Bilenge: bókolisa bososoli na bino!
“Kasi bilei makasi izali mpo na bato [oyo bakoli, NW]; mpo na bango basili kolakisa [bososoli, NW] na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.”—BAEBELE 5:14.
1, 2. (a) Ndenge nini mikolo na biso ekokani na oyo ya baklisto ya Efese na ntango ya kala? (b) Mayele nini ekoki kobatela yo na likama, mpe ndenge nini okoki kokolisa yango?
“BÓKEBA mpo na etamboli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bósalisa ntango na bino misala malamu, zambi mikolo izali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Eleki sikoyo mbula 2 000 banda ntoma Paulo akomá maloba oyo mpe ‘bato mabe mpe bakosi bazali se koleka na mabe.’ Sikoyo tozali na “ntango ya mpasi,” to na “ntango ya makama mingi” ndenge Biblia ya Phillips (na Lingelisi) ebongoli yango.—2 Timote 3:1-5, 13.
2 Kasi, bokoki kokima makama oyo ezali na nzela na bino soki bokolisi “mayele, . . . boyebi mpe [makanisi, NW].” (Masese 1:4) Masese 2:10-12 elobi ete: “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; [makanisi, NW] ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe mpe na moto oyo akolobaka makambo na mobulu.” Kasi ndenge nini bokoki kokolisa bizaleli yango? Baebele 5:14 elobi: “Kasi bilei makasi izali mpo na bato [oyo bakoli, NW]; mpo na bango basili kolakisa [bososoli, NW] na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” Lokola mayele nyonso, mpo moto ayeba kososola malamu esɛngaka amimesenisa na kosala yango. Liloba ya Greke oyo Paulo asalelaki elimboli mpenzampenza ‘oyo akembisi nzoto lokola moto ya masano.’ Ndenge nini bokoki kobanda kosala yango?
Ndenge ya kokolisa bososoli na bino
3. Ndenge nini bokoki kososola malamu liboso ya kokamata mokano moko?
3 Bóbosana te ete bososoli na bino, elingi koloba mayele na bino ya kokesenisa malamu na mabe, ekolaka na ntango bozali ‘komimesenisa.’ Ntango bolingi kokamata mokano, nsuka na yango ekozala malamu te soki bolobi ete bokomeka kaka nzoto, to soki bokanisi liboso te, to mpe soki bozali kolanda kaka bato. Mpo na kokamata mikano ya malamu, bosengeli kososola. Ndenge nini? Libosoliboso, bosengeli kotalela likambo malamu mpe bosengeli koluka koyeba yango malamumalamu. Soki mpe esengeli, bótuna mituna. Bóluka koyeba maponi oyo ezali liboso na bino. Masese 13:16 elobi: “Moto na moto na mayele akosalaka na boyebi.” Na nsima, bóluka mibeko to mitinda ya Biblia oyo etalelami na likambo yango. (Masese 3:5) Kasi, mpo na kosala yango, bosengeli koyeba mateya ya Biblia. Yango wana Paulo alendisi biso tólya “bilei makasi,” elingi koloba tóyekola solo ya Biblia na “bonene, bolai, bosanda, mpe bozindo” na yango.—Baefese 3:18, NW.
4. Mpo na nini koyeba mibeko ya Nzambe ezali na ntina mingi?
4 Ezali na ntina mingi tósala bongo mpamba te tozali bato ya masumu, mpe motema na biso ebendamaka mingi na kosala masumu. (Genese 8:21; Baloma 5:12) Yilimia 17:9 elobi: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” Soki tomitiki te ete mibeko ya Nzambe etambwisa biso, tokoki komikosa mpe ete likambo moko ya mabe ezali malamu kaka mpo nzoto na biso esepeli na yango. (Talá Yisaya 5:20.) Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Elenge mobali akopɛtola nzela na ye na [ndenge] nini? Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo. Na bilakeli na yo nakozwa mayele malamu; bongo nazali koyina nzela nyonso na lokuta.”—Nzembo 119:9, 104.
5. (a) Mpo na nini bilenge mosusu balandaka banzela ya mabe? (b) Ndenge nini elenge moko akómaki kosepela na solo?
