Bosembo etambwisaka bato ya malamu
BIBLIA elobi ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Tozali komona ete bomoi ya moto etondi na mpasi mpe minyoko. Ata bomoi ya mokolo na mokolo ezali na ebele ya mitungisi mpe mikakatano! Nini ekosalisa biso tótambola malamu na ntango ya mikakatano mpe nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso bayengebene na miso ya Nzambe?
Tótalela ndakisa ya Yobo, moto moko ya bomɛngo oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo mbula soki 3 500 na mokili oyo babengaka yango lelo ete Arabie. Satana anyokolaki mpenza moto yango oyo azalaki kobanga Nzambe! Bibwele na ye nyonso ekufaki, bana na ye mpe bakufaki. Mwa moke na nsima, Satana apesaki Yobo maladi makasi, babibɔ ya nsɔmɔ ebimaki ye banda na motó tii na makolo. (Yobo, mikapo 1, 2) Yobo ayebaki te mpo na nini mpasi ya ndenge wana ezalaki kokómela ye. Atako bongo, “Yobo asalaki lisumu na bibebu na ye te.” (Yobo 2:10) Alobaki ete: “Kino nakokufa nakomilongwela [bosembo, NW] na ngai te.” (Yobo 27:5) Ya solo, bosembo ya Yobo etambwisaki ye na kati ya bampasi na ye.
Bosembo elimboli kolongobana na bizaleli mpe esɛngaka kozala na likambo moko ya mabe te mpe na efundeli te na miso ya Nzambe. Kasi, ezali kosɛnga te ete bato ya kozanga kokoka bálobaka mpe básalaka makambo na ndenge ya kokoka, mpamba te bakoki kolonga te kosala na ndenge ya kokoka makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Kasi, Moto ya bosembo apesaka motema mobimba na kosalela Yehova mpe mokano na ye. Komipesa motindo wana etambwisaka bato ya malamu ezala na makambo nini mpe na ntango nini. Eteni ya liboso ya Masese mokapo 11 ezali komonisa ndenge oyo bosembo na biso ekoki kotambwisa biso na makambo ndenge na ndenge ya bomoi mpe ezali komonisa biso mbano oyo yango ekomema. Yango wana, tótalela naino malamu makambo oyo ekomami na bavɛrsɛ yango.
Bosembo etindaka moto azala na kolongobana na makambo ya mombongo
Mpo na kolobela ndenge oyo moto asengeli komonisa bosembo, Salomo mokonzi moko ya kala ya Yisalaele, asalelaki elobeli ya bato ya mibeko te, kasi asalelaki maloba ya ntɔki, alobaki boye: “Kilo oyo ezali na bokosi ezali eloko eyinami na Yehova; kasi libanga ya komeka oyo ezali mobimba esepelisaka ye.” (Masese 11:1, NW) Yango ezali mbala ya liboso kati na mbala minei oyo mokanda ya Masese elobeli kilo mpe bimekeli mpo na komonisa ete Yehova alingi ete bato oyo bazali kosambela ye bázala sembo na mombongo.—Masese 16:11; 20:10, 23.
Moto akoki kobendama na bolamu ya bato oyo bazali kosalela kilo oyo ezali na bokosi, elingi koloba makambo ya kozanga bosembo. Kasi tokolinga mpenza kolanda banzela ya nyamunyamu na mombongo mpe kobosana mitinda ya Nzambe na oyo etali malamu na mabe? Tokosala yango te soki bosembo ezali kotambwisa biso. Toboyaka kozanga bosembo mpamba te, lokola emekeli ya malamu elimboli bosembo, libanga ya komeka oyo ezali mobimba esepelisaka Yehova.
“Bato ya bopɔlɔ nde bazali na bwanya”
Mokonzi Salomo abakisi boye: “Lolendo eyei? Nsɔni ekoya na nsima; kasi bato ya bopɔlɔ nde bazali na bwanya.” (Masese 11:2, NW) Lolendo, ata soki emonisami na lofundo, na motó makasi, to na zuwa, ememaka nsɔni. Nzokande, soki tozali koyeba esika oyo makoki na biso esuki, yango nde nzela ya bwanya. Bandakisa oyo ezali na Makomami ezali komonisa ete lisese yango elobi solo mpenza!
