Ndenge tozwaka nguya ya kolonga mikakatano nyonso
“Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—FLP. 4:13.
1. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakutanaka na mikakatano mingi?
BASALELI ya Yehova bakutanaka mpe na mikakatano ndenge na ndenge. Mikakatano mosusu eutaka na kozanga kokoka na biso moko to na ebongiseli oyo tozali. Mosusu eutaka na bonguna oyo ezali kati na baoyo basalelaka Nzambe ná baoyo basalelaka ye te. (Eba. 3:15) Banda kalakala, Nzambe asalisaki basaleli na ye ya sembo mpo bátɛlɛma ngwi ntango bazali konyokola bango mpo na lingomba na bango, bátɛmɛla bopusi mabe ya baninga, mpe báyika mpiko na mikakatano mosusu. Elimo santu na ye ekoki kopesa mpe biso nguya ya kosala ndenge wana.
Mpo na kotɛlɛma ngwi liboso ya monyoko mpo na lingomba na biso
2. Banyokolaka bato mpo na lingomba na bango na mokano nini, mpe monyoko ekoki kozala ya lolenge nini?
2 Konyokola bato mpo na lingomba na bango ezali nde kotungisa bango to komonisa bango mpasi na nko mpo na bindimeli na bango. Minyoko yango elukaka nde kopikola bindimeli yango, kopekisa yango epalangana, to kobebisa bosembo ya bato oyo bandimaka yango. Monyoko ekoki kozala na ndenge ya polele to na ndenge ya nsense. Biblia elobi ete mpo na kobundisa biso, Satana asalaka lokola mwana-nkɔsi to lokola kobra.—Tángá Nzembo 91:13.
3. Ndenge nini Satana asalaka lokola nkɔsi to lokola kobra?
3 Ntango azali kosala lokola nkɔsi na zamba, mbala mingi Satana abundisaka na ndenge ya polele mpe ya kobombana te: asalelaka mobulu, bolɔkɔ, to epekiseli. (Nz. 94:20) Balapolo ya Annuaire oyo elobelaka misala ya Batatoli ya Yehova na ntango na biso elobelaka mingi makambo ya ndenge wana. Bato ya mobulu, mbala mosusu oyo batambwisami na bakonzi ya mangomba to bato oyo bazalaka na molende ya mabe na makambo ya politiki, banyokoli basaleli ya Nzambe na bisika mingi. Batatoli mingi te bakweaka ntango Satana abundisi bango na ndenge ya nkɔsi. Ntango azali kosala lokola kobra mpo na kobundisa bato, Zabolo asalelaka mayele mabe mpo na kobebisa makanisi na bango mpe kokosa bango mpo básala mokano na ye. Mayele ya ndenge wana ezalaka na mokano ya kolɛmbisa to kobebisa biso na elimo. Kasi, na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, tokoki kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele yango nyonso mibale.
4, 5. Wapi lolenge ya malamu ya komibongisa mpo na minyoko, mpe mpo na nini? Pesá ndakisa.
4 Kokanisakanisa makambo ndenge na ndenge oyo tokoki kokutana na yango soki banyokoli biso na mikolo ezali koya ezali lolenge ya malamu te ya komibongisa mpo na minyoko. Ya solo, tokoki koyeba te monyoko nini tokokutana na yango na mikolo ezali koya; yango wana ezali mpenza na litomba te tómitungisa mpo na makambo oyo mbala mosusu ekosalema ata mokolo moko te. Kasi, ezali na likambo oyo tokoki kosala. Bato mingi oyo balongaki kotɛlɛma ngwi liboso ya monyoko, balongaki mpo bazalaki komanyola ndakisa malamu ya bato oyo Biblia elobeli, oyo babatelaki bosembo na bango, mpe bamanyolaki na mateya ná ndakisa ya Yesu. Yango esalisaki bango bákolisa bolingo na bango mpo na Yehova. Mpe bolingo yango esalisaki bango bátɛmɛla mikakatano nyonso oyo bakutanaki na yango.
