Tótala te “biloko oyo ezali na nsima”
“Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima abongi na bokonzi ya Nzambe te.”—LUKA 9:62.
OKOPESA EYANO NINI?
Mpo na nini tosengeli ‘kokanisa mwasi ya Lota’?
Wapi makambo misato oyo tosengeli te komitungisaka mpo na yango?
Ndenge nini tokoki kokangama na ebongiseli ya Yehova?
1. Yesu apesaki likebisi nini, mpe ebimisi motuna nini?
“BÓKANISA mwasi ya Lota.” (Luka 17:32) Likebisi yango oyo Yesu Kristo apesaki eleki sikoyo mbula pene na 2 000 ezali na ntina mingi lisusu lelo oyo. Kasi, Yesu alingaki mpenza koloba nini? Lokola alobaki yango na bato oyo bazalaki Bayuda, ezalaki na ntina te alimbwela bango soki alingaki koloba nini. Bayebaki likambo oyo ekómelaki mwasi ya Lota. Ntango bazalaki kobima na Sodoma, mwasi yango asalaki likambo oyo bapekisaki bango: atalaki nsima. Yango wana akómaki libanga ya mungwa.—Tángá Ebandeli 19:17, 26.
2. Mbala mosusu mwasi ya Lota atalaki nsima mpo na nini, mpe esukelaki ye ndenge nini?
2 Kasi, mpo na nini mwasi ya Lota atalaki nsima? Alukaki nde komona makambo oyo ezalaki kosalema? Atalaki nde nsima mpo azangaki kondima? To azalaki nde koyoka motema mpasi mpo na biloko oyo atikaki na Sodoma? (Luka 17:31) Ezala soki atalaki nsima mpo na nini, akufaki mpo azangaki botosi. Kanisá naino! Akufaki mokolo moko na bato mabe ya Sodoma mpe Gomora. Yango wana Yesu alobaki ete: “Bókanisa mwasi ya Lota”!
3. Ndenge nini Yesu amonisaki ete tosengeli te kotala nsima na ndenge ya elilingi?
3 Biso mpe tozali na eleko moko oyo ezali na ntina mingi tótala nsima te na ndenge ya elilingi. Yesu amonisaki yango na eyano oyo apesaki mobali moko oyo atunaki ye soki akoki naino kokende kopesa bandeko na ye mbote liboso akóma moyekoli na ye. Yesu alobaki boye: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima abongi na bokonzi ya Nzambe te.” (Luka 9:62) Yesu azalaki nde makambo makasi to alekisaki ndelo ntango alobaki bongo? Te, mpamba te ayebaki ete moto yango alobaki bongo kaka mpo na kokima likambo oyo Yesu asɛngaki ye. Yesu abengaki ezaleli wana ya kozongisa makambo nsima ete “kotala biloko oyo ezali na nsima.” Mabe ezali wapi soki moto oyo azali kosalela etimweli atali mwa moke nsima to atiki kosimba etimweli mpe atali na nsima? Yango ekolongola likebi na ye na mosala oyo azali kosala, mpe ekoki kobebisa mosala yango.
4. Tosengeli kotya miso na biso na nini?
4 Na esika tózongisa makanisi na biso na makambo oyo eleká, tosengeli kotya miso na biso na makambo oyo ezali liboso. Masese 4:25 emonisi yango polele na maloba oyo: “Miso na yo esengeli kotala alima liboso na yo, ɛɛ, miso na yo oyo ezali kongɛnga esengeli kotala alima liboso na yo.”
5. Mpo na nini tosengeli te kotala biloko oyo ezali na nsima?
5 Ezali na ntina mingi tóboya kotala biloko oyo ezali na nsima. Mpo na nini? Mpo tozali na “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1) Mosika te, Nzambe akoboma, kaka bingumba mibale te, kasi mokili mobimba. Tosengeli kosala nini mpo tókufa te lokola mwasi ya Lota? Tosengeli naino koyeba biloko oyo ezali na nsima, oyo tokoki koluka kotala. (2 Ko. 2:11) Na yango, tótalela soki biloko yango ezali nini mpe oyo tokoki kosala mpo tótya makanisi na biso na biloko yango te.
“NTANGO TOZALAKÁ!”
