Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo
MOBALI azalaki monzenga kitoko, na moindo na ye ya ngolo. Mwasi mpe azalaki na mayele mingi mpe kitoko mpenza. Bango mibale bazalaki kosala na kompanyi moko. Mwasi azalaki kolongola miso epai ya mobali yango ata moke te. Mobali mpe azalaki kosepela na mwasi yango mingi. Mobali azalaki kokabela mwasi biloko, mwasi mpe azalaki kokabela mobali. Mosika te, balinganaki. Mobali atikaki mwasi na ye ya ndako mpo na mwasi wana. Kasi, na nsuka, mwasi yango amonaki malamu atikala na mobali na ye ya ndako mpe alingaki lisusu lolango yango te. Motema mosusu ezalaki kotinda mobali yango azongela mwasi na ye ya ndako. Kasi, lokola azalaki kondima mabe na ye te, akokaki te. Moto na moto akobaki kosala makambo na ye, atako azalaki na mpasi na motema.
Na moi ya lelo, bato bazali komona mabe moko te na kosala pite to ekobo. Tozali komona ete bato bamipesi mpenza na bisengo. Mokanda moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Emonani ete na mokili mobimba, bato bamipesi na kosala ekobo koleka kutu mabala.”
Nzokande Yehova Nzambe alingi ete libala ‘ekumisama na bato nyonso’ mpe mbeto ya libala ezala “na mbindo te.” (Baebele 13:4) Makomami elobi ete: “Bómizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Na yango, mpo tósepelisa Nzambe, tosengeli kokima pite na ekobo na mokili oyo etondi na makambo ya bosɔtɔ.
Ndenge nini tokoki komibatela mpo tókwea te na makanisi mabe oyo bato tofandi na bango bazalaka na yango? Na mokapo ya 5 ya mokanda ya Masese na kati ya Biblia, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesi biyano. Tiká tótalela makambo oyo alingi koyebisa biso.
Makanisi ekobatela yo
Mokonzi ya Yisalaele abandi na maloba oyo: “Mwana na ngai, batelá mayele na ngai.” Na nsima, abakisi ete: “Mpe sembolá litoi na yo epai na [bososoli, NW] na ngai; ete obatela [makanisi, NW] mpe ete bibebu na yo bizwa boyebi.”—Masese 5:1, 2.
Mpo tókwea te na masɛnginya ya pite na ekobo, tosengeli kozala na mayele, elingi koloba koyeba kosalela boyebi oyo tozwi na Biblia, mpe bososoli, to koyeba kokesenisa malamu na mabe mpe kopona nzela ya malamu. Bapesi biso toli ete tózalaka na mayele mpe na bososoli mpo na kobatela makanisi na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ntango tozali koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe, tosengeli kotalela malamumalamu ndenge oyo Yehova asalaka mpe tosengeli koluka koyeba bamposa mpe mikano na ye. Ntango tozali kosala bongo, tozali kotya makanisi na biso na nzela ya malamu. Bongo, makanisi oyo tokozwa ekoyokana na mayele mpe boyebi oyo Nzambe apesaka. Soki tosaleli yango malamu, makanisi yango ekobatela biso mpo tókwea na pite to na ekobo te.
Kebá na maloba ya sukali
Ntina oyo tosengeli kozala na makanisi malamu mpo tókwea na pite mpe na ekobo te na kati ya mokili oyo etondi na makambo ya bosɔtɔ ezali ete makambo ya moto ya pite ebendaka moto. Salomo akebisi biso na maloba oyo: “Zambi monɔkɔ ya mwasi mopaya ekotangisa elɛngi lokola [mafuta ya, NW] nzoi mpe bibebu na ye eleki mafuta na kitoko. Kasi nsuka na ye ezali na bololo lokola mbondo, ezali na mopotu lokola mbeli ya mpia mibale.”—Masese 5:3, 4.