5 Tózwa ndakisa ya bandeko basi mibale na Malawi. Mpo na kotinda bango básomba karte ya parti moko ya politiki, etuluku ya bato ya mobulu babɛtaki bango, balongolaki bango bilamba, mpe bayebisaki bango ete bakosangisa na bango nzoto na makasi. Bato yango bakosaki bandeko wana ete ata bandeko ya Betele basombaki bakarte na bango. Bandeko basi yango balobaki boye: “Tosalelaka kaka Yehova Nzambe. Yango wana soki bandeko na biro ya filiale basombi bakarte, etali biso te. Tokowangana kondima na biso te, ata soki bobomi biso!” Ntango bato wana bamonaki mpiko ya ndenge wana, batikaki bandeko yango.
6, 7. Ndenge nini Yehova apesaka basaleli na ye nguya ya kotɛlɛma liboso ya minyoko?
6 Ntoma Paulo amonisaki ete bakristo na Tesaloniki bandimaki nsango ya solo “kati ya bolɔzi mingi,” kasi “na esengo ya elimo santu.” (1 Tes. 1:6) Ya solo, bakristo mingi, ya kala mpe ya lelo, oyo bakutanaki na minyoko mpe balongaki yango balobaka ete ntango minyoko ekómaki makasi mpenza, bayokaki kimya na motema, moko na bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Gal. 5:22) Mpe kimya yango esalisaki bango bábatela mitema mpe makoki na bango ya kokanisa. Ya solo, Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na kopesa basaleli na ye nguya ya kobundisa mikakatano mpe kosala makambo na bwanya ntango bakutani na bampasi.a
7 Bato bakamwaka komona ndenge basaleli ya Nzambe bazalaka na ekateli makasi ya kobatela bosembo na bango ata na kati ya monyoko makasi. Emonanaka lokola Batatoli batondi na nguya oyo eleki makasi ya bomoto, mpe ezalaka mpenza bongo. Ntoma Petro andimisi biso ete: “Soki bazali kofinga bino mpo na nkombo ya Kristo, bozali bato ya esengo, mpo elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na bino.” (1 Pe. 4:14) Soki bazali konyokola biso mpo tokangami na mitinda ya sembo ya Nzambe, boye tondimami na ye. (Mat. 5:10-12; Yoa. 15:20) Komona lipamboli wana ya Yehova epesaka mpenza esengo!
Mpo na kotɛmɛla bopusi ya baninga
8. (a) Nini esalisaki Yosua ná Kalebe bátɛmɛla bopusi ya baninga? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yosua ná Kalebe?
8 Lolenge moko ya botɛmɛli ya nsense, oyo bakristo basengeli kokeba na yango ezali bopusi mabe ya baninga. Nzokande, lokola elimo ya Yehova ezali na nguya makasi mpenza koleka elimo ya mokili, tokoki kotɛmɛla bato oyo bazali kotyola biso, oyo bazali kopanza makambo ya lokuta mpo na biso, to oyo bazali koluka kotinda biso tólanda makanisi na bango. Na ndakisa, nini esalisaki Yosua ná Kalebe báboya makanisi ya banɔngi mosusu zomi oyo batindamaki na mokili ya Kanana? Elimo santu etyaki kati na bango “elimo,” to makanisi mosusu.—Tángá Mitángo 13:30; 14:6-10, 24.
