Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Masese
SALOMO, mokonzi ya Yisalaele ya kala “alobaki mpe masese nkóto misato.” (1 Mikonzi 4:32) Tokoki koyeba maloba yango ya bwanya lelo oyo? Ɛɛ, tokoki koyeba yango. Mokanda ya Masese, oyo ezali moko na mikanda ya Biblia esilaki kokomama na mobu soki 717 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mpe ezali na masese mingi ya Salomo. Kaka mikapo mibale ya nsuka nde ekomamaki na bato mosusu: Agulu, mwana ya Yake mpe Mokonzi Lemuele. Kasi, bato mosusu balobaka ete Lemuele ezali nkombo mosusu ya Salomo.
Maloba epemami na Nzambe oyo ekomami na mokanda ya Masese ezali na ntina mibale: “mpo na koyeba mayele mpe kolakisama.” (Masese 1:2) Maloba yango ezali kosalisa biso tózwa mayele, elingi koloba likoki ya komona makambo polele mpe kosalela boyebi mpo na kosilisa mikakatano. Na nzela na yango, tozali koyekola bizaleli ya malamu. Kotya likebi na masese yango mpe kosalela toli na yango ekobongola motema na biso, ekopesa biso esengo, mpe ekosalisa biso tózala na bomoi ya malamu.—Baebele 4:12.
‘ZWÁ MAYELE MPE SIMBÁ BOSOSOLI’
Salomo alobi boye: “Mayele akoganga libandá.” (Masese 1:20) Mpo na nini tosengeli koyoka ntango mayele ezali koganga? Mokapo 2 elobeli matomba oyo tokozwa soki tozali na mayele. Mokapo 3 elobeli ndenge ya kokóma moninga ya Yehova. Na nsima, Salomo alobi boye: “Mayele ezali likambo ya liboso; boye, zwá mayele, mpe ekozwa yo biloko nyonso, zwá mpe bososoli. Simbá bososoli, tiká ye kolongwa te.”—Masese 4:7, 13.
Nini ekoki kosalisa biso tóboya kolanda banzela ya mbindo ya mokili oyo? Masese mokapo ya 5 epesi eyano: Kozala na likoki ya kokanisa, mpe koyeba banzela mabe ya mokili. Koyeba mbuma ya bololo oyo pite mpe ekobo ebotaka. Mokapo ya 6 ezali kokebisa biso na misala mpe elimo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Mokapo ya 7 emonisi polele ndenge oyo moto ya pite asalaka. Mokapo ya 8 esaleli maloba ya kitoko mpenza mpo na komonisa ntina to motuya ya bwanya. Mokapo ya 9, oyo ezali na maloba ya kolendisa, esukisi eteni oyo ya liboso mpe esaleli maloba kitoko ya elilingi mpo na kolendisa biso tóluka bwanya.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:7; 9:10—Na ndenge nini kotosa Yehova ezali “ebandeli ya boyebi” mpe “ebandeli ya mayele”? Bato oyo batosaka Yehova te bakoki kozala na boyebi te, mpamba te ye azali Mozalisi ya biloko nyonso mpe akomisaki Biblia. (Baloma 1:20; 2 Timote 3:16, 17) Ye nde apesaka boyebi nyonso ya solosolo. Yango wana, kobanga Yehova nde ezali ebandeli ya boyebi. Kobanga Nzambe ezali mpe ebandeli ya mayele mpamba te moto akoki kozala na mayele te soki azali na boyebi te. Longola yango, moto oyo abangaka Yehova te akoki kosalela te boyebi oyo azali na yango mpo na kokumisa Mozalisi.
5:3—Mpo na nini mwasi ya ndumba abengami “mwasi mopaya”? Masese 2:16, 17 elobi ete “mwasi mopaya” ezali ye oyo “akoboyaka kondimana na Nzambe na ye.” Moto nyonso oyo asambelaki banzambe ya lokuta to oyo aboyaki kotosa Mibeko ya Moize, na ndakisa mwasi ya ndumba, azalaki kobengama mopaya.—Yilimia 2:25; 3:13.
7:1, 2—“Maloba na ngai” mpe “malako na ngai” ezali nini? Longola mateya ya Biblia, maloba yango ezali mpe mibeko to mitinda oyo baboti bapesaka bana mpo na bolamu ya libota mobimba. Bilenge basengeli kotosa malako yango mpe mateya ya Biblia oyo baboti bazali kolakisa bango.
8:30 (NW)—Nani azali “mosali ya mayele”? Bwanya oyo emonisami lokola moto emibengi mosali ya mayele. Bwanya oyo emonisami lokola moto ezali kaka te maloba ya elilingi oyo ekoki kosepelisa motángi; kasi, maloba yango etaleli Mwana mobotami ya liboso ya Nzambe, Yesu Klisto, liboso aya awa na mabelé. Kala mpenza, liboso aya awa na mabelé, ‘Nzambe atongaki ye na ebandeli ya nzela na ye.’ (Masese 8:22) Abengami “mosali ya mayele” mpo asalaki na Tata na ye ntango azalaki kozalisa biloko nyonso.—Bakolose 1:15-17.
9:17—“Mai mayibami” ezali nini, mpe mpo na nini ezali “elɛngi”? Lokola Biblia ekokanisi kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali na kati ya libala lokola komɛla mai ya mpiɔ oyo euti na liziba, mai mayibami ezali maloba ya elilingi mpo na kolobela pite to ekobo. (Masese 5:15-17) Kosala pite to ekobo emonisaka mai yango lokola nde ezali elɛngi.
Mateya mpo na biso:
1:10-14. Tosengeli kokeba ete bilaka ya basumuki ya kokóma na bozwi ebenda biso te na banzela na bango ya mabe.
3:3. Tosengeli kopesa motuya monene na boboto mpe sembo mpe koluka ete bizaleli yango emonana polele epai na biso lokola pauni ya ntalo na nkingo. Tosengeli mpe kokoma bizaleli yango na motema na biso, elingi koloba, kokómisa yango bomoto na biso.
4:18. Boyebi ya elimo eyaka mokemoke. Mpo tótikala na pole, tosengeli kozala na komikitisa.
5:8. Tosengeli kokima makambo nyonso oyo ekoki kotinda biso na misala ya mbindo, ezala na miziki, masano, Internet, babuku to bazulunalo.
5:21. Moto oyo alingaka Yehova akondima nde kobebisa boyokani na ye na Nzambe ya solo mpo na bisengo ya mwa ntango moke? Te! Ntina ya libosoliboso oyo esengeli kotinda biso tótikala na etamboli ya pɛto ezali ete Yehova amonaka banzela na biso mpe akotuna biso.
6:1-5. Bavɛrsɛ yango ezali kokebisa biso na likambo ya ‘kokóma ndanga,’ to kolobela moto mosusu na makambo ya mombongo kozanga kokanisa! Nsima ya kokanisa malamu, soki tomoni ete likambo oyo tosalaki ezali ya mayele te, tosengeli nokinoki kokende kobondela mozalani na biso mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongisa makambo.
6:16-19. Makambo nsambo yango esangisi mabe ya lolenge nyonso. Tosengeli koyina yango.
6:20-24. Koteyama na mitinda ya Biblia banda bomwana ekoki kobatela moto akwea te na pite. Baboti basengeli kozala na bopɔtu te mpo na koteya bana na bango.
7:4. Tosengeli kolinga mayele mpe boyebi.
MASESE OYO EZALI KOLAKISA BISO NZELA
Masese ya Salomo oyo elandi elobami na mwa maloba moke. Masese yango oyo ezali mingimingi kokesenisa makambo, koyokanisa yango, mpe kokokanisa yango, ezali na mateya ya ntina mingi na oyo etali etamboli, elobeli mpe bizaleli.
