Loná boyengebene, okobuka motema-boboto ya Nzambe
“YE OYO akondima kozala ndanga mpo na mopaya akosuka mabe; nde ye oyo akoboya kopesa lobɔkɔ akotungisama te.” (Masese 11:15, NW) Lisese oyo ezali mpenza kolendisa biso tókanisaka malamu liboso ya kosala likambo! Kotya sinyatili na mokanda mpo na kondima kozala ndanga mpo na mopaya oyo alingi kodefa mbongo ezali komilukela mindɔndɔ. Koboya kopesa lobɔkɔ, lokola moto azali kopesa mbote—oyo na Yisalaele ya kala ezalaki komonisa ete bato oyo basali yango bayokani na likambo moko—ebatelaka moto na mikakatano ya makambo ya mbongo.
Likambo oyo maloba yango ezali komonisa ezali polele: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7, NW) Mosakoli Hosea alobaki ete: “Bómilonela boyengebene, bómibukela [motema-boboto, NW] ya Nzambe.” (Hosea 10:12) Ya solo, soki ozali kosala makambo na ndenge oyo Nzambe alingaka, ezali lokola nde ozali kolona boyengebene, mpe okobuka motema-boboto na ye. Mokonzi Salomo ya Yisalaele alobelaki likambo yango mbala na mbala mpo na kolendisa moto asala makambo oyo ebongi, azala na maloba oyo ebongi mpe na bomoto oyo ebongi. Soki totaleli malamumalamu maloba na ye wana ya bwanya, ekolendisa biso tólona boyengebene.—Masese 11:15-31.
Loná “bizaleli malamu,” okobuka “lokumu”
Mokonzi ya bwanya alobi ete: “Mwasi malamu ezali ye oyo asimbaka lokumu, kasi banyokoli, bango, basimbaka bozwi.” (Masese 11:16, NW) Vɛrsɛ oyo ezali kokesenisa lokumu oyo mwasi malamu akoki kozwa mpe bozwi oyo eumelaka te oyo monyokoli azwaka.
Ndenge nini moto akoki kokóma na bizaleli malamu oyo ekomemela ye lokumu? Salomo apesaki toli oyo: “Batelá mayele ya bomoto mpe makoki ya kokanisa. Ekozala . . . malamu mpo na nkingo na yo.” (Masese 3:21, 22, NW) Lisusu, mokomi ya nzembo alobaki ete ‘bolamu ezali kosopana na mbebo ya mokonzi.’ (Nzembo 45:1, 2, NW) Mayele ya bomoto, makoki ya kokanisa mpe kobimisa maloba oyo ebongi epesaka moto valɛrɛ mpe ekómisaka ye malamu. Likambo yango emonanaka mpenza epai ya mwasi ya mayele. Abigaili, mwasi ya Nabala oyo azalaki bolole ya mobali, azali ndakisa ya basi ya ndenge wana. Abigaili azalaki mwasi “malamu mpo na bokɛngi mpe azalaki kitoko,” mpe Mokonzi Davidi akumisaki ye mpo na “bokɛngi” na ye.—1 Samwele 25:3, 33, NW.
Mwasi oyo abangaka Nzambe mpe azali mpenza malamu akozanga te kozwa lokumu. Basusu bakoloba malamu mpo na ye. Soki azali mwasi ya libala, mobali na ye akokumisa ye. Kutu, akopesa libota na ye mobimba lokumu. Mpe lokumu na ye ekozala ya mwa ntango moke te. “Nkombo malamu eleki bozwi mingi na malamu; ngɔlu ezali malamu koleka palata mpe wolo.” (Masese 22:1, NW) Nkombo malamu oyo azali na yango na miso ya Nzambe ekosila valɛrɛ te.
Nzokande, ezali bongo te mpo na monyokoli to ‘mobali oyo azangá mawa.’ (Masese 11:16 ) Monyokoli azali ndenge moko na bato mabe mpe banguna ya basaleli ya Yehova. (Yobo 6:23; 27:13) Moto ya ndenge wana ‘atyaka Nzambe liboso na ye te.’ (Nzembo 54:3, NW) Na ndenge aboyaka kopesa to abɔtɔlaka biloko ya moto oyo asali ye likambo te, akoki “koyanganisa palata ebele lokola mputulu.” (Yobo 27:16, NW) Kasi, mokolo ekoya oyo akolala mpe akolamuka lisusu te, mpe mokolo oyo akofungola miso na ye ekozala mokolo na ye ya nsuka ya bomoi. (Yobo 27:19) Bozwi na ye nyonso mpe makambo nyonso oyo asalaki ekozala na ntina moko te.—Luka 12:16-21.
