Motema mawa ya Jéhovah ezali kobikisa biso na kozanga elikya
“Ɛ Nzambe, yokela ngai mawa, lokola ezali boboto na yo; kati na ngolu na yo monene, boma bipengweli na ngai.—NZEMBO 51:1.
1, 2. Lisumu monene ekoki kozala na bopusi nini likolo na mosaleli moko ya Jéhovah?
MOTO moko te akoki kobuka mibeko na Jéhovah kozanga ete azwa etumbu. Bosolo na likambo yango ezali mpenza komonana wana tosali masumu minene epai na Nzambe! Atako tozali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso uta mibu mingi, kobuka mibeko na Nzambe ekoki kotungisa biso mingi to kobulunganisa mingi. Tokoki kooka lokola ete Jéhovah asili kotika biso mpe komimona lokola tobongi te kosalela ye. Lisumu na biso ekoki komonana lokola lipata moko monene oyo ezali kopekisa pole ya ngolu na Nzambe.
2 Davidi, mokonzi na Yisraele ya kala azwamaki mokolo mosusu kati na mokakatano ya lolenge yango. Likambo yango ebandaki ndenge nini?
Mabunga makoki komema na masumu minene
3, 4. Nini ekomelaki mokonzi Davidi na ntango oyo azalaki na bozwi mingi?
3 Davidi alingaki Nzambe, kasi asalaki mabunga oyo mamemaki ye na masumu minene. (Tala Bagalatia 6:1.) Likambo oyo ekoki kokomela moto nyonso ya kozanga kokoka, mingi mpenza soki azali na bokonzi likolo na bato mosusu. Lokola azalaki mokonzi oyo azali na bozwi mingi, Davidi azalaki na lokomu mingi mpe azalaki na nguya. Nani akokaki kokatola maloba na ye? Bato na makasi bazalaki pene na ye mpo na kosalela ye; mpe mposa na ye ezalaki lokola bitinda. Nzokande, Davidi asalaki masumu wana abalaki basi ebele mpe ntango atangaki bato.—Deteronome 17:14-20; 1 Ntango 21:1.
4 Ezalaki na eleko oyo azalaki na bozwi mingi ya mosuni nde Davidi asalaki masumu minene epai na Nzambe mpe epai na bato. Na yango, lisumu moko ememaki na mosusu lokola bansinga ya kosala elamba ebongisami na Satana! Wana baninga na ye Bayisraele bazalaki kobundisa Baamona, longwa na likolo ya ndako na ye Davidi azalaki kotala Bata-Seba, mwasi kitoko ya Uliya, oyo azalaki kosukola nzoto. Ezalaki Uliya na etumba, Davidi atindi bamema Bata-Seba na ndako na ye ya mokonzi mpe asalaki na ye ekobo. Kanisa mobulungano azwaki ntango ayokaki ete Bata-Seba azali na zemi! Davidi atindaki babenga Uliya, na elikya ete akolala na Bata-Seba mpe akondima ete mwana azali mwana na ye. Atako Davidi alangwisaki ye, Uliya aboyaki kolala elongo na mwasi na ye. Wana azangaki elikya, Davidi atindaki na mokambi na basoda Yoaba mitinda ya nkoku ete atya Uliya na liboso esika etumba ezali makasi mpo ete akufa. Uliya abomamaki na etumba, mwasi na ye akokisaki mikolo ya kolela, mpe Davidi abalaki ye liboso bato basosola ete azali na zemi.—2 Samwele 11:1-27.
5. Likambo nini likomaki nsima ya lisumu na Davidi elongo na Bata-Seba, mpe masumu na ye mabimisaki mpasi nini likoló na ye?
