Kobɔkɔla bana na mokili oyo ekipaka mabe te
OSILÁ komona mwana moko azali kolela mpo baboti na ye baboyi kosombela ye mwana-popi? To mwana oyo alingi kopotapota mbangu mpe kosakana, kasi tata to mama alobi na ye: “Fandá esika moko”? Na makambo lokola oyo wana, baboti balukaka kaka bolamu ya mwana. Nzokande, mbala mingi soki mwana azali kolelalela, baboti mosusu batikaka ye asala oyo alingi.
Baboti mingi bakanisaka ete kobɔkɔla bana malamu elimboli nde kopesa bango nyonso oyo bazali kosɛnga. Na ndakisa, na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis, batunaki bana 750 ya mbula 12 tii 17 soki bayokaka ndenge nini ntango baboti baboyeli bango likambo moko. Mingi na bango (soki 60 %) balobaki ete bakobaka kaka kosɛnga. Na kati na bango, bamosusu (55 %) bamonaki ete mayele yango esimbaka. Baboti na bango bakoki kokanisa ete kotika bana básala nyonso oyo balingi emonisaka ete balingaka bango. Kasi, ezali mpenza bongo?
Yoká ndenge lisese moko ya Biblia elobi: “Soko opusi kobondela moombo na yo ut’o bolenge, okokomisa ye motó makasi.” (Biyele 29:21, Bilia Liloba lya Nzambe) Toboyi te, mwana azali moombo te. Kasi, omoni te ete likambo oyo balobi na vɛrsɛ wana etali mpe kobɔkɔla bana? Soki olekisi kobondela mwana to kopesa ye nyonso oyo azali kosɛnga, ntango akokola akoki kobeba, kokóma “motó makasi” to kozanga botɔndi, mpe akobanda kolinga kaka básalelaka ye nyonso.
Nzokande, Biblia epesi baboti toli oyo: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola.” (Masese 22:6) Baboti ya bwanya balandaka toli yango mpe bapesaka bana na bango mibeko oyo ebongi. Bakanisaka te ete kolinga mwana elimboli kotika ye asala nyonso oyo alingi, to kopesa ye eloko kaka mpo azali kolela to mpo asiliki. Basalaka nde ndenge Yesu alobaki: “Tiká ete liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.” (Matai 5:37) Kasi, kobɔkɔla bana esɛngaka nini? Tótala naino ndakisa oyo elandi.
“Lokola mbanzi na lobɔkɔ”
Biblia esaleli ndakisa moko oyo emonisi ete mwana azalaka kaka na mposa ya litambwisi ya baboti. Nzembo 127:4, 5 elobi boye: “Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali [lokola] mbanzi na lobɔkɔ ya elombe. Esengo ezali na moto oyo azali na ebuluki etondi na bango.” Na yango, bana bazali lokola mbanzi, mpe moboti azali lokola elombe. Ndenge kaka mobɛti mbanzi ayebaka ete mbanzi na ye ekozokisa te eloko oyo asengeli na yango soki abɛti yango bibɛtɛla, baboti ya bolingo mpe bayebaka ete bana bakoki kokola malamu te soki babɔkɔli bango malamu te. Balingaka bana na bango bákola na ndenge oyo esengeli, elingi koloba bákóma na bomoi ya esengo. Balingaka bana na bango bázwa bikateli ya malamu mpe bákokisa yango, bázala bato ya bwanya mpe bámilukelaka mindondo te na bomoi. Kasi, kozala na mposa wana ekoki te.
Mpo mbanzi ezokisa eloko, mobɛti-mbanzi asengeli kosala nini? Asengeli kobongisa yango malamu, kobatela yango, kososola malamu eloko oyo alingi kobɛta mpe kobenda litimbo makasi mpo mbanzi ekenda na nguya makasi. Ndenge moko, mpo bana bákola malamu mpe bázala na bomoi ya esengo, baboti basengeli kobongisa bango, kobatela bango mpe kolakisa bango nzela oyo basengeli kolanda. Tótalela sikoyo mokomoko ya makambo wana misato oyo baboti basengeli kosala mpo na kobɔkɔla bana na bango malamu.
Kobongisa mbanzi malamu
Babɛti-mbanzi ya ntango ya kala bazalaki kobongisa mbanzi na bango malamu mpenza. Nzete ya mbanzi yango, oyo mbala mosusu ezalaki kosalema na nzete ya pɛpɛlɛ, bazalaki kopalola yango mpe kokómisa yango mpenza semba. Bazalaki kopelisa nsɔngɛ na yango makasi. Na nsuka ya mbanzi yango, bazalaki kotya nsala ya ndɛkɛ mpo soki babwaki mbanzi yango, etɛngama ata mwa moke te.