Mokapo ya Masese 11:16 ezali mpenza kopesa biso liteya ya ntina mingi! Mokonzi ya Yisalaele alendisi biso na kolona boyengebene na ndenge ayebisi na mokuse mpe polele eloko nini moto oyo aloni bizaleli malamu akobuka mpe oyo monyokoli akobuka.
“Motema-boboto” epesaka mbano mingi
Salomo apesi liteya mosusu na likambo etali kofanda malamu na bato: “Moto ya [motema-boboto, NW] akosunga molimo na ye moko; nde ye oyo azali na [motema mabe, NW] akobebisa nzoto na ye mpenza.” (Masese 11:17) Moto moko ya mayele alobi ete: “Lisese oyo ezali koteya ete ndenge oyo moto asalelaka basusu makambo, soki ezali ya malamu to ya mabe, ekomemela ye moko makambo oyo akanisaki te.” Talá likambo ya elenge mwasi moko na nkombo Lisa.a Atako azalaka na makanisi ya malamu, kasi akómaka ntango nyonso nsima ya ngonga oyo ayokani na moto. Mbala mingi akómaka miniti 30 to koleka nsima ya ngonga oyo esengelaki akutana na basakoli mosusu ya Bokonzi mpo na kobima na mosala ya kosakola. Lisa azali kosunga molimo na ye te. Akoki kopesa basusu foti soki bakómi koboya koyokana na ye mpo balɛmbi kobebisa ngonga na bango ya ntina mingi?
Moto oyo alukaka kosala makambo na ndenge ya kokoka, ye oyo amityelaka mikano oyo akokoka kokokisa yango te, azali mpe kominyokola. Akolɛmba nzoto mpe akoyoka mawa mpamba te azali komityela mikano oyo ayebi malamu ete azali na makoki te ya kokokisa yango. Nzokande, tokomisala malamu soki tozali komityela mikano ya malamu mpe oyo tozali na makoki ya kokokisa. Ekoki kozala ete tokangaka ntina ya makambo nokinoki lokola bato mosusu te. To ekoki kozala ete maladi mpe bobange ezali kopekisa biso tósala ndenge oyo tolingi. Atako bongo, tókóma komitungisa te mpo na ndenge oyo tozali kokola na elimo, kasi tókoba ntango nyonso komonisa ete tozali na makambo makasi te na ndenge oyo tozali kotalela bolɛmbu na biso. Tozalaka na esengo ntango ‘tozali komeka kosala na nguya na biso nyonso’ ndenge oyo makoki na biso epesi nzela.—2 Timote 2:15; Bafilipi 4:5.
Mokonzi ya bwanya alimboli lisusu na mozindo ndenge oyo moyengebene amizwelaka matomba, kasi monyokoli amipesaka mpasi, ntango alobi ete: “Moto mabe akosalela lifuti ya kozimbisa, nde litomba ya solo ekopesamela ye oyo [azali kolona, NW] boyengebene. Lokola boyengebene ekoyeisa bomoi, bongo ye oyo [akolanda] mabe akokóma na kufa na ye mpenza. Baoyo [bazali] na motema ya mobulu baboyami na [Yehova], nde bango bakosembwa na nzela na bango bakosepelisa ye. Ata lobɔkɔ ekangami na lobɔkɔ, nde moto mabe akozanga etumbu te; kasi libota na bayengebene ekobikisama.”—Masese 11:18-21.
Bavɛrsɛ oyo ezali kopesa liteya moko ya ntina na ndenge mingi: Loná boyengebene, okobuka mbano na yango. Moto mabe akoki ntango mosusu kobuka lokuta to kobɛta masano ya mbongo mpo na kozwa eloko oyo ayokeli yango mpasi te. Lokola azwi biloko na ndenge wana ya malamu te, mawa ekoki kokómela ye. Moto oyo asalaka mosala na ye na bosembo azwaka lifuti ya solo mpamba te ekobatela ye. Lokola andimami na Nzambe, moto ya bosembo akozwa bomoi ya seko. Kasi moto mabe akosuka ndenge nini? “Ata lobɔkɔ ekangami na lobɔkɔ” mpo na kobuba bato mosusu, moto mabe akozanga kozwa etumbu te. (Masese 2:21, 22) Oyo ezali mpenza mpo na kolendisa kolona boyengebene!
