Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
“Mosala [ya Yehova] ezali lokumu mpe nkembo mpenza.”—NZ. 111:3, NW.
1, 2. (a) Ndenge nini okoki kolimbola liloba “lokumu”? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
NTANGO batunaki Madison, elenge moko ya mbula zomi, soki kozala na lokumu elimboli nini, alobaki ete, “Elimboli kolata malamu.” Mbala mosusu elenge mwasi yango ayebaki te ete Biblia elobi mpo na Nzambe ete ‘bilamba na ye bobele lokumu.’ (Nz. 104:1) Mpo na bato, kozala na lokumu elimbolaka ntango mosusu kolata malamu. Na ndakisa, ntoma Paulo alingaki ete basi baklisto “bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi.” (1 Tim. 2:9) Kasi, etamboli oyo epesaka Nzambe “lokumu mpe nkembo” esuki kaka na molato ya malamu te.—Nz. 111:3, NW.
2 Na Biblia, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “lokumu” ekoki mpe kobongolama na “nkembo” to “bonene.” Diksionɛrɛ moko elimboli liloba “lokumu” na “kopesa nzoto kilo, kotombolama, to kozala na mpifo.” Moto moko te abongi na lokumu mpe nkembo koleka Yehova. Yango wana, lokola tozali basaleli na ye, tosengeli kolobaka mpe kosala makambo na ndenge oyo ekokumisa ye. Kasi, mpo na nini bato bazali na likoki ya kosala makambo na ndenge ya lokumu? Ndenge nini lokumu mpe nkembo ya Yehova emonanaka? Lokumu oyo Nzambe azali na yango esengeli kotinda biso na kosala nini? Yesu Klisto akoki koteya biso nini na oyo etali komonisa lokumu? Ndenge nini tokoki komonisa lokumu?
Ntina oyo tokoki kosala makambo na ndenge ya lokumu
3, 4. (a) Tosengeli kosala nini lokola Nzambe apesi biso lokumu? (b) Maloba ya Nzembo 8:5-9 ezali esakweli mpo na nani? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (c) Banani oyo Yehova apesaki lokumu na ntango ya kala?
3 Lokola bato nyonso bakelami na elilingi ya Nzambe, bazali na likoki ya kosala makambo na ndenge ya lokumu. Yehova apesaki moto ya liboso lokumu na ndenge apesaki ye mokumba ya kobatela mabelé. (Gen. 1:26, 27) Ata ntango akómaki moto ya kozanga kokoka, Yehova azongelaki koyebisa moto mokumba oyo apesaki ye ya kobatela mabelé. Na ndenge yango, Nzambe azali kokoba ‘kolatisa’ moto lokumu. (Tángá Nzembo 8:5-9.)a Lokumu oyo Nzambe apesi biso ezali kosɛnga ete biso mpe tósala makambo na ndenge ya lokumu; na maloba mosusu, tósanzola nkombo monene ya Yehova, tópesa yango limemya mpe nkembo.
4 Yehova apesaka mpe lokumu epai ya bato oyo basalelaka ye mosala mosantu. Nzambe apesaki Abele lokumu na ndenge andimaki mbeka na ye, kasi aboyaki oyo ya ndeko na ye Kaina. (Gen. 4:4, 5) Nzambe atindaki Moize ‘apesa ndambo ya lokumu na ye’ epai ya Yosua, moto oyo asengelaki kokamba Bayisalaele nsima ya liwa ya Moize. (Mit. 27:20) Na ntina na Salomo, mwana ya Davidi, Biblia elobi ete: “[Yehova] azalisaki Salomo monene mingi na miso ya Yisalaele mobimba mpe apesaki ye lokumu monene na bokonzi oyo emonanaki epai ya mikonzi mosusu ya Yisalaele liboso na ye te.” (1 Nta. 29:25) Nzambe akopesa lokumu mingi epai ya baklisto bapakolami na elimo, baoyo basakolaki na bosembo nyonso “nguya mpe nkembo ya bokonzi na ye.” (Nz. 145:11-13) “Bampate mosusu” ya Yesu, oyo motángo na bango ezali se kobakisama, bazali mpe na mokumba ya lokumu na ndenge bazali kosanzola Yehova.—Yoa. 10:16.