Baboti balingaka bana na bango bázala lokola mbanzi wana ya semba, oyo ekoki kotɛngama ata moke te. Yango wana, baboti ya bwanya bakangaka miso te na mabe ya bana na bango, kasi basembolaka bango na bolingo nyonso mpo bátika mabe yango. Na likambo yango, baboti bazali na mosala monene mpo na mwana nyonso, mpo “bozoba ekangami na motema ya mwana mobali.” (Masese 22:15, NW) Yango wana, Biblia ezali kolendisa baboti básembolaka bana na bango. (Baefese 6:4) Ɛɛ, kosembola mwana ezali na ntina mingi mpo na kobongisa makanisi mpe bomoto na ye.
Yango wana, Masese 13:24 elobi boye: “Ye oyo aboyi [fimbo] abebisi mwana na ye; kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.” Awa, fimbo elimboli lolenge nyonso ya kosembola to koteya mwana. Soki moboti azali kosembola mwana na bolingi nyonso, akosalisa ye atika makambo ya mabe oyo, soki ezwi misisa na motema na ye, ekomemela ye mpasi mingi ntango akokola. Ya solo mpenza, koboya kosembola mwana ezali mpenza koyina ye; kasi kosembola ye ezali elembo ya bolingo.
Moboti ya bolingo asalisaka mpe mwana ayeba ntina ya mibeko oyo azali kopesa ye. Na yango, kosembola mwana elimboli kaka te kopesa ye mibeko mpe bitumbu, kasi likambo eleki ntina ezali nde kopesa ye boyebi. Biblia elobi boye: “Ye oyo akobatela mobeko azali mwana ya boyebi.”—Masese 28:7.
Nsala oyo mobɛti-mbanzi atyaka na nsuka ya mbanzi na ye esalisaka yango ekende alima soki abwaki yango. Ndenge moko, mateya ya Biblia oyo euti epai ya Mokeli ya libota ekoki kotikala na motema ya mwana ata nsima ya kotika ndako ya baboti, mpe ekoki kobatela ye bomoi na ye mobimba. (Baefese 3:14, 15) Kasi, baboti basengeli kosala nini mpo mateya yango ‘ekangama’ mpenza na mitema ya bana na bango?
Talá toli oyo Nzambe apesaki baboti ya Yisalaele na ntango ya Moize: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo.” (Deteronome 6:6, 7) Na yango, ezali na makambo mibale oyo baboti basengeli kosala. Ya liboso, basengeli koyekola Liloba ya Nzambe, kosalela yango mpe kolinga mpenza mibeko ya Nzambe. (Nzembo 119:97) Yango nde ekosalisa bango bákokisa eteni ya mibale ya vɛrsɛ yango, elingi koloba koteya to ‘kolakisa’ bana na bango Mibeko ya Nzambe na etingya. Yango elimboli ete basengeli koteyaka bana na bango mibeko yango mpe kozongelaka yango mbala na mbala, mpo efanda mpenza na mitema na bango.
Emonani polele ete koteya bana mitinda ya Biblia to kosembola bango na bolingo nyonso ezali kaka na ntina mingi ata lelo oyo. Ezali lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa “mbanzi” wana ya motuya mingi, elingi koloba bana, mpo bákola malamu.
Kobatela mbanzi
Tózongela naino ndakisa oyo ezali na Nzembo 127:4, 5. Tóbosana te ete mobɛti-mbanzi ‘azalaki kotondisa ebuluki’ to libenga na ye na mbanzi. Nsima ya kobongisa mbanzi, asengelaki kobatela yango. Yango wana mobɛti-mbanzi azalaki komema mbanzi na ye na ebuluki mpo ebeba to ebukana te. Likambo ya kokamwa, na esakweli moko, Biblia elobeli Masiya lokola mbanzi oyo epelisami malamu, oyo Tata na ye “atii . . . kati na libenga na ye ya mbanzi.” (Yisaya 49:2) Yehova Nzambe, Tata oyo aleki na bolingo, abatelaki mpenza Mwana na ye, Yesu, na mabe ya lolenge nyonso tii ntango ekokaki mpo Masiya abomama ndenge esakolamaki. Ata na ntango wana, Nzambe abatelaki Mwana na ye mpo akufa libela te mpe azongisaki ye na likoló, epai azali na bomoi libela na libela.
Ndenge moko, baboti ya malamu balingaka kobatela bana na bango na mokili oyo etondi na mabe. Baboti bakoki kopekisa bana na bango makambo mosusu oyo ekoki kotya bango na likama to kobebisa bango. Na ndakisa, baboti ya bwanya balandaka toli oyo: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Kobatela bana na baninga oyo batosaka mitinda ya Biblia te ekosalisa bango básala te mabunga ya minene, oyo ekoki komemela bango makama, ata mpe liwa.
Ntango mosusu, bana basepelaka te na libateli ya baboti, mpamba te kobatela bana esɛngaka mbala mingi kopekisa bango makambo mosusu. Mokomi moko oyo akomá babuku oyo elobeli ndenge ya kobɔkɔla bana alobaki boye: “Atako bamonisaka yango ntango nyonso te mpe mbala mosusu bapesaka melesi mbala moko te, bana balingaka mpenza baboti bábatela bango mpe bálakisa bango nzela oyo basengeli kolanda. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala baboti oyo bazwaka makambo na lisɛki te mpe bamonisaka bana polele oyo basengeli kosala mpe oyo basengeli kosala te.”
