“Ye oyo akotosa mpamela azali na mayele”
MASESE 23:12 elobi ete: “Tyá motema na yo mpo na kolakisama mpe matoi na yo na maloba ya boyebi.” Kolakisama to kosembolama oyo balobeli na vɛrsɛ oyo elakisi kaka koyeba komipekisa biso moko te, kasi mpe mpamela oyo tokoki kozwa epai ya bato mosusu. Mpo na kosembola, esɛngaka koyeba makambo oyo esengeli kosembola mpe ndenge ya kosala yango. Yango wana, “maloba ya boyebi” oyo euti na esika moko ya malamu mpenza ezali na ntina mingi mpo na kosembola.
Mokanda ya Masese etondi mpenza na maloba ya bwanya. Masese oyo ezali wana ezali “mpo na koyeba mayele mpe kolakisama . . . Ɛɛ, kolakisama ya mayele mpe boyengebene mpe kosambisa na sembo mpe kokata na solo.” (Masese 1:1-3) Tokomonisa bwanya soki tozali ‘kotya matoi na biso’ na masese yango. Masese mokapo 15 ezali na batoli ya malamu mpenza oyo ekoki kosalisa moto alonga nkanda, asalela lolemo na ndenge ya malamu, mpe apalanganisa boyebi. Tiká tótalela mwa bavɛrsɛ ya mokapo yango.
Nini “epɛngolaka nkanda”?
Mpo na komonisa ete maloba ekoki kokitisa to komatisa nkanda, Mokonzi Salomo alobi boye: “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda, nde liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Masese 15:1) Soki moto asiliki mpo asepeli te na likambo moko, balobaka ete azali na “nkanda.” Nzokande, “nkɛlɛ” ezali nkanda ya makasi oyo ezalaka mpasi mpo na kolonga yango. Ndenge nini vɛrsɛ wana ekoki kosalisa biso mpo na kokitisa nkanda ya moto mosusu to oyo ya biso moko?
Maloba ya mabe ekoki kopelisa lisusu mɔtɔ. Epai mosusu, koyanola moto na boboto, mbala mingi ebomaka mɔtɔ. Toboyi te, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kozongisela moto oyo asiliki maloba ya boboto. Kasi, soki toluki koyeba ntina oyo asiliki, yango ekoki kosalisa biso. Biblia elobi ete: “Bososoli ya moto ya mayele [ekokitisa, NW] nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” (Masese 19:11) Ekoki nde kozala ete moto azali kosilika mpo akanisi ete omonaka ye mpamba to ete okipaka ye te? Ekoki kozala ete moto yango asiliki te mpo na likambo oyo tolobi to tosali. Soki moto alobeli biso mabe na mosala ya kosakola, mbala mingi ezalaka mpo bayebisá ye makambo ya lokuta na ntina na bindimeli na biso to mpo mateya ya lokuta ekangá ye miso. Tosengeli te koloba ete moto yango atumoli biso mpe kobanda kozongisela ye maloba mabe. Ata soki toyebi te ntina oyo moto azali kosilika, soki tokateli ye mangala, yango ekomonisa ete toyebi komipekisa te. Tókeba na kokatela bato mangala.
Toli oyo elobi ete tóyanolaka bato na boboto ekoki mpe kosalisa biso mpo na kokitisa nkanda na biso moko. Tokoki kosalela toli yango mpo na koyekola kolobaka na bato makambo oyo ekozokisa bango te ata soki tosiliki to tosepeli te. Soki moto moko ya libota na biso asali likambo oyo tosepeli na yango te, na esika tóloba na ye maloba makasimakasi to tóbamba ye bankombo, tosengeli kosala makasi tóloba na ye na boboto. Mbala mingi, soki olobeli moto mabe, ye mpe akozongisa. Soki tomonisi moto na boboto ete tosepeli te na likambo boye to boye, akoyoka mabe te mpe akoki ata kosɛnga biso bolimbisi.