5 Mpo na nini bilenge mosusu oyo babɔkwamaki na mabota ya baklisto balandaki nzela ya mabe? Ekoki kozala ete balukaki te ‘kososola bango moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu, ebongi mpe ezangi eloko ata moko te.’ (Baloma 12:2, NW) Bilenge mosusu bakendaka na makita na baboti na bango mpe bayebi mwa mateya ya ebandeli na Biblia. Kasi soki batuni bango mpo na nini bandimaka makambo yango to soki basɛngi bango bálimbola mwa makambo mosusu ya mozindo na kati ya Liloba ya Nzambe, emonanaka ete boyebi na bango ezalaka likolólikoló. Ezali mpasi te mpo bilenge ya ndenge yango bákosama. (Baefese 4:14) Soki ezali bongo mpo na yo, ebongi ozwa mokano ya kobongisa. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Natángaki mikanda mingi mpo na koyeba makambo malamu. Namitunaki ete: ‘Nini endimisaka ngai ete [lisangá ya Yehova] ezali lingomba ya solo? Nini endimisaka ngai ete Nzambe azali mpe nkombo na ye Yehova?’”a Kotánga Biblia na likebi endimisaki ye ete makambo oyo baboti na ye bateyaki ye ezali mpenza solo!—Talá Misala 17:11.
6. Ndenge nini okoki “koluka koyeba makambo oyo esepelisaka Nkolo,” Yehova?
6 Soki oyebi mibeko ya Yehova, okomona ete ezali mpasi te mpo na “koluka koyeba makambo oyo Nkolo andimaka.” (Baefese 5:10, NW) Kasi, osengeli kosala nini soki oyebi te nzela nini okolanda ntango okutani na likambo moko? Bondelá Yehova alakisa yo nzela. (Nzembo 119:144) Meká kosolola likambo yango na baboti na yo to na moklisto moko oyo ateli na elimo. (Masese 15:22; 27:17) Okoki mpe koyeba nzela nini okolanda soki oluki na Biblia mpe na mikanda ya la Société. (Masese 2:3-5) Soki ozali kososola mingi, bososoli na yo mpe ekokola mingi.
Salelá bososoli ntango ozali kopona masano
7, 8. (a) Ndenge nini okoki kososola malamu mpo na koyeba soki osengeli kokende na bokutani moko to te? (b) Biblia elobi nini mpo na masano?
7 Sikoyo tólobela naino ndenge oyo okoki kosalela bososoli na mwa makambo mosusu. Na ndakisa, soki babéngi yo na bokutani moko. Mbala mosusu bapesi yo lokasa ya invitation. Balobi na yo ete bilenge Batatoli mingi bakozala kuna. Kasi bakosɛnga kaka mwa mbongo moke mpo na badepansi. Okanisi boni, osengeli kokende?
8 Na likambo ya bongo osengeli nde kososola. Luká naino koyeba likambo yango malamumalamu. Bato bakozala ebele? Banani bakozala kuna? Ekobanda ntango nini? Ekosila ntango nini? Makambo nini ekosalema kuna? Ndenge nini ekotambwisama? Na nsima, luká mwa makanisi na Index ya mikanda ya la Société na mitó ya makambo “réunions récréatives” mpe “divertissement.”b Soki oluki na mikanda, okomona makambo nini? Ya liboso, okomona ete Yehova apekisi te bato bákutanaka mpo na kosepela. Kutu, Mosakoli 8:15 elobi ete longola kosala mosala makasi, “moto azali na likambo lileki oyo na malamu na nse na moi te, bobele kolya mpe komela mpe kosepela.” Ata Yesu Klisto bazalaki ntango mosusu kobénga ye na bokutani mingi oyo bazalaki kobongisa mpo na kolya elongo na bato mosusu mpe toyebi ete akendaki na feti ya libala. (Luka 5:27-29; Yoane 2:1-10) Soki tosali yango na mindɔndɔ te, bokutani mpo na kolekisa ntango elongo na baninga ekoki kozala na litomba.
9, 10. (a) Makama nini ekoki kobima na bokutani mosusu? (b) Mituna nini okoki komituna mpo na koyeba soki osengeli kokende na bokutani moko to te?
