Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Jéhovah, ye oyo akosalaka makambo na kokamwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 15 Sanza ya 12
    • 8. Boyokani nini ya penepene tokoki kozala na yango elongo na Jéhovah, mpe lolenge nini asili komonisa bolamu na ye?

      8 Davidi abondelaki lisusu na mayoki mozindo ete: “Mpo ete yo ozali malamu, Ɛ Jéhovah, mpe okolimbisaka mabe. Otondi na boboto mpo na bango nyonso bakobyangaka nkombo na yo. Ɛ Jéhovah, pesa litoi na libondeli na ngai; yoka mongongo na mabondeli na ngai. Nakobianga nkombo na yo na mokɔlɔ na mpasi na ngai, mpo ete okozongisela ngai liloba.” (Nzembo 86:5-7) Oyo nde nsai tozali na yango kati na motema ntango nyonso mpo na boyokani ya penepene oyo ezali kati na Liloba “Ɛ Jéhovah”! Ezali boyokani moko ya penepene oyo biso mpe tokoki kokolisa na nzela ya libondeli Davidi abondelaki na libaku mosusu ete: “Kanisa masumu na bolenge na ngai te; ɛ Jéhovah, mpo na boboto na yo, kanisa ngai; ɛɛ, mpo na malamu na yo.” (Nzembo 25:7) Jéhovah azali mpenza malamu na lolenge apesaki lisiko na nzela ya Yesu, na kolimbisaka basumuki oyo babongoli motema mpe na komonisaka boboto mingi epai na Batemwe na ye oyo bazali na botondi​—Nzembo 100:3-5; Malaki 3:10.

  • Jéhovah, ye oyo akosalaka makambo na kokamwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 15 Sanza ya 12
    • 11. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa moto na kobengana liyoki ya komikweisa?

      11 Ekoki kozala ete basusu babetisi biso libaku. Mpo na mpasi bazwaki na bomwana kati na mayoki na bango to na nzoto na bango, basusu bazalaka komifunda na mayoki na bango to bamimonaka lokola ete bazali na ntina te. Moto oyo azali na mpasi ya motindo wana akoki kobelela Jéhovah mpe kondima na motema mobimba ete akoyanola ye. (Nzembo 55:16, 17) Nkulutu moko akoki kosalisa moto yango na bopɔlɔ nyonso mpo na kondimisa ye ete ezalaki libunga na ye te. Na nsima nkulutu yango akoki kosolola na ye mbala na mbala kino moto yango akoyeba ‘kokumba mokumba’ yango.​—Bagalatia 6:2, 5.

      12. Mpo na nini bampasi esili kobakisama, kasi lolenge nini tokoki kolonga yango?

      12 Makambo mazali mingi oyo basaleli na Jéhovah basengeli koyikela yango mpiko lelo. Kobanda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914, bampasi ezali se kobakisama na mabelé. Lokola Yesu asakolaki yango, makambo yango mazalaki “ebandeli na bolozi.” (Matai 24:3, 8) “Elaka mokuse” oyo etikali na Diable ezali kokende na nsuka na yango. (Emoniseli 12:12) “Lokola nkosi [oyo ezali] konguluma,” ezali koluka eloko ya kolya; Monguna yango monene azali kosala nyonso mpo na kotangola biso na etonga na Nzambe mpe koboma biso. (1 Petelo 5:8) Kasi akolonga te! Mpamba te lokola Davidi, tozali kotya elikya na biso nyonso epai na Nzambe na biso bobele moko, ye Jéhovah.

      13. Lolenge nini baboti mpe bana na bango bakoki kozwa litomba na malamu ya Jéhovah?

      13 Na ntembe te Davidi akotisaki na motema ya mwana na ye Salomo mposa ya kotya motema na malamu ya Jéhovah. Yango wana Salomo akokaki koteya mwana na ye moko ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe ye akotambolisa yo. Tika te ete omonana na mayele na miso na yo moko; banga Jéhovah mpe longwa na mabe.” (Masese 3:5-7) Lelo mpe baboti basengeli kolakisa bana na bango lolenge ya kotya motema na bango mobimba epai na Jéhovah ntango bazali kobondela ye mpe lolenge ya kolonga mimekamo ya mokili oyo mabe, lokola mimekamo na kelasi to mimekamo mpo na kosala pite. Soki okosalela mikɔlɔ nyonso mitinda ya Biblia na boyokani na yo elongo na bana na yo, yango ekoki kokolisa kati na mitema na bango ya bolenge bolingo ya solo mpo na Jéhovah, mpe na mabondeli na bango bakoyeba kotya motema na bango mobimba epai na ye.​—Deteronome 6:4-9; 11:18, 19.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto