-
Lolendo ememaka nsɔniLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 1 Août
-
-
Lolendo ememaka nsɔni
“Lolendo eyei? Nsɔni ekoya na nsima; kasi bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.”—MASESE 11:2, NW.
1, 2. Lolendo ezali nini, mpe na ndenge nini yango ememaki makama?
MOLEVI moko moto ya zuwa amemi bato na kotombokela bakonzi oyo Yehova aponi. Mwana ya mokonzi moko azali koluka kokóma na lokumu mingi, asaleli mayele mabe mpo na kobɔtɔla tata na ye bokonzi. Mokonzi moko ya motema mɔ́tɔmɔ́tɔ aboyi kotosa malako ya polele ya mosakoli ya Nzambe. Bayisalaele yango misato bazali na ezaleli moko: lolendo.
2 Ezaleli ya lolendo ezali likama mpo na mokomoko na biso. (Nzembo 19:13) Moto ya lolendo abangaka te kosala ata makambo oyo azali na ndingisa ya kosala te. Mbala mingi, likambo yango ememaka makama. Ezaleli oyo tobengi lolendo ekweisá bakonzi mpe bikólo. (Yilimia 50:29, 31, 32; Danyele 5:20) Basaleli mosusu ya Yehova bakómaki na ezaleli yango mpe basukaki mabe.
3. Nini ekoki kosalisa biso mpo tóyeba makama ya lolendo?
3 Yango wana mpenza Biblia elobi ete: “Lolendo eyei? Nsɔni ekoya na nsima; kasi bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.” (Masese 11:2, NW ) Biblia epesi biso bandakisa mingi oyo emonisi ete lisese yango ezali solo. Soki totaleli mwa ndambo ya bandakisa yango, ekosalisa biso na komona ete kosala makambo na lolendo ezali likama. Yango wana, tótalela ndenge oyo zuwa, mposa ya lokumu, mpe motema mɔ́tɔmɔ́tɔ, ememaki bato misato oyo tolobeli na ebandeli básala makambo na lolendo, mpe basukaki na nsɔni.
Kola: Akómaki na zuwa mpe akómaki motomboki
4. (a) Kola azalaki nani, mpe asanganaki na makambo nini oyo elekaki liboso? (b) Na nsuka ya bomoi na ye, likambo nini ya monene Kola abandisaki?
4 Kola azalaki Molevi na libota ya Keata, tata na ye na tata ya Mose na Alona bazalaki bandeko. Ekoki mpenza kozala ete asalelaki Yehova na bosembo bambula ebele. Kola azwaki libaku malamu ya kozala na kati ya bato oyo bakatisaki Mai Motane na likamwisi oyo Nzambe asalaki. Ekoki mpe kozala ete azalaki na kati ya bato oyo babomaki Bayisalaele oyo basambelaki mwana ya ngɔmbɛ na Ngomba Sinai. (Exode 32:26) Kasi na nsima, Kola amityaki liboso ya bato oyo batombokelaki Mose na Alona; ezalaki mpe na Datana, na Abilama, na Ona, bato ya libota ya Lubene, na bato mosusu 250 oyo bazalaki bankumu na Yisalaele.a Balobaki na Mose na Alona ete: “Makambo na bino mabai biso. Bato nyonso ya lingomba oyo bazali bulɛɛ, moto na moto na bango, mpe [Yehova] azali kati na bango. Na bongo bozali [komitombola] na likoló na [lisangá] ya bato ya [Yehova] mpo na nini?”—Mituya 16:1-3.
5, 6. (a) Mpo na nini Kola atombokelaki Mose na Alona? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Kola azalaki kosepela na mokumba na ye te na kati ya ebongiseli ya Nzambe?
5 Nsima ya kosalela Nzambe na bosembo bambula ebele, mpo na nini Kola akómaki motomboki? Tobanzi te ete Mose azalaki mokonzi ya makambo makasi na Yisalaele, mpamba te azalaki “na bopɔlɔ mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Ekoki nde kozala ete Kola azalaki koyokela Mose na Alona zuwa mpe azalaki koyoka mabe lokola bango bazalaki likoló ya bato nyonso, yango ememaki ye amikosa na koloba ete bango moko bamitombolaki likoló ya lisangá mobimba.—Nzembo 106:16.
6 Ekoki mpenza kozala ete mokakatano ya Kola ezalaki ete azalaki kosepela te na mikumba na ye na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Ezali solo ete Balevi ya libota ya Keata bazalaki banganga te, kasi bazalaki balakisi ya Mibeko ya Nzambe. Ntango bazalaki kotambola, bango nde bazalaki komema biloko ya hema na basaani oyo bazalaki kosalela kuna. Ezalaki mokumba monene mpamba te, bato oyo bazalaki komema basaani mosantu ya hema basengelaki kozala pɛto na nzoto mpe na elimo. (Yisaya 52:11) Yango wana, ntango Mose alobanaki na Kola, azalaki nde kotuna ye ete, Ozali komona mokumba na yo lokola likambo moke yango wana olingi bákamata lisusu mosala ya bonganga bápesa yo? (Mituya 16:9, 10) Kola akangaki ntina te ete lokumu oyo eleki monene ezali nde kosalela Yehova na bosembo na ebongiseli na ye, kasi ezali te kozala na esika moko boye to kozala mokonzi.—Nzembo 84:10.
7. (a) Mose asɛngaki Kola na bato na ye básala nini? (b) Ndenge nini botomboki ya Kola esukelaki ye?
