Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
“Vinyo ezali motuki mpe masanga ekongala; ye oyo akozimbisama na yango azangi mayele.”—MASESE 20:1.
1. Mokomi ya nzembo alobaki nini mpo na kozongisa matɔndi mpo na makabo ya malamu oyo Yehova apesaka biso?
MOYEKOLI Yakobo akomaki boye: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.” (Yakobo 1:17) Mpo na kozongisa matɔndi epai ya Nzambe mpo na ebele ya makabo malamu oyo apesaka biso, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ye akokolisaka matiti mpo na bibwɛlɛ; ndunda mpe mpo na kosunga moto, ete abimisa kolya kati na mabelé. Vinyo ekosepelisa motema ya moto, mafuta ekongɛngisa elongi na ye mpe [limpa] oyo ekolendisa motema na ye na nguya.” (Nzembo 104:14, 15) Vinyo mpe masanga mosusu ezali makabo kitoko ya Nzambe, lokola kaka ndunda, limpa, mpe mafuta. Ndenge nini tosengeli kosalela yango?
2. Mituna nini tokotalela na likambo etali komɛla masanga?
2 Likabo kitoko ezalaka malamu se soki tosaleli yango na ndenge ebongi. Na ndakisa, mafuta ya nzoi “ezali malamu,” kasi “ezali malamu te kolya mafuta ya nzoi mingi.” (Masese 24:13; 25:27) Komɛla “mwa vinyo moke” ekoki kozala malamu, kasi komɛla mingi ezali likama. (1 Timote 5:23) Biblia elobi boye: “Vinyo ezali motuki mpe masanga ekongala; ye oyo akozimbisama na yango azangi mayele.” (Masese 20:1) Kasi, kozimbisama na masanga elimboli nini?a Ntango nini tokoki koloba ete moto alekisi ndelo na komɛla masanga? Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati na likambo yango?
Ndenge nini masanga ekoki ‘kozimbisa’ moto?
3, 4. (a) Nini ezali komonisa ete Biblia epekisi kolangwa masanga? (b) Wapi mwa makambo oyo emonisaka ete moto alangwe masanga?
3 Na Yisalaele ya kala, soki mwana azali na lokoso mpe azali molangwi, soki alingi kotika bizaleli yango te, bazalaki koboma ye na mabanga. (Deteronome 21:18-21) Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.” Tomoni polele ete Biblia epekisi kolangwa masanga.—1 Bakolinti 5:11; 6:9, 10.
4 Mpo na komonisa ndenge moto oyo alangwe akómaka, Biblia elobi boye: “Kolula vinu té po na motane na yango, to po ezali komonana kitoko na kopo; yango ekitaka na malembe nyonso na mongongo, kasi suka-suka eswaka lokola nyoka. Okokóma komona biloko ndenge na ndenge, pe okobanda koloba makambo ezangá tina.” (Masese 23:31-33, Bible na lingala ya lelo oyo) Kolekisa ndelo na komɛla masanga eswaka lokola nyoka, ekoki kopesa moto maladi, kobulunganisa ye makanisi, ata mpe kobosanisa ye makambo nyonso. Molangwi masanga akoki komona “biloko ya ndenge na ndenge,” elingi koloba ete akoki komona bimonamona. Lisusu, akokóma kobimisa maloba ya nsɔni mpe akoyeba lisusu te kokanga bamposa ya mabe.
5. Na ndenge nini kolekisa ndelo na komɛla masanga ezali mabe?
5 Ezali boni soki moto amɛlaka mwa mingi kasi akebaka ete amonana te ete alangwe? Bato mosusu balangwaka mpenza te, ata soki bamɛli mingi. Kasi, soki moto azali kokanisa ete momeseno wana ezali mabe te azali komikosa. (Yilimia 17:9) Mokemoke, moto ya ndenge wana akobanda komiyoka malamu te soki amɛli te mpe akokóma ‘moombo ya ebele ya vinyo.’ (Tito 2:3) Caroline Knapp akomaki boye: “Kokóma moombo ya masanga ebandaka malɛmbɛmalɛmbɛ, mokemoke, na ndenge oyo moto akoki koyeba te.” Tomoni ete kolekisa ndelo na komɛla masanga ezali mpenza motambo!
