Jéhovah akoboya motema motutami te
“Makabo mazali malamu na miso na Nzambe ezali elimo etutami; ɛ Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.”—NZEMBO 51:17.
1. Lolenge nini Jéhovah azali kotalela basaleli na ye oyo basali lisumu monene kasi babongoli motema?
JÉHOVAH akoki ˈkomizipa na lipata kino malombo makoleka te.ˈ (Bileli 3:44) Kasi alingi ete basaleli na ye babelema na ye. Ata soki moko na basaleli na ye asali lisumu monene kasi abongoli motema, Tata na biso ya likolo akokanisa misala malamu na moto yango. Yango wana, ntoma Paulo alobaki na baninga na ye baklisto ete: “Mpo ete Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.”—Baebele 6:10.
2, 3. Bankulutu baklisto basengeli kokanisa na nini wana bazali kotalela likambo na baninga na bango bandimi baoyo basali lisumu?
2 Bankulutu kati na lisanga ya boklisto basengeli mpe kotalela mibu mingi ya bosembo oyo baninga na bango bandimi balekisi na mosala ya Nzambe. Yango esangisi mosala ya bulee oyo mosumuki oyo abongoli motema asalaki liboso ete anyata litambe mabe to asala lisumu monene. Bakengeli na bampate baklisto basengeli koluka matomba ya elimo na baoyo nyonso bazali kati na etonga na Nzambe.—Bagalatia 6:1, 2.
3 Mosumuki oyo abongoli motema azali na mposa ya bolimbisi ya Jéhovah. Nzokande, ezali kosenga makambo mingi. Yango emonisami polele na maloba na Davidi kati na Nzembo 51:10-19.
Esengeli kozala na motema peto
4. Mpo na nini Davidi abondelaki mpo na kozwa motema ya peto mpe elimo ya sika?
4 Soki moklisto moko oyo amipesi azwami na mokakatano na elimo na ntina ya lisumu, akoki kozala na mposa na nini, longola motema mawa mpe bolimbisi na Jéhovah? Ya solo, Davidi abondelaki ete: “Ɛɛ Nzambe, zalisela ngai motema na peto, mpe pesa ngai elimo na sika na boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Ezali polele ete, Davidi asalaki malombo wana mpo asosolaki ete bopusi oyo ememaki ye na lisumu monene ezalaki naino kati na motema na ye. Mbala mosusu tokwei te na lolenge ya lisumu oyo Davidi asalaki na likambo ya Bata-Seba mpe Uliya, kasi tozali na mposa ya lisalisi ya Jéhovah mpo na kokima masenginya oyo ekoki komema biso na lisumu monene. Mpo na yango, tokoki biso moko kozala na mposa ya lisalisi na Nzambe mpo na kolongola na motema na biso bolembu lokola bilulela mpe koyina— mabe oyo ekokani na moyibi mpe koboma moto.—Bakolose 3:5, 6; 1 Yoane 3:15.
5. (a) Kozala na motema ya peto elimboli nini? (b) Davidi azalaki koluka nini wana asengaki elimo ya sika?
5 Jéhovah azali kosenga ete basaleli na ye bazala na “motema ya peto,” elingi koloba ete mokano to makanisi na bango esengeli kozala ya peto. Wana asosolaki ete azalaki na bopeto lolenge yango te, Davidi abondelaki ete Nzambe apetola motema na ye mpe atya yango na boyokani na mitinda na Ye. Mokomi na Nzembo alingaki lisusu ete elimo to nguya oyo ezali kopusa elimo na ye ezala ya sika mpe ya sembo. Azalaki na mposa ya elimo oyo ekosalisa ye na kolonga masenginya mpe kokangama makasi na mibeko mpe mitinda ya Jéhovah.