Na lisese oyo, babengi moto ya motó makasi ete “mwasi mopaya” to mwasi ya pite.a Maloba oyo azali kosalela mpo na kobenda moto, ezali elɛngi lokola mafuta ya nzoi mpe eleki mafuta ya olive na kitoko. Mbala mingi maloba ya kobenda moto mpo akwea na pite ebandaka bongo, boye te? Talá, na ndakisa, lisolo ya Amy, mwana mwasi kitoko ya mbula 27 mpe azali sekrɛtɛrɛ na biro moko. Alobi boye: “Na mosala, mobali yango atyelaka ngai likebi mingi mpe akumisaka ngai ntango nyonso. Moto amiyokaka malamu soki bato mosusu bazali kosepela na ye. Kasi, ezali polele ete azali kosepela na ngai kaka mpo tósangisa nzoto. Akokosa ngai te na maloba na ye ya sukali.” Mbala mingi, maloba ya mobali oyo azali kobenda mwasi to maloba ya mwasi oyo azali kobenda mobali ezalaka elɛngi soki tozali koyeba mpenza ntina na yango te. Yango wana, tosengeli kokanisaka malamu.
Makambo oyo eyaka nsima ya kosala pite ezalaka bololo lokola mbondo mpe ekataka lokola mbeli oyo epeli bipai mibale, epesaka mpasi mpe ebomaka. Mbala mingi, mbuma mabe ya etamboli yango ezalaka ete lisosoli ya moto ekotungisama, akoki kozwa zemi oyo akanaki te to akoki kozwa maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Kanisá mpe mpasi monene na motema ya molongani ya moto oyo asali ekobo. Soki moto asali ekobo ata mbala moko, yango ekoki kozokisa mpenza motema ya molongani na ye mpe mpota yango ekotikala na bomoi na ye mobimba. Ya solo, pite epesaka mpasi.
Mpo na bomoi ya mwasi ya motó makasi, mokonzi ya mayele abakisi ete: “Makolo na ye ezali kokita na liwa, matambe na ye esimbi sheol. Akotalela nzela ya bomoi te. Banzela na ye ebungi mpe ayebi te soki ezali wapi.” (Masese 5:5, 6, NW) Nzela ya mwasi ya pite ezali komema ye na liwa, ezali komema makolo na ye na sheol to lilita. Maloba oyo ezali mpenza solo mpamba te bamaladi oyo ezali kozwama na kosangisa nzoto, mingimingi sida, epalangani mingi! Bato oyo bazali kotambola na mwasi yango na nzela na ye ya mabe, bakosuka lokola ye.
Mokonzi azali komitungisa mpenza, yango wana alobi ete: “Boye bana, yoká ngai; longwá na maloba ya monɔkɔ na ngai te. Longolá nzela na yo epai na ye mpe bɛlɛmá na ekuke ya ndako na ye te.”—Masese 5:7, 8.
Tosengeli mpenza kokima bato ya pite mpe ya ekobo. Mpo na nini tokomitika na nzela na bango, na ndakisa na kolandáká miziki ya mabe, masano ya makambo ya bosɔtɔ to kotánga mikanda oyo ezali komonisa bolumbu ya basi na mibali? (Masese 6:27; 1 Bakolinti 15:33; Baefese 5:3-5) Mpe ekozala mpenza bozoba soki tokopesa bango nzela ete bátyela biso likebi soki tozali ntango nyonso kokangama na bango to soki tozali kolata mpe kosala monzele na ndenge oyo ezangi bopɔlɔ!—1 Timote 4:8; 1 Petelo 3:3, 4.
Mbuma mabe mpenza
Mpo na ntina nini lisusu tosengeli kokima nzela ya moto ya motó makasi? Salomo apesi eyano na maloba oyo: “Ete opesa lokumu na yo epai na bamosusu te to [bambula] na yo epai ya bato ya yauli te; ete bapaya bátondisama na mosolo na yo te mpe ete osalela ndako ya mopaya te; ete olela na nsuka te wana mosuni na yo mpe nzoto na yo esili koleisama.”—Masese 5:9-11.
Na maloba yango, Salomo amonisi mbuma mabe oyo moto abukaka soki asali pite to ekobo. Ekobo na kosambwisa nzoto, to kobebisa lokumu ya moto, etambolaka nzela moko. Kosalela nzoto na biso mpo na kokokisa kaka mposa mabe ya biso moko to ya moto mosusu ezali mpenza nsɔni, boye te? Soki ondimi kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, yango ezali mpenza kopesa nzoto na yo kilo?
Kasi, ‘kopesa bambula na biso, nguya na biso mpe mosolo na biso na bapaya’ elimboli nini? Mokanda moko elobi ete: “Likanisi ya bavɛrsɛ oyo ezali polele: Ekobo ebotaka mbuma mabe mpenza; mpamba te moto akoki kobungisa biloko nyonso oyo amonelaki mpasi, ezala lokumu na ye, nguya na ye to bozwi na ye, mpo na lokoso ya mwasi to mpe nsɔni oyo yango ekoki komema na mboka.” Ya solo, pite to ekobo ekoki komemela moto mpasi mpenza!