Lokumu mpe nkembo ya Yehova emonanaka na misala na ye
5. Lokumu ya Yehova ezali monene ndenge nini?
5 Na nzembo moko oyo emonisi ete Nzambe azali monene mingi koleka moto, Davidi ayembaki boye: “Ee [Yehova], Nkolo na biso, nkombo na yo ezali na nkembo mingi kati na mokili mobimba; otii nkembo na yo mpe Likoló na lola.” (Nz. 8:1) Banda ntango “likoló mpe mokili” ezalisamaki naino te tii ntango Nzambe akokokisa mokano ye ya kokómisa mabelé paladiso mpe kozongisa bato na ezaleli ya kokoka—banda na ntango ezangi nsuka tii na ntango ezangi nsuka—Yehova Nzambe aleki na lokumu mpe na nkembo na molɔ́ngɔ́ mobimba.—Gen. 1:1; 1 Kol. 15:24-28; Emon. 21:1-5.
6. Mpo na nini mokomi ya nzembo alobaki ete Yehova amilatisi lokumu?
6 Nkembo monene ya likoló oyo etondi na minzoto, oyo engɛngaka lokola mabanga ya ntalo, esimbaki mpenza motema ya mokomi ya nzembo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe! Lokola mokomi yango akamwaki mingi ndenge oyo Nzambe ‘atandisi lola lokola hema,’ alobaki ete Yehova amilatisi lokumu mpo akelaki biloko nyonso na mayele mingi. (Tángá Nzembo 104:1, 2.) Lokumu mpe nkembo ya Mozalisi na biso oyo azangi komonana mpe azali na nguya nyonso emonanaka na biloko oyo akelá.
7, 8. Ndenge nini likoló emonisaka lokumu mpe nkembo ya Yehova?
7 Na ndakisa, tótalela galaksi oyo babengi voie lactée. Galaksi yango esangisi ebele ya minzoto, baplanɛti, bakisá mpe moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango; kati na yango, Mabelé emonanaka eloko moke mpenza, lokola mbuma moko ya zɛlɔ na libongo monene. Galaksi yango ezali na minzoto koleka miliare 100! Soki ozali kotánga monzoto moko na segɔnde moko mpe ozali kopema te mokolo mobimba, okolekisa mbula 3 000 mpo na kokóma na motángo ya miliare 100.
8 Soki galaksi moko mpamba oyo babengi voie lactée ezali na minzoto miliare 100, ezali boni mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba? Bato ya astronomi balobaka ete voie lactée ezali kaka galaksi moko kati na bagalaksi oyo ezali soki miliare 50 to koleka, mbala mosusu mpe ekoki kokóma miliare 125. Minzoto ezali boni na molɔ́ngɔ́ mobimba? Tokoki koyeba motángo na yango te. Nzokande, Yehova ‘atángaka motuya ya minzoto ya likoló, abyangaka yango nyonso na nkombo na yango.’ (Nz. 147:4) Nsima ya komona lokumu mpe nkembo oyo Yehova amilatisi na yango, motema na yo ezali kotinda yo te osanzola nkombo na ye monene?
9, 10. Ndenge nini likabo ya limpa emonisaka bwanya ya Mozalisi?
