Eyano ya Yehova na libondeli moko
“Báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.”—NZ. 83:18.
1, 2. Likambo nini bato mingi bakutanaki na yango, mpe mituna nini ekoki kotunama?
ELEKI mwa bambula, mwasi moko atungisamaki mingi na likambo moko oyo esalemaki na kartye na bango. Lokola azalaki na libota ya Bakatolike, akendaki kokutana na sango mpo na koluka lisalisi, kasi sango alingaki ata kosolola na ye te. Yango wana, abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Nayebi yo te . . . , kasi nayebi ete ozali kuna na likoló. Nabondeli yo, salisá ngai nayeba yo!” Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova bakendaki kotala ye, babɔndisaki ye mpe basalisaki ye azwa boyebi oyo azalaki koluka. Moko na makambo oyo bateyaki ye ezali ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Koyeba likambo yango esimbaki mpenza motema ya mwasi yango. Alobaki boye: “Ye mpenza nde Nzambe oyo nazalaki koluka koyeba banda bomwana!”
2 Likambo ya ndenge wana esilá kokómela bato mingi. Mingi bayebaki mpo na mbala ya liboso ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova ntango batángaki Nzembo 83:18. Na Biblia Traduction du monde nouveau, vɛrsɛ yango elobi boye: “Mpo bato báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, kaka yo nde ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.” Kasi, osilá komituna mpo na nini Nzembo 83 ekomamaki? Makambo nini ekotinda bato nyonso bándima ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo? Nzembo yango ekoki koteya biso nini lelo oyo? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo.a
Mwango mabe mpo na basaleli ya Yehova
3, 4. Nani akomaki Nzembo 83, mpe alobelaki likambo nini?
3 Maloba oyo ezali likoló emonisi ete Nzembo 83 ezali “loyembo ya Asafa.” Ekoki kozala ete mokomi ya nzembo yango azalaki mokitani ya Asafa, Molevi moko oyo azalaki alangá-nzembo monene na eleko ya Mokonzi Davidi. Na nzembo yango, mokomi azali kobondela Yehova asala likambo moko mpo na kotombola bokonzi na Ye mpe kosala ete nkombo na Ye eyebana. Ekoki kozala ete nzembo yango ekomamaki mwa moke nsima ya liwa ya Salomo. Mpo na nini? Mpamba te, na boyangeli ya Davidi mpe ya Salomo, mokonzi ya Tulo azalaki monguna ya Yisalaele te. Ntango Nzembo 83 ekomamaki, bato ya Tulo bakómaki koyina Yisalaele mpe basanganaki na banguna ya Yisalaele.
4 Mokomi ya nzembo atángi bikólo zomi oyo ezalaki koyanga mwango ya koboma libota ya Nzambe. Bikólo yango ya banguna, oyo ezalaki zingazinga ya Yisalaele, ezali oyo: “Hema ya Edome mpe ya Yisamaele; Moaba mpe na Bahagala; Bagebali mpe Amona mpe Amaleki, Filisitia mpe bato ya Tulo; Asulia mpe ayei kosangana na bango.” (Nz. 83:6-8) Nzembo yango elobeli likambo nini? Bato mosusu balobaka ete nzembo yango elobeli etumba oyo esalemaki ntango Amona, Moaba, mpe bafandi ya Ngomba ya Seili basanganaki mpo na kobundisa Yisalaele, na mikolo ya mokonzi Yozafata. (2 Nta. 20:1-26) Bamosusu mpe balobaka ete elobeli kaka ndenge oyo bikólo ya zingazinga ezalaki koyina Yisalaele na bileko ndenge na ndenge.