6. Mpo na nini esengeli koboya kolekisa ndelo na komɛla masanga mpe na kolya?
6 Tótalela mpe toli ya Yesu oyo: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandaka na etando ya mabelé mobimba.” (Luka 21:34, 35) Esɛngaka kaka te moto amɛla tii akolangwa mpo abanda koyoka mpɔngi mpe akóma gɔigɔi, ezala na nzoto to na elimo. Moto ya ndenge wana akosuka wapi soki mokolo ya Yehova ekuti ye bongo?
Mikakatano oyo kolekisa ndelo na komɛla masanga ekoki komema
7. Mpo na nini komɛla mingi eyokani te na toli oyo ezali na 2 Bakolinti 7:1?
7 Komɛla mingi ekoki komemela moto ebele ya makama, na nzoto mpe na elimo. Komɛla masanga mingi epesaka moto maladi ya libale (cirrhose du foie), maladi ya hépatite, maladi ya kolɛngalɛnga mpe koloba lokola moto ya ligboma. Soki moto aumeli na momeseno ya komɛla masanga mingi, akoki kobɛla kanser, diabete, mpe bamaladi mosusu ya motema mpe ya estoma. Ezali polele ete komɛla mingi eyokani te na toli ya Biblia oyo: “Tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tókokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe.”—2 Bakolinti 7:1.
8. Na kolanda Masese 23:20, 21, komɛla mingi ekoki komemela moto makambo nini?
8 Komɛla mingi ekoki mpe kotinda moto abebisaka mbongo mingi, ata mpe kolongolisa ye na mosala. Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, alobaki boye: “Zalá elongo na bamɛli ya masanga te, soki elongo na bato te baoyo bakolyaka mosuni na mposa mabe.” Mpo na nini? Alimbolaki boye: “Zambi kolangwa mpe kolyaka mingi mingi ekokómisa moto na bobola; gɔigɔi ekolatisa mpe moto bilamba bipaswani.”—Masese 23:20, 21.
9. Mpo na nini ezali malamu moto amɛla masanga ata moke te soki ayebi ete akotambwisa motuka?
9 Buku The Encyclopedia of Alcoholism emonisi mpe likama mosusu ya kozala moombo ya masanga: “Baankɛti mingi emonisi ete masanga ekitisaka mayele ya kokumba motuka; na ndakisa, moto akokóma komona makambo na mwa retare, akosala mabunga mingi, akobungisa likebi mpambampamba, akomona malamu te mpe akobanda kokakatana mingi.” Soki sofɛlɛ azali kotambwisa motuka nsima ya komɛla, yango ekoki kobimisa makama. Mbula na mbula, kaka na États-Unis, bankóto ya bato bakufaka mpe bankóto mosusu mingi bazokaka to babukanaka na makama ya mituka mpo basofɛlɛ na yango bamɛlaki masanga. Bilenge nde bazwaka makama yango mingi, mpamba te bameseni naino mingi te na kotambwisa mituka, mpe bameseni naino te na makambo oyo masanga esalaka na bɔɔngɔ. Tokoki mpenza kondima moto oyo alobi ete amemyaka bomoi mpo ezali likabo ya Yehova Nzambe, kasi azali kotambwisa motuka nsima ya komɛla masanga mingi? (Nzembo 36:9) Lokola bomoi ezali eloko ya bosantu, ezali malamu moto amɛla masanga ata moke te soki ayebi ete akotambwisa motuka.