“Lolemo ya bato ya mayele ekososolisa”
Soki toyebi komipekisa, elobeli na biso mpe maloba oyo tokobimisa ekozala ya malamu. Salomo alobaki boye: “Lolemo ya bato ya mayele ekososolisa boyebi malamu, kasi monɔkɔ ya bilema [ekosopa bozoba, NW].” (Masese 15:2) Ntango tokómi na mposa ya kosalisa basusu mpe tozali koyebisa bango mokano ya Nzambe mpe makambo kitoko oyo azali kosala, tozali ‘kososolisa na boyebi,’ boye te? Elema akoki kosala yango te, mpo azangi boyebi.
Liboso ya kopesa batoli mosusu oyo etali lolenge ya kosalela lolemo, Salomo alobaki likambo moko oyo ekoki kotinda biso tókanisa. “Miso ya [Yehova] ezali na bipai nyonso, kotalaka mabe mpe malamu.” (Masese 15:3) Tokoki mpenza kozala na esengo, mpamba te Biblia elobi ete: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Nzambe ayebaka soki tozali kosala malamu. Amonaka mpe bato oyo bazali kosala mabe mpe akosambisa bango.
Salomo amonisi ntina mosusu ya kozala na maloba ya boboto: “Lolemo ya elengi ezali lokola nzete ya bomɔi, nde mobulu kati na yango ekobukabuka molimo.” (Masese 15:4) Maloba “nzete ya bomoi” ezali komonisa likoki ya kobikisa mpe ya kolendisa. (Emoniseli 22:2) Maloba ya boboto ya moto ya bwanya ekitisaka mitema ya bato oyo bazali koyoka yango mpe etindaka bango básala malamu. Nzokande, maloba ya bokosi to ya mabe ebukabukaka to elɛmbisaka bato oyo bazali koyoka yango.
Kolakisama mpe “kopalanganisa boyebi”
Salomo alobi lisusu boye: “Elema akotyola mateya ya tata na ye, nde ye oyo akotosa mpamela azali na mayele.” (Masese 15:5) Ndenge nini moto akoki ‘kotosa mpamela’ soki bapameli ye te? Vɛrsɛ oyo ezali komonisa ete soki moto asali mabe, tosengeli kopamela ye. Na kati ya libota, baboti, mingimingi tata, nde bazali na mokumba ya kosembola bana, mpe bana basengeli kondima kosembolama. (Baefese 6:1-3) Kasi, basaleli nyonso ya Yehova basembolamaka na lolenge moko to mosusu. Totángaka na Baebele 12:6 boye: “Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka; ya solo, abɛtaka fimbo na moto nyonso oyo ye azali kozwa lokola mwana.” Ndenge oyo totalelaka disipilini ekomonisa soki tozali bato ya bwanya to bazoba.
Salomo amonisaki bokeseni mosusu na kati ya moto ya bwanya mpe zoba na maloba oyo: “Bibɛbu ya bato ya mayele ekopalanganisa boyebi; nde motema ya bato mabe ezali bongo te.” (Masese 15:7) Kopalanganisa boyebi ezali lokola kobwaka mboto. Moloni ya bilanga abwakaka mboto na ye nyonso na esika moko te. Apanzaka yango mokemoke na elanga mobimba. Kopalanganisa boyebi ezali mpe bongo. Na ndakisa, ntango tokutani na moto moko na mosala ya kosakola, ekozala bwanya te soki toluki kosopela ye boyebi nyonso oyo tozali na yango ya Biblia na mbala moko. Moto ya bwanya ayebaka komipekisa ntango azali koloba. ‘Apalanganisaka’ boyebi mokemoke, wana azali kolobela kaka liteya moko ya Biblia na mbala, mpe na kotalela ndenge moto oyo azali kosolola na ye azali kotalela makambo yango, abakisaka makambo mosusu, mpe bongo na bongo. Ndakisa na biso Yesu Klisto asalaki bongo ntango asololaki na mwasi moko ya Samalia.—Yoane 4:7-26.