Lokola abebisi lokumu na ye mpe abungisi bozwi na ye nyonso, zoba yango akomilela ete: “Solo naboyaki kolakisama mpe motema na ngai etyolaki mpamela. Natosaki mongongo ya balakisi na ngai te, nasembolaki litoi na ngai te epai na bango bazalaki koteya ngai. Nazalaki penepene ya kokɔta na mabe nyonso na kati ya koyangana mpe [liboso] ya bato.”—Masese 5:12-14.
Na nsima, moto oyo asali lisumu akoloba oyo moto moko ya mayele abengaki “ebele ya ‘ba aah soki . . . ’: aah soki nayokaki toli ya tata na ngai; aah soki naboyaki kosala makambo oyo nalingi; aah soki nayokaki toli ya bato mosusu.” Kasi, ayaka koyeba makambo nyonso wana soki ntango esi eleki. Na ntango yango, bomoi ya moto ya pite mpe lokumu na ye ebebi. Ezali mpenza na ntina mingi ete tókanisa mbuma mabe oyo moto abukaka soki amipesi na pite to na ekobo liboso ete tókwea na yango!
‘Melá mai ya libulu na yo moko’
Biblia elobelaka makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya kobomba? Soki moke te. Nzambe nde moto apesaki likabo yango mpe asalaki ete ntango mwasi na mobali bazali kosangisa nzoto, básepela mpe báyoka esengo. Kasi, yango epesami nzela kaka na bato oyo babalani. Yango wana, Salomo apesi mobali oyo abalá toli oyo: “Melá mai [ya libulu, NW] na yo moko mpe etima na mai longwa na liziba na yo mpenza. Mai na yo moko mapanzana longwa na yo? Bitima ya mai bileka kati na nzela? Ezali bobele na yo moko, ezali yango na bapaya elongo na yo te.”—Masese 5:15-17.
‘Libulu na yo moko ya mai’ mpe “liziba na yo mpenza” ezali maloba kitoko oyo emonisi mwasi na yo ya bolingo. Esengo ya kosangisa nzoto na ye ezali lokola ozali komela mai oyo ezali kokitisa motema. Libulu ya mai ezali te lokola bitima ya mai oyo ezali mpo na bato nyonso, yango ezali eloko ya moto ye moko. Bapesi mobali toli ete abota bana na mwasi na ye, na kati ya ndako na bango, na esika ya kokende kopanzapanza mbóto na ye na balabala, elingi koloba epai ya basi mosusu. Emonani polele ete toli oyo ezali kosɛnga mobali akangama bobele na mwasi na ye.
Moto ya mayele alobi lisusu boye: “Tiká ete mai na yo mapambolama; sepelá na mwasi ya bolenge na yo. Azali lokola mboloko ya bolingo mpe ntaba ya [ngomba] na kitoko; tiká ete mabɛlɛ na ye masepelisa yo ntango nyonso, yoká esengo na bolingo na ye libela.”—Masese 5:18, 19.
“Mai” to liziba ya mai, ezali komonisa esika oyo moto azali kokokisa mposa ya kosangisa nzoto. Esengo oyo moto ayokaka na kosangisa nzoto na molongani na ye ‘epambwami,’ elingi koloba ete euti epai ya Nzambe. Yango wana, balobi na mobali ete asepela na mwasi ya bolenge na ye. Mpo na ye, mwasi yango alingami mpe azali kitoko lokola mboloko ya mwasi, bonzenga na ye mpe kitoko na ye ezali lokola ntaba ya ngomba.
Na nsima, Salomo atuni mituna mibale oyo ezali kotinda biso na kokanisa: “Ɛ mwana na ngai, mpo na nini okosepelisama na mwasi mopaya? mpe okobumela ntolo na mopaya?” (Masese 5:20) Ya solo, mpo na nini moto oyo abalá akobendama ete asangisa nzoto na moto oyo akutani na ye na esika ya mosala, na kelasi to epai mosusu?