9. Mpo na nini bakristo basengeli kondima kokesana na bato mosusu?
9 Ndenge moko mpe, elimo santu epesaki bantoma ya Yesu nguya ya kotosa Nzambe na esika ya kotosa baoyo bato mingi bazalaki kotalela lokola bateyi ya lingomba ya solo. (Mis. 4:21, 31; 5:29, 32) Bato mingi bamonaka ete malamu kaka básala makambo oyo bato nyonso bazali kosala, mpo na koboya kowelana to matata. Nzokande, mbala mingi esɛngaka bakristo ya solo bákangama na makambo oyo bayebi ete ezali malamu. Atako bongo, na makasi oyo elimo ya Nzambe epesaka bango, babangaka te kokesana na bato mosusu. (2 Tim. 1:7) Tótala ndakisa ya likambo moko oyo tosengeli te kolanda bopusi ya baninga.
10. Mokakatano nini bakristo mosusu bakoki kokutana na yango?
10 Ntango bayoki ete moninga moko asali likambo oyo Biblia epekisi, bilenge mosusu bayebaka te soki bakosala nini. Bakoki komona ete kosɛnga bankulutu básalisa moninga yango ekobebisa boyokani na bango; na yango, baboyaka koyebisa likambo yango mpo na komonisa bosembo, nzokande bosembo yango ezali ya mabe. Moninga oyo asali mabe akoki kutu kotinda baninga na ye bábomba lisumu na ye. Ya solo, likambo ya ndenge wana etali kaka bilenge te. Mikóló mosusu mpe bakoki kobanga koyebisa bankulutu ya lisangá lisumu oyo moninga to ndeko na bango ya libota asali. Kasi bakristo ya solo basengeli kosala nini liboso ya bopusi ya ndenge wana?
11, 12. Wapi likambo ya malamu ya kosala soki ndeko moko ya lisangá asɛngi yo oyebisa bankulutu lisumu na ye te, mpe mpo na nini?
11 Tózwa ndakisa. Kanisá ete Alex, elenge mokristo moko ya mobali, ayoki ete Steve, moninga na ye na kati ya lisangá, azali na momeseno ya kotala pornografi. Alex ayebisi moninga na ye Steve ete makambo oyo azali kosala ezali kotungisa ye mingi. Kasi, Steve akipe te. Ntango Alex ayebisi ye asolola likambo yango na bankulutu, Steve alobi na Alex ete: “Soki ozali mpenza moninga na ngai, okoyebisa bankulutu likambo oyo te.” Alex asengeli nde kobanga kobebisa boninga na bango? Akoki mpe komituna soki bankulutu bakondimela nani soki Steve awangani likambo yango. Nzokande, makambo mpe ekobonga te soki Alex afandi nyɛɛ. Kutu, mpo na yango, Steve akoki kobebisa boyokani na ye ná Yehova. Ekozala malamu Alex amikundola ete “kolɛnga liboso ya bato, yango nde etyaka motambo, kasi ye oyo azali kotyela Yehova motema akobatelama.” (Mas. 29:25) Alex akoki kosala nini lisusu? Na boboto nyonso, akoki kosolola lisusu na Steve mpe komonisa ye polele libunga na ye. Kosala bongo ekosɛnga mpiko. Kasi ekoki kozala ete na mbala oyo, Steve akondima kolobela likambo yango. Alex asengeli lisusu kolendisa Steve asolola na bankulutu mpe koyebisa ye ete soki asali yango noki te nsima ya mwa mikolo, ye moko akoyebisa bango.—Lev. 5:1.
12 Soki okutani na likambo ya ndenge wana, mbala mosusu na ebandeli moninga na yo akosepela te na milende oyo ozali kosala mpo na kosalisa ye. Kasi, na nsima akoki komona ete ozali kosala yango mpo na bolamu na ye. Soki moninga oyo asali libunga azwi lisalisi mpe andimi yango, akoki kozala ntango nyonso na botɔndi epai na yo mpo na mpiko mpe bosembo na yo. Kasi soki akangeli yo nkanda, azali mpenza moninga oyo okolinga kozala na ye? Kosepelisa Yehova, Moninga na biso oyo aleki baninga nyonso, ezalaka ntango nyonso likambo ya malamu oyo ebongi kosala. Soki totye ye na esika ya liboso, bato oyo balingaka ye bakopesa biso limemya mpo na bosembo na biso mpe bakokóma baninga na biso ya solosolo. Tosengeli soki moke te kotikela Zabolo esika na lisangá ya bokristo. Soki tosali bongo, tokoyokisa mpenza elimo santu ya Yehova mawa. Nzokande, tokosala na boyokani na elimo yango soki tozali kosala nyonso mpo na kobatela lisangá ya bokristo pɛto.—Ef. 4:27, 30.
