Batelá lokumu na yo
MOTO oyo ayemaka ba plan ya bandako kitoko, azwaka lokumu mpe ayebanaka lokola architecte moko monene. Elenge mwasi oyo azali na mayele mingi na kelasi, ayebanaka lokola mwanakelasi ya mayele. Moto oyo asalaka eloko moko te, akoki koyebana lokola moto ya gɔigɔi. Mpo na komonisa ete kozala na lokumu ezali mpenza malamu, Biblia elobi: “Nkombo malamu eleki bozwi mingi, lokumu malamu eleki palata na wolo.”—Masese 22:1, An American Translation.
Moto akómaka na lokumu malamu na mwa makambo mikemike oyo asalaka. Nzokande, soki asali mwa bozoba moke, ekoki kobebisa lokumu yango. Na ndakisa, lokumu ya moto ekoki kobeba ntango akwei na pite to na ekobo ata mbala moko. Na mokanda ya Masese mokapo 6, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala akebisi biso mpo na bizaleli mpe misala oyo ekoki kobebisa lokumu na biso mpe boyokani na biso na Yehova Nzambe. Na kati ya makambo yango, tozali na ndai ya lokuta, gɔigɔi, bokosi, pite to ekobo; nyonso wana ezali makambo oyo Yehova ayini. Soki tolandi toli yango, ekosalisa biso tóbatela lokumu na biso.
Kolapa ndai ya lokuta te
Masese mokapo ya 6 ebandi na maloba oyo: “Mwana na ngai, soko okómi ndanga mpo na mozalani na yo; soko obɛtani mabɔkɔ elongo na mosusu; soko ozingelami mpo na maloba na monɔkɔ na yo, okangami na maloba ya monɔkɔ na yo, salá boye, [sikoyo] mwana na ngai, omibikisa yo moko, zambi oyei na lobɔkɔ ya mozalani na yo—kendá omisɔkisa, lɔmbáká mozalani na yo.”—Masese 6:1-3.
Lisese oyo epesi biso toli ete tókɔta te na makambo ya mombongo ya bato mosusu, mingimingi na bapaya. Ya solo, Bayisalaele basengelaki ‘kobatela ndeko na bango oyo akómi mobola mpe basengeli koleisa ye.’ (Levitike 25:35-38) Bayisalaele mosusu bazalaki kosala mombongo oyo ezali na makama mpe bazalaki koluka bato oyo bakoki kosunga bango mpo mombongo na bango ekwea te, bazalaki kosɛnga bato mosusu bándima kozala lokola ‘ndanga’ na bango, mpe na bongo, bazalaki komemisa bato yango ngambo mpo na nyongo oyo bakɔti. Makambo motindo yango ezali komonana mpe lelo. Na ndakisa bakompanyi oyo edefisaka mbongo ekoki kosɛnga ete liboso bádefisa mbongo na moto oyo bamoni ete ekozala na likama, esengeli moto ya mibale atya naino sinyatire. Ezali mpenza kozanga mayele soki tokomikɔtisa na makambo ya lolenge wana kozanga kokanisa liboso mpo na bato mosusu! Soki makambo etamboli malamu te, yango ekoki kobendela biso mindɔndɔ na makambo ya mbongo, mpe tokobebisa lokumu na biso epai ya babanki mpe bakompanyi mosusu oyo edefisaki mbongo.
Tokosala nini soki tokutani na mikakatano na likambo moko oyo tomonaki yango malamu liboso mpe na nsima emonani ete tosalaki bozoba? Bapesi biso toli ete tóboya lolendo mpe ‘tókende komisɔkisa epai ya mozalani na biso,’ mpe tóbondela ye makasi. Tosengeli kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosilisa likambo yango. Mokanda moko elobi boye: “Salá nyonso kino okoyokana na monguna na yo mpe bósilisa likambo, mpo ete likambo oyo ondimaki ememela yo to libota na yo mpasi te.” Esengeli kosala likambo yango nokinoki, yango wana mokonzi Salomo abakisaki ete: “Opesa mpɔngi na miso na yo te to mpɔngi na ntɔkɔ na yo te; omibikisa lokola mboloko na lobɔkɔ na mobengani mpe lokola ndɛkɛ na lobɔkɔ na mobomi-na-ndɛkɛ.” (Masese 6:4, 5) Eleki malamu koboya komikɔtisa na mombongo oyo ekoki kozala na makama na esika ya kozwa makama yango.
