Yehova azali koteya biso kotánga mikolo na biso
“Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema ya mayele.”—NZEMBO 90:12.
1. Mpo na nini ebongi tósɛnga Yehova alakisa biso ‘kotánga mikolo na biso’?
YEHOVA NZAMBE azali Mozalisi na biso mpe Mopesi ya Bomoi. (Nzembo 36:9; Emoniseli 4:11) Mpo na yango, ye nde abongi, koleka moto mosusu nyonso, kolakisa biso ndenge oyo tokoki kosalela bomoi na biso na mayele. Yango wana, mokomi ya nzembo asɛngaki Nzambe ete: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema ya mayele.” (Nzembo 90:12) Ebongi mpenza tótalela malamumalamu Nzembo 90, epai tozali kokuta maloba yango. Kasi, liboso na yango, tólobela naino na mokuse nzembo yango oyo epemamaki na Nzambe.
2. (a) Nani akomaki Nzembo 90, mpe ekoki kozala ete akomaki yango na ntango nini? (b) Maloba ya Nzembo 90 esengeli kotinda biso na kotalela bomoi na biso ndenge nini?
2 Maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 90 ebengi yango “libondeli ya Mose, moto ya Nzambe.” Lokola Nzembo yango ezali komonisa mingimingi ete bomoi ya moto ezali mpenza mokuse, ekoki mpenza kozala ete bakomaki yango ntango Bayisalaele bazalaki koyengayenga na esobe nsima ya kolongwa na boombo na Ezipito, na eleko oyo bato nyonso oyo bazangaki kondima basilaki nyɛɛ. (Mituya 32:9-13) Ata soki ekomamaki na ntango wana to te, toyebi ete Nzembo 90 ezali komonisa ete bomoi ya moto ya kozanga kokoka ezali mokuse. Yango ezali komonisa biso polele ete tosengeli kozala na mayele na ndenge tozali kosalela mikolo na biso.
3. Makambo nini mpenzampenza ezali na Nzembo 90?
3 Na Nzembo 90, vɛrsɛ motoba ya liboso ezali komonisa ete Yehova azali ndako na biso ya seko. Vɛrsɛ 7 tii 12 ezali komonisa biso oyo tosengeli kosala mpo tósalela bambula ya bomoi na biso na ndenge oyo ekosepelisa ye mpamba te bambula yango ezali koleka noki. Bongo, lokola vɛrsɛ 13 tii 17 emonisi yango, tozali mpenza na mposa ete Yehova amonisela biso boboto na ye mpe apambola biso. Kasi, nzembo yango ezali kolobela te bomoi ya mosaleli mokomoko ya Yehova. Atako bongo, tosengeli kotalela malamu makanisi ya Nzembo yango oyo elobami lokola libondeli mpe kolanda yango. Mpo na yango, tótalela naino Nzembo 90 na liso ya bato oyo bamipesi na Nzambe.
Yehova: “ndako ya solosolo” mpo na biso
4-6. Na ndimbola nini Yehova azali “ndako ya solosolo” mpo na biso?
4 Mokomi ya nzembo abandi na maloba oyo: “Ɛ Yehova, yo ozalaka ndako ya solosolo mpo na biso banda mabota na mabota. Liboso ete bangomba ebotama, to obimisa mabele mpe mokili malamu lokola na mpasi ya kobota, ɛɛ, banda ntango oyo eyebani ebandeli te tii ntango oyo eyebani nsuka te, ozali Nzambe.”—Nzembo 90:1, 2, NW.
5 Yehova, “Nzambe ya seko,” azali “ndako ya solosolo” mpo na biso; azali esika mpo na komibomba. (Baloma 16:26, NW) Tozali kobanga eloko moko te mpamba te azali ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso lokola mpe azali ‘Ye oyo ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2) Lokola tozali kokitisa mitungisi na biso epai ya Tata na biso ya likoló na nzela ya Mwana na ye ya bolingo, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ezali kosɛnzɛla mitema na biso mpe makanisi na biso.’—Bafilipi 4:6, 7; Matai 6:9; Yoane 14:6, 14.
6 Tobatelami na elimo mpamba te, na maloba ya elilingi, Yehova azali “ndako ya solosolo” mpo na biso. Azali mpe kopesa biso “biteni ya kolala ya kati ya ndako” oyo, na ntembe te ekoki kozala masangá ya basaleli na ye, lokola bisika mpo na komibomba, epai babateli ya mpate oyo batondi na bolingo bazali kosalisa biso mingi mpo ete tózala mitema mpiɔ mpe tóbanga eloko moko te. (Yisaya 26:20, NW; 32:1, 2; Misala 20:28, 29) Lisusu, bamosusu kati na biso bauti na mabota ya basaleli ya Nzambe banda na bankɔkɔ na bango mpe bazali mpenza komona ete Yehova azali ‘ndako ya solosolo banda mabota na mabota.’
7. Na ndimbola nini bangomba ‘ebotamaki’ mpe mabele ebimaki lokola na “mpasi ya kobota”?
7 Yehova azalaki liboso kutu bangomba “ebotama” to mabele ebima lokola na “mpasi ya kobota.” Na ndenge ya bomoto, kokela mabele na makambo nyonso oyo ezali na kati, na biloko oyo ezali kati na yango mpe makambo ndenge na ndenge oyo elekaka kati na yango, esɛngaki molende mpenza. Mpe ntango mokomi ya nzembo alobi ete bangomba ‘ebotamaki’ mpe ete mabele ebimaki lokola na “mpasi ya kobota,” azali nde komonisa limemya mingi oyo azali na yango mpo na mosala monene oyo Yehova asalaki ntango akelaki biloko yango. Biso mpe tosengeli kozala na limemya mpe botɔndi ndenge yango mpo na misala ya Mozalisi!
Yehova azali ntango nyonso pene na biso
8. Maloba oyo ete Yehova azali Nzambe “banda ntango oyo eyebani ebandeli te tii ntango oyo eyebani nsuka te” elimboli nini?
8 Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Banda ntango oyo eyebani ebandeli te tii ntango oyo eyebani nsuka te, ozali Nzambe.” Maloba “ntango oyo eyebani nsuka te” ekoki kosalelama mpo na kolobela makambo oyo ezali na nsuka kasi ntango oyo makambo yango ekoumela eyebani te. (Exode 31:16, 17, NW; Baebele 9:15) Kasi, na Nzembo 90:2 mpe na bisika mosusu na kati ya Makomami ya Liebele, “ntango oyo eyebani nsuka te” elimboli “seko.” (Mosakoli 1:4) Atako ezali mpasi mpo biso tósosola likambo yango malamu, tosengeli koyeba ete Nzambe azali na ebandeli te mpe akozala na nsuka te. (Habakuku 1:12, NW) Azali na bomoi libela na libela mpe akozala pene ya kosalisa biso.
9. Na nini Mokomi ya nzembo akokanisaki bomoi ya moto ata ezali mbula nkoto?
9 Mokomi ya nzembo apemamaki na elimo ya Nzambe mpo na komonisa ete bomoi ya moto ata eumeli mbula nkóto, ezali kaka mwa ntango moke na miso ya Mozalisi oyo azali seko na seko. Alobaki na Nzambe ete: “Yo okozongisa bato kati na mputulu, mpe okolobaka ete, Bino bana na bato, bózonga. Zambi mbula nkóto na miso na yo izali lokola mokolo ya lobi wana esili yango koleka mpe lokola kokɛngɛla moko na butu.”—Nzembo 90:3, 4.
10. Ndenge nini Nzambe ‘azongisaka moto na mputulu’?
10 Moto akufaka mpe Nzambe ‘azongisaka ye na mputulu.’ Ezali lokola nde Yehova alobaka ete: ‘Zongá na mputulu ya mabele oyo osalemaki na yango.’ (Genese 2:7; 3:19) Likambo yango ezali mpo na moto nyonso: moto monene to moto mpamba, mozwi to mobola; mpamba te, moto moko te ya kozanga kokoka ‘akoki kosikola ndeko na ye to kopesa epai ya Nzambe motuya ya bomoi na ye, mpo ete azala na bomoi libela na libela.’ (Nzembo 49:6-9) Tozali mpenza na botɔndi ete ‘Nzambe apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, ete moto na moto oyo akondima ye azwa bomoi ya seko’!—Yoane 3:16, NW; Baloma 6:23.
11. Mpo na nini tokoki koloba ete oyo biso tomonaka ete ntango molai ezali mpenza mokuse na miso ya Nzambe?
11 Na miso ya Yehova, ezala moto lokola Metusela oyo aumelaki mbula 969 akokisaki ata mokolo moko te. (Genese 5:27) Na miso ya Nzambe, mbula nkóto ezali lokola lobi, elingi koloba lokola ngonga 24 soki eleki. Mokomi ya nzembo alobi mpe ete na miso ya Nzambe, mbula nkóto ezali lokola ngonga minei oyo sinzili azalaki kokɛngɛla kaa na butu. (Basambisi 7:19) Tomoni polele ete oyo biso tomonaka lokola ntango molai ezali mpenza mokuse na miso ya Yehova, Nzambe ya seko.
12. Ndenge nini Nzambe ‘alongolaka’ bato?
12 Nzambe azali na bomoi seko na seko; nzokande, lelo oyo moto azali na bomoi mokuse mpenza. Mokomi ya nzembo alobi boye: “Yo olongoli bango; bakómi lokola mpɔngi; na ntɔngɔ bazali lokola matiti mobesu oyo ekobongwanaka. Na ntɔngɔ ekobimisa fololo mpe esengeli kobongwana; na mpokwa ekauki mpe ekozanga te kokauka.” (Nzembo 90:5, 6, NW) Mose amonaki ndenge oyo ebele ya Bayisalaele bakufaki na esobe, Nzambe ‘alongolaki’ bango. Na Biblia mosusu, babongoli maloba yango boye: “Otindaka bato na mpɔngi ya liwa.” (New International Version) Lisusu, bomoi ya bato ya kozanga kokoka ezalaka “mpɔngi” ya mwa ntango, ezalaka mokuse lokoka mpɔngi ya butu moko.
13. Ndenge nini tokoki koloba ete tozali ‘lokola matiti,’ mpe yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
13 Tozali ‘lokola matiti oyo ekobima na ntɔngɔ mpe ekobongwana’ kasi ekokauka na mpokwa nsima ya kobɛtela moi makasi. Ya solo, bomoi na biso mokuse ezali lokola matiti ya mobesu oyo ekoki kokauka na mokolo moko. Yango wana, tósakana na yango te, ezali eloko ya motuya. Nzokande, tosengeli kosɛnga na Nzambe alakisa biso ndenge nini kosalela bambula oyo totikali na yango na mokili.
Yehova asalisaka biso na “kotánga mikolo na biso”
14, 15. Ndenge nini Nzembo 90:7-9 ekokisamaki epai ya Bayisalaele?
14 Mokomi ya nzembo alobi lisusu na Nzambe ete: “Biso totumbami na nkanda na yo mpe totungisami na nkɛlɛ na yo. Yo ozali kotya bokesene na biso liboso na yo mpe masumu masali biso na nkuku liboso ya pole ya elongi na yo. Zambi mikolo na biso nyonso izali kolimwa na nkanda na yo; tozali komona mbula na biso kosila [lokola maloba ya mongongo ya nse, “NW”].”—Nzembo 90:7-9.
15 Bayisalaele oyo bazangaki kondima ‘batumbamaki na nkanda ya Nzambe.’ ‘Batungisamaki na nkɛlɛ na ye,’ to ‘nkanda na ye ebangisaki bango.’ (Boyokani ya Sika pe Banzembo) Bamosusu “bakweisamaki kati na esobe” mpo Nzambe apesaki bango etumbu. (1 Bakolinti 10:5) Yehova ‘atyaki bokesene na bango liboso na ye.’ Asambisaki bango mpo na mabe oyo bazalaki kosala polele, kasi ata mpe ‘masumu oyo bazalaki kosala na nkuku’ ezalaki ‘liboso ya pole ya elongi na ye.’ (Masese 15:3) Lokola nkanda ya Nzambe epelelaki bango, Bayisalaele oyo babongolaki mitema te ‘bambula na bango esilaki lokola mwa maloba ya mongongo ya nse.’ Na yango, bomoi na biso ezali mokuse lokola mwa mopɛpɛ oyo ebimaka na monɔkɔ ntango moto alobi na mongongo ya nse.
16. Soki bato mosusu bazali kosala masumu na nkuku, likambo nini basengeli kosala?
16 Soki moko na biso azali kosala masumu na nkuku, akoki kobomba yango na miso ya bazalani na ye mpo na mwa ntango. Kasi, mabe oyo tobombi ezali ‘liboso ya pole ya elongi ya Yehova,’ mpe misala na biso ekobebisa boninga na biso na ye. Mpo boninga na biso na Yehova ezonga, tosengeli kobondela ye alimbisa biso, tosengeli kotika kosala mabe, mpe tosengeli kondima lisalisi ya elimo oyo bankulutu bakopesa biso. (Masese 28:13; Yakobo 5:14, 15) Ekoleka malamu kosala bongo na esika ‘tósilisa bambula na biso lokola mwa maloba oyo elobami na nse,’ mpe tóbungisa elikya ya bomoi ya seko!