Kola, Molevi moko ya zuwa, azalaki na motó ya bato oyo batombokelaki Mose na Alona, baoyo Yehova apesaki bokonzi. Lolendo na ye ememaki ye wapi? “Mokili efungolaki monɔkɔ na yango mpe emɛlaki” batomboki mosusu; nzokande bamosusu, elongo na Kola, bazikaki nyɛɛ na mɔ́tɔ. (Mituya 16:1-3, 16-35; 26:10; Deteronome 11:6) Talá nsɔni ya ndenge wana! Tólobela mpe Uza, moto oyo asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki sanduku ya kondimana mpo ekwea te. Abomamaki kaka na miniti wana. (2 Samwele 6:3-8) Ezali mpenza likambo ya ntina ete tóboya lolendo!
Moto ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ ayokisamaka nsɔni te ata ntango asali libunga. Atako Yobo azalaki ndakisa malamu na makambo mingi, azalaki kaka moto ya kozanga kokoka. Bampasi oyo akutanaki na yango emonisaki ete azalaki na makanisi mosusu ya libunga. Ntango azalaki komilongisa liboso ya bato oyo bazalaki kokanisela ye ete asalaki mabe yango wana bampasi ekómelaki ye, Yobo abandaki kobungisa makanisi malamu. Kutu, amonisaki na maloba na ye lokola ete aleki Nzambe na boyengebene. (Yobo 35:2, 3) Ndenge nini Yehova azongisaki Yobo na nzela?
Yehova alobelaki mabele, mai monene, likoló oyo etondi na minzoto, banyama mosusu, mpe biloko ya kokamwa oyo akelá; na nyonso wana, ateyaki Yobo ete moto azali moke mpenza liboso ya Nzambe. (Yobo, mikapo 38-41) Yehova alobaki te ntina oyo Yobo azalaki konyokwama. Azalaki na mposa ya koyebisa ye yango te. Yobo azalaki na komikitisa. Andimaki ete Nzambe azali monene mingi mpe ye azali moke mpenza; andimaki ete ye azali moto ya kozanga kokoka mpe ya bolɛmbu, nzokande Yehova azali sembo mpe azali na nguya. Alobaki ete: “Namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu ya mɔ́tɔ.” (Yobo 42:6) Bosembo ya Yobo ememaki ye na kondima mbala moko mpamela. Ezali boni mpo na biso? Bosembo na biso ekotinda nde biso tóndima mbala moko mpamela to kosembolama na ntango tosengeli na yango?
Mose mpe azalaki na bopɔlɔ mpe na komikitisa. Ntango oyo kokata makambo ya bato ekómaki kilo mpo azalaki kaka ye moko, bokilo na ye Yetelo apesaki ye likanisi moko ya malamu: apesa mikumba mosusu na mabɔkɔ ya bato mosusu ya makoki. Mose amonaki ete akoki kosala makambo nyonso ye moko te, amonisaki bwanya mpe andimaki toli yango. (Exode 18:17-26; Mituya 12:3) Moto ya bopɔlɔ akakatanaka te kotika ete bato mosusu bázwa mikumba mosusu, abangaka mpe te ete akobungisa bokonzi soki atikeli bato mosusu ya makoki mikumba mosusu. (Mituya 11:16, 17, 26-29) Kasi, azalaka pene ya kosalisa bango bákola na elimo. (1 Timote 4:15) Esengeli kozala ndenge yango mpo na biso, boye te?
‘Nzela ya moto oyo azangi efundeli ezali alima’
Salomo andimaki ete bosembo ebatelaka ntango nyonso te bato ya malamu na likama to na mpasi; alobaki boye: “Bosembo ya bato ya malamu nde etambwisaka bango, kasi lokuta ya bakosi ekopunza bango.” (Masese 11:3, NW) Bosembo etambwisaka mpenza bato ya malamu mpo básalaka oyo ezali malamu na miso ya Nzambe, ata na ntango ya mpasi, mpe nsukansuka ememelaka bango matomba. Yobo aboyaki kotika bosembo na ye, mpe Yehova “apambolaki mikolo ya nsuka ya Yobo koleka yango na ebandeli.” (Yobo 42:12) Bakosi bakoki komona ete bango bazali kokóma malamu ntango bazali kolyela bato mosusu mpe ekoki komonana ete makambo na bango ezali kokende malamu mpo na mwa ntango. Kasi, ata ndɛlɛ, bokosi na bango moko ekoboma bango.