5 Na nzela na mosakoli Natana, Nzambe abimisaki masumu na Davidi mpe alobaki ete: “Tala nakokolisa mabe matemela yo kati na ndako na yo moko.” Mpo na kokokisa maloba yango, mwana oyo abotamaki na Bata-Seba akufaki. (2 Samwele 12:1-23) Amenona, mwana na liboso ya Davidi, abebisaki Tamala, ndeko na ye ya mwasi oyo abotamaki na mama mosusu mpe abomamaki na ndeko na Tamala. (2 Samwele 13:1-33) Mwana na mokonzi, Abesaloma alukaki kobotola bokonzi mpe asambwisaki tata na ye wana asanganaki na bamakango na Davidi. (2 Samwele 15:1 kino 16:22) Etumba ya bana mboka esukaki na kufa ya Abesaloma mpe epesaki Davidi mpasi mingi. (2 Samwele 18:1-33) Nzokande, masumu na Davidi ekomisaki ye moto na komikitisa mpe eteyaki ye ntina ya kozala penepene na Nzambe na ye oyo akoyokelaka bato mawa. Soki ekomeli biso na kosala lisumu, tika ete tobongola motema na komikitisa nyonso mpe tobelema penepene na Jéhovah.—Tala Yakobo 4:8.
6. Mpo na nini mokonzi Davidi azalaki mpenza na ekweli monene?
6 Davidi azwaki etumbu makasi mpo ete azalaki mokonzi na Yisraele oyo ayebaki malamu Mibeko na Jéhovah. (Deteronome 17:18-20) Azalaki Farao ya Ezipito te to mokonzi ya Babilone te baoyo bazangaki boyebi ya lolenge yango mpe bazalaki ntango nyonso kosala makambo oyo Nzambe aboyi. (Tala Baefese 2:12; 4:18.) Lokola azalaki mosangani na libota oyo emipesaki na Jéhovah, Davidi asosolaki ete ekobo mpe koboma moto ezali masumu minene. (Exode 20:13, 14) Baklisto mpe bayebi mibeko na Nzambe. Nzokande, lokola Davidi, basusu kati na bango babukaki yango mpo na lisumu oyo basangolaki, mpo na bolembu ya bomoto mpe mpo na masenginya oyo bakokaki kolonga yango te. Soki yango ekomeli biso, tosengeli te kotikala na molili oyo ekozimbisa elimo na biso mpe ekozindisa biso kati na ezaleli ya kozanga elikya.
Koyambola mabunga ezali kopesa libondisi
7, 8. (a) Nini ekomelaki Davidi wana alukaki kobomba masumu na ye? (b) Mpo na nini tosengeli koyambola masumu na biso mpe kotika nzela na biso ya mabe?
7 Soki tosali masumu minene na kobukaka mibeko na Nzambe, tokoki komona ete ezali mpasi koyambola masumu na biso, ata epai na Jéhovah. Nini ekoki kokoma na ntango yango? Kati na Nzembo 32, Davidi alobaki ete: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te [esika ete nayambola yango], nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Mpo ete loboko na yo [Jéhovah] ezalaki na bozito likolo na ngai na moi na butu; mai na nzoto na ngai ekaukaki lokola na ntango na moi makasi.” (Versets 3, 4) Motomboki Davidi amekaki kobomba lisumu na ye mpe kopekisa motungisi ya lisosoli oyo azalaki na yango kasi azalaki nde kominyokola. Maoki ya mawa elembisaki nguya na ye mingi mpe akomaki lokola nzete oyo ekauki na molunge makasi mpe ezangi makiki to mai oyo ekopesaka yango bomoi. Ya solo, ekoki kozala ete abelaki na nzoto mpe na makanisi. Na ntembe te, abungisaki esengo na ye. Soki moto moko kati na biso azwami na likambo motindo yango, asengeli kosala nini?
8 Koyambola masumu epai na Nzambe ezali komema bolimbisi mpe kobondisama. Davidi ayembaki ete: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. Nalobaki ete: ˈNakoyebisa Jéhovah bipengweli na ngai, mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.ˈ” (Nzembo 32:5) Ozali kotungisama mpo na lisumu moko oyo osalaki na nkuku? Ebongi ete oyambola yango mpe otika nzela na yo ya mabe mpo okoka kozwa ngolu ya Nzambe. Mpo na nini te kobenga bankulutu ya lisanga mpe koluka kobikisama ya elimo? (Masese 28:13; Yakobo 5:13-20) Bango bakomona elimo na yo ya kobongola motema, mpe mokemoke okozwa lisusu esengo na yo ya kozala moklisto. Davidi alobaki ete: “Esengo na ye oyo alimbisami mabunga na ye, ye oyo masumu na ye mazipami. Esengo na ye oyo Jéhovah atangeli ye mabe te, mpe ye oyo azangi lokuta na elimo na ye.”—Nzembo 32:1, 2.
9. Ntango nini Nzembo 51 ekomamaki, mpe mpo na nini?
9 Davidi mpe Bata-Seba basengelaki kozongisa monoko epai na Jéhovah Nzambe mpo na lisumu na bango. Atako babongaki na kobomama mpo na masumu na bango, Nzambe ayokelaki bango mawa. Amonisaki mpenza mawa epai na Davidi na ntina na kondimana ya Bokonzi. (2 Samwele 7:11-16) Ezalela ya kobongola motema na Davidi na ntina na masumu oyo asalaki elongo na Bata-Seba ezali komonana kati na Nzembo 51. Akomaki Nzembo wana ya kosimba motema nsima wana mosakoli Natana alamusaki lisosoli na ye likolo na bonene ya masumu oyo asalaki ntango abukaki mibeko na Nzambe. Natana asengelaki kozala na mpiko mpo na kobenda likebi na Davidi likolo na masumu na ye; bobele bongo bankulutu basengeli komonisa mpiko mpo na kosala makambo lolenge yango lelo oyo. Esika ete awangana mabe na ye mpe apesa etinda ete baboma Natana, mokonzi ayambolaki mabunga na ye na komikitisa nyonso. (2 Samwele 12:1-14) Nzembo 51 ezali komonisa makambo oyo Davidi alobaki na Nzambe na libaku wana ya mawa, mpe ebongi biso mpe tokanisa yango kati na libondeli, mingimingi soki tosalaki mabunga mpe tozali mpenza na mposa makasi ya mawa na Jéhovah.
Tosengeli kozongisa monoko epai na Nzambe
10. Lolenge nini Davidi akokaki kobikisama na elimo?
10 Davidi alukaki komilongisa te mpo na lisumu na ye kasi abondelaki ete: “Ɛ Nzambe, yokela ngai mawa, lokola ezali boboto na yo; kati na ngolu na yo monene, boma bipengweli na ngai.” (Nzembo 51:1) Ntango asalaki lisumu, Davidi alekaki ndelo na Mibeko na Nzambe. Nzokande, elikya ezalaki mpo na kobikisama na ye ya elimo, soki Nzembe akomonisela ye ngolu engebene boboto na Ye, to bolingo na Ye ya sembo. Koyokela mawa mingi oyo Nzambe amonisaki na ntango ya kala endimisaki mokonzi ete Mozalisi na ye akoboma bipengweli na ye.
11. Bambeka ya Mokolo ya Epetweli ezalaki komonisa nini, mpe nini esengami lelo mpo na kozwa lobiko?
11 Na nzela ya elilingi ya esakweli ya bambeka oyo bazalaki kopesa na Mokolo ya Epetweli, Jéhovah azalaki komonisa ete azali na likoki ya kopetola bato oyo babongoli motema na masumu na bango. Sikawa toyebi ete tokoki kozwa litomba na mawa na ye mpe na bolimbisi na ye mpo na kondima na biso kati na mbeka na Yesu Klisto. Soki Davidi, oyo azalaki bobele na elilingi ya mbeka kati na makanisi, atyelaki boboto mpe mawa na Jéhovah motema, na koleka basaleli na Nzembe ya mikolo na biso bakondimela lisiko lipesami mpo na lobiko na bango!—Baloma 5:8; Baebele 10:1.