Mpo na koyikela mpasi ya ndenge nyonso mpiko
13. Mpasi ya ndenge nini basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango, mpe mpo na nini makambo ya ndenge wana ekómi mingi?
13 Mpasi ekoki koya na ndenge ekeseni—kokwea na mombongo, kolongwa mosala, likama oyo euti na biloko oyo ezalisamá, liwa ya moto oyo olingaka, maladi makasi, mpe bongo na bongo. Lokola tozali na “ntango moko ya mpasi,” tosengeli koyeba ete lelo to lobi mokomoko na biso akokutana na mokakatano moko. (2 Tim. 3:1) Soki esalami bongo, ntina ya kobanga ezali te. Elimo santu ekoki kopesa biso nguya ya koyikela mpasi ya ndenge nyonso mpiko.
14. Nini epesaki Yobo nguya ya koyikela bampasi na ye mpiko?
14 Yobo akutanaki na bampasi ndenge na ndenge. Abungisaki biloko na ye ya kobikela, bana, baninga, kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe mwasi na ye azalaki lisusu kotyela Yehova motema te. (Yobo 1:13-19; 2:7-9) Atako bongo, Yobo azwaki libɔndisi ya solosolo epai ya Elihu. Maloba na ye, mpe likambo ya ntina oyo Yehova azalaki koyebisa Yobo, ezalaki ete: “Tɛlɛmá nyɛɛ mpe tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe.” (Yobo 37:14) Nini esalisaki Yobo ayikela bampasi na ye mpiko? Mpe nini ekoki kosalisa biso tóyikela bampasi na biso mpiko? Ezali kokanisa mpe komanyola makambo ndenge na ndenge oyo esalemaki na elimo santu mpe nguya ya Yehova. (Yobo 38:1-41; 42:1, 2) Mbala mosusu toyebi malamu makambo mosusu oyo esalemaki na bomoi na biso, oyo emonisaki mpenza ete Nzambe atyelaka biso likebi. Azali kotyela biso likebi tii lelo.
15. Nini epesaki ntoma Paulo makasi ya koyikela komekama mpiko?
15 Na bomoi na ye, ntoma Paulo akutanaki na bampasi mingi mpo na kondima na ye. (2 Ko. 11:23-28) Ndenge nini abatelaki bokatikati mpe makanisi ya malamu na bantango wana ya mpasi? Azalaki kobondela mpe kotyela Yehova motema. Ntango akutanaki na komekama makasi oyo emonani ete ememaki ye na kokufa lokola martiru, Paulo akomaki boye: “Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya, mpo, na nzela na ngai, mosala ya kosakola esalema malamumalamu mpe bikólo nyonso báyoka yango; mpe nabikaki na monɔkɔ ya nkɔsi.” (2 Tim. 4:17) Yango wana, na kolanda makambo oyo ye moko akutanaki na yango, Paulo akokaki kokitisa baninga na ye bakristo motema ete bazalaki na ntina te ya ‘komitungisa ata na likambo moko.’—Tángá Bafilipi 4:6, 7, 13.
16, 17. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yehova apesaka basaleli na ye nguya ya kobunda na mikakatano lelo.