17. Mingimingi bato baumelaka na bomoi mbula boni, mpe bomoi na biso etondi na makambo nini?
17 Mpo na bomoi mokuse ya bato ya kozanga kokoka, mokomi ya nzembo alobi boye: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokóma na ntuku mwambe; nzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolɔzi; zambi ekosila noki mpe biso tokopombwa.” (Nzembo 90:10) Bomoi ya moto eumelaka mingimingi mbula 70; kutu, ntango Kalebe azalaki na mbula 85, ye moko alobaki ete azalaki na makasi ya kokamwa. Ezali mpe na bato oyo balekaki mpenza bambula wana; na ndakisa Alona (mbula 123), Mose (mbula 120), na Yosua (mbula 110). (Mituya 33:39; Deteronome 34:7; Yosua 14:6, 10, 11; 24:29) Kasi, bato bazangi kondima oyo babimaki na Ezipito, baoyo nyonso batángamaki banda na baoyo bazalaki na mbula 20 mpe koleka, bazalaki kokufa na kati ya esobe mpe nsima ya mbula 40, bango nyonso basilaki. (Mituya 14:29-34) Lelo oyo, na mikili mingi, bato baumelaka mingimingi kaka bambula oyo mokomi ya nzembo alobaki. Bambula na biso etondi na “mpasi mpe bolɔzi.” Esilaka nokinoki, “mpe biso tokopombwa.”—Yobo 14:1, 2.
18, 19. (a) ‘Kotánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema ya mayele’ elimboli nini? (b) Mayele ekotinda biso na kosala nini?
18 Na nsima, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Nani ayebi makasi ya nkanda na yo? Nani kati na biso azali kobanga nkɛlɛ na yo? Bongo, teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema ya mayele.” (Nzembo 90:11, 12) Moto moko te kati na biso ayebi makasi nyonso ya nkanda ya Nzambe to bonene ya nkɛlɛ na ye, mpe likambo yango esengeli kotinda biso na kobakisa limemya na biso mpo na Yehova. Esengeli mpenza kotinda biso tósɛnga ye ete ateya biso ‘kotánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema ya mayele.’
19 Maloba ya mokomi ya nzembo ezali libondeli epai ya Yehova mpo na kosɛnga ye ateya basaleli na ye bázala na mayele mpo na kotánga mpe kosalela mikolo oyo batikali na yango na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe. Soki moto aumeli na bomoi mbula 70, akolekisa mikolo soki 25 500. Kasi, ata soki tozali na mbula boni sikoyo, ‘toyebi te soki bomoi na biso ekozala ndenge nini lobi. Tozali bobele londende oyo ekomonana mwa ntango moke, na nsima elimwe.’ (Yakobo 4:13-15) Lokola ‘ntango mpe makambo ekanami te ekómelaka biso nyonso,’ tokoki koyeba te soki totikali na mbula boni na bomoi na biso. Yango wana, tóbondela Nzambe apesa biso mayele mpo tóyeba kolonga mikakatano, tóyeba kofanda malamu na bato, mpe tósala oyo tokoki mpenza kosala na mosala na ye; tózela te mpo na kosala yango! (Mosakoli 9:11, NW; Yakobo 1:5-8) Yehova azali kotambwisa biso na nzela ya Liloba na ye, ya elimo na ye mpe ya ebongiseli na ye. (Matai 24:45-47; 1 Bakolinti 2:10, NW; 2 Timote 3:16, 17, NW) Mayele ezali kotinda biso na ‘koluka liboso Bokonzi ya Nzambe’ mpe kosalela mikolo na biso na ndenge oyo ezali kokumisa Yehova mpe ezali kosepelisa motema na ye. (Matai 6:25-33; Masese 27:11) Tolobi te ete soki tomipesi na motema mobimba na losambo na ye mikakatano na biso nyonso ekosila; kasi, tozali na elikya ete tokozala na esengo mingi.
Mapamboli ya Yehova epesaka biso esengo
20. (a) Na ndimbola nini Nzambe ‘ayokaka mawa’? (b) Yehova akosala nini soki tosali libunga monene kasi na nsima tobongoli mpenza motema?