9 Sikoyo, tótika minzoto mpo na kolobela eloko mosusu oyo toyebi malamu: limpa. Yehova azali “Mozalisi ya likoló mpe mabelé,” azali mpe “Ye oyo apesaka limpa epai na baoyo bazali na nzala.” (Nz. 146:6, 7, NW) “Lokumu mpe nkembo” ya Nzambe emonanaka na misala na ye minene, bakisa milona oyo epesaka masango oyo tosalaka na yango mampa. (Tángá Nzembo 111:1-5.) Yesu ateyaki bayekoli na ye babondelaka boye: “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo.” (Mat. 6:11) Limpa ezalaki bilei ya mokolo na mokolo mpo na bato mingi ya kala, ata mpe Bayisalaele. Atako limpa ezali bilei ya mindɔndɔ te, ndenge oyo farini mpe biloko mosusu oyo basangisaka na kati na yango ekómaka limpa ezali likambo ya pɛtɛɛ te.
10 Na ntango ya kala, Bayisalaele bazalaki kosalela farini ya blé mpe ya orje mpo na kosala mampa. Ntango mosusu mpe bazalaki kobakisa levire. Farini mpe biloko mosusu oyo esangisamaka ekómaka limpa ndenge tomonaka yango mpe ndenge toyokaka elɛngi na yango. Moto moko te ayebi mpenza ndenge oyo nyonso wana esalemaka. Lisusu, ndenge oyo estoma enikaka limpa mpe etindaka yango na nzoto ezali likambo ya kokamwa. Yango wana mokomi ya nzembo alobaki ete: “Misala na yo mingi boni, ee [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu”! (Nz. 104:24) Motema na yo mpe etindaka yo na kosanzola Yehova?
Lokumu mpe nkembo ya Nzambe esengeli kotinda yo osala nini?
11, 12. Komanyola misala ya Nzambe ekoki kosala nini epai na biso?
11 Esɛngi kaka te tózala bato ya astronomi mpo na komona kitoko ya likoló oyo etondi na minzoto; esɛngi mpe te tózala bato ya mayele na chimie mpo tósepela na limpa. Kasi, mpo na komona bonene ya Mozalisi na biso, tosengeli kozwaka ntango ya kokanisa misala ya mabɔkɔ na ye. Komanyola ndenge wana ekoki kosala nini epai na biso? Komanyola na misala nyonso ya Yehova esimbaka mitema na biso.
12 Na oyo etali makambo minene oyo Yehova asalaki mpo na basaleli na Ye, Davidi ayembaki boye: “Ngai nakokanisa mpo na nkembo monene ya bokonzi na yo mpe mpo na misala na kokamwa na yo.” (Nz. 145:5) Tokomonisa ete tokanisaka misala yango soki tozali kotánga Biblia mpe tozali kozwa ntango ya komanyola makambo oyo tozali kotánga. Yango ekosala nini epai na biso? Ekokolisa limemya na biso mpo na lokumu mpe nkembo ya Nzambe. Na ntembe te, yango ekotinda biso tókumisa Yehova mpe tóloba lokola Davidi ete: “Nakosakola mpo na monene na yo.” (Nz. 145:6) Komanyola misala ya kokamwa ya Nzambe esengeli kolendisa boyokani na biso na Yehova mpe kotinda biso na koyebisa basusu na esengo mpe na molende nyonso makambo na ye. Osakolaka nsango malamu na molende mpe osalisaka bato bámemya lokumu, nkembo mpe bonene ya Yehova Nzambe?
Yesu amonisaki lokumu ya Nzambe na ndenge ya kokoka
13. (a) Na kolanda Danyele 7:13, 14, Yehova apesaki nini epai ya Mwana na ye? (b) Ndenge nini Mokonzi Yesu Klisto atalelaka bato na ye?
13 Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, asakolaki nsango malamu na molende mpe akumisaki Tata na ye ya likoló oyo atondi na nkembo. Yehova apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko lokumu mingi na ndenge apesaki ye ‘nguya ná bokonzi.’ (Tángá Danyele 7:13, 14.) Kasi, Yesu azali na lolendo te mpe azali makambo makasimakasi te. Azali nde Mokonzi ya motema-boboto oyo ayebi bolɛmbu ya bato na ye mpe asalelaka bango makambo na boboto mpe na limemya. Tózwa ndakisa moko mpo na komona ndenge oyo Yesu, Mokonzi oyo Nzambe aponaki, azalaki kotalela bato oyo azalaki kokutana na bango, mingimingi bato oyo basundolamaki mpe bazalaki kolingama te.