Elimo santu ezali na ntina monene
6. Mpo na nini Davidi asengaki ete Jéhovah alongwela ye elimo santu te?
6 Wana tozwami kati na kozanga elikya mpo na mabunga mpe mabe na biso, tokoki koyoka lokola ete Nzambe alingi kobwaka biso mpe kolongola biso elimo santu na ye, to nguya na ye oyo esalaka mosala. Davidi amiyokaki bongo, yango wana asengaki na Jéhovah ete: “Bwaka ngai mosika na elongi na yo te mpe longwela ngai elimo na yo na bulee te.” (Nzembo 51:11) Davidi oyo aokaki mawa mpe amonisaki komisokisa aokaki lokola abongi lisusu te kosalela Jéhovah mpo na masumu na ye. Kobwakama mosika na elongi na Nzambe ekolimbola kobungisa ngolu, libondisi mpe mapamboli na ye. Mpo ete Davidi akoka kozongela kolongono na elimo, asengelaki kozwa elimo santu ya Jéhovah. Elongo na yango, mokonzi wana akokaki koluka etambwiseli na Nzambe kati na libondeli mpo akoka kosepelisa Jéhovah, kokima lisumu mpe koyangela na mayele. Lokola azalaki koyeba masumu na ye epai na Mopesi ya elimo santu, na lolenge ebongi Davidi asengaki ete Jéhovah alongwela ye elimo yango te.
7. Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na kozwa elimo santu mpe komisenzela ete tookisa yango mawa te?
7 Bongo ezali boni mpo na biso? Tosengeli kosenga elimo santu kati na libondeli mpe komibatela ete tookisa yango mawa te na koboya kolanda etambwiseli na yango. (Luka 11:13; Baefese 4:30) Soki bongo te, tokobungisa elimo yango mpe tokokoka te komonisa mbuma na yango oyo Nzambe azali kopesa, lokola bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema. Jéhovah Nzambe akolongola solo elimo na ye epai na biso soki tozali kosala lisumu epai na ye kozanga ete tobongola motema.
Esengo na kobikisama
8. Soki tosali lisumu mpe tolingi kozwa lisusu esengo ya kobikisama, tosengeli kosala nini?
8 Wana mosumuki oyo abongoli motema azali kozongela kolongono na ye ya elimo, akoki lisusu kosepela kati na bibongiseli oyo Jéhovah akamataki mpo na kobikisama. Lokola aokaki mposa makasi mpo na yango, Davidi abondelaki Nzambe ete: “Zongisela ngai esengo na kobikisa na yo mpe simba ngai na elimo ebongi.” (Nzembo 51:12) Oyo nde esengo na kosepela na elikya ya solo ya kobikisama na Jéhovah Nzambe! (Nzembo 3:8) Nsima na kosala lisumu epai na Nzambe, Davidi alukaki kozwa lisusu esengo na kobikisama oyo euti epai na Ye. Na nsima, Jéhovah apesaki kobikisama na nzela ya lisiko ya mbeka ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Soki biso baoyo tozali basaleli bamipesi na Nzambe tosali lisumu monene, kasi tolingi kozwa lisusu esengo ya kobikisama, tosengeli komonisa elimo ya kobongola motema mpe tosengeli te kosala lisumu na motindo ya kotuka elimo santu.—Matai 12:31, 32; Baebele 6:4-6.
9. Davidi azalaki kosenga nini wana abondelaki ete Nzambe, asimba ye na elimo ebongi”?
9 Davidi asengaki ete Jéhovah asimba ye “na elimo ebongi.” Ezali polele ete, awa alobelaki te na ntina na motema malamu na Nzambe mpo na kopesa ye lisalisi, to na elimo santu na ye, kasi alobelaki nguya oyo ezali kopusa elimo na ye [Davidi]. Davidi alingaki ete Nzambe asalisa ye na kopesaka ye elimo ya kosala oyo ezali sembo kasi ya kokwea lisusu na lisumu te. Jéhovah Nzambe asalisaka basaleli na ye ntango nyonso mpe atombolaka baoyo bangunzami mpo na mikakatano ndenge na ndenge. (Nzembo 145:14) 0yo nde libondisi na koyeba yango, mingimingi soki tosalaki lisumu mpe tozali kooka mawa mpe tolingi kosalela Jéhovah na bosembo nyonso mpo na libela!
Tokoteya basumuki eloko nini?
10, 11. (a) Davidi alingaki koteya nini epai na Bayisraele basumuki? (b) Davidi akokaki koteya basumuki bobele nsima ya kosala nini ye moko?
10 Soki Nzambe apesi ye nzela, mbele Davidi alingaki na bolingo nyonso kosala likambo moko oyo ekomonisa botondi na ye mpo na motema mawa na Jéhovah mpe alingaki kosalisa basusu. Kobondelaka Jéhovah na nguya nyonso, mokonzi oyo abongoli motema alobaki ete: “Bongo nakoteya nzela na yo epai na baoyo bakopengwaka yango, mpe bato na masumu bakobutwa epai na yo.” (Nzembo 51:13) Lolenge nini mosumuki Davidi akokaki koteya baoyo bapengwi na Mibeko na Nzambe? Alingaki koloba na bango nini? Mpe elingaki kopesa litomba nini?
11 Wana alingaki komonisa na Bayisraele bapengwi banzela ya Jéhovah na elikya ya kolongola bango na mabe, Davidi alingaki komonisa na bango na meko nini lisumu lizali mabe, ndimbola ya kobongola motema mpe lolenge nini bakoki kozwa litomba na mawa na Nzambe. Lokola ayebaki mpasi oyo eutaka na kozanga kondimama na Jéhovah mpe na mitungisi ya lisosoli, Davidi asengelaki kozala moteyi ya motema mawa epai na basumuki oyo babongoli motema mpe bazali na motema motutami. Na lolenge ebongi, akokaki kosalela ndakisa na ye mpo na koteya basusu bobele nsima na kondima mitinda ya Jéhovah mpe nsima na kozwa bolimbisi na Ye, mpo ete baoyo bazali koboya kotosa masengami ya Nzambe bazali na lotomo te ya ˈkosakola maloba na Nzambe.ˈ—Nzembo 50:16, 17.
12. Litomba nini Davidi azwaki na koyeba ete Nzambe asikolaki ye na lisumu ya koboma moto?
12 Davidi azongelaki mokano na ye na lolenge mosusu, wana alobaki ete: “Ɛɛ Nzambe, sikola ngai na ekweli na makila masopami, Nzambe na kobika na ngai, mpe lolemo na ngai ekokumisa boyengebene na yo.” (Nzembo 51:14) Ekweli ya kosopa makila ememaka etumbu ya liwa. (Genese 9:5, 6) Na bongo likambo ya koyeba ete Nzambe na kobikisa na ye asili kosikola ye na ekweli ya kosopa makila na likambo na Uliya, elingaki kopesa Davidi kimya ya motema mpe ya elimo. Lolemo na ye ekokaki bongo koyemba na esengo nyonso boyengebene na Nzambe, kasi ya ye moko te. (Mosakoli 7:20; Baloma 3:10) Davidi akokaki te kolongola ekobo oyo asalaki to kozongisa Uliya na bomoi; bobele bongo, lelo oyo moto moko te akoki kozongisa bopeto na moseka oyo ye abebisi to kosekwisa moto oyo ye abomi. Ebongi ete tokanisa na likambo yango na ntango oyo tomekami. Mpe tosengeli solo kosepela na motema mawa oyo Jéhovah asili komonisa epai na biso kati na boyengebene! Ya solo, botondi esengeli kopusa biso na komema basusu epai na Liziba ya boyengebene mpe ya bolimbisi.
