Ozali kotika elimo ya Nzambe ekamba yo?
“Elimo na yo ezali malamu; ekamba ngai na mokili ya bosembo.”—NZ. 143:10.
1, 2. (a) Lobelá mwa mabaku oyo Yehova asalelaki elimo santu mpo na basaleli na ye. (b) Elimo santu esalaka kaka na mabaku ya minene? Limbolá.
NINI eyelaka yo na makanisi soki okanisi ndenge elimo santu esalaka? Okanisaka misala ya nguya ya Gideone mpe ya Samsone? (Bas. 6:33, 34; 15:14, 15) Mbala mosusu okanisaka mpiko ya bakristo ya liboso to kimya ya motema oyo Stefano azalaki na yango liboso ya Sanedrina. (Mis. 4:31; 6:15) Mpo na mikolo na biso, tokoloba nini mpo na esengo oyo etondaka na mayangani oyo esangisaka mikili mingi, bosembo ya bandeko na biso oyo bazali na babolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki, mpe bokoli monene ya mosala ya kosakola? Bandakisa wana nyonso emonisi mosala ya elimo santu.
2 Elimo santu esalaka kaka na makambo ya minene to na mabaku ya ntina mingi? Te. Liloba ya Nzambe elobeli bakristo bazali “kotambola na elimo,” “kotambwisama na elimo,” mpe ‘bazali na bomoi na elimo.’ (Gal. 5:16, 18, 25) Maloba yango emonisi ete elimo santu ekoki kokoba kotambwisa bomoi na biso. Mokolo na mokolo, tosengeli kosɛnga Yehova atambwisa makanisi, maloba, mpe misala na biso na nzela ya elimo na ye. (Tángá Nzembo 143:10.) Soki tozali kotikela elimo nzela esala na bomoi na biso, ekobimisa kati na biso mbuma oyo ekolendisa basusu mpe ekosanzola Nzambe.
3. (a) Mpo na nini tosengeli kotambwisama na elimo santu? (b) Tokotalela mituna nini?
3 Mpo na nini tosengeli kotambwisama na elimo santu? Mpo nguya mosusu, oyo etɛmɛlaka mosala ya elimo santu, ezali koluka kotambwisa biso. Nguya yango mosusu ezali oyo Biblia ebengi “nzoto,” elingi koloba bamposa ya masumu ya nzoto na biso ya kozanga kokoka oyo tosangolá epai ya Adama. (Tángá Bagalatia 5:17.) Bongo, kotika elimo ya Nzambe ekamba biso elimboli nini? Ezali mpenza na makambo oyo tokoki kosala mpo na kotɛmɛla nzoto na biso ya masumu? Tótalela mituna yango wana tozali kolobela bizaleli mosusu motoba ya “mbuma ya elimo”—“motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, [mpe] komipekisa.”—Gal. 5:22, 23.
Motema pɛtɛɛ mpe motema molai elendisaka kimya na lisangá
4. Ndenge nini motema pɛtɛɛ mpe motema molai elendisaka kimya na lisangá?
4 Tángá Bakolose 3:12, 13. Motema pɛtɛɛ mpe motema molai esalaka elongo mpo na kolendisa kimya na lisangá. Bizaleli yango mibale ya mbuma ya elimo esalisaka biso tósalela basusu makambo na ndenge ya malamu, tófanda kimya ntango batumoli biso, mpe tóboya kozongisa mabe ntango basusu balobi to basali biso makambo oyo ezangi boboto. Soki tozwani matata ná ndeko mokristo moko, motema molai ekosalisa biso tóboya ndeko na biso te, kasi tósala oyo tokoki mpo na kosilisa matata yango. Esengeli mpenza tómonisa motema pɛtɛɛ mpe motema molai na lisangá? Ɛɛ, mpamba te biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka.
5. Nini esalemaki kati na Paulo ná Barnabasi, mpe likambo yango emonisi nini?
5 Tótala likambo oyo ebimaki kati na Paulo ná Barnabasi. Basalaki elongo bambula mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu. Moto na moto azalaki na bizaleli ya malamu. Nzokande na libaku moko, “koswana makasi ebimaki kati na bango, bongo bakabwanaki, moto na moto na nzela na ye.” (Mis. 15:36-39) Likambo wana emonisi ete na bantango mosusu, matata ekoki kobima ata na kati ya basaleli ya Nzambe ya sembo. Soki mokristo moko ayokani malamu te ná mokristo mosusu, akoki kosala nini mpo likambo yango ebimisa koswana te, oyo ekoki kobebisa boyokani na bango mpo na libela?