Mokapo 10 tii 24 ezali komonisa ntina ya kobanga Yehova. “Bato ya Hizikiya, mokonzi ya Yuda” nde bakomaki masese oyo ezali na mokapo 25 tii 29. (Masese 25:1) Masese yango emonisi ntina ya kotyela Yehova motema mpe ezali na mateya mosusu ya ntina mingi.
Biyano na mituna ya Biblia:
10:6—Ndenge nini ‘yauli etondisaka monɔkɔ ya bato mabe’? Ekoki kozala bongo mpamba te bato mabe basalelaka maloba sukali mpo na kobomba mokano na bango ya kosala basusu mabe. To mpe ekoki kozala ete lokola bato mingi bayinaka bato mabe, koyina oyo bato mosusu bayinaka bango ekangisaka bango monɔkɔ.
10:10—Na ndenge nini “ye oyo akobweta liso” akopesa mpasi? “Moto ya mobulu” akoki kosalela “monɔkɔ ya kozimbisa,” kasi akoki mpe kosala bajɛstɛ mosusu, na ndakisa ‘kobweta liso,’ mpo bato báyeba te likambo oyo alingi kosala. (Masese 6:12, 13) Mayele mabe ndenge wana ekoki kopesa mpasi mingi epai ya bato oyo asaleli bango yango.
10:29—“Nzela ya Yehova” ezali nini? Na vɛrsɛ oyo, nzela ya Yehova ezali ndenge oyo asalelaka bato makambo, kasi ezali te nzela oyo tosengeli kolanda na bomoi na biso. Ndenge oyo Nzambe asalelaka bato makambo epesaka bato ya sembo kimya, kasi ezalaka libebi mpo na bato mabe.
11:31—Mpo na nini moto mabe akozwa litomba koleka moyengebene? Litomba yango ezali etumbu oyo mokomoko azwaka. Ntango moyengebene asali libunga, azwaka disipilini lokola litomba mpo na libunga yango. Moto mabe asalaka masumu na nko mpe aboyaka kobongola motema mpo na kosala oyo ezali malamu. Yango wana azwaka etumbu ya makasi.
12:23—Ndenge nini moto ‘abombaka boyebi’? Kobomba boyebi elimboli te kozanga komonisa yango. Elimboli nde komonisa boyebi na ndenge oyo ebongi, komonisa yango na lolendo te.
14:17 (NW)—Na ndimbola nini ‘moto oyo azali na makoki ya kokanisa ayinami’? Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “makoki ya kokanisa” ekoki kolimbola bososoli to mpe mayele mabe. Bato bayinaka moto oyo azali na makanisi mabe. Kasi, ezali mpe bongo mpo na moto ya bososoli, oyo azali na makoki ya kokanisa mpe aponi kozala “moto ya mokili te.”—Yoane 15:19.
18:19—Na ndimbola nini “ndeko oyo ayokisami mpasi azali lokola mboka makasi”? Lokola mboka ya makasi oyo banguna bazingi, moto ya ndenge wana akoki mpenza koboya kolimbisa. Matata kati na ye ná moto oyo asali ye mabe ekoki kokóma makasi lokola “bikangeli ya ndako makasi.”
Mateya mpo na biso:
10:11-14. Mpo tózala na maloba ya kolendisa, tosengeli kotondisa makanisi na biso na boyebi ya solo, kozala na bolingo na motema mpe koloba na bwanya.
10:19; 12:18; 13:3; 15:28; 17:28. Tiká ete maloba na biso ezala moke mpe tosengeli kokanisa malamu liboso ya koloba.
11:1; 16:11; 20:10, 23. Yehova alingi ete tózala sembo na makambo ya mombongo.
11:4. Ezali bozoba kotika koyekola Biblia, koyangana na makita, kobondela, mpe kosakola mpo na kolanda bozwi ya mokili.
13:4. Kozala na “mposa” ya kozwa mikumba na lisangá to ya kokɔta na mokili ya sika ekoki te. Tosengeli kozala makasi na mosala mpe kosala molende mpo na kokokisa masɛngami.