6. Mpo na nini tosengeli kokeba na ndenge na biso ya kotalela mikolo eleká?
6 Likama ya liboso ezali ndenge mabe ya kotalela mikolo eleká. Ntango mosusu tomikosaka. Tokoki kobosana mikakatano oyo tozalaki na yango kala mpe komona ete tozalaki na bomoi ya malamu mingi, mbala mosusu kutu koleka ndenge oyo makambo ezalaki mpenza. Yango ekoki kotinda biso tóbanda komona ete malamu bomoi ezonga ndenge ezalaki kala. Nzokande, Biblia elobi na biso boye: “Komituna té po na nini tango ya kala eleki tango ya lelo na malamu; pamba té moto ya mayele amitunaka bongo té.” (Mos. 7:10, Bible na lingala ya lelo oyo) Mpo na nini kokóma na makanisi ya ndenge wana ezali likama?
7-9. (a) Nini ekómelaki Bayisraele na Ezipito? (b) Makambo nini epesaki Bayisraele esengo? (c) Mpo na nini Bayisraele bakómaki koimaima?
7 Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele na ntango ya Moize. Atako liboso bato ya Ezipito bayambaki Bayisraele lokola bapaya na bango, nsima ya liwa ya Yozefe, Baezipito “batyelaki [Bayisraele] bakapita ya kosalisa bango misala ya makasi mpo na konyokola bango ntango bazali komema mikumba na bango ya kilo.” (Kob. 1:11) Na nsima, Farao atindaki bábomaka bana mibali ya Bayisraele mpo bato ya ekólo yango báleka mingi te. (Kob. 1:15, 16, 22) Yango wana, Yehova alobaki na Moize ete: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.”—Kob. 3:7.
8 Kanisá esengo oyo Bayisraele bayokaki ntango balongwaki na boombo na Ezipito mpe bakómaki na bonsomi! Bamonaki nguya ya Yehova ntango atindaki Malɔzi Zomi oyo enyokolaki Farao, moto ya lolendo, ná bato na ye. (Tángá Kobima 6:1, 6, 7.) Nsukansuka, Baezipito bapesaki Bayisraele nzela bábima na mokili na bango; kutu batyaki bango mbamba mpe bapesaki bango wolo mpe palata ebele, yango wana Biblia elobi ete Bayisraele “bapunzaki Baezipito.” (Kob. 12:33-36) Na nsima, Bayisraele basepelaki ntango bamonaki ndenge Farao ná mampinga na ye bakufaki na Mbu Motane. (Kob. 14:30, 31) Na ntembe te, komona makambo wana ya kokamwa elendisaki mpenza kondima na bango!
9 Nzokande, likambo ya kokamwa, mwa ntango moke kaka nsima ya kobimisama na ndenge ya likamwisi na Ezipito, Bayisraele bakómaki koimaima. Mpo na nini? Mpo na biloko ya kolya! Bazalaki lisusu kosepela te na biloko oyo Yehova azalaki kopesa bango mpe bakómaki koimaima; balobaki ete: “Tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya na Ezipito mpambampamba, ná bakɔkɔmbrɛ, ná bapastɛkɛ, ná bapwaro, ná matungulu ná ayi! Kasi sikoyo molimo na biso ekauki. Miso na biso ezali komona eloko mosusu te kaka mana.” (Mit. 11:5, 6) Makanisi na bango ebebaki mingi mpenza na boye ete balukaki ata kozonga na mokili wana epai bazalaki baombo! (Mit. 14:2-4) Bayisraele batalaki biloko oyo ezali na nsima mpe Yehova asepelaki na ezaleli na bango te.—Mit. 11:10.
10. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Bayisraele?
10 Likambo yango ezali koteya biso nini? Ntango tokutani na mikakatano, tózongisa te makanisi na makambo ya kala oyo tokoki komona ete ezalaki malamu, mbala mosusu kutu liboso tóyeba solo. Atako ezali mabe te kokanisa liteya oyo tozwá na makambo oyo ekómelá biso kala to mpe kokanisa makambo mosusu ya malamu oyo tokutaná na yango, tosengeli kozala na bokatikati mpe kotalela na ndenge ebongi makambo oyo eleká. Soki te, tokoki kobanda komilelalela mpe koluka kozongela makambo oyo tozalaki kosala kala.—Tángá 2 Petro 2:20-22.
MAKAMBO OYO TOTIKÁ
11. Ndenge nini bato mosusu batalelaka makambo oyo batiká?
11 Bato mosusu bakanisaka makambo oyo batiká, oyo bamonaka ete ezalaki mabaku malamu oyo balekisaki. Mbala mosusu yo mpe ozalaki na libaku ya kotánga bakelasi milai, ya kokóma moto ya lokumu, to mpe ya kozwa mosala ya mbongo mingi, kasi oboyaki kolanda makambo yango. Bandeko mingi batiká misala to makambo mosusu oyo bakokaki kozwela mbongo mingi to oyo ekokaki komemela bango lokumu. Sikoyo, bambula eleki mpe nsuka ya mokili oyo eyei kaka te. Okanisaka bomoi oyo mbala mosusu olingaki kozala na yango soki otikaki makambo wana te?
12. Ndenge nini Paulo azalaki kotalela biloko oyo atiká nsima?
12 Ntoma Paulo atikaki makambo mingi mpo akóma moyekoli ya Kristo. (Flp. 3:4-6) Ndenge nini azalaki kotalela biloko oyo atiká nsima? Alobaki boye: “Biloko oyo ezalaki kopesa ngai matomba, mpo na Kristo nakómá kotalela yango lokola biloko oyo ebungá.” Mpo na nini? Abakisaki boye: “Mpo na motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu Nkolo na ngai, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso lokola biloko oyo ebungá. Mpo na ye nandimi kobungisa biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola bosɔtɔ mpamba, mpo nazwa Kristo.”a (Flp. 3:7, 8) Ndenge kaka moto oyo abwaki bosɔtɔ akanisaka yango lisusu te, Paulo mpe akanisaki ata mokolo moko te makambo oyo akokaki kosala na mokili. Amonaki ete ezali ata na motuya moko te.
13, 14. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo?
13 Nini ekosalisa yo soki obandi kokanisa makambo mosusu oyo oboyaki kosala? Landá ndakisa ya Paulo. Ndenge nini? Kanisá motuya ya biloko oyo ozali na yango sikoyo. Ozali na boyokani na Yehova mpe osali makambo mingi oyo emonisi kondima na yo epai na ye. (Ebr. 6:10) Biloko nini okoki kozwa na mokili oyo ekoki kokokana ata moke na mapamboli ya elimo oyo ozali na yango sikoyo mpe oyo okozwa na mikolo ekoya?—Tángá Marko 10:28-30.
14 Na nsima, Paulo alobelaki eloko moko oyo ekosalisa biso tótikala sembo mpe tókoba kokende liboso. Alobaki ete ‘abosanaki biloko oyo ezali na nsima mpe azalaki kosala nyonso mpo azwa biloko oyo ezali na liboso.’ (Flp. 3:13) Tomoni ete Paulo alobeli makambo mibale mpe yango nyonso ezali na ntina. Ya liboso, tosengeli kobosana biloko oyo ezali na nsima, tóbebisa ntango mpe makasi na biso te na kokanisa yango. Ya mibale, lokola mopoti-mbangu oyo alingi kokóma na ndelo ya nsuka, tosengeli kosala nyonso mpe kotya makanisi na biloko oyo ezali liboso.
15. Matomba nini tokozwa soki totaleli ndakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe?
15 Soki tozali kotalela bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe, ezala baoyo bazalaki na bomoi kala to ya lelo, tokozwa makasi ya kokoba kokende liboso na esika ya kotala biloko oyo etikali na nsima. Na ndakisa, soki Abrahama ná Sara bakobaki kokanisa Ure, “mbɛlɛ bakokaki kozonga.” (Ebr. 11:13-15) Kasi, bazongaki kuna te. Ntango Moize akimaki Ezipito mbala ya liboso, atikaki biloko mingi koleka biloko oyo Moyisraele mosusu nyonso atikaki ntango babimaki. Kasi, esika moko te tomoni ete azalaki kokanisa biloko yango. Kutu, Biblia elobi na biso ete “atalelaki nsɔni ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito; mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.”—Ebr. 11:26.
MAKAMBO YA MABE OYO TOKUTANÁ NA YANGO
16. Ndenge nini makambo oyo eleká ekoki kotungisa biso?
16 Nzokande, makambo nyonso te oyo tokutaná na yango ekoki kozala malamu. Mbala mosusu tomitungisaka soki tokanisi masumu to mabunga oyo tosalaká. (Nz. 51:3) Tokoki ntango mosusu koyoka mpasi mpo na disiplini oyo tozwaki. (Ebr. 12:11) Tokoki komitungisa mingi mpo na makambo ya kozanga bosembo, oyo esalemaki mpenza to biso nde tokanisaki bongo. (Nz. 55:2) Tokoki kosala nini mpo makambo yango emema biso te na kokanisa biloko oyo ezali na nsima? Tótalela bandakisa misato.