6, 7. (a) Toli nini ya Biblia tokoki kolanda liboso mɔtɔ epela ntango tozali kosolola likambo moko ná ndeko na biso mokristo? (b) “Koyokaka noki, kowelaka koloba te, [mpe] koyokaka nkanda noki te” ezali na matomba nini?
6 Ndenge maloba “koswana makasi ebimaki” emonisi yango, matata ya Paulo ná Barnabasi ebimaki na mbala moko mpe ezalaki makasi. Soki mokristo ayoki ete abandi kosilika ntango azali kolobela likambo moko ná ndeko mosusu, ekozala malamu alanda toli oyo ezali na Yakobo 1:19, 20: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te; mpo nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.” Na kolanda ndenge makambo ezali, akoki kokɔtisa lisolo mosusu, kozelisa likambo yango mpo na kosolola yango na ntango mosusu, to kosɛnga bolimbisi liboso mɔtɔ epela.—Mas. 12:16; 17:14; 29:11.
7 Kotosa toli yango ezali na matomba nini? Soki azwi ntango ya kokitisa motema, abondeli Yehova mpo na likambo yango, mpe akanisi ndenge ya koyanola malamu, mokristo azali kotika elimo ya Nzambe ekamba ye. (Mas. 15:1, 28) Na lisalisi ya elimo santu, akoki komonisa motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Na yango, akokoka kolanda toli oyo ezali na Baefese 4:26, 29: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te . . . Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” Ya solo, soki tozali komilatisa motema pɛtɛɛ mpe motema molai, tokosalisa mpo kimya mpe bomoko ezala na lisangá.
Lendisá libota na yo na boboto mpe na bolamu
8, 9. Boboto mpe bolamu ezali nini, mpe esalaka nini na libota?
8 Tángá Baefese 4:31, 32; 5:8, 9. Ndenge kaka mwa mopɛpɛ kitoko mpe eloko ya malili na moi makasi ekitisaka motema, boboto mpe bolamu elendisaka. Na libota, bizaleli yango elendisaka boyokani ya malamu. Boboto ezali ezaleli kitoko oyo etindaka biso tómibanzabanza mpenza mpo na basusu; komibanzabanza yango emonanaka ntango tozali kosalisa basusu mpe tozali na maloba ya boboto. Ndenge moko na boboto, bolamu ezali ezaleli oyo etindaka biso tósala makambo mpo na kosalisa basusu. Etindaka biso tókabaka. (Mis. 9:36, 39; 16:14, 15) Kasi, bolamu esuki kaka wana te.
9 Bolamu ezali ezaleli ya moto oyo asalaka makambo ya malamu mpenza. Esukaka kaka na oyo tozali kosala te, etali mingimingi nde oyo tozali mpenza. Ezali lokola mbuma oyo biteni na yango nyonso ezali elɛngi mpe ezali na esika ya kopɔla te, ezala na libándá ezala na kati. Ndenge moko mpe, bolamu oyo elimo santu ebimisaka etalelaka bomoi mobimba ya mokristo.
10. Nini ekoki kosalema mpo na kosalisa bato ya libota bálona mbuma ya elimo?
10 Nini ekoki kosalisa bato oyo bazali na libota ya bakristo bámoniselaka boboto mpe bolamu? Boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi. (Kol. 3:9, 10) Bakonzi ya mabota mosusu bakɔtisaka boyekoli ya mbuma ya elimo na kati ya programɛ na bango ya Losambo na libota ya pɔsɔ na pɔsɔ. Kobongisa boyekoli ya ndenge wana ezali mpasi te. Ntango ozali kosala bolukiluki na mikanda oyo ezali na monɔkɔ na bino, zwá bisika oyo balobeli ezaleli mokomoko ya mbuma ya elimo. Bokoki kotalela kaka mwa baparagrafe na pɔsɔ moko, mpe kozwa bapɔsɔ mingi mpo na koyekola ezaleli mokomoko. Ntango bozali koyekola makambo yango, bótánga mpe bólobela bavɛrsɛ oyo bapesi. Bóluka ndenge ya kosalela makambo oyo boyekoli, mpe bóbondela Yehova apambola milende na bino. (1 Tim. 4:15; 1 Yoa. 5:14, 15) Boyekoli ya ndenge wana ekoki mpenza kotinda bato ya libota bábongola lolenge oyo bazali kosalelana makambo?
11, 12. Ndenge nini bandeko mibale ná basi na bango bazwaki matomba nsima ya koyekola ezaleli babengi boboto?
