Lisiko
Ndimbola: Motuya oyo bafuti mpo na kosikola moto to eloko moko boye to mpo na komilongola na mokumba moko boye to na likambo oyo ezali malamu te. Lisiko moko te ezali na motuya koleka makila ya Yesu Kristo oyo esopamaki. Ntango Yesu azongaki na likoló, afutaki epai ya Tata na ye motuya ya lisiko; yango epesaki bana ya Adama libaku ya kosikolama na lisumu mpe liwa oyo biso nyonso tobotamá na yango mpo na lisumu ya nkɔkɔ na biso Adama.
Ndenge nini liwa ya Yesu Kristo ekeseni na oyo ya bato mosusu oyo bakufá liwa ya martiru?
Yesu azalaki moto ya kokoka. Abotamaki ata na litɔnɔ moko te ya lisumu mpe atikalaki moto ya kokoka tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. “Asalaki lisumu te.” Azalaki ‘na mbindo te, akabwanaki na basumuki.’—1 Pe. 2:22; Ebr. 7:26.
Azalaki mwana se moko ya Nzambe. Uta na likoló, Nzambe ye moko alobelaki likambo yango na mongongo makasi. (Mat. 3:17; 17:5) Mwana yango azalaki na bomoi na likoló liboso aya awa na mabele; na nzela na ye, Nzambe azalisaki bikelamu nyonso mpe biloko mosusu nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo Nzambe akokisa mokano na ye, asalaki likamwisi, azwaki bomoi ya mwana na ye mpe atyaki yango na libumu ya elenge moko ya mwasi oyo azalaki ngɔndɔ mpo mwana na ye abotama lokola moto nyonso. Mpo amonisa ete azalaki mpenza moto, Yesu amibengaki Mwana ya moto.—Kol. 1:15-20; Yoa. 1:14; Luka 5:24.
Azangaki nguya te liboso ya bato oyo babomaki ye. Alobaki ete: “Nazali kokaba molimo na ngai . . . Moto moko te abɔtɔli ngai yango, kasi nazali kokaba yango na likanisi na ngai moko.” (Yoa. 10:17, 18) Aboyaki kosɛnga mampinga ya baanzelu bábundela ye. (Mat. 26:53, 54) Atako batikaki bato mabe bákokisa myango na bango ya mabe mpo na koboma ye, liwa na ye ezalaki mpenza mbeka.
Makila ya Yesu oyo esopamaki ezali na motuya oyo ezali kosikola bato. “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mrk. 10:45) Na yango, liwa na ye ezalaki na motuya mingi koleka liwa ya moto oyo akufi martiru mpo aboyi kowangana kondima na ye.
Talá mpe nkasa 166, 167, na motó ya likambo “Ekaniseli.”
Mpo na nini esengelaki ete lisiko epesama na ndenge oyo epesamaki mpo tózwa bomoi ya seko?
Rom. 5:12: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Ata soki tozali na etamboli ya sembo ndenge nini, biso nyonso tobotamaka basumuki. [Nz. 51:5] Eloko moko te ekoki kopesa biso lotomo ya kozwa bomoi ya seko.)
Rom. 6:23: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.”
Nz. 49:6-9: “Baoyo bazali kotya motema na biloko na bango ya kobikela, mpe baoyo bazali kaka komikumisa mpo na ebele ya bomɛngo na bango, moko na bango akoki kosikola ndeko na ye ata moke te, to kopesa Nzambe lisiko mpo na ye; (mpe ntalo ya lisiko ya molimo na bango ezali motuya moko monene mpenza yango wana ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te) mpo azala lisusu na bomoi seko mpe amona libulu te.” (Moto ya kozanga kokoka ata moko te akoki kosikola moto mosusu na lisumu mpe liwa. Mbongo na ye ekoki kosomba bomoi ya seko te, mpe molimo na ye ezali na motuya te ya kobikisa moninga na ye mpo, alinga to alinga te, liwa ekozwa molimo na ye mpo yango ezali lifuti oyo lisumu efutaka.)
Atako Adama ná Eva basengelaki kokufa mpo na botomboki na bango, mpo na nini Nzambe akataki kaka te ete bana na bango nyonso oyo bakotosa ye bakozwa bomoi ya seko?
Ezali mpo ete Yehova “alingaka boyengebene mpe bosembo.” (Nz. 33:5; Mib. 32:4; Yir. 9:24) Na yango, ndenge oyo akataki likambo yango eyokani na boyengebene na ye, ekokisaki makambo oyo bosembo na ye ya kokoka ezali kosɛnga, mpe, lisusu, emonisaki bonene ya bolingo na ye mpe motema mawa na ye. Na ndenge nini?
(1) Adama ná Eva babotaki bana nsima ya kosala lisumu, yango wana moko te abotamaki moto ya kokoka. Bana nyonso ya Adama babotamaki na lisumu, mpe lisumu ememaka na liwa. Soki Yehova atikaka likambo yango bongo, elingaki komonana lokola nde aboyi mibeko na ye ya sembo. Soki asalaka bongo, yango elingaki komonisa ete andimi makambo ya kozanga boyengebene. Nzambe akangaki miso te na makambo oyo bosembo na ye ya kokoka esɛngaka; na yango, moto moko te akokaki mpenza koloba ete Nzambe azali sembo te na likambo yango.—Rom. 3:21-26.
(2) Bibongiseli nini Yehova asengelaki kozwa mpo na kosikola bana ya Adama oyo bakotosa ye na bolingo, kozanga ete abosana makambo oyo bosembo ezali kosɛnga? Ya solo, soki moto moko ya kokoka apesi bomoi na ye ezala mbeka, bosembo ekopesa nzela ete bomoi yango ya kokoka ezipa masumu ya baoyo bakondima mbeka yango. Lokola lisumu ya moto moko (oyo ya Adama) nde esalaki ete bato nyonso bákóma bato ya masumu, makila ya moto mosusu ya kokoka (Adama ya mibale), oyo ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na bomoi ya kokoka ya Adama, ekokaki kokokisa makambo oyo bosembo ezali kosɛnga. Lokola Adama asalaki lisumu na nko, ebongiseli ya lisiko ezalaki mpo na ye te; kasi lokola etumbu oyo bato nyonso basengelaki kozwa mpo na lisumu ekwelaki moto mosusu na nzela ya lisiko, bana ya Adama bakokaki kosikolama. Nzokande, moto ya kokoka ya ndenge wana azalaki te. Na yango, bato bakokaki te kokokisa makambo wana oyo bosembo ya kokoka ezali kosɛnga. Bongo, mpo Yehova amonisa bolingo na ye monene mpe amonisa ete mbeka yango ezali na valɛrɛ monene koleka mpo na ye, ye moko azwaki ebongiseli ya lisiko. (1 Ko. 15:45; 1 Tim. 2:5, 6; Yoa. 3:16; Rom. 5:8) Mwana se moko ya Nzambe andimaki mpe kokokisa mokumba na ye. Na komikitisa nyonso, Yesu atikaki nkembo oyo azalaki na yango na likoló, akómaki moto ya kokoka awa na mabele, mpe na nsima andimaki kokufa mpo na bato.—Flp. 2:7, 8.
Ndakisa: Kanisá ete tata moko ya libota asali mabe mpe bakateli ye etumbu ya liwa. Atiki bana na ye babola, mpe bazali na likoki ya kofuta banyongo na ye te. Nzokande, nkɔkɔ na bango oyo azali na boboto asalisi bango; azwi bibongiseli mpo mwana na ye moko oyo azali kofanda na ye afuta banyongo na bango mpe apesa bango libaku ya kobanda bomoi ya sika. Ezali solo ete, mpo bana wana bázwa matomba ya ebongiseli yango, basengeli liboso kondima yango, mpe mbala mosusu nkɔkɔ na bango akoki kosɛnga bango básala mwa makambo oyo ekondimisa ye ete bakolanda etamboli ya tata na bango te.
Libosoliboso, banani bazwaki matomba ya mbeka ya Yesu, mpe mpo na nini?
Rom. 1:16: “Nsango malamu [oyo etali Yesu Kristo mpe mokumba na ye mpo na kokokisa mokano ya Yehova] . . . nde nguya oyo Nzambe azali kosalela mpo moto nyonso oyo azali na kondima abika, Moyuda liboso mpe lisusu Mogrɛki.” (Bayuda nde bato ya liboso oyo babyangamaki mpo na kozwa matomba ya mbeka ya Kristo mpo na lobiko, na nsima bato oyo bazali Bayuda te babyangamaki.)
Ef. 1:11-14: “Na bomoko elongo na ye [Kristo] totyamaki [Bayuda ná ntoma Paulo] mpe bazwi-ya-libula [Bazwi-ya-libula ya nini? Ya Bokonzi ya likoló] . . . mpo tózala ntina ya kosanzola mpe ya kopesa ye nkembo, biso baoyo tozali bato ya liboso oyo totyaki elikya na Kristo. Kasi bino mpe [bakristo oyo bazalaki Bayuda te, oyo bazalaki ebele na Efese] botyaki elikya epai na ye nsima ya koyoka liloba ya solo, nsango malamu oyo etali lobiko na bino. Na nzela na ye mpe, nsima ya kondima, botyamaki elembo na elimo santu oyo elakamaki, oyo ezali ndanga ya libula na biso oyo epesami libelalibela, mpo na kosikola na nzela ya lisiko eloko ya Nzambe ye moko, mpo na kosanzola nkembo na ye.” (Vɛrsɛ ya 1 Petro 1:4 emonisi ete libula yango ezali na likoló. Emoniseli 14:1-4 elobi ete baoyo bakozwa yango bazali bato 144 000. Elongo na Kristo, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe ya bato. Na boumeli ya mbula 1 000, bakokokisa malamu mokano ya Nzambe mpo na mabele, elingi koloba bakokómisa yango paradiso oyo kati na yango bana ya kokoka ya Adama ná Eva bakofanda.)