7 Mose abengisaki Kola na bato na ye na mokolo oyo elandaki na hema ya koyangana; asɛngaki bango bámema bambeki ya kotumba mpaka ya malasi mpe mpaka ya malasi. Kola na bato na ye bazalaki na ndingisa ya kotumba mpaka ya malasi te mpamba te, bazalaki banganga te. Soki ezali ete bamemaki mbeki na mpaka ya malasi, boye bamonisaki polele ete, ata nsima ya kotikela bango butu mobimba mpo na kokanisa malamu, bazalaki kaka komona ete bazalaki na lotomo ya kosala mosala ya bonganga. Ntango bayanganaki na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Yehova alakisaki mpenza nkanda na ye. “Mokili efungolaki monɔkɔ na yango mpe emelaki” bato ya libota ya Lubene. Na nsima, Nzambe atindaki mɔ́tɔ mpo na kozikisa baoyo batikalaki, na Kola nzela moko. (Deteronome 11:6; Mituya 16:16-35; 26:10) Lolendo ya Kola ememelaki ye nsɔni oyo eleki monene, elingi koloba ete Nzambe aboyaki ye mpenza!
Tóboya “mposa ya bilulela”
8. “Mposa ya bilulela” ekoki komonana na makambo nini epai ya baklisto?
8 Lisolo ya Kola ezali kokebisa biso. Lokola bato ya kozanga kokoka bazalaka na “mposa ya bilulela,” mposa yango ekoki komonana ata na kati ya lisangá ya boklisto. (Yakobo 4:5) Na ndakisa, tokoki kozala na mposa ya kozala na bokonzi. Tokoki kokóma lokola Kola, elingi koloba koyokela bato oyo bazali na mikumba zuwa mpo tolingi ete biso nde tózwa mikumba yango. To mpe tokoki kokóma lokola Diotelefe, moklisto moko na ekeke ya liboso. Ye azalaki mpenza koloba mabe mpo na bokonzi ya bantoma; ekoki kozala mpo ete azalaki na mposa ya kozwa mokumba yango. Kutu, Yoane akomaki ete Diotelefe “asepeli kozala moto ya liboso.”—3 Yoane 9.
9. (a) Ndenge nini tosengeli kotalelaka mikumba na kati ya lisangá? (b) Wapi ndenge ya malamu oyo tosengeli kotalelaka esika na biso na kati ya ebongiseli ya Nzambe?
9 Ezali mabe te ete mobali nyonso oyo azali moklisto azala na mposa ya kozala na mikumba na kati ya lisangá. Kutu, Paulo alendisaki elimo yango. (1 Timote 3:1) Kasi, tosengeli kotalelaka mikumba na kati ya lisangá lokola mpɛtɛ te, lokola nde soki tozwi mokumba, tokomi bato minene. Tóbosana te ete Yesu alobaki boye: “Ye oyo alingi kozala [moto] monene kati na bino, akóma mosungi na bino mpe ye oyo alingi kozala moto ya liboso na bino, azala moombo na bino.” (Matai 20:26, 27) Yango elingi koloba ete ezali mpenza mabe soki tozali koyokela baoyo bazali na mikumba minene zuwa, lokola nde motuya na biso na miso ya Nzambe etaleli “esika” oyo tozali na yango na kati ya ebongiseli na ye. Yesu alobaki ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Moto nyonso oyo azali kosalela Yehova na molimo na ye mobimba, azala mosakoli to mobongisi-nzela, ndeko oyo azwi batisimo sika to ndeko oyo azali sembo na lisangá banda bambula ebele, azali na ntina na kati ya ebongiseli na ye. (Luka 10:27; 12:6, 7; Bagalatia 3:28; Baebele 6:10) Kosala elongo na bamilio ya bandeko oyo bazali kobunda etumba mpo na kolanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu,” ezali mpenza lipamboli.—1 Petelo 5:5.
Abesaloma: Moto ya mayele mabe oyo alingaki lokumu
10. Abesaloma azalaki nani, mpe ndenge nini amekaki kosomba mitema ya bato oyo bazalaki koya epai ya mokonzi mpo akata makambo na bango?
10 Abesaloma, mwana ya misato ya Mokonzi Davidi asalaki makambo oyo ezali komonisa biso ete alingaki mpenza lokumu. Moto yango ya mayele mabe alukaki kosomba mitema ya bato oyo bazalaki koya epai ya mokonzi mpo akata makambo na bango. Abandaki naino na koloba ete Davidi azali kotyela makambo na bato yango likebi te. Na nsima, abombaki lisusu mposa na ye te, akómaki komonisa yango polele. Abesaloma azalaki koloba boye: “Soko ngai natyami mosambisi kati na mokili ete moto na moto oyo azali na likambo akoya epai na ngai, mbɛ ngai nakosambisela ye na boyengebene.” Abesaloma akendaki mosika na mayele mabe na ye. Biblia elobi ete “soko mpe moto abɛlɛmaki ete akumisa ye, ye asembolaki lobɔkɔ na ye mpe akamataki ye mpe apwɛpwaki ye. Abesaloma asalelaki bato nyonso ya Yisalaele na motindo oyo, baoyo bayaki epai ya mokonzi mpo na kosambisama.” Nsuka na yango ezalaki nini? “Abesaloma azimbisaki mitema ya bato ya Yisalaele.”—2 Samwele 15:1-6.
