Balingi kobanda mosala monene
“TOZALAKI kowelana te. Moto nyonso alingaki ete moninga alonga.” Richard na Lusia balobaki bongo mpo na baninga na bango na kelasi ya mbala ya 105 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Lowell, mwanakelasi mosusu alobaki ete, “Tokeseni mpenza, kasi mpo na biso, mwanakelasi mokomoko azali na ntina.” Abakisaki ete: “Bokeseni na biso esangisi biso esika moko.”
Banakelasi oyo bazwaki mapolomi na mokolo ya 12 Sɛtɛ́mbɛ 1998 bakesanaki na makambo mingi. Banakelasi mosusu bazalaki babongisi-nzela na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi; basusu bazalaki kosala na bosembo na boumeli ya bambula mingi na bamboka na bango. Mwa ndambo, lokola Mats na Rose-Marie, basalaki makasi mpo na koyekola Lingelesi malamu liboso bákende na eteyelo. Banakelasi mingi bazalaki kokanisa mosala ya misionere banda bomwana na bango. Ndeko mobali moko na mwasi na ye batondisaki lokasa ete bákɔta na eteyelo yango mbala 12; bazalaki na esengo mingi mpenza ntango babéngaki bango na kelasi ya mbala ya 105!
Pɔsɔ 20 ya boyekoli ya bozindo elekaki nokinoki. Banakelasi bakamwaki ntango bazongisaki devuare na bango ya nsuka, basalaki lapolo ya nsuka liboso ya kelasi, mpe mokolo ya kopesa mapolomi ekokaki.
Albert Schroeder, moko na Mikóló-Bakambi, azalaki prezida ya likita yango. Akundwelaki banakelasi ete “balingi kobanda mosala monene ya koteya bato Biblia”; bakolanda bandeko mosusu 7 000 oyo bakɔtaki Eteyelo ya Gileadi liboso na bango. Amonisaki ete na boumeli ya eleko ya molunge, banakelasi bazwaki libaku malamu ya kokutana na bandeko oyo baumeli na mosala ya misionere ntango bandeko yango bakendaki kotala biro monene na eleko ya mayangani ya mikili mingi.
Na nsima, Ndeko Schroeder apesaki maloba na Max Larson, oyo asalaka na komite ya misala ya Betele. Asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Mateya oyo mazali komema na bomoi ya seko.” Ndeko Larson azongelaki maloba ya Masese 1:5, oyo elobi ete: “Moto na mayele akoyoka mpe akofulukisa mayele; moto na boyebi akozwa toli malamu.” Mpo na kozala misionere ya malamu esengeli kozala na boyebi. Moto ya boyebi akotɛlɛma liboso ya bakonzi. (Masese 22:29) Nsima ya sanza mitano ya mateya, banakelasi babongisamaki malamu mpo na kozala bamonisi ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto, Bakonzi oyo baleki bakonzi nyonso.
Ekómaki ngala ya David Olson oyo asalaka na departema ya mosala ya kosakola, lisolo na ye elobaki ete, “Bósepelisa motema ya Yehova.” Atunaki ete: “Bato ya kozanga kokoka bakoki kosala nini mpo na kosepelisa motema ya Nzambe?” Eyano ezalaki nini? Bakoki kosalela ye na bosembo, na bokangami, mpe na esengo. Yehova alingi ete bato na ye básepela na mosala oyo bazali kosalela ye. Ntango tozali kokokisa mokano ya Nzambe na esengo, tozali mpe kosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Ndeko Olson atángaki mokanda ya mobali moko na mwasi na ye bamisionere oyo bazwaki mapolomi na bango na kelasi ya mbala ya 104. Bazali kosepela na mosala na teritware na bango ya sika? Bakomaki boye na ntina na lisangá na bango: “Tozali basakoli soki 140, bato 250 kino 300 bayanganaka na makita. Mosala ya kosakola ezali malamu mingi. Moto na moto azali kotambwisa boyekoli ya Biblia minei, mpe bamosusu babandi koya na makita.”
Lyman Swingle, moko na Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Ntango ya kopema mwa moke mpe kotalela mapamboli na bino.” Mateya ya Eteyelo ya Gileadi epesi bato mapamboli mingi. Esalisi banakelasi na kobakisa boyebi na bango, na kosepela mingi lisusu na lisangá ya Yehova mpe kolona bizaleli ya ntina mingi lokola komikitisa. Ndeko Swingle alobaki ete, “Koya awa mpo na kolanda mateya ezali koteya bato komikitisa,” mpe abakisaki ete, “Bozali kolongwa awa na makoki mingi koleka mpo na kokumisa Yehova.”
Daniel Sydlik, oyo azali mpe moko na Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Bozali na esengo monene—Mpo na nini komitungisa?” Apesaki toli ete, ntango mikakatano ebimi, bóluka litambwisi ya Makomami. Ndeko Sydlik aponaki mwa bavɛrsɛ ya Matai mokapo 6 mpe amonisaki ndenge nini kosalela yango. Kozanga kondima ekoki komema biso na komitungisa mpo na makambo ya mokili, lokola bilei mpe bilamba. Nzokande, Yehova ayebi bamposa na biso. (Matai 6:25, 30) Komitungisa ekobakisela biso se mikakatano ya mokolo na mokolo. (Matai 6:34) Nzokande, esengeli komilɛngɛla mpo na mikolo mizali koya. (Talá Luka 14:28.) Ndeko Sydlik alimbolaki ete, “Yesu apekisi te kokanisa na mayele makambo ya lobi mpo na komilɛngɛla, kasi apekisi nde komitungisa na koleka ndelo mpo na yango. Kozala na mosala ezali nkisi makasi mpo na kolonga motungisi. Na yango, ntango tozali komitungisa, ezali malamu tóbanda koloba na ntina na solo.”
Toli ya nsuka ya balakisi
Ekómaki ngala ya balakisi misato ya Eteyelo ya Gileadi mpo na kosala masolo. Karl Adams asalaki lisolo ya liboso. Lisolo na ye ezalaki na motó ya likambo oyo, “Okozongisa nini epai ya Yehova?” Lisolo na ye etongamaki likoló na Nzembo 116, oyo mbala mosusu Yesu ayembaki na butu ya nsuka liboso akufa. (Matai 26:30, NW, maloba na nse ya lokasa) Yesu azalaki kokanisa nini ntango azalaki koyemba ete: “Nakozongisa nini epai na [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai”? (Nzembo 116:12) Mbala mosusu azalaki kokanisa nzoto ya kokoka oyo Yehova abongiselaki ye. (Baebele 10:5) Mokolo oyo elandaki apesaki nzoto yango lokola mbeka, likambo oyo emonisaki bozindo ya bolingo na ye. Bayekoli ya kelasi ya mbala ya 105 bamonaki malamu ya Yehova na boumeli ya sanza mitano oyo balekisaki na kelasi. Sikawa basengeli komonisa bolingo na bango mpo na Nzambe na nzela ya mosala makasi bipai oyo bakotinda bango lokola bamisionere.
Mark Noumair, molakisi ya mibale na Eteyelo ya Gileadi azwaki maloba; ye apesaki banakelasi toli ete, “Bókoba kosala makambo ya malamu.” Nsima wana batɛkaki ye lokola moombo na Ezipito, Yosefe anyokwamaki na boumeli ya mbula 13. Atikaki nzela ete mabe ya bato mosusu epekisa ye kosalela Nzambe? Te, akobaki kosala makambo ya malamu. Na nsima, na ntango oyo Nzambe aponaki, Yosefe asikwamaki na bampasi na ye. Alongwaki na bolɔkɔ mpe mbala moko akómaki kofanda na ndako ya mokonzi. (Genese, mikapo 37-50) Molakisi atunaki banakelasi na ye ete: “Soki bokutani na makambo oyo bolikyaki te na bisika oyo bakotinda bino lokola bamisionere, bokotika mosala? Bokobungisa elikya? To bokolendendela lokola Yosefe?”
Na nsuka, mokomeli ya Eteyelo ya Gileadi, Wallace Liverance, akambaki lisolo ya mɔ́tɔ kati na banakelasi oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bósakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye.” Banakelasi mosusu bayebisaki makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola ndako na ndako, na bamagazini, mpe na balabala. Basusu bayebisaki ndenge oyo bazalaki kotambola mpo na kosakola epai ya bato oyo balobaka nkota mosusu. Mpe bamosusu bamonisaki ndenge ya kosakola epai ya bato ya mangomba mosusu ndenge na ndenge. Banakelasi nyonso bazalaki na mposa makasi ya komipesa mobimba na mosala ya kosakola na bisika oyo bakotinda bango lokola bamisionere.
Bamisionere ya kalakala bazali na esengo
Robert Wallen amonisaki eteni oyo elandaki, ezalaki na motó ya likambo ete, “Mbuma ya esengo euti na mosala ya misionere.” Ezalaki mituna-lisolo elongo na bandeko minei oyo basalaka na biro monene. Bango bakutanaki na bamisionere oyo baumeli na mosala mpe bayebisaki bango makambo ya kolendisa. Bamisionere wana bakakatanaki te na kondima ete ezalaki mpasi mpo na koyekola lokota ya sika, komimesenisa na makambo ya sika, to komesana na klima mosusu. Mpe basengelaki kolonga likambo ya kokanisa mboka na bango. Ntango mosusu bazwaki mpe mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Kasi na makambo nyonso wana, bamisionere babatelaki elimo ya kolonga, mpe bazwaki mapamboli mpo na kolendendela na bango. Bamoko basalisi bato mingi ete báyeba Yehova. Basusu basungi na mitindo ndenge na ndenge mpo na bokoli ya mosala ya kosakola Bokonzi na mikili na bango.