9 Nzokande, bokutani oyo ebongisami malamu te, ekoki kobimisa mikakatano. Na 1 Bakolinti 10:8, totángaka ndenge oyo kozala na baninga mabe ememaki bato na kosala pite mpe babomaki “[Bayisalaele oyo bazalaki sembo te] nkóto ntuku mibale na misato na mokolo moko.” Toli mosusu oyo ezali kopusa biso tókanisa malamu ezali na Baloma 13:13, yango elobi ete: “Tótambolaka na ezaleli ekoki na moi; na bilambo na lokoso te, na kolangwa masanga te, na pite mpe na mobulu te, na kowelana soko na zuwa te.” (Talá 1 Petelo 4:3.) Ya solo, balobi na biso te bato boni basengeli kozala na bokutani moko. Kasi, makambo oyo esalemaka emonisaka ete ezalaka mwa mpasi kotambwisa malamu bokutani ya bato ebele. Bokutani ya mwa bato moke, oyo ebongisami malamu, ezalaka mwa mpasi mpo ebeba to ekóma “bilambo ya lokoso.”—Bagalatia 5:21.
10 Makambo oyo okokuta na mikanda oyo okotánga ekoki kobimisela yo mituna mosusu lokola oyo: Baklisto mosusu ya mikóló oyo bateli na elimo bakozala na bokutani yango? Nani abongisi yango? Bokutani yango ezali mpo na kolekisa ntango na baninga ya malamu to mpo na koluka matomba ya moto moko? Baboyi bato mosusu? Soki bokutani yango ekosalema na wikende, ekosila na ngonga malamu mpo bato oyo bakozala kuna bázwa ntango ya kobima na mosala ya kosakola na mokolo oyo elandi? Soki bakobɛta miziki mpe bato bakobina, ekozala miziki mpe mabina oyo ebongi na baklisto? (2 Bakolinti 6:3) Ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na komituna mituna yango. Kasi Masese 22:3 elobi boye: “Moto na mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” Ɛɛ, okoki komibatela na makama soki oyebi kososola.
Salelá bososoli mpo na kopona kelasi okotánga
11. Ndenge nini bilenge bakoki kososola malamu mpo na kobongisa avenire na bango?
11 Biblia elobi ete komilɛngɛla mpo na mikolo ekoya ezali malamu. (Masese 21:5) Yo na baboti na yo bosilá kosolola makambo etali avenire na yo? Mbala mosusu okanaka kosala mosala ya mobongisi-nzela. Ya solo mpenza, ezali na mosala mosusu te oyo ekoki kopesa moto esengo mingi lokola mosala ya mobongisi-nzela. Soki ozali kozwa momeseno ya koyekola mpe soki ozali kobakisa mayele na yo na mosala ya kosakola, ozali nde komibongisa mpo na mosala moko malamu. Oyebi ndenge nini okokokisa bamposa na yo ntango okobanda kosala mosala ya mobongisi-nzela? Soki na nsima obali mpe oboti bana, okokoka komema mokumba yango? Mpo okamata mikano malamu na makambo oyo, osengeli kososola.
12. (a) Mabota mosusu baponi kosala nini na kotalela mikakatano ya nkita? (b) Soki moto alingi kotánga kelasi milai, yango elingi nde koloba ete akoki kozala na mokano ya kosala lokola mobongisi-nzela te? Limbolá.
12 Na bamboka mosusu, moto akoki koyekola mosala ya mabɔkɔ epai ya bato oyo basalaka mosala yango. Bilenge mosusu bayekolaka mosala oyo baboti na bango basalaka to mpe bayekolaka mosala epai ya moninga moko ya mokóló. Bilenge mosusu balandaka kelasi oyo ekosalisa bango na kozwa mosala oyo ekosalisa bango na bomoi na bango. Na bisika oyo bakoki kosala bongo te, nsima ya kokanisa malamu, baboti bakoki kozwa mokano ete mwana na bango atánga kelasi molai. Kokamata bibongiseli motindo yango mpo moto akoka komema mikumba na ye ntango akokola, mpe mingimingi mpo akoka kosala mosala ya mobongisi-nzela mpo na ntango molai, elingi koloba te ete moto yango azali kotya matomba ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso te. (Matai 6:33) Elingi mpe koloba te ete moto oyo mpe alingi kotánga bakelasi milai akoki kosala mosala ya mobongisi-nzela te. Na ndakisa, elenge mwasi moko Motatoli azalaki na mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mpo na ntango molai. Ntango asilisaki eteyelo ya ntei, baboti na ye, oyo bazali mpe babongisi-nzela, basalisaki mwana na bango atánga lisusu bakelasi minene. Ntango azalaki na kelasi, abandaki mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela, mpe sikoyo ayebi mosala oyo ekoki kosunga ye ntango azali kosala mosala ya mobongisi-nzela.