11. Ndenge nini Abesaloma alukaki kobɔtɔla bokonzi ya Davidi?
11 Mposa ya Abesaloma ezalaki kaka abɔtɔla tata na ye bokonzi. Mbula mitano liboso, abomisaki Amona, mwana mobali ya liboso ya Davidi. Amona asangisaki nzoto na makasi na Tamala, ndeko mwasi ya Abesaloma, yango wana Abesaloma abomisaki ye mpo na mabe oyo ye asalaki. (2 Samwele 13:28, 29) Kasi, ekoki mpenza kozala ete ata na ntango wana makanisi ya Abesaloma ezalaki kaka na bokonzi. Na yango amonaki ete soki abomi Amona akolongola moto oyo akokaki kowela na ye bokonzi.b Ezala bongo to te, ntango ngonga na ye ekokaki, Abesaloma azongaki lisusu nsima te. Atindaki bato básakola na mboka mobimba ete ye akómi mokonzi.—2 Samwele 15:10.
12. Monisá ndenge oyo lolendo ya Abesaloma ememelaki ye nsɔni.
12 Abesaloma alongaki mpo na mwa ntango, mpamba te “botomboki eyaki ndɔngɔ mpe bato oyo balandaki Abesaloma bazalaki se kokóma mingi.” Na nsima, Mokonzi Davidi akimaki mpo na komibikisa. (2 Samwele 15:12-17, NW ) Kasi, mwa moke na nsima, botomboki ya Abesaloma esukaki ntango Yoaba abomaki ye, abwakaki ebembe na ye na libulu mpe bazipaki libulu yango na mabanga. Talá likambo: moto yango oyo alukaki kozala mokonzi akundamaki ata na lilita oyo ebongi te ntango akufaki!c Ya solo, lolendo ememelaki Abesaloma nsɔni.—2 Samwele 18:9-17.
Tóluka lokumu na biso moko te
13. Ndenge nini mposa ya koluka lokumu ekoki kokola na motema ya moklisto?
13 Ndenge oyo Abesaloma akómaki mokonzi mpe ndenge oyo asukaki ezali liteya mpo na biso. Na mokili ya lelo epai balobi ete moto na moto asala makasi na ye, bato mingi bazali na ezaleli ya kokumisa bakonzi na bango, bazali kosala nyonso mpo bakonzi yango bálinga bango kaka mpo bato mosusu bámonaka bango lokola bato ya lokumu to mpo bakonzi yango bápesaka bango nzela ya kosala makambo mosusu to mpo bato bámona ete bango bazali bato minene. Mpe kaka bato yango bakoki kozala na maloba ya komikumisa liboso ya bato oyo bazali na nse na bango, nyonso wana mpo na koluka ete básepela na bango mpe bákumisa bango. Soki tokebi te, elimo ya koluka lokumu ndenge wana ekoki kokola na mitema na biso. Emonani ete baklisto mosusu na ekeke ya liboso bakómaki na ezaleli yango; yango wana bantoma bakebisaki bato ya ndenge yango makasi.—Bagalatia 4:17; 3 Yoane 9, 10.
14. Mpo na nini tosengeli koboya mposa ya koluka lokumu mpe komitombola?
14 Na kati ya ebongiseli na ye, Yehova azali na mposa ya bato ya mayele mabe te, baoyo balukaka komitombola mpo na “koluka lokumu na bango moko.” (Masese 25:27, NW ) Kutu, Biblia elobi ete: “[Yehova] akolongola bibebu nyonso ya moselu mpe lolemo oyo ekobimisa lolendo.” (Nzembo 12:3) Abesaloma azalaki moto ya bibebu ya moselu. Azalaki komikumisa ntango azali koloba liboso ya bato oyo azalaki koluka ete básepela na ye, nyonso wana mpo na kozwa bokonzi oyo azalaki kolula. Nzokande, biso tozali na libaku malamu mpenza, tozali na kati ya bandeko oyo bazali kolanda toli ya Paulo ete: “Bósala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino na kosɔkɛma, bótánga bamosusu ete baleki bino.”—Bafilipi 2:3.
Saulo: Mokonzi oyo azalaki motema mɔ́tɔmɔtɔ
15. Ndenge nini Saulo amonisaki liboso ete azalaki na bopɔlɔ?
15 Liboso ya kokóma mokonzi ya Yisalaele, Saulo azalaki mpenza na bopɔlɔ. Na ndakisa, tótala likambo moko oyo asalaki ntango azalaki naino elenge. Ntango mosakoli Samwele alobaki malamu mpo na ye, na komikitisa mpenza, Saulo apesaki eyano ete: “Ngai Mobenyamina te, uta na libota lileki moke kati na Yisalaele? Mpe libota na ngai eleki mabota nyonso kati na Benyamina na moke te? Mpo na nini ozali koloba boye na ngai?”—1 Samwele 9:21.
16. Saulo asalaki nini oyo emonisaki ete azalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ?
16 Kasi na nsima, Saulo azalaki lisusu na bopɔlɔ te. Ntango azalaki kobunda na Bafilistia, azongaki na Gilegale epai asengelaki kozela Samwele aya kobondela Nzambe mpe kotumba mbeka. Lokola ntango oyo Samwele asengelaki kokóma ekokaki kasi ayaki naino te, Saulo akamataki mbeka mpe ye moko atumbaki yango. Ntango kaka asilisaki kotumba mbeka, Samwele akómaki. Samwele atunaki ete, “Osali nini?” Saulo azongisaki ete: “Namonaki ete bato bazali kolongwalongwa na ngai mpe ete yo oyei te na elaka etyamaki . . . Namipusaki ete nakaba mbeka ya kotumba.”—1 Samwele 13:8-12.
17. (a) Soki tokanisi malamu te, mpo na nini tokoki komona lokola nde Saulo asalaki mabe te? (b) Mpo na nini Yehova asambisaki Saulo na likambo asalaki?
