“Ekateli ya Yehova” ekozanga te kokokisama
“Tiká nalobela ekateli ya Yehova; alobi na ngai: ‘Ozali mwana na ngai . . . Sɛngá ngai, napesa yo bikólo ezala libula na yo.’”—NZEMBO 2:7, 8, NW.
1. Bokeseni nini ezali kati na mokano ya Nzambe mpe mokano ya bikólo?
YEHOVA NZAMBE azali na mokano mpo na bato mpe mpo na mabelé. Bikólo mpe bazali na oyo ya bango mokano. Nzokande mikano yango ekeseni mingi mpenza! Tosengeli kokamwa na yango te mpo Nzambe alobi boye: “Lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai eleki makanisi na bino.” Mokano ya Nzambe ekozanga te kokokisama mpamba te alobi lisusu boye: “Lokola mbula mpe mbula-mpɛmbɛ ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopɔlisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe [ekolisa] yango, kopesáká mboto epai ya mokoni mpe [limpa] epai ya molei, boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; [ekomata] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo etindaki ngai yango.”—Yisaya 55:9-11.
2, 3. Loyembo ya mibale emonisi polele likambo nini, kasi yango ebimisi mituna nini?
2 Loyembo ya mibale emonisi polele ete mokano ya Nzambe mpo na Mokonzi Masiya oyo ye atye ekokokisama. Davidi, Mokonzi ya Yisalaele ya kala oyo akomaki loyembo yango, apemamaki na elimo ya Nzambe mpo na kosakola ete ekozala na eleko moko ya ntina mingi oyo bikólo bakozala na yikiyiki. Bakonzi na bango bakotɛmɛla Yehova Nzambe mpe Mopakolami na ye. Nzokande, mokomi ya nzembo ayembaki lisusu boye: “Tiká nalobela ekateli ya Yehova; alobi na ngai: ‘Ozali mwana na ngai . . . Sɛngá ngai, napesa yo bikólo ezala libula na yo mpe bandelo ya nsuka ya mabelé ezala ya yo.’”—Nzembo 2:7, 8, NW.
3 “Ekateli ya Yehova” ekozala nini mpo na bikólo? Etali bato nyonso na nini? Makambo yango ezali mpenza na ntina nini mpo na bato nyonso oyo babangaka Nzambe, oyo bazali kotánga loyembo ya mibale?
Bikólo bazali na yikiyiki
4. Ndenge nini okoloba na mokuse makanisi ya ntina ya Nzembo 2:1, 2?
4 Mpo na kolobela misala ya bikólo mpe ya bayangeli na bango, mokomi ya nzembo abandi loyembo na ye na maloba oyo: “Mpo nini bikólo bakómi na yikiyiki mpe bituluku ya bato ya bikólo bazali se kolobaloba na mongongo ya nse likambo moko ya mpambampamba? Bakonzi ya mabelé bapikami mpe bankumu basangani esika moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe kotɛmɛla mopakolami na ye.”—Nzembo 2:1, 2, NW.a
5, 6. ‘Likambo nini ya mpambampamba’ bituluku ya bikólo ya bato “bazali se kolobaloba na mongongo ya nse”?
5 ‘Likambo nini ya mpambampamba’ bituluku ya bato ya bikólo ya lelo oyo “bazali se kolobaloba na mongongo ya nse”? Na esika ya kondima Mopakolami ya Nzambe, elingi koloba Masiya to Klisto, bikólo “bazali se kolobaloba na mongongo ya nse,” to bazali se komanyola, mpo na ndenge ya kosala ete bokonzi na bango eumela. Maloba yango ya loyembo ya mibale ekokisamaki mpe na ekeke ya liboso T.B. ntango bakonzi ya Bayuda mpe ya Baloma basalaki elongo mpo na koboma Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponaki. Nzokande, kokokisama na yango monene ebandaki na 1914 ntango Yesu atyamaki Mokonzi kuna na likoló. Banda wana, ata guvɛrnema moko te awa na mabelé endimá Mokonzi oyo Nzambe atyá na kiti ya bokonzi.
