MOKAPO 9
‘Kimá pite’
“Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”—BAKOLOSE 3:5.
1, 2. Balaama asalelaki mayele nini mpo na kosala libota ya Yehova mabe?
MOBOMI-MBISI akei na esika oyo ayebi ete mbisi ezalaka mingi. Azali na mposa ya kokanga lolenge moko boye ya mbisi. Aponi malamu mpambo na ye, akɔtisi yango na ndɔbɔ mpe abwaki ndɔbɔ na mai. Mwa moke na nsima, amoni nsinga ebendani, nzete egumbami, mpe abimisi mbisi na mai. Asɛki mwa moke; amoni ete aponaki mpambo ya malamu.
2 Na mobu 1473 L.T.B., mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Balaama akanisaki mingi mpo na koyeba mpambo oyo asengeli kosalela. Kasi, ye azalaki na mokano ya kokweisa basaleli ya Nzambe oyo, na ntango wana, bazalaki na mokili ya Moabe, pembeni ya Mokili ya Ndaka. Balaama azalaki koloba ete azali mosakoli ya Yehova, kasi azalaki nde moto ya lokoso oyo andimaki báfuta ye mpo alakela Yisraele mabe. Kasi, Yehova abongolaki makambo mpe Balaama apambolaki nde Yisraele. Lokola Balaama azalaki na mposa ya kozwa lifuti oyo balakaki ye, amonaki ete Nzambe ye moko akoki kolakela libota na ye mabe soki bakwei na lisumu ya monene. Mpo na yango, Balaama asalelaki bilenge basi kitoko ya Moabe lokola mpambo.—Mitángo 22:1-7; 31:15, 16; Emoniseli 2:14.
3. Mayele mabe ya Balaama elongaki mpenza?
3 Mayele mabe na ye elongaki? Tokoki koloba ete elongaki mwa moke. Bankóto ya mibali ya Yisraele bakweaki na motambo na ndenge basalaki “pite ná bana basi ya Moabe.” Kutu, bakómaki kosambela banzambe ya Moabe, ata mpe Baala ya Peore, nzambe ya kobota, to ya kosangisa nzoto. Na nsuka, Bayisraele 24 000 bakufaki, nzokande bakómaki mpenza pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Ezalaki likambo ya mawa mpenza!—Mitángo 25:1-9.
4. Mpo na nini bankóto ya Bayisraele bakweaki na motambo ya pite?
4 Nini ekómisaki bango tii na likambo mabe wana? Bato mingi babebisaki mitema na bango na ndenge batikaki Yehova, Nzambe oyo alongolaki bango na boombo na Ezipito, aleisaki bango na esobe, mpe abatelaki bango mpo bákɔta na Mokili ya Ndaka. (Baebre 3:12) Mpo na likambo yango, ntoma Paulo akomaki boye: “Tósalaka mpe pite te, ndenge bamosusu na bango basalaki pite, mpe bakweaki, nkóto ntuku mibale na misato (23 000) na mokolo moko.”a—1 Bakorinti 10:8.
5, 6. Mpo na nini lisolo oyo elobeli lisumu ya Bayisraele na mokili ya Moabe ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo?
5 Lisolo wana oyo ezali na mokanda ya Mitángo ezali na mateya mingi ya ntina mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo, baoyo bazali pene mpenza ya mokili ya ndaka ya malamu koleka. (1 Bakorinti 10:11) Na ndakisa, ndenge oyo bato ya mokili bamipesi mingi na makambo ya kosangisa nzoto ezali komonisa ezaleli ya bato ya Moabe; kutu, lelo oyo ezaleli yango epalangani mingi koleka. Longola yango, mbula na mbula, bankóto ya bakristo bazali kokwea na pite—motambo monene oyo ekweisaki Bayisraele. (2 Bakorinti 2:11) Lisusu, na ndakisa ya Zimiri, oyo abangaki te kokɔta na mwasi ya Midyani na kaa ya Yisraele mpe amemaki ye tii na hema na ye, lelo oyo bato mosusu oyo basanganaka na basaleli ya Nzambe bazali kokɔtisa etamboli ya mbindo na kati ya lisangá.—Mitángo 25:6, 14; Yuda 4.
6 Ozali komimona ete ozali na esika oyo ekokani na mokili ya Moabe? Ozali komona ete mosika te okokɔta na mokili ya sika oyo tozelaka banda kala? Soki ezali bongo, salá nyonso oyo okoki mpo na kotosa mobeko ya Nzambe oyo elobi ete, “Bókima pite” mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.—1 Bakorinti 6:18.
PITE EZALI NINI?
7, 8. “Pite” ezali nini, mpe na ndenge nini bato oyo basalaka yango babukaka mbuma oyo balonaka?
7 Na Biblia, liloba “pite” (na Grɛki pornéïa) esalelami mpo na kolobela makambo nyonso ya kosangisa nzoto oyo Nzambe apekisi. Yango esangisi makambo lokola ekobo, kindumba, kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te, ata mpe kosangisa nzoto na monɔkɔ to na esumbeli mpe kosimbasimba binama ya kobotela ya moto oyo azali molongani na yo te. Ezali mpe bongo soki makambo yango esalemi kati na mibali na mibali to basi na basi, ata mpe kosangisa nzoto ná nyama.b
8 Biblia elobi polele ete bato oyo basalaka pite bakoki kotikala na kati ya lisangá ya bokristo te mpe bakozwa bomoi ya seko te. (1 Bakorinti 6:9; Emoniseli 22:15) Longola yango, bato yango bazali komisala mabe mingi ata sikoyo mpamba te, bazalani na bango bazali lisusu kotyela bango motema te, bazali komisambwisa, bazali kokɔtisa matata na mabala na bango, lisosoli na bango ezali kotungisama ntango nyonso, bazali kozwa bazemi oyo bakanaki te, bazali kozwa bamaladi ya mabe, bamosusu kutu bazali kokufa. (Tángá Bagalatia 6:7, 8.) Ezali mpenza bozoba kosala likambo oyo ekomemela biso mitungisi. Kasi, bato mingi bakanisaka te makambo oyo ekoki koyela bango ntango bazali kosala likambo oyo, mbala mingi, ememaka na pite: kotala bililingi ya makambo ya nsɔni.
KOTALA BILILINGI YA MAKAMBO YA NSƆNI: LIKAMBO YA LIBOSO OYO EMEMAKA NA PITE
9. Ezali solo ete kotala bililingi ya makambo ya nsɔni ezali na likama moko te, ndenge bato mosusu balobaka? Limbolá.
9 Na mikili mingi, makambo ya nsɔni elakisamaka polele na bililingi na bisika oyo batɛkaka bazulunalo, elobelamaka na banzembo, elakisamaka na televizyo, mpe etondi mɛkɛ na Internet.c Yango ezali na likama moko te, ndenge bato mosusu balobaka? Ezali bongo te! Bato oyo batalaka bililingi ya makambo ya nsɔni bakoki kokóma na momeseno ya kosakana na binama ya kobotela mpe na “bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni,” oyo ekoki kokómisa bango baombo ya pite, ya mposa ya kosala makambo oyo ebongi te; bakoki mpe kobebisa boyokani na bango ná balongani na bango, ata mpe koboma mabala na bango.d (Baroma 1:24-27; Baefese 4:19) Moto moko ya mayele akokanisaki kozala moombo ya pite na maladi ya kanser. Alobaki boye: “Ekobaka kokola mpe kopalangana. Esalemaka mingi te ete elimwa yango moko, mpe ezali mpasi mpo na kosilisa yango.”
10. Ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Yakobo 1:14, 15? (Talá mpe etanda “Nazwaki makasi ya kotika misala ya mbindo.”)
