Eyangeli ya teokrasi na eleko ya boklisto
“Pelamoko na mwango na ye . . . ete ayanganisa biloko nyonso kati na Klisto lokola motó, yango na likoló mpe yango na nsé.”—BAEFESE 1:9, 10.
1, 2. (a) Lolenge nini koyanganisama ya “biloko kati na makoló” esalemaki, kobanda na mobu 33 T.B.? (b) Na lolenge nini baklisto bapakolami basili komonisa elimo ya Mose mpe ya Eliya kobanda 1914?
KOYANGANISAMA yango ya “biloko ya makoló” ebandaki na mobu 33 T.B. ntango “Yisalaele na Nzambe” ebotamaki. (Bagalatia 6:16; Yisaya 43:10; 1 Petelo 2:9, 10) Nsima ya ekeke ya liboso na T.B., koyanganisama ezalaki kokita wana baklisto ya solo (oyo Yesu abéngaki bango ete “masangu”) bazipamaki na “matiti mabe” ya lipɛngwi oyo elónamaki na Satana. Kasi lokola “ntango ya nsuka” ebɛlɛmaki, Yisalaele ya solo ya Yehova emonanaki lisusu mpe na 1919 eponamaki mpo na kotalela bozwi nyonso ya Yesu.a—Matai 13:24-30, 36-43; 24:45-47; Danyele 12:4, NW.
2 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, baklisto bapakolami bakokisaki misala ya nguya, bobele lokola Mose mpe Eliya basalaki yango.b (Emoniseli 11:5, 6) Kobanda na mobu 1919 bazali kosakola nsango malamu kati na mokili ya botɛmɛli, kosaláká bongo na mpiko lokola Eliya. (Matai 24:9-14) Mpe uta mobu 1922 bazali kosakola bikateli ya Yehova likoló na bato, bobele lokola Mose akweisaki malɔ́zi likoló na Ezipito ya kala. (Emoniseli 15:1; 16:2-17) Batikali baklisto bapakolami yango bazali lelo eteni eleki ntina ya mokili ya sika ya Batatoli ya Yehova.
Lisangani ya mikóló-bakambi kati na mosala
3. Makambo nini mamonisi ete lisangá ya ebandeli ya boklisto ezalaki na ebongiseli moko malamu?
3 Longwa na ebandeli ya lisangá ya boklisto, bayekoli bapakolami ya Yesu bazalaki kosala mosala na molɔngɔ́. Lokola motángo ya bayekoli mozalaki kokóla, masangá matyamaki na bamboka mpe bankulutu baponamaki. (Tito 1:5) Nsima ya mobu 33 T.B., bantoma 12 bazalaki kosala lokola lisangani ya mikóló-bakambi. Na motindo yango, bazwaki, na kozanga kobanga, esika ya liboso na mosala ya kopesa litatoli. (Misala 4:33, 35, 37; 5:18, 29) Basalaki ebongiseli mpo na kokabola bilei epai na baoyo bazalaki kati na bosɛnga, mpe batindaki Petelo na Yoane na Samalia mpo na kolandela bosepeli oyo bato bamonisaki kuna. (Misala 6:1-6; 8:6-8, 14-17) Balanaba amemelaki bango Paulo mpo na kondimisa bango ete monyokoli yango ya kala azali sikawa moyekoli ya Yesu. (Misala 9:27; Bagalatia 1:18, 19) Nsima wana Petelo asakolaki epai na Koloneli mpe bato ya ndako na ye, azongaki na Yelusaleme mpe alimbwelaki bantoma mpe bandeko mosusu ya Yudea lolenge elimo santu emonisaki mokano ya Nzambe na likambo yango.—Misala 11:1-18.
4. Motambo nini etyamaki mpo na koboma Petelo, kasi na lolenge nini bomoi na ye ebatelamaki?
4 Na nsima, lisangani ya mikóló-bakambi ekutanaki na mikakatano. Petelo akɔtaki bolɔ́kɔ, mpe bomoi na ye ebatelamaki bobele na lisungi ya anzelu. (Misala 12:3-11) Sikawa mpo na mbala ya liboso, moto moko oyo azalaki kati na bantoma 12 te akómaki na etɛlɛmɛlo monene kati na Yelusaleme. Ntango Petelo abimisamaki na bolɔ́kɔ, ayebisaki etuluku oyo basanganaki na ndako ya mama ya Yoane Malako ete “Bóyebisa Yakobo [ndeko mobali ya Yesu] na bandeko makambo oyo.”—Misala 12:17.
