Jéhovah, ye oyo akosalaka makambo na kokamwa
“Yo ozali monene mpe okosalaka makambo na kokamwa; ozali Nzambe, bobele yo.”—NZEMBO 86:10, MN.
1, 2. (a) Lolenge nini biloko moto asali bisili kobóngola mokili? (b) Epai wapi tokoki kozwa elikya ya makambo malamu mpo na ntango ezali koya?
LELO moto akoki koloba na lɔlɛndɔ nyonso ete biloko asili kosala bizali ya kokamwa: apareye mingi ya kurá, bamasini mpo na kotinda nsango na esika mosusu, vidéo, motuka, mpɛpɔ, ordinatere. Na ntina na biloko yango, mokili esili kokoma lokola mboka moko moke. Kasi mboka ya motindo nini! Na esika ete kimya ezala mpe moto na moto asepela na biloko mingi ya malamu, mokili ezali komona mpasi na bitumba oyo bizali koboma bato mingi, mobulu, kobebisama ya mabelé, malali mpe bobola. Mpe atako basili kokitisa motuya ya bibundeli, nzokande bibundeli ya nikleere oyo bipanzani na mikili minso bikoki kaka koboma libota mobimba ya bato. Batekisi ya bibundeli, bakompanyi oyo ekosalaka mandoki, bazali kosala nyonso mpo na kotekisa biloko yango oyo ekobomaka bato, mpe bazali bato ya liboso kati na mombongo na mokili. Bozwi ya bamoko ezali ntango nyonso kobakisama mpe basusu bazali ntango nyonso kokoma babola koleka. Moto azali oyo akoki kobongisa makambo?
2 Ɛɛ! Mpamba te ezali na Moto moko oyo asili kopesa elaka ya kosikola bato, “ye oyo azali likoló koleka,” ye Jéhovah Nzambe. (Mosakoli 5:8, MN) Na nzela ya elimo na ye, atambwisaki bokomi ya banzembo oyo ezali kolendisa mpe kopesa batoli ya mayele na ntango ya mpasi Davidi akomaki banzembo koleka 70. Kati na yango ezali na Nzembo 86 oyo motó na yango ya likambo ezali: “Libondeli na Davidi.” Ezali libondeli oyo tokoki kosalela.
Sembo ata kati na mpasi
3. Na mikolo oyo tozali kobika na yango, ndakisa nini Davidi apesi biso oyo ezali kolendisa biso?
3 Davidi akomaki nzembo yango ntango azalaki na mpasi. Na “mikolo na nsuka” oyo ya biloko ya Satana, oyo ezali “ntango na mpasi,” biso mpe tozali kokutana na mimekamo ya lolenge moko. (2 Timoté 3:1; tala lisusu Matai 24:9-13.) Davidi ayokaki mpasi lokola biso mpe asenzwaki na ntina na mikakatano oyo ekomelaki ye. Kasi atikaki te ete mikakatano yango milembisa ye mpo na oyo etali kotya motema epai na Mozalisi na ye. Amilelaki epai na ye ete: “Ɛ Jéhovah, pesa litoi mpe zongisela ngai liloba; mpo ete ngai nazali moto na mawa mpe mobola. Batela molimo na ngai mpo ete nazali moyengebeni. Ɛ Nzambe na ngai, bikisa moombo na yo oyo azali na elikya epai na yo.”—Nzembo 86:1, 2.
4. Lolenge nini tokomonisa ete totii motema na biso epai na Nzambe?
4 Na ndakisa ya Davidi, tokoki kotya motema ete Jéhovah oyo azali “Nzambe na kobondisa nyonso” akotya litoi na ye na mabelé mpe akoyoka mabondeli na biso ya kosokema. (2 Bakolinti 1:3, 4) Esili biso kotya motema na biso epai na Nzambe, tokoki kolanda toli ya Davidi ete: “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebeni atelengana.”—Nzembo 55:22.