10 Tótalela maloba ya Yakobo 1:14, 15: “Kasi moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; lisumu mpe, ntango esalemi, eboti liwa.” Yango wana, soki mposa moko ya mabe ebandi koyela yo, benganá yango mbala moko! Na ndakisa, soki miso na yo ekwei na bililingi ya mabe, longolá yango nokinoki, kangá ordinatɛrɛ, to luká emisyo mosusu na televizyo. Salá nyonso oyo esengeli mpo olongola mposa ya pite liboso ezwa misisa na motema na yo mpe elonga yo!—Tángá Matai 5:29, 30.
11. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka Yehova motema ntango tozali kobundisa bamposa ya mabe?
11 Lokola Nzambe ayebi biso malamu koleka biso moko, ayebi ntina oyo alendisi biso ete: “Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Bakolose 3:5) Toboyi te, kosala yango ezali pɛtɛɛ te. Kasi, tóbosana te ete tozali na Tata ya likoló oyo atondi na bolingo mpe na motema molai, oyo tokoki kobelela. (Nzembo 68:19) Yango wana, ntango makanisi ya mabe ebandi koyela yo, bondelá ye nokinoki. Sɛngá ye “nguya oyo eleki makasi,” mpe salá makasi otya makanisi na yo na makambo mosusu.—2 Bakorinti 4:7; 1 Bakorinti 9:27; talá etanda “Ndenge nini nakoki kolonga momeseno ya mabe?”
12. “Motema” na biso ezali nini mpe mpo na nini tosengeli kobatela yango?
12 Salomo, moto ya bwanya, akomaki boye: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23) “Motema” na biso ezali bomoto na biso ya kati, to ndenge oyo tomonanaka mpenza na miso ya Nzambe. Lisusu, ezali ndenge oyo Nzambe atalelaka “motema” na biso, kasi te ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato nde ekokata soki tokozwa bomoi ya seko to te. Likambo yango esengeli kotinda biso tókanisa malamu. Yobo, moto moko ya sembo, asalaki kondimana, to boyokani, ná miso na ye mpo atala te mwasi na mposa ya mabe. (Yobo 31:1) Yango ezali ndakisa malamu mpo na biso! Mokomi ya nzembo amonisaki mpe makanisi ya ndenge wana ntango abondelaki ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.”—Nzembo 119:37.
DINA APONAKI BANINGA MABE
13. Dina azalaki nani, mpe mpo na nini tokoki koloba ete aponaki baninga mabe?
13 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3, baninga na biso bakoki kobongisa bizaleli na biso to kobebisa yango. (Masese 13:20; tángá 1 Bakorinti 15:33.) Tótalela ndakisa ya Dina, mwana ya Yakobo. Atako baboti na ye babɔkɔlaki ye malamu, Dina asalaki bozoba ya kosala boninga ná bilenge basi ya Kanana. Ndenge moko ná bato ya Moabe, bato ya Kanana mpe bamipesaki na pite. (Balevi 18:6-25) Mpo na mibali ya Kanana, ata mpe Sekeme, oyo azalaki “moto oyo alekaki lokumu” na ndako ya tata na ye, Dina azalaki kaka mwasi oyo moto akoki kosangisa na ye nzoto ntango asepeli na ye.—Ebandeli 34:18, 19.
14. Lokola Dina aponaki baninga mabe, yango ememaki likama nini?
14 Ntango amonaki Sekeme, na ntembe te Dina azalaki na likanisi ya kosangisa na ye nzoto te. Nzokande, Sekeme asalaki likambo oyo Mokanana nyonso azalaki komona mabe te soki ayoki mposa ya kosangisa nzoto. Ekoki kozala ete Dina abundaki mpo na koboya kosangisa na ye nzoto, kasi azalaki na makasi ya kotɛmɛla ye te mpo “azwaki ye” mpe “abebisaki ye.” Atako na nsima Sekeme ‘alingaki mingi’ Dina, kasi asilaki kosala ye mabe. (Tángá Ebandeli 34:1-4.) Na nsuka, likambo yango ememaki mpasi kaka epai ya Dina te. Lokola aponaki baninga mabe, yango ebimisaki makambo oyo ememelaki libota na bango mobimba nsɔni mpe mawa.—Ebandeli 34:7, 25-31; Bagalatia 6:7, 8.