11 Mobali moko ná mwasi na ye, lokola bautaki kobalana sika mpe balingaki libala na bango elonga, bazwaki ekateli ya koyekola mbuma ya elimo na mozindo. Matomba nini bazwaki? Mwasi alobi boye: “Koyeba malamumalamu ezaleli babengi motema-boboto esalisá biso tósalelanaka makambo ya malamu tii lelo. Eteyá biso tózalaka makambo makasimakasi te mpe tóyebaka kolimbisa. Esalisá mpe biso tóyeba koloba ‘matɔndi’ mpe ‘bolimbisi’ soki esengeli.”
12 Ndeko mosusu ná molongani na ye, oyo bazalaki na matata na libala na bango, bamonaki ete boboto ezalaki kozanga kati na bango. Bazwaki ekateli ya koyekola elongo ezaleli babengi boboto. Ebotaki mbuma nini? Mobali alobi boye: “Boyekoli na biso ya ezaleli babengi boboto esalisaki biso tómona ete tosengeli kotyelana motema na esika ya kokanisela moninga mabe, mpe koluka makambo ya malamu ya moninga. Moto na moto akómaki kokipe mingi bamposa ya moninga. Kozala moto ya boboto esɛngaki mpe natikaka mwasi na ngai abimisa makanisi na ye polele kozanga nasilika mpo na makambo oyo alobi. Esɛngaki mpe natya lolendo na ngai pembeni. Ntango tokómaki komonisa boboto na libala na biso, totikaki koluka komilongisa. Ezalaki kolongola nkanda.” Libota na bino mpe ekozwa matomba soki boyekoli mbuma ya elimo?
Monisá kondima ntango ozali yo moko
13. Tosengeli kokeba na likama nini oyo ekoki kobebisa elimo na biso?
13 Bakristo basengeli kotika elimo ya Nzambe ekamba bango, ezala ntango bazali na bato mosusu mpe ntango bazali bango moko. Lelo na mokili oyo ya Satana, bililingi ya mbindo mpe kominanola ya mabe ekómi mingi. Likambo yango ezali likama mpo na elimo na biso. Mokristo asengeli kosala nini? Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Bóbwaka mbindo nyonso mpe ezaleli oyo ezangi ntina: mabe, mpe bóndima na boboto liloba oyo ekoki kobikisa milimo na bino mpe efanda mpenza na kati na bino.” (Yak. 1:21) Tótala ndenge oyo kondima, ezaleli mosusu ya mbuma ya elimo, ekoki kosalisa biso tótikala pɛto na miso ya Yehova.
14. Ndenge nini kozanga kondima ekoki komema na etamboli ya mabe?
14 Kondima elimboli libosoliboso komona ete Yehova Nzambe azali mpenza solo. Soki Nzambe azali solo te mpo na biso, ekozala mpasi te tósala makambo ya mabe. Tótala makambo oyo esalemaki na kati ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala. Yehova amonisaki mosakoli Ezekiele ete makambo oyo eyinamá ezalaki kosalema na nkuku ; alobaki na ye boye: “Omoni, Ee mwana ya moto, oyo mikóló ya ndako ya Yisraele bazali kosala na molili, moto na moto na bashambrɛ ya kati ya bililingi na ye ya kitoko mpenza? Mpo bazali koloba ete: ‘Yehova azali komona biso te. Yehova atiki mokili.’” (Ezk. 8:12) Omoni mpo na nini bazalaki kosala makambo wana? Bazalaki kondima te ete Yehova ayebi makambo oyo bazalaki kosala. Yehova azalaki solo te mpo na bango.
15. Ndenge nini kondima makasi epai ya Yehova ebatelaka biso?
15 Tótala sikoyo ndakisa ya Yozefe. Atako azalaki mosika na libota na ye mpe bato ya ekólo na ye, Yozefe aboyaki kosala ekobo ná mwasi ya Potifare. Mpo na nini? Alobaki boye: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” (Eba. 39:7-9) Yozefe azalaki komona ete Yehova azali solo. Soki tozali komona ete Yehova azali solo, ntango tozali biso moko, tokotala makambo ya mbindo te mpo na kominanola; tokosala mpe ata likambo moko te oyo toyebi ete esepelisaka Nzambe te. Tokozala na ekateli ndenge moko ná mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Nakotambolatambola na kati na ndako na ngai na ezaleli ya kozanga mbeba ya motema na ngai. Nakotya eloko moko te ya mpambampamba liboso ya miso na ngai.”—Nz. 101:2, 3.
Batelá motema na yo—Zalá na komipekisa
16, 17. (a) Ndenge emonisami na mokanda ya Masese, ndenge nini “elenge mobali moko oyo azali na motema te” akweaki na lisumu? (b) Ndenge emonisami na elilingi na lokasa 26, ndenge nini likambo ya ndenge wana ekoki kosalema lelo, ezala epai ya mikóló to bilenge?