10. Masanga ekoki kosala nini na bɔɔngɔ ya moto, mpe mpo na nini esengeli kokeba na yango?
10 Longola makama ya nzoto, kolekisa ndelo na komɛla ekoki mpe komema makama na elimo. Biblia elobi ete: “Vinyo mpe vinyo ya elɛngi elongolaka makanisi ya malamu.” (Hosea 4:11, NW) Masanga ebulunganisaka mayele. Ebongiseli moko ya États-Unis oyo esalisaka bato bámona makama ya komɛla biloko oyo elangwisaka (U.S. National Institute on Drug Abuse) ebimisaki mokanda moko oyo elobi boye: “Ntango moto amɛli masanga, alkole elekaka na makila mpe ekómaka nokinoki na bɔɔngɔ. Ebandaka kolɛmbisa bɔɔngɔ na bisika oyo etambwisaka makoki ya kokanisa. Moto akómaka na mwa loyenge, akokaka lisusu komipekisa te.” Na ntango wana, ezali mpasi te moto ‘azimbisama,’ akóma kosala makambo oyo ebongi te, mpe akwea na komekama nyonso oyo ekoki koyela ye.—Masese 20:1.
11, 12. Komɛla mingi ekoki komema makama nini na elimo?
11 Longola yango, Biblia elobi boye: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Komɛla masanga mingi ekoki nde kopesa Nzambe nkembo? Ebongi mpenza moklisto azala te moto oyo ayebani ete azali momɛli. Soki bayebi ye lokola momɛli, na esika apesa Yehova nkembo, akofingisa nde nkombo na ye.
12 Ezali boni soki moklisto oyo alingi komɛla mwa mingi azali kobɛtisa ndeko mosusu libaku, mbala mosusu moyekoli ya sika? (Baloma 14:21) Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo abɛtisi libaku na moko ya bato mike oyo bandimelaka ngai, ezali litomba mingi koleka mpo na ye bákangisa na nkingo na ye libanga ya konikela lokola oyo mpunda ebalolaka mpe azindisama na mbu ya monene, oyo efungwamá.” (Matai 18:6) Moto oyo amɛlaka mingi akoki kobungisa mikumba na ye na lisangá. (1 Timote 3:1-3, 8) Tóbosana mpe te ete moto oyo amɛlaka mingi akoki kotya mobulu na kati ya libota na ye.
Ndenge nini kokima makama ya masanga?
13. Nini ekoki mpenza kosalisa moto mpo aboya komɛla mingi?
13 Mpo na kokima makama ya komɛla masanga mingi ebongi koyeba esika oyo osengeli kosukaka. Esengeli te oluka koyeba milangi boni okoki komɛla kozanga ete olangwa, kasi luká nde oyeba esika nini osengeli kosukaka mpo olekisa ndelo te. Nani akoki koyebisa yo esika oyo osengeli kosukaka? Lokola yango etalelaka makambo mingi, bakoki te kokatela moto milangi to bakɔpɔ oyo asengeli komɛlaka. Moto na moto asengeli koyeba bakɔpɔ to milangi boni akoki komɛla mpe asala makasi alekaka yango te. Nini ekosalisa yo oyeba bakɔpɔ boni okoki kolekaka te? Ezali nde na likanisi moko oyo ekoki kosalisa yo?
14. Likanisi nini ekosalisa yo oyeba bakɔpɔ boni ya masanga okoki komɛla kozanga ete olekisa ndelo?
14 Biblia elobi boye: “Batelá mayele ya solo mpe bososoli. Ekozala bomoi mpo na molimo na yo mpe kitoko mpo na nkingo na yo.” (Masese 3:21, 22) Na bongo, likanisi osengeli kolanda ezali oyo: Motángo nyonso ya bakɔpɔ oyo, ntango omɛli yango, epesaka yo mwa kizunguzungu mpe ebebisaka likoki na yo ya kokanisa, yebá ete eleki ndelo mpo na yo. Kasi, osengeli te kokosa motema na yo mpe kokakola esika oyo ebongi osukaka!