13. Ndenge nini mabota basengeli kokanisa malamu mpo na kotinda bana na bango batánga kelasi milai?
13 Kokamata mokano ya kotánga kelasi milai ezali likambo etali libota na libota. Soki baponi kelasi yango malamu, ekoki kosunga bana na bango. Kasi, ekoki mpe kozala motambo. Soki ozali kokana kotánga kelasi milai, mposa na yo ezali mpenza nini? Ozali komibongisa mpo okokisa mikumba na yo malamu ntango okokóma mokóló? To ozali nde “koluka makambo minene mpo na yo moko”? (Yilimia 45:5; 2 Batesaloniki 3:10; 1 Timote 5:8; 6:9) Okanisaka nini na kokende kofanda mosika mpo na kolanda kelasi milai, mbala mosusu kokende kofanda na iniversite? Okanisi ete ekozala malamu soki olandi toli ya Paulo ete “baninga ya mabe babebisaka bizaleli ya malamu”? (1 Bakolinti 15:33, Boyokani ya Sika; 2 Timote 2:22) Kobosana mpe te ete “etikali mwa ntango moke.” (1 Bakolinti 7:29, Boyokani ya Sika) Mbula boni okolekisa na kotánga bakelasi yango? Okolekisa bolenge na yo na kotánga? Soki ɛɛ, ndenge nini okosalela toli ya Biblia oyo ezali kolendisa yo ‘okanisa Mozalisi na yo na mikolo ya bolenge na yo’? (Mosakoli 12:1) Mpe lisusu, ntango okozala na kelasi, okozala na ntango ya kosala makambo mosusu ya ntina mpo na moklisto, lokola koyangana na makita, kosakola, mpe koyekola Biblia? (Matai 24:14; Baebele 10:24, 25) Soki ozali na bososoli malamu, okobosana mikano ya elimo te ntango yo na baboti na yo bozali kozwa bibongiseli mpo na kobongisa avenire na yo.
Bómitambwisa malamu ntango bozali bafianse
14. (a) Bafianse basengeli kobatela mibeko nini ntango bazali komonisana ete balingani? (b) Ndenge nini bafianse mosusu bamikosaki na likambo yango?
14 Elenge mobali na elenge mwasi basengeli mpe kosalela bososoli ntango bazali kolulana. Komonisa ete olingi moto oyo ozali kosepela na ye ezali mabe te. Loyembo ya Salomo elobeli elenge mwasi na elenge mobali oyo, ata liboso bábalana, bazalaki kosala mwa makambo mosusu mpo na kolakisa ete balinganaki. (Loyembo ya Salomo 1:2; 2:6; 8:5) Lelo oyo, bafianse mosusu basepelaka kosimbana na lobɔkɔ, kopesana bizi, to kozingana mabɔkɔ, mingimingi soki mokolo ya libala ezali lisusu mosika mingi te. Kasi, bóbosana likambo oyo te: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali [zoba].” (Masese 28:26) Ezali mawa na komona ete bafianse mosusu bamikosaki mpe balukaki kosala makambo oyo ekoki komema bango na kobuka mibeko ya Nzambe. Bakómaki kosala makambo mosusu kozanga komipekisa mpe balekisaki ndelo; yango ememaki bango na kosala makambo oyo ebongi te mpe bamosusu bakweaki na pite.
15, 16. Makambo nini bafianse basengeli kokeba na yango mpo bámitambwisa malamu liboso ya kobalana?
15 Soki ozali fianse, zalá na mayele mpe kolinga te ozalaka yo moko na fianse na yo na bisika oyo ebongi te. Yango wana, ekoleka malamu bókutanaka na bisika oyo bozali elongo na bato mosusu to na bisika oyo bato bazali komona bino. Bafianse mosusu basepelaka kozala elongo na moto ya misato. Mpe lisusu, kobosana maloba ya Hosea 4:11 te, yango elobi ete: “Vinyo mpe mai-na-miwiti ikolongola bososoli.” Ntango bameli masanga, bafianse bakoki komikosa mpe kosala makambo oyo na nsima ekoyokisa bango mawa.
