“Esengo na moto oyo azwi bwanya”
AZALAKI mokomi ya maloba ya ntɔki, mosali ya baplan ya ndako mpe mokonzi. Alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bomɛngo, mpamba te biloko oyo azalaki kozwa na mbula moko ezali na valɛrɛ ya dolare koleka milio 200. Moto yango ayebanaki mpe mingi mpo na bwanya na ye. Mokonzi-mwasi moko oyo akendaki kotala ye akamwaki mpenza, yango wana alobaki ete: “Talá nayebisameli ata ndambo te. [Bwanya, NW] na yo mpe mosolo na yo ezali koleka lokumu loyokaki ngai.” (1 Mikonzi 10:4-9) Moto yango ezalaki Salomo, mokonzi na Yisalaele ya kala.
Salomo azalaki na bomɛngo mpe na bwanya. Yango wana, ayebaki mpenza kopona kati na bomɛngo mpe bwanya, nini oyo ezali mpenza na ntina mingi. Akomaki ete: “Esengo na moto oyo azwi bwanya mpe moto oyo azwi bososoli, mpamba te kozwa yango lokola litomba eleki palata mpe kozwa yango lokola litomba eleki wolo na kitoko. Eleki mabanga ya penini na motuya, mpe bisengo nyonso ekoki kokokana na yango te.”—Masese 3:13-15, NW.
Kasi, epai wapi tokoki kozwa bwanya? Mpo na nini bwanya eleki bozwi na motuya? Kitoko na yango ezali na makambo nini? Mokapo 8 ya Masese, oyo ekomamaki na Salomo, epesi biyano na mituna oyo na maloba kitoko mpenza. Na mokapo yango bwanya ezali koloba mpe ezali kosala, mpamba te bakomaki yango lokola nde moto azali koloba. Bwanya yango moko emonisi kitoko na yango mpe motuya na yango.
“Ezali koganga makasi”
Masese mokapo 8 ebandi na mituna oyo: “[Bwanya, NW] ezali koganga te? Bososoli ezali kobimisa mongongo na yango te?”a Bwanya mpe bososoli ezali koganga, kasi te lokola mwasi ya pite oyo abombami na bisika ya molili mpe alobi na mongongo ya nse maloba ya kolɛngola na matoi ya elenge oyo azali ye moko mpe azangi bwanya. (Masese 7:12) “Likoló ya ngomba, na nzela, na bisika oyo banzela ekutani, yango etɛlɛmi. Pembeni ya bikuke, na monɔkɔ ya engumba, na bikɔtelo, ezali koganga makasi.” (Masese 8:1-3, NW) Mongongo ya bwanya ezali makasi mpe ezali na mpiko, ezali koyokana makasi mpe polele na bisika ya bato nyonso, lokola na bikuke, na bisika oyo banzela ekutani mpe na bikɔtelo ya mboka. Ezali mpasi te mpo bato báyoka mongongo wana mpe báyanola.
Nani oyo akoki kondima te ete moto nyonso awa na mabele oyo azali na mposa ya bwanya oyo euti na Nzambe oyo ekomami na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo epemami, akoki kozwa yango? Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Banda kalakala, Biblia ezali mokanda oyo bato mingi batángaka koleka mikanda nyonso.” Buku yango ebakisi ete: “Ata mokanda moko te ekabolami mingi lokola Biblia. Lisusu, Biblia ebongolami koleka mpe na minɔkɔ ebele koleka mikanda nyonso.” Lokola Biblia mobimba to bandambo na yango ezali na minɔkɔ koleka 2 100, bato ebele (koleka 90 %) bazali na likoki ya kotánga ata ndambo ya Liloba ya Nzambe na lokota na bango.
Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango ya Biblia na bisika nyonso. Na bikólo 235 bazali kosakola na molende nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe bazali koteya bato solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Bazulunalo na bango oyo elobelaka mateya ya Biblia, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebimaka na minɔkɔ 140 na Lamuká! oyo ebimaka na minɔkɔ 83, nimero mokomoko ya bazulunalo yango ebimaka na bamilio koleka 20. Ya solo, bwanya ezali koganga na bisika ya bato nyonso!