Mokonzi ya mayele alobaki boye: “Bozwi ekosunga na mokolo ya nkanda te, nde boyengebene ekobikisa moto kati na kufa.” (Masese 11:4) Ezali mpenza kozanga mayele soki moto azali koboma nzoto mpo na bozwi ya mokili kasi azali kobosana koyekola ye moko, kobondela, koyangana na makita, mpe kosakola; nzokande yango nde makambo oyo ebakisaka mpenza bolingo mpo na Nzambe mpe elendisaka mposa na biso ya kosalela ye! Bozwi, ata ezali mingi ndenge nini, ekobikisa moto te na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Matai 24:21) Kaka boyengebene ya bato ya malamu nde ekobikisa bango. (Emoniseli 7:9, 14) Yango wana, ezali likambo ya mayele soki tokolanda elendiseli ya Sefania ete: “Naino mokolo ya nkanda ya [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” (Sefania 2:2, 3) Liboso na yango, tómityela mokano ya ‘kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya.’—Masese 3:9.
Salomo amonisaki lisusu ntina ya kolanda boyengebene; mpo na yango, amonisaki nsuka ya moto malamu mpe nsuka ya moto mabe; alobaki boye: “Boyengebene ya moto oyo azangi efundeli yango nde ekokómisa nzela na ye alima, kasi moto mabe akokwea na kati ya mabe na ye moko. Boyengebene ya bato ya malamu yango nde ekobikisa bango, kasi elulela ya bakosi ekokanga bango moko. Ntango moto mabe akufi, elikya na ye esili; ata mpe elikya oyo atyaki na nguya na ye esili. Moyengebene akobikisama kati na mpasi, mpe moto mabe akoya esika na ye.” (Masese 11:5-8, NW) Moto oyo azangi efundeli akweaka na banzela na ye moko te mpe misala na ye ekangaka ye lokola motambo te. Nzela na ye ezali alima. Nsukansuka, bato ya malamu babikisamaka kati na mpasi. Bato mabe bakoki komonana ete bazali na nguya, kasi bakobikisama ndenge yango te.
“Bato ya mboka bakosepela”
Bosembo ya bato ya malamu esalaka bato mosusu malamu mpe mabe ya bato ya mabe epesaka bato mosusu mpasi. Mokonzi ya Yisalaele alobaki ete: “[Mopɛngwi, “NW”] akobebisa mozalani na ye na nzela na monɔkɔ na ye; nde moyengebene akobikisama mpo na boyebi.” (Masese 11:9) Toyebi biso nyonso ete sɔngisɔngi, matɔngi, maloba ya nsɔni, mpe masolo ya mpambampamba esalaka basusu mabe! Nzokande, maloba ya moyengebene ezalaka pɛto, akanisaka malamumalamu liboso ya kobimisa yango, mpe ezalaka na boboto. Akobikisama mpo na boyebi mpamba te bosembo na ye esalisaka ye abimisa makambo oyo ekomonisa ete bato oyo bazali koloba mabe mpo na ye bazali kokosa.
Mokonzi alobaki lisusu ete: “Ekozwa bayengebene malamu, bato ya mboka bakosepela; ekokufa bato mabe, bakoganga na esengo.” (Masese 11:10) Mingimingi bayengebene balingamaka mpe basepelisaka bato oyo bafandi na bango. Moto te asepelaka mpenza na “bato mabe.” Mbala mingi, soki moto mabe akufi, bato mingi te balelaka ye. Na ntembe te, mawa ekozala te ntango Yehova ‘akolongola bato mabe na mokili mpe akopikola bato ya masumu na mabele.’ (Masese 2:21, 22) Nzokande, ekozala esengo mpamba te bato yango bakozala lisusu te. Kasi, ezali boni mpo na biso? Ebongi tótala soki tozali kopesa basusu esengo na etamboli na biso.
“Mboka ekumisami”
Salomo akobaki lisusu komonisa bokeseni kati na mosala ya bato ya malamu mpe mosala ya bato mabe na kati ya mboka; alobaki boye: “Mpo na lipamboli ya [bato malamu, “NW”] mboka ekumisami; kasi ekweisami na monɔkɔ ya bato mabe.”—Masese 11:11.