14. Ndenge nini bato ya maba bazalaki kotalelama na Yisalaele?
14 Na ntango ya kala, bato ya maba bazalaki kotungisama mingi na komona ndenge nzoto na bango ezalaki kobeba mokemoke tii na liwa. Maladi yango ezalaki kopalangana mokemoke na binama nyonso ya nzoto. Kobikisa moto ya maba ezalaki lokola koluka kosekwisa moto oyo akufi. (Mit. 12:12; 2 Mik. 5:7, 14) Bato ya maba bazalaki kotalelama lokola bato ya mbindo mpe bakokaki kofanda esika moko na bato mosusu te. Ntango azali kopusana pembeni ya bato mosusu, moto ya maba asengelaki kobelelaka ete: “Mbindo! Mbindo!” (Lev. 13:43-46) Moto ya maba azalaki lokola moto oyo akufá. Mikanda ya Balabi emonisi ete ntango moto ya maba akutani na moto mosusu, asengelaki kotɛlɛma mosika; ntaka oyo ekaboli bango ekoki te kozala na nse ya mɛtrɛ moko na ndambo. Lisolo moko elobaka ete ntango mokonzi moko ya lingomba amonaki moto ya maba na mosika, abambaki ye mabanga mpo moto yango apusana pene na ye te.
15. Yesu asalaki nini mpo na moto moko ya maba?
15 Nzokande, tótala ndenge Yesu asalaki ntango moto moko ya maba ayaki epai na ye mpe asɛngaki ete abikisama. (Tángá Malako 1:40-42.) Na esika Yesu abengana moto yango, asalelaki ye makambo na boboto mpe na limemya. Yesu amonaki ete moto yango azalaki na mpasi mpe azalaki na mposa ya lobiko. Motema mawa ya Yesu etindaki ye asala likambo moko. Asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki moto yango ya maba mpe abikisaki ye.
16. Liteya nini ozwi na ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basusu?
16 Lokola tozali bayekoli ya Yesu, ndenge nini tokoki komekola ndenge oyo Yesu azalaki komonisa lokumu ya Tata na ye? Ndenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya koyeba ete tosengeli kopesa lokumu mpe limemya epai ya moto nyonso, azala mozwi to mobola, mokóló to mwana. (1 Pet. 2:17) Mingimingi bato oyo bazali na bokonzi, na ndakisa, mibali, baboti, mpe bankulutu na kati ya lisangá, basengeli komemya bato oyo bango bazali kokamba mpe kosalisa bango bábatela lokumu na bango. Mpo na komonisa ete yango ezali etinda mpo na moklisto nyonso, Biblia elobi boye: “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.”—Lom. 12:10.
Tómonisaka lokumu na losambo na biso
17. Liteya nini tokoki kozwa na kati ya Makomami na oyo etali komonisa lokumu na losambo na biso epai ya Yehova?
17 Tosengeli mpenza komonisaka lokumu na losambo na biso epai ya Yehova. Mosakoli 5:1 elobi boye: “Batelá makolo na yo wana okokɔta na ndako ya Nzambe.” Nzambe asɛngaki Moize mpe Yosua bálongola mapapa na bango ntango bazalaki na esika mosantu. (Ex. 3:5; Yos. 5:15) Basengelaki kosala bongo mpo na komonisa limemya. Na Yisalaele, banganga-nzambe basengelaki kolata kaleso ya lini “mpo na kobomba bolumbu na bango.” (Ex. 28:42, 43) Mobeko yango ezalaki mpo bolumbu na bango emonana te ntango bazali kosala mosala na etumbelo. Moto nyonso ya libota ya nganga-nzambe asengelaki kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali kobatela lokumu.