17. (a) Mpo na nini Paulo amibengaki “moto moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso”? (b) Nini esalisaki Paulo amitungisa mingi te?
17 Mabunga oyo tosalá. Ntoma Paulo alobaki ete azalaki “moto moke koleka moto oyo aleki moke na kati ya basantu nyonso.” (Ef. 3:8) Mpo na nini alobaki bongo? Alobaki ete: “Mpamba te nanyokolaki lisangá ya Nzambe.” (1 Ko. 15:9) Kanisá naino ndenge oyo Paulo azalaki koyoka soki akutani na bandeko mosusu oyo anyokolaki! Nzokande, na esika Paulo atika ete makanisi wana ezindisa ye, atyaki makanisi na ye na boboto monene oyo Nzambe amoniselaki ye. (1 Tim. 1:12-16) Botɔndi oyo azalaki na yango mpo na boboto monene wana epesaki ye makasi ya komipesa na mosala na ye. Masumu oyo Paulo asalaká kala ezalaki na kati ya biloko oyo alingaki mpenza kobosana. Soki biso mpe totye makanisi na biso na motema mawa oyo Yehova amoniseli biso, tokolɛmba nzoto te mpo tozali komitungisa mpo na makambo oyo eleká, oyo tokoki lisusu kobongola te. Tokoki kosalela makasi na biso mpo na mosala oyo tozali na yango.
18. (a) Nini ekoki kokómela biso soki tokanisi disiplini oyo tozwaki? (b) Ndenge nini tokoki kolanda maloba ya Salomo na oyo etali kondima disiplini?
18 Disiplini oyo eyokisaki biso mpasi. Tosengeli kosala nini soki tobandi kokanisa disiplini oyo tozwaki, oyo esalaki biso mpasi na motema? Yango ekoki kotungisa biso, kasi mpe ‘kolɛmbisa biso nzoto.’ (Ebr. 12:5) Disiplini ekosalisa biso te mpe ekobongisa biso te soki tozali “kotyola” yango, elingi koloba koboya yango to soki tozali “kolɛmba nzoto” elingi koloba kondima disiplini, kasi na nsima koboya kosalela yango. Eleki malamu tólanda toli ya Salomo oyo elobi boye: “Simbá disiplini; kotika yango te. Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.” (Mas. 4:13) Lokola sofɛlɛ oyo azali kotosa bilembo oyo azali komona na nzela, tóndima disiplini, tósalela yango, mpe tókoba kokende liboso.—Mas. 4:26, 27; tángá Baebre 12:12, 13.
19. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya kondima ya Habakuku mpe ya Yirimia?
19 Makambo ya kozanga bosembo—oyo esalemaki mpenza to biso nde tokanisaki bongo. Ntango mosusu, tokoki komiyoka lokola Habakuku oyo abelelaki epai ya Yehova mpo na kosɛnga bosembo, mpo azalaki koyeba te ntina oyo Yehova azalaki kotika nzela na makambo ya mabe. (Hab. 1:2, 3) Ezali na ntina mingi tólanda ndakisa ya kondima ya mosakoli yango, oyo alobaki boye: “Ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko, nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.” (Hab. 3:18) Na ndakisa ya Yirimia, soki na kondima nyonso tozali “kozela” Yehova, Nzambe ya bosembo, tokoki kozala na elikya ete makambo nyonso ekobonga na ntango oyo esengeli.—Bil. 3:19-24.
20. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘kokanisa mwasi ya Lota’?
20 Tozali na eleko moko oyo makambo minene ezali kosalema mpe mosusu ekoya na nsima. Tiká ete mokomoko na biso akangama na ebongiseli ya Yehova. Tólanda toli ya Biblia oyo elobi ete tótala liboso mpe tótala te biloko oyo ezali na nsima. Na ndenge yango tokomonisa ete tozali ‘kokanisa mwasi ya Lota’!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bosɔtɔ” awa elimboli mpe “biloko oyo babwakeli bambwa” to “nyɛi.” Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete ndenge oyo Paulo asalelaki liloba yango emonisi “ekateli makasi ya kotika eloko oyo ezangi ntina mpe mpii oyo moto ayokaka mpo na eloko oyo alingi lisusu kozongela te.”