“Mongongo na ngai ezali mpo na bana ya bato”
Bwanya oyo emonisami lokola moto ebandi koloba ete: “Nakobyanga epai na bino bato, mongongo na ngai ezali mpo na bino bana ya bato. Bino bilema, yebá [bokɛngi, NW]; bino bibebe, zalá na motema ya [kokanga ntina, NW].”—Masese 8:4, 5.
Bwanya ezali kobenga moto nyonso ete azwa yango. Bazali kobenga ata bilema ete bázwa bokɛngi to bokɛbi mpe bibebe, ete bázwa mayele ya kokanga ntina. Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia ezali mokanda mpo na bato nyonso; yango wana, basalaka milende mpo na kolendisa moto nyonso oyo bakutani na ye ete ayekola Biblia mpo na kozwa maloba ya bwanya oyo ezali na kati na yango.
“Monɔkɔ na ngai ekoloba solo”
Bwanya etomboli mongongo na yango mpe elobi lisusu boye: “Bóyoka, zambi nakoloba mpo na makambo [ya ntina, NW]; kozipwa ya bibɛbu na ngai ekozala mpo na makambo ya sembo. Zambi monɔkɔ na ngai ekoloba solo; mabe ezali likambo liboyami na bibɛbu na ngai. Maloba nyonso na monɔkɔ na ngai mazali na boyengebene; likambo ligunzami to na mabe ezali kati na yango te.” Mateya oyo bwanya ezali kopesa ezali malamu mingi mpe sembo, ezali solo mpe boyengebene. Likambo oyo egunzami to ya mabe ezali na kati na yango te. “Makozala nyonso polele epai na ye oyo asosoli, mpe alima epai na bango baoyo bakozwana na boyebi.”—Masese 8:6-9.
Yango wana mpenza, bwanya elobi ete: “[Bóndima disipilini na ngai kasi palata te, NW]; bóyamba boyebi liboso ya wolo eponami.” Makanisi yango ebongi mpenza, “zambi [bwanya, NW] eleki mabanga na penini na malamu; biloko nyonso bikoki moto kolula yango [ekokokana] na yango te.” (Masese 8:10, 11) Kasi, mpo na nini? Nini ezali kopesa bwanya motuya oyo eleki motuya ya bozwi?
“Mbuma na ngai ileki wolo na malamu”
Makabo oyo bwanya ezali kopesa moto oyo ayokeli yango eleki wolo, palata to mabanga na penini na motuya. Bwanya eyebisi makabo yango na maloba oyo: “Ngai bwanya nafandi elongo na bokɛngi mpe nazwi boyebi ya makoki ya kokanisa. Kobanga Yehova elimboli koyina mabe. Komitombola mpe lolendo mpe ezaleli mabe, mpe monɔkɔ ya lokuta, ngai nayini yango.”—Masese 8:12, 13, NW.
Moto oyo azali na bwanya azalaka na bokɛngi mpe makoki ya kokanisa. Moto oyo azali na bwanya oyo euti na Nzambe azalaka mpe na limemya epai ya Nzambe mpe abangaka ye, mpamba te “kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.” (Masese 9:10, NW) Yango wana, ayinaka makambo oyo Yehova ayinaka. Komitombola, lolendo, ezaleli mabe mpe monɔkɔ ya lokuta, nyonso wana ezali mosika na ye. Lokola ayinaka makambo ya mabe, yango ebatelaka ye liboso na mbuma mabe oyo eutaka na kosalela bokonzi mpo na koluka matomba na ye moko. Ezali mpenza na ntina ete baoyo bazali na mikumba na kati ya lisangá ya boklisto na baoyo bazali bakonzi ya mabota báluka bwanya!
