Koyambola oyo ezongisaka moto makasi na elimo
“WANA nayebisaki bokɛsɛnɛ na ngai te, nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Mpo ete lobɔkɔ na yo ezalaki na bozito likoló na ngai na moi na butu; mai na nzoto na ngai ekauki lokola na ntango makasi.” (Nzembo 32:3, 4) Maloba yango ya kosimba motema mpenza ezali komonisa mpasi mozindo oyo Davidi, mokonzi ya kala ya Yisalaele ayokaki, mpasi oyo amilukelaki ye moko ntango abombaki lisumu monene oyo asalaki, na esika ya koyambola yango.
Davidi azalaki mobali moko ya makoki mpenza. Azalaki mobundi bitumba moko ya mpiko, mokonzi moko ya makoki, mokomi ya maloba ya ntoki, mpe alanga nzembo. Atako bongo, azalaki kotya kaka motema na ye epai ya Nzambe, kasi na makoki na ye te. (1 Samwele 17:45, 46) Biblia elobi mpo na ye ete motema na ye “ezalaki malamu nyonso liboso na [Yehova].” (1 Mikonzi 11:4) Kasi asalaki lisumu moko oyo esɛngaki azwa mpamela ya makasi mpenza, mpe ekoki kozala ete na Nzembo 32, azali kolobela nde lisumu yango. Tokoki kozwa mateya mingi soki totaleli makambo oyo ememaki ye na lisumu yango. Tokososola mitambo oyo tosengeli kokima mpe tokomona ntina ya koyambola masumu na biso mpo na kozongisa boyokani na biso na Nzambe.
Mokonzi ya sembo akwei na lisumu
Libota ya Yisalaele ekendaki kobundisa Baamona, kasi Davidi atikalaki na Yelusaleme. Mokolo moko na mpokwa, ntango azalaki kotambola likoló ya nsamba ya ndako na ye, amonaki mwasi moko kitoko azali kosukola nzoto na lopango ya pembeni. Na esika ete amipekisa, akómaki nde kolula ye makasi. Ntango bayebisaki ye ete mwasi yango ezalaki nde Bata-seba, mwasi ya Uliya, moko ya basoda na ye, Davidi abengisaki mwasi yango, mpe asalaki na ye ekobo. Nsima ya mikolo, Bata-seba atindelaki Davidi maloba ete azali na zemi.—2 Samwele 11:1-5.
Davidi ayebaki eloko ya kosala te. Soki lisumu na bango eyebani na bato, etumbu na bango nyonso mibale esengelaki kozala liwa. (Lewitiko 20:10) Na bongo akanaki mwango moko. Abengisaki Uliya, mobali ya Bata-seba, oyo azalaki na etumba. Nsima ya kotuna ye mituna mingi mpo na koyeba ndenge etumba ezalaki koleka, Davidi ayebisaki Uliya ete azonga na ndako na ye. Davidi akanisaki ete na ndenge yango elingaki komonana na nsima ete Uliya nde moto atyaki Bata-seba zemi.—2 Samwele 11:6-9.
Uliya azongaki kotala mwasi na ye te, likambo oyo epesaki Davidi mawa. Uliya alobaki ete akokaki ata moke te kozonga na ndako na ye na ntango oyo limpinga ya basoda ezalaki koyikela bampasi ya etumba mpiko. Na ntango ya etumba, basoda ya Yisalaele bazalaki komipekisa kosangisa nzoto na basi, ezala na basi na bango moko. Basengelaki kotikala pɛto na kolanda milulu ya kopɛtolama. (1 Samwele 21:5) Na nsima, Davidi abengaki Uliya mpo na kolya mpe alangwisaki ye masanga, kasi atako bongo azongaki na ndako na ye te mpo akutana na mwasi na ye. Ezaleli ya sembo ya Uliya ekweisaki lisumu monene ya Davidi.—2 Samwele 11:10-13.
Lisumu na ye moko ebendelaki Davidi mindɔndɔ. Lokola azalaki lisusu na elikya te, amonaki kaka likambo moko ya kosala. Azongisaki Uliya na etumba mpe apesaki ye mokanda mpo na kopesa Yoaba, mokonzi ya basoda. Mokanda yango elobaki polele ete: “Tyá Uliya na epai na liboso na esika wana etumba eleki na makasi mpe longwa epai na ye ete abɛtama mpe ete akufa.” Na nzela ya mokanda wana, mokonzi ya nguya akanisaki ete abombaki likambo oyo asalaki, atindaki nde Uliya na liwa.—2 Samwele 11:14-17.