5. Ndenge nini Nzembo 83 ekoki kosalisa baklisto lelo oyo?
5 Ata soki alobelaki likambo nini, ezali polele ete Yehova Nzambe akomisaki nzembo yango na eleko oyo ekólo na ye ezalaki na likama. Nzembo yango ezali mpe kolendisa basaleli ya Nzambe lelo oyo, mpamba te banguna oyo bazali koluka koboma bango bazali kobimisela bango mikakatano ndenge na ndenge. Na ntembe te, nzembo yango ekolendisa biso na mikolo ezali koya ntango Gogo ya Magogo akotambwisa mampinga na ye na etumba ya nsuka mpo na koluka kosukisa bato nyonso oyo bazali kosambela Nzambe na elimo mpe na solo.—Tángá Ezekiele 38:2, 8, 9, 16.
Likambo oyo elekaki ntina
6, 7. (a) Mokomi ya Nzembo 83 abandaki libondeli na ye na maloba nini? (b) Likambo nini elekaki ntina mpo na ye?
6 Tótala ndenge oyo mokomi ya nzembo amonisaki mayoki na ye na libondeli: “Ee Nzambe, kofanda kimya te, ee Nzambe, kokanga monɔkɔ te mpe kotikala nyɛɛ te. Zambi talá, bayini na yo bazali kosala makɛlɛlɛ; baoyo bakoyinaka yo bazali kotombola mitó. Bazali koyangela bato na yo mwango na kokosa . . . Zambi bazali koyanga mwango na motema moko, basali kondimana mabe na mpo na yo.”—Nz. 83:1-3, 5.
7 Mpo na mokomi ya nzembo, likambo nini elekaki ntina? Na ntembe te azalaki komibanzabanza mpo na libateli na ye ná libota na ye. Kasi, na libondeli na ye amonisaki ete azalaki komitungisa libosoliboso ndenge nkombo ya Yehova ezalaki kosambwisama mpe ndenge banguna bazalaki kokanela ekólo oyo ezalaki komema nkombo yango. Tiká ete biso mpe tózalaka ntango nyonso na makanisi malamu ndenge yango, wana tozali koyika mpiko na mikakatano ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe.—Tángá Matai 6:9, 10.
8. Bikólo oyo eyangaki mwango mabe mpo na Yisalaele ezalaki na mokano nini?
8 Mokomi ya nzembo azongelaki maloba ya banguna ya Yisalaele ete: “Yaká, tókata libota mobimba na bango ete nkombo ya Yisalaele eyebana lisusu te.” (Nz. 83:4) Bikólo yango ezalaki mpenza koyina libota ya Nzambe! Kasi, bazalaki na likambo mosusu oyo etindaki bango báyanga mwango mabe mpo na Yisalaele. Bazalaki kolula mabelé ya Yisalaele mpe balobaki na lolendo nyonso ete: “Tokokamata bifandelo ya Nzambe lokola libula.” (Nz. 83:12) Likambo ya ndenge yango esalemi mpe na mikolo na biso? Ɛɛ!
“Ndako ya bulɛɛ na yo”
9, 10. (a) Na ntango ya kala, nini ezalaki ndako ya bulɛɛ ya Nzambe? (b) Batikali kati na bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali na mapamboli nini lelo oyo?
9 Na ntango ya kala, Mokili ya Ndaka ezalaki mpe kobengama ndako ya bulɛɛ ya Nzambe. Tókanisa lisusu nzembo ya bolongi oyo Bayisalaele bayembaki nsima ya kolongwa na boombo na Ezipito: “Okambaki na bolingo bato basikoli yo, na nguya na yo olakisaki bango nzela ya ndako ya bulɛɛ na yo.” (Ex. 15:13) Na nsima, na “ndako” yango, batongaki tempelo moko epai banganga-nzambe bazalaki kosala mpe engumba Yelusaleme, epai bakonzi ya libota ya Davidi bazalaki kofanda na kiti ya bokonzi ya Yehova. (1 Nta. 29:23) Yango wana, Yesu abengaki Yelusaleme “engumba ya Mokonzi monene.”—Mat. 5:35.