Zalá na molende na mosala lokola nsɛlɛlɛ
Salomo apesi toli oyo: “Kendá epai ya nsɛlɛlɛ, yo moto ya gɔigɔi, banzabanzá mpo na nzela na ye, ozala mpe na mayele.” Tokoki kozwa mayele nini epai ya mwa nyamankɛkɛ lokola nsɛlɛlɛ? Mokonzi ayanoli boye: “Ata ye azali na mokonzi te to na motambolisi te to na mokolo te nde akobongisa bilei na ye na ntango ya moi makasi, mpe akoyanganisa biloko na ye na ntango na kobuka mbuma.”—Masese 6:6-8.
Bansɛlɛlɛ bazali na ebongiseli moko malamu mpenza mpe basalaka na bomoko. Na mayele na bango ya lɔɔmbi, babombaka biloko na bango ya kolya mpo na mikolo oyo ekoya. Bazali na “mokonzi to motambolisi te.” Ya solo, bansɛlɛlɛ bazalaka na mama-mokonzi, azali mama-mokonzi mpamba te abotaka maki mpe azali mama ya limpinga mobimba. Ye apesaka mitindo te. Atako bazali na kapita te mpo na kotinda bango na makasi to mokɛngɛli te mpo na kotalatala bango, bansɛlɛlɛ basalaka mosala na molende nyonso.
Tokoki te kozala na molende na mosala lokola nsɛlɛlɛ? Ezala ete bazali kokɛngɛla biso to te, ezali bolamu na biso soki tozali kosala makasi mpe kobongisa mosala na biso. Ya solo, ezala na kelasi, na mosala, mpe ntango tozali kosala misala ya elimo, tosengeli kosala na makasi na biso nyonso. Lokola nsɛlɛlɛ ezwaka matomba mpo na mosala na yango ya molende, Nzambe mpe alingi ete biso ‘tóyoka esengo mpo na mosala na biso nyonso.’ (Mosakoli 3:13, 22; 5:18) Kosala na molende ekosala ete tózala na lisosoli ya pɛto mpe tokozala na esengo na motema.—Mosakoli 5:12.
Salomo atuni mituna mibale oyo ezali kotinda na kokanisa, mpo na kolamusa moto ya gɔigɔi na mpɔngi na ye: “Yo moto ya gɔigɔi, okolala kino ntango nini? Okolongwa na mpɔngi na yo ntango nini?” Na nsima, mokonzi amekoli maloba ya moto ya gɔigɔi mpe alobi ete: “Mwa mpɔngi, mpe kolala mwa, kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kolala! Boye kozanga ekoyela yo pwasa lokola moyibi mpe nzala lokola moto ya etumba.” (Masese 6:9-11) Lokola moto ya gɔigɔi amisemboli, bobola ekozwa ye pwasa lokola moyibi, mpe kozanga ekobimela ye lokola moto ya etumba. Bilanga ya moto ya gɔigɔi eumelaka te kotondana na matiti mpe na nzube. (Masese 24:30, 31) Mombongo na ye ekokwea na mwa ntango mokuse. Mokonzi ya mosala akoki kotika mosali oyo azali na gɔigɔi aumela na mosala na ye te! Mwanakelasi oyo azali na gɔigɔi mpo na koyekola akozwa bilembo malamu na kelasi te!
Zalá na ezaleli ya kolongobana
Salomo amonisi likambo mosusu oyo ekoki kobebisa lokumu ya moto na kati ya mboka mpe boyokani na ye na Nzambe na maloba oyo: “Moto ya mobulu, moto ya masumu akotambola na monɔkɔ ya kozimbisa. Akobweta liso na ye, akolekisa makolo na ye epai na epai, akosala bilembo na misapi na ye. Kozimbisa ezali kati na motema na ye, akobanzabanza makambo mabe ntango nyonso, akobimisa nkaka.”—Masese 6:12-14.
Maloba oyo ezali mpenza komonisa ndenge moto ya lokuta azalaka. Mbala mingi moto ya lokuta alukaka kobomba lokuta na ye. Lolenge nini? Na “monɔkɔ ya kozimbisa,” kasi mpe lisusu na makambo oyo azali kosala oyo ezali komonana na nzoto na ye. Moto moko ya mayele alobi boye: “Bikela (geste) na ye, mongongo na ye, ata mpe ndenge elongi na ye ezali, ezali komonisa bobele ndenge ya koluka kokosa; akoki kolakisa na elongi na ye ete azali moto ya sembo, nzokande azali kobomba lokuta.” Moto oyo azali bolole motindo wana azali ntango nyonso kokanisa makambo ya mabe mpe azali na elimo ya matata. Moto yango asukaka ndenge nini?