Kitoko ya solo mpo na moto ya mayele
Salomo alobi lisusu boye: “Lokola mpɛtɛ ya wolo na zolo ya ngulu, boye mwasi ya kitoko oyo azangi mayele.” (Masese 11:22) Mpɛtɛ ya zolo ezalaki biju oyo basi mingi bazalaki kolata na ntango ya kala. Mpɛtɛ ya wolo bakɔtisi na ngámbo moko ya zolo to na esika oyo ekaboli madusu ya zolo, ezalaki biju ya liboso oyo bato bazalaki komona epai ya mwasi. Biju ya kitoko ndenge wana ebongi ata moke te na zolo ya ngulu! Ezali ndenge moko na moto oyo azali kitoko, kasi azangi “mayele.” Azala mwasi to mobali, kitoko ebongi na ye te. Ezali na esika na yango te—azali kosepelisa ata moke te.
Ya solo, biso nyonso tolingaka tómonana kitoko na miso ya bato. Kasi mpo na nini komibanzabanza mingi koleka to komitungisa mpo na elongi to na nzoto na biso? Ezali na makambo ebele oyo tokoki kobongola yango te na nzoto na biso. Lisusu, kitoko ya nzoto ezali te eloko oyo eleki ntina. Mingi kati na bato oyo tolingaka mpe tosepelaka na bango bazali kaka lokola bato nyonso, boye te? Kitoko ya nzoto te nde epesaka bolamu. Oyo eleki ntina ezali kitoko ya kati oyo emonanaka na bizaleli malamu. Yango wana, tózala na mayele mpe tólona bizaleli ya ndenge wana.
“Moto oyo akabelaka basusu mingi, akokóma mafuta mingi”
Mokonzi Salomo alobi ete: “Mposa ya bayengebene ezali ya malamu mpenza; nde elikya ya bato mabe ezali nkanda.” Mpo na komonisa ete ezalaka bongo, abakisi boye: “Ezali na moto oyo azali kopanza mpe ata bongo azali kobakisama; mpe ezali na moto oyo azali koboya kosala oyo ezali malamu, kasi ekomema kaka na bobola.”—Masese 11:23, 24, NW.
Na ntango tozali kopanza, elingi koloba tozali kokabela basusu boyebi ya Liloba ya Nzambe, na ntembe te tozali mpe kokanga ntina malamu koleka ya boyebi yango na “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” na yango. (Baefese 3:18, NW) Kasi, moto oyo azali kosalela boyebi na ye te, akoki kobungisa yango. Ya solo, “moto oyo azali kolona mingi te akobuka mpe mingi te; mpe moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi.”—2 Bakolinti 9:6, NW.
Mokonzi akobi koloba ete: “Moto oyo akabelaka basusu mingi akokóma mafuta mingi [to na bozwi], mpe oyo azali kosopela baninga mai ebele ye mpe bakosopela ye mai ebele.” (Masese 11:25, NW) Ntango tozali kokanga lobɔkɔ te na ndenge ya kosalela ntango mpe biloko na biso mpo losambo ya solo ekende liboso, Yehova asepelaka na biso mingi. (Baebele 13:15, 16) ‘Akozipwela biso maninisa ya [likoló] mpe akosopela biso lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’ (Malaki 3:10) Kanisá kaka bomɛngo ya elimo oyo basaleli na ye bazali na yango lelo oyo!
Salomo apesi mpe ndakisa mosusu oyo emonisi bokeseni oyo ezali kati na bamposa ya moyengebene mpe ya moto mabe ntango alobi ete: “Ye oyo azali kobomba masango—bato bakolakela ye mabe, kasi lipamboli ezali epai na ye oyo atiki ete esombama.” (Masese 11:26, NW) Moto akoki kozwa litomba soki azali konduka biloko ntango ezali na ntalo moke, mpe kobomba yango tii ntango ekobunga na mboka mpe ekomata ntalo. Atako moto akoki komona mwa bolamu mpo abimisi biloko ebele te mpe mpo abombi yango, bato bayinaka moto oyo azali kosala makambo ya ndenge wana mpo azali koluka kaka bolamu na ye moko. Nzokande, moto oyo atɛkisi eloko oyo ezali komonana mpenza te na mboka na ntalo malamu mpo alingi te kozwela yango mbongo oyo eleki, bato bakosepela na ye mingi.