Boyokani ya penepene elongo na Jéhovah
5. (a) Ndenge nini mabóngoli mosusu ya malamu elongolaki mabunga ya bakomeli ya Bayuda? (b) Lolenge nini nzembo 85 mpe 86 ezali kokumisa Jéhovah? (Tala oyo ekomami na nse.)
5 Kati na Nzembo 86. Davidi asaleli liloba “Ɛ Jéhovah” mbala 11. Oyo nde libondeli ya mɔ́tɔ! Oyo nde boyokani ya penepene elongo na Jéhovah! Na nsima, bakomeli na Bayuda, mingimingi Basoferime, balingaki lisusu te kosalela nkombo ya Nzambe na lolenge yango. Bakolisaki ezaleli ya kobanga kosalela nkombo na lolenge ya mabe. Babosanaki ete moto asalemaki na elilingi ya Nzambe, yango wana bazangaki kopesa lokumu na Nzambe na ntina na bizaleli kitoko oyo emonanaki epai na moto. Na ntina yango, na bisika 11 oyo nkombo ya Nzambe esalelami na makomi ya Liebele ya Nzembo 86, basaleli liloba ʼAdho-naiʹ (Nkolo) mbala 7 na esika ya nkombo YHWH (Jéhovah). Tokoki kozala na botondi na lolenge Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau mpe mabóngoli mosusu ya malamu masili kozongisa nkombo ya Nzambe na esika esengeli kozala kati na Liloba na ye. Yango emonisi mpenza boyokani tosengeli kozala na yango elongo na Jéhovah.a
6. Na mitindo nini tokoki komonisa ete nkombo ya Jéhovah ezali na motuya epai na biso?
6 Davidi alandi kobondela boye: “Ɛ Jéhovah, yokela ngai mawa, mpo ete nazali konganga epai na yo mokɔlɔ mobimba Sepelisa molimo na mosaleli na yo mpo ete epai na yo, ɛ Jéhovah, nazali kotombola molimo na ngai.” (Nzembo 86:3, 4) Tala ete Davidi alandaki konganga epai na Jéhovah “mokɔlɔ mobimba.” Ya solo, Davidi asambelaki mbala mingi butu mobimba, lokola ntango akimaki na esobe. (Nzembo 63:6, 7) Lelo mpe lokola, Batemwe mosusu bangangaki makasi epai na Jéhovah ntango moto moko alingaki kosangisa na bango nzoto na makasi to ntango balingi kosalela bango mabe. Mbala mosusu bakamwaka na komona ete yango ezali kosukela bango malamu.b Nkombo ya Jéhovah ezali na motuya epai na biso, pelamoko yango ezalaki na motuya epai na “Yesu Klisto, mwana na Davidi” ntango azalaki na mabelé. Yesu ateyaki na bayekoli na ye ete basambela mpo ete nkombo ya Jéhovah ebulisama mpe alimbolaki bango ntina na nkombo yango.—Matai 1:1; 6:9; Yoane 17:6, 25, 26.
7. Bandakisa nini emonisi ete Jéhovah azali kotombola molimo ya basaleli na ye, mpe yango esengeli kopusa biso na kosala nini?
7 Davidi atombolaki molimo na ye to bomoto na ye mobimba epai na Jéhovah. Alendisi biso ete biso mpe tosala mpe bongo. Na Nzembo 37:5 (Biblia Liloba lya Nzambe) alobi ete: “Tiya bomoi bwa yo o maboko ma Jéhovah, tiya elikya ya yo na ye mpe akosalisa yo.“ Na bongo, Jéhovah akozanga te kopesa eyano na lilombo na biso ete asepelisa molimo na biso. Basaleli mingi ya Jéhovah oyo bazali sembo balandi kozwa esengo moko monene kati na mosala na ye atako bazali kokutana na mikakatano, na minyoko mpe na malali. Bandeko na biso oyo bazali na mikili ya Afrika lokolo Angola, Libéria, Mozambique mpe Zaïre, mikili oyo esili kobeba na ntina na bitumba, balandi kotya mosala ya Jéhovah na esika ya liboso na bomoi na bango.c Jéhovah esepelisi bango solo na kopesaka bango likoki ya kobuka mbuma mingi ya elimo na mosala na ye. Tosengeli kozala na mpiko lokola bango. (Baloma 5:3-5) Awa ezali biso koyika mpiko, tondimisami ete: “Emɔnɔnɛli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekomi epai na nsuka . . . Ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Totya motema na biso mobimba epai na Jéhovah mpe ‘tokoma epai na nsuka.’
