabota ekwei mpe. Nzambe akanisi mpe Babilone Monene mpo na kopesa ye kopo na vinyo na kongala na nkanda na ye. Bisanga nyonso bikimi, mpe ngomba moko ezwami te. Mbula ya mabanga minene mingi lokola talanta enokeli bato. Bato nde batuki Nzambe mpo na bolozi na mbula na mabanga, mpo ete bolozi yango ezalaki monene mpenza.”—Emoniseli 16:18-21.
38. Elimboli nini (a) “koningana monene na mokili”? (b) likambo oyo ete “mboka monene,” Babilone Monene, epasuki “ndambo misato”? (c) likambo oyo ete “bisanga nyonso bikimi,” mpe “ngomba moko ezwami te”? (d) “bolozi na mbula ya mabanga”?
38 Mbala oyo lisusu, Jéhovah asali na lolenge na kokamwa epai na bato. Ezali yango emonisami na “mikalikali, na mingongo mpe nkake.” (Tala Emoniseli 4:5; 8:5.) Mokili ekoningisama lokola eningana naino te, lokola na koningana na mabelé oyo ekobebisa biloko nyonso. (Tala Yisaya 13:13; Yoele 3:16.) Kotetema yango na kokamwa ekobukabuka “mboka yango monene,” Babilone Monene, na boye ete ekokabwana na “ndambo misato,” yango elimboli ete ekobomama mpo na libela. Epai mosusu, “bamboka na mabota” ekokwea. “Bisanga nyonso” mpe “ngomba,” yango emonisi bibongiseli mpe masangá oyo mazali komonana ete matelemi makasi kati na biloko mabe na ntango oyo, ekolimwa. “Mbula ya mabanga minene,” makasi koleka oyo ebetaki na Ezipito na ntango na bolozi ya nsambo, oyo libanga na yango mokomoko ekozala soko na kiló pene na talanta moko, ekobeta bato.d (Exode 9:22-26) Mbula wana ya mabanga ebetisami mpo na kopesa etumbu ekoki kolimbola kosakolama makasi mpenza na bikateli na Jéhovah, oyo emonisi ete nsuka na biloko mabe na ntango oyo esili koya. Jéhovah akoki mpe kosalela mbala mosusu mbula na mabanga ya solo mpo na koboma mokili.—Yobo 38:22, 23.
39. Atako kosopama na malozi nsambo, eloko nini mingi kati na bato bakolanda kosala?
39 Mokili na Satana ekozwa bongo etumbu ya sembo ya Jéhovah. Kino nsuka, mingi kati na bato bakolanda kotiola mpe kotuka Nzambe. Lokola na ntango na Faraon na kala, mitema na bango ekobongwana te atako malozi malandani, atako bakomona nsuka na bango mpe liwa. (Exode 11:9, 10) Kino na minute ya nsuka, tokomona te ete ebele ya bato bakobongola mitema na bango. Ata wana ekokoma bango pene na liwa, bakofinga Nzambe, oyo alobi mpo na mabota ete: “Bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.” (Ezekiele 38:23). Boyangeli na Jéhovah Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso ekolongisama.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okokuta bandakisa na biloko bizangi bomoi kasi bizali kopesa litatoli na Genese 4:10; 31:44-53 mpe Baebele 12:24.
b Liloba “kiti na bokonzi” esalelami motindo moko kati na maloba oyo na esakweli mpo na Yesu: “Nzambe azali kiti na bokonzi na yo na seko, e, libela na libela.” (Nzembo 45:6) Jéhovah azali liziba, to moboko na bokonzi oyo epesami na Yesu.
c Tala mpe Yobo 1:6, 12; 2:1, 2; Matai 4:8-10; 13:19; Luka 8:12; Yoane 8:44; 12:31; 14:30; Baebele 2:14; 1 Petelo 5:8.
d Soki Yoane azalaki kokanisa mpo na talanta na Bagreke, elingi koloba libanga mokomoko ezalaki na kiló ntuku mibale. Oyo nde mbula ya mabanga ya kobebisa!
