Bomoi ya sika mpo na bankɔ́kɔ na biso
LILOBA ya Nzambe, Biblia, ezali koteya biso ete na nsima ya liwa moto nyonso alekaka mbala moko na bomoi oyo ezali kokóba kati na mboka ya bilimu? Te, ezali bongo te. Biblia ezali komonisa elikya moko kitoko ya bomoi nsima ya liwa, kasi te na lolenge oyo bato mingi bakanisaka yango.
Tótalela naino oyo Biblia ezali koloba na ntina na nkɔ́kɔ na biso ya liboso, Adama. Yehova ayemaki ye “uta na mputulu ya mabelé.” (Genese 2:7, NW) Adama azalaki na likoki ya kozala na bomoi mpo na libela mpe na esengo awa na mabelé. (Genese 2:16, 17) Nzokande, atombokelaki Mozalisi na ye oyo atondi na bolingo, mpe mpo na yango akufaki.
Adama akendeki wapi na ntango akufaki? Nzambe alobaki na ye ete: “Ekojonga yɔ kati na mabele mpɔ ete okamatamaki na yango, jambi ojali mputulu, mpe okojonga kati na mputulu.”—Genese 3:19.
Adama azalaki wapi liboso ete Yehova azalisa ye uta na mputulu? Azalaki epai te. Azalaki te. Na yango, na ntango Nzambe alobaki ete Adama asengelaki ‘kojonga kati na mabele,’ alingaki bobele koloba ete Adama akozala lisusu na bomoi te, motindo moko lokola mputulu. Adama ‘alekaki’ te mpo na kokóma tata mobandisi ya mboka ya bilimu ya bankɔ́kɔ. Akendeki mpe te epai na bomoi ya bisengo na likoló, soko mpe epai na bomoi ya mpasi ezangi nsuka na esika moko ya minyoko. Mbongwana bobele moko asalaki ezalaki bongo ya kolongwa na bomoi mpo na kokóma na ezalela ya kozanga bomoi, kolongwa na ezalela ya kozala kino na oyo ya kozanga kozala.
Ezali boni mpo na bato mosusu? Bakitani ya Adama mpe batikaka kozala na bomoi na nsima ya liwa? Biblia epesi eyano ete: “Yɔnsɔ [bato mpe banyama] bakokɛnda na esika mɔkɔ; yɔnsɔ ilongwi na mputulu, yɔnsɔ ikojonga na mputulu lisusu.”—Mosakoli 3:19, 20.
Ezalela ya bakufi
Ee, bakufi bazali na bomoi te, bakoki koyoka te, komona te, koloba te, kokanisa mpe te. Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ, . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe jua na bango isili kobeba.” Biblia elobi lisusu ete: “Ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na esika na bakufi, esika ekokɛnda yɔ.”—Mosakoli 9:5, 6, 10.
Na yango, engebene Liloba ya Nzambe, na ntango bato bazali na bomoi, bayebi ete bakokufa. Nzokande, na ntango bakufaka, bayebaka lisusu likambo moko te. Batɛlɛmaka te pembeni ya nzoto na bango moko oyo esili kokufa, komonáká bongo makambo bazali kosala likoló na yango. Kati na ezalela ya kozanga bomoi, esengo ezalaka te, mpasi mpe te mawa mpe te. Bakufi bayebaka te ete ntango ezali koleka. Ezalela na bango ya kozanga koyeba makambo ezali ya mozindo mpenza koleka motindo nyonso ya mpongi.
Yobo, moko na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, ayebaki ete bato bakóbaka te kozala na bomoi na nsima ya liwa. Asosolaki mpe ete soki Nzambe te, mbɛlɛ elikya ya kozonga lisusu na bomoi elingaki kozala te. Yobo alobaki ete: “Moto akokufa mpe akokatama, ɛɛ, moto akobimisa mpema na ye mpe ye ajali wapi? Boye akolala mpe akotɛma lisusu tɛ.” (Yobo 14:10, 12) Na ntembe te, Yobo azalaki te komizela ete na ntango alingaki kokufa, alingaki kokutana na bankɔ́kɔ na ye ya kala kati na mboka ya bilimu.
Elikya ya lisekwa
Lokola bato ya bomoi bazalaka lisusu na bomoi te nsima ya liwa, motuna ya ntina ezali oyo Yobo atunaki lisusu, ete: “Sɔkɔ moto akokufa, akobika nde lisusu?” Yobo ye moko apesi eyano oyo ete: “Nakojila kino mikolo yɔnsɔ na ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya. Okobianga mpe ngai nakojongisela yɔ; okojala na mposa mpɔ na mosala na mabɔkɔ na yɔ.”—Yobo 14:14, 15.
