Tózala na molende mpo na losambo ya solo
“Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.”—MAT. 9:37.
1. Moto akómaka ndenge nini soki azali na likambo oyo esengeli kosalema nokinoki?
OZALI na mokanda moko oyo moto asengeli kotyela yango likebi kaka na mokolo yango. Okosala nini? Na likoló na yango, okomi maloba oyo emonisi ete basengeli kotyela yango likebi nokinoki! Bazali kozela yo na esika moko ya ntina, kasi ozali na retare. Okosala nini? Oyebisi sofɛlɛ ete: “Welisá, nazali kowelela ngonga.” Ya solo, ntango ozali na mosala moko oyo esengeli kosalema mpe ngonga ezali koleka, okokóma motema likolólikoló mpe mɔtɔmɔtɔ. Okoyoka makila epanzani na nzoto mpe okobanda kosala mbangumbangu mpe na makasi nyonso. Ozali na likambo oyo esengeli kosalema nokinoki!
2. Mosala nini bakristo ya solo basengeli mpenza kosala nokinoki lelo?
2 Mpo na bakristo ya solo lelo, mosala moko te esengeli kosalema nokinoki koleka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Na Evanzile ya Marko, Yesu alobaki ete mosala yango esengeli kosalema “liboso” nsuka eya. (Mrk. 13:10) Ya solo, esengeli kozala bongo. Yesu alobaki boye: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.” Mbuma ya kobuka ezelaka te; esengeli kobuka yango liboso eleko ya kobuka mbuma esila.—Mat. 9:37.
3. Lokola mosala ya kosakola esengeli kosalema nokinoki, bato mingi basali nini?
3 Lokola mosala ya kosala ezali na ntina mingi ndenge wana mpo na biso, esengeli tópesa yango ntango na biso, makasi na biso, mpe tótyela yango likebi mpenza. Longonya mpenza na bandeko mingi, mpo bazali kosala bongo. Bamosusu bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo básala mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela to bamisionɛrɛ, to kokende kosala na Betele. Bazalaka na mingi ya kosala. Mbala mosusu bamipimelaka makambo mingi, mpe bakutanaka na mikakatano mingi. Kasi, Yehova apambolaka bango mingi. Tosepelaka mpo na bango. (Tángá Luka 18:28-30.) Basusu, lokola bakoki te kokóma basakoli ya ntango nyonso, bazali kolekisa ntango mingi oyo bakoki na mosala yango oyo ebikisaka bato, oyo esɛngaka mpe kosalisa bana na biso mpo bábika.—Mib. 6:6, 7.
4. Mpo na nini bato mosusu basalaka lokola kobosana ete mikolo etikali ya kotánga?
4 Ndenge touti komona yango, mbala mingi esɛngaka kosala likambo nokinoki soki bapesi ntango oyo likambo yango esengeli kosalema to kosila. Tozali na ntango ya nsuka, mpe tozali na bilembeteli mingi oyo ezali komonisa yango, ezala na Biblia to na makambo ya mokili. (Mat. 24:3, 33; 2 Tim. 3:1-5) Atako bongo, moto moko te ayebi ntango mpenza oyo nsuka ekoya. Ntango alobelaki makambo oyo ekozala “elembo” oyo ekomonisa “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” Yesu alobaki polele boye: “Kasi mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Mat. 24:36) Lokola ezali bongo, bato mosusu bakoki kozala na mokakatano ya kobatela na makanisi mbula na mbula ete mikolo etikali ya kotánga, mingimingi soki bazali kozela banda kala. (Mas. 13:12) Yo mpe omonaka bongo na bantango mosusu? Nini ekoki kosalisa biso tóyeba ete mosala oyo Yehova Nzambe ná Yesu Kristo balingi tósala lelo esengeli kosalema nokinoki mpe tókoba kotalela yango ndenge wana?
Tómekola Yesu, Ndakisa na biso
5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki ete asengeli kosala mosala na ye nokinoki?
5 Na bato nyonso oyo bamonisaki ete esengeli kosala mosala ya Nzambe nokinoki, na ntembe te, Yesu nde ndakisa ya libosoliboso. Ntina moko oyo asalaki nokinoki ezalaki ete azalaki na mingi ya kosala kasi ntango ezalaki mokuse—mbula misato ná ndambo mpamba. Atako bongo, Yesu asalaki mingi na losambo ya solo koleka moto mosusu nyonso. Alakisaki bato nkombo mpe mokano ya Tata na ye, asakolaki nsango malamu ya Bokonzi, abimisaki polele bokosi mpe mateya ya lokuta ya bakonzi ya mangomba, mpe asimbaki bokonzi ya Yehova, tii na liwa. Asalaki milende mpenza na ndenge atambolaki mboka mobimba: azalaki koteya, kosalisa bato, mpe kobikisa bamosusu. (Mat. 9:35) Moto mosusu te asalá makambo ebele bongo na ntango mokuse ndenge wana. Yesu asalaki mosala makasi koleka moto mosusu nyonso.—Yoa. 18:37.