[Etanda na lokasa 221]
“Na mokili”
Kelasi ya Yoane esakolaki nkele ya Jéhovah likoló na “mokili,” na maloba lokola oyo:
“Nsima na bikeke mingi ya kotya molende, baparti politiques emonisi ete ezali na likoki te mpo na kotelema liboso na makambo ya lelo mpe kosilisa mikakatano ya sikawa, na ntina na yango bato bazali na motema likoló. Babongisi na nkita mpe mikonzi ya mokili bamoni ete bazali kokoka ata eloko moko te, ata nsima na koyekola malamumalamu likambo yango.”—Des milions de personnes actuellement vivantes ne mourront jamais, 1920, lokasa 52.
“Awa na mokili ezali ata na boyangeli moko te oyo ekokisi bamposa ya ba citoyens na yango. Mikili mingi mitambwisami na mokonzi na yauli to dictateur. Mokili mobimba esili kokwea.”—Un gouvernement désirable, 1924, page 7.
“Ezali bobele . . . na kotya nsuka na ebongiseli ya lelo, wana nde mabe ekolongolama na mokili mpe kimya na boyengebene ekokoka komonana bipai nyonso.”—“Cette bonne nouvelle du royaume,” 1955, lokasa 25.
“Mokili ya lelo emipesi mingi na masumu, na bokesene mpe na botomboki kotemela Nzambe mpe mokano na ye. . . . Ekoki kosembolama te, esengeli se kolimwa.”—La Tour de Garde, 1er Mars 1982, lokasa 6.
[Etanda na lokasa 223]
“Na mai monene”
Tala mwa ndambo na makambo oyo kelasi ya Yoane balobaki yango na boumeli ya bambula mpo na komonisa nkele na Nzambe epai na “mai monene” na yikiyiki mpe na botomboki, elingi koloba bato mabe oyo batangwi mosika na Jéhovah:
“Lisolo ya mokili mokomoko emonisi motindo bituluku ndenge na ndenge bizalaki kobunda. Matata ezalaki ntango nyonso kati na basali mpe bankolo-bakompanyi. . . . Mpo na matata yango botomboki mingi esalemaki, bwale mingi eyokisamaki, makila mingi masopamaki.”—Gouvernement, 1928, lokasa 231.
Na mokili ya sika, “‘mai monene’ ya elilingi, elingi koloba bato na yikiyiki, bato na mbindo mpe batomboki, kati na yango ebimaki nyama na yauli, esaleli ya Diable, ekozala lisusu te.”—La Tour de Garde, 1er Mai 1969, lokasa 283.
“Libota ya bato na sikawa ezali na maladi na elimo. Moko te kati na biso akoki kobikisa yango, mpamba te Liloba ya Nzambe emonisi ete ezali pene na kokufa.”—Kimya ya solo ekouta wapi?, 1973, lokasa 131.
[Etanda na lokasa 224]
“Na bibale mpe mitó na mai”
Bolozi ya misato emonisaki polele eloko nini wana “bibale mpe mitó na mai”; ezalaki na nzela na maloba lokola oyo:
“Bakonzi ya mangomba, oyo bazali komikumisa ete bazali kolakisa mateya na Yesu, bandimaki mpe babulisaki bitumba. Bakonzi na mangomba basepelaki na komona bafoto na bango mpe bikeko na bango etyami esika moko na oyo ya bilombe ya bitumba ya mokili.”—La Tour de Garde ya Novembre 1924, lokasa 15.
“Losambo ya bilimu mabe etongami likoló na lokuta oyo ete molimo na moto etikalaka na bomoi nsima na kufa na nzoto mpe ete ekufaka te.”—Les Ecritures enseignent-elles la “survivance”?, 1956, lokasa 51.
