ELOBELI TITRE YA EZIPELI
Makanisi malamu ezalaka na ntina!
Na makambo oyo elandi, oyo wapi okanisi ekoki kosala ete ozala na esengo?
Makambo ya bomoi na yo
Nzoto na yo
Makanisi malamu
BATO mosusu bakoki kopona “makambo ya bomoi,” bakoki koloba boye, “nakozala na esengo . . .
“kaka soki nazali na mbongo ebele”
“kaka soki nazali na libala ya malamu”
“kaka soki nazali na sante ya malamu”
Mpo na koloba solo, mpo moto azala na esengo, kozala na makanisi malamu nde ezali na ntina koleka makambo ya bomoi to nzoto na ye. Mpe yango ezali likambo ya malamu. Mpo na nini? Mpo okoki kozala na bokonzi likoló ya makanisi na yo kasi okoki mpenza te kozala na bokonzi likoló ya makambo ya bomoi to nzoto na yo.
“ELOKO OYO EBIKISAKA”
Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka, kasi elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.” (Masese 17:22) Na maloba mosusu, kozala na makanisi malamu nde ezali na ntina! Ekoki kosala ete okokisa mokano moko to osundola yango to omonisa bizaleli ya malamu to ya mabe mpenza ntango okutani na likambo ya mpasi.
Bato mosusu bakoki koboya likanisi yango. Bakoki kokanisa boye:
‘Mpo na nini nazala kaka na elikya mpo na kobomba mpasi na ngai?’
‘Ata soki nazali na makanisi malamu ndenge nini, ekobongola te makambo oyo nazali na yango.’
‘Ebongi natalela makambo ndenge ezali na esika ya kolɔta.’
Makanisi oyo ekoki komonana malamu. Kasi, kozala na makanisi malamu ezali na matomba. Tózwa ndakisa ya lisolo oyo elandi.
Alex ná Brian basalaka esika moko, kasi moto na moto azali na mosala oyo asalaka. Nsima ya kotalela misala na bango, mokonzi na bango amonisi mabunga minene oyo mokomoko asali.
Alex: “Nalekisaki ntango mingi mpe nabimisaki makasi na ngai nyonso na mosala oyo, kasi ebongi kaka te! Nakolonga mosala oyo te. Ata nasali makasi ndenge nini ebongaka kaka te. Mpo na nini nameka lisusu kosala yango?”
Brian: “Patrɔ na ngai amonisaki makambo oyo asepelaki na yango na mosala nasalaki, kasi nasalaki mpe mwa mabunga minene. Nazwelaki yango liteya ya ntina oyo ekosalisa ngai nabongisa lisusu mosala na ngai mpo na mbala ya nsima.”
OKANISI NINI?
Nsima ya sanza motoba, nani akosala mosala malamu koleka—Alex to Brian?
Soki yo nde patrɔ, na mibali oyo mibale, oyo wapi okoki kozwa ye na mosala to okotika ye na mosala?
Ntango okutanaka na likambo oyo elɛmbisi yo nzoto, ndenge oyo osalaka ekokani na nani na mibali oyo mibale?
Andrea ná Brittney banyokwamaka mpo bamiyokaka lokola bazali kaka bango moko. Mokomoko azali na ndenge asalaka mpo na kolonga likambo yango.
Andrea akipaka mingi kaka makambo na ye moko. Alingaka basusu básalela ye naino makambo, liboso ye asalela bango. Amilobelaka boye, ‘mpo na nini nabebisa ntango na ngai mpo na kosalela bato oyo bakopesa ngai kutu eloko te?’
Brittney asalaka makasi mpo na kozala na boboto mpe kosalela basusu makambo, ata soki basepeli na yango to te. Asalelaka toli oyo elobi tósalelaka bato makambo ndenge tolingaka básalela biso. (Luka 6:31) Mpo na Brittney, kosala malamu ezalaka na litomba ata soki bakozongisela ye eloko te.
OKANISI NINI?
Na basi oyo mibale, oyo wapi okolinga azala moninga na yo?
Nani na bango mibale asepelaka ndenge azali na baninga?
Soki komiyoka lokola ozali yo moko enyokolaka yo, osalaka lokola Andrea to Brittney?
Na ntembe te, oyebi bato oyo bakokani na Brian to Brittney. Okoki kutu komona lokola okokani na bango. Soki ezali bongo, boye okoki komona ete kozala na makanisi malamu ezali na ntina mingi. Bongo soki ozali lokola Alex to Andrea? Talelá lolenge misato oyo Biblia ekoki kosalisa yo otalelaka mikakatano ya bomoi na makanisi malamu.
1 BOYÁ MAKANISI MABE
OYO BIBLIA ELOBI: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.”—Masese 24:10.
YANGO ELIMBOLI NINI? Makanisi mabe ekoki kosilisa yo makasi oyo osengeli na yango mpo obongisa to olonga likambo oyo ozali na yango.