12. Kosala lisumu elimboli nini, mpe lolenge nini Davidi amiyokski na ntina na mabe na ye?
12 Kati na libondeli na ye epai na Nzambe, Davidi abakisaki ete: “Sukola ngai malamu kolongola mabe na ngai, petola ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epengweli na ngai mpe lisumu na ngai ezah liboso na ngai ntango nyonso.” (Nzembo 51:2, 3) Kosala lisumu ezali kozanga kokokisa mokano etali mitinda na Jéhovah. Davidi akweaki solo na yango. Nzokande, akokanaki te na mobomi na bato to moto na ekobo oyo azali komibanzabanza te na ntina na mabunga na ye, kasi atungisami bobele mpo na etumbu to likama ya kozwa maladi. Lokola azalaki ye oyo akolingaka Jéhovah, Davidi ayinaki mabe. (Nzembo 97:10) Atungisamaki na ntina na lisumu na ye mpe alingaki ete Nzambe apetola ye na yango mobimba. Davidi ayebaki mabunga na ye malamu mpe ayokaki mawa mingi ete atikaki mposa ya masumu kolonga ye. Lisumu na ye lizalaki ntango nyonso liboso na ye, mpamba te lisosoli na moto na kobanga Nzambe oyo asali lisumu ekokita bobele soki abongoli motema, ayamboli mabe na ye mpe azwi bolimbisi na Jéhovah.
13. Mpo na nini Davidi alobaki ete asalelaki mpenza Nzambe lisumu?
13 Mpo na kondima ete azalaki na monoko ya kozongisa epai na Jéhovah, Davidi alobaki ete: “Nasali mabe epai na yo, Ɛɛ bobele epai na yo moko, nasali mabe na miso na yo. Yo ozali sembo na likambo lilobi yo mpe ekateli na yo ezali peto.” (Nzembo 51:4) Davidi asilaki kobuka mibeko na Nzambe, kosambwisa mokumba ya mokonzi mpe “na ntembe te azangaki limemya epai na Jéhovah,” abwakaki nsoni likolo na nkombo na ye. (2 Samwele 12:14; Exode 20:13, 14, 17) Misala mabe na Davidi mizalaki mpe lisumu epai na ekolo mobimba ya Yisraele mpe epai na basangani na libota na ye moko; motindo moko lelo oyo, mosumuki oyo azwi batisimo akopesa mawa na lisanga ya boklisto mpe na libota na ye. Atako mokonzi abongolaki motema ayebaki ete asalaki lisumu epai na baninga na ye bato, lokola Uliya, nzokande ayebaki ete azali na mokumba moleki monene na miso na Jéhovah. (Tala Genese 39:7-9.) Davidi andimaki ete lisambisi ya Jéhovah ekozala sembo. (Baloma 3:4) Baklisto oyo basali masumu basengeli kozala na likanisi motindo moko.
Makambo oyo makoki kolembisa bikateli
14. Davidi atangaki makambo nini oyo makokaki kolembisa etumbu likoló na lisumu na ye?
14 Atako Davidi alukaki komilongisa ye moko te, alobaki ete: “Tala, ngai nabotami kati na bokesene, mpe mama na ngai azwaki zemi kati na lisumu.” (Nzembo 51:5) Davidi abotamaki kati na masumu, mpe mama na ye aokaki mpasi mpo na kozanga kokoka oyo abotamaki na yango. (Genese 3:16; Baloma 5:12) Maloba na ye mamonisi te ete kosangana mobali na mwasi kati na libala, kozwa zemi mpe kobota bana ezali lisumu, na lolenge oyo Nzambe asalaki ebongiseli ya libala mpe ya kobota bana; Davidi azalaki mpe kolobela te lisumu moko ya sikisiki oyo mama na ye asalaki. Mama na ye azwaki zemi na ye kati na masumu mpo ete baboti na ye bazalaki bato na masumu lokola bato mosusu nyonso.—Yobo 14:4.