10 Ezali boni na ntango na biso? Na mobu 33 T.B., ekólo moko ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” esalemaki. (Gal. 6:16) Ekólo yango, oyo esangisi bandeko ya Yesu Klisto bapakolami na elimo, ekokisaki mokumba oyo ekólo Yisalaele ekokisaki te: kozala batatoli mpo na nkombo ya Nzambe. (Yis. 43:10; 1 Pet. 2:9) Yehova alakaki bato yango makambo oyo alakaki Yisalaele ya kala ete: “Nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato ya ekólo na ngai.” (2 Kol. 6:16; Lev. 26:12) Na 1919, Yehova asalaki boyokani na batikali ya “Yisalaele ya Nzambe” mpe na ntango yango, bazwaki “mokili,” elingi koloba mboka ya elimo epai bazali na paladiso ya elimo. (Yis. 66:8) Kobanda na bambula ya 1930, bamilio ya “bampate mosusu” bazali koya kosangana na bango. (Yoa. 10:16) Esengo mpe bomɛngo ya elimo ya baklisto ya ntango na biso ezali elembeteli monene ete boyangeli ya Yehova nde ebongi. (Tángá Nzembo 91:1, 2.) Likambo yango ezali kongalisa nkanda ya Satana!
11. Mokano ya libosoliboso ya banguna ya Nzambe ezali nini tii lelo oyo?
11 Na ntango oyo ya nsuka, Satana azali kotinda bato na ye bátɛmɛla batikali kati na bapakolami mpe baninga na bango bampate mosusu. Likambo yango emonanaki na Mpoto ya Wɛsti ntango Banazi bazalaki koyangela mpe na Mpoto ya Ɛsti na boyangeli ya Bakoministe na Union soviétique. Emonanaki mpe na mikili mosusu, mpe ekomonana lisusu, mingimingi na etumba ya nsuka ya Gogo ya Magogo. Na etumba yango, ekoki kosalema ete banguna bábɔtɔla bandako mpe biloko mosusu ya basaleli ya Yehova, ndenge banguna basalaki na ntango ya kala. Nzokande, mokano ya libosoliboso ya Satana ezalaka ntango nyonso ya koboma lisangá na biso mpo nkombo ya Batatoli ya Yehova elimwa libela. Ndenge nini Yehova azali kotalela likambo yango oyo etaleli bokonzi na ye? Tózongela maloba ya mokomi ya nzembo.
Ndakisa mpo na bolongi ya Yehova
12-14. Mokomi ya nzembo alobelaki bitumba nini ya minene oyo Bayisalaele balongaki pembeni ya engumba Megido?
12 Mokomi ya nzembo azalaki na kondima makasi ete Yehova azali na makoki ya kobebisa mikano ya banguna na ye. Alobelaki bitumba mibale ya minene oyo Yisalaele elongaki pene na engumba Megido, oyo ezalaki pembeni ya lobwaku ya Megido. Na eleko ya molunge, Ebale Kisoni ekaukaka mpe nzela na yango emonanaka polele na lobwaku yango. Na eleko ya mbula, lobwaku yango ekómaka ebale monene. Mbala mosusu ezali mpo na yango nde bazalaki mpe kobenga ebale yango “mai ya Megido.”—Bas. 4:13; 5:19.
13 Ngomba Mola ezali na ngámbo mosusu ya lobwaku yango, na ntaka ya kilomɛtrɛ 15 kobanda na Megido; kuna, basoda ya Midiami, ya Amaleki, mpe ya mikili ya ebimelo ya ntango, bayanganaki mpo na kobundisa Yisalaele na mikolo ya Mosambisi Gideona. (Bas. 7:1, 12) Na lisalisi ya Yehova, Gideona ná bato na ye 300 balongaki basoda ya banguna oyo bazalaki ebele mpenza. Esalemaki ndenge nini? Na kolanda malako ya Nzambe, bato yango bazingaki kaa ya banguna na butu, basimbaki bambɛki oyo ezalaki na miinda na kati. Ntango Gideona apesaki mitindo, bango nyonso babukaki bambɛki na bango mpe kongɛnga ya miinda na bango emonanaki polele. Na mbala moko, babɛtaki bakelelo mpe bagangaki ete: “Mopanga mpo na [Yehova] mpe mpo na Gideona!” Banguna babulunganaki mpe bakómaki kobomana bango na bango; baoyo babikaki bakimaki na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani. Na ntango yango, Bayisalaele mosusu bayaki mpe bango nyonso balandaki banguna. Babomaki basoda 120 000 ya banguna.—Bas. 7:19-25; 8:10.