NDAKISA: Juliza alekisá bomwana moko ya mpasi. Tata na ye azalaki kolangwa masanga mpe libota na bango ezalaki na bobola. Bazalaki kofanda esika moko te. Na ebandeli, Juliza azalaki kokanisa mabe mpo na bomoi na ye. Kasi, makanisi yango ebongwanaki. Nini esalisaki ye? Juliza alobi boye: “Liboso kutu baboti na ngai bálonga mikakatano na bango, Biblia esalisaki ngai nabongisa makanisi na ngai. Tii lelo, makanisi ya Biblia esalisaka ngai nakoba kobatela makanisi malamu. Soki bato bamonisi bizaleli oyo nalingaka te, nalukaka koyeba mpo na nini bazali kosala bongo.”
Ndenge Juliza ayekolaki yango, Biblia ezali buku oyo ezali na batoli oyo ebongi. Batoli na yango ekoki kosalisa yo olonga mikakatano. Na ndakisa, Baefese 4:23 elobi boye: ‘Tosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso.’
Ndenge vɛrsɛ yango emonisi, okoki kobongola makanisi na yo. Okoki “kokómisama sika” na makanisi na yo. Kasi, kosala mbongwana yango esɛngaka ntango. Yango wana vɛrsɛ yango elobi ‘tosengeli kokómisama sika.’
2 TYÁKÁ MAKANISI NA MAKAMBO YA MALAMU
OYO BIBLIA ELOBI: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.”—Masese 15:15.
YANGO ELIMBOLI NINI? Soki omonaka makambo nyonso kaka mabe, okozala “moto ya mpasi” mpe mikolo nyonso ekomonana “mabe” na miso na yo. Kasi soki otyaka miso na makambo ya malamu, okozala na “motema ya esengo” mpe okosepela. Yo moko nde okopona.
NDAKISA: Yanko akokaka kosala makambo mingi te mpo lipaso oyo basalá ye mbala na mbala na bɔɔngɔ ebebisá likoki na ye ya koloba mpe ya kosala bamuvema. Na boumeli ya bambula, Yanko alɛmbaki mpenza nzoto mpo amonaki ete akokoka lisusu te kokokisa mikano na ye. Na nsima, abongolaki makanisi. Ndenge nini? Alobi boye: “Na esika nakipe makambo oyo nakokoka lisusu kosala te, nakómaki kokanisa mingi makambo oyo ekolendisa ngai.”
Kotánga Biblia nde esalisaki Yanko asalaka bongo. Alobi boye: “Yango esalisaka ngai nabatela makanisi malamu. Nasundolá mpenza te mikano ya minene oyo nazalaki na yango kasi natyaka miso sikoyo na mikano ya mike oyo nakoki kokokisa. Soki makanisi mabe eyeli ngai, nakanisaka na makambo mingi oyo esengeli kotinda ngai nazala na esengo.”
Ndenge moko na Yanko, yo mpe okoki kolongola makanisi mabe mpe kotya ya malamu na esika na yango. Soki ozali kobundana na makambo ya mpasi; mbala mosusu mokakatano ya sante ndenge Yanko azali na yango; omituna boye: ‘Likambo yango ezangi solisyo? Nakómi mpenza na nsuka to ezali kaka mwa mokakatano?’ Tyáká makanisi na makambo oyo ezali na litomba mpo na kobengana makanisi mabe.
3 SALISÁKÁ BASUSU
OYO BIBLIA ELOBI: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
YANGO ELIMBOLI NINI? Kokaba na motema moko epesaka moto oyo akabi esengo makasi. Mpo na nini? Mpo tokelamá te mpo na kokipe kaka bamposa na biso moko. (Bafilipi 2:3, 4; 1 Yoane 4:11) Koyoka esengo oyo eutaka na kokaba ekoki kosalisa biso mingi tólonga mikakatano ya bomoi.
NDAKISA: Josué azali na maladi moko makasi na mokuwa ya mokɔngɔ (Spina-bifida). Mbala mingi esalaka ye mpasi. Kasi Josué azali na bomoi ya esengo ndenge asalisaka basusu. Alobi boye: “Na esika naloba, ‘nakokoka kosala yango te,’ nalukaka kokanisa ndenge oyo nakoki kosala mpo nasalisa bato na bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Nalukaka ndenge ya kosalela basusu makambo mpe yango epesaka ngai esengo mpenza.”
OYO OKOKI KOSALA
Luká mabaku ya kosalisa basusu. Na ndakisa, okoki kolambela moto oyo bofandaka na ye soki azali kobɛla. Oyebi mobange moko oyo azali na mposa básalisa ye na mosala moko ya ndako?
Batelá makanisi malamu ndenge kaka okoki kosala soki oloni elanga. Longolá na motema na yo makanisi mabe oyo ezali lokola molona mabe, mpe na esika na yango tyá elikya mpe saláká makambo oyo ekosala ete ozala na makanisi mpe bomoi ya malamu. Yango ekobota mbuma oyo ekosala ete bomoi na yo ekóma malamu mingi koleka. Mpe yango ekomonisa ete kozala na makanisi malamu ezali na ntina mingi!
Okoki koboya makanisi mabe ndenge bato mosusu baboyaka bilei mosusu mpo na sante na bango