17 Soki tokanisi malamu te, tokoki komona lokola ete Saulo asalaki mabe te. Libota ya Nzambe ezalaki “kati na mpasi,” “batumolami mingi,” mpe bazalaki kolɛnga mpo bazalaki koyeba likambo ya kosala te. (1 Samwele 13:6, 7) Ekozala mpenza malamu te kokanga mabɔkɔ soki likambo moko oyo ezali kosɛnga kokanga mabɔkɔ te ebimi.d Kasi, tóbosana te ete Yehova akoki kotánga makambo oyo ezali na kati ya mitema mpe komona mposa oyo etindi biso na kosala likambo moko. (1 Samwele 16:7) Yango wana, ekoki mpenza kozala ete amonaki makambo mosusu epai ya Saulo oyo lisolo ya Biblia elobeli yango te. Ekoki kozala ete Yehova amonaki ete lolendo nde ekómisaki Saulo motema mɔ́tɔmɔ́tɔ. Mbala mosusu Saulo asilikaki mingi na komona ete ye, mokonzi ya Yisalaele mobimba, azelaka mosakoli mobange moko boye oyo azali kosala malɛmbɛmalɛmbɛ! Ata soki ezalaki bongo to te, Saulo akanisaki ete lokola Samwele azalaki koumela, ye asengelaki te kotala na miso mpe amonaki mpamba malako ya polele oyo bapesaki ye. Esukaki ndenge nini? Samwele asepelaki te na likambo oyo Saulo asalaki. Na yango, apamelaki ye mpe alobaki ete: “Bokonzi na yo ekoumela te . . . mpo ete obateli yango elakelaki [Yehova] yo te.” (1 Samwele 13:13, 14) Tomoni awa lisusu ete lolendo ememaki nsɔni.
Tózala motema mɔ́tɔmɔtɔ te
18, 19. (a) Limbolá ndenge oyo motema mɔ́tɔmɔ́tɔ ekoki komema mosaleli ya Nzambe lelo oyo asala makambo na lolendo. (b) Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali ndenge lisangá etambolaka?
18 Lisolo ya Saulo, moto oyo asalaki makambo na lolendo ekomamaki na Liloba ya Nzambe mpo na litomba na biso. (1 Bakolinti 10:11) Ezali mpasi te mpo mabunga ya bandeko na biso elɛmbisa biso nzoto. Lokola Saulo, tokoki kokóma motema mɔ́tɔmɔ́tɔ, kokanisa ete mpo makambo etambola malamu, tosengeli kosala yango biso moko. Na ndakisa, ekoki kozala na ndeko moko oyo ayebi kotambwisa makambo malamu. Alalisaka likambo te, alandaka malako nyonso ndenge ezali kopesama na lisangá, alobaka mpe ateyaka malamu. Kasi, azali komona ete bandeko mosusu bazali kosala lokola ye te, mpe bazali na makoki te ndenge oyo ye azali kosepela. Yango epesi ye nzela ya komonisa motema mɔ́tɔmɔ́tɔ? Yango ezali ntina ya koloba mabe mpo na bandeko na ye, mbala mosusu koloba ete soki na milende na ye te mbɛlɛ ata likambo moko te esalemaka mpe mbɛlɛ lisangá esi ekufá? Soki asali bongo ezali lolendo!
19 Tóloba mpenza solo, nini esangisaka baklisto na kati ya lisangá? Koyeba kobongisa mpe kosala makambo? kozala na boyebi mingi? Toboyi te, nyonso wana ezali malamu mpo makambo etambola malamu na kati ya lisangá. (1 Bakolinti 14:40; Bafilipi 3:16; 2 Petelo 3:18) Kasi, Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana libosoliboso mpo na bolingo na bango. (Yoane 13:35) Yango wana bankulutu oyo bazali na boboto, atako balingaka ete makambo esalema na mobulu te, babosanaka te ete lisangá ezali kompanyi te oyo esengeli kotambwisama na malako ya makasimakasi; kasi bayebaka ete lisangá ezali etonga oyo esengeli kotambwisama na boboto. (Yisaya 32:1, 2; 40:11) Mbala mingi soki tolandi toli yango te mpe tosali makambo na lolendo, kowelana ekɔtaka na lisangá. Nzokande, kosala makambo na mobulu te, ndenge Nzambe alingaka, epesaka kimya.—1 Bakolinti 14:33; Bagalatia 6:16.
20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Masolo ya Biblia oyo elobeli Kola, Abesaloma na Saulo emonisi polele ete lolendo ememaka nsɔni, ndenge Masese 11:2 elobi yango. Kasi, kaka vɛrsɛ yango ebakisi ete: “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.” Bopɔlɔ ezali nini? Bandakisa nini ezali na Biblia oyo ekoki kosalisa biso tóyeba malamu ezaleli yango, mpe ndenge nini tokoki kozala bato ya bopɔlɔ lelo oyo? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Lubene azalaki mwana ya liboso ya Yakobo, ekoki kozala ete bato ya libota na ye oyo balandaki Kola na botomboki na ye bazalaki koyoka mabe lokola Mose, moto ya libota ya Levi, azalaki motambwisi na bango nyonso.
b Biblia elobeli lisusu Kileaba te, mwana mobali ya mibale ya Davidi, nsima ya kobotama na ye. Ekoki kozala ete akufaki liboso Abesaloma abanda botomboki.
c Na ntango ya kala, kokunda ebembe ezalaki likambo ya ntina mingi. Yango wana, soki moto akundami na lilita te ezalaki nsɔni mingi mpe mbala mingi ezalaki komonisa ete Nzambe asepeli na ye te.—Yilimia 25:32, 33.
d Na ndakisa, Pinehase asalaki likambo moko ya nokinoki mpo na kosukisa bolɔzi oyo ebomaki Bayisalaele 10 000 mpe Davidi, ayebisaki bato na ye, lokola bazalaki na nzala mingi ete bálya elongo na ye limpa ya kolakisama na “ndako ya Nzambe.” Nzambe atángaki ata moko ya makambo oyo te ete ezalaki lolendo.—Matai 12:2-4; Mituya 25:7-9; 1 Samwele 21:1-6.