18. Ndenge nini tomonisaka lokumu na losambo na biso epai ya Yehova?
18 Na yango, komonisa lokumu na losambo esɛngi mpe kozala na limemya. Mpo basusu bápesa biso lokumu mpe bámemya biso, biso moko mpe tosengeli komonisaka limemya. Limemya na biso esengeli te kozala kaka ya libándá, mpo na koluka komonana na miso ya bato. Esengeli kouta na motema, mpo Nzambe atángaka motema. (1 Sam. 16:7; Mas. 21:2) Tosengeli komonisa lokumu na bomoto na biso mobimba; elingi koloba na etamboli na biso, na makanisi na biso, na boyokani na biso na basusu, ata mpe na ndenge oyo tomitalelaka. Tosengeli komonisaka lokumu ntango nyonso mpe na makambo nyonso oyo tozali koloba mpe kosala. Mpo na oyo etali etamboli, molato mpe monzɛlɛ, tosengeli kolanda toli ya ntoma Paulo ete: “Tozali kobɛtisa libaku ata na likambo moko te, mpo mosala na biso ya baministre ekoka te kofingama; kasi na makambo nyonso tozali komilobela lokola baministre ya Nzambe.” (2 Kol. 6:3, 4) ‘Tokómisaka kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.’—Tito 2:10.
Tókoba komonisa lokumu
19, 20. (a) Wapi lolenge moko ya malamu ya komonisela basusu lokumu? (b) Na oyo etali lokumu, ekateli na biso esengeli kozala nini?
19 Baklisto bapakolami, oyo babengami “baambasadɛrɛ na esika ya Klisto,” bamonisaka lokumu. (2 Kol. 5:20) “Bampate mosusu,” oyo bazali kopesa bango mabɔkɔ bazali batindami ya lokumu mpo na Bokonzi ya Masiya. Moto oyo azali ambasadɛrɛ to oyo azali motindami alobaka na mpiko mpe na lokumu mpo na guvɛrnema oyo etindi ye. Yango wana, tosengeli kolobaka na lokumu mpe na mpiko mpo na guvɛrnema to Bokonzi ya Nzambe. (Ef. 6:19, 20) Ntango tozali koyebisa basusu “nsango malamu,” tomoniselaka bango limemya mpe lokumu, boye te?—Yis. 52:7.
20 Tosengeli kozala na ekateli ya kokumisa Nzambe na etamboli oyo ezali komonisa lokumu na ye. (1 Pet. 2:12) Tiká tómonisaka ntango nyonso limemya mpo na ye, mpo na losambo na ye, mpe mpo na bandeko na biso baklisto. Mpe tiká ete Yehova, ye oyo amilatisi lokumu mpe nkembo, asepela na losambo ya lokumu oyo tozali kopesa ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya Davidi na Nzembo 8 ezali mpe esakweli oyo etali Yesu Klisto, moto ya kokoka.—Ebe. 2:5-9.
Okopesa eyano nini?
• Komanyola bonene mpe lokumu ya Yehova esengeli kosala nini epai na biso?
• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu asalaki ntango moto moko ya maba asɛngaki ete abikisama?
• Makambo nini tokoki kosala mpo na kopesa Yehova lokumu?
[Elilingi na lokasa 12]
Ndenge nini Yehova apesaki Abele lokumu?
[Elilingi na lokasa 14]
Misala minene ya Yehova emonanaka ata na likabo ya limpa
[Elilingi na lokasa 15]
Na oyo etali lokumu, liteya nini ozwi na likambo oyo Yesu asalaki epai ya moto moko ya maba?
[Elilingi na lokasa 16]
Komonisa lokumu na losambo esɛngi mpe komemya Yehova