5. Na lolenge nini lisangani ya mikóló-bakambi ebongwanaki nsima ya kobomama ya Yakobo?
5 Liboso, ntango Yuda Mokeliota, ntoma motɛki, amibomaki, mposa emonanaki ya kopesa “mosala na ye” ya ntoma na moto mosusu oyo azalaki elongo na Yesu na boumeli ya mosala ya kosakola mpe oyo amonaki liwa mpe lisekwa na ye. Nzokande, ntango Yakobo, ndeko mobali ya Yoane abomamaki, moto moko te akitanaki ye lokola moko wa ba zomi na mibale. (Misala 1:20-26; 12:1, 2) Atako bongo, na bisika mosusu oyo makomami mazali kolobela lisangani ya mikóló-bakambi emonisami ete bato mosusu babakisamaki. Ntango ntembe ebimaki mpo na koyeba soki bapakano oyo bakómaki bayekoli ya Yesu basengelaki kotosa Mibeko ya Mose, likambo yango litindamaki na “Yelusaleme epai na bantoma mpe na mikóló.” (Misala 15:2, 6, 20, 22, 23; 16:4) Mpo na nini “mikóló” bazalaki sikawa kati na lisangani ya mikóló-bakambi? Biblia elobi eloko te, kasi na ntembe te litomba ezalaki. Liwa ya Yakobo mpe kokangama ya Petelo na bolɔ́kɔ emonisaki ete bantoma bakokaki mokolo mosusu kokangama na bolɔ́kɔ to kobomama. Na yango, mikóló mosusu ya makoki, oyo bayebaki myango mingi mitali kotambwisa makambo kati na lisangani ya mikóló-bakambi, bakokaki kokóba mosala ya bakɛngɛli.
6. Ndenge nini lisangani ya mikóló-bakambi ekóbaki kosala mosala na Yelusaleme, ata ntango basangani na yango ya liboso bazalaki lisusu na engumba wana te?
6 Ntango Paulo ayaki na Yelusaleme soko na mobu 56 T.B., akendaki kotala Yakobo, mpe Biblia elobi ete “mikóló nyonso bayei lokola.” (Misala 21:18) Mpo na nini balobeli bantoma te na likita yango? Awa mpe, Biblia elobi eloko te. Kasi, na nsima Eusèbe, mokomi na lisoló ya bato alobi ete mwa ntango moke liboso ya mobu 66 T.B., “bantoma oyo batikalaki, banguna bazalaki ntango nyonso koluka mayele ya koboma bango, na yango, bakimaki na Yudea. Kasi, mpo na koteya nsango na bango, basalaki mibembo bipai binso na nguya ya Klisto.” (Eusèbe, Livre III, V, v. 2) Ya solo, maloba ya Eusèbe mauti na Biblia te, kasi mazali na boyokani na oyo Biblia elobi. Na ndakisa, na mobu 62 T.B., Petelo azalaki na Babilone—mosika na Yelusaleme. (1 Petelo 5:13) Nzokande, na mobu 56 T.B., mpe mbala mosusu kino mobu 66 T.B., lisangani moko ya mikóló-bakambi ezalaki kosala na Yelusaleme.
Eyangeli na mikolo na biso
7. Soki tokokanisi yango, bokeseni nini ya monene ezali kati na lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya ntango na biso?
