Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ‘Yehova apesaka mayele’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Sanza ya 11
    • Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, azalaki na mayele mingi mpe alobaki mpenza lokola tata oyo azali na bolingo ete: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko [okobenga, NW] bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami; mbɛ, okososola botosi na kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi koyeba Nzambe.”​—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:1-5.

  • ‘Yehova apesaka mayele’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Sanza ya 11
    • Koyoka maloba ya mayele elimboli kozwa bososoli mpe boyebi. Diksionere moko (Webster’s Revised Unabridged Dictionary) elobi ete bososoli ezali “mayele to likoki oyo bɔɔngɔ ezali na yango ya kokesenisa makambo mibale.” Bososoli oyo Nzambe apesaka ezali mayele ya kokesenisa malamu na mabe mpe kopona nzela ya malamu. Soki ‘totii motema’ na bososoli te to soki tozali na mposa makasi ya kozwa yango te, ndenge nini tokoki kotikala libela na “nzela oyo ememaka na bomoi”? (Matai 7:14, NW; talá Deteronome 30:19, 20.) Moto akómaka na bososoli ntango azali koyekola mpe kosalela Liloba ya Nzambe.

      Ndenge nini tokoki “kobenga bososoli,” elingi koloba, koyeba kotalela likambo mokomoko oyo elobelami na lisolo moko mpe boyokani oyo ezali na yango na lisolo mobimba? Ya solo, kozala na bambula mingi mpe komona makambo mingi na mokili ezali makambo oyo ekoki kosalisa biso tókóma na bososoli. Kasi ezalaka kaka bongo te. (Yobo 12:12; 32:6-12) Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Naleki bampaka na bososoli, zambi nakobatelaka bilakeli na yo [Yehova].” Alobaki lisusu ete: “Kozipola maloba na yo ekopesa pole, ekopesa mpe [bososoli, NW] na baoyo bazangi yango.” (Nzembo 119:100, 130) Yehova azali “Oyo na Kalakala,” mpe azali na bososoli oyo eleki bososoli ya bato nyonso mosika. (Danyele 7:13, NW) Yehova akoki kopesa bososoli epai ya moto oyo azangi yango, mpe kosalisa ye aleka ata baoyo bazali mikóló. Yango wana, tosengeli komipesa na koyekola mpe kotosa Biblia, Liloba ya Nzambe.

      Maloba “soko oko . . .” oyo ezongelami mbala mingi na ebandeli ya mokanda ya Masese mokapo ya mibale, elandani na maloba lokola “kozwa,” “kobomba,” “kobenga,” “koluka,” mpe “kolukaluka.” Mpo na nini mokomi ya Masese asaleli maloba oyo emonisaka ete likambo elobelami makasi? Buku moko elobi boye: “[Awa] moto ya mayele azali komonisa ntina ya kotya molende ntango ozali koluka mayele.” Yango wana, tosengeli kotya molende ntango tozali koluka mayele mpe bizaleli oyo ezali na boyokani na mayele, elingi koloba bososoli mpe boyebi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto