Koyekola epesaka matomba mpe esengo
“Soko okoluka ye . . . okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe.”—MASESE 2:4, 5.
1. Ndenge nini kotánga mpo na kopemisa makanisi ekoki kopesa biso esengo mingi?
BATO mingi batángaka kaka mpo na esengo ya kotánga. Soki moto azali kotánga mokanda moko ya malamu, yango ekoki kozala mpo na ye ndenge malamu ya kopemisa makanisi. Atako bazali na programɛ na bango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, baklisto mosusu basepelaka mpe kotánga mikanda mosusu lokola Nzembo, Masese, Baevanzile, to mikanda mosusu ya Biblia. Mikanda yango ekomami na maloba ya ntɔki mpe ezali na makanisi kitoko oyo esepelisaka bango mingi. Bamosusu basepelaka kotánga Annuaire de Témoins de Jéhovah, Lamuká!, masolo ya bomoi ya bato na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, to masolo oyo elobelaka istware, geografi, mpe makambo mosusu.
2, 3. (a) Ndenge nini tokoki kokokanisa makambo mozindo ya elimo na bilei ya makasi? (b) Koyekola esɛngaka makambo nini?
2 Ya solo, kotánga kaka mpo na kolekisa ntango ekoki kopemisa makanisi ya moto, kasi koyekola esɛngaka ete moto asala molende. Francis Bacon, moto ya filozofi mpe moto ya Angleterre, akomaki boye: “Mikanda mosusu ezali ya komeka mwa moke, mosusu ezali ya komela, mpe mwa ndambo mosusu ya kotafuna mpo nzoto ebenda biloko ya ntina kati na yango.” Biblia ezali mpenza na kati ya mikanda oyo alobeli na nsuka. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo na [ye, NW] [Klisto, oyo amonisamaki na Mokonzi mpe Nganga Melekisedeke] tozali na maloba mingi, nde ezali na mpasi koloba mpo ete bosili kokóma baoyo bakoyokaka noki te. . . . Bilei makasi izali mpo na bato bakómi [mikóló]; mpo na bango basili kolakisa [bososoli] na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Baebele 5:11, 14) Bilei ya makasi esɛngaka kotafuna yango liboso ya komela yango mpo nzoto ebenda biloko ya ntina oyo ezali na kati na yango. Makambo mozindo ya elimo esɛngaka komanyola yango liboso ekɔta mpe efanda na bɔɔngɔ.
3 Diksionɛrɛ moko elimboli “koyekola” lokola “kosalisa makanisi mosala mpo ezwa boyebi to bososoli, na nzela ya kotánga, kolukaluka, mpe bongo na bongo.” Yango wana, tokoloba te ete tozali mpenza koyekola soki tozali kotánga lisolo moko likolólikoló, ata soki mbala mosusu tozali kotya mikɔlɔtɔ na mwa maloba mosusu ntango tozali kotánga. Koyekola esɛngaka mosala, bɔɔngɔ esengeli kosala, mpe esɛngaka kosalela bososoli. Atako koyekola esɛngaka ete moto asala molende, yango elingi koloba te ete ekoki kosepelisa moto te.
Ndenge nini okoki kosepela na koyekola
4. Soki tolandi maloba ya mokomi ya nzembo, ndenge nini koyekola Liloba ya Nzambe ekoki kopesa esengo mpe litomba?
4 Kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe ekoki kokitisa moto motema mpe ekoki kolendisa ye. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Mobeko ya [Yehova] ezali sembo, ekobikisa molimo; litatoli ya [Yehova] ezali solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango. Bilakeli ya [Yehova] izali alima, ikosepelisa motema. Malako ya [Yehova] izali pɛto, ikomonisa miso polele.” (Nzembo 19:7, 8) Mibeko ya Yehova mpe bilakeli na ye elamusaka molimo na biso, ekómisaka elimo na biso malamu, epesaka biso esengo na motema, mpe efungolaka biso miso mpo tómona malamu mikano kitoko ya Yehova. Yango ezali mpenza esengo!
5. Ndenge nini boyekoli ekoki kosepelisa biso mingi?
5 Soki mosala na biso eboti mbuma ya malamu, tosepelaka kolanda kosala yango. Yango wana, mpo tósepela koyekola, tosengeli mbala moko kosalela boyebi oyo touti kozwa. Yakobo akomaki boye: “Nde ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.” (Yakobo 1:25) Moto oyo asalelaka mbala moko makambo oyo azali koyekola, asepelaka mingi. Soki tozali kolukaluka makambo na mikanda mpo na koyanola na motuna moko oyo batunaki biso na mosala ya kosakola to ya koteya, yango mpe ekopesa biso mpe esengo mingi.
Tólinga mpenza Liloba ya Nzambe
6. Mokomi ya Nzembo 119 alobaki nini mpo na komonisa ndenge oyo alingaki liloba ya Yehova?
6 Mokomi ya Nzembo 119, oyo mbala mosusu ezali Hizikiya ntango azalaki naino mwana ya mokonzi, amonisaki ete alingaki Liloba ya Yehova mingi. Asalelaki maloba ya ntɔki mpenza ntango alobaki ete: “Nakomisepelisa kati na mibeko na yo, nakobosana liloba na yo te. Matatoli na yo izali esengo na ngai . . . Nakosepela mpe na bikateli na yo, yango elingi ngai. Tiká ete mawa na bolingo na yo eya likoló na ngai ete nabika, zambi Mobeko na yo ezali esengo na ngai. Nayokaki mposa mingi ya kobika na yo, ɛ [Yehova]; Mobeko na yo ezali esengo na ngai.”—Nzembo 119:16, 24, 47, 77, 174.
7, 8. (a) Ndenge buku moko elobi yango, “komisepelisa” na Liloba ya Nzambe elimboli nini? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Liloba ya Yehova? (c) Ndenge nini Ezela amibongisaki liboso ya kotánga Mibeko ya Yehova?
7 Diksionɛrɛ moko ya maloba ya Makomami ya Liebele elimboli liloba oyo, na Nzembo 119, ebongolami na “komisepelisa” ete: “Ndenge oyo liloba yango esalelami na v. 16 eyokani na [baverbe] oyo ebongolamaka na kosepela . . . mpe na komanyola . . . Ezali kolandana boye: kosepela, komanyola, koyoka esengo na . . . Boyokani yango ezali mbala mosusu kopesa likanisi ete, mpo moto asepela na liloba ya Yawe, asengeli kobanda na komanyola mpenza. . . . Ndimbola yango ezali mpe komonisa liyoki.”a
8 Ya solo, tosengeli kolinga Liloba ya Yehova banda na motema na biso, esika oyo mayoki efandaka. Tosengeli kosepelaka kokanisa malamu na bavɛrsɛ mosusu oyo totángi. Tosengeli kokanisa malamumalamu makambo ya mozindo na elimo, komipesa na yango, mpe komanyola yango. Yango esɛngi kofanda kimya, kokanisa mpe kobondela. Lokola Ezela, tosengeli kobongisa mitema na biso mpo na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Biblia elobi boye mpo na ye: “Ezela asili kotya motema na ye ete asosola Mobeko ya [Yehova] mpe ete [alanda] yango mpe ete alakisa malako mpe kosambisa-sembo kati na Yisalaele.” (Ezela 7:10) Simbá ntina misato oyo Ezela abongisaki motema na ye: koyekola, kosalela makambo ayekoli na bomoi na ye, mpe koteya. Tosengeli kolanda ndakisa na ye.
Koyekola ezali na kati ya losambo
9, 10. (a) Ndenge nini mokomi ya nzembo amonisaki ete azalaki kokanisa Liloba ya Yehova? (b) Verbe ya Liebele oyo ebongolami na “kobanza” elimboli nini? (c) Mpo na nini ezali na ntina ete tótalelaka koyekola Biblia lokola “likambo oyo ezali na kati ya losambo”?
9 Mokomi ya nzembo alobi ete azalaki kobanzabanza mibeko, malako, mpe makundoli ya Yehova. Ayembi ete: “Nakobanza kati na bilakeli na yo mpe nakotosa nzela na yo. . . . [Nakotombola] mpe mabɔkɔ na ngai na malako na yo, yango elingi ngai, mpe nakobanza bilakeli na yo. Ɛ nalingi Mobeko na yo na bolingo bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba. Naleki balakisi nyonso na ngai na koyeba, zambi matatoli na yo ezali kati na makanisi na ngai.” (Nzembo 119:15, 48, 97, 99) ‘Kobanza’ Liloba ya Yehova elimboli nini?
10 Verbe ya Liebele oyo ebongolami na “kobanza” elimboli mpe “komanyola, kokanisa na mozindo,” “kobalolabalola likambo moko na kati ya bɔɔngɔ.” “Ndenge oyo basaleli liloba yango elimboli kokanisa na kimya misala ya Nzambe . . . mpe liloba ya Nzambe.” (Theological Wordbook of the Old Testament) Liloba “lobanzo” elimboli ndenge oyo “mokomi ya nzembo azalaki komanyola,” “ndenge oyo azalaki koyekola” mobeko ya Nzambe mpo alingaki yango, lokola “likambo oyo ezali na kati ya losambo.” Soki tozali komona ete koyekola Liloba ya Nzambe ezali na kati ya losambo na biso, tokotalela yango na lisɛki te. Yango wana, tosengeli kosala yango malamumalamu mpe tosengeli kobondela mpo na yango. Koyekola ezali na kati ya losambo na biso mpe tosengeli kosalaka yango mpo na kobongisa losambo na biso.
Tótimola na bozindo ya Liloba ya Nzambe
11. Ndenge nini Yehova amonisaka basaleli na ye makambo mozindo ya elimo?
11 Mokomi ya nzembo alobaki na kokamwa mpenza ete: “Misala na yo izali minene boni, ɛ [Yehova]! Makanisi na yo izali na bozindo mpenza!” (Nzembo 92:5) Ntoma Paulo mpe alobelaki “makambo mozindo ya Nzambe,” makanisi mozindo oyo Yehova azali komonisa basaleli na ye “na nzela ya elimo [na ye]” oyo ezali kosala kati na moombo ya sembo mpe ya mayele. (1 Bakolinti 2:10; Matai 24:45) Moombo ya sembo azali ntango nyonso kopesa bato nyonso bilei ya elimo; “mabɛlɛ” mpo na bato ya sika mpe “bilei makasi” mpo na ‘bato oyo bakómi mikóló.’ (Baebele 5:11-14)
12. Pesá ndakisa moko ya “makambo mozindo ya Nzambe” oyo moombo asili kolimbola.
12 Mpo na kokanga ntina ya “makambo mozindo ya Nzambe,” tosengeli koyekola Liloba na ye mpe kobondela mpo na yango mpe lisusu kokanisa makambo yango na bozindo. Na ndakisa, masolo kitoko ebimaki oyo emonisaki ete Yehova azali sembo mpe azali na motema mawa. Ntango Yehova amonisaka motema mawa na ye, alɛmbisaka bosembo na ye te; kasi, motema mawa ya Nzambe ezali ndenge ya komonisa bosembo mpe bolingo na ye. Ntango Yehova azali kosambisa moto ya masumu, atalaka liboso soki akoki koyokela ye mawa na lisalisi ya mbeka ya lisiko oyo Mwana na ye apesaki. Soki moto oyo asali lisumu aboyi kobongola motema to azali kotomboka, Nzambe asalelaka bosembo kasi asalelaka motema mawa te. Na nyonso wana, atosaka mitinda na ye.b (Baloma 3:21-26) ‘Ɛ mayele ya Nzambe ezali bozindo boni!’—Baloma 11:33.
13. Ndenge nini tosengeli kosepela na “motuya monene” ya makambo ya elimo oyo basili komonisa biso?
13 Mokomi ya nzembo azalaki na esengo, biso mpe tozali na esengo lokola Yehova azali koyebisa biso ebele ya makanisi na ye. Davidi akomaki ete: “Ɛ Nzambe, kobanza na yo epai na ngai ezali eloko ya motuya mingi! Motuya na yango ezali monene boni! Soko nameki kotánga yango, ileki mbuma ya zɛlo na motuya.” (Nzembo 139:17, 18) Atako boyebi oyo tozali na yango lelo oyo ezali moke soki tokokanisi yango na ebele ya makanisi oyo Yehova akomonisa biso seko na seko, tozali kosepela na “motuya monene” ya mateya ya solo ya elimo oyo asili komonisa biso mpe tozali se kotimola na mozindo na kati ya Liloba ya Nzambe.—Nzembo 119:160, NW, maloba na nse ya lokasa.
Tosengeli kozala na molende mpe na bisaleli oyo ebongi
14. Ndenge nini Masese 2:1-6 emonisi ntina ya kosala molende mpo na koyekola Liloba ya Nzambe?
14 Mpo moto ayekola Biblia na mozindo esɛngaka ete asala molende. Yango ezali komonana polele soki totángi na likebi mpenza Masese 2:1-6. Talá malamu maloba oyo Mokonzi Salomo asaleli mpo na komonisa molende oyo tosengeli kosala mpo na kozwa boyebi, mayele, mpe bososoli oyo Nzambe apesaka. Akomaki boye: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka [yango] lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko ya motuya bibombami; mbɛ, okososola botosi na kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe. Mpo ete [Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Ya solo, mpo na kozwa matomba na koyekola tosengeli kolukaluka, kotimola, lokola nde tozali koluka biloko ya motuya oyo bibombami.
15. Elakiseli nini tozwi na Biblia oyo ezali komonisa ntina ya kozala na ndenge malamu ya koyekola?
15 Lisusu, mpo ete koyekola epesa biso bozwi ya elimo, tosengeli koyeba ndenge ya koyekola malamu. Salomo akomaki boye: “Soko ebende ezangi mopotu, mpe moto akopelisa lino na yango te, ekoki na ye kolekisa nguya.” (Mosakoli 10:10) Soki moto azali kosalela mbeli oyo epeli te to azali kosalela yango malamu te, akobimisa makasi mingi mpe akosala mosala ya malamu te. Ndenge moko mpe, matomba oyo tokoki kozwa na boyekoli ezali kotalela ndenge oyo tozali koyekola. Liteya 7 ya Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali kopesa biso toli malamu mpo na kobongisa ndenge na biso ya koyekola.c
16. Makanisi malamu nini bapesi biso mpo na kosalisa biso tóyekolaka na bozindo?
16 Ntango moto ya mosala ya mabɔkɔ alingi kobanda mosala na ye, atyaka pembeni na ye biloko ya mosala oyo akozala na yango mposa. Ndenge moko mpe, ntango tobandi koyekola, tosengeli kokamata na bibliotɛkɛ na biso biloko oyo tokozala na yango mposa. Lokola toyebi ete koyekola ezali mosala mpe esɛngaka ete bɔɔngɔ esala mosala, esengeli mpe tófanda malamu. Mpo mpɔngi eyiba biso te, eleki malamu tófanda na kiti liboso ya mesa na esika tómisembola na mbeto to tófanda na kiti ya kosembola mokɔngɔ. Nsima ya koyekola mwa mingi, ekozala malamu tónyolisa nzoto to tóbima mwa moke libándá mpo na kozwa mwa mopɛpɛ ya mpiɔ.
17, 18. Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ndenge malamu ya kosalela biloko oyo tozali na yango mpo na koyekola.
17 Tozali na ebele ya bisaleli ya malamu mpo na koyekola. Esaleli ya liboso ezali Biblia Traduction du monde nouveau, oyo ezali lelo oyo na mobimba to ndambo na yango na minɔkɔ 37. Biblia Traduction du monde nouveau oyo ya mwa monene ezali na mitindami mpe na “Etanda ya mikanda ya Biblia” oyo epesi nkombo ya moto oyo akomaki mokanda mokomoko, esika oyo bakomaki yango, mpe eleko oyo makambo balobi na mokanda yango esalemaki. Biblia yango ezali mpe na index ya maloba ya Biblia, ezali lisusu na appendice, na bakalati. Na minɔkɔ mosusu, Biblia yango ezali monene, babengaka yango na Lifalanse Bible avec notes et références. Yango ezali na makambo nyonso oyo tolobeli awa, bakisa mpe maloba na nse ya lokasa, na index ya maloba yango. Osalelaka biloko nyonso oyo ezali na lokota na bino mpo na kotimola malamumalamu na kati ya Liloba ya Nzambe?
18 Eloko mosusu ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso mpo na koyekola ezali buku Étude perspicace des Écritures. Soki buku yango ezali na lokota moko oyo okoki kotánga, osengeli kozangaka yango te mbala nyonso oyo ozali koyekola. Ekopesa yo ndimbola ya makambo mingi na masolo mingi ya Biblia. Eloko mosusu ya ntina mingi ezali buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Liboso obanda kotánga mokanda ya sika na kati ya Biblia, ebongi otalela naino boyekoli oyo elobeli mokanda yango na buku “Makomami nyonso” mpo na koyeba lisolo na yango mpe esika oyo makambo oyo balobeli kuna esalemaki, mpe lisusu ekoyebisa yo makambo oyo ezali na mokanda yango mpe ntina na yango mpo na biso. Eloko mosusu ya sika eyei kobakisama na mikanda oyo tozali na yango ezali CD-ROM Watchtower Library, ezali sikoyo na minɔkɔ libwa.
19. (a) Mpo na nini Yehova apesi biso bisaleli malamu mpo na koyekola Biblia? (b) Eloko nini tozali na yango mposa mpo na kotánga mpe koyekola Biblia na ndenge esengeli?
19 Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” Yehova apesi basaleli na ye awa na mabele bisaleli mingi mpo na kosalisa bango ‘báluka mpe bázwa boyebi ya solosolo ya Nzambe.’ (Masese 2:4, 5) Soki tozali na momeseno ya koyekola malamu, ekosalisa biso tóyeba Yehova malamu mpe tózala baninga na ye ya motema. (Nzembo 63:1-8) Ya solo, koyekola ezali mosala, kasi ezali mosala ya esengo mpe epesaka matomba. Nzokande, ezwaka ntango; mpe na ntembe te, ozali komituna boye: ‘Nakozwa ntango wapi mpo namipesa mpenza na kotánga Biblia mpe kosala boyekoli ya ngai moko?’ Yango nde likambo tokotalela na lisolo ya nsuka ya boyekoli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a New International Dictionary of Old Testament Theology & Exegesis, Volimi 4, nkasa 205-207.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1998, lokasa 13, paragrafe 7. Mpo na boyekoli na yo ya Biblia, okoki komityela mokano ya kotalela masolo ya boyekoli na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango mpe mitó ya makambo “Justice” mpe “Miséricorde” na mokanda Étude perspicace. Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Toli mosusu ya malamu ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1993, nkasa 13-17; 15 Mai 1986, nkasa 19-20 (ebimeli ya Lifalanse).
Mituna ya bozongeli
• Ndenge nini tokoki kosala mpo tósepela na boyekoli na biso moko mpe epesa biso litomba?
• Lokola mokomi ya nzembo, ndenge nini tokoki komonisa “bolingo” mpe “lobanzo” na biso mpo na Liloba ya Yehova?
• Ndenge nini Masese 2:1-6 emonisi ntina ya kosala molende mpo na koyekola Liloba ya Nzambe?
• Biloko nini ya malamu Yehova apesi biso mpo na koyekola?
[Elilingi na lokasa 14]
Tokolinga Liloba ya Nzambe mingi soki tozali kofanda kimya mpo na kokanisa mpe kobondela
[Bililingi na lokasa 17]
Osalelaka mpenza biloko nyonso oyo ezali kosalisa biso tótimola Liloba ya Nzambe na bozindo?