‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
‘Bangá Nzambe mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango ezali nyonso oyo esɛngami epai na moto.’—MOSAKOLI 12:13, NW.
1, 2. Mpo na nini ezali na ntina ete tótalela mokumba na biso liboso na Nzambe?
MOSAKOLI moko ya kala atunaki motuna oyo: “Yehova azali kosɛnga nini epai na yo?” Na nsima, amonisaki oyo Yehova azali kosɛnga—osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.—Mika 6:8, NW.
2 Na eleko oyo ya elimo ya lipandá mpe ya ezaleli ya moto na moto na makambo na ye, bato mingi basepelaka te na likanisi oyo ete Nzambe azali kosɛnga eloko moko epai na bango. Balingaka te ete básɛngisa bango likambo moko boye. Kasi, tokoloba boni mpo na bosukisi oyo Salomo apesaki kati na mokanda ya Mosakoli? ‘Lokola nyonso esili koyokama, nsuka ya likambo mobimba ezali ete: Bangá Nzambe mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango ezali nyonso oyo esɛngami epai na moto.’—Mosakoli 12:13, NW.
3. Mpo na nini tosengeli kotyela mokanda ya Mosakoli likebi mozindo?
3 Ata soki makambo na biso mpe likanisi na biso likoló na bomoi ezali ya lolenge nini, tokoki kozwa litomba monene soki totaleli ntina ya bosukisi wana. Mokonzi Salomo, oyo akomaki mokanda yango mopemami, atalelaki na mozindo mwa ndambo ya makambo oyo malekaka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Kozanga kokanisa malamu, bamoko bakoki kosukisa nokinoki ete botaleli na ye ezali bobele makanisi ya kolɛmbisa. Nzokande, yango epemamaki mpenza na Nzambe mpe ekoki kosalisa biso ete tótalela soki misala na biso mpe makambo oyo totyaka na esika ya liboso kati na bomoi na biso ezali na motuya nini, mpe litomba na yango ezali ete tokozwa esengo monene.
Kolónga mabanzo minene ya bomoi
4. Makambo nini Salomo atalelaki mpe alobelaki na mokanda ya Mosakoli?
4 Salomo atalelaki na bozindo ‘mosala ya bana na bato.’ “Natyaki motema na ngai koluka mpe kozwa mayele mpo na makambo nyonso masalami na nsé na lola.” Liloba “mosala” oyo Salomo alobeli awa elimboli te bobele mosala moko oyo moto asalaka mpo na kobikela to mosala ya kompanyi, kasi makambo nyonso oyo mibali mpe basi bazali kosala na boumeli ya bomoi na bango mobimba. (Mosakoli 1:13) Tiká tótalela mwa mabanzo, to misala ya moboko oyo Salomo alobelaki, mpe na nsima tósala bokokanisi na misala na biso mpe na makambo oyo totyaka na esika ya liboso kati na bomoi na biso.
5. Wapi moko ya mabanzo minene oyo bato bazalaka na yango?
5 Na ntembe te, mosolo ezali eloko ya ntina monene kati na mabanzo mpe na misala mingi ya bato. Moto moko te akoki komonisa na elónga mpenza ete Salomo azalaki na likanisi mabe na ntina na mosolo oyo bato mingi ya bozwi bazali na yango. Andimaki mpenza ete moto asengeli kozala na mwa mosolo; kozala na mosolo mokoki ezali malamu koleka kozala na bomoi ya bozángá to ya bobólá. (Mosakoli 7:11, 12) Nzokande, osili komona mbala mosusu ete mosolo, mpe biloko oyo yango esombaka, ekoki kokóma mokano ya liboso kati na bomoi—ezala epai na babólá to epai na bazwi.
6. Na lisalisi ya lisese moko ya Yesu mpe na makambo oyo Salomo amonaki, liteya nini tokoki kozwa na ntina na mosolo?
6 Omikundola lisese ya Yesu na ntina na mozwi oyo, kozaláká ntango nyonso na mayoki ete biloko azalaki na yango ekokaki te, akóbaki kosala mpo na kozwa biloko mingi lisusu. Nzambe atalelaki ye ete azali moto azangi mayele. Mpo na nini? Mpo ete ‘bomoi na biso euti te na biloko oyo tozali na yango.’ (Luka 12:15-21) Makambo oyo Salomo akutanaki na yango—oyo ekoki koleka makambo oyo biso tosilá komona—mazali kondimisa maloba wana ya Yesu. Tángá lolenge yango elobelami na Mosakoli 2:4-9. Na boumeli ya eleko moko boye, Salomo amipesaki na koluka bozwi. Atongaki bandako mpe asalaki bilanga kitoko. Azalaki na makoki ya kozwa basi kitoko mpe azwaki bango. Kasi bozwi, mpe biloko oyo azwaki na nzela na yango, ememelaki ye mpenza bosepeli ya solosolo, to liyoki ya moto oyo asali likambo moko ya motuya, to mpe ntina ya solo kati na bomoi na ye? Ayanolaki polele ete: “Ngai natali misala nyonso misalaki mabɔkɔ na ngai mpe na makambo nyonso mamekaki ngai kosala, mpe talá, nyonso izalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ. Libonza ezalaki mpe na nsé na moi te.”—Mosakoli 2:11; 4:8.
7. (a) Makambo oyo masili komonana mandimisi biso nini na oyo etali ntina ya mosolo? (b) Makambo nini osili komona yo moko, oyo mandimisi bosukisi ya Salomo?
7 Wana ezali mpenza likambo ya solo, oyo bomoi ya bato mingi esili kondimisa bosolo na yango. Tosengeli kondima ete kozala na mosolo mingi ezali te kosilisa mikakatano nyonso. Yango ekoki kosilisa mikakatano mosusu, lokola kozwa bilei mpe bilamba kozanga nkaká. Nzokande, eyebani malamu ete na mbala moko, moto alataka bobele molato moko mpe alyaka bobele bilei bikoki na libumu na ye mpe amɛlaka bobele ndambo ekoki. Lisusu, osilá kotánga masoló ya bato ya bozwi oyo bazali na mikakatano mingi kati na bomoi na bango, na ndakisa mabala na bango mazali kokufa, bomoi na bango ebebi na kolangwa masanga mpe na bilangwiseli, bakisá mpe matáta elongo na bandeko ya libota na bango. Moto na bozwi mingi, J. P. Getty, alobaki ete: “Mosolo epesaka ntango nyonso esengo te. Ekoki kútu nde kopesa mawa.” Na elónga mpenza, Salomo atángaki bolingi mosolo ete ezali bisalasala. Kesenisá likambo wana mpe makambo oyo Salomo amonisi sikawa ete: “Mpɔngi na moto na mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi na mozwi ikopekisa mpɔngi na ye.”—Mosakoli 5:10-12.
8. Mpo na nini esengeli te kopesa na mosolo motuya moleki ndelo?
8 Lisusu, mosolo mpe biloko ya mosuni ememelaka moto liyoki ya bosepeli te mpo na mikolo mizali koya. Soki ozalaki na mosolo mingi mpe na biloko ebele, okokaki mbala mosusu kotungisama mingi mpo na kobatela yango, mpe oyebi te makambo nini makobima lobi. Okobungisa yango nyonso, elongo na bomoi na yo? (Mosakoli 5:13-17; 9:11, 12) Lokola makambo mazali bongo, ososoli sikawa malamumalamu ntina oyo bomoi na biso, to mosala na biso, esengeli kozala na ntina monene mpe ya libela koleka mosolo mpe bozwi ya mosuni.
Libota, lokumu, mpe nguya
9. Mpo na nini bomoi ya libota ekɔtisamaki na elónga mpenza kati na botaleli oyo Salomo asalaki?
9 Botaleli oyo Salomo asalaki likoló na bomoi esangisaki mpe likambo ya komibanzabanza mpo na libota. Biblia ezali kolobela bomoi ya libota, bakisá mpe esengo ya kobota mpe kobɔkɔla bana. (Genese 2:22-24; Nzembo 127:3-5; Masese 5:15, 18-20; 6:20; Malako 10:6-9; Baefese 5:22-33) Kasi yango ezali nde likambo lileki ntina kati na bomoi? Emonani ete bato mingi bakanisaka lolenge wana, kolandáká makanisi oyo mimeseno mosusu ya bonkɔ́kɔ ezali kolendisa likoló na libala, bana, mpe boyokani oyo esangisi bato ya libota. Nzokande, Mosakoli 6:3 emonisi ete ata soki moto azali na bana monkámá na bomoi na ye, yango ezali te fungola ya kozwa esengo kati na bomoi. Kanisá naino baboti boni basali nyonso ekoki mpo ete bana na bango bázwa ebandeli malamu mpe bázala na bomoi ebongi. Atako milende wana mibongi kokumisama, nzokande Mozalisi na biso amonisaki soko moke te ete ntina ya moboko kati na bomoi na biso ezali bobele ya kobimisa mabota oyo makokitana biso, lokola banyama basalaka yango, na mayele ya lɔɔ́mbi, mpo na kobatela motindo na bango ete elimwa te.
10. Mpo na nini kopesa na libota motuya moleki ndelo ekoki kozala bisalasala?
10 Na bososoli nyonso, Salomo amonisaki mwa makambo mosusu ya bomoi ya libota. Na ndakisa, moto moko akoki kosala milende ya kobomba biloko mpo na bana na ye mpe mpo na bana ya bana na ye. Kasi bana na ye mpe bana na bango bakomimonisa mpenza ete bazali na mayele? To bakosalela nde na bozoba nyonso biloko oyo moto wana ayanganisaki mpo na bango? Soki basaleli yango na lolenge oyo elobelami na motuna ya mibale, milende na ye ekozala mpenza “bisalasala mpe likambo mabe mingi”!—Mosakoli 2:18-21; 1 Mikonzi 12:8; 2 Ntango 12:1-4, 9.
11, 12. (a) Makambo nini ya bomoi bato mingi bamipesi na yango? (b) Mpo na nini ekoki kolobama ete koluka lokumu ezali “koluka kokwa mopɛpɛ”?