14 Ngomba Tabola ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 6 banda na Ngomba Mola, na ngámbo mosusu ya lobwaku ya Megido. Bambula mingi liboso, Mosambisi Balaka ayanganisaki Bayisalaele 10 000 kuna mpo na kobunda na basoda ya Yabini, Mokanana oyo azalaki mokonzi ya Hasola; nkombo ya mokonzi ya basoda na ye ezalaki Sisela. Basoda yango ya Kanana bazalaki na makalo 900 oyo ezalaki na bambeli milai oyo bakangisá na bapine mpe ezalaki kokata ntango bapine ezali kobaluka. Ntango basoda ya Yisalaele, baoyo bazalaki ata na bibundeli ya malonga te, bayanganaki na Ngomba Tabola, basoda ya Sisela bakitaki na lobwaku. Na nsima, “[Yehova] abukaki Sisela mpe makalo na ye nyonso mpe basoda na ye nyonso.” Ekoki kozala ete mbula moko ya mbalakaka ebɛtaki mpe makalo na bango ekangamaki na pɔtɔpɔtɔ mpamba te Ebale Kisoni etondaki na mai. Bayisalaele babomaki basoda nyonso ya banguna.—Bas. 4:13-16; 5:19-21.
15. (a) Mokomi ya nzembo abondelaki mpo Yehova asala nini? (b) Nkombo ya etumba ya nsuka ya Nzambe ezali kotinda biso tókanisa nini?
15 Mokomi ya nzembo abondelaki Yehova asala likambo ya ndenge wana na bikólo oyo ezalaki kokanela Yisalaele na mikolo na ye. Abondelaki boye: “Salá na bango [lokola] osalaki na Midiani, [lokola] osalaki na Sisela mpe Yabini kuna na mai ya Kisoni. Baoyo bakufaki na Ene-dolo; bazalaki lokola nyei mpo na kobongisa mabelé.” (Nz. 83:9, 10) Kutu, etumba ya nsuka ya Nzambe mpo na kobebisa mokili ya Satana ebengami Armagedona to Hala-Magedona (oyo elimboli “Ngomba ya Megido”). Nkombo yango ezali kozongisa na makanisi na biso bitumba minene oyo esalemaki pembeni ya engumba Megido. Bolongi ya Yehova na bitumba wana ya kala ezali kondimisa biso ete akolonga na etumba ya Armagedona.—Emon. 16:13-16.
Tóbondela mpo bokonzi ya Yehova elongisama
16. Ndenge nini bilongi ya banguna ‘ezipami na nsɔni’ lelo oyo?
16 Na “mikolo ya nsuka” oyo, Yehova asukisi milende nyonso ya banguna oyo balukaki kosilisa libota na ye. (2 Tim. 3:1) Mpo na yango, banguna bayoki nsɔni. Nzembo 83:16 emonisaki likambo yango na maloba oyo: “Zipá bilongi na bango na nsɔni ete báluka nkombo na yo, ee [Yehova].” Na mikili ndenge na ndenge, banguna balongi te kosukisa Batatoli ya Yehova. Na mikili yango, mpiko ya basaleli ya Nzambe ya solo kaka moko ezali litatoli epai ya bato ya mitema sembo mpe mingi na bango ‘balukaki nkombo ya Yehova.’ Na mikili oyo banyokolaki Batatoli ya Yehova, lelo oyo bankóto ya bato—ata mpe koleka nkóto nkama—bazali kosanzola Yehova. Yango ezali mpenza bolongi mpo na Yehova! Ezali mpe nsɔni mpo na banguna!—Tángá Yilimia 1:19.