6 Ntango mokomi ya Nzembo atunaki ‘mpo na nini bituluku ya bato ya bikólo bazali kolobaloba na mongongo ya nse likambo moko ya mpambampamba,’ yango elimboli nini? Mokano na bango nde ezali ya mpambampamba; ezali na ntina te mpe ekokokisama ata moke te. Bakoki te kotya kimya mpe boyokani na mabelé oyo. Kasi, bakei tii kotɛmɛla bokonzi ya Nzambe. Kutu na bomoko, baponi kobundisa Oyo-Aleki-Likoló mpe Mopakolami na ye, mpe basangani mpo na kotɛmɛla bango. Oyo nde bozoba!
Mokonzi oyo Yehova atye akolonga
7. Ndenge nini bayekoli ya liboso ya Yesu basalelaki Nzembo 2:1, 2 na libondeli na bango?
7 Bayekoli ya Yesu basalelaki maloba ya Nzembo 2:1, 2 mpo na komonisa ete etalaki ye. Ntango banyokwamaki mpo na kondima na bango, babondelaki boye: “[Yehova] Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso, yo ozali Oyo osalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango, mpe oyo na nzela ya elimo santu olobaki na monɔkɔ ya nkɔkɔ na biso Davidi, mosaleli na yo ete, ‘Mpo na nini bikólo bakómi na yikiyiki mpe bato ya bikólo bazali kokanisakanisa makambo ya mpambampamba? Bakonzi ya mabelé bapikami mpe bayangeli basangani esika moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe kotɛmɛla mopakolami na ye.’ Kutu, Elode [Antipasi] ná Ponsi Pilato ná bato ya bikólo mosusu mpe elongo na bato ya Yisalaele bayanganaki mpenza na kati ya engumba oyo mpo na kotɛmɛla mosaleli na yo mosantu Yesu, oyo yo opakolaki.” (Misala 4:24-27; Luka 23:1-12)b Ya solo, na ekeke ya liboso, basalaki likita mpo na kotɛmɛla Yesu, mosaleli oyo Nzambe apakolaki. Nzokande, loyembo oyo esengelaki kokokisama lisusu bankama ya bambula na nsima.
8. Ndenge nini Nzembo 2:3 etali bikólo ya lelo?
8 Ntango Yisalaele ya kala ezalaki na mokonzi oyo azalaki moto, na ndakisa Davidi, bikólo ya bapakano mpe bayangeli basanganaki esika moko mpo na kotɛmɛla Nzambe mpe mopakolami oyo ye atyaki na kiti ya bokonzi. Bongo ezali boni na ntango na biso? Bikólo ya lelo baboyi kotosa makambo oyo Yehova mpe Masiya bazali kosɛnga. Bikólo ya lelo baboyi kotosa masɛngami ya Yehova mpe ya Masiya. Yango wana, bamonisami lokola nde bazali koloba boye: “[Tókata bansinga na bango oyo ekangi biso, NW] mpe tóbwaka nsinga na bango mosika.” (Nzembo 2:3) Bipekiseli nyonso oyo Nzambe mpe Mopakolami na ye batye, bayangeli mpe bikólo bakotɛmɛla yango. Kasi, milende nyonso oyo ekosalema mpo na kokata bansinga wana oyo ekangi bango mpe kobwaka yango mosika ekozala mpamba.
Yehova azali kotyola bango
9, 10. Mpo na nini Yehova azali kotyola bikólo?
9 Yehova azali komitungisa te mpo na milende nyonso oyo bayangeli ya bikólo bazali kosala mpo na koyangela bango moko. Loyembo ya mibale elobi lisusu boye: “Ye oyo afandi na likoló akosɛka, Yehova ye moko akotyola bango.” (Nzembo 2:4, NW) Nzambe azali kokoba na mokano na ye lokola nde bayangeli yango bazali na ntina te. Azali kosɛka lofundo na bango mpe azali kotyola bango. Tiká bámikumisa mpo na oyo bazali kokana kosala. Mpo na Yehova, bazali lokola biloko moko ya kosɛka. Azali kosɛka botɛmɛli na bango ya mpamba.
10 Na loyembo na ye mosusu, Davidi alobeli bato mpe bikólo ya banguna mpe ayembi boye: “Yo [Yehova] Nzambe ya bibele, Nzambe ya Yisalaele, lamuká mpo na [kotya likebi epai ya, NW] mabota nyonso. Yokelá bapɛngwi mawa te. Na mpokwa nyonso bazali [kozonga, koganga] lokola mbwa, bazali kozingela mboka. Talá bazali koganga na minɔkɔ na bango, mipanga ya mopɔtu ezali na bibɛbu na bango, bango ete, Nani akoyoka biso? Nde yo, [Yehova], okosɛka bango, okotyola mabota nyonso.” (Nzembo 59:5-8) Yehova azali kosɛka lolendo mpe mobulungano ya bikólo, na ndenge bazali kotɛmɛla ye na bozoba mpenza.