Bwanya elandi koloba ete: “Nazali na toli mpe mayele ya bomoto. Ngai, mayele ya kokanga ntina, nazali mpe na nguya. Na lisalisi na ngai, bakonzi bazali koyangela mpe bato minene bazali kotya bosembo. Na lisalisi na ngai, bana ya bakonzi bazali koyangela lokola bana ya bakonzi mpe bankumu bango nyonso bazali kosambisa na bosembo.” (Masese 8:14-16, NW) Bwanya epesaka mayele ya kososola, mayele ya kokanga ntina mpe nguya; bizaleli oyo ezali na ntina mingi mpo na bakonzi, bato minene mpe bankumu. Bwanya ezali na ntina mingi mpo na baoyo bazali na bokonzi mpe baoyo bazali kopesa basusu toli.
Moto nyonso akoki kozwa bwanya ya solosolo. Kasi, bato nyonso te bazali kozwa yango. Bamosusu baboyaka yango, bamosusu bakimaka yango, ata eyei komitika epai na bango. Bwanya elobi boye: “Nalingani na bango baoyo balingi ngai; baoyo bakoluka ngai bakomona ngai.” (Masese 8:17) Kaka baoyo bazali koluka bwanya na motema moko nde bakoki kozwa yango.
Banzela ya bwanya ezali sembo mpe ezali na boyengebene. Epesaka baoyo balukaka yango mbano. Bwanya elobi ete: “Bozwi mpe lokumu izali elongo na ngai, ɛɛ bozwi bokoumela mpe [bosembo NW]. Mbuma na ngai ileki wolo na malamu, ɛɛ ileki wolo kitoko; litomba na ngai eleki palata eponami. Natamboli na nzela na boyengebene mpe kati na bilekelo na kosambisa-sembo, ete nasangolisa bango libula baoyo balingani na ngai, mpe natondisa biloko na bango na motuya.”—Masese 8:18-21.
Longola bizaleli ya malamu lokola bokebi, makoki ya kokanisa, komikitisa, mayele ya kososola, mayele ya bomoto mpe mayele ya kokanga ntina, bwanya epesaka bozwi na lokumu. Moto ya bwanya akoki kozwa bomɛngo na ndenge ya sembo, mpe akopambwama na elimo. (3 Yoane 2) Bwanya epesaka mpe moto lokumu. Moto yango asepelaka mpe na biloko oyo azwaka, mpe azalaka na kimya ya makanisi mpe na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe. Ya solo, moto oyo azwi bwanya azali mpenza moto ya esengo. Na ntembe te, mbuma ya bwanya eleki wolo kitoko mpe palata oyo eponami na malamu.
Toli oyo ebongi mpenza mpo na biso lokola tofandi na kati ya mokili oyo bato bamipesi mingi na biloko ya mokili mpe na koluka bomɛngo na banzela nyonso! Tóbosana te motuya oyo bwanya ezali na yango mpe tósalela mayele mabe te mpo na koluka bomɛngo. Kaka mpo na koluka bozwi, tótyola te bibongiseli oyo epesaka bwanya: makita ya lisangá, koyekola Biblia biso moko mpe mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobongisela biso—Matai 24:45-47.
“Nabongisamaki kalakala”
Ndenge oyo balobeli bwanya lokola moto na Masese mokapo ya 8 ezali te lolenge moko basaleli kaka mpo na kolimbola makambo ndenge na ndenge ya ezaleli moko. Ezali mpe maloba ya elilingi oyo etaleli ekelamu ya Yehova oyo aleki bikelamu na ye nyonso. Bwanya elobi lisusu boye: “[Yehova] atongaki ngai na ebandeli ya nzela na ye, liboso ya misala na ye ya kala. Nabongisamaki kalakala longwa na ebandeli, naino mokili ezalaki te. Naino mai ya bozindo ezalaki te, ngai nabimisamaki; naino maziba izalaki kotonda na mai te. Nabotamaki naino ngomba ifandisamaki te, naino [ngomba mike NW] izalaki te. Naino asalaki mabele to bilanga to eloko moko na liboso na mputulu ya mokili te.”—Masese 8:22-26.