15. Atako Nzambe akoki kotalela makambo oyo makoki kolembisa etumbu, tosengeli kosala nini te?
15 Soki tosali lisumu, tokoki komonisa epai na Nzambe kati na libondeli likambo nini limemaki biso na kosala mabe, likambo oyo likoki kolembisa etumbu. Kasi tika te ete tobongola ngolu na Nzambe lokola mwango ya etamboli ya mbindo mpe tosalela te kozanga kokoka lokola ezipeli mpo na kokima etumbu na masumu na biso. (Yuda 3, 4) Davidi andimaki libunga oyo asalaki ntango akolisaki makanisi ya mabe mpe amitikaki na masenginya. Tosengeli kobondela mpo ete tomitika na masenginya te mpe bongo tosala na boyokani na libondeli lolenge yango.—Matai 6:13.
Malombo mpo na kopetolama
16. Nzambe akosepelaka na bizaleli nini, mpe lolenge nini likambo yango esengeli kosala bopusi likoló na etamboli na biso?
16 Moto akoki komonana ete azali malamu mpenza, amipesi mingi na mosala ya Nzambe, kasi Mozalisi azali komona na mozindo mpe azali komona oyo ezali kati na motema na moto. Davidi alobaki ete: “Tala, yo [Jéhovah] olingi ete solo ezala kati na motema; yebisa ngai boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:6) Davidi asalelaki bokosi mpo na kobomisa Uliya mpe kobomba zemi ya Bata-seba. Nzokande, ayebaki ete Nzambe akosepelaka nde na solo mpe na bulee. Likambo oyo esengeli kosala bopusi malamu likolo na biso, mpo ete Jéhovah akokweisa biso soki tolandi nzela ya bokosi. (Masese 3:32) Davidi ayebaki lisusu ete soki Nzambe ˈakoyebisa ye mayele ya solo,ˈ ye mokonzi oyo abongoli motema, akokaki kotosa mitinda na ye bomoi na ye mobimba.
17. Libondeli mpo na kopetolama na isope ezalaki na ndimbola nini?
17 Mpo ete mokomi na Nzembo amonaki ntina ya lisalisi na Nzambe mpo na kolonga bolembu na ye, asengaki lisusu ete: “Petola ngai na isope, mpe nakozala peto, sukola ngai mpe nakozala pee lokola pembe.” (Nzembo 51:7) Kati na makambo mosusu, nzete ya isope (mbala mosusu marjolaine, to Origanum maru ezalaki kosalelama kati na milulu ya kopetolama na bato oyo bauti kobikisama na maladi ya maba. (Levitike 14:2-7) Mpo na yango ebongaki ete Davidi abondela mpo na kopetolama na lisumu na ye na isope. Likanisi ya bopeto emonisami lisusu na malombo oyo ete Jéhovah asukola ye mpo akoma mpenza peto, ata pembe koleka mbula pembe oyo ezwi naino bosoto te. (Yisaya 1:18) Soki moto moko kati na biso atungisami kati na lisosoli mpo na misala mabe na ye, tika azala na kondima ete soki aluki bolimbisi na Nzambe na kobongola motema ya solo, akoki kopetola mpe kosukola ye na nzela na mbeka oyo Yesu apesaki lokola lisiko.
Malombo mpo na kobikisama
18. Ezalela na Davidi ezalaki nini liboso ete abongola motema mpe ayambola lisumu na ye, mpe lolenge nini boyebi na likambo yango ekoki kosalisa biso lelo oyo?