Elingi koloba ete, atako Yobo alingaki kokóma na ezalela ya kozanga bomoi, Nzambe alingaki kobosana ye te. Yobo azalaki na kondima ete ntango elingaki koya, wana Yehova asɛngelaki “kobyanga” ye lisusu na bomoi na nzela ya lisekwa.
Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, amonisaki ete elikya ya Yobo kati na lisekwa ezalaki ya makanisi mpamba te. Yesu amonisaki mpenza ete bakufi bakoki kosekwisama. Na lolenge nini? Ye moko asekwisaki bato! Azalaki te na ntango Yobo akufaki mpo na kosekwisa ye, kasi wana azalaki awa na mabelé, Yesu asekwisaki mwana mobali ya mwasi moko mokufeli-mobali na engumba Naina. Yesu azongisaki mpe na bomoi elenge mwasi moko ya mibu 12 ya mobali moko na nkombo Yailo. Mpe asekwisaki moninga na ye Lazalo, oyo akufaki esilaki koleka mikolo minei.—Luka 7:11-15; 8:41, 42, 49-56; Yoane 11:38-44.
Kolongola bikamwiseli oyo asalaki, Yesu alobaki mpe na ntina na lisekwa monene oyo ekosalema na mikolo mizali koya. Alobaki ete: “Ntango ekoya wana yɔnsɔ bajali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Na nsima, ntoma Paulo, oyo Yehova asalelaki mpo na kosekwisa elenge mobali moko, amonisaki mpe ete azalaki na kondima kati na lisekwa ya mikolo mizali koya. Alobaki ete: “Najali na elikia na Njambe . . . ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.”—Misala 20:7-12; 24:15.
Mikapo wana ya Makomami, oyo mizali komonisa lisekwa ya mikolo mizali koya elimboli te ete bomoi oyo ezali kokóba kati na mokili oyo ezangi komonana. Ezali kolobela ntango oyo bamilió ya bakufi bakozonga na bomoi awa na mabelé na nzoto ya mosuni. Baoyo wana bakosekwa bakobosana te makambo ya bomoi na bango oyo bazalaki na yango na mabelé liboso ya kokufa. Bakobotama te lisusu lokola bana mike. Nzokande, bakozala bobele na bomoto oyo bazalaki na yango na ntango bakufaki, bakoyeba lisusu makambo na bango ya liboso mpe bomoto na bango. Bango moko bakomiyeba, basusu mpe bakoyeba bango. Ekozala mpenza esengo, wana bato bakokutana lisusu na baninga mpe bandeko na bango! Ekozala mpe esengo monene wana bakokutana na bankɔ́kɔ na bango!
Lisekwa mpo na bomoi na likoló
Yesu alobaki te ete basusu bakokende likoló? Ee, alobaki yango. Na butu oyo ezalaki liboso ete abomama, alobaki ete: “Na ndako na tata na ngai, bifandelo bijali mingi. . . . nakokɛnda kobɔngisela bino esika. Mpe sɔkɔ nakokɛnda kobongisela bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ejali ngai, bino bojala mpe wana lokola.” (Yoane 14:2, 3) Yesu azalaki koloba na bantoma na ye ya sembo, kasi alingaki te koloba ete bato malamu nyonso basengeli kokende na likoló.
Yesu amonisaki ete baoyo bakosekwisama mpo na kokende na likoló basengeli kokokisa masengami mosusu, bobele te kozala moto malamu. Moko na masengami yango ezali bongo ya kozala na boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe ya mikano na Nzambe. (Yoane 17:3) Masengami mosusu ezali bongo ya komonisa kondima kati na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto mpe ya kotosa ye. (Yoane 3:16; 1 Yoane 5:3) Mpe, lisengami mosusu ezali bongo ya “kobotama lisusu” lokola moklisto oyo azwi batisimo mpe abotami na elimo santu ya Nzambe. (Yoane 1:12, 13; 3:3-6) Lisengami mosusu mpo na kozala na bomoi na likoló ezali bongo ya koyika mpiko lokola Yesu asalaki yango, komonisáká bosembo na ye liboso na Nzambe ata kino na kufa.—Luka 22:29; Emoniseli 2:10.
Masengami wana matombwani mapesamaki na ntina. Baoyo bakosekwisama mpo na kokende na likoló bazali na mosala monene ya kosala. Yehova ayebaki ete biyangeli ya bato bikoki te kolónga kotambwisa makambo na mabelé. Na yango, akamataki ebongiseli mpo na kosala boyangeli moko ya likoló, to Bokonzi, oyo ekoyangela bato. (Matai 6:9, 10) Yesu nde akozala Mokonzi na Bokonzi wana. (Danyele 7:13, 14) Ndambo ya bato oyo baponami awa na mabelé mpe basekwisami bakoyangela elongo na ye. Biblia esakolaki ete baoyo bakosekwisama bakokóma “bokonji na banganga mpɔ na Njambe na biso, mpe bakojala bakonji na mokili.”—Emɔnisɛli 5:10.