7 Kobanda na mobu 33 T.B. kino bolɔ́zi oyo ekwelaki Yelusaleme, na ntembe te lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki bobele na baklisto oyo bazalaki Bayuda. Na boumeli ya mobembo na ye na mobu 56 T.B., Paulo ayokaki ete ebele ya baklisto oyo bazalaki Bayuda na Yelusaleme, atako “[bazalaki] na kondima epai na Nkolo na biso Yesu Klisto,” bazalaki naino “na mitema na mɔ́tɔ na ntina na Mibeko [ya Mose].”c (Yakobo 2:1; Misala 21:20-25) Bayuda motindo wana bakokaki kozala na mokakatano ya kondima ete moklisto oyo auti na mabota ya bapakano azala kati na lisangani ya mikóló-bakambi. Nzokande, na ntango na biso, mbongwana esalemaki kati na lisangani yango. Lelo oyo, esangisi bobele baklisto bapakolami oyo bauti na mabota ya bapakano, mpe Yehova apamboli mosala na bango ya bokɛngɛli.—Baefese 2:11-15.
8, 9. Mbongwana nini esalemi kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi na mikolo na biso?
8 Banda kosalema ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania na 1884 kino 1972, prezidá ya la Société azalaki na mokumba monene kati na lisangá ya Yehova, atako Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki na boyokani ya penepene na batambwisi ya la Société. Mapamboli oyo mazwamaki na boumeli ya bambula wana mamonisi ete Yehova andimaki ebongiseli yango. Kati na mobu 1972 mpe 1975, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekómaki na basangani 18. Makambo makokanaki mingi na ebongiseli ya ekeke ya liboso ntango mosala monene mopesamelaki lisangani yango wana ekólaki, bamoko kati na bango bazali mpe bakambi ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
9 Kobanda 1975, bomoi ya bamoko kati na basangani yango 18 awa na mabelé ekómá na nsuka. Basilá kolónga mokili mpe ‘bafandi elongo na Yesu na kiti na ye ya bokonzi na likoló.’ (Emoniseli 3:21) Mpo na yango mpe mpo na bantina mosusu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali sikawa na basangani zomi, bakisa mpe oyo akɔ́taki na 1994. Mingi kati na bango bakómi mpenza mibangé. Nzokande, bandeko bapakolami yango bazali kopesamela lisungi malamu wana bazali kokokisa mikumba na bango minene. Lisungi yango lizali kouta wapi? Soki totali bokóli oyo esalemi kati na libota ya Nzambe na mikolo na biso, yango ekopesa biso eyano.
Lisungi mpo na Yisalaele ya Nzambe
10. Banani bazali kosangana elongo na bapakolami kati na mosala ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka, mpe lolenge nini yango esakolamaki?
10 Na 1884, pene na baoyo nyonso basanganaki na Yisalaele ya Nzambe bazalaki baklisto bapakolami. Nzokande, mokemoke, etuluku mosusu ebandaki komonana, mpe na 1935 etuluku yango eyebanaki lokola “ebele monene” oyo elobelami na Emoniseli mokapo 7. Lokola bazali na elikya ya kofanda na mabelé, bazali komonisa “biloko na mabelé” oyo Yehova akani koyanganisa yango esika moko kati na Klisto. (Baefese 1:10) Bazali komonisa “bampate mosusu” ya lisese ya Yesu litali mapango ya bampate. (Yoane 10:16) Banda 1935, bampate mosusu bafuluki kati na ebongiseli ya Yehova. Basili ‘kopombwa likoló lokola lipata mpe lokola bibenga kino maninisa na bango.’ (Yisaya 60:8) Na ntina na bokóli oyo ezali kosalema kati na ebele monene mpe kokita ya motángo ya kelasi ya bapakolami wana liwa ezali kosukisa bomoi ya mingi kati na bango awa na mabelé, bampate mosusu ya makoki bazali kokokisa mokumba monene na misala ya boklisto. Na lolenge nini?
11. Mikumba nini, na ebandeli ezalaki kokokisama bobele na baklisto bapakolami, kasi sikawa epesami mpe epai na bampate mosusu?