20 Ekozala mpenza malamu soki tokoki kosepela na boumeli ya bambula nyonso oyo totikali na yango na bomoi! Yango wana, Mose asɛngi ete: “[Yehova, zongá! “NW”] Ntango nini! Yokelá baombo na yo mawa. Tondisá biso na boboto [to, “bolingo ya sembo”] na yo ntɔngɔ na ntɔngɔ ete tósepela mpe tóyoka esengo mikolo na biso nyonso.” (Nzembo 90:13, 14; maloba na nse ya lokasa na NW) Nzambe asalaka mabunga te. Atako bongo, ‘ayokaka mawa’ mpe ‘atikaka’ nkanda na ye mpe ‘atikaka’ etumbu oyo akanaki kopesa soki bato mabe babongwani mpe batiki mabe nsima ya koyoka likebisi na ye. (Deteronome 13:17, NW) Yango wana, ata soki tosali libunga monene, kasi na nsima tobongoli mpenza motema, Yehova ‘akotondisa biso na boboto na ye,’ mpe tokomona ntina ya ‘kosepela.’ (Nzembo 32:1-5) Mpe soki tobateli etamboli ya sembo na bomoi na biso, tokomona bolingo ya sembo ya Nzambe epai na biso mpe ‘tokoyoka esengo mikolo na biso nyonso’ to bambula nyonso oyo totikali na yango na bomoi na biso.
21. Na kotalela maloba ya Nzembo 90:15, 16, ekoki kozala ete Mose azalaki kosɛnga nini?
21 Mokomi ya nzembo abondeli ete: “Pesá biso mikolo ya kosepela na motuya lokola mikolo oyo yo oyokisaki biso mpasi mpe lokola [bambula] oyo biso tomonaki mabe. Tiká ete basali na yo bámona mosala na yo mpe ete lokumu na yo ezala epai ya bana na bango.” (Nzembo 90:15, 16) Ekoki kozala ete Mose azalaki kosɛnga Nzambe apesa Yisalaele esengo oyo ekoumela lokola mikolo oyo bayokaki mpasi to bambula oyo bamonaki mabe. Asɛngaki ete basaleli ya Nzambe bámona “mosala” na Ye oyo etali kopambola Bayisalaele mpe ete lokumu na Ye emonana epai ya bana na bango. Ezali mabe te soki biso mpe tozali kobondela ete mapamboli esopana likoló ya bato ya botosi na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.—2 Petelo 3:13.
22. Na kolanda Nzembo 90:17, mpo na likambo nini ezali mabe te tóbondela?
22 Nzembo 90 esuki na maloba oyo: “Tiká ete nkembo ya [Yehova] Nzambe na biso efanda kati na biso; lendisá na makasi mosala ya mabɔkɔ na biso, ɛ mosala ya mabɔkɔ na biso, lendisá yango na makasi.” (Nzembo 90:17) Maloba oyo ezali komonisa ete tokoki mpenza kobondela Nzambe apambola milende oyo tozali kosala na mosala na ye. Biso nyonso, ezala baklisto bapakolami to baninga na bango, “bampate mosusu,” tozali kosepela lokola “nkembo ya Yehova” ezali likoló na biso. (Yoane 10:16) Totondi na esengo lokola Nzambe ‘alendisi makasi mosala ya mabɔkɔ na biso’ basakoli ya Bokonzi mpe na ndenge mosusu!
Tókoba kotánga mikolo na biso
23, 24. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali komanyola likoló ya maloba ya Nzembo 90?
23 Soki tozwi ntango ya komanyola likoló ya maloba ya Nzembo 90, ekobakisela biso mposa ya kotyela Yehova motema, ye “ndako ya solosolo” mpo na biso. Soki tokanisi malamu maloba na ye oyo ezali komonisa ete bomoi ezali mpenza mokuse, tokomona malamumalamu ntina ya toli ya Nzambe mpo na kotánga mikolo na biso. Mpe soki tolendendeli na koluka mayele ya Nzambe mpe komonisa yango, tokozwa boboto mpe mapamboli ya Yehova.
24 Yehova akokoba komonisa biso ndenge ya kotánga mikolo na biso. Soki tolandi malako na ye, ekosalisa biso tókoba kotánga mikolo na biso seko na seko. (Yoane 17:3) Kasi, mpo tóbatela elikya ya bomoi ya seko, Yehova asengeli kozala esika na biso mpo na komibomba. (Yuda 20, 21) Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, likambo yango emonisami polele na maloba ya kolendisa oyo ezali na Nzembo 91.
Okopesa eyano nini?
• Na ndimbola nini Yehova azali “ndako ya solosolo” mpo na biso?
• Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali ntango nyonso pene ya kosalisa biso?
• Ndenge nini Yehova asalisaka biso na ‘kotánga mikolo na biso’?
• Nini ezali kosalisa biso “tóyoka esengo mikolo na biso nyonso”?
[Elilingi na lokasa 11]
Yehova azalaki Nzambe “liboso ete bangomba ebotama”
[Elilingi na lokasa 12]
Na miso ya Yehova, mbula 969 ya Metusela ekokaki ata mokolo moko te
[Bililingi na lokasa 14]
Yehova ‘alendisi makasi mosala ya mabɔkɔ na biso’