“Bafilozofi ya bato, makanisi ya koluka nzela ya kotambwisa mboka, kobongisa makambo ya bato mpe nkita na bango, mpe mitindo ya bonkoko mpo na oyo etali losambo, ezwili bato ata kobondisama moko te kati na bomoi na bango. Mai yango epusi nkutu bango na kobuka mobeko ya Mozalisi na ntina etali ezaleli ya bulee ya makila, mpe konyokola bato na makambo matali lingomba.”—Ekateli ekamatamaki na Assemblée internationale “Nsango malamu ya seko,” na 1963.
“Bato na science bakolonga te kobikisa libota ya bato, bazali nde komema yango na libebi. . . . Tokoki mpe kolikya te ete bayekoli na makanisi na bato mpe minganga oyo bakosalisaka bokono makanisi, bakoka kobongola makanisi ya bato na mokili mobimba. . . . Tokoki mpe kotya motema te ete na la police ya mokili mobimba oyo ekozala na nguya makasi . . . mpo na kosengisa mabota nyonso ya mokili ete bakómisa etando na biso oyo esika moko oyo likoki ekozala ya kofanda na kimya nyonso.”—La race humaine sera sauvée,—par le Royaume, 1970, lokasa 5.
[Etanda na lokasa 225]
“Na moi”
“Moi,” elingi koloba boyangeli ya bato ezali ‘kozikisa’ bato awa na mokili na boumeli na mokolo na Nkolo. Kelasi ya Yoane ebendaki likebi ya bato likoló na likambo yango na maloba lokola oyo:
“Lelo oyo, Hitler mpe Mussolini bazali kobebisa kimya ya mokili mobimba. Lingomba ya katolike ya Roma ezali kosunga bango kati na mosala oyo ya koboma bonsomi ya bato.”—Fascisme ou liberté, 1939, lokasa 12.
“Na boumeli ya lisolo mobimba ya bato, bakonzi na yauli to ba dictateurs bazali na mokano se ya koyangela to ya koboma. Kasi Yesu Klisto, Mokonzi aponami na Nzambe apesi bango etinda ete bamitya na nse na bokonzi na ye, soki te bakobomama.”—Quand toutes les nations s’uniront sous le Royaume de Dieu, 1961, lokasa 23.
“Uta 1945, bato koleka 25 milió basili kokufa na boumeli ya bitumba soko 150 oyo ebimaki bipai nyonso na mokili.”—La Tour de Garde, 15 Avril 1980, lokasa 6.
“Mabota nyonso . . . bazali komibanzabanza ata moke te mpo na mokumba na bango to mpo na mitinda ya etamboli malamu na mokili mobimba. Mpo na kokokisa mikano na bango, mabota mingi bazali kokakatana te mpo na kosalela myango nyonso mpo na kolonga—koboma bibele ya bato na mbala moko, koyiba mpepo elongo na bato na kati, kobwaka bombe epai na epai, bongo na bongo . . . Kino ntango nini mabota makolanda kotambola se boye kati na ligboma mpe kozanga kozwa etumbu?”—La Tour de Garde, 15 Février 1985, lokasa 4.
[Etanda na lokasa 227]
“Na kiti na bokonzi na nyama na yauli”
Ba Témoins de Jéhovah balimbolaki polele eloko nini wana kiti na bokonzi na nyama na yauli mpe bamonisaki ete Jéhovah akweisi yango, na kobimisaka maloba lokola oyo:
“Mikonzi ya mokili bazali kopusama na bilimu mabe, mpo na komema bango kino na etumba na Armagedon.”—Après Harmaguédon, Dieu établira un monde nouveau, 1954, lokasa 8.
“‘Nyama na yauli,’ lolenge na boyangeli na teokratike te kasi na moto, azwi epai na Dragon nguya, bokonzi mpe kiti na bokonzi. Azali bongo kolanda makambo nyonso oyo Dragon azali koloba na ye.”—Après Harmaguédon, Dieu établira un monde nouveau, 1954, lokasa 15.
“Mabota ya bapakano bazali bongo na ngambo ya Satan le Diable, Monguna monene ya Nzambe.”—Ekateli ekamatamaki na Assemblée internationale “La victoire divine,” na 1973.
[Etanda na lokasa 229]
“Mai na yango makauki”
Na mikili mingi, mangomba oyo mautaki na Babilone mazali na mpasi mpo ete bato na yango mingi bazali kolongwa. Yango ezali komonisa eloko nini ekosalema ntango “bakonzi balongwi na ebimelo na ntango” bakobundisa yango.
“Boyekoli moko esalemaki na mokili [ya Thaïlande] emonisi ete 75 % ya bato kati na bingumba bakendaka lisusu na bandako-nzambe te mpo na koyoka mateya ya lingomba ya Buda; na bamboka, motuya na baoyo bazali kokende na ndako-nzambe ezali se kokita; bazali soko 50 % mpamba.”—Bangkok Post, 7 Septembre 1987, lokasa 4.
“Losambo lobengami taoïsme esili kobungisa nguya na yango kati na mokili [ya Chine] epai yango ebotamaki esili bongo koleka bambula soko nkoto mibale. . . . Lokola bazali lisusu na bisalasala ya magie te na nzela na yango, bango mpe bato bazalaki liboso na bango bazalaki kala kobenda bato mingi nsima na bango, banganga-nzambe ya lingomba yango bayei komona ete bazali na bato te oyo bakoki kokitana bango; basosoli ete lingomba ya taoïsme ezali kokufa kuna na mokili ya Chine.”—The Atlanta Journal and Constitution, 12 Septembre 1982, lokasa 36-A.
“Japon . . . ezali moko kati na mikili oyo ezali na bamisionere mingi ya bapaya, pene na 5 200, nzokande, . . . na mokili yango motuya ya baklisto ekokisi ata 1 % te. . . . Engebene sango moko franciscain oyo akomaki kuna na ba 1950, . . . ‘oyo ezali lisusu ntango ya bamisionere ya bapaya te kuna na Japon.’”—The Wall Street Journal, 9 Juillet 1986, lokasa 1.
Na Angleterre, na boumeli na mibu ntuku misato oyo mileki, “kati na bandako-nzambe 16 000 ya lingomba ya Anglikane, pene na 2 000 ekangamaki mpo ete ezalaki lisusu na mosala te. Motuya na bayangani kati na bandako-nzambe ekitaki mingi koleka na mikili nyonso mitangami ete ya boklisto. . . . ‘Tokoki lisusu koloba te ete Angleterre ezali mokili ya boklisto,’ oyo maloba ya [episkopo ya mboka Durham].”—The New York Times, 11 Mai 1987, lokasa A4.
“Nsima na ntembe makasi oyo eumelaki ngonga mingi, Parlema [ya mokili ya Greke] esali lelo mobeko moko epesi ndingisa na guvernema socialiste ete ekamata mabelé mosusu ya Lingomba ya ortodokse grec mpo ete lingomba yango ezali na yango mingi mpenza. . . . Epai mosusu, mobeko epesi ndingisa na ba laïcs ete babanda kobwaka miso na makambo ya Eklesia mpo na oyo etali mosolo motyami na ba hôtels, na bakompanyi ya kobimisa marbre mpe na bandako ya misala.”—The New York Times, 4 Avril 1987, lokasa 3.
[Bililingi na lokasa 222]
Mbeki minei ya liboso ya nkanda ya Nzambe ebimisi malozi lokola oyo ebimaki ntango kelelo minei ya liboso ebetamaki
[Elilingi na lokasa 226]
Mbeki na mitano emonisi ete kiti na bokonzi na nyama na yauli ezali bokonzi oyo Satana asili kopesa na nyama yango
[Bililingi na lokasa 231]
Kopalangana na maloba na bilimu mabe ezali sikawa koyanganisa mikonzi ya mokili mpo na etumba ya nsuka, Armagedon, esika oyo bikateli na Nzambe bikokokisama likoló na bango
[Elilingi na lokasa 233]
Bikateli na sembo na Jéhovah bikokweila baoyo bazali kolanda “mopepe” mosili kobebisama na Satana