Kopalanganisa boyebi esɛngaka koyebisa moto likambo moko oyo ekoteya ye mpe ekosalisa ye. Mpo na koyebisa moto makambo oyo ekopesa ye boyebi mpe ekolendisa ye, esɛngaka komibongisa. Yango wana, “motema ya moyengebene [ekanisaka, NW] liboso ya kozongisa liloba.” (Masese 15:28) Maloba na biso esengeli kozalaka lokola mai ya mbula oyo ezali kopɔlisa mabelé mokemoke mpe kokómisa yango kitoko, kasi te lokola mai oyo ezali kotiyola makasi mpe komema eloko nyonso oyo ekutani na yango.
Tózala ‘basantu na etamboli na biso’
Na ntembe te, kopalanganisa boyebi na ntina na Yehova mpe mikano na ye mpe kopesa ye “mbuma ya mbɛbu na biso” lokola “mbeka ya lisanzoli” ezali bwanya. (Baebele 13:15) Nzokande, mpo Nzambe andima mbeka yango, tosengeli kozala ‘basantu na kati ya etamboli na biso mobimba.’ (1 Petelo 1:14-16) Salomo amonisi likambo yango polele na masese mibale oyo elandi: “[Likabo, NW] ya bato mabe eboyami na [Yehova], nde kobondela ya bayengebene ezali esengo na ye. Nzela ya moto mabe eboyami na [Yehova], nde alingani na ye oyo [alandi, NW] boyɛngɛbɛnɛ.”—Masese 15:8, 9.
Ndenge nini baoyo batiki nzela ya bomoi batalelaka mpamela, mpe bakosuka ndenge nini? (Matai 7:13, 14) “Kolakisama eyokani na mpasi epai ya mopɛngwi na nzela, nde ye oyo akoboya mpamela akokufa.” (Masese 15:10) Na esika ya kondima mpamela oyo euti epai ya bankulutu mpe kobongola mpenza motema, bamosusu baponaka nde kotika nzela ya boyengebene. Oyo nde bozoba! Na Bible na lingala ya lelo oyo, vɛrsɛ yango (Batoli 15:10) elobi boye: “Moto oyo atiki nzela ya malamu azwaka etumbu ya makasi; koboya batoli ememaka moto na liwa.”
Ezali boni soki moto moko asali lokola andimi mpamela, kasi na motema ayini to aboyi yango? Yango mpe ezali bozoba. Mokonzi Salomo alobi boye: “Nkunda mpe esika ya libebi ezali liboso ya Yehova. Na koleka boni mitema ya bana ya bato!” (Masese 15:11, NW) Na ndenge ya elimo, eloko moko te ezali mosika na Nzambe ya bomoi koleka nkunda, esika ya bakufi. Atako bongo, ezali liboso na ye. Ayebi mokufi mokomoko malamu mpenza mpe akoki kosekwisa ye. (Nzembo 139:8; Yoane 5:28, 29) Yango wana, ezali mpasi te mpo na Yehova koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato. Ntoma Paulo akomaki boye: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13) Tokoki kokosa bato, kasi Nzambe te.
Moto oyo alingaka te básembola ye ayinaka mpamela mpe bato oyo balingi kosembola ye. Salomo alobi boye: “Motyoli alingi te ye oyo akopamela ye.” Mpo na konyata lisusu, abakisaki boye: “Akokenda epai ya moto ya mayele mpe te.” (Masese 15:12) Ezali mpenza mpasi mpo moto ya ndenge wana asembwama!
Tózangaka esengo te
Salomo asalelaki liloba “motema” na bavɛrsɛ misato oyo elandi. Mpo na komonisa ndenge makambo oyo ezali na motema na biso ekoki komonana na makambo oyo tozali kosala, Mokonzi Salomo alobi boye: “Motema ya esengo ekopelisa elongi, nde mawa na motema ekobuka molimo.”—Masese 15:13.
Nini ekoki koyokisa moto mpasi na motema? Biblia elobi ete: “Bozito ya motema ya moto ekokitisa yango [na mawa].” (Masese 12:25) Ndenge nini tokoki koboya ete mikakatano ya bomoi elɛmbisa motema na biso? Na esika tómitungisaka ntango nyonso mpo na mikakatano oyo tokoki kosilisa te, tokoki nde kokanisaka ebele ya mapamboli ya elimo oyo Yehova azali kosopela biso lelo oyo mpe makambo oyo akosalela biso na mikolo ekoya. Yango ekosala ete tópusana mpenza penepene na ye. Ɛɛ, kopusana penepene na “Nzambe ya esengo” ekozanga te kobongola mawa na biso esengo.—1 Timote 1:11.
Lisusu, nsango ya Biblia ebɔndisaka mpenza mpe epesaka esengo. Mokomi ya nzembo alobaki ete moto oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi,” azali moto ya esengo. (Nzembo 1:1, 2) Ata ntango toyoki mawa na motema, kotánga Biblia mpe kokanisa na mozindo makambo oyo totángi ekolendisa biso. Ezali mpe ndenge moko mpo na mosala na biso ya kosakola. Biblia elobi ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo.”—Nzembo 126:5.
Salomo alobi boye: “Motema ya moto ya bososoli ekoluka boyebi, nde minɔkɔ ya bilema ekolyaka zoba.” (Masese 15:14) Vɛrsɛ oyo esalisi biso tómona bokeseni oyo ezali na kati ya toli ya moto ya bwanya mpe oyo ya elema. Liboso ya kopesa moto mosusu toli, moto ya bososoli alukaka boyebi. Ayokaka liboso moto yango mpo na koyeba makambo nyonso. Alukaka na Makomami mpo na kozwa mibeko mpe mitinda oyo ekoki kosalelama na likambo yango. Toli na ye eutaka na Liloba ya Nzambe. Nzokande, elema amonaka te ntina ya koluka koyeba likambo malamumalamu, mpe alobaka kaka oyo ye akanisi. Yango wana, soki tozali koluka toli, tosengeli te kokende epai ya moto oyo akoluka kaka kosepelisa biso. Ekozala malamu tókende epai ya moto ya mayele mpe oyo akɔmɛlá. Oyo nde esengo ya kozala na “makabo oyo ezali bato” na kati ya lisangá, oyo ‘balukaka boyebi’ liboso ya kopesa toli!—Baefese 4:8.
Vɛrsɛ oyo elandi emonisi mpenza litomba ya kozalaka ntango nyonso na esengo. Mokonzi Salomo alobi boye: “Mikolo nyonso ya banyokolami ezali mabe, nde ye oyo azali na motema ya esengo akolyaka elambo ntango nyonso.” (Masese 15:15) Bomoi ezalaka na bantango ya esengo mpe ya mpasi, ya kosepela mpe ya kolela. Soki tozali kotala kaka bampasi na biso, mitema na biso ekozala ntango nyonso na mawa mpe tokozala na esengo ata mokolo moko te. Nzokande, soki tozali ntango nyonso kokanisa mapamboli oyo tozwá mpe elikya oyo Nzambe apesi biso, tokobosana bampasi na biso mpe tokozala na mitema ya esengo. Kozala na motema ya esengo ekosala ete tózalaka ntango nyonso na “elambo.”
Na yango, tiká ete, na makanisi, na maloba, na misala mpe na lolenge na biso ya kotalela makambo, tótalelaka batoli to mpamela na motuya mingi.
[Elilingi na lokasa 13]
“Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda”
[Elilingi na lokasa 15]
Baboti nde bazali na mokumba ya kosembola bana
[Elilingi na lokasa 15]
“Bibɛbu ya bato ya mayele ekopalanganisa boyebi”