15, 16. Ndenge nini tokoki kozwa bwanya ya solosolo? (Talá mpe etanda “Bavɛrsɛ oyo okoki komanyola.”)
15 Ekoki kozala ete Dina azwaki liteya na makambo oyo ekómelaki ye, kasi ezalaki nde nsima ya kokutana na likama. Bato oyo balingaka Yehova mpe batosaka ye balukaka te bákutana naino na makama liboso ya kozwa mateya na bomoi. Lokola bayokaka Nzambe, basepelaka ‘kotambola na bato ya bwanya.’ (Masese 13:20a) Na ndenge yango, bayebaka “nzela mobimba ya oyo ezali malamu” mpe bakimaka mikakatano mpe bampasi ezangi ntina.—Masese 2:6-9; Nzembo 1:1-3.
16 Bato nyonso oyo balukaka bwanya oyo euti na Nzambe bakoki kozwa yango soki bazali kobondela na etingya mpe bazali koyekola mbala na mbala Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele. (Matai 24:45; Yakobo 1:5) Ezaleli mosusu ya ntina ezali komikitisa, oyo moto amonisaka ntango azali kondima kotosa batoli ya Biblia. (2 Bakonzi 22:18, 19) Na ndakisa, mokristo moko akoki kondima ete motema na ye ekoki kozala na bokosi mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. (Yirimia 17:9) Kasi soki likambo moko esɛngi ete bápesa ye toli, akozala na komikitisa mpo na kondima toli mpe lisalisi yango?
17. Lobelá likambo moko oyo ekoki kosalema na kati ya libota, mpe ndenge oyo tata akoki kokanisa ná mwana na ye ya mwasi.
17 Tótalela ndakisa moko. Tata moko aboyi kopesa mwana na ye ya mwasi ndingisa ya kobima ye moko na ndeko mobali moko. Elenge mwasi yango akoki koloba ete: “Papa, ozali kotyela ngai motema te? Tokosala likambo ya mabe te!” Ekoki kozala ete elenge mwasi yango alingaka mpenza Yehova mpe azali na makanisi ya mabe te; kasi tokoki nde koloba ete azali ‘kotambola na bwanya [oyo euti na Nzambe]’? Azali mpenza ‘kokima pite’? To azali nde kosala bozoba ya “kondimela motema na ye”? (Masese 28:26) Mbala mosusu okoki kokanisa mitinda mosusu oyo ekoki kosalisa tata yango ná mwana na ye ya mwasi bátalela malamu likambo yango.—Talá Masese 22:3; Matai 6:13; 26:41.
YOZEFE AKIMAKI PITE
18, 19. Yozefe akutanaki na komekama nini, mpe ndenge nini alongaki yango?
18 Elenge mobali moko oyo alingaki mpenza Nzambe mpe akimaki pite ezali Yozefe, oyo azalaki mpe ndeko ya Dina. (Ebandeli 30:20-24) Ntango azalaki mwana moke, Yozefe amonaki mbuma mabe ya bozoba oyo Dina asalaki. Na ntembe te, likambo wana, bakisa mpe mposa ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, esalisaki Yozefe bambula mingi na nsima ntango azalaki na Ezipito mpe mwasi ya nkolo na ye azalaki koluka ye makango “mokolo na mokolo.” Lokola Yozefe azalaki moombo, akokaki te koloba ete alongwe na mosala! Mokolo na mokolo asengelaki komonisa bwanya mpe mpiko mpo na kolonga motungisi yango. Asalaki yango na ndenge azalaki mbala na mbala koyebisa mwasi ya Potifare ete alingi te, mpe na nsuka, akimaki.—Tángá Ebandeli 39:7-12.