Ya solo, kobatela bana na makambo oyo ekoki kolongola kimya na bango, kobebisa bizaleli na bango to boyokani na bango ná Nzambe ezali lolenge malamu mpenza ya komonisa ete olingaka bango. Na ntembe te, ntango bakokola bakoyeba ntina oyo bozalaki kotyela bango mibeko, mpe bakozala na botɔndi mpo na ndenge bobatelaki bango.
Kolakisa bango nzela
Tóbosana te ete Nzembo 127:4, 5 elobi ete moboti azali lokola “elombe.” Yango elingi nde koloba ete kaka tata nde akoki kobɔkɔla bana malamu? Te. Ndakisa wana ebongi mpo na batata mpe bamama, ata mpe mpo na baboti oyo babɔkɔlaka bana na bango bango moko. (Masese 1:8) Liloba “elombe” emonisi ete mpo na kobɛta mbanzi ezalaki kosɛnga mpenza kobimisa misisa nyonso. Na ntango ya kala, bazalaki ntango mosusu kopakola yango kwivrɛ, mpe bazalaki koloba ete soda ‘abendi litimbo.’ Yango ekoki mbala mosusu kolimbola ete azalaki konyata litimbo na makolo mpo na kosembola yango makasi. (Yilimia 50:14, 29) Emonani mpenza ete kobenda nsinga ya litimbo mpo na kobɛta mbanzi ezalaki kosɛnga kobimisa mpenza misisa!
Ndenge moko mpe, kobɔkɔla bana esɛngaka mpenza milende. Ndenge kaka mbanzi ekoki komibwaka yango moko te, mwana mpe akoki komibɔkɔla ye moko te. Likambo ya mawa, emonani lokola baboti mingi lelo oyo balingaka te kosala milende oyo esengeli mpo na kobɔkɔla bana na bango. Baponaka nzela mokuse. Batikelaka televizyo, kelasi mpe baninga ya bana na bango báteya bana na bango malamu ná mabe, ata na makambo ya kosangisa nzoto. Batikaka bango bázwa eloko nyonso oyo balingi. Mpe soki bazali na mokakatano ya koboyela bango mwa likambo moko, bandimelaka bango, mpe mbala mingi balobaka ete basalaka bongo mpo balingi koyokisa bana na bango mpasi te. Nzokande, kosala bongo nde ekomemela bana na bango mpasi bomoi na bango mobimba.
Kobɔkɔla bana ezali mosala makasi. Kosala yango na motema mobimba, na lisalisi ya Liloba ya Nzambe, ezali pɛtɛɛ te, kasi ezali na matomba ya koloba te. Zulunalo moko (Parents) elobi boye: “Baankɛtɛ . . . emonisi ete bana oyo babɔkɔlami na baboti oyo balingaka bango, kasi bakangaka miso na mabe te, bazalaka mayele mingi na kelasi, bayebaka kofanda na bato, bamipesaka nzoto kilo mpe bazalaka na esengo koleka bana oyo baboti na bango babondelaka bango to baoyo baboti na bango bazalaka makambo makasi.”
Ezali kutu na litomba mosusu ya malamu koleka. Tolobelaki eteni ya liboso ya Masese 22:6: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola.” Vɛrsɛ yango ekobi na maloba kitoko oyo: “[Ntango akokola] akopɛngwa na yango te.” Lisese wana oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe emonisi nde ete soki babɔkɔli mwana na ndenge oyo ebongi akokola kaka malamu? Ezali mpenza bongo te. Mwana na yo azali na bonsomi ya kopona, mpe ntango akokola, akosalela bonsomi yango. Kasi, vɛrsɛ oyo ezali nde kopesa baboti elikya moko ya malamu mpenza. Elikya nini?
Soki ozali kobɔkɔla bana na yo na kolanda toli ya Biblia, zalá na elikya ete okobuka mbuma ya malamu ntango bakokola. Bakozala bato ya solosolo, oyo bazali na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (Masese 23:24) Yango wana, bosengeli kosala nyonso mpo na kobongisa “mbanzi” yango ya motuya, kobatela bango mpe koboma mpenza nzoto mpo na kolakisa bango nzela oyo basengeli kolanda. Bokosala mosala ya mpunda te.
[Elilingi na lokasa 13]
Baboti bakomonisa ete balingaka bana na bango soki bazali kotika bango básala nyonso oyo balingi to kopesa bango nyonso oyo basɛngi?
[Elilingi na lokasa 15]
Moboti ya bolingo alimbwelaka bana ntina oyo apesi bango mobeko boye to boye
[Elilingi na lokasa 15]
Baboti ya malamu babatelaka bana na bango na mokili oyo etondi na mabe
[Elilingi na lokasa 16]
Kobɔkɔla bana ezali mosala makasi, kasi ezali na matomba ya koloba te