‘Nzambe andimaka moto malamu’
BOMOI nyonso eutaka na Yehova Nzambe. (Nzembo 36:9) “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Misala 17:28) Tozalaka mpenza na botɔndi soki tokanisi mbano oyo azali kopesa bato oyo bazali na boyokani malamu na ye! “Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko.” (Baloma 6:23) Ezali na ntina mpenza ete Yehova andima biso!
Mokomi ya nzembo alobi na biso ete ‘Nzambe apesaka ngɔlu.’ (Nzembo 84:11) Kasi, apesaka yango banani? Lelo oyo, mpo na komonisela moto mosusu ngɔlu, bato batalaka mingimingi bakelasi oyo moto yango atángá, bozwi na ye, soki azali mondele to moindo, moto ya ekólo nini, mpe makambo mosusu ya ndenge wana. Kasi, Nzambe apesaka banani ngɔlu? Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala apesi eyano oyo: “Yehova andimaka moto malamu, kasi alongisaka te moto ya makanisi mabe.”—Masese 12:2, NW.
Yango elingi koloba ete Yehova asepelaka na moto malamu, to moto ya bizaleli malamu. Moto malamu amityelaka mibeko, aponaka bilongi te, amikitisaka, azalaka na motema mawa mpe na bokɛngi. Makanisi na ye ezalaka sembo, maloba na ye elendisaka, misala na ye ezalaka na boyengebene mpe ememaka litomba. Eteni ya liboso ya mokanda ya Masese mokapo 12 ezali komonisa biso ndenge oyo motema malamu esengeli komonana na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe ezali komonisa matomba ya ezaleli yango. Soki totaleli makambo oyo ezali na mokapo yango, ekopesa biso “mayele mpo na kosala malamu.” (Nzembo 36:3, NW) Lisusu, Nzambe akondima biso soki tolandi toli na yango oyo etondi na bwanya.
Disipilini ezali na ntina mingi
Salomo alobi ete: “Ye oyo alingi [disipilini] alingi boyebi; nde ye oyo aboyi mpamela azali na [bozoba.]” (Masese 12:1) Lokola moto malamu alingaka kobongisa bomoto na ye, alukaka mpenza disipilini. Asalelaka nokinoki toli oyo ayokaka na makita ya lisangá to na masolo oyo asololaka na bato mosusu. Makambo oyo atángaka na kati ya Makomami mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia ezalaka lokola nzete oyo bazali kobɛta ye na yango na mopanzi mpo na kozongisa ye na nzela ya malamu. Alukaka boyebi mpe asalelaka yango mpo na kosembola banzela na ye. Ya solo, moto oyo alingaka disipilini alingaka mpe boyebi.
Disipilini, mpe mingimingi komityela mibeko ezali na ntina mingi epai ya basambeli ya solo! Tokoki kozala na mposa ya kokóma na boyebi mingi ya Liloba ya Nzambe. Tokoki mpe kozala na mposa ya kosala malamu na mosala ya kosakola mpe kozala bateyi malamu mpenza ya Liloba ya Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kasi, esɛngaka komityela mibeko mpo na kokokisa bamposa wana. Komityela mibeko ezali mpe na ntina na makambo mosusu. Na ndakisa, lelo oyo mikanda mpe bafilme oyo elamusaka bamposa ya mabe ezali beboo. Ezali kosɛnga mpenza ete moto amityela mibeko mpo na kopekisa miso na ye kotala makambo ya mabe! Lisusu, lokola “makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye,” makanisi mabe ekoki mpenza kouta na motema ya moto. (Genese 8:21) Ezali kosɛnga komityela mibeko mpo na kobengana makanisi mabe wana.
Nzokande, moto oyo aboyaka mpamela, alingaka disipilini te, alingaka mpe boyebi te. Lokola atikaka ete ezaleli mabe oyo bato bazalaka na yango ya koboya mpamela ezwa esika na motema na ye, akómaka lokola nyama, oyo ayebaka te kokesenisa na malamu na mabe. Tosengeli mpenza kokima ezaleli yango.