11 Kosakola malamu ya Yehova bipai binso ezalaka ntango nyonso lisɛngisi ya ntina ya “libota na bulɛɛ” ya Nzambe. Paulo alobaki na ntina na yango ete ezali lokola mbeka ya kotumba na tempelo, mpe epai na baoyo bakozala “bokonzi na banganga,” Yesu apesaki etindá ya kosakola mpe koteya. (Exode 19:5, 6; 1 Petelo 2:4, 9; Matai 24:14; 28:19, 20; Baebele 13:15, 16) Nzokande, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1932 (ebimeli ya Lingelesi), elendisaki mingimingi baoyo bamonisamaki lokola Yonadaba mpo na kosangana na mosala yango. Ya solo, mingi kati na bampate yango mosusu bazalaki kosala bongo. Lelo oyo, pene na mosala nyonso ya kosakola ezali kosalema na bampate mosusu lokola eteni monene wana “bakosaleláká [Nzambe] butu na moi kati na Tempelo na ye.” (Emoniseli 7:15) Bobele bongo, na eteni ya ebandeli ya lisoló ya libota ya Yehova, bankulutu ya lisangá bazalaki baklisto bapakolami, “minzɔ́tɔ” na lobɔkɔ mobali ya Yesu Klisto. (Emoniseli 1:16, 20) Kasi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí 1937 (ebimeli ya Lingelesi), elobaki ete bampate mosusu ya makoki bakoki kozala basaleli ya lisangá (bakɛngɛli-bakambi). Atako mibali bapakolami bazalaki, bampate mosusu bakokaki kosalelama soki mibali bapakolami bazalaki na makoki te ya kokokisa mokumba yango. Lelo oyo, pene na bankulutu ya masangá nyonso bazali bampate mosusu.
12. Ndakisa nini ya Makomami esimbi ebongiseli ya kopesa mikumba minene ya kotambwisa makambo epai na bandeko ya makoki kati na bampate mosusu?
12 Ezali mabe kopesa mikumba minene motindo wana na bampate mosusu? Te, ezali mabe te, ezali kútu kolanda lisoló ya ntango ya kala. Bapakano oyo babongwanaki na losambo ya Bayuda (bapaya) bazalaki kokokisa mikumba minene kati na Yisalaele ya kala. (2 Samwele 23:37, 39; Yilimia 38:7-9) Nsima ya bouti na bango na Babilone, Banetinime ya makoki (basaleli na tempelo oyo bazalaki Bayisalaele te) bapesamelaki mikumba ya mosala ya tempelo oyo liboso ezalaki bobele mpo na Balevi. (Ezela 8:15-20; Nehemia 7:60) Lisusu, Mose, oyo amonanaki esika moko na Yesu ntango ya mbongwana, andimaki toli malamu oyo Yetelo Momidyani apesaki ye. Na nsima, asɛngaki na Hobaba, mwana na Yetelo ete akamba bango kati na mokili mokauki.—Exode 18:5, 17-24; Mituya 10:29.
13. Na kopesáká mikumba na komikitisa nyonso epai na bampate mosusu ya makoki, ndakisa ya nani baklisto bapakolami bazali komekola?
13 Pene na nsuka ya mibu 40 kati na mokili mokauki, Mose, koyebáká ete akokɔta na Mokili ya Ndaka te, abondelaki Yehova ete abimisa mokitani moko. (Mituya 27:15-17) Yehova ayebisaki ye ete amonisa Yosua liboso ya bato nyonso, mpe Mose asalaki bongo, atako azalaki naino na nzoto makasi, atikaki te kosalela Yisalaele. (Deteronome 3:28; 34:5-7, 9) Na ezaleli ya komikitisa motindo moko, bapakolami bazali kopesa mikumba mingi epai na mibali ya makoki kati na bampate mosusu.
14. Bisakweli nini bilobeli mosala monene ya ebongiseli oyo bampate mosusu bazali kokokisa?
14 Kopesa mikumba mingi epai na bampate mosusu ezali mpe likambo oyo esakolamaki. Zekalia asakolaki ete Mofilisitia oyo azali Moyisalaele te akozala “lokola sheik, kati na Yuda.” (Zekalia 9:6, 7, NW) Basheik bazalaki bankumu ya bitúlúká, na bongo, Zekalia azalaki koloba ete monguna ya kala ya Yisalaele akokɔta na losambo ya solo mpe akokóma lokola nkumu ya etúlúká kati na Mokili ya Ndaka. Lisusu, ntango azalaki koloba na Yisalaele ya Nzambe, Yehova alobaki ete: “Bapaya bakotɛmaka mpo na koleisa bitonga na bino, bato na mikili misusu bakozala batimoli na bino mpe babateli na miwiti na bino; kasi bino bokobyangama Banganga na [Yehova]; bato bakobyanga bino Basaleli na Nzambe na biso.” (Yisaya 61:5, 6) “Bapaya” mpe “bato na mikili mosusu” bazali bongo bampate mosusu. Bango bapesameli mikumba mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo mozali sé kobakisama wana bapakolami mibangé bazali kosukisa bomoi na bango ya mabelé mpe bazali kokende kosala na lolenge ya kokoka lokola “banganga ya Yehova” ya makoló, kozingáká kiti na ye ya bokonzi lokola “[baministre, NW] ya Nzambe na biso.”—1 Bakolinti 15:50-57; Emoniseli 4:4, 9-11; 5:9, 10.