Bato ya mboka oyo balandaka bosembo balendisaka kimya mpe bolamu mpe basalisaka bato mosusu ete bákende liboso. Na ndenge yango nde mboka ekumisamaka to ekendeke liboso. Bato ya matɔngi, oyo bazali na maloba ya kozokisa mpe ya mabe bakɔtisaka mobulu, mawa, bokabwani mpe yikiyiki. Emonanaka mpenza bongo soki bato yango bazali bato minene na kati ya mboka. Mboka ya ndenge wana ezalaka na mobulu, na makambo ya mabe, na misala ya mbindo mpe mbala mosusu nkita na yango ebebaka.
Etinda ya Masese 11:11 etali mpe basaleli ya Yehova ntango bazali na masangá na bango oyo tokoki kokokanisa yango na bamboka. Lisangá oyo bato mingi bazali bato ya elimo, elingi koloba bato ya malamu oyo batambwisami na bosembo, ezalaka lisangá ya esengo, bato na yango bamipesaka na mosala, basalisanaka, mpe bakumisaka Nzambe. Yehova apambolaka lisangá ya ndenge yango mpe ekolaka na elimo. Ntango mosusu, mwa bato mosusu oyo bakoki koimaima to komilelalela, oyo bamonaka kaka mabe mpe balobaka mabe na ndenge oyo makambo ezali kosalema, bazali lokola “mosisa oyo ezali na pwazo” oyo ekoki kopalangana mpe kobebisa basusu oyo bazalaki malamu. (Baebele 12:15, NW) Mbala mingi, bato ya ndenge wana balingaka kokóma na bokonzi mingi mpe na lokumu. Batambwisaka nungunungu ete lisangá mobimba to mpe bankulutu bazali na bosembo te, bazali kokabola bikólo, mpe makambo mosusu ya ndenge yango. Monɔkɔ na bango ekoki kokabola lisangá. Omoni te ete tosengeli koboya koyoka masolo na bango mpe kosala makasi ete tózala bato ya elimo oyo bazali kolendisa kimya mpe bomoko na kati ya lisangá?
Salomo akobaki lisusu boye: “Ye oyo azali na motema te akotyola mozalani na ye; kasi moto ya bososoli akokanga monɔkɔ. Ye oyo akopalanganisa nsango mabe azipoli makambo ya nkuku; nde ye oyo azali na elimo ya [sembo, “NW”] akobomba likambo.”—Masese 11:12, 13.
Moto oyo azangi bososoli, to “oyo azali na motema te” asalaka mabe mingi mpenza! Bilobaloba na ye ekendaka tii na kotɔnga to kotyola. Bankulutu basengeli kosala nokinoki mpo na kokanga nzela na ezaleli mabe wana. Na bokeseni na ye “oyo azali na motema te,” moto ya bososoli ayebaka ntango nini asengeli kozala nyɛɛ. Na esika apanza sɛkɛlɛ, abombaka makambo. Moto ya bososoli azalaka na “elimo ya sembo” mpo ayebaka ete monɔkɔ polopolo ekoki kosala mabe mingi. Azalaka sembo epai ya baninga na ye bandimi mpe abombaka makambo oyo ekoki kotya bango na likama. Bato ya sembo ndenge yango bazalaka lipamboli mpenza mpo na lisangá!
Mpo na kosalisa biso tótambola na nzela ya bato oyo bazangi efundeli, Yehova azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo oyo ebongisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Mokomoko na biso azwaka mpe lisalisi mingi na nzela ya bankulutu baklisto na kati ya masangá na biso. (Baefese 4:11-13) Tozali mpenza na botɔndi mpo na bango, mpamba te “wana toli ezali te, bato bakobeba; nde kobika ekozala wana bato mingi na toli bakofanda.” (Masese 11:14) Ata soki likambo nini ekoki kokómela biso, tózala na ekateli makasi ya ‘kotambola na bosembo na biso.’—Nzembo 26:1, NW.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 26]
Ezali mpenza kozanga mayele soki moto azali koboma nzoto mpo na biloko ya mokili mpe azali kobosana makambo ya elimo!
[Bililingi na lokasa 24]
Bosembo ya Yobo etambwisaki ye, mpe Yehova apambolaki ye
[Bililingi na lokasa 25]
Uza akufaki mpo na lolendo na ye