“Misisa oyo ekoki kopikolama te”
Moto malamu akoki kozala te moto oyo azangi boyengebene to bosembo. Yango wana, tosengeli mpe kozala na boyengebene mpo Yehova andima biso. Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Ɛ Yehova, yo okopambola moyengebene; okondima bango mpe yango ekozala lokola nde ozingeli bango na nguba monene.” (Nzembo 5:12, NW) Salomo amonisaki bokeseni oyo ezali kati na bomoi ya moyengebene na oyo ya moto mabe ntango alobaki boye: “Moto moko te akopikama mpenza mpo na mabe; nzokande, mosisa ya bayengebene ekoningana te.”—Masese 12:3, NW.
Moto mabe akoki komonana ete azali na bomoi ya malamu. Tótalela likambo oyo Asafa, mokomi moko ya nzembo, amonaki. Alobaki boye: “Kasi ngai nazalaki penepene ya kopɛngola [makolo] na ngai, matambe na ngai malingaki koselimwa.” Mpo na nini bongo? Asafa ayanoli ete: “Nazalaki na zuwa epai ya bato [ya lofundo, NW], wana emonaki ngai esengo ya bato mabe.” (Nzembo 73:2, 3) Kasi, ntango akɔtaki na tempelo ya Nzambe, asosolaki ete Yehova atye bango na esika ya moselu. (Nzembo 73:17, 18) Nyonso oyo tokoki komona lokola kolonga ya moto mabe ezali kaka mpo na mwa ntango. Ntina mpenza ya koyokela bango zuwa ezali te!
Nzokande, moto oyo andimami na Yehova atɛngatɛngaka te. Salomo asalelaki elilingi ya nzete oyo epiki misisa na yango makasi mpe alobaki boye: “Bato malamu bazali na misisa oyo ekoki kopikolama te.” (Masese 12:3, The New English Bible) Misisa ya nzete ya monene ekoki kozwa etando monene mpenza na kati ya mabele mpe ekoki kosimba nzete yango na esika na yango ata soki mpela eyei to mpe mipɛpɛ ya makasi ebɛti yango. Nzete monene ekoki kotikala na esika na yango ata soki mabele eningani makasi.
Lokola misisa ya ndenge wana na mabele ya malamu, esengeli mpenza ete makanisi mpe mitema na biso ekɔta na kati ya Liloba ya Nzambe mpo na kobenda mai ya bomoi oyo ezali na kati na yango. Na ndenge wana, kondima na biso ekopikama mpe ekokóma makasi, mpe elikya na biso ekotɛngatɛnga te. (Baebele 6:19) ‘Tokomemama te epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya [ya lokuta].’ (Baefese 4:14) Ya solo, tokoki koyoka mpasi oyo komekama makasi ebimisaka mpe tokoki ata kolɛnga liboso ya mikakatano. Kasi ‘mosisa na biso ekoningana te.’
‘Mwasi ya makoki azali motole ya mobali na ye’
Bato mingi bayebi maloba oyo: “Soki omoni mobali moko azali kosala makambo na ye nyonso malamu, yebá ete azali na mwasi ya malamu.” Mpo na komonisa ntina ya kozala na mwasi oyo azali mpenza mosungi, Salomo alobi boye: “Mwasi [ya makoki] azali motole ya mobali na ye; nde mwasi oyo akoyeisa nsɔni azali lokola kopɔla kati na mikuwa na ye.” (Masese 12:4) Maloba “ya makoki” ezali komonisa ebele ya bizaleli oyo emonisaka motema malamu. Kati na bizaleli malamu ya mwasi malamu oyo Masese mokapo 31 elobeli, tokoki kotánga molende na mosala, bosembo, mpe bwanya. Mwasi oyo azali na bizaleli wana azali motole mpo na mobali na ye mpamba te etamboli na ye ya malamu epesaka mobali na ye lokumu mpe kilo na miso ya bato. Mwasi yango alukaka kozala na esika ya liboso te to alukaka te kowelana na mobali na ye mpo bato bámona ye. Azalaka nde mosungi ya mobali na ye.