Mokonzi ya Yisalaele alendisi biso tólinga makambo ya malamu, to oyo ebongi, ntango alobi ete: “Ye oyo akoluka malamu na etingya akopambolama; nde ye oyo akoluka mobulu, yango ekoyela ye. Ye oyo akotalela bozwi na ye akokwea; nde bayengebene bakofuluka malamu lokola nkasa na nzete.”—Masese 11:27, 28.
Moyengebene akozwa milimo
Salomo amonisi ndenge oyo misala ya bozoba ebotaka mbuma mabe na maloba oyo: “Ye oyo azali kobendela libota na ye koyinama akozwa mopɛpɛ.” (Masese 11:29a, NW) Mpo na misala mabe na ye, Akana ‘amibendelaki koyinama,’ mpe ye moko na libota na ye babomamaki na mabanga. (Yosua, mokapo 7) Lelo oyo, mokonzi ya libota moko mpe basusu na kati ya libota na ye bakoki kosala makambo ya mabe oyo ekosala ete bábimisama na lisangá ya boklisto. Mobali azali kobendela libota na ye koyinama soki azali kobuka mibeko ya Nzambe to mpe ntango azali kokanga miso ntango masumu ya minene ezali kosalema na kati ya libota na ye. Ye moko mpe ntango mosusu bato na kati ya libota na ye bakobimisama na lisangá mpo bazali basali na mabe oyo baboyi kobongola motema. (1 Bakolinti 5:11-13) Mpe akozwa eloko nini? Mopɛpɛ mpamba—eloko oyo ezali na ntina moko te.
Vɛrsɛ yango ekobi boye: “Zoba akozala moombo ya moto ya motema ya bwanya.” (Masese 11:29b, NW) Lokola zoba azangi mayele ya bomoto, bakoki kopesa ye mikumba te. Lisusu, lokola ayebi kotambwisa makambo na ye moko malamu te, ekoki kosala ete azala na nyongo ya moto mosusu. Moto ya ndenge wana oyo azangi bwanya akoki mpe kokóma “moombo ya moto ya motema ya bwanya.” Tomoni polele ete ezali na ntina mingi tósalela bososoli mpe mayele ya bomoto na makambo na biso nyonso.
Mokonzi ya bwanya andimisi biso ete: “Litomba ya moyengebene ezali nzete ya bomoi; [ye oyo akozwa milimo azali na bwanya, NW].” (Masese 11:30) Esalemaka ndenge nini? Na maloba mpe na etamboli na ye, moyengebene amemelaka bato mosusu bilei ya elimo. Alendisaka bango na kosalela Yehova mpe na nsuka, bakoki kozwa bomoi oyo Nzambe apesaka.
‘Moto ya masumu akozwa mbano koleka’
Masese oyo tolobeli elendisi biso mpenza na kolona boyengebene. Salomo asaleli mpe ndenge mosusu motinda oyo elobi ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka,” na maloba oyo: “Talá! Moyengebene—na mabele akozwa mbano. Na koleka kutu moto mabe na moto ya masumu!—Masese 11:31, NW.
Ata soki moyengebene asali makasi asala makambo ya sembo, ntango mosusu abungaka nzela. (Mosakoli 7:20) “Akozwa mbano” mpo na mabunga na ye na nzela ya disiplini oyo bakopesa ye. Kasi ezali boni mpo na moto mabe oyo aponi etamboli ya mabe na nko mpe azali kosala molende te mpo na kozonga na nzela ya sembo? Ebongi mpenza ete azwa “mbano” ya monene koleka—etumbu ya makasi. Ntoma Petelo akomaki ete: “Soki moyengebene azali kobika na matata, moto oyo atyolaka Nzambe mpe mosumuki akomonana wapi?” (1 Petelo 4:18, NW) Yango wana, tiká tózwa ekateli ya komilonela mbuma ya boyengebene ntango nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 28]
“Malamu” ememelaki Abigaili “lokumu”
[Bililingi na lokasa 30]
‘Moto mabe akosalela lifuti na kozimbisa, nde moyengebene akozwa litomba ya solo’
[Elilingi na lokasa 31]
‘Loná mingi, okobuka mingi’