Ntoma Paulo apesi baklisto oyo babalá toli oyo: “Bandeko, nazali koloba ete ntango eyei mokuse, [sikoyo] tiká ete baoyo bazali na basi bázala lokola bango bazangi basi.” (1 Bakolinti 7:29) Maloba oyo elimboli nini? Elimboli ete bayekoli ya Yesu Klisto basengeli ntango nyonso ‘koluka liboso Bokonzi.’ (Matai 6:33) Yango wana, mobali asengeli kaka te kokanisaka mwasi na ye mpe mwasi asengeli kaka te kokanisaka mobali na ye mpe kozongisa matomba ya Bokonzi na nsima na bomoi na bango.
Ntina ya komipekisa
Moto akoki kopekisa bamposa na ye ya nzoto. Bato oyo balingi kosepelisa Yehova basengeli kopekisaka bamposa na bango ya nzoto. Ntoma Paulo alobi ete: “Nzambe alingi boye: ete bósantisama, bótika makambo ya pite. Moto na moto kati na bino ayeba kozala na bokonzi likoló na mbeki na ye moko [nzoto na ye moko] kati na kosantisama mpe lokumu.”—1 Batesaloniki 4:3, 4, NW.
Yango wana, bilenge basengeli te kowela kobala ntango kaka babandi koyoka mposa ya kosangisa nzoto. Libala esɛngaka kolapa ndai mpe esengeli moto akɔmela mpo akoka komema mokumba yango. (Genese 2:24) Ezali malamu mingi kozela kino ‘okoleka bambula ya bolenge,’ eleko oyo bamposa ya nzoto ezalaka makasi mpe ekoki kokosa yo. (1 Bakolinti 7:36, NW) Ezali mpenza likambo ya mayele te mpe ezali lisumu monene soki mokóló oyo azali na mposa ya kobala akei kosala pite kaka mpo amoni mwasi to mobali oyo akoki kobala te!
“Masumu na ye moko ekokanga moto mabe”
Ntina mpenza oyo tolobaka ete pite to ekobo ezali mabe, ezali ete Yehova, Mopesi ya bomoi mpe ya bamposa ya nzoto oyo moto azalaka na yango, aboyi yango. Na yango, Mokonzi Salomo apesi toli makasi mpo na komibatela pɛto mpe kokima bizaleli mabe; alobi ete: “Zambi nzela ya moto ezali liboso ya miso na [Yehova] mpe ye akobanza mpo na bilekelo na ye nyonso.” (Masese 5:21) Ya solo, eloko moko te ebombami na miso ya Nzambe, “oyo tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na ye.” (Baebele 4:13, NW) Misala nyonso ya nsɔni, ata ebombani to te, ata ezali kobebisa nzoto to te, ebebisaka boninga na biso na Yehova. Ezali mpenza bozoba soki tokobebisa kimya na biso na Nzambe mpo na bisengo oyo epekisami mpe eumelaka se mwa ntango moke!
Ekoki komonana lokola nde bato mosusu oyo bayokaka nsɔni te na kosala pite to ekobo bakozwa etumbu te. Kasi ekozala bongo kaka mpo na mwa ntango moke. Salomo alobi ete: “Masumu na ye moko ekokanga moto mabe; akozingelama na nkamba na makambo mabe na ye. Akokufa nde akolakisama te; na monene ya mobulu na ye akopɛngwa.”—Masese 5:22, 23.
Mpo na nini tokomitika ete tópɛngwa? Mokanda ya Masese ekebisi biso na makambo ya mokili oyo ezali kobenda biso. Mpe emonisi biso mbuma mabe ya pite to ekobo: tokobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, bozwi na biso, makasi na biso mpe lokumu na biso. Nsima ya koyoka toli oyo nyonso, tolingi te tómilela mokolo mosusu na ebele ya ba “aah soki . . . ” Ya solo, soki tosaleli toli oyo Yehova apesi na nzela ya Liloba na ye oyo epemami, tokotikala pɛto na kati ya mokili oyo etondi na makambo na pite mpe na ekobo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bazalaki kosalela liloba “mopaya” mpo na bato oyo batikaki kosala makambo oyo eyokani na Mibeko ya Yehova mpe bapesaki ye mokɔngɔ. Yango wana, babengi mwasi ya pite ete “mwasi mopaya.”
[Bililingi na lokasa 30]
Mbuma ya pite to ya ekobo ezalaka bololo lokola mbondo
[Bililingi na lokasa 31]
“Sepelá na mwasi ya bolenge na yo”