11. Nini esalemaka ntango bikólo balukaka kotɛmɛla mokano ya Nzambe?
11 Maloba ya Nzembo 2 ezali kolendisa kondima na biso ete Nzambe akoki kolonga mokakatano nyonso. Tokoki kondima mpenza ete akokisaka ntango nyonso mokano na ye mpe asundolaka ata moke te basaleli na ye ya sembo. (Nzembo 94:14) Bongo nini esalemaka ntango bikólo balukaka kotɛmɛla mokano ya Yehova? Na kolanda loyembo oyo, Nzambe “akoloba na bango na nkanda na ye,” lokola na lokito makasi ya nkake. Lisusu, “na kosilika na ye” lokola mokalikali ya makasi, “akobangisa bango.”—Nzembo 2:5.
Mokonzi oyo Nzambe aponi atyami
12. Nzembo 2:6 elobeli kotyama ya nani na kiti ya bokonzi?
12 Maloba oyo Yehova alobi lisusu na nzela ya mokomi ya nzembo ebulunganisi mpenza bikólo. Nzambe alobi boye: “Ngai nafandisi mokonzi na ngai likoló na Siona, na ngomba na ngai [mosantu].” (Nzembo 2:6) Ngomba Siona ezalaki mwa ngomba moko na Yelusaleme, esika batyaki Davidi mokonzi ya Yisalaele mobimba. Kasi Mokonzi Masiya akofanda te na kiti moko ya bokonzi na kati ya engumba wana to na esika mosusu awa na mabelé. Ya solo, Yehova asili kotya Yesu Klisto Mokonzi Masiya oyo ye aponi, na Ngomba Siona ya likoló.—Emoniseli 14:1.
13. Kondimana nini Yehova asalaki elongo na Mwana na ye?
13 Sikoyo, Mokonzi Masiya azali koloba. Alobi boye: “Tiká nalobela ekateli ya Yehova [oyo asali kondimana elongo na Mwana na ye mpo na Bokonzi]; [Yehova Nzambe] alobi na ngai: ‘Ozali mwana na ngai; ngai, lelo oyo, nakómi tata na yo.’” (Nzembo 2:7, NW) Klisto alobelaki kondimana ya Bokonzi ntango ayebisaki bantoma na ye boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko.”—Luka 22:28, 29.
14. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali na lotomo mpenza ya kozala mokonzi?
14 Ndenge esakolamaki na Nzembo 2:7, Yehova andimaki ete Yesu azali Mwana na Ye na ntango ya batisimo na ye mpe na ndenge asekwisaki ye akóma na bomoi lokola ekelamu ya elimo. (Malako 1:9-11; Baloma 1:4; Baebele 1:5; 5:5) Ɛɛ, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe nde azali Mokonzi ya Bokonzi ya likoló. (Yoane 3:16) Lokola azali mokitani ya Mokonzi Davidi, Yesu azali mpenza na lotomo ya kozala mokonzi. (2 Samwele 7:4-17; Matai 1:6, 16) Loyembo yango elobi ete Nzambe ayebisi Mwana na ye boye: “Sɛngá ngai, napesa yo bikólo ezala libula na yo mpe bandelo ya nsuka ya mabelé ezala ya yo.”—Nzembo 2:8, NW.
15. Mpo na nini Yesu asɛngi bikólo ezala libula na ye?
15 Mokonzi yango, elingi koloba Mwana ya Nzambe, ye nde moto ya mibale nsima ya Yehova. Yesu azali moto oyo Yehova atyelaka motema mpo aleká na komekama mpe atikalá sembo. Lisusu, Yesu azali na libula mpamba te azali Mwana ya liboso ya Nzambe. Ya solo, Yesu Klisto “azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Esengeli kaka asɛnga mpe Nzambe ‘akopesa ye bikólo ezala libula na ye mpe bandelo ya nsuka ya mabelé ezala ya ye.’ Yesu asɛngi yango mpo azali moto oyo ‘esengo na ye ezali kati na makambo etali bana ya bato’ mpe azali na mposa makasi ya kokokisa mokano ya Tata na ye mpo na mabelé mpe mpo na bato.—Masese 8:30, 31.