13. Na nzela nini mosumuki akoki kofungola bibebu na ye na bosembo nyonso mpo na kokumisa Jéhovah?
13 Mosumuki moko te azali na lotomo ya kofungola bibebu na ye mpo na kokumisa Jéhovah, bobele soki motema mawa na Nzambe epesi ye nzela na kozipola yango, elingi koloba mpo na koyebisa solo na Ye epai na basusu. Yango wana Davidi ayembaki ete: “Ɛɛ Jéhovah, zipola bibebu na ngai mpe monoko na ngai ekosakola lokumu na yo.” (Nzembo 51:15) Na lisosoli lipetolami mpo na bolimbisi na Nzambe, Davidi alingaki kopusama na kolakisa basumuki banzela ya Jéhovah, mpe akokaki koyemba nkembo na Ye na bonsomi nyonso. Baoyo nyonso bazwaki bolimbisi na masumu na bango lokola Davidi basengeli komonisa botondi mpo na ngolu na Jéhovah epai na bango, mpe basengeli kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola solo ya Nzambe mpe ˈkokumisa boyengebene na ye.ˈ—Nzembo 43:3.
Mbeka oyo Nzambe akoki kondima
14. (a) Bambeka nini esengamaki na kondimana ya Mibeko? (b) Mpo na nini ezali libunga na kokanisa ete tokoki kofuta etamboli mabe na biso na kosala mwa misala ya malamu?
14 Davidi asilaki kozwa bososoli ya mozindo oyo etindaki ye na koloba ete: “Soko olingaka mbeka, mbele napesi yo yango, nde yo [Jéhovah] okosepelaka na makabo na kotumba te.” (Nzembo 51:16) Kondimana na Mibeko ezalaki kosenga ete bambeka ya nyama ya kotumba epesama na Nzambe. Kasi masumu na Davidi etali ekobo mpe koboma moto, oyo ezalaki kosenga etumbu ya kufa, ekokaki kolimbisama na nzela ya mbeka motindo wana te. Soko bongo, mbele Davidi alingaki kotanga te motuya ya banyama oyo akopesa mbeka epai na Jéhovah. Soko kobongola motema ya solo ezali te, bambeka ezali na motuya moko te. Na yango ekozala libunga na kokanisa ete tokoki kofuta etamboli mabe na biso na kosalaka mwa misala malamu.
15. Wapi ezaleli na moto amipesi oyo azali na motema motutami?
15 Davidi abakisaki ete: “Makabo mazali malamu na miso na Nzambe ezali elimo etutami; ɛ Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nzembo 51:17) Mpo na mosumuki oyo abongoli motema, “makabo mazali malamu na miso na Nzambe,” oyo akoki kondima ezali “elimo etutami.” Moto motindo wana azali na elimo ya kowelana te. Motema na moto oyo amipesi mpe azali na elimo etutami etungisami mingi mpo na lisumu na ye azali na komikitisa mpo ayebi ete andimami na Nzambe te, mpe azali pene ya kosala nyonso mpo na kozongela ngolu na Nzambe. Tokoki kopesa Nzambe eloko moko te ya motuya kino ntango tokobongola motema na masumu na biso mpe tokopesa ye motema na biso mobimba.—Nahumu 1:2.
16. Lolenge nini Nzambe atalelaka moto oyo azali na motema motutami mpo na lisumu na ye?
16 Nzambe akoboya te mbeka lokola motema motutami mpe na mawa. Mpo na yango, biso basaleli na ye, atako tokutani na mikakatano nini mpo ete tozali libota na ye, tika ete tozanga elikya te. Soki tobeti libaku na nzela ya bomoi na lolenge moko to mosusu oyo etindi motema na biso na kobelela mpo na motema mawa na Nzambe, tokanisa te ete elikya nyonso esili. Ata soki tosali lisumu monene kasi tobongoli motema, Jéhovah akotyola te motema na biso motutami. Akolimbisa biso mpo na mbeka ya lisiko na Klisto mpe akozongisela biso ngolu na Ye. (Yisaya 57:15; Baebele 4:16; 1 Yoane 2:1) Nzokande, mabondeli na biso masengeli kozala na mokano lokola oyo ya Davidi, kozongela ngolu na Nzambe kasi te mpo na kokima mpamela to etumbu oyo tosengeli na yango. Nzambe alimbisaki Davidi, kasi apesaki ye mpe etumbu.—2 Samwele 12:11-14.