Carey Barber, moko na Mikóló-Bakambi asalaki lisolo ya nsuka. Azongelaki makanisi ya ntina ya manaka ya liyangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.” Atunaki bayangani ete, “Manaka ya liyangani esali bopusi nini likoló ya boyokani na bino na Yehova?” Molobi amonisaki bokeseni ete kolanda nzela ya Nzambe ezali kopesa mapamboli mpe bato oyo bazali kolanda nzela ya mokili bazali kosuka mabe. Alobelaki lisumu ya Mose na Meliba, mpe akebisaki ete: “Ata soki tosaleli ye na bosembo na boumeli ya bambula mingi, Yehova atalelaka likambo ya kobuka mibeko na ye ya sembo na lisɛki te.” (Mituya 20:2-13) Tiká ete basaleli nyonso ya Nzambe, na bisika nyonso, bákangama makasi na mabaku malamu ya mosala na bango oyo ezali na motuya!
Ekómaki ntango ya kopesa banakelasi mapolomi na bango. Na nsima, momonisi ya banakelasi atángaki mokanda ya botɔndi na nkombo ya banakelasi nyonso mpo na mateya oyo bazwaki. Nsima ya koyemba loyembo ya nsuka mpe kosala libondeli ya bozindo, likita esilaki. Kasi, mpo na banakelasi ya mbala ya 105, wana ezalaki se ebandeli, mpamba te bamisionere yango ya sika “balingi kobanda mosala monene.”
[Etanda na lokasa 23]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikolo epai bauti: 9
Motuya ya bikolo epai batindami: 17
Motuya ya banakelasi: 48
Motuya ya mabala: 24
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 12
[Etanda na lokasa 24]
Baponaki mosala ya ntango nyonso?
Ben, oyo auti kozwa lipolomi na kelasi ya mbala ya 105 alobi ete, “Ntango nazalaki mpenza elenge, nazalaki na mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela te.” Abakisi ete, “Nakanisaki ete mosala yango ezali kaka mpo na baoyo bazali na makoki mingi mpe baoyo makambo na bango epesi bango nzela ya kosala yango. Kasi mosala ya kosakola ekómaki kosepelisa ngai mingi. Yango wana, mokolo moko nasosolaki ete kozala mobongisi-nzela elimboli se kosangana mingi na mosala ya kosakola. Na ntango wana namonaki ete nakoki kosala mosala yango.”
Lusia, ye alobi ete, “Na ndako na biso tozalaki kopesa basaleli ya ntango nyonso lokumu mingi.” Azali koyeba lisusu ndenge lisangá na bango mobimba ezalaki na esengo mbala nyonso oyo bamisionere bazalaki koya kotala bango. Alobi ete, “Ntango nazalaki kokola, eyebanaki ete moko na mikano na ngai ezali ya kosala mosala ya ntango nyonso.”
Mama ya Theodis akufaki ntango ye azalaki na mbula 15. Alobi ete, “Na ntango yango lisangá esungaki ngai mingi, yango wana namitunaki, ‘Nakoki kosala nini mpo na komonisa botɔndi na ngai?’” Likambo yango etindaki ye na kobanda mosala ya ntango nyonso mpe sikawa mosala ya misionere.
[Elilingi na lokasa 25]
Kelasi ya mbala ya 105 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Bankombo na bango ekomami awa nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na molɔngɔ ya liboso kino na nsima, mpe banda na lobɔkɔ ya mwasi kino lobɔkɔ ya mobali
(1) Sampson, M.; Brown, I.; Heggli, G.; Abuyen, E.; Desbois, M.; Pourthié, P. (2) Kassam, G.; Lindberg, R.; Dapuzzo, A.; Taylor, C.; LeFevre, K.; Walker, S. (3) Baker, L.; Pellas, M.; Woggon, E.; Böhne, C.; Asplund, J.; Haile, J. (4) Pourthié, T.; Whittaker, J.; Palmer, L.; Norton, S.; Gering, M.; Haile, W. (5) Walker, J.; Böhne, A.; Groenveld, C.; Washington, M.; Whittaker, D.; Abuyen, J. (6) Gering, W.; Washington, K.; Pellas, M.; Desbois, R.; Heggli, T.; Asplund, Å. (7) Woggon, B.; LeFevre, R.; Taylor, L.; Brown, T.; Groenveld, R.; Palmer, R. (8) Norton, P.; Sampson, T.; Baker, C.; Lindberg, M.; Kassam, M.; Dapuzzo, M.