Ekateli ya Yehova epai ya bikólo
16, 17. Na kotalela Nzembo 2:9, nini ekokómela bikólo?
16 Nini ekokómela bikólo awa loyembo ya mibale ezali kokokisama sikoyo, na ntango ya kozala ya Yesu oyo ezangi komonana? Mosika te, Mokonzi akokokisa maloba oyo ya Nzambe: “Okotuta bango [bikólo] na lingenda ya ebende, okobuka bango lokola mbɛki ya moyemi.”—Nzembo 2:9.
17 Na ntango ya kala, lingenda ya bakonzi ezalaki komonisa bokonzi na bango. Mangenda mosusu ezalaki ya ebende, ndenge moko na oyo elobelami na loyembo oyo. Maloba ya elilingi oyo esalelami awa ezali komonisa ndenge ekozala pɛtɛɛ mpo na Klisto, Mokonzi, abebisa bikólo. Soki babɛti makasi mbɛki ya mabelé na lingenda ya ebende, ekopanzana mpe bakokoka kobongisa yango lisusu te.
18, 19. Bakonzi ya mabelé basengeli kosala nini mpo bándimama na Nzambe?
18 Esengeli kaka bakonzi ya bikólo bábebisama ndenge wana? Te, mpo mokomi ya nzembo abondeli bango na maloba oyo: ‘Boye sikoyo, bino bakonzi, bózala na [bososoli, NW]; bóyoka toli, bino basambisi ya mokili.’ (Nzembo 2:10) Basɛngi bakonzi báyoka, básalela bososoli. Esengeli bámona ndenge mikano na bango ezali mpamba, na bokeseni na makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bolamu ya bato.
19 Mpo Nzambe andima bango, bakonzi ya mabelé basengeli kobongola bomoi na bango. Bakebisi bango ete ‘básalela Yehova mosala na [bobangi, NW], básepela nde na kolɛngalɛnga.’ (Nzembo 2:11) Bongo soki basali yango? Na esika bázala na yikiyiki, to na mobulungano na makanisi, bakosepela na elikya oyo Mokonzi Masiya akopesa bango. Ekosɛnga bakonzi ya mabelé bátika lolendo mpe lofundo oyo bazali kolakisa na bokonzi na bango. Lisusu, ekosɛnga bábongwana nokinoki mpe básosola ete bokonzi ya Yehova ezali na bonene oyo ekokani na mosusu te mpe ete nguya ya Nzambe mpe ya Mokonzi Masiya oyo ye aponi eleki nyonso.
‘Bópwɛpwa mwana’
20, 21. ‘Kopwɛpwa mwana’ elimboli nini?
20 Sikoyo, na boboto mpenza, loyembo ya mibale esɛngi likambo moko epai ya bakonzi ya bikólo. Na esika básangana esika moko mpo na kotɛmɛla Nzambe, bapesi bango toli oyo: “Bópwɛpwa mwana, noki Ye [Yehova Nzambe] asilika mpe bókufa mosika na nzela, mpo nkanda na ye epelaka noki.” (Nzembo 2:12a, NW) Ntango Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso abimisi ekateli moko, esengeli kotosa ye. Ntango Nzambe atyaki Mwana na ye na kiti ya bokonzi, bakonzi ya mabelé basengelaki kotika “kolobaloba na mongongo ya nse likambo moko ya mpambampamba.” Basengelaki mbala moko kondima Mokonzi mpe kotosa ye mpenza.
21 Mpo na nini basengeli ‘kopwɛpwa mwana’? Ntango loyembo oyo ekomamaki, kopwɛpwa moto ezalaki elembo ya boninga mpe bazalaki kopwɛpwa bapaya oyo bayei na ndako, esika bakokaki koyambama malamu. Kopwɛpwa moto ekokaki mpe kozala elembo ya bosembo. (1 Samwele 10:1) Na vɛrsɛ oyo ya loyembo ya mibale, Nzambe azali kopesa bikólo etinda ete bápwɛpwa, to báyamba, Mwana na ye ete azali Mokonzi oyo apakolami.