Tomibanzabanza mpo na losambo na peto
17 Longola likambo ya kobondela Nzambe mpo na bolimbisi, basumuki basengeli kosala nini?
17 Soki tosali lisumu monene, na ntembe te ekotungisa mingi lisosoli na biso, mpe motema motungisami ekopusa biso na kosenga bolimbisi ya Nzambe. Nzokande, tosengeli mpe kobondela mpo na basusu. Atako Davidi azalaki na mposa ya kopesa lisusu Nzambe losambo oyo akoki kondima, kati na loyembo na ye abosanaki basusu te mpo na moimi. Loyembo yango ezali na malombo oyo epai na Jéhovah: “Na ngolu na yo, salela Siona malamu, tonga lisusu mapango na Yelusaleme.”—Nzembo 51:18.
18. Mpo na nini Davidi oyo abongolaki motema abondelaki mpo na Siona?
18 Ya solo Davidi alingaki kozongela ngolu na Nzambe. Nzokande, libondeli ya mokomi na Nzembo wana mosokemi elobeli lisusu ˈngolu na Nzambe mpo na kosala malamu epai na Siona,ˈ mbokamokonzi ya Yisraele, Yelusaleme, epai Davidi azalaki na elikya ya kotonga tempelo ya Nzambe. Masumu minene ya Davidi matyaki libota mobimba na likama, mpo ete libota mobimba bazwaki mpasi mpo na mabe na mokonzi. (Tala 2 Samwele, mokapo 24.) Ya solo, masumu na ye malembisaki “mapango ya Yelusaleme,” na boye ete esengelaki kotonga yango lisusu.
19. Soki tosalaki lisumu kasi tozwi bolimbisi, esengeli na biso kobondela lisusu mpo na eloko nini?
19 Soki tosalaki lisumu monene kasi tozwi bolimbisi na Nzambe, ekozala malamu ete tobondela mpo ete akoka na lolenge moko to mosusu kobongisa mbeba oyo mabe na biso ebimisaki. Ekoki kozala ete tobwakaki nsoni likolo na nkombo na ye mosantu, to tolembisaki lisanga mpe tomemi mpasi kati na libota na biso. Tata na biso ya bolingo oyo azali na likolo akolongola nsoni nyonso ebwakami na nkombo na ye, akoki kolendisa lisanga na nzela na elimo santu na ye mpe akoki kobondisa balingami na biso baoyo balingi ye mpe bazali kosalela ye. Ezala na likambo ya lisumu to te, tosengeli ntango nyonso komibanzabanza mpo na kobulisama na nkombo na Jéhovah mpe mpo na bolamu na libota na ye.—Matai 6:9.
20. Jéhovah alingaki kosepela na mbeka mpe makabo ya Yisraele bobele soki bakokisaki masengami nini?
20 Soki Jéhovah atongi mapango ya Siona likambo nini mosusu elingaki kosalema? Davidi ayembaki ete: “Bongo okosepela [Jéhovah] na makabo na boyengebene na mbeka na kotumba mpe na mbeka mobimba. Bongo bakobomela yo ngombe mibali na etumbelo na yo.” (Nzembo 51:19) Davidi azalaki na mposa makasi ete ye mpe libota mobimba bazwa ngolu na Jéhovah mpo ete bakoka kosambela Ye na lolenge lobongi. Bongo Nzambe alingaki kosepela lisusu na mbeka na bango ya kotumba mpe na makabo mobimba na libota na ye. Esengelaki kozala bongo mpo ete yango elingaki kozala makabo na boyengebene mapesami na bato bamipesi bato ya sembo mpe babongoli motema baoyo bazali na ngolu ya Nzambe. Mpo na komonisa botondi mpo na motema mawa ya Jéhovah balingaki kotumba ngombe mibali likolo na etumbelo na ye— bambeka eleki kitoko mpe ya motuya mingi. Lelo oyo tozali kokumisa Jéhovah ntango tozali komemela ye bozwi boleki kitoko oyo tozali na yango. Mpe makabo na biso masangisi “bana ya ngombe mibali ya bibebu na biso” mbeka ya masanzoli epai na Nzambe na biso ya motema mawa Jéhovah.—Hoseya 14:2, MN; Baebele 13:15.