13:24; 29:15, 21. Moboti oyo alingaka mwana na ye abondelaka ye na koleka ndelo te, akangaka mpe miso na mabunga na ye te. Nzokande, tata to mama asalaka nyonso mpo na kolongola makambo mabe na motema ya mwana na ye liboso ezwa misisa.
14:10. Lokola tokoki te ntango nyonso kobimisa malamumalamu makanisi ya motema na biso to mpe bato mosusu bakoki ntango nyonso te koyeba ndenge oyo tozali komiyoka, na yango bakoki kosalisa biso na makambo nyonso te. Ntango mosusu tokoki koyikela mikakatano mpiko soki kaka totyeli Yehova motema.
15:7. Tosengeli te kosopela moto makambo nyonso oyo toyebi na mbala moko, se ndenge mosali bilanga abwakaka te milona nyonso esika moko. Moto ya bwanya apalanganisaka boyebi mokemoke, na kotalela mposa oyo ezali.
15:15; 18:14. Kobatela makanisi ya malamu ekosalisa biso tózala na esengo, ata soki tozali na mikakatano.
17:24. Tosengeli te kozala lokola “zoba,” oyo miso na ye mpe makanisi na ye eyengayengaka, na esika ezala na makambo ya ntina; tosengeli nde koluka mayele mpo na kosalaka makambo na bwanya.
23:6-8. Tosengeli koboya komonisa na lokuta ete tozali na ezaleli ya koyamba bapaya.
27:21. Eyebanaka soki tozali bato ya ndenge nini ntango bakumisi biso. Komikitisa emonanaka soki, ntango bakumisi biso tondimi ete Yehova nde apesi biso makoki nyonso oyo tozali na yango mpe soki ezali kolendisa biso na kokoba kosalela ye. Kozanga komikitisa emonanaka soki, ntango bakumisi biso, tokómi kokanisa ete toleki basusu.
27:23-27. Masese yango elobeli mosala ya kobatela bibwele mpo na komonisa ntina ya kosepela na bomoi ezangi mindɔndɔ oyo etindaka moto amipesa na mosala. Makanisi na yango esengeli koteya biso ntina ya kotyela Nzambe motema.a
28:5. Soki tozali ‘koluka Yehova’ na nzela ya libondeli mpe boyekoli ya Liloba na ye, tokoki ‘koyeba makambo nyonso’ oyo esengeli mpo na kosalela ye malamu.
‘MALOBA YA KILO’
Mokanda ya Masese esuki na makanisi mibale oyo ebengami ‘maloba ya kilo.’ (Masese 30:1, NW; 31:1, NW) Agulu asaleli bokokanisi moko ya makasi mpo na komonisa ete moto ya lokoso atondaka te mpe likambo ya kokamwa oyo emonanaka na ndenge oyo mobali alingaka mwasi.b Ezali mpe kokebisa biso na lolendo mpe koloba na nkanda.
Maloba ya kilo oyo Lemuele azwaki epai ya mama na ye ezali na toli malamu na ndenge ya kosalela masanga mpe ndenge ya kokata makambo na bosembo. Ndenge oyo balobeli mwasi malamu esuki na maloba oyo: “Pesá ye mbuma ya matandu na ye; tiká ete misala na ye mpenza misanzola ye.”—Masese 31:31.
Zwá boyebi, ndimá disipilini, loná ezaleli ya kobanga Nzambe, mpe tyelá Yehova motema. Masese ezali mpenza na mateya ya ntina mingi! Tósala nyonso mpo na kosalela toli na yango mpe na nsima tóyoka esengo ya ‘moto oyo abangaka Yehova.’—Nzembo 112:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1991, lokasa 31.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1992, lokasa 31.
[Bililingi na lokasa 16]
Yehova apesaka boyebi nyonso ya solosolo
[Elilingi na lokasa 18]
‘Kopalanganisa boyebi’ elimboli nini?