Eumelaki mingi te, ntango kaka Bata-seba asilaki kolela mobali na ye, Davidi abalaki ye. Nsima ya mikolo, mwana na bango abotamaki. Ntango makambo oyo nyonso ezalaki koleka, Davidi abombaki masumu na ye. Ekoki kozala ete azalaki komeka komilongisa na makambo oyo asalaki. Ntango mosusu, azalaki nde kokanisa boye: “Uliya akufi liwa ya lokumu, ndenge moko na basoda mosusu oyo bakufaki na etumba, boye te? Lisusu, atosaki mokonzi na ye te ntango aboyaki kokende epai ya mwasi na ye, boye te?” ‘Motema oyo ezali na bokosi’ ekoki kobimisa makanisi ndenge na ndenge mpo na koluka kolongisa lisumu.—Yilimia 17:9; 2 Samwele 11:25.
Mabunga oyo ememaka na lisumu
Ndenge nini Davidi, moto oyo alingaki boyengebene, akweaki na ekobo mpe na koboma? Emonani polele ete makanisi oyo ememaki ye na lisumu yango alonaki yango liboso, mokemoke na boumeli ya mwa ntango. Tokoki komituna mpo na nini Davidi azalaki te elongo na bato na ye, mpo na kosunga bango na etumba na bango na banguna ya Yehova. Kasi, Davidi azalaki nde kopema na ndako na ye, esika oyo azalaki ata kokanisa te ndenge nini etumba ezalaki koleka; yango ekokaki kolongola ye mposa mabe mpo na mwasi ya soda wana ya sembo. Lelo oyo, komipesa na molende na makambo ya elimo elongo na masangá na bango mpe kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola ezali libateli mpo na baklisto ya solo.—1 Timote 6:12.
Mokonzi nyonso ya Yisalaele azwaki etinda ya kosala kopi ya Mibeko mpe kotánga yango mokolo na mokolo. Biblia epesi ntina ya likambo yango: “Ete ayekola komemya [Yehova] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso ya lilako oyo mpe ya mibeko oyo, mpe na kosala yango, ete motema na ye ezala na lolendo na likoló na bandeko na ye te, mpe ete apɛngwa na lilako, to epai na lobɔkɔ na mobali to epai na lobɔkɔ na mwasi te.” (Deteronome 17:18-20) Emonani lokola ete Davidi azalaki kotosa lilako yango te na ntango oyo asalaki masumu wana minene. Na ntango oyo ya mpasi, koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe komanyola likoló na yango ekosalisa biso tomibatela na kosala mabe.—Masese 2:10-12.
Lisusu, mobeko ya nsuka na Mibeko Zomi elobaki ete: “Okolula mwasi ya mozalani na yo te.” (Exode 20:17) Na ntango wana Davidi azalaki na basi mpe bamakango ebele. (2 Samwele 3:2-5) Kasi yango ebatelaki ye te na kolula mwasi mosusu ya kitoko. Lisolo oyo ezali kotinda biso tozwa na valɛrɛ mingi maloba oyo ya Yesu: “Ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:28) Na esika ya kokolisa bamposa motindo wana oyo ebongi te, tiká ete tósalaka noki mpo na kolongola yango na makanisi mpe na motema na biso.
Kobongola motema mpe motema mawa
Biblia emonisi na bosembo mpenza lisumu oyo Davidi asalaki, kasi lisolo yango ekomamaki te mpo na kosepelisa bamposa ya kosangisa nzoto oyo moto azali na yango. Lisolo yango epesi biso libaku ya komona ndenge Yehova alakisaki mpenza motema mawa na ye, oyo ezali moko ya bizaleli na ye minene.—Exode 34:6, 7.
Bata-seba abotaki mwana mobali; nsima na yango, Yehova atindaki mosakoli Natana mpo akutana na Davidi. Yango emonisaki motema mawa ya Nzambe. Soki Davidi azwaki lisungi te mpe soki abombaki kaka lisumu na ye, alingaki kokóma moto oyo ameseni na kosala masumu. (Baebele 3:13) Ezali esengo ete Davidi asalaki likambo oyo eyokanaki na motema mawa oyo Nzambe amonisaki epai na ye. Na mayele mpenza, Natana asalelaki maloba ya polele oyo esimbaki mpenza lisɔsɔli ya Davidi, mpe na komikitisa nyonso andimaki ete asalelaki Yehova lisumu. Kutu, nsima ya kobongola motema mpe ya koyambola lisumu monene oyo asalaki, Davidi abongisaki Nzembo 51 oyo elobeli lisumu na ye na Bata-seba. Soki tosali lisumu monene, topesa nzela te ete mitema na biso ekóma makasi.—2 Samwele 12:1-13.