16 Masese 13:10 (NW) elobi: “Lolendo elendisaka kowelana, mayele ezali epai na baoyo bapesanaka makanisi.” Ɛɛ, ‘bópesana makanisi’ mpe bóyokana: makambo nini bokosala mpe makambo nini bokosala te. Bóyeba makambo nini bokoki kosala te ntango bozali kolakisana bolingo; moto na moto atosa makanisi mpe lisosoli ya moninga. (1 Bakolinti 13:5; 1 Batesaloniki 4:3-7; 1 Petelo 3:16) Ekoki kozala mpasi mpo na kobanda kolobela likambo yango, kasi ekoki kobatela bino mpo mikakatano mosusu oyo ekoki koya nsima.
Kolakisama ‘longwa na bolenge’
17. Ndenge nini Davidi atyaki Yehova lokola ‘elikya na ye banda na bolenge na ye,’ mpe lelo oyo, bilenge bakoki kozwa liteya nini na likambo yango?
17 Mpo na kokima mitambo ya Satana osengeli kokebaka ntango nyonso, mpe mbala mosusu esengeli ozala na mpiko mingi. Ɛɛ, ntango mosusu bokoyokana te na baninga na yo, to mpe na bato nyonso. Davidi, mokomi ya nzembo asalaki libondeli oyo: “Yo ozali elikya na ngai, ɛ, Nkolo; nandimi yo, ɛ [Yehova], longwa na bolenge na ngai. Ɛ Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino [sikoyo] nazali kosakola misala na yo na kokamwa.” (Nzembo 71:5, 17)c Toyebi ete Davidi azalaki mobali ya mpiko. Kasi azwaki mpiko yango ntango nini? Ntango azalaki elenge! Ata liboso abunda na Goliata, Davidi alakisaki mpiko monene ntango azalaki kobatela bibwele ya tata na ye; abomaki nkosi na ngombolo. (1 Samwele 17:34-37) Kasi, na misala nyonso ya mpiko oyo asalaki, Davidi apesaki lokumu nyonso epai ya Yehova, abéngaki ye “elikya na ngai . . . longwa na bolenge na ngai.” Lokola Davidi azalaki kotyela Yehova motema azalaki kobanga te liboso ya komekama nyonso oyo akutanaki na yango. Yo mpe okomona ete soki otii elikya epai ya Yehova, akopesa yo mpiko mpe makasi ya ‘kolonga mokili.’—1 Yoane 5:4.
18. Bilenge oyo babangaka Nzambe balendisami na nini lelo oyo?
18 Na mpiko nyonso, bamilio ya bilenge lokola yo bazwi mokano ya kozala basakoli ya nsango malamu oyo bazwi batisimo. Tozali kozongisa matɔndi epai ya Nzambe mpo na kondima mpe mpiko ya bino bilenge! Bókangama na mokano bozwi ya kokima bizaleli mabe ya mokili. (2 Petelo 1:4) Bósalela ntango nyonso bososoli na bino malamu oyo eteyami na Biblia. Soki bosali bongo, bokomibatela na makama oyo ezali kobima lelo mpe na nsuka, bokobika. Lokola lisolo na biso ya nsuka ekomonisa yango, bokozala na bomoi ya malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nasala nini mpo nasepela na solo? na Lamuká! ya Yanuali-Marsi 1999.
b Lisolo “Tosepela na matomba ya kominanola na etuluku, topengola mitambo na yango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1992 ezali na makanisi malamu mpo na likambo yango.
c Nzembo 71 ezali kolandana ya Nzembo 70. Maloba oyo ezali likoló na yango emonisi ete ezali nzembo ya Davidi.
Mituna ya bozongeli
◻ Ndenge nini elenge akoki kokolisa bososoli na ye?
◻ Ndenge nini elenge akoki kososola malamu mpo na kopona soki asengeli kokende na bokutani ya bilenge baklisto?
◻ Moto asengeli kotalela makambo nini mpo na kozwa mikano etali kelasi na ye?
◻ Ndenge nini bafianse bakoki kokima pite?
[Elilingi na lokasa 15]
Koyekola ndenge ya koluka makambo na mikanda ekosalisa yo na kokolisa bososoli na yo
[Elilingi na lokasa 16]
Bokutani ya bato moke ezalaka mpasi te na kokɛngɛla mpe mbala mingi ekómaka bilambo ya lokoso te
[Elilingi na lokasa 16]
Baboti basengeli kosalisa bana na bango na kozwa mikano etali kelasi na bango
[Elilingi na lokasa 17]
Soki bafianse bazali kokutana na esika oyo ezali na bato mingi, bakomibatela.