Ndenge oyo balimboli bwanya oyo emonisami lokola moto na bavɛrsɛ oyo ekokani mpenzampenza na oyo Makomami elobi mpo na “Liloba”! Ntoma Yoane akomaki boye: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe.” (Yoane 1:1, NW) Bwanya oyo emonisami lokola moto ezali komonisa Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, liboso abotama lokola moto.b
Yesu Klisto azali “Mobotami ya liboso ya biloko nyonso bizalisami. Mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na Likoló mpe biloko na nse, biloko bikomonanaka mpe biloko bizangi komonana.” (Bakolose 1:15, 16) Bwanya oyo elobelami lokola moto elandi koloba ete: “Ebongisaki ye [Yehova] lola, ngai nazalaki wana; mpe wana azingelaki etando na mai na bozindo; wana abongisaki mapata na likoló mpe wana akembisaki bibimelo na mai na nse. Wana alakisaki mai-na-monana mobeko na ye ete mai maleka ndelo na yango te; wana atyaki miboko ya mokili, nazalaki pembeni na ye lokola [kapita-mosali, NW]; mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye, kosepela liboso na ye ntango nyonso; kosepelana na bifandelo ya mokili na ye mpe esengo na ngai ezalaki kati na bana na bato.” (Masese 8:27-31) Mwana mobotami ya liboso ya Yehova azalaki pembeni ya Tata na ye, azalaki kosala elongo na ye oyo azali Mozalisi ya makoló na mabele oyo akokani na mosusu te. Ntango Yehova Nzambe akelaki moto ya liboso, Mwana na Ye apesaki mpe mabɔkɔ lokola Kapita-Mosali. (Genese 1:26) Yango wana mpenza Mwana ya Nzambe asepelaka mingi na bato mpe alingaka bango!
“Esengo na moto oyo akoyoka ngai”
Lokola bwanya oyo elobelami lokola moto, Mwana ya Nzambe alobi ete: “Boye, bino bana yokamelá ngai; zambi baoyo bakobatela nzela na ngai bakopambolama. Yoká [disipilini, NW] mpe zalá na [bwanya, NW], boyá yango te. [Esengo, NW] na moto oyo akoyoka ngai, ye oyo [akozela] mokolo na mokolo na bikuke na ngai, ye oyo akozilazila na makonzi [ya bikɔtelo] na ngai. Zambi ye oyo akozwana na ngai akomona bomoi; akopambolama na [Yehova]. Kasi ye oyo akosalela ngai masumu azali kobebisa [molimo, NW] na ye moko; nyonso baoyo bakoyina ngai bazali kolinga kufa.”—Masese 8:32-36.
Yesu Klisto nde azali mpenza bwanya ya Nzambe. “Kati na ye mabonza nyonso na [bwanya NW] mpe na boyebi masili kobombama.” (Bakolose 2:3) Yango wana, tóyoka ye na likebi mpenza mpe tólanda matambe na ye malamumalamu. (1 Petelo 2:21) Soki toboyi ye, tokobebisa milimo na biso mpe ekomonisa ete tolingi liwa mpamba te, “lobiko . . . ezali na moto mosusu te.” (Misala 4:12) Tiká tóndima Yesu lokola moto oyo Nzambe atindaki mpo na kobikisa biso. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Na bongo, tokozala na esengo oyo eutaka na ‘komona bomoi mpe kopambolama na Yehova.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Liebele oyo elakisi “bwanya” ezali na bomwasi. Yango wana, mabongoli mosusu ya Biblia esaleli makitana (pronoms) ya bomwasi na bisika oyo balobeli bwanya.
b Lokola liloba ya Liebele oyo elakisi “bwanya” esalelamaka ntango nyonso na bomwasi, yango elakisi te ete bwanya ekoki kosalelama te mpo na kolobela Mwana ya Nzambe. Na kati ya maloba “Nzambe azali bolingo,” liloba ya Grɛki oyo elakisi “bolingo” ezali mpe na bomwasi. (1 Yoane 4:8) Kasi, basaleli yango mpo na kolobela Nzambe.
[Bililingi na lokasa 26]
Bwanya ezali na ntina mingi mpo na baoyo bazali na mikumba
[Bililingi na lokasa 27]
Tótyola te nyonso oyo ebongisami mpo na kopesa bwanya