‘Mapamboli ezali na moyengebene’
“NAZALAKI elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga”; wana ezali maloba ya Davidi mokomi ya nzembo, ntango akómaki mobange. (Nzembo 37:25) Yehova Nzambe alingi bayengebene mingi mpe asalaka nyonso mpo bákelela te. Yango wana, na kati ya Liloba na ye, Biblia, azali kosɛnga na basambeli na ye ya solosolo ete báluka boyengebene.—Sefania 2:3.
Kozala moyengebene elakisi kozala sembo epai ya Nzambe, kotosa malako na ye oyo etali mabe mpe malamu. Mpo na kolendisa biso tósalaka makambo ndenge Nzambe alingi, mokapo ya 10 ya mokanda ya Masese, na kati ya Biblia, eyebisi ebele ya mapamboli ya elimo, oyo baoyo bazali kosala makambo na ndenge Nzambe alingaka bazali kozwa. Kati na mapamboli yango, totángi ndambo oyo: ebele ya bilei malamu ya elimo, mosala oyo epesaka mbano mpe esepelisaka motema, mpe boyokani ya malamu na Nzambe mpe na bato. Tiká tókanisa sikoyo malamumalamu likoló na Masese 10:1-14.
Likanisi ya malamu oyo ezali kotinda biso tózala sembo
Soki otángi maloba ya ebandeli mpenza ya mokapo wana, okozanga te koyeba moto oyo akomaki makambo oyo elandi na kati ya mokanda yango ya Masese. Ebandeli yango elobi: “Masese ya Solomo.” Mpo na komonisa likanisi ya malamu oyo esengeli kotinda biso tózala sembo, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala alobi boye boye: “Mwana ya mayele akosepelisa tata, nde mwana ya zoba azali [mawa, ‘NW’] . . . ya mama na ye.”—Masese 10:1-14.
Ntango mwana atiki kosambela Nzambe ya solo mpe ya bomoi, baboti bayokaka mawa makasi mpenza! Mokonzi ya mayele alobeli mawa kaka mpo na mama ya mwana, mbala mosusu mpo na komonisa ete mama ya mwana nde anyokwamaka mingi na mawa koleka tata. Likambo yango ezali mpenza solo mpo ekómelaki Doris.a Alobi boye: “Ntango mwana na biso ya mobali ya mbula 21 atikaki lisangá ya solo, ngai na mobali na ngai, Frank, toyokaki mpasi na motema. Kasi mpasi oyo ngai nayokaka eleki oyo ya Frank. Atako mbula 12 eleki, mpota yango esili kaka te.”
Bana bakoki kobebisa esengo ya tata na bango mpe bakoki kopesa mama na bango mpasi na motema. Yango wana, ebongi tózala na mayele mpo baboti na biso básepela. Kasi oyo eleki nyonso, tósepelisa motema ya Tata na biso ya likoló, Yehova.
‘Molimo ya moyengebene etondi na bilei’
Mokonzi Salomo alobi boye: “Biloko ya motuya ya [moto mabe, ‘NW’] ezali na litomba te, kasi boyengebene ekobikisa moto epai na [liwa, ‘NW’].” (Masese 10:2) Maloba wana ezali na valɛrɛ mingi epai ya baklisto ya solo oyo bazali na bomoi na ntango oyo ya nsuka, oyo ekómi sikoyo mosika. (Danyele 12:4, NW) Kobomama ya mokili oyo ya mbindo ezali lisusu mosika te. Biloko nyonso oyo bato basali mpo na komibatela—ezala biloko ya mosuni, mbongo, to basoda mpe bibundeli—ata moko te ekokoka kobatela bango na “bolɔzi monene” oyo ekómi pene. (Emoniseli 7:9, 10, 13, 14) Kaka ‘basembwi nde bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango.’ (Masese 2:21) Yango wana, tótika te “koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].”—Matai 6:33, NW.
Mpo basaleli ya Yehova bázwa mapamboli oyo ye apesaka, yango ezali kosɛnga te ete bázela tii ntango bakokɔta na mokili ya sika oyo ye alaki bango. “[Yehova] akotika te ete molimo ya moyengebene ebeba na nzala, kasi akopekisa [lokoso, ‘NW’] ya bato mabe.” (Masese 10:3) Yehova azali kopesa bilei ebele ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Moyengebene azali mpenza na bantina ya ‘koganga na esengo mpo na ezaleli malamu ya motema.’ (Yisaya 65:14) Boyebi ezali kopesa molimo na ye esengo. Kolukaluka biloko ya motuya, oyo ya elimo, esepelisaka ye. Bisengo ya ndenge wana, moto mabe azwaka yango te.