Yehova alimbisaki Davidi, kasi abatelaki ye te na disipilini to na mbuma mabe ya lisumu na ye. (Masese 6:27) Davidi akokaki kozanga kozwa disipilini te. Soki Nzambe akangaki miso na makambo nyonso oyo esalemaki mpe soki asalaki ata eloko te, bato balingaki lisusu kotosa mibeko na ye te. Alingaki kokokana na Nganga monene Eli, oyo apamelaki na bolɛmbu bana na ye oyo bazalaki na bizaleli mabe mpe atikaki bango balanda kosala mabe na bango. (1 Samwele 2:22-25) Kasi, Yehova aboyaka te komonisa boboto na ye epai ya moto oyo azali na motema motutami mpo na lisumu oyo asalaki. Motema mawa na ye, oyo ekokani na mai ya malili oyo ekitisaka motema, ekosalisa moto oyo asalaki lisumu na koyikela mbuma mabe ya lisumu na ye mpiko. Bolimbisi oyo Nzambe apesaka mpe kozonga na boninga ya malamu na baninga baklisto ekoki kosala ete moto yango azongela kozala makasi na elimo. Ɛɛ, na nzela ya lisiko ya Klisto, moto oyo abongoli motema akoki komona ete “ngɔlu ya [Nzambe] efuluki mingi mpenza epai na ye.”—Baefese 1:7.
“Motema ya pɛto” mpe “elimo ya sika”
Nsima ya koyambola lisumu na ye, Davidi amiyokaki te ete azangi ntina. Kobondisama na ye mpe ekateli na ye ya kosalela Nzambe na bosembo emonisami polele na maloba oyo asaleli na banzembo oyo akomaki mpo na oyo etali koyambola masumu. Na ndakisa, zwá Nzembo 32. Vɛrsɛ ya 1 elobi ete: “Esengo na ye oyo alimbisami mabunga na ye, ye oyo masumu na ye mazipami.” Ata soki lisumu ezali monene ndenge nini, soki moto abongoli mpenza motema, akoki kolimbisama. Lolenge moko ya komonisa ete obongoli mpenza motema ezali ya kondima likambo oyo osalaki ndenge Davidi andimaki lisumu na ye. (2 Samwele 12:13) Alukaki te komilongisa liboso ya Yehova to kopesa foti na bato mosusu. Vɛrsɛ ya 5 elobi boye: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. Nalobaki ete, Nakoyebisa [Yehova] bipengweli na ngai, mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.” Soki mpenza moto ayamboli masumu, akozwa libɔndisi, na bongo lisɔsɔli na ye ekotungisa ye lisusu te mpo na masumu na ye ya kala.
Nsima ya kosɛnga Yehova bolimbisi, Davidi asɛngaki ete: “Ɛ Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesa ngai [elimo] ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Davidi asɛngaki “motema ya pɛto” mpe “elimo ya sika;” yango emonisi ete ayebaki mposa ya kosala lisumu oyo ezalaki ntango nyonso na makanisi na ye mpe ayebaki ete azalaki na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpo apɛtola motema na ye mpo abanda kosala makambo ya sika. Na esika ya kozala mawamawa, azalaki na mokano ya kokende kaka liboso na mosala ya Nzambe. Abondelaki boye: “Ɛ [Yehova], zipolá bibebu na ngai mpe monɔkɔ na ngai ekosakola lokumu na yo.”—Nzembo 51:15.
Yehova asalaki nini lokola Davidi abongolaki solo motema mpe azwaki mokano ya kosala milende mpo na kosalela ye? Andimisaki Davidi na maloba oyo ya kolendisa mpenza: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” (Nzembo 32:8) Maloba yango emonisi likebi oyo Yehova atyaka na mayoki mpe na bamposa ya moto oyo abongoli motema. Yehova azwaki bibongiseli mpo na kopesa Davidi bosɔsɔli mingi, likoki ya kotalela makambo na mozindo. Na bongo, soki na nsima akutani na komekama mosusu, alingaki koyeba nini oyo ekoya na nsima ya makambo oyo ye akosala, mpe oyo yango ekosala epai basusu; nyonso wana elingaki kosalisa ye na kosala makambo na mayele nyonso.
Likambo oyo ekómelaki Davidi ezali elendiseli mpo na baoyo nyonso bakweaki na lisumu monene. Soki toyamboli masumu na biso mpe tobongoli solo motema, tokoki kozwa lisusu eloko na biso ya motuya oyo tobungisaki, elingi koloba boyokani na biso na Yehova Nzambe. Mpasi ya ntango moke mpe nsoni oyo tokoki koyoka eleki mosika mpasi ya motema oyo tokoki koyoka soki tobombi lisumu, to mbuma mabe oyo tokoki kobuka soki tolingi kotika botomboki te. (Nzembo 32:9) Kasi, tokoki nde kozwa bolimbisi ya esengo oyo euti epai ya Nzambe ya bolingo mpe oyo atondi na motema mawa, “Tata na mawa mpe Nzambe ya kobondisa nyonso.”—2 Bakolinti 1:3.
[Elilingi na lokasa 31]
Ntango Davidi atindaki Uliya na liwa, akanisaki ete akokima mbuma mabe ya lisumu na ye