18 Moklisto nyonso oyo asila kotungisama na lisosoli akoki kokanga ntina ya maloba oyo ya Davidi: “[Jéhovah] Yokisa ngai kosepela mpe esengo ete mikwa mibuki yo mizwa esengo lisusu.” (Nzembo 51:8) Liboso ete Davidi abongola motema mpe ayambola masumu na ye, motungisi na lisosoli ezalaki koyokisa ye mawa. Ayokaki esengo te ata na banzembo ya bosepeli mpe ya esengo oyo bayembi mpe babeti miziki ya mayele bazalaki koyemba. Mpasi na mosumuki Davidi na ntina na koboyama na Nzambe ezalaki mpenza monene na boye ete akokanaki na moto oyo mikwa na ye misili kobukana. Azalaki koluka bolimbisi na molende nyonso, kobikisama ya elimo mpe kozongisama ya esengo oyo azalaki na yango liboso. Lelo oyo, mosumuki oyo abongoli motema azali na mposa ya bolimbisi ya Jéhovah mpo na kozongela esengo oyo azalaki na yango liboso ete asala mabe oyo ebebisaki boyokani na ye elongo na Jéhovah. Kozongisama na “esengo ya elimo santu” epai na moto oyo abongoli motema ezali komonisa ete Jéhovah asili kolimbisa ye mpe alingi ye. (1 Batesaloniki 1:6, MN) Ezali solo kopesa libondisi!
19. Davidi akokaki komiyoka ndenge nini soki Nzambe abomaki mabunga na ye nyonso?
19 Davidi asengaki lisusu ete: “Longola elongi na yo na masumu na ngai mpe boma bokesene na ngai nyonso.” (Nzembo 51:9) Davidi akokaki kolikya te ete Jéhovah akosepela na lisumu. Yango wana, Davidi asengaki ete alongola elongi na masumu na ye. Mokonzi abondelaki lisusu ete Nzambe akoka koboma mabunga na ye nyonso, kolongola bokesene na ye nyonso. Soki Jéhovah akokaki bobele kosala yango! Elingaki kolendisa Davidi, kolongola bozito na lisosoli litungisami mpe kondimisa mokonzi oyo abongoli motema ete Nzambe na ye oyo alingi ye asili kolimbisa ye.
Okosala nini soki osali lisumu?
20. Nini esengami na moklisto nyonso oyo asali lisumu monene?
20 Nzembo 51 emonisi ete mosaleli nyonso amipesi na Jéhovah oyo asali lisumu monene kasi abongoli motema akoki kosenga na elikya nyonso ete Jéhovah amonisa ye ngolu mpe apetola ye na lisumu na ye. Soki ozali moklisto oyo asali libunga na motindo yango, mpo na nini okoluka te bolimbisi ya Tata na biso na likolo kati na libondeli na komikitisa? Kanga ntina ya koluka lisalisi ya Nzambe mpo na kondimama liboso na ye, mpe senga ete asalisa yo ozongela esengo oyo ozalaki na yango liboso. Baklisto oyo babongoli motema bakoki na elikya nyonso kobelema na Jéhovah kati na libondeli elongo na malombo motindo yango, mpo ete aakolimbisa na solo.” (Yisaya 55:7; Nzembo 103:10-14) Esengeli kobenga bankulutu ya lisanga ya boklisto mpo na kopesa lisalisi ya elimo.—Yakobo 5:13-15.
21. Tokotalela nini na lisoló lilandi?
21 Mawa na Jéhovah ezali kobikisa libota na ye na kozanga elikya. Kasi tika totalela malombo mosusu ya mobongoli motema Davidi, malombo oyo mauti na motema kati na Nzembo 51. Boyekoli na biso ekomonisa ete Jéhovah akoboya motema motutami te.
Okopesa eyano nini?
◻ Bopusi nini lisumu monene ekoki kosala likoló na mosaleli moko ya Jéhovah?
◻ Davidi amiyokoki lolenge nini wana alukaki kobomba lisumu na ye?
◻ Mpo na nini Davidi alobaki ete asalaki mpenza lisumu epai na Nzambe?
◻ Atako Nzambe akoki kotalela makambo oyo makoki kolembisa bikateli soki tosali lisumu, nzokande tosengeli kosala nini te?
◻ Moklisto oyo asali lisumu monene asengeli kosala nini?