“Libota lizali koya nsima”
15. Na ntango oyo ya nsuka, etuluku nini ya baklisto bakómi “mibangé,” mpe etuluku nini ezali komonisa “libota oyo lizali koya nsima”?
15 Batikali bapakolami bazali na mposa makasi ya kobongisa bampate mosusu mpo na mikumba oyo mizali sé koyikana. Nzembo 71:18 elobi ete: “Boye kino ntango na konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, ɛ Nzambe, tiká ngai te. Kino nakosakola nguya na yo epai na nyonso na libota lizali koya nsima.” Kopesáká makanisi na mokapo yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1948 (ebimeli ya Lingelesi) emonisaki ete lisangá ya baklisto bapakolami likómi mpenza mobangé. Ekóbaki koloba ete na esengo nyonso bapakolami “bazali kotala liboso kati na pole ya esakweli ya Biblia mpe komona libota moko ya sika.” Yango ezali mpenza kolobela banani? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango elobaki ete: “Yesu alobaki na ntina na bango ete bazali ‘bampate mosusu’ na ye.” ‘Libota lizali koya nsima’ ezali bongo bato oyo bakofanda na nsé ya ebongiseli ya sika ya mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya makoló.
16. Mapamboli nini ‘libota lizali koya nsima’ bazali kozela?
16 Biblia elobi mpenza na bosikisiki te ntango oyo baklisto bapakolami nyonso bakotika bandeko na bango ya ‘libota lizali koya nsima’ mpe kokende mpo na kozwa nkembo esika moko na Yesu Klisto. Kasi bapakolami yango bandimisami ete ntango mpo na yango ekómi pene. Makambo oyo malobelamaki kati na esakweli monene ya Yesu na ntina na “ntango ya nsuka” mazali kosalema uta mobu 1914, komonisáká ete kobomama ya mokili oyo ekómi pene. (Danyele 12:4, NW; Matai 24:3-14; Malako 13:4-20; Luka 21:7-24) Mosika te, Yehova akotya mokili ya sika kati na yango ‘libota lizali koya nsima’ ‘bakosangola bokonzi [ya mabele] oyo ebongisami mpo na bango longwa na ebandeli ya mokili.’ (Matai 25:34) Bazali na esengo mingi ya komona kati na makanisi na bango kozongisama ya Paladiso mpe kosekwisama ya bamilió ya bato longwa na Hadès. (Emoniseli 20:13, NW) Baklisto bapakolami bakozala wana mpo na koyamba basekwi? Na 1925, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí (ebimeli ya Lingelesi) elobaki ete: “Tosengeli te komeka koloba makambo oyo Nzambe akosala to oyo akosala te. . . . [Kasi] tokoki koloba ete basangani ya Lingomba [baklisto bapakolami] bakopesamela nkembo liboso ya kosekwisama ya bankumu ya kala [batatoli ya sembo oyo bazalaki liboso na Klisto].” Botaleli motindo moko mpo na koyeba soki bamoko kati na baklisto bapakolami bakozala wana mpo na koyamba basekwi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1989 (ebimeli ya Lifalansé) elobaki ete: “Yango ekozala na ntina te.”d