Malamu ya Jéhovah
8. Boyokani nini ya penepene tokoki kozala na yango elongo na Jéhovah, mpe lolenge nini asili komonisa bolamu na ye?
8 Davidi abondelaki lisusu na mayoki mozindo ete: “Mpo ete yo ozali malamu, Ɛ Jéhovah, mpe okolimbisaka mabe. Otondi na boboto mpo na bango nyonso bakobyangaka nkombo na yo. Ɛ Jéhovah, pesa litoi na libondeli na ngai; yoka mongongo na mabondeli na ngai. Nakobianga nkombo na yo na mokɔlɔ na mpasi na ngai, mpo ete okozongisela ngai liloba.” (Nzembo 86:5-7) Oyo nde nsai tozali na yango kati na motema ntango nyonso mpo na boyokani ya penepene oyo ezali kati na Liloba “Ɛ Jéhovah”! Ezali boyokani moko ya penepene oyo biso mpe tokoki kokolisa na nzela ya libondeli Davidi abondelaki na libaku mosusu ete: “Kanisa masumu na bolenge na ngai te; ɛ Jéhovah, mpo na boboto na yo, kanisa ngai; ɛɛ, mpo na malamu na yo.” (Nzembo 25:7) Jéhovah azali mpenza malamu na lolenge apesaki lisiko na nzela ya Yesu, na kolimbisaka basumuki oyo babongoli motema mpe na komonisaka boboto mingi epai na Batemwe na ye oyo bazali na botondi—Nzembo 100:3-5; Malaki 3:10.
9. Basumuki oyo babongoli motema bapesameli elendiseli nini?
9 Tosengeli komitungisa mpo na mabunga na biso ya kala? Soki tozali sikawa kotambola alima, tokolendisama soki tokanisi maloba na Petelo epai na bato ya masumu oyo babongolaki motema, ete “ntango na kopema” ekouta epai na Jéhovah. (Misala 3:19) Tika ete tozala penepene na Jéhovah na nzela na Mosikoli na biso, Yesu, oyo alobaki maloba oyo ya bolingo: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe boyekola na ngai; mpo ete ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” Ntango Batemwe na ye ya sembo bazali kobondela ye lelo na nkombo na Yesu nkombo oyo ezali na motuya, Jéhovah azali kopesa bango bopemi.—Matai 11:28, 29; Yoane 15:16.
10. Motuya nini mokanda na Nzembo ezali kopesa na motema malamu ya Jéhovah?
10 Mokanda na Nzembo elobeli “motema malamu” ya Jéhovah koleka mbala nkama. Malamu yango ezali solo mingi! Na ba versets minei ya liboso, Nzembo 118 ezali kobenga basaleli na Nzambe ete batonda Jéhovah, kozongelaka mbala minei ete ‘malamu na ye ekoumelaka lobiko na lobiko.’ Nzembo 136 emonisi mbala 26 ezaleli oyo ya “motema malamu,“ oyo ezali kobenda biso epai na ye [Biblia haut-fleuve esaleli “boboto”]. Ezala tosali mabunga lolenge nini—lokola Yakobo 3:2 elobi ete “biso nyonso tokokweaka na makambo mingi”—tika tosenga na Jéhovah ete alimbisa biso mpe totya motema na biso na mawa na ye mpe na malamu na ye. Malamu na ye ezali komonisa bolingo na ye epai na biso. Soki tolandi kosala mokano na Nzambe na sembo akomonisa biso bolingo na ye na kosungaka ete tokoka kolonga mpasi nyonso.—1 Bakolinti 10:13.
11. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa moto na kobengana liyoki ya komikweisa?
11 Ekoki kozala ete basusu babetisi biso libaku. Mpo na mpasi bazwaki na bomwana kati na mayoki na bango to na nzoto na bango, basusu bazalaka komifunda na mayoki na bango to bamimonaka lokola ete bazali na ntina te. Moto oyo azali na mpasi ya motindo wana akoki kobelela Jéhovah mpe kondima na motema mobimba ete akoyanola ye. (Nzembo 55:16, 17) Nkulutu moko akoki kosalisa moto yango na bopɔlɔ nyonso mpo na kondimisa ye ete ezalaki libunga na ye te. Na nsima nkulutu yango akoki kosolola na ye mbala na mbala kino moto yango akoyeba ‘kokumba mokumba’ yango.—Bagalatia 6:2, 5.
12. Mpo na nini bampasi esili kobakisama, kasi lolenge nini tokoki kolonga yango?
12 Makambo mazali mingi oyo basaleli na Jéhovah basengeli koyikela yango mpiko lelo. Kobanda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914, bampasi ezali se kobakisama na mabelé. Lokola Yesu asakolaki yango, makambo yango mazalaki “ebandeli na bolozi.” (Matai 24:3, 8) “Elaka mokuse” oyo etikali na Diable ezali kokende na nsuka na yango. (Emoniseli 12:12) “Lokola nkosi [oyo ezali] konguluma,” ezali koluka eloko ya kolya; Monguna yango monene azali kosala nyonso mpo na kotangola biso na etonga na Nzambe mpe koboma biso. (1 Petelo 5:8) Kasi akolonga te! Mpamba te lokola Davidi, tozali kotya elikya na biso nyonso epai na Nzambe na biso bobele moko, ye Jéhovah.
13. Lolenge nini baboti mpe bana na bango bakoki kozwa litomba na malamu ya Jéhovah?
13 Na ntembe te Davidi akotisaki na motema ya mwana na ye Salomo mposa ya kotya motema na malamu ya Jéhovah. Yango wana Salomo akokaki koteya mwana na ye moko ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe ye akotambolisa yo. Tika te ete omonana na mayele na miso na yo moko; banga Jéhovah mpe longwa na mabe.” (Masese 3:5-7) Lelo mpe baboti basengeli kolakisa bana na bango lolenge ya kotya motema na bango mobimba epai na Jéhovah ntango bazali kobondela ye mpe lolenge ya kolonga mimekamo ya mokili oyo mabe, lokola mimekamo na kelasi to mimekamo mpo na kosala pite. Soki okosalela mikɔlɔ nyonso mitinda ya Biblia na boyokani na yo elongo na bana na yo, yango ekoki kokolisa kati na mitema na bango ya bolenge bolingo ya solo mpo na Jéhovah, mpe na mabondeli na bango bakoyeba kotya motema na bango mobimba epai na ye.—Deteronome 6:4-9; 11:18, 19.
Misala na kokamwa ya Jéhovah
14, 15. Tanga mwa misusu kati na misala ya kokamwa ya Jéhovah?
14 Na kondima nyonso, Davidi alobaki ete: “Ɛ Jéhovah, kati na banzambe mosusu azali pelamoko na yo te; mpe mosala mosusu ekokani na misala na yo te.” (Nzembo 86:8) Misala na Jéhovah mileki nyonso oyo moto akoki kokanisa na bonene mpe na kitoko. Mwa ndambo na makambo sianse ya lelo emonisi biso—bonene ya molóngó, kobongisama na yango, kitoko na yango—emonani ete ezali ya kokamwa koleka oyo Davidi amonaki. Nzokande, Davidi alobaki ete: “Likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe, lola ekoyebisaka misala na maboko na ye.”—Nzembo 19:1.