15. Ntango nini komɛla ata kɔpɔ moko ezali kolekisa ndelo?
15 Ezali na bantango mpe na bisika mosusu oyo komɛla ata kɔpɔ moko ezali kolekisa ndelo. Na ndakisa, mpo na likama oyo masanga ekoki komemela mwana oyo azali na libumu, ekoki kozala malamu mwasi ya zemi amɛla ata moke te. Lisusu, ezali malamu te komɛla masanga na miso ya moto oyo abundaki makasi mpo alongwa na boombo ya masanga to oyo amonaka ete komɛla masanga ezali mabe. Yehova alobaki na banganga oyo bazalaki kosala na tabenakle boye: “Mɛlá vinyo to eloko ya kolangwisa te . . . wana [ekokɔta] bino na hema ya koyangana, ete bókufa te.” (Levitike 10:8, 9) Yango wana, esengeli komɛla masanga te liboso ya kokende na makita, liboso ya kobima na mosala ya kosakola, mpe ntango tolingi kosala makambo mosusu ya elimo. Lisusu, na mikili oyo mibeko epekisi komɛla masanga to epesi ndingisa ya komɛla kaka na moto oyo akokisi mbula moko boye, esengeli kotosa mibeko wana ya mboka.—Baloma 13:1.
16. Osengeli kosala nini ntango bapesi yo masanga?
16 Ntango bapesi yo masanga, osengeli liboso komituna boye: ‘Namɛla to namɛla te?’ Soki osepeli komɛla, kobosana te esika oyo osukaka mpe koleka yango te. Kotika te ete moto oyo ayambi yo abakiselaka yo kaka. Lisusu, kebá na bafɛti oyo masanga ezalaka beboo, na ndakisa bafɛti ya mabala. Na bisika mingi, mibeko epekisi te bana mike komɛla masanga. Baboti bazali na mokumba ya koteya bana na bango ndenge oyo basengeli kotalelaka masanga mpe kolandela etamboli na bango na likambo yango.—Masese 22:6.
Okoki kolongwa na boombo ya masanga
17. Nini ekoki kosalisa yo na koyeba ete okómi komipesa mingi na komɛla masanga?
17 Ozali komona ete okómi komipesa mingi na masanga? Komikosa te, soki obandi kokóma na ezaleli ya komɛla mingi mpe ozali kobomba yango, ata ndele ekomemela yo mikakatano. Yango wana, omitalela malamumalamu. Omituna mituna lokola oyo: ‘Nakómi komɛla mingi koleka liboso? Nakómi komɛla masanga ya makasi mingi? Namɛlaka mpo na kolongola susi to kobosana makambo? Ndeko to moninga na ngai moko akómi komitungisa na ndenge oyo nazali komɛla? Komɛla masanga ekómi nde kobimisela ngai mikakatano na libota? Nakokaka te kolekisa pɔsɔ moko, sanza moko, to mwa basanza kozanga ete namɛla masanga? Nalingaka te bato báyeba soki namɛlaka milangi to bakɔpɔ boni?’ Okosala nini soki ondimi “ɛɛ” na mituna mosusu oyo etunami awa? Kosala te lokola moto oyo ‘atali elongi na ye na talatala mpe na mbala moko abosani ndenge azali.’ (Yakobo 1:22-24) Salá nyonso olongwa na boombo yango. Okoki kosala nini?
18, 19. Ndenge nini okoki kotika komɛla mingi?
18 Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bólangwaka vinyo te, na kati na yango misala ya mbindo ezali, kasi bókoba kotonda na elimo.” (Baefese 5:18) Luká koyeba bakɔpɔ boni eleki mingi mpo na yo, mpe katá bakɔpɔ boni okoki komɛlaka. Zwá ekateli ya kosukaka kaka wana; yekolá komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Otambolaka na baninga oyo batindaka yo omɛlaka mingi? Soki bongo, kebá. Biblia elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Masese 13:20.
19 Soki omɛlaka masanga mpo na kobosana mikakatano, luká nde kosilisa yango. Kolanda toli ya Biblia ekoki kosalisa biso na kosilisa mikakatano. (Nzembo 119:105) Luká lisalisi epai ya nkulutu moko oyo otyelaka motema. Salelá bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kosalisa yo ozala makasi na elimo. Kómisá boninga na yo na Nzambe makasi. Bondeláká ye ntango nyonso, mingimingi mpo na bolɛmbu na yo. Sɛngá na Nzambe ‘apɛtola bangɛi mpe motema na yo.’ (Nzembo 26:2, NW) Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, salá nyonso mpo na kotambola na nzela ya bosembo.