Ndenge nini mwasi akoki koyeisa nsɔni, mpe mbuma nini yango ekoki kobota? Makambo yango ya nsɔni ezali na ndakisa kozala mwasi ya matata to mpe kosala ekobo. (Masese 7:10-23; 19:13) Makambo ya ndenge wana esilisaka lokumu ya mobali na ye. Buku moko elobi ete maloba oyo Biblia esaleli ete azali lokola “kopɔla kati na mikuwa na ye” elimboli ete “abebisaka mobali na ye lokola maladi oyo esilisaka makasi na nzoto.” Buku mosusu elobi ete “liloba oyo tokoki kosalela na esika wana lelo oyo ezali ‘kanser,’ maladi oyo esilisaka makasi ya moto mokemoke.” Tiká ete basi baklisto bámonisaka bizaleli malamu ya mwasi ya makoki, yango nde ekolakisa ete bazali kosala makasi mpo Nzambe andima bango.
Kokanisa etindaka na kosala, mpe kosala ebotaka mbuma
Kokanisa etindaka na kosala; bongo na nsima, kosala ebotaka mbuma. Salomo amonisaki ndenge oyo kokanisa esukaka na kosala ntango alobelaki bokeseni kati na moto ya sembo na moto mabe. Alobaki boye: “Makanisi ya bayengebene ezali sembo; nde toli ya bato mabe ekozimbisa. Maloba na bato mabe ezali [mitambo] mpo na kosopa makila; kasi monɔkɔ ya basembwi ekobikisa bango.”—Masese 12:5, 6.
Makanisi ya bato malamu ezalaka mabe te mpe etalelaka makambo ya malamu mpe ya sembo. Lokola balingaka Nzambe mpe bazalani na bango, bato ya sembo bazalaka na mikano ya malamu. Kasi, bato mabe balukaka kaka bolamu na bango moko. Yango wana, basalelaka mayele mabe mpo na kokokisa mikano na bango. Misala na bango etondi na lokuta. Bakakatanaka te kokosela moto oyo asali likambo te makambo, mbala mosusu na tribinale. Maloba na bango ezali “mitambo mpo na kosopa makila” mpamba te balukaka kosala bato mabe. Bato ya sembo bakoki kokima likama yango, mpamba te bayebi mikano ya bato mabe mpe bazali na bwanya oyo ekoki mpo na kozala ekɛngɛ. Bakoki ata kokebisa bato oyo bazali ekɛngɛ te mpe kobikisa bango na mitambo ya bato mabe.
Moto ya sembo akosuka ndenge nini mpe moto mabe akosuka ndenge nini? Salomo apesi eyano oyo: “Bato mabe bakweisami, bazali lisusu te; nde ndako ya bayengebene ezali kotɛlɛma.” (Masese 12:7) Buku moko elobi ete ndako oyo balobeli na vɛrsɛ yango “elimboli esika oyo moto afandaka mpe biloko na ye ya motuya, oyo esalisaka ye na bomoi na ye.” Ekoki mpe kolimbola libota mpe bana na bankɔkɔ ya moto ya sembo. Ezala na ndimbola nini, likanisi ya lisese ezali polele: Mikakatano ekolonga te kokweisa moto ya sembo.
Moto ya komikitisa akozala malamu
Mpo na komonisa ntina ya bososoli, mokonzi ya Yisalaele alobi boye: “Moto akosanzolama mpo na [monɔkɔ ya] mayele na ye; nde oyo na motema ya kozimbisa akotyolama.” (Masese 12:8) Moto oyo azali na bososoli awelaka kobimisa maloba na monɔkɔ na ye te. Akanisaka liboso ya koloba mpe ayokanaka malamu na bato mosusu mpamba te “monɔkɔ ya mayele” etindaka ye na kopona malamu maloba oyo akobimisa. Ntango bazali kotuna ye mituna ezangi ntina to makanisi ya mpamba, moto oyo azali na bososoli ‘azalaka na maloba mingi te.’ (Masese 17:27) Moto ya ndenge wana azwaka lokumu mpe Yehova asepelaka na ye. Moto yango akeseni mpenza na moto oyo makanisi na ye etɛngamá, oyo eutaka na ‘motema ya kozimbisa’!