Mokonzi ya Yisalaele ayanoli ete: “Boye etumbu na ye ekoya pwasa; akobukana noki mpe kobika ekozala te.” (Masese 6:15) Soki batɔndɔli moto ya lokuta, lokumu na ye ekobeba mbala moko. Moto moko te akotyela ye lisusu motema. Nsuka na ye ezali mpenza libebi, mpamba te “bato nyonso ya lokuta” bazali na kati ya baoyo bakobomama mpo na libela. (Emoniseli 21:8) Tiká ete ‘tósalaka malamu na makambo nyonso.’—Baebele 13:18.
Tóyina makambo oyo Yehova ayini
Soki tozali koyina makambo ya mabe, yango ekopekisa biso kosala makambo oyo ekoki kobebisa lokumu na biso. Na bongo, tosengeli mpenza kolona motema ya koyina makambo ya mabe! Kasi, tosengeli mpenza koyina nini? Salomo alobi boye: “[Yehova] akoyinana na makambo oyo motoba; ɛɛ, nsambo izali koboyama na molimo na ye: miso na nzombo, lolemo na nkuta, mabɔkɔ masopi makila ya mosembwi, motema mozali kobanzabanza misala mabe, makolo makopotaka mbangu kosala masumu, motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te, mpe ye oyo akoyeisa kowelana kati na bandeko.”—Masese 6:16-19.
Makambo nsambo oyo lisese oyo elobeli ezali nde makambo minene mpe tokoki koloba ete yango esangisi lolenge nyonso ya makambo ya mabe. “Miso na nzombo” mpe “motema mozali kobanzabanza misala mabe” ezali masumu oyo esalemaka na makanisi. “Lolemo na nkuta” mpe “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te” ezali masumu oyo esalemaka na lolemo. “Mabɔkɔ masopi makila ya mosembwi” mpe “makolo makopotaka mbangu kosala masumu” ezali mpenza misala ya mabe. Mpe eloko mosusu oyo Yehova ayini mpenza ezali bato oyo bazali kobimisa kowelana kati na bato oyo bafandaki na kimya. Lokola alongwe na motoba mpe akómi na nsambo emonisi ete molɔngɔ ya makambo yango esuki te, mpamba te misala mabe yango oyo bato bazali kosala ezali se kobakisama.
Ya solo, tosengeli mpenza koyina makambo oyo Nzambe ayini. Na ndakisa, tosengeli kokima “miso na nzombo” to lolendo. Tosengeli mpe koboya matɔngi mpamba te yango ekoki kosala ete “kowelana ezala kati na bandeko.” Soki tozali kopanza nungunungu, bilobaloba oyo ezangi ntina, to makambo ya lokuta, mbala mosusu tozali te “kosopa makila ya mosembwi,” kasi tokoki mpenza kobebisela ye lokumu na ye mpamba.
‘Kolula kitoko ya nzoto na ye te’
Salomo abandi eteni mosusu ya toli na ye na maloba oyo: “Mwana na ngai, batelá lilako ya tata na yo mpe longwá na mibeko ya mama na yo te. Kangá yango na motema na yo libela mpe zingá yango na nkingo na yo.” Mpo na nini? “Soko okotambola, ekokamba yo; soko okolala mpɔngi, ekobatela yo, soko okolongwa na mpɔngi, ekolobana na yo.”—Masese 6:20-22.
Soki babɔkɔlaki biso na toli ya Makomami, yango ekoki mpenza kobatela biso mpo tókwea te na motambo ya pite to ya ekobo? Ɛɛ, ezali bongo. Balobi na biso ete: “Zambi malako mazali mwinda mpe mobeko ezali pole; mpamela na kolakisama izali nzela epai na bomoi, ete omibatela na mwasi mabe, mpe na kozimbisama na lolemo na mwasi mopaya.” (Masese 6:23, 24) Soki tozali kobosana toli ya Liloba ya Nzambe te mpe soki tozali kosalela yango, ekozala lokola ‘mwinda na makaka na biso mpe pole na nzela na biso’ mpe yango ekosalisa biso tókwea te na maloba-sukali ya mwasi to mobali ya pite.—Nzembo 119:105.
Mokonzi ya mayele apesi toli ete: “Lulá kitoko na nzoto na ye kati na motema na yo te; tiká te ete abenda yo na ntɔkɔ na ye.” Mpo na nini? “Zambi na nzela ya mwasi ya pite moto alongolami kwanga na ye; mwasi ya moto mosusu [akolanda] bomoi na motuya.”—Masese 6:25, 26.