20. Ekateli nini osengeli kozwa soki ozali kokoka te kotika komɛla mingi?
20 Osengeli kosala nini soki ozali kokoka te kotika komɛla mingi? Osengeli kolanda toli ya Yesu oyo: “Soki lobɔkɔ na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango; eleki malamu mpo na yo kokɔta na bomoi ebɔsɔnɔ na esika ya kokende ná mabɔkɔ mibale na Gehena.” (Malako 9:43) Likambo osengeli kosala ezali kaka moko: Tiká masanga. Yango nde ekateli oyo mwasi moko oyo topesi nkombo Irene azwaki. Alobi boye: “Nsima ya mbula mibale na ndambo oyo masanga ezalaki lisusu kokɔta na monɔkɔ na ngai te, nakómaki kokanisa ete nakoki komɛla ata kɔpɔ moko mpo natala kaka soki nakoyoka ndenge nini. Kasi, soki kaka likanisi yango eyeli ngai, nabondelaka mbala moko Yehova. Nazwi ekateli ya komɛla lisusu te tii na mokili ya sika; ata kuna, mbala mosusu mpe nakomɛla kaka te.” Koboya mpenza masanga ezali te likambo oyo eleki makasi mpo na kozwa bomoi na mokili ya sika ya Nzambe epai boyengebene ekozala.—2 Petelo 3:13.
“Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango”
21, 22. Na momekano ya mbangu mpo na bomoi, nini ekoki kopekisa biso tókóma tii na nsuka, mpe ndenge nini tokoki kokima yango?
21 Ntoma Paulo akokanisaki bomoi ya moklisto na momekano ya mbangu ntango alobaki boye: “Boyebi te ete bapoti-mbangu na kati ya momekano ya mbangu bapotaka mbangu bango nyonso, kasi kaka moko nde azwaka libonza? Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango. Lisusu, moto nyonso oyo azali kosangana na kati ya momekano moko amipekisaka na makambo nyonso. Nzokande bango, ya solo, basalaka yango mpo na kozwa motole oyo epɔlaka, kasi biso oyo epɔlaka te. Na yango, ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te; ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te; kasi nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai makofi mpe kokómisa yango lokola moombo, mpo, nsima ya kosakola epai ya bamosusu, ngai moko naboyama te ezala na ndenge nini.”—1 Bakolinti 9:24-27.
22 Kaka baoyo bakolonga momekano ya mbangu nde bakozwa mbano. Na momekano ya mbangu mpo na bomoi, komɛla mingi ekoki kopekisa biso tókóma tii na nsuka. Tosengeli koyeba komipekisa. Mpo na kopota na ndenge ebongi, tosengeli te “kolekisa ndelo na vinyo.” (1 Petelo 4:3) Tosengeli nde komipekisa na makambo nyonso. Na likambo etali komɛla masanga, ebongi “tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe”—Tito 2:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, “masanga” ezali bière, vinyo, mpe masanga mosusu oyo elangwisaka.
Ozali koyeba lisusu?
• Komɛla mingi elimboli nini?
• Komɛla mingi ememaka mikakatano nini?
• Ndenge nini okoki kokima makama ya komɛla mingi?
• Ndenge nini okoki kolongwa na boombo ya masanga?
[Elilingi na lokasa 19]
Vinyo ‘esepelisaka motema ya moto’
[Elilingi na lokasa 20]
Tosengeli koyeba ndelo na biso mpe koleka yango te
[Elilingi na lokasa 21]
Tosengeli koyeba liboso esika oyo tosengeli kosukaka
[Elilingi na lokasa 22]
Bondelaká Yehova ntango nyonso mpo na bolɛmbu na yo
[Elilingi na lokasa 23]
Baboti bazali na mokumba ya koteya bana na bango na likambo etali masanga