-
-
“Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 1 Août
-
-
“Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele”
“[Yehova] alingi nini epai na yo? . . . Bobele ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8.
1, 2. Bopɔlɔ ezali nini, mpe ndenge nini ezaleli yango ekeseni na lolendo?
NTOMA moko oyo ayebani mingi aboyi kobenda likebi ya bato epai na ye. Mosambisi moko ya mpiko na Yisalaele alobi ete ye aleki moke na ndako ya tata na ye. Moto oyo alekaki bato nyonso andimi ete bokonzi na ye ezali na ndelo. Bato oyo nyonso bamonisi ezaleli oyo tobengi bopɔlɔ.
2 Kozala na bopɔlɔ elimboli kozala na lolendo te. Moto ya bopɔlɔ azalaka na bokatikati na ndenge ya kotalela makoki na ye mpe motuya na ye, mpe azalaka na lofundo te. Moto ya bopɔlɔ azalaka na lolendo te, atombolaka mapeka te, mpe awelaka lokumu te, kasi ayebaka ete azali mpe na bolɛmbu. Yango wana, akebaka ete azokisa bato mosusu te mpe andimaka makanisi na bango.
3. Na ndenge nini “bato ya bopɔlɔ” nde bazali na mayele?
3 Yango wana mpenza Biblia elobi ete: “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.” (Masese 11:2, NW) Moto ya bopɔlɔ azali na mayele mpamba te asalaka makambo oyo Nzambe asepelaka na yango mpe aboyaka kozala na lolendo mpamba te, lolendo ememaka nsɔni. (Masese 8:13; 1 Petelo 5:5) Na bomoi na bango, basaleli mingi ya Nzambe, bamonisaki ete moto ya bopɔlɔ azali mpenza na mayele. Sikoyo, tótalela ndakisa ya bato misato oyo tolobeli na paragrafe ya liboso.
Paulo: ‘Mosali’ mpe ‘mobateli’
4. Paulo azalaki na libaku malamu ya kokokisa mikumba nini?
4 Baklisto mingi ya liboso bayebaki Paulo, mpe toyebi ntina oyo ayebanaki mingi. Na mosala na ye ya kosakola, asalaki mibembo milai, ezala na mai to na mokili, mpe afungolaki masangá mingi. Lisusu, Yehova apesaki Paulo bimonaneli mpe likabo ya koloba na minɔkɔ ya bapaya. (1 Bakolinti 14:18; 2 Bakolinti 12:1-5) Mpe lisusu, Yehova apesaki Paulo elimo santu mpo na kokoma mikanda 14 oyo ezali lelo oyo na kati ya Makomami ya Greke ya boklisto. Tokoki mpenza koloba ete Paulo asalaki makambo mingi koleka bantoma mosusu nyonso.—1 Bakolinti 15:10.
5. Ndenge nini Paulo amonisi ete azalaki komitalela na bopɔlɔ?
5 Lokola Paulo azalaki liboso na kati ya mosala ya Nzambe, bato mosusu bakokaki kokanisa ete akosepela bápesaka ye lokumu to akolakisa bokonzi na ye. Kasi, Paulo asalaki bongo te mpamba te azalaki na bopɔlɔ. Alobaki ete azali “nsima ya bantoma nyonso.” Mpe abakisaki ete: “Nabongi kobyangama Ntoma te mpo ete nanyokolaki [lisangá, NW ] ya Nzambe.” (1 Bakolinti 15:9) Lokola Paulo azalaki liboso konyokola baklisto, ayebaki malamu ete ezali se na ngɔlu ya Nzambe nde akómaki moninga na ye mpe na koleka azwaki mikumba minene na mosala na ye. (Yoane 6:44; Baefese 2:8) Yango wana, Paulo azalaki kokanisa te ete lokola ye nde asalaki misala minene, alekaki bamosusu.—1 Bakolinti 9:16.
6. Ndenge nini Paulo amonisaki Bakolinti ete azalaki na bopɔlɔ?
6 Paulo amonisaki Bakolinti ete azali mpenza moto ya bopɔlɔ. Emonani ete bamosusu kati na bango bazalaki kokumisa bato oyo bango bazalaki komona ete bazali bakɛngɛli minene lokola Apolo, Kefa, na Paulo ye moko. (1 Bakolinti 1:11-15) Kasi Paulo alukaki te ete Bakolinti bákumisa ye mpe soki bakumisi ye, azalaki kovimba motó te. Soki akei epai na bango, azalaki komilakisa “na maloba ya kitoko mpe na mayele” te. Kasi mpo na ye moko mpe mpo na baninga na ye, Paulo alobaki ete: “Tiká ete moto atánga biso ete tozali basali ya Klisto mpe babateli ya makambo mabombami ya Nzambe.”a—1 Bakolinti 2:1-5; 4:1.
7. Ndenge nini Paulo amonisaki bopɔlɔ ata na ntango azalaki kopesa toli?
7 Paulo azalaki komonisa bopɔlɔ ata ntango azalaki kopamela to kopesa toli. Abondelaki baninga na ye baklisto “na mawa ya Nzambe” mpe “mpo na bolingo” kasi asalaki yango na makasi te atako azalaki ntoma. (Baloma 12:1, 2; Filemona 8, 9) Mpo na nini Paulo asalaki bongo? Mpamba te azalaki komimona ‘moninga ya mosala’ ya bandeko na ye, kasi lokola ‘nkolo ya kondima na bango’ te. (2 Bakolinti 1:24) Na ntembe te lokola Paulo azalaki moto ya bopɔlɔ, yango wana bandeko baklisto na masangá ya ekeke ya liboso balingaki ye mingi.—Misala 20:36-38.
Ata tozali na mikumba tózala na bopɔlɔ
8, 9. (a) Mpo na nini tosengeli komitalelaka na bopɔlɔ? (b) Ndenge nini bato oyo bazali na mikumba bakoki komonisa bopɔlɔ?
8 Paulo azali ndakisa malamu mpo na baklisto lelo oyo. Ata soki moto moko azali na mikumba soki ya ndenge nini, asengeli te kokanisa ete aleki bamosusu. Paulo akomaki ete: “Soko moto nani akanisi ete azali moto monene wana azali bongo te, azali komizimbisa.” (Bagalatia 6:3) Mpo na nini? Mpamba te “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baloma 3:23; 5:12) Tosengeli kobosanaka te ete Adama atikelá biso nyonso lisumu na liwa. Kozala na mikumba minene elongolaka moto na masumu te. (Mosakoli 9:2) Ndenge ezalaki mpo na Paulo, soki bato bazali na boyokani na Nzambe ezali se mpo na ngɔlu na Ye, mpe na koleka soki bazali na mikumba na mosala na ye.—Baloma 3:12, 24.
9 Moto ya bopɔlɔ ayebaka likambo yango malamu, atombolaka mapeka te soki azali na mikumba mpe amikumisaka te mpo na makambo oyo azali kosala. (1 Bakolinti 4:7) Ntango azali kopesa toli to malako, alobaka lokola moninga ya mosala, kasi lokola mokonzi te. Ezali mpenza mabe soki moto moko oyo ayebi kosala makambo mosusu malamu, azali koluka ete baninga na ye bandimi bákumisaka ye to soki bakumisi ye, ye avimbi motó. (Masese 25:27; Matai 6:2-4) Lokumu moko oyo ebongi ezali kaka oyo euti na bato mosusu, mpe esengeli nde mitema na bango moko etinda bango na kosala yango. Soki bakumisi biso, yango esengeli kotinda biso te tókanisa ete tozali likoló.—Masese 27:2; Baloma 12:3.
10. Ndenge nini bato mosusu oyo bakoki komonana lokola bato mpamba bakoki kozala “bazwi kati na kondima”?
10 Soki tozwi mokumba moko boye, bopɔlɔ ekopekisa biso koluka kobenda likebi mingi likoló na biso moko, mpe tokoboya komonisa lokola nde soki lisangá ezali kokola ezali se mpo na milende mpe mayele na biso. Na ndakisa, ekoki kozala ete toteyaka malamu. (Baefese 4:11, 12) Kasi soki tozali na bopɔlɔ, tokondima ete makambo mosusu ya ntina oyo toyekolaka ntango tokei na makita eutaka na masolo oyo bandeko basalaka te. Tópesa ndakisa: ntango omonaka moboti moko oyo abɔkɔlaka bana na ye ye moko kasi, pɔsɔ na pɔsɔ, ayaka na makita na bana na ye na mabɔkɔ, yango elendisaka yo te? To ndeko moko azali konyokwama na makanisi kasi azangisaka makita te atako azali komiyoka lokola ete azali na ntina te, likambo yango elendisaka yo te? To mpe lisusu, olendisamaka te na komona elenge oyo azali kokola malamu na elimo atako azali kokutana na baninga oyo bakoki komema ye na banzela ya mabe na kelasi mpe na bisika mosusu oyo akendaka? (Nzembo 84:10) Ntango mosusu bato yango babendaka mpenza likebi ya bato mingi te. Ekoki kozala ete bato mosusu bayebaka te etumba nini bazali kobunda mpo bátikala sembo. Kasi, bakoki kozala “bazwi kati na kondima” lokola kaka bato oyo bayebani mingi. (Yakobo 2:5) Na yango, Yehova akondima moto soki azali sembo.—Matai 10:22; 1 Bakolinti 4:2.
Gideona ‘alekaki na moke’ na ndako ya tata na ye
11. Ndenge nini Gideona amonisaki ete azali na bopɔlɔ ntango asololaki na anzelu ya Nzambe?
11 Gideona, elenge mobali moko ya mpiko, moto ya libota ya Manase, azalaki na bomoi na eleko oyo Yisalaele ezalaki na kimya te. Bamidyani banyokolaki libota ya Nzambe mbula nsambo mobimba. Kasi, ntango ekokaki mpo Yehova abikisa bato na ye. Yango wana, anzelu moko abimelaki Gideona mpe alobaki na ye boye: “[Yehova] azali na yo elongo, yo moto ya nguya mpe ya molende.” Gideona azalaki na bopɔlɔ, maloba wana ya kokumisa, oyo akanisaki ata te, evimbisaki ye motó te. Kasi, alobaki na anzelu na limemya nyonso ete: “Talá, tata, soko [Yehova] azali na biso elongo mbɛ makambo oyo nyonso makweli biso mpo na nini?” Anzelu alimbolelaki Gideona makambo nyonso mpe alobaki na ye boye: “Bikisá Yisalaele na lobɔkɔ ya Midyani.” Gideona asalaki nini? Na esika awela mokumba yango lokola libaku ya kokóma elombe oyo ekólo mobimba bakokumisa, Gideona alobaki ete: “Ɛ Nkolo, nakoka kobikisa Yisalaele boni? Talá, libota na ngai ezali motau eleki nyonso na Manase mpe ngai naleki na moke kati na ndako ya tata na ngai.” Talá ndenge moto ya bopɔlɔ alobaka!—Basambisi 6:11-15.