15 Misala na Jéhovah mimonani na lolenge moko ya kokamwa na motindo atyaki mabelé na esika ebongi mpe abongisaki yango mpo ete moi mpe butu ezala, mpe bileko, ntango na kolona mpe ntango na kobuka mbuma, mpe makambo mosusu mingi ya kitoko mpo na kosepelisa bato. Motindo biso tosalami mpe makoki mapesameli biso mazali mpe ya kokamwa; yango epesi biso nzela ete tosepela na biloko oyo Jéhovah asala oyo bizali zingazinga na biso.—Genese 2:7-9; 8:22; Nzembo 139:14.
16. Eloko nini oyo eleki nyonso emonisi malamu na Jéhovah, mpe yango ekomema na makambo nini ya kitoko?
16 Baboti na biso ya liboso bazangaki botosi epai na Nzambe mpe babendelaki bato bampasi oyo bazali na yango kino lelo. Kasi mpo na bolingo na ye, Jéhovah atindaki Mwana na ye oyo akomaki ‘moto Yesu Klisto’ mpo ete asikola bato na mabelé mpe, na nsima, ayangela uta likoló lokola Mokonzi ya boyengebene. (Matai 20:28; Misala 2:32, 34) Kati na bato ya sembo Jéhovah aponaki “bozalisi ya sika” oyo ekoyangela elongo na Klisto lokola “makoló na sika” likoló na “mabelé ya sika” oyo kati na yango bamiliare ya basekwi bakozala. (2 Bakolinti 5:17; Emoniseli 21:1, 5-7; 1 Bakolinti 15:22-26) Misala na Jéhovah mikokende se liboso kino kokokana na yango monene! Ya solo, tokoki koloba ete: “Ɛ Jéhovah, . . . malamu na yo ezali monene mingi mpenza, oyo yo obombeli bango bakobangaka yo!”—Nzembo 31:17-19.
17. Mosala nini ya Jéhovah mayebisami kati na Nzembo 86:9 ezali mpenza kokokisama lelo?
17 Kati na misala oyo Jéhovah azali kosala lelo, ezali na oyo Davidi alobaki na Nzembo 86:9 ete: “Mabota nyonso masalaki yo makoya mpo na kofukama liboso na yo, Ɛ Jéhovah, mpe bakokumisa nkombo na yo.” Nsima na kobenga kati na bato batikali ya bozalisi na ye ya sika, baoyo bazali “etonga moke” ya batuki na libula ya Bokonzi, Jéhovah akomaki kosangisa bamilió ya “ebele monene” ya “bampate mosusu” kati na “mabota nyonso,” baoyo bazali kondima makila na Yesu oyo esopamaki. Asili kotonga bango lokola lisangá moko ya mpiko. Bazali libota bobele moko ya baninga na kimya na mokili mobimba. Ntango baanzelu bazali komona likambo yango, bazali kokumbamela Jéhovah na kolobáká ete: “Mapamboli, na nkɔmbɔ, na mayɛlɛ, na matɔndi, na lokumu, na nguya, na makasi, ezala na Nzambe na biso libela na libela.” Ebele monene bazali mpe kokumisa nkombo na Jéhovah mpe kosalela ye “butu na moi.” Bazali na elikya ete bakobika na nsuka ya mokili oyo mpo na kozala na bomoi ya seko kati na paradis awa na mabelé.—Luka 12:32; Emoniseli 7:9-17; Yoane 10:16.
Bonɛnɛ ya Jéhovah
18. Lolenge nini Jéhovah amonisaki ete azali ‘Nzambe bobele moko’?
18 Na nsima, Davidi abendi likebi na biso likoló na bonzambe ya Jéhovah, ete: “Yo ozali monene mpe okosalaka makambo na kokamwa; ozali Nzambe, bobele yo.” (Nzembo 86:10, “MN”) Uta kala, Jéhovah amonisaki ete azali ‘Nzambe bobele moko.’ Mokonzi Farao ya Ezipito, oyo azalaki konyokola bato, abetaki ntembe na Moize na kotunaka ye ete: “Jéhovah azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisraele kokende? Ngai nayebi Jéhovah te.” Kasi mosika te amonaki lolenge nini Jéhovah azali monɛnɛ. Nzambe Mozwi-na-nguya-nyonso ayokisaki nsoni epai na banzambe ya Ezipito mpe na banganga-na-nkisi na nzela ya malozi minene; abomaki bana ya liboso ya Ezipite mpe asilisaki Falo na limpinga na ye kati na ebale Motane. Ya solo, moko te akokani na Jéhovah!—Exode 5:2; 15:11, 12.
19, 20. (a) Ntango nini nzembo oyo ezwami na Emoniseli 15:3, 4 ekoyembama na motindo eleki kitoko? (b) bolenge nini tokoki kosangana na mosala ya Jéhovah uta sikawa?
19 Jéhovah Nzambe bobele moko asalaki misala na kokamwa na nzela ya bibongiseli azwaki mpo na kosikola basambeli na ye na Ezipito ya ntango na biso, oyo ezali bongo mokili ya Satana. Asili kosala ete bikateli na ye bisakolama na mokili mobimba lokola litatoli na nzela ya mosala ya kosakola oyo eleki monene kati na Lisolo ya bato. Yango ekokisaki esakweli ya Yesu oyo ezwami na Matai 24:14. Mosika te “nsuka” ekoya, wana Jéhovah akomonisa bonene na ye na motindo oyo emonani naino te ntango akolongola bato nyonso ya mabe na mokili. (Nzembo 145:20) Ntango yango, loyembo na Moize mpe loyembo na Mwana na Mpate ekoyembama na makasi nyonso ete: “Misala na yo mizali minene mpe na kokamwa, ɛ Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-nguya nyonso. Banzela na yo ezali sembo mpe na sɛɔlɛɔ, ɛ Mokonzi na seko. Nani akozanga kobanga yo, Jéhovah? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Mpamba te bobele yo nde ozali sembo.”—Emoniseli 15:3, 4, MN.
20 Tika ete tozala na molende mpo na koyebisa na bato mosusu mikano kitoko ya Nzambe. (Tala Misala 2:11.) Lokola lisoló lilandi likomonisa yango, Jéhovah akolanda kosala misala minene mpe na kokamwa na mikolo na biso mpe na mikolo mizali koya liboso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndimbola moko likoló na Biblia, ebimisamaki na mobu 1874, etangi Andrew A. Bonar oyo alobaki ete: “Nsuka ya Nzembo [85] ezali komonisa mpenzampenza eloko eleki ntina mpenza epai ya Nzambe, yango nkombo na ye ya nkɔmbo. Ntango mosusu yango wana elandani na Nzembo mosusu, ‘libondeli na Davidi,’ oyo etondi na maloba matali bizaleli na Jéhovah. Likambo eleki ntina kati na Nzembo [86] ezali nkombo ya Jéhovah.”
b Tala “Rapport ya mosala ya ba Témoins de Jéhovah na 1992” oyo ekobima na Mosenzeli ya 1er janvier 1993.
c Tala lokasa 28 ya Réveillez-vous! ya le 22 juin 1984 oyo ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tosengeli kotalela libondeli lizwami kati na Nzembo 86 lokola ete libondeli na biso moko?
◻ Ndenge nini tokoki kozala na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah?
◻ Ndenge nini Jéhovah azali komonisa ete azali malamu epai na biso?
◻ Tanga mwa misusu kati na misala ya kokamwa ya Jéhovah?
◻ Mpo na oyo etali bonɛnɛ, ndenge nini tokoki koloba ete Jéhovah azali ‘Nzambe bobele moko’?
[Elilingi na lokasa 10]
Na “mabelé ya sika” oyo ebelemi, misala na kokamwa ya Jéhovah mikotatola mpo na nkembo na ye mpe bolamu na ye