17. Likambo nini ya nsɔmɔ bato bakokutana na yango, mpe na ntango yango tokokanisa maloba nini?
17 Ya solo, toyebi ete banguna bakokoba konyokola biso. Tozali mpe kokoba kosakola nsango malamu, ata epai ya banguna na biso. (Mat. 24:14, 21) Nzokande, mosika te libaku ya kobongwana mpe ya kobika oyo epesami epai ya banguna yango ekosuka. Kosantisama ya nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi koleka lobiko ya bato. (Tángá Ezekiele 38:23.) Ntango bikólo ya mokili ekosangana mpo na koboma basaleli ya Nzambe, ndenge esakolamaki, tokokanisa maloba oyo ya libondeli ya mokomi ya nzembo: “Tiká ete bázala na nsɔni mpe bábanga seko; ɛɛ tiká ete báyoka nsɔni mpe bákufa.”—Nz. 83:17.
18, 19. (a) Likambo nini ekokómela bato oyo bazali kotɛmɛla bokonzi ya Yehova? (b) Lokola bokonzi ya Yehova ekolongisama mosika te, yango ezali kotinda yo osala nini?
18 Bato oyo bazali kotɛmɛla bokonzi ya Yehova bakosukisama na ndenge ya nsɔni. Liloba ya Nzambe emonisi ete baoyo “bazali te kotosa nsango malamu” mpe mpo na yango, bakobomama na Armagedona, bakozwa “etumbu ya seko.” (2 Tes. 1:7-9) Kobomama na bango mpe lobiko ya baoyo bazali kosambela Yehova na solo ekomonisa polele ete Yehova azali Nzambe ya solo kaka moko. Na mokili ya sika, moto moko te akobosana elonga monene wana. Baoyo bakozonga na bomoi na nzela ya “lisekwa . . . ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene” bakoyoka nsango ya likambo monene wana oyo Yehova akosala. (Mis. 24:15) Na mokili ya sika, bakomona bilembo oyo ekondimisa bango ete kotosa bokonzi ya Yehova ezali nzela ya bwanya. Lisusu, bato ya komikitisa bakondima nokinoki ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo.
19 Tata na biso ya bolingo abongisi bomoi moko malamu mpenza mpo na basambeli na ye ya sembo! Mosika te akopesa eyano na libondeli ya mokomi ya nzembo oyo elobi ete: “Tiká ete [banguna na yo] bázala na nsɔni mpe bábanga seko; ɛɛ tiká ete báyoka nsɔni mpe bákufa; Ɛɛ báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba,” Yango ezali kotinda yo osanzola Yehova, boye te?—Nz. 83:17, 18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liboso oyekola lisolo oyo, ekozala malamu otánga Nzembo 83 mpo oyeba makambo oyo elobami kati na yango.
Okoki kolimbola?
• Yisalaele ezalaki na mokakatano nini ntango Nzembo 83 ekomamaki?
• Likambo nini elekaki ntina mpo na mokomi ya Nzembo 83?
• Satana azali koyina banani lelo oyo?
• Ndenge nini eyano ya nsuka ekopesama na libondeli oyo ezali na Nzembo 83:18?
[Karte na lokasa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Ndenge nini bitumba oyo esalemaki pembeni ya Megido etaleli bomoi na biso na mikolo ezali koya?
Ebale Kisoni
Halosete
Ng. Kalamele
Lobwaku ya Yizelele
Megido
Tanaka
Ng. Giliboa
Motó ya mai ya Halode
Mola
Ene-dolo
Ng. Tabola
Mbu ya Galilai
Ebale Yolodani
[Elilingi na lokasa 12]
Nini etindaki mokomi moko ya nzembo akoma libondeli moko?