Ya solo, moto ya mayele azwaka lokumu, kasi vɛrsɛ oyo elandi ezali koteya biso ntina ya komikitisa. Elobi boye: “Oyo na lokumu moke nde azali na moombo aleki ye oyo akomikumisa nde azangi kwanga.” (Masese 12:9) Ekoki kozala ete Salomo azalaki koloba ete eleki malamu kozala moto ya komikitisa oyo azali na bozwi mingi te, oyo azali kaka na mosaleli moko, na esika ya kobebisa mbongo oyo ekoki mpo na kosomba biloko ya ntina na koluka kozala na bomoi ya moto monene. Toli yango ezali malamu mpenza mpo na biso: tólukaka bomoi ya mindɔndɔ te, tósepelaka na oyo tozali na yango!
Bilanga mpe mosala ya kobɔkɔla bibwele eteyi biso makambo etali motema malamu
Salomo akanisaki mosala ya bilanga mpe ya kobɔkɔla bibwele mpo na koteya biso makambo mibale oyo emonisi motema malamu. Alobaki boye: “Moyengebene akobatela bomoi ya bibwele na ye, nde motema ya bato mabe ezali na yauli.” (Masese 12:10) Moto ya sembo abɔkɔlaka bibwele na ye na boboto. Ayebaka bamposa na yango mpe alukaka bolamu na yango. Moto mabe akoki koloba ete amibanzabanzaka mpo na banyama, kasi akanisaka mpenza bamposa na yango te. Alukaka nde matomba na ye moko, mpe abatelaka banyama kaka mpo na litomba oyo akoki kozwela yango. Ndenge ya kobatela bibwele oyo ye azali kokanisa ete ezali malamu ekoki kozala nde konyokola yango.
Kobatela bibwele na boboto etaleli mpe mbwa, nyau to nyama mosusu oyo tozali kobɔkɔla na ndako. Ezali mpenza mabe kosomba nyama ya kobɔkɔla, bongo na nsima, konyokola to kosundola yango! Soki nyama ezali na maladi makasi to na mpota oyo ezali konyokola yango, ntango mosusu boboto esɛngaka koboma yango.
Salomo akanisaki likambo mosusu oyo esalemaka na mosala ya bilanga, elingi koloba kobalola mabele, mpe alobaki boye: “Ye oyo [akobalola] mabele na ye akotonda na kwanga.” Ya solo, moto oyo amipesaka na mosala makasi azwaka matomba. Kasi, “ye oyo [akolanda] makambo ya mpamba azangi mayele.” (Masese 12:11) Lokola azali na bososoli te, moto oyo “azangi mayele” alandaka misala ya mpambampamba, oyo ekoki kozala likama, mpe ezali na litomba te. Mateya oyo tokoki kozwa na bavɛrsɛ yango mibale ezali komonana polele: Kozala na boboto mpe kolinga mosala.
Bomoi ya moyengebene ebongaka
Mokonzi ya bwanya alobaki ete: “Moto mabe azali na mposa ya [biloko] ya bato mabe.” (Masese 12:12a) Moto mabe asalaka yango ndenge nini? Na ndenge alulaka biloko oyo bato yango bazwaka na banzela ya mabe.
Tokoki koloba boni mpo na moto malamu? Moto yango alingaka disipilini mpe kondima na ye epikami makasi. Azali na boyengebene, na bosembo, na mayele, na komikitisa, na boboto mpe amipesaka na mosala. Salomo alobaki lisusu ete: “Mosisa ya bayengebene ebotaka mbuma.” (Masese 12:12b, NW) Biblia moko ya Lingelesi (An American Translation) elobi ete: “Mosisa ya moyengebene ekotikala libela.” Moto ya ndenge wana apikami makasi mpe azali na bomoi ya kimya. Ya solo, ‘Nzambe andimaka moto malamu.’ Yango wana, tiká ‘tózala na elikya epai ya Yehova mpe tósalaka malamu.’—Nzembo 37:3.
[Bililingi na lokasa 31]
Lokola nzete ya makasi, kondima ya moyengebene epikami makasi