6. Yesu atyaki makanisi na ye na likambo nini?
6 Nini etindaki Yesu asala mosala na ye malamumalamu kozanga kolɛmba? Na lisalisi ya esakweli ya Danyele, na ntembe te Yesu ayebaki ntango boni akosala mosala na ye na kolanda manaka ya Yehova. (Dan. 9:27) Na yango, ndenge esakolamaki, bomoi na ye na mabele esengelaki kosuka “na katikati ya pɔsɔ,” to nsima ya mbula misato na ndambo. Mwa moke nsima ya kokɔta na Yerusaleme lokola mokonzi na prɛnta ya mobu 33 T.B., Yesu alobaki boye: “Ngonga ekoki mpo Mwana ya moto azwa nkembo.” (Yoa. 12:23) Atako Yesu ayebaki ete liwa na ye ekómi pene, akómaki kotya makanisi na ye nyonso kaka na likambo yango te; ekómaki te ntina oyo asengeli kosala mosala makasi. Kasi, azalaki nde koluka kosalela libaku nyonso oyo azwi mpo na kosala mokano ya Tata na ye mpe komonisela bato mosusu bolingo. Bolingo yango etindaki ye asangisa bayekoli mpe apesa bango formasyo, atindaki bango bákende kosakola. Asalaki bongo mpo bákoka kokoba kosala mosala oyo abandaki mpe kosala misala ya minene koleka oyo ye moko asalaki.—Tángá Yoane 14:12.
7, 8. Bayekoli ya Yesu basalaki nini ntango Yesu apɛtolaki tempelo, mpe mpo na nini Yesu asalaki bongo?
7 Likambo moko oyo esalemaki na bomoi ya Yesu emonisaki polele molende oyo azalaki na yango. Ezalaki na ebandeli ya mosala na ye, na ntango ya Elekeli ya mobu 30 T.B. Yesu ná bayekoli na ye bayaki na Yerusaleme mpe na tempelo, amonaki “baoyo bazalaki kotɛka bangɔmbɛ ná bampate ná bibenga mpe bato oyo basenzaka mbongo, bafandi na bakiti na bango.” Yesu asalaki nini mpe etindaki bayekoli na ye bákanisa nini?—Tángá Yoane 2:13-17.
8 Na libaku yango, makambo oyo Yesu asalaki mpe alobaki ezongisaki na makanisi ya bayekoli na ye maloba ya esakweli oyo Davidi ayembaki na nzembo na ye moko ete: “Molende mpo na ndako na yo elei ngai.” (Nz. 69:9) Mpo na nini? Mpo makambo oyo Yesu asalaki ekokaki komemisa ye ngambo mpe kotya ye na likama. Mpo bakonzi ya tempelo—banganga-nzambe, bakomeli, mpe bato mosusu—nde bazalaki kotinda bato básala likambo ya nsɔni ndenge wana, mombongo na tempelo. Yesu amikómisaki monguna ya bakonzi wana ya mangomba na ndenge amonisaki polele mayele mabe na bango. Ndenge bayekoli balobaki solo na likambo yango, ‘molende na ye mpo na ndako ya Nzambe,’ to molende mpo na losambo ya solo, emonanaki polele mpenza. Kasi, molende ezali nini? Kozala na molende mpe kosala nokinoki ezali makambo mibale oyo ekeseni?
Kosala nokinoki ná kozala na molende
9. Ndenge nini tokoki kolimbola liloba molende?
9 Diksionɛrɛ moko elobi ete molende elimboli “kozala na mposa makasi mpe kosepela mingi kosala likambo moko,” mpe emonisi ete maloba mosusu oyo ekokani na liloba yango ezali mposa makasi, komipesa, mpe esengo. Makambo nyonso wana emonanaki mpenza na mosala ya Yesu. Yango wana, Biblia na lingala ya lelo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Bolingo na ngai po na Ndako na yo ezali kozikisa ngai motema.” Kutu, na minɔkɔ mosusu ya bato ya Orient, liloba oyo basalelaka mpo na “molende” esangisi maloba mibale oyo elimboli mpenzampenza “motema mɔtɔ” lokola nde motema ezali kozika. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bayekoli bamikundolaki maloba wana ya Davidi ntango bamonaki makambo oyo Yesu asalaki na tempelo. Kasi, nini ezikisaki motema ya Yesu, mpe etindaki ye asala ndenge asalaki?