Salomo azalaki nde kolobela mwasi na ekobo lokola mwasi ya ndumba? Ekoki kozala bongo. To ekoki kozala ete azali kokesenisa mbuma mabe oyo moto oyo asali pite na mwasi ya ndumba akoki kobuka mpe oyo ya moto oyo asali ekobo na mwasi ya moninga. Moto oyo akangami na mwasi ya ndumba akoki “kolongolama kwanga” na ye to akoki kokóma mobola mpenza. Akoki kozwa maladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, bakisa mpe sida oyo ezali koboma ebele ya bato. Kasi, moto oyo azali kokangana na mwasi ya moto mosusu, azalaki na likama monene na ntango oyo bazalaki kolanda Mibeko. Mwasi ya ekobo azali kotya “bomoi” ya makango na ye na likama. Mokanda moko elobi ete: “Moto ya pite asukaka te . . . bobele na koyeisa bomoi na ye mokuse. Moto ya masumu akoki kozwa etumbu ya liwa.” (Levitike 20:10; Deteronome 22:22) Ata soki azali kitoko lolenge nini, ebongi te kolula mwasi ya ndenge wana.
‘Kotya mɔ́tɔ na ntolo na yo te’
Mpo na komonisa makama mosusu ya ekobo, Salomo atuni boye: “Moto akoki kokamata mɔ́tɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye ikozika te? Moto akoki kotambola likoló ya makala ya mɔ́tɔ mpe matambe na ye makozikisama te?” Na nsima alimboli elilingi oyo asaleli na maloba oyo: “Boye na ye oyo akoingela epai ya mwasi ya mozalani na ye. Moto na moto oyo [akosimba] ye akobyangama sembo te.” (Masese 6:27-29) Ya solo mpenza moto oyo asali lisumu ndenge yango akozwa etumbu.
Balobi na biso ete: “Bato bakotyola moyibi te soko akoyiba [mpo na] kotondisa motema na ye wana eyoki ye nzala? Kasi soko amonani, akozongisa kino mbala nsambo, akobimisa biloko nyonso na ndako na ye.” (Masese 6:30, 31) Na Yisalaele ya kala, bazalaki kosɛnga ete moyibi afuta amande, ata soki ekosɛnga ye apesa biloko na ye nyonso.a Na yango, ebongaki mpenza ete moto oyo asali ekobo azwa etumbu, mpamba te akokaki komilongisa te na likambo wana!
Salomo alobi ete: “Ye oyo akosala ekobo na mwasi azangi mayele.” Moto oyo azangi motema ya kokanisa malamu “azali kobungisa molimo na ye.” (Masese 6:32) Na miso ya bato akoki komonana ete azali moto ya lokumu, nzokande na bomoto na ye ya kati, moto yango akoli te.
Moto ya ekobo abukaka mbuma ya mabe mingi. “Akozokisama mpe akozwa lokumu mabe, lisumu na ye [ekosila] te. Zambi zuwa ekokolisa nkanda monene na moto, akokitisa yango te na mokolo ya kobukanisa. Akotala lifuti soko moke te, akosepela te ata opesi makabo mingi.”—Masese 6:33-35.
Moyibi akoki kozongisa eloko oyo ayibaki, kasi moto oyo asali ekobo akoki kofuta eloko moko te. Eloko nini akoki kozongisela mobali oyo azali na nkanda makasi? Ata abondeli ndenge nini, ezali mpasi ete báyokela ye mawa mpo na mabe wana. Ezali ata na nzela moko te oyo moto ya ekobo akoki kofuta lisumu na ye. Bakofinga ye mpe akoyoka nsɔni mpe lokumu na ye moko ekobeba libela. Lisusu, akoki ata na nzela moko te komisikola to komisomba na etumbu oyo ebongi na ye.
Yango wana ebongi mpenza tókima ekobo mpe etamboli mosusu nyonso oyo ezali kobebisa lokumu na biso mpe ezali kofingisa Nzambe. Na bongo, tókeba ete tólapa ndai ya lokuta te. Tiká ete tóyebana lokola bato ya molende na mosala mpe bato oyo balobaka solo. Wana tozali kosala makasi na koyina oyo Yehova ayini, tozali mpe komisalela lokumu ya malamu epai na ye mpe epai ya bazalani na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Mibeko ya Mose, bazalaki kosɛnga na moyibi azongisa mbala mibale, mbala minei, to mbala mitano biloko oyo ayibi. (Exode 22:1-4) Maloba “mbala nsambo” ezali komonisa meko ya makasi oyo ezalaki kozwama soki moto ayibi, ekoki kozala ete asengelaki kofuta mingi koleka oyo ye ayibaki.
[Elilingi na lokasa 25]
Kebá! Kondima te komipesa ndanga mpo na likambo ya nyongo
[Elilingi na lokasa 26]
Zalá na molende na mosala lokola nsɛlɛlɛ
[Elilingi na lokasa 27]
Boyá matɔngi