12. Ndenge nini Gideona amonisaki ete amilakisaki te ntango azalaki kokokisa mokumba na ye?
12 Liboso atinda Gideona na etumba, Yehova amekaki ye naino. Asalaki ndenge nini? Bayebisaki Gideona abuka etumbelo oyo tata na ye azalaki kopesa Baala mbeka mpe akatakata likonzi ya bulɛɛ oyo ezalaki pembeni na yango. Esengelaki azala na mpiko mpo na kosala likambo wana, mpe Gideona asalaki yango na bopɔlɔ mpe aboyaki komilakisa. Na esika amilakisa na miso ya bato, Gideona asalaki yango na butu, na ngonga oyo bakokaki komona ye te. Lisusu, Gideona asalaki mosala oyo batindaki ye na ekɛngɛ. Akamataki basali zomi; ekoki kozala ete bamosusu bazalaki kokɛngɛla mpe bamosusu basalisaki ye na kobuka etumbelo na likonzi ya bulɛɛ.b Ata soki ezalaki ndenge nini, toyebi ete na lisalisi ya Yehova, Gideona asalaki mosala oyo bapesaki ye, mpe na nsima, Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa Yisalaele na mabɔkɔ ya Bamidyani.—Basambisi 6:25-27.
Tózala na bopɔlɔ mpe tómilakisaka te
13, 14. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bopɔlɔ ntango tozwi mokumba moko na kati ya lisangá? (b) Na likambo nini Ndeko Alexander Macmillan apesaki ndakisa malamu ya moto ya bopɔlɔ?
13 Bopɔlɔ ya Gideona ekoki koteya biso makambo mingi. Na ndakisa, tosalaka nini ntango bapesi biso mokumba moko na lisangá? Tokanisaka liboso esika monene mpe lokumu oyo yango ekopesa biso? To tozalaka nde na bopɔlɔ mpe tobondelaka mpo na koyeba soki tokokoka mpenza kokokisa mokumba yango? Ndeko Alexander Macmillan apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ye asukisaki bomoi na ye awa na mabele na 1966. Mokolo moko, Charles Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower, atunaki Ndeko Macmillan soki nani, na makanisi na ye, akoki kotambwisa misala soki ye moko azali te. Na lisolo na bango, Ndeko Macmillan alobaki te ete ye nde abongi, atako ekokaki mpenza kozala malamu ete ye atambwisa misala yango. Na nsuka, Ndeko Russell ayebisaki Ndeko Macmillan akanisa naino soki ye akoki kondima mokumba yango. Nsima ya bambula mingi, Ndeko Macmillan akomaki ete, “Namonaki yango lokola ndɔtɔ. Nakanisaki likambo yango malamumalamu, nasalaki libondeli mpe na nsima nayebisaki ye ete nakosepela kosala nyonso oyo nakoki mpo na kopesa ye mabɔkɔ.”
14 Elekaki ntango molai te, Ndeko Russell akufaki, mpe la Société Watch Tower ezalaki lisusu na prezida te. Lokola Ndeko Macmillan azalaki kotambwisa misala na biro ntango Ndeko Russell akendaki mobembo na ye ya nsuka mpo na koteya, ndeko moko alobaki na ye boye: “Mac, namoni lokola yo nde okokóma prezida. Ntango Ndeko Russell akendaki mobembo yo moto otikalaki na esika na ye, mpe ayebisaki biso nyonso ete tósalaka nyonso oyo okoloba na biso. Kokende akendaki, akei mpe kokufa. Namoni lokola yo nde okozwa esika na ye.” Ndeko Macmillan apesaki ye eyano ete: “Ndeko, makanisi wana ezali malamu te. Oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe Nkolo ye moko atyaka moto na moto na esika oyo ebongi na ye; mpe ngai nandimi te ete nabongi na esika yango.” Na nsima, Ndeko Macmillan apesaki nkombo ya moto mosusu mpo na mokumba ya prezida. Lokola Gideona, Ndeko Macmillan azalaki komimona moto monene te. Biso mpe ebongi tólanda makanisi wana.
15. Ndenge nini tokoki komonisa bososoli ntango tozali kosakola epai ya bato?
15 Biso mpe tosengeli kokokisa mikumba na biso na bopɔlɔ. Gideona azalaki komilakisa te mpe alukaki kotumola banguna na ye mpambampamba te. Biso mpe tólanda ndenge yango, na mosala na biso ya kosakola, tosengeli kozala na bopɔlɔ mpe tómilakisaka te ntango tozali kosolola na bato. Ya solo, tozali kobunda etumba ya elimo mpo na kokweisa “bisika bibatelami makasi” mpe “makanisi.” (2 Bakolinti 10:4, 5) Kasi, tosengeli kopesa bato kilo mpe tótika likambo nyonso oyo ekoki kosala ete nsango na biso ebɛtisa bango libaku. Tosengeli nde kondima ete bakoki kozala na makanisi na bango, tosengeli kolobelaka mingi makambo oyo biso na bango tondimaka, mpe kobenda likebi na bango na makambo malamu ya nsango na biso.—Misala 22:1-3; 1 Bakolinti 9:22; Emoniseli 21:4.