‘Molende epesaka moto bozwi’
Moyengebene azali mpe kozwa mapamboli na ndenge mosusu. “Ye oyo akosalaka na lobɔkɔ ya gɔigɔi akokóma mobola, nde lobɔkɔ ya [moto ya molende, ‘NW’] ekoyeisa litomba. Ye oyo akoyanganisa na ntango ya moi azali mwana ya mayele; kasi ye oyo akolala mpɔngi na ntango ya kobuka mbuma azali mwana oyo akoyeisa nsɔni.”—Masese 10:4, 5.
Maloba wana ya mokonzi ezali na ntina, mingi mpenza mpo na bato oyo bazali kosala mosala ya kobuka mbuma. Eleko ya kobuka mbuma ezali ntango ya kolala mpɔngi te. Ezali ntango ya kozala na molende mpe kolekisa bangonga mingi na mosala. Ezali mpenza ntango ya kosala nokinoki.
Ntango Yesu azalaki kolobela mosala ya kobuka mbuma, ya milona te kasi nde bato, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma ya elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo ya elanga [Yehova Nzambe] ete atinda basali kati na elanga ya mbuma na ye.” (Matai 9:35-38) Na mobu 2000, bato koleka milio 14 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu—motángo yango eleki oyo ya Batatoli nyonso ya Yehova mbala mibale na mwa ndambo. Bongo, nani akotya ntembe na likambo oyo ete ‘bilanga esili kotela mpo na kobukama’? (Yoane 4:35) Basambeli ya solo bazali kosɛnga Nkolo abakisa basali mosusu, wana bango moko mpe bazali komipesa makasi na mosala ya kokómisa bato bayekoli ndenge bazali kosɛnga yango na mabondeli na bango. (Matai 28:19, 20) Yehova mpe asopi mapamboli ebele na milende oyo bango bazali kosala! Na boumeli ya mobu ya mosala 2000, bato ya sika koleka 280 000 bazwaki batisimo. Bango mpe bazali kosala makasi mpo na kokóma bateyi ya Liloba ya Nzambe. Tiká ete tómipesa mobimba na mosala ya kokómisa bato bayekoli, na yango tokozwa esengo mpe tokosepela na eleko oyo ya mosala ya kobuka mbuma.
‘Mapamboli ezali na motó ya moyengebene’
Salomo alobi lisusu ete: “Mapamboli mazali na motó ya moyengebene; nde [mobulu ezipami na, ‘NW’] monɔkɔ ya bato mabe.”—Masese 10:6.
Moto oyo azali pɛto mpe moyengebene na motema amonisaka boyengebene na ye polele. Maloba na ye ezalaka ya boboto mpe ya kolendisa, azali na misala ya kolɛmbisa bato te mpe azali lobɔkɔ pɛtɛɛ. Bato basepelaka kozala elongo na ye. Moto ya ndenge wana, bakopesa ye lokumu—to mapamboli—mpamba te bakobanda koloba malamu mpo na ye.
Nzokande moto mabe, ye, ayinaka nde bato, azalaka mpe na mayele mabe mpe mposa na ye ezalaka ntango nyonso ya kosala bato mosusu mabe. Maloba na ye ekoki kozala ya sukali mpo na ‘kozipa mobulu’ oyo ebombami na motema na ye, kasi nsukansuka, akoluka kobundisa bato to koswanisa bango. (Matai 12:34, 35) Na ndenge mosusu, vɛrsɛ wana ekoki mpe koloba boye, “mobulu ekozipa [to ekokangisa] bato mabe monɔkɔ.” (Masese 10:6, NW, maloba na nse ya lokasa) Maloba wana elakisi ete, mbala mingi, mabe oyo moto mabe azali kosala bato, yango nde bazongiselaka ye. Ezali mpenza lokola nde ezipi to ekangisi ye monɔkɔ mpe azangi likambo ya koloba. Moto ya ndenge wana akanisa kutu te ete bato bakopesa ye mapamboli.