22. Likebisi nini bayangeli ya bikólo basengeli kotosa?
22 Baoyo bazali koboya kondima bokonzi ya Mokonzi oyo Nzambe aponi bazali kofinga Yehova. Bazali koboya lotomo ya Yehova ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba mpe bokonzi na ye ná likoki na ye ya kopona Mokonzi ya malamu koleka mpo na koyangela bato. Bakonzi ya bikólo bakomona ete nkanda ya Nzambe ekokwela bango pwasa, ntango bazali koluka kokokisa mikano na bango moko. “Nkanda na ye epelaka noki,” to engalaka noki mpe moto moko te akoki kotɛmɛla yango. Bayangeli ya bikólo basengeli kondima likebisi yango na botɔndi mpenza mpe kosalela yango. Kosala bongo ekobikisa bomoi na bango.
23. Ntango ezali naino mpo moto na moto asala nini?
23 Loyembo oyo ya kokamwa esuki boye: “Esengo na baoyo nyonso bazali komibomba epai na ye [Yehova].” (Nzembo 2:12b, NW) Ntango ezali naino mpo moto na moto aluka kobatelama. Ezali bongo ata mpo na mokonzi mokomoko, oyo azali kopesa mabɔkɔ na mikano ya bikólo. Bakoki kokima epai ya Yehova, oyo azali kopesa esika ya kobombama na nse ya boyangeli ya Bokonzi na ye. Kasi basengeli kosala yango liboso Bokonzi ya Masiya ebuka bikólo oyo ezali kotɛmɛla yango.
24. Ata na mokili oyo etondi na yikiyiki, ndenge nini tokoki kozala na bomoi moko ya esengo mingi koleka?
24 Soki tozali koyekola Makomami na molende mpenza mpe tozali kosalela toli na yango na bomoi na biso, tokoki kozala na bomoi moko ya esengo mingi koleka ata sikoyo, na mokili oyo etondi na yikiyiki. Kosalela toli ya Makomami esalaka ete boyokani mpe esengo ezala na kati ya libota mpe esilisaka ebele ya mitungisi mpe ya makambo oyo ebangisaka bato na mokili oyo. Kolanda mitinda ya Biblia endimisaka biso ete tozali kosepelisa Mozalisi. Moto mosusu te kaka Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ nde akoki kopesa ndanga “ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya” nsima ya kolongola na mabelé bato oyo bazali kotɛmɛla oyo ezali sembo na ndenge bazali koboya boyangeli ya Bokonzi na ye.—1 Timote 4:8.
25. Lokola “ekateli ya Yehova” ekozanga te kokokisama, nini tokoki kozela esalema na ntango na biso?
25 “Ekateli ya Yehova” ekozanga te kokokisama. Lokola azali Mozalisi na biso, Nzambe ayebi oyo eleki malamu mpo na bato mpe akokokisa mokano na ye ya kopesa bato ya botosi kimya, esengo, mpe libateli ya libela na libela na nse ya Bokonzi ya Mwana na ye ya bolingo. Mpo na oyo etali ntango na biso, mosakoli Danyele akomaki boye: “Na mikolo ya [bakonzi] yango Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa [bikonzi] oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Yango wana, ntango yango oyo mpenza ya ‘kopwɛpwa Mwana’ mpe ya kosalela Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ebandeli, Mokonzi Davidi nde azalaki “mopakolami” mpe “bakonzi ya mabelé” ezalaki bayangeli ya Bafilisitia oyo bayanganisaki basoda na bango mpo na kobundisa ye.
b Bavɛrsɛ mosusu ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ezali mpe komonisa ete Yesu azali Mopakolami ya Nzambe oyo loyembo ya mibale elobeli. Yango emonani polele soki tokokanisi Nzembo 2:7 ná Misala 13:32, 33 mpe Baebele 1:5; 5:5. Talá mpe Nzembo 2:9 ná Emoniseli 2:27.
Okopesa eyano nini?
• ‘Likambo nini ya mpambampamba’ bituluku ya bato ya bikólo “bazali se kolobaloba na mongongo ya nse”?
• Mpo na nini Yehova azali kotyola bikólo?
• Ekateli ya Nzambe epai ya bikólo ezali nini?
• ‘Kopwɛpwa mwana’ elimboli nini?
[Elilingi na lokasa 16]
Davidi ayembaki mpo na Mokonzi Masiya oyo akolonga
[Elilingi na lokasa 17]
Bakonzi mpe bato ya Yisalaele basalelaki Yesu Klisto likita
[Elilingi na lokasa 18]
Klisto atyami Mokonzi na Ngomba Siona ya likoló