Yesu: Ndakisa ya bopɔlɔ oyo eleki bandakisa nyonso
16. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komitalela na bopɔlɔ?
16 Yesu Klisto azalaki moto ya bopɔlɔ oyo apesaki ndakisa oyo eleki malamu.c Atako azalaki moninga mpenza ya Tata na ye, Yesu alobaki polele ete akoki kosala makambo mosusu te na ndenge na ye moko. (Yoane 1:14) Na ndakisa, ntango mama ya Yakobo na Yoane asɛngaki ete bana na ye mibale wana báfanda pembeni ya Yesu na bokonzi na ye, Yesu alobaki boye: “Kofanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali na ngai te mpo na kopesa yango.” (Matai 20:20-23) Mokolo mosusu, Yesu alobaki polele ete: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, . . . nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.”—Yoane 5:30; 14:28; Bafilipi 2:5, 6.
17. Ndenge nini Yesu amonisaki epai ya bato mosusu ete azalaki na bopɔlɔ?
17 Yesu alekaki bato ya kozanga kokoka na makambo nyonso, mpe Tata na ye Yehova apesaki ye bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso. Atako bongo, Yesu azalaki na bopɔlɔ liboso ya bayekoli na ye. Azalaki komilakisa te ete azali na mayele mingi mpo na kokamwisa bango. Azalaki na boboto mpe azalaki na motema mawa, azalaki koyeba bamposa na bango. (Matai 15:32; 26:40, 41; Malako 6:31) Na bongo, atako Yesu azalaki moto ya kokoka, kasi alukaki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Ata mokolo moko te asɛngaki bayekoli na ye makambo oyo eleki bango to apesaki bango mikumba oyo bakokoka kokokisa yango te. (Yoane 16:12) Tokoki kokamwa te ete bato mingi bazalaki kobɔndisama ntango bazalaki na ye.—Matai 11:29.
Tólanda ndakisa ya bopɔlɔ ya Yesu
18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bopɔlɔ ya Yesu na ndenge oyo tomitalelaka? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge oyo tosalelaka bato mosusu makambo?
18 Soki kutu moto oyo alekaki bato nyonso azalaki na bopɔlɔ, esengeli mpenza ete biso mpe tózalaka na bopɔlɔ. Mbala mingi, bato ya kozanga kokoka balingaka kondima te ete bokonzi na bango ezali na ndelo. Nzokande, baklisto balandaka ndakisa ya Yesu, basalaka makasi ete bázala bato ya bopɔlɔ. Batikaka te ete lolendo epekisa bango kotika mikumba epai ya bato oyo bakoki kokokisa yango malamu; bazalaka na lofundo te mpe bandimaka malako ya baoyo bazali na lotomo ya kopesa yango. Lokola bazali na elimo ya kosala na bomoko, basalaka nyonso ete makambo nyonso na kati ya lisangá esalema “na ndenge ebongi mpe na mobulu te.”—1 Bakolinti 14:40, NW.
19 Bopɔlɔ ekopekisa biso kosɛnga bamosusu básala makambo oyo eleki ndelo mpe ekotinda biso tóyeba komitya na esika na bango. (Bafilipi 4:5) Tokoki kozala na mayele mpe na makasi oyo bato mosusu bazali na yango te. Kasi, soki tozali bato ya bopɔlɔ, tokoluka te ete bato mosusu básala kaka ndenge oyo biso tolingi. Lokola toyebi ete moto na moto azali na bolɛmbu na ye, na bopɔlɔ nyonso tokoboya kolandelaka mwa mabunga ya bandeko na biso. Petelo akomaki ete: “Liboso ya makambo nyonso bólingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele ya masumu.”—1 Petelo 4:8.
20. Tokosala nini mpo tókóma bato ya bopɔlɔ?
20 Lokola toyekoli yango, bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele. Kasi, okosala nini soki omoni ete ozali mpenza na bopɔlɔ te to ozali na lolendo? Kolɛmba nzoto te. Landá ndakisa ya Davidi, ye asalaki libondeli oyo: “Batela mosaleli wa yo akoma na lolendo te, lolendo lobebisa motema mwa ye te!” (Nzembo 19:14, Liloba lya Nzambe) Soki tolandi kondima ya bato lokola Paulo, Gideona, mpe mingimingi Yesu Klisto, tokomona ete maloba oyo ezali solo ete: “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.”—Masese 11:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Greke oyo ebongolami na “basali” ekoki kolimbola moombo oyo azalaki kofanda na nsima mpenza mpo na kolúka bwato moko ya monene na nkai. Nzokande, bazalaki kopesa “babateli” mikumba mingi, lokola kobatela biloko. Atako bongo, mpo na bankolo mingi, mobateli azalaki kaka moto ya mosala lokola moombo oyo azalaki kolúka na bwato.
b Tokoki koloba te ete lokola Gideona amilakisaki te mpe azalaki na ekɛngɛ, elingi koloba ete azalaki moto ya bibangabanga. Kutu, Baebele 11:32-38 emonisi mpenza ete azalaki na mpiko, mpamba te na vɛrsɛ yango batángi Gideona na kati ya bato oyo “bakembisami” mpe “bazwi makasi kati na etumba.”
c Lokola moto ya bopɔlɔ azali mpe moto oyo andimaka bolɛmbu na ye, tokoki koloba te ete Yehova azali na bopɔlɔ. Tokoloba nde ete azali na komikitisa.—Nzembo 18:35.
-