16 Komipekisa, ezaleli ya nsuka ya mbuma ya elimo, esalisaka biso tóboya makambo oyo Nzambe apekisi. Ekoki kosalisa biso tóbatela motema na biso. (Mas. 4:23) Tótala ndakisa oyo ezali na Masese 7:6-23, oyo elobeli ndenge “elenge mobali moko oyo azali na motema te” akweaki na mayele mabe ya mwasi moko ya ndumba. Akweaki na motambo nsima ya “koleka pene na esika babalabala ekutaná, pene na ndako ya mwasi yango.” Mbala mosusu, amekaki koleka kuna kaka mpo na koluka koyeba makambo. Nsima ya ntango moke kaka, asosolaki te ete azali komemama na nzela moko ya bozoba oyo “etali molimo na ye mpenza.”
17 Ndenge nini elenge mobali yango akokaki kokima komitya na likama monene ndenge wana? Asengelaki kolanda likebisi oyo: “Bóyengayenga na babalabala na ye te.” (Mas. 7:25) Tokoki kozwa liteya oyo: Soki tolingi elimo ya Nzambe ekamba biso, tosengeli koboya kokende na nzela oyo ekoki komema biso na komekama. Moto akoki koyengayenga na nzela ya bozoba lokola ‘elenge mobali oyo azali na motema te’ soki azali kofungolafungola ba-chaîne ya televizyo to basite ya Internet. Ezala akani yango to te, miso na ye ekoki kokwea na bililingi ya makambo oyo elamwisaka bamposa ya nzoto. Akoki kokolisa mokemoke ezaleli ya mbindo ya kotala pornografi, mpe yango ekobebisa mpenza lisosoli na ye mpe boyokani na ye na Nzambe. Ekoki kozala likama na bomoi na ye.—Tángá Baroma 8:5-8.
18. Bikateli nini mokristo akoki kozwa mpo na kobatela motema na ye, mpe ndenge nini kosala bongo esɛngi komipekisa?
18 Ya solo, ntango miso na biso ekwei na elilingi moko ya mbindo, tokoki, kutu nde tosengeli kozala na komipekisa mpe kolongola yango mbala moko. Kasi, ekoleka nde malamu soki toboyi komitya na nzela oyo ekoki komema biso kuna! (Mas. 22:3) Kozwa bikateli oyo esengeli mpe kotosa yango esɛngaka kozala na komipekisa. Na ndakisa, kotya ordinatɛrɛ na esika oyo bato mosusu mpe bakoki komona, ekoki kobatela biso. Bato mosusu bamonaka ete malamu kosalela ordinatɛrɛ to kotala televizyo kaka soki bato mosusu mpe bazali. Basusu bazwá ekateli ya kosalela Internet te. (Tángá Matai 5:27-30.) Tiká tózwa bibongiseli oyo esengeli mpo na komibatela biso moko mpe libota na biso mpo tókoka kosalela Yehova “na motema ya pɛto mpe na lisosoli ya malamu mpe na kondima oyo ezali na bokosi te.”—1 Tim. 1:5.
19. Wapi matomba ya kotika elimo santu ekamba biso?
19 Mbuma oyo elimo santu esalisaka biso tólona ememaka matomba mingi. Motema pɛtɛɛ mpe motema molai elendisaka kimya na lisangá. Boboto mpe bolamu ebakisaka esengo na libota. Kondima mpe komipekisa esalisaka biso tókoba kozala penepene na Yehova mpe tózala pɛto na miso na ye. Longola yango, Bagalatia 6:8 epesi biso elikya oyo: “Moto oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko oyo euti na elimo.” Ya solo, na lisalisi ya lisiko ya Kristo, Yehova akosalela elimo santu mpo na kopesa bomoi ya seko na baoyo bazali kotika elimo yango ekamba bango.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini motema pɛtɛɛ mpe motema molai elendisaka kimya na lisangá?
• Nini ekoki kosalisa bakristo bámonisa boboto mpe bolamu na libota?
• Ndenge nini kondima mpe komipekisa esalisaka mokristo abatela motema na ye?
[Elilingi na lokasa 24]
Ndenge nini okoki koboya ete lisolo na bino ebimisa koswana?
[Elilingi na lokasa 25]
Boyekoli ya mbuma ya elimo ekoki kosalisa libota na bino
[Elilingi na lokasa 26]
Makama nini tokokima soki tozali na kondima mpe komipekisa?