19 Kanisá naino: Soki Yozefe azalaki kolɔta mwasi yango to azalaki ntango nyonso na makanisi ya kosangisa nzoto, alingaki kotikala sembo? Te. Na esika akanisaka makambo ya mabe, Yozefe apesaki motuya mingi na boyokani na ye ná Yehova; yango emonani na maloba na ye epai ya mwasi ya Potifare. Alobaki na ye boye: “Nkolo na ngai . . . aboyeli ngai ata eloko moko te longola kaka yo, mpo ozali mwasi na ye. Bongo ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?”—Ebandeli 39:8, 9.
20. Ndenge nini Yehova atambwisaki makambo mpo na Yozefe?
20 Kanisá esengo oyo Yehova azalaki koyoka ntango azalaki komona elenge Yozefe, oyo azalaki mosika na baboti na ye, azali kobatela bosembo mokolo na mokolo! (Masese 27:11) Na nsima, Yehova asalaki ete Yozefe abima na bolɔkɔ mpe akóma ministre-mokonzi ya Ezipito mpe mokɛngɛli ya biloko ya kolya! (Ebandeli 41:39-49) Nzembo 97:10 elobi mpenza solo ete: “Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe. Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo; abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe”!
21. Ndenge nini elenge mobali moko na Afrika amonisaki mpiko mpo na kokima pite?
21 Lelo oyo mpe, basaleli mingi ya Nzambe bamonisaka ete ‘bayinaka oyo ezali mabe mpe balingaka oyo ezali malamu.’ (Amose 5:15) Na ekólo moko ya Afrika, ndeko mobali moko oyo azali naino elenge alobaki ete elenge mwasi moko oyo azalaki moninga na ye ya kelasi alobaki ete akondima kosangisa na ye nzoto soki asalisi ye na ekzamɛ ya matematiki. Ndeko mobali yango alobi boye: “Nakakatanaki ata moke te koyebisa ye ete naboyi. Lokola natikalaki sembo, nabatelaki lokumu na ngai, oyo ezali na motuya koleka wolo mpe palata.” Ya solo, lisumu ekoki kozala na “esengo ya ntango mokuse,” kasi, na nsima ekómaka bololo. (Baebre 11:25) Longola yango, esengo yango ezali eloko te soki tokokanisi yango na esengo oyo moto oyo atosaka Yehova ayokaka.—Masese 10:22.
NDIMÁ LISALISI YA NZAMBE YA MAWA
22, 23. (a) Mpo na nini mokristo oyo akwei na lisumu ya monene akoki kotɛlɛma lisusu? (b) Ndenge nini moto oyo asali lisumu akoki kozwa lisalisi?
22 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tobundaka mpo na kolonga bamposa ya nzoto mpe kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. (Baroma 7:21-25) Yehova ayebi yango malamu, “azali kobosana te ete tozali putulu.” (Nzembo 103:14) Kasi, mokristo moko akoki kokwea na lisumu ya monene. Moto ya ndenge wana akoki kotɛlɛma lisusu te? Ezali bongo te! Ya solo, moto yango akoki kobuka mbuma mabe ya etamboli na ye, ndenge ekómelaki Mokonzi Davidi. Atako bongo, Nzambe ‘asepelaka kolimbisa’ baoyo bayokaka mawa mpe ‘bayambolaka polele’ masumu na bango.—Nzembo 86:5; Yakobo 5:16; tángá Masese 28:13.
23 Longola yango, Nzambe atye na kati ya lisangá ya bokristo “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bakɛngɛli oyo bakɔmɛli na elimo, oyo bazali na makoki mpe na mposa ya kosalisa biso. (Baefese 4:8, 12; Yakobo 5:14, 15) Mokano na bango ezalaka ya kosalisa mosumuki azongisa boyokani na ye na Nzambe mpe, na kolanda maloba ya moto ya bwanya, azwa ‘motema [to mayele]’ mpo azongela lisusu lisumu yango te.—Masese 15:32.