Jéhovah akoyokaka bileli na biso
21, 22. Nzembo 51 ezali na makamho nini oyo tokoki kozwa na yango litomba?
21 Mabondeli mozindo na Davidi kati na Nzembo 51 mamonisi ete tosengeli kobongola solo motema na lisumu. Nzembo yango ezali mpe na liteya ya ntina mpo na litomba na biso. Na ndakisa soki tosali lisumu mpe tobongoli motema tokoki kolikya na motema mawa ya Nzambe. Nzokande tomibanzabanza liboso mpo na nsoni oyo ebwakami likolo na nkombo na Jéhovah. (Versets 1-4) Lokola Davidi, tokoki kobondela Tata na biso ya likolo ete ayokela biso mawa na ntina na kozanga kokoka oyo tobotami na yango. (Verset 6) Tosengeli koloba solo mpe tosengeli koluka mayele mauti na Nzambe. (Verset 6) Soki tosali lisumu tosengeli kobondela Jéhovah mpo na kopetolama, mpo na kozwa motema ya peto mpe elimo ya boyengebene.—Versets 7-10.
22 Kati na Nzembo 51 tozali lisusu komona ete tosengeli te koyeisa motema na biso makasi kati na lisumu. Soki tokosala bongo Jéhovah akolongola epai na biso elimo santu to nguya na ye oyo ekosalaka mosala. Nzokande na lisalisi ya elimo na Nzambe tokoki kolonga koteya epai na basusu banzela na ye. (Versets 11-13) Soki tosali libunga kasi tobongoli motema Jéhovah akopesa biso nzela ete tolanda kokumisa ye mpo ete akoboya motema motutami mpe na mawa te. (Versets 14-17) Nzembo wana ezali komonisa lisusu ete mabondeli na biso masengeli kotalela bobele biso moko te. Kasi tosengeli lisusu kobondela mpo na mapamboli mpe bolamu ya elimo ya baoyo nyonso bazali kati na losambo ya peto ya Jéhovah.—Versets 18 19.
23. Mpo na nini Nzembo 51 esengeli koyikisa biso mpiko mpe kopesa biso elikya?
23 Nzembo oyo esimbi motema oyo ekomamaki na Davidi esengeli kopesa biso mpiko mpe elikya. Ezali kosalisa biso na kososola ete tosengeli te kokanisa ete elikya nyonso esili wana tokweyi na lisumu. Mpo na nini? Mpo ete soki tobongoli motema mawa na Jéhovah ekoki kobikisa biso na kozanga elikya. Soki tokooka mawa mpe tokomipesa mobimba epai na Tata na biso ya likolo akoyoka bileli na biso mpo na motema mawa na ye. Oyo nde libondisi na koyeba ete Jéhovah akoboya motema motutami te!
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini baklisto bazali na mposa ya motema peto mpe ya elimo santu ya Nzambe?
◻ Moto oyo abongoli motema akoki koteya nini epai na baoyo bazali kobuka mibeko na Jéhovah?
◻ Lolenge nini Jéhovah atalelaka motema matutami mpe na mawa?
◻ Mateya nini tokoki kozwa kati na Nzembo 51?
[Elilingi na lokasa 15]
Osengaka elimo santu mpe osenzelaka ete ookisa yango mawa te?
[Elilingi na lokasa 17]
Tomonisa botondi mpo na ngolu ya Jéhovah na kosakoláká solo na ye