16 Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela na nkombo Roxana amoná ndenge Yehova asungaka basaleli na ye. Ntango asɛngaki patrɔ na ye konje ya mwa mikolo mpo na kokende na liyangani moko, patrɔ ayanolaki ye na nkanda ete soki akei, akolongola ye na mosala. Atako bongo Roxana akendaki, abondelaki Yehova makasi mpo asalisa ye atikala na mosala na ye. Na nsima, ayokaki kimya na motema. Kaka ndenge patrɔ ayebisaki ye, na mokolo ya yambo nsima ya liyangani, alongolaki ye na mosala. Roxana abulunganaki. Azalaki na mposa ya mosala yango, mpo atako ezalaki ya mbongo mingi te, ezalaki kosalisa ye asunga libota na ye. Abondelaki lisusu, mpe amonaki ete lokola Nzambe aleisaki ye na elimo na liyangani, na ntembe te akokoka mpe koleisa ye na mosuni. Ntango azalaki kozonga na ndako, Roxana amonaki esika moko oyo bakomi ete bazali koluka bato ya mosala oyo bayebi malamu kosalela bamasini minene ya kotonga bilamba, mpe asɛngaki mosala kuna. Mokonzi ya esika yango amonaki ete asalá naino mosala yango te, kasi andimaki ye kaka, mpe lifuti elekaki ya liboso pene na mbala mibale. Roxana amonaki ete Yehova ayanoli mabondeli na ye. Nzokande, lipamboli ya monene koleka oyo azwaki ezalaki ete alongaki kosakwela baninga mingi ya mosala nsango malamu. Mitano na bango, ata mpe mokonzi na bango, bandimaki solo mpe bazwaki batisimo.
17 Na bantango mosusu, tokoki komona lokola mabondeli na biso ezali kozwa eyano te—ntango mosusu mpo ezwi eyano na mbala moko te to na ndenge oyo tozali kozela. Soki esalemi bongo, na ntembe te ntina ezali. Yehova ayebi ntina yango malamu, kasi biso tokoki komona yango polele nsima ya mikolo. Ezali na likambo moko oyo tosengeli kobosana te—Nzambe asundolaka basaleli na ye ya sembo te.—Ebr. 6:10.
Mpo na kolonga mikakatano mpe komekama
18, 19. (a) Mpo na nini tokoki kolikya kokutana na mikakatano mpe komekama? (b) Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano?
18 Basaleli ya Yehova bakamwaka te soki bakutani na komekama, makambo oyo elɛmbisi bango nzoto, minyoko, mpe bopusi ya baninga. Mokili ezali mpenza koyina biso. (Yoa. 15:17-19) Kasi, elimo santu ekoki kosalisa biso tólonga mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango na mosala ya Nzambe. Yehova akotika te ete tómekama koleka ndenge oyo tokoki koyika mpiko. (1 Ko. 10:13) Akotika biso soki moke te mpe akosundola biso ata moke te. (Ebr. 13:5) Kotosa Liloba na ye ebatelaka biso mpe epesaka biso makasi. Lisusu, elimo ya Nzambe ekoki kotinda bandeko bakristo básalisa biso ntango tozali mpenza na mposa makasi ya lisalisi.
19 Tiká biso nyonso tókoba koluka kozwa elimo santu na nzela ya libondeli mpe boyekoli ya Makomami. Tókoba ‘kolenda na nguya nyonso kino kokóma na bonene ya nguya [ya Nzambe] mpo tóyika mpenza mpiko mpe tózala na motema molai ná esengo.’—Kol. 1:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na komona bandakisa, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2001, lokasa 16; mpe Lamuká! ya Aprili-Yuni 1993, nkasa 21 mpe 22.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kotɛlɛma ngwi liboso ya minyoko?
• Osengeli kosala nini soki moto asɛngi yo obomba lisumu na ye?
• Okoki kozala na elikya nini ntango okutani na mpasi ya ndenge nyonso?
[Elilingi na lokasa 28]
Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yosua ná Kalebe?
[Elilingi na lokasa 29]
Ndenge nini okoki kosalisa moninga moko oyo asali lisumu?