17. Mabaku malamu nini baklisto bapakolami nyonso bakozwa elongo na Mokonzi Yesu Klisto oyo atyami na kiti ya bokonzi?
17 Ya solo, toyebi te nini ekosalema epai na mokomoko ya baklisto bapakolami. Kasi kozala ya Mose mpe Eliya esika moko na Yesu kati na emonaneli ya mbongwana na ye emonisi ete baklisto bapakolami oyo basekwisami bazali na elikya ya kozala elongo na Yesu ntango akoya kati na nkembo “kopesa moto na moto libonza kobila misala na ye” wana asambisami. Lisusu, tozali komikundola elaka ya Yesu ete baklisto bapakolami oyo ‘bakolónga’ bakosangana na ye na mosala ya ‘kotambwisa mabota na fimbo ya ebende’ na Armagedon. Ntango Yesu akoya kati na nkembo, bakofanda elongo na ye mpo na ‘kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele.’ Elongo na Yesu, ‘bakonyatela Satana na nsé na makolo na bango.’—Matai 16:27–17:9; 19:28; Emoniseli 2:26, 27; 16:14, 16; Baloma 16:20; Genese 3:15; Nzembo 2:9; 2 Batesaloniki 1:9, 10.
18. (a) Tokómi wapi mpo na oyo etali ‘koyanganisama ya biloko na makoló esika moko kati na Klisto’? (b) Tokoki koloba nini na ntina na ‘koyanganisama esika moko ya biloko na mabelé kati na Klisto’?
18 Na kokóbáká na eyangeli ya biloko na ye, Yehova azali kopusana mokemoke na “[ko]yanganisa biloko nyonso kati na Klisto.” Mpo na oyo etali “biloko kati na makoló,” mokano na ye ezali pene na kokokisama. Koyanganisama ya Yesu na ba 144 000 elongo kati na makoló mpo na “libala na Mwana na Mpate” ekómi pene. Na yango, baklisto oyo baumeli mpe bakɔmɛli kati na bampate mosusu, oyo bazali komonisa “biloko na mabelé,” bazwaki mikumba minene mpo na kosunga bandeko na bango bapakolami. Oyo nde ntango ya kosepelisa tozali kobika na yango! Oyo nde esengo ya komona ete mokano ya Yehova mozali kokende kino na kokokisama na yango! (Baefese 1:9, 10; 3:10-12; Emoniseli 14:1; 19:7, 9) Mpe oyo nde esengo mpo na bampate mosusu wana bazali kosunga bandeko na bango bapakolami wana bango nyonso bazali kosala elongo lokola “etonga moko” na nsé ya “mobateli moko” na komityáká na nsé ya litambwisi ya Mokonzi, Yesu Klisto, mpe na nkembo ya Mokonzi Monene ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe!—Yoane 10:16; Bafilipi 2:9-11.
[Maloba na nse]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1981, nkasa 16-26 (ebimeli ya Lifalansé).
b Na ndakisa, na ebandeli ya 1914, “Photo-Drame de la création”—filime oyo bililingi mosusu bizali kotambola, mosusu bizali kotambola te—elakisamaki na mikili ya Wɛ́sti epai na bibele ya bato na bandako ya masano.
c Mpo na koyeba bantina mosusu mpo na yango baklisto Bayuda bazalaki na mitema mɔ́tɔ mpo na Mibeko, talá búku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 1521, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
d Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1990, nkasa 30-31; 15 Desɛ́mbɛ 1990, lokasa 30.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini ebongiseli ya Nzambe ezalaki sé kokóla na ekeke ya liboso?
◻ Lolenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi esali mbongwana kati na lisoló ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso?
◻ Vɛrsɛ́ nini ya Makomami ezali kopesa nzela na kopesa mikumba epai na bampate mosusu kati na lisangá ya Yehova?
◻ Na lolenge nini “biloko kati na makoló” mpe “biloko na mabelé” ezali kosangisama esika moko kati na Klisto?
[Elilingi na lokasa 16]
Atako ntango basangani na yango ya liboso bazalaki lisusu te na Yelusaleme, lisangani moko ya mikóló-bakambi ekóbaki kosala mosala kuna
[Bililingi na lokasa 18]
Baklisto bapakolami oyo bakɔmɛli bazalaki lipamboli mpo na libota ya Yehova
C. T. Russell: 1884-1916
J. F. Rutherford: 1916-1942
N. H. Knorr: 1942-1977
F. W. Franz: 1977-1992
M. G. Henschel: 1992-