Motuya monene ya bato bakokokisa masɛngami mpo na lisekwa na likoló? Te. Kozanga ete bango moko bákana yango, mingi kati na baoyo bazali kolala kati na kufa bakokisi masengami wana te. Bato mingi bazwaki libaku moke to mpe ata libaku moko te ya koyekola solo na ntina na Yehova mpe mikano na ye. Bazalaki na bomoi mpe bakufaki kozanga kozala na boyebi na ntina na Yesu Klisto to na ntina na Bokonzi ya Nzambe.
Yesu abéngaki baoyo bakokende likoló ete “etɔnga mokɛ.” (Luka 12:32) Na nsima, eyaki komonana ete baoyo “basombami uta na mabele” mpo na koyangela elongo na Klisto na likoló bazali na motángo ya bato 144 000. (Emɔnisɛli 14:1-3; 20:6) Atako 144 000 ezali motuya monene ya oyo bakokoka na “bifandelo mingi” oyo Yesu alobelaki, kasi ezali motuya moke soki tokokanisi yango na bamiliare ya bato oyo bautaki na Adama.—Yoane 14:2.
Makambo oyo makobima liboso na lisekwa awa na mabelé
Tiká tótalela lisusu makambo oyo tolobelaki liboso. Engebene Biblia, baoyo bakufi bazali na bomoi te kati na liwa kino na ntango Yehova Nzambe akosekwisa bango. Basusu bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló, epai kuna bakoyangela elongo na Yesu Klisto kati na boyangeli ya Bokonzi. Bato mingi bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabelé, mpo ete bákóma bayángelami ya Bokonzi yango.
Moko na makambo oyo na nzela na yango Nzambe akokokisa mokano na ye mpo na mabelé ezali bongo lisekwa na mabelé. Yehova azalisaki yango mpo ete “bato bafanda wana.” (Yisaya 45:18) Esalemaki na mokano ete ezala efandelo ya libela mpo na bato. Na yango, mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Lola mpe likolo-na-lola ejali na [Yehova], kasi apɛsaki mokili na bana na bato.”—Njembo 115:16.
Liboso ete lisekwa mpo na bomoi na mabelé ebanda, mbongwana minene esengeli kosalema. Na ntembe te, okondima ete mokano ya Nzambe ezalaki te ete mabelé etonda na bitumba, kobebisama ya mopepe, mobulu, mpe koboma. Ezali bongo bato oyo bazangi botosi epai na Nzambe mpe na mibeko na ye ya sembo nde bazali kobimisa makambo wana. Na yango, Bokonzi ya Nzambe ‘ekobebisa babebisi na mokili’—litambe lileki monene kati na likambo litali kokokisa mokano ya Nzambe awa na mabelé. (Emoniseli 11:18) Bokonzi yango ekoboma bato mabe nyonso, ekotika bato ya sembo ete bázala na bomoi na mabelé mpo na libela.—Nzembo 37:9, 29.
Paladiso na mabelé
Baoyo bakosekwisama na mabelé mapetolami bakozala basokemi, bato batɔ́ndi na bolingo, baoyo basalaka oyo ezali sembo. (Kokanisá na Matai 5:5.) Na nsé ya litambwisi ya Bokonzi ya Nzambe oyo etɔ́ndi na bolingo, bakozala na bomoi ya esengo mpe ya kimya. Biblia ezali komonisa biso makambo oyo makozala kuna: “[Nzambe] akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.”—Emɔnisɛli 21:4.
Ee, mabelé makobongwana Paladiso. (Luka 23:43) Kanisá naino lolenge yango ekozala! Balopitalo mpe bandako ya kosalisa bato ya mpasi ekozala lisusu na ntina te. Kati na Paladiso, baoyo batungisami mpo na konuna bakozongela lisusu makasi mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango ekobonga. (Yobo 33:25; Yisaya 35:5, 6) Bandako ya bibembe, nkunda, mpe malita makozala lisusu te. Na nzela ya Bokonzi na ye, Yehova “akosilisa kufa libela.” (Yisaya 25:8) Na ntembe te, mapamboli motindo oyo ekolimbola bongo bomoi ya sika mpo na biso mpe mpo na bankɔ́kɔ na biso.
[Elilingi na lokasa 7]
Baoyo bakosekwisama awa na mabelé bakozala bayángelami ya Bokonzi