10. Liloba “molende” ezali na ndimbola nini na Biblia?
10 Liloba “molende” oyo ezali na nzembo ya Davidi euti na liloba moko ya Ebre oyo ebongolami mingi na “zuwa” na bisika mosusu na Biblia. Na bisika mosusu, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli yango na ‘asɛngaka bákangama kaka na ye.’ (Tángá Kobima 20:5; 34:14; Yosua 24:19.) Mpo na liloba yango, diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka Biblia elobi boye: “Mbala mingi, basalelaka yango mpo na boyokani na kati ya libala . . . Kaka ndenge mobali to mwasi oyo azali na zuwa ya malamu asɛngaka molingami akangama kaka na ye, Nzambe mpe azali na lotomo ya kosɛnga bato na Ye bákangama kaka na Ye mpe alingaka lotomo yango etosama.” Na yango, na ndenge Biblia esaleli liloba yango, molende esuki kaka te na komipesa mpe kozala na esengo ya kosala likambo moko, ndenge bato mingi basalaka mpo na lisano oyo balingaka. Molende ya Davidi ezalaki zuwa ya malamu, elingi koloba, atikaki nzela soki moke te básalela Yehova bombanda to bábwakela nkombo na Ye nsɔni. Molende ya ndenge wana etindaka moto abatela lokumu ya moto mosusu to asembola makambo oyo ebebisaki yango.
11. Nini etindaki Yesu amipesa na molende?
11 Bayekoli ya Yesu bamikosaki te ndenge bayokanisaki maloba ya Davidi ná makambo oyo Yesu asalaki na tempelo. Yesu amipesaki mobimba kaka te mpo azalaki na ntango oyo asengelaki kosilisa mosala na ye kasi mpe mpo azalaki na molende—to na zuwa—mpo na nkombo ya Tata na ye mpe mpo na losambo ya pɛto. Ntango amonaki ndenge bazalaki kobwakela nkombo ya Nzambe nsɔni mpe kofinga yango, amonisaki molende, to zuwa, mpe asalaki mpo na kosembola makambo. Ntango Yesu amonaki ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki konyokola mpe kobuba bato oyo bazangá, molende na ye etindaki ye asalisa bato yango mpe abimisa maloba oyo emonisaki mpenza mabe ya bakonzi yango ya mangomba.—Mat. 9:36; 23:2, 4, 27, 28, 33.
Tózala na molende mpo na losambo ya solo
12, 13. Bakonzi ya mangomba ya bokristo basali nini lelo mpo na (a) nkombo ya Nzambe? (b) Bokonzi ya Nzambe?
12 Makambo oyo ezali kosalema na mangomba lelo ezali ndenge moko na oyo ezalaki na mikolo ya Yesu, to kutu mabe koleka. Na ndakisa, likambo ya liboso oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango ezali nkombo ya Nzambe; alobaki boye: “Nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Omonaka bakonzi ya mangomba, mingimingi ya mangomba ya bokristo, bazali koteya bato báyeba nkombo ya Nzambe mpe básantisa, to bákumisa yango? Te, kutu bazali nde koloba lokuta na ntina na Nzambe na mateya ya lokuta lokola Bosato, liteya oyo elobaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te, mpe liteya ya lifelo, mpe na ndenge yango batindaka bato bámona ete Nzambe azali moto moko oyo abombaná, oyo akoki koyebana te, moto moko ya nko, to kutu oyo asepelaka komonisa bato mpasi. Babwakeli mpe nkombo ya Nzambe nsɔni na etamboli na bango ya mbindo mpe na bokosi na bango. (Tángá Baroma 2:21-24.) Longola yango, bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobomba nkombo ya Nzambe, bazali kutu kolongola yango na mabongoli na bango ya Biblia. Na yango, bakangeli bato nzela ya kopusana penepene na Nzambe mpe ya kosala boyokani malamu ná ye.—Yak. 4:7, 8.
13 Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye bábondela mpo na Bokonzi ya Nzambe; alobaki boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Mat. 6:10) Atako bakonzi ya mangomba ya bokristo bazongelaka libondeli yango mbala mingi, bazali kotinda bato bápesa mabɔkɔ na bibongiseli ya politiki mpe bibongiseli mosusu ya bato. Longola yango, bazali kotyola bato oyo bazali kosala makasi ya koteya mpe kopesa litatoli mpo na Bokonzi yango. Na yango, bato mingi oyo bamibengaka bakristo balobelaka lisusu Bokonzi ya Nzambe te, to kutu bandimelaka yango te.
14. Ndenge nini bakonzi ya mangomba ya bokristo balɛmbisi Liloba ya Nzambe?
14 Na libondeli moko, Yesu alobaki polele ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17) Mpe ntango azalaki naino awa na mabele, Yesu amonisaki ete akotya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bato na ye bilei ya elimo. (Mat. 24:45) Atako bawelaka komibenga bakapita ya Liloba ya Nzambe, bakonzi ya mangomba ya bokristo bakokisi mpenza na bosembo mosala oyo Nkolo apesaki bango? Te. Kasi, baumelaka te na koloba ete makambo oyo Biblia elobi ezali masapo ya mpamba. Na esika báleisa etonga bilei ya elimo, mpe na ndenge yango kobɔndisa mpe kongɛngisa bango na elimo, bakonzi ya mangomba bazali koyokisa bandimi na bango bafilozofi ya bato, mpo yango nde makambo oyo matoi na bango elingi koyoka. Longola yango, balɛmbisi mitinda ya Biblia oyo etali bizaleli ya malamu mpo na kolanda makambo oyo bakómi kobenga makambo ya mikolo oyo.—2 Tim. 4:3, 4.
15. Oyokaka ndenge nini mpo na makambo nyonso oyo bakonzi ya mangomba basali mpo na nkombo ya Nzambe?
15 Mpo na makambo nyonso oyo esalemá—na nkombo ya Nzambe ya Biblia—bato mingi ya mitema sembo balɛmbi nzoto to mpe batiki kondimela Nzambe mpe Biblia. Bakangami na motambo ya Satana mpe ebongiseli na ye ya mabe. Ntango ozali komona mpe koyoka makambo ya ndenge wana ezali kosalema mokolo na mokolo, oyokaka ndenge nini? Lokola ozali mosaleli ya Yehova, ntango ozali komona ndenge bazali kobwakela nkombo ya Nzambe nsɔni mpe kofinga yango, oyokaka te ete osengeli kosala nyonso mpo osembola makambo? Ntango ozali komona ndenge bazali kokosa mpe kobuba bato ya sembo, oyokaka te ete osengeli kobɔndisa milimo yango oyo ezali konyokwama? Ntango Yesu amonaki bato ya ntango na ye ‘banyokwami mpe basundolami lokola bampate oyo ezangá mobateli,’ asukaki kaka te na koyokela bango mawa. “Abandaki koteya bango makambo mingi.” (Mat. 9:36; Mrk. 6:34) Tozali na bantina mpenza ya kozala na molende mpo na losambo ya solo, ndenge Yesu azalaki.
16, 17. (a) Nini esengeli kotinda biso tómipesa mingi na mosala ya kosakola? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
16 Soki tozali komona mosala na biso ya kosakola ndenge wana, tokozwa na ntina mingi maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Timote 2:3, 4. (Tángá.) Tokosala mingi na mosala ya kosakola kaka te mpo toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka kasi mpe mpo toyebi ete ezali mokano ya Nzambe. Alingi bato báyeba solo mpo bango mpe báyekola kosambela mpe kosalela ye mpe bázwa mapamboli. Tokomipesa mpenza na mosala, kaka te mpo mikolo etikali ya kotánga, kasi mpo tolingi libosoliboso kokumisa nkombo ya Nzambe mpe kosalisa bato báyeba mokano na ye. Tokomonisa ete tozali na molende mpo na losambo ya solo.—1 Tim. 4:16.
17 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tozwá boyebi ya solo na oyo etali mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Tozali na likoki ya kosalisa bato bázwa esengo mpe elikya ya solosolo mpo na mikolo oyo ezali koya. Tokoki kolakisa bango ndenge ya kobika ntango ebongiseli mabe ya Satana ekobomama. (2 Tes. 1:7-9) Na esika tókóma mawamawa to tólɛmba nzoto mpo tozali komona lokola mokolo ya Yehova ezali koumela, tosengeli nde kozala na esengo ete tozali naino na ntango mpo na kozala na molende mpo na losambo ya pɛto. (Mika 7:7; Hab. 2:3) Ndenge nini tokoki kokóma na molende ya ndenge wana? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
Okoki kolimbola?
• Nini ezalaki kotinda Yesu asala mosala na ye malamumalamu kozanga kolɛmba?
• Ndenge esalelami na Biblia, “molende” elimboli nini?
• Makambo nini oyo tozali komona lelo esengeli kotinda biso tózala na molende mpo na losambo ya solo?
[Elilingi na lokasa 8]
Yesu atyaki makanisi na kosala mokano ya Tata na ye mpe kolinga bazalani na ye
[Elilingi na lokasa 10]
Tozali na bantina nyonso ya kozala na molende mpo na losambo ya solo