Mokonzi ya Yisalaele akomi lisusu boye: “Kokanisa moyengebene ezali kopambolama, nde nkombo ya bato mabe ekopɔla.” (Masese 10:7) Bato bakanisaka moyengebene na ndenge ya malamu; Yehova Nzambe mpe akanisaka ye, wana nde likambo eleki ntina. Mpo na Yesu, lokola atikalaki sembo tii na liwa, ‘azwaki libula ya nkombo oyo ezali ya malamu mingi koleka’ oyo ya baanzelu. (Baebele 1:3, 4, NW) Mibali na basi ya sembo ya kalakala mpe ndenge moko; lelo oyo, baklisto ya solo bakanisaka bango mpo na makambo ya malamu oyo basalaki, oyo ebongi kolanda. (Baebele 12:1, 2) Kasi nkombo ya bato mabe ekómaka nde eloko ya bosɔtɔ oyo ezali kolumba nsolo mabe mpe eloko ya kopɔla; ekokani ata moke te na oyo ya bato malamu! Ya solo, “nkombo malamu ekoki koponama liboso ya misolo mingi; [kosala bato bolamu, NW] eleki palata mpe wolo.” (Masese 22:1) Tiká ete tósala makasi mpo na kozala na nkombo ya malamu epai ya Yehova mpe epai ya baninga na biso bato.
‘Moto ya bosembo akobatelama ntango azali kotambola’
Mpo na kolakisa ete moto ya mayele akeseni na zoba, Salomo alobi: “Moto ya motema ya mayele akoyamba mitindo, kasi zoba na mbebu na ye akonyatama na nse.” (Masese 10:8, NW) Moto ya mayele ayebi malamu ete “ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Elingi koloba, ayebi ete asengeli koluka toli ya Yehova mpe kondima kolanda mitindo na ye. Nzokande, zoba, ye, likambo wana ya ntina mingi elobelaka ye kutu eloko te. Bilobaloba na ye ya bozoba ekomema ye na liwa.
Moyengebene azali mpe kobatelama na ndenge mosusu oyo moto mabe akoyoka ata nsolo na yango te. “Ye oyo azali kotambola na sembo [akobatelama ntango azali kotambola, ‘NW’]; kasi ye oyo [akotɛngamisa, ‘NW’] nzela na ye akoyebana. Ye oyo akobweta na liso akoyeisa [mpasi mpe zoba na mbebu na ye akonyatama na nse, ‘NW’].”—Masese 10:9, 10.
Moto ya sembo asalaka makambo na bosembo. Bato bakopesa ye limemya mpe bakotyela ye motema. Moto ya sembo azalaka mosali moko malamu mpe mbala mingi bapesaka ye mikumba minene. Lokola bato bayebi ete azalaka sembo, akozanga mosala te ata na ntango oyo misala ezali mpenzampenza komonana te. Lisusu, bosembo na ye ekosala ete ndako na ye ezala na esengo mpe ekozala matatamatata te; nyonso wana mpo ye azali sembo. (Nzembo 34:13, 14) Lokola azali koyokana malamu na bato ya libota na ye, ntina ya kobangabanga ezali te. Libateli nyonso wana euti na bosembo na ye.
Nzokande epai ya moto oyo azangi bosembo mpo na koluka litomba na ye moko, makambo ezali ndenge wana te. Mokosi akoki mbala mosusu kobomba lokuta na ye na maloba ya kobuba to na bajɛstɛ ya nzoto. (Masese 6:12-14) Ntango azali kobɛtabɛta miso mpo na kosala mabe to kokosa, yango ekoki mpenza kopesa bato oyo ye azali kokosa mpasi. Kasi ata ndele, lokuta ya moto ya ndenge wana ekoyebana kaka. Ntoma Paulo akomaki boye: “Masumu ya bato mosusu mazali polele mpe makokambaka bango kati na kosambisa; nde masumu na bamosusu makobilaka bango nsima. Bongo mpe misala kitoko mimonani polele; misala mosusu kitoko ezali mpe [oyo ezali ndenge mosusu ekoki te kobombana, NW].” (1 Timote 5:24, 25) Ata moto yango azali nani—ndeko, moninga, molongani, to moyebani—nsukansuka ezaleli na ye ya mabe ekoyebana kaka. Nani kutu akoki kotyela moto oyo ayebani ete azalaka na mayele mabe motema?
‘Monɔkɔ na ye ezali liziba ya bomoi’
Salomo alobi ete: “Monɔkɔ ya moyengebene ezali liziba ya bomoi; kasi [monɔkɔ ya bato mabe ezipaka mobulu, ‘NW’].” (Masese 10:11) Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ ekoki kobikisa, ekoki mpe kozokisa. Ekoki kopesa moto makasi, kosilisa ye mawa; kasi ekoki mpe kolɛmbisa ye nzoto.