Na mikolo na biso, banani mosusu bazali kozwa matomba ya mbeka ya Yesu?
1 Yoa. 2:2: “[Yesu Kristo] azali mbeka mpo na kozipa masumu na biso [masumu ya ntoma Yoane mpe bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo], kaka oyo ya biso moko te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba [bato mosusu, elingi koloba baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele].”
Yoa. 10:16: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (“Bampate mosusu” yango bazali kozwa libateli ya bolingo ya Yesu Kristo ata ntango oyo batikali ya “etonga moke” bazali naino awa na mabele; bongo “bampate mosusu” bakoki kosangana na bazwi-ya-libula ya Bokonzi mpo bázala “etonga moko.” Bango nyonso bazali kozwa matomba mingi na mbeka ya Yesu, kasi ndenge moko te, mpo bilikya na bango ekeseni.)
Em. 7:9, 14: “Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso . . . ‘Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene, mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.’” (Na yango, ntango bolɔzi monene ekobanda, ebele mpenza ya bato bakozala na bomoi; mpe bato yango bazali pɛto liboso ya Nzambe mpo bandimi lisiko. Lokola Nzambe atángi bango bayengebene mpo na mbeka yango, bakobika na bolɔzi monene mpe bakokoba kozala na bomoi awa na mabele.)
Lisiko ekomemela bato mapamboli nini na mikolo ezali koya?
Em. 5:9, 10: “Bayembi loyembo ya sika ete: ‘[Mwana-Mpate, Yesu Kristo] obongi kozwa rulo wana mpe kofungola bilembo na yango, mpo obomamaki mpe na makila na yo osombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso, mpe okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.’” (Mpo na baoyo bakoyangela elongo na Kristo, lisiko nde likambo ya ntina mingi oyo efungoleli bango nzela ya kokende na likoló. Mosika te baoyo nyonso bakoyangela na guvɛrnema ya sika oyo ekoyangela mabele bakofanda na bakiti na bango ya bokonzi na likoló.)
Em. 7:9, 10: “Talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate [Yesu Kristo, oyo akufaki lokola mwana-mpate oyo bakabi mbeka], balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe basimbi mandalala na mabɔkɔ. Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.’” (Mpo ebele ya bato yango bábika na bolɔzi monene, basengeli kondima mbeka ya Kristo.)
Em. 22:1, 2: “Mpe alakisaki ngai ebale moko ya mai ya bomoi, pɛɛ lokola kristale, ezali kouta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate, ekei tii na katikati ya balabala na yango ya monene. Mpe na ngámbo oyo ya ebale mpe na ngámbo mosusu ezalaki na banzete ya bomoi oyo ezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale, ezali kopesa mbuma na yango sanza na sanza. Mpe nkasa ya banzete wana ezalaki mpo na kobikisa bikólo.” (Na yango, kosalela motuya ya mbeka ya Mwana-Mpate ya Nzambe, Yesu Kristo, ezali eteni ya ntina mingi ya ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na kobikisa bato na makambo nyonso oyo lisumu ebimisaka mpe kopesa bango libaku ya kozwa bomoi ya seko.)
Rom. 8:21: “Biloko oyo ezalisamá [elingi koloba, bato] ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”
Tosengeli kosala nini mpo mbeka ya kokoka ya Yesu epesa biso mapamboli mpo na libela?
Yoa. 3:36: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.”
Ebr. 5:9: “Nsima ya kokómisama moto oyo akoki na nyonso, [Yesu Kristo] azwaki mokumba ya kokamba na lobiko ya seko bato nyonso oyo bazali kotosa ye.”
Ndenge nini ebongiseli ya lisiko ezali kosalisa biso tóyeba ndenge Nzambe ayokaka mpo na bato?
1 Yoa. 4:9, 10: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo, na likambo oyo, ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.”
Rom. 5:7, 8: “Ezali mpasi mpenza moto akufela moyengebene; kasi mbala mosusu, moto akoki ata kondima kokufela moto malamu. Kasi Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.”
Ebongiseli yango esengeli kotinda biso tósalela bomoi na biso ndenge nini?
1 Pe. 2:24: “Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete, mpo tótika masumu mpe tózala na bomoi ya boyengebene.” (Mpo na nyonso oyo Yehova ná Mwana na ye basali mpo na kopɛtola biso na lisumu, tosengeli kobundisa makasi bamposa na biso ya kosala lisumu. Tosengeli ata moke te kosala na nko likambo nyonso oyo toyebi ete ezali lisumu!)
Tito 2:13, 14: “Kristo Yesu . . . amipesaki mpo na biso mpo asikola biso na makambo ya ndenge nyonso ya kobuka mibeko mpe apɛtola mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko, oyo bazali na molende na misala ya malamu.” (Botɔndi oyo tozali na yango mpo na ebongiseli ya lisiko esengeli kotinda biso tósala na molende misala oyo Kristo apesaki bayekoli na ye ya solo.)
2 Ko. 5:14, 15: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso; bongo, na ndenge yango, bato nyonso bakufaki; mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.”