‘ZWÁ MOTEMA’
24, 25. (a) Ndenge nini elenge oyo Masese 7:6-23 elobeli amonisaki ete ‘azangi motema’? (b) Ndenge nini tokoki ‘kozwa motema’?
24 Biblia elobeli bato oyo ‘bazali na motema te’ mpe baoyo ‘bazali kozwa motema.’ (Masese 7:7) Lokola moto oyo “azali na motema te” akɔmɛli naino te na elimo to aumeli naino te na mosala ya Nzambe, akoki kozanga bososoli mpe makanisi ya malamu. Lokola elenge mobali oyo Masese 7:6-23 elobeli, moto yango akoki kokwea na lisumu ya monene. Nzokande, “ye oyo azali kozwa motema” amipesaka na boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe na mabondeli mpo na kobongisa bomoto na ye ya kati. Mpe na ndenge oyo akoki kosala yango atako azali moto ya kozanga kokoka, ayokanisaka makanisi, bamposa, mayoki, mpe mikano na ye na makambo oyo Nzambe andimaka. Na ndenge yango, amonisaka ete ‘alingi molimo na ye moko’; na maloba mosusu, azwaka mapamboli, mpe “akozwa bolamu.”—Masese 19:8.
25 Omituna boye: ‘Nandimaka mpenza ete mibeko ya Nzambe ezali sembo? Nandimaka mpenza ete kotosa yango ekomemela ngai bolamu oyo eleki nyonso?’ (Nzembo 19:7-10; Yisaya 48:17, 18) Soki ozali kokakatana ata moke, tyelá likambo yango likebi. Kanisá mbuma mabe oyo moto abukaka soki aboyi kotosa mibeko ya Nzambe. Longola yango, ‘meká mpe moná ete Yehova azali malamu’; na maloba mosusu, saleláká solo na bomoi na yo mpe tondisáká bɔɔngɔ na yo na makanisi ya malamu, to makanisi oyo ezali solo, ya boyengebene, ya pɛto, oyo ekoki kolingama, mpe oyo ebongi. (Nzembo 34:8; Bafilipi 4:8, 9) Yebá ete, soki ozali ntango nyonso kosala yango, bolingo na yo mpo na Nzambe ekokola, okolinga mingi makambo oyo alingaka, mpe okoyina oyo ayinaka. Yozefe azalaki anzelu te. Kasi, alongaki ‘kokima pite’ mpamba te na boumeli ya bambula, atikaki ete Yehova abongisa ye, to apesa ye motema. Tiká ete ezala mpe bongo mpo na yo.—Yisaya 64:8.
26. Likambo nini ya ntina mingi tokotalela?
26 Mozalisi na biso asalá binama ya kobotela mpo ezala biloko ya lisano te, kasi mpo na kopesa bomoi mpe kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali na kati ya libala. (Masese 5:18) Na mikapo mibale oyo elandi, tokolobela ndenge oyo Nzambe atalelaka libala.
a Na ntembe te, motángo oyo ezali na mokanda ya Mitángo esangisi “bankumu nyonso na kati ya bato” oyo basambisi babomaki, bato soki 1 000, ná bato oyo Yehova ye moko abomaki.—Mitángo 25:4, 5.
b Mpo na koyeba oyo ebengami makambo ya mbindo mpe etamboli ya nsɔni, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2006, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Makambo ya nsɔni ekoki kozala bafɔtɔ, makomi, to maloba oyo esalemi mpo na kolamusa mposa ya nzoto. Yango ekoki kozala fɔtɔ ya moto oyo atɛlɛmi to alali na ndenge oyo ezali kolamusa bamposa ya mabe, kasi mosusu mpe ezali bafɔtɔ ya bato mibale to bato mingi oyo bazali kosangisa nzoto na ndenge ya bosɔtɔ mpenza.
d Kosakana na binama ya kobotela elobelami na Apɛndisi, na lisolo “Ndenge ya kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela.”