Mokonzi ya Yisalaele alakisi sikoyo bizaleli oyo etindaka moto abimisa maloba: “[Koyinana, ‘NW’] ekopesa kowelana simbisi nde bolingo ekozipa masumu nyonso.” (Masese 10:12) Koyinana nde ezali kopusa bato báwelanaka; yango nde ezali kobimisa bitumba. Yango wana, bato oyo balingaka Yehova basengeli kolongola koyinana nyonso epai na bango. Bakosala yango ndenge nini? Bakotya bolingo na esika ya koyinana. “Bolingo ekozipaka ebele ya masumu.” (1 Petelo 4:8) Bolingo “ekangaka motema na makambo nyonso,” elingi koloba “makambo nyonso oyo yango ezali kozipa.” (1 Bakolinti 13:7, NW; Kingdom Interlinear) Moto oyo azali na bolingo oyo euti na Nzambe akoki ata moke te kosɛnga na bato oyo bazangi kokoka ete básalaka makambo lokola bato ya kokoka. Na esika ya kopanza bato mosusu nsango mpo na mabunga na bango, bolingo ya ndenge wana esalisaka nde moto ayeba kolekisa mabunga yango, kolandela yango kaka soki ezali masumu ya minene. Moto oyo azali na bolingo andimaka ata básambwisa ye, ezala na mosala ya kosakola, na esika ya mosala, to na kelasi.
Mokonzi ya mayele alobi lisusu boye: “Mayele ezwami na [mbebu, ‘NW’] na ye oyo azali na [bososoli, ‘NW’]; nde [fimbo] ekoki na mokɔngɔ na ye oyo azangi motema.” (Masese 10:13) Mayele ya moto oyo azali na bososoli elakisaka ye nzela. Maloba ya mbebu na ye, oyo elendisaka, esalisaka bato mosusu bálanda nzela ya boyengebene. Ezala ye, ezala baoyo bazali koyoka ye, bango nyonso bazali kolanda nzela ya sembo na makasi te—elingi koloba na fimbo ya etumbu te.
‘Komibombela boyebi lokola eloko ya ntalo’
Nini ekosalisa biso mpo maloba na biso ezala ‘liziba ya mayele oyo ezali lokola etima oyo ezali kotyola,’ na esika ya kozala moluka oyo ezali kobimisa mai ebele ya bilobaloba mpamba? (Masese 18:4) Salomo apesi eyano boye: “Bato ya mayele [bamibombelaka boyebi lokola eloko ya ntalo, ‘NW’]; nde monɔkɔ ya zoba elingi kobeba [noki mpenza, ‘NW’].”—Masese 10:14.
Eloko ya libosoliboso oyo esɛngami ezali ete boyebi ya Nzambe, oyo elendisaka, esengeli kotonda na bɔɔngɔ na biso. Esika oyo tokoki kozwa boyebi wana ezali kaka moko. Ntoma Paulo akomaki mpo na yango ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na mateya, mpo na mpamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17, NW) Tosengeli komibombela boyebi lokola eloko ya motuya, kotimola na kati ya Liloba ya Nzambe mpo na kozwa yango, ndenge balukaka eloko ya ntalo oyo ebombami. Mosala wana ya kolukaluka epesaka mpenza esengo mpe matomba!
Mpo mayele ezala na mbebu na biso, esengeli mpe boyebi ya Makomami efanda na mitema na biso. Yango wana, Yesu alobaki epai ya bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, kasi moto mabe abimisaka oyo ezali mabe na eloko ya motuya na ye ya mabe; mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45, NW) Yango wana, tosengeli kozala na momeseno ya komanyola makambo oyo tozali koyekola. Koyekola mpe komanyola ezalaka mosala makasi, toboyi te, kasi kobosana te ete okozwa bolamu mingi na elimo mpo na boyekoli wana! Ekozala bozoba soki moto amipesi na makɛlɛlɛ ya bilobaloba mpamba, oyo ezali nzela ya liwa.
Ɛɛ, moto ya mayele asalaka makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe mpe ezaleli na ye ebongisaka bizaleli ya bato mosusu. Azali kozwa bilei ebele ya elimo mpe asalaka makambo mingi na kati ya mosala ya Nkolo oyo epesaka matomba. (1 Bakolinti 15:58) Lokola azali moto ya bosembo, azali kobatelama ntango azali kotambola mpe Nzambe azali kondima ye. Ya solo mpenza, moyengebene azali na mapamboli ebele. Tiká ete tóluka boyengebene na kotambwisáká bomoi na biso na ndenge oyo esɛngami na malako ya Nzambe, oyo etali malamu mpe mabe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 25]
Soki bosembo ezali, libota ekozala na esengo mpenza
[Elilingi na lokasa 26]
‘Moto ya mayele amibombelaka boyebi lokola eloko ya motuya’