11 Na ngámbo mosusu, bato mingi basili kotya bomoi malamu ya libota na bango na esika ya mibale mpe batye ekateli na bango ya kozala na lokumu to bopusi likoló na basusu na esika ya liboso. Likambo oyo limonanaka mingi epai na mibali. Osilá komona momeseno yango epai na baninga na yo ya kelasi, baninga ya mosala mpe bato ya zingazinga na esika ofandaka? Mingi bazali kosala makasi mpo na komimonisa, kokóma bato minene to kozala na bokonzi likoló na basusu. Kasi likambo yango lizali mpenza na ntina?
12 Kanisá naino lolenge basusu basalaka makasi mpo na koyebana mingi, ezala na etando moke to mpe bipai binso. Tomonaka yango na eteyelo, na zingazinga ya bisika oyo tofandaka, mpe na bituluku ndenge na ndenge ya bato. Likambo yango lizali nguya oyo esalaka bopusi makasi epai na baoyo balingi koyebana na makambo ya ntɔ́ki, na makambo ya kominanola mpe na makambo ya politiki. Nzokande, yango ezali mpenza mosala ya mpunda, boye te? Na elónga mpenza, Salomo abéngaki yango “koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4) Ata soki elenge moko akómi na lokumu mingi kati na etuluku moko, to na ekipi moko ya masano, to mpe na etuluku moko ya babɛti miziki—to soki mobali to mwasi moko azwi lokumu na mombongo to na etulúká moko boye—bato boni bayebi lokumu na bango wana? Bato mingi oyo bazali na ngámbo mosusu ya mokili (to ata na mboka wana) bayebi ete moto yango azalaka? Bazali kokóba bomoi na bango kozanga koyeba lokumu moke oyo moto wana azali na yango, boye te? Ekoki mpe kolobama bongo mpo na bopusi to bokonzi nyonso oyo moto akoki kozwa na mosala, na engumba to kati na etuluku moko ya bato.
13. (a) Lolenge nini Mosakoli 9:4, 5 ezali kosalisa biso ete tózala na likanisi libongi na oyo etali koluka lokumu to bokonzi? (b) Nini tosengeli kondima soki makambo nyonso mazali kosuka bobele na bomoi oyo? (Talá maloba na nsé na lokasa.)
13 Lokumu wana, to bokonzi, ekosuka na likambo nini? Ntango libota moko lileki mpe mosusu eyei, bato ya lokumu mpe ya nguya bazali kokufa mpe kobosanama. Likambo yango lisili komonana mpenza epai na batongi, babɛti miziki mpe bato mosusu ya ntɔ́ki, bakisá mpe bato oyo basalaka milende makasi mpo na kokɔtisa mbongwana na makambo ya bomoi, mpe bongo na bongo; yango emonani mpe epai na bato mingi ya politiki mpe bakonzi ya basodá. Kati na baoyo basalaki misala nyonso wana, oyebi bato boni ya sikisiki oyo bazalaki na bomoi katikati na mibu 1700 mpe 1800? Salomo amonisaki makambo na elónga nyonso, kolobáká ete: “Mbwa na bomoi aleki nkosi ekufi na malamu. Mpo ete bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango . . . esili kobungana.” (Mosakoli 9:4, 5) Mpe soki nyonso ezali kosuka bobele na bomoi oyo, boye koboma nzoto mpo na koluka lokumu mpe nguya ezali mpenza bisalasala.a
Oyo tosengeli komipesa na yango mpe mokumba na biso
14. Na nini mokanda ya Mosakoli ekoki mpenza kosalisa mokomoko na biso?
14 Ezali na misala mingi, mikano mingi mpe bisengo mingi oyo Salomo alobelaki yango te, oyo bato bapesi bomoi na bango mobimba mpo na koluka yango. Nzokande, makambo oyo ye akomaki ekoki mpenza. Botaleli na biso ya mokanda ya Mosakoli esengeli te kozwama lokola eloko ya mpii to ya kolongola elikya, mpamba te tozali nde kotalela mokanda ya Biblia oyo Yehova Nzambe amonaki malamu ete apemisa yango mpo na bolamu na biso. Yango ekoki kosalisa mokomoko na biso ete asembola lolenge na ye ya kotalela bomoi mpe ayeba makambo oyo tosengeli komipesa na yango. (Mosakoli 7:2; 2 Timoté 3:16, 17) Likambo yango ezali mpenza solo, soki totaleli bosukisi oyo Salomo akómaki na yango na lisalisi ya Yehova.
15, 16. (a) Likanisi ya Salomo ezalaki nini na ntina na kosepela na bomoi? (b) Likambo nini Salomo amonisaki na elónga mpenza ete lizali na ntina mpo na kosepela na bomoi?
15 Likambo moko oyo Salomo azongelaki mbala na mbala ezalaki ete basaleli ya Nzambe ya solo basengeli kozwa esengo mpo na misala na bango liboso na Ye. “Namoni ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo na Nzambe.” (Mosakoli 2:24; 3:12, 13; 5:18; 8:15) Na maloba wana, tósimba ete Salomo alingaki te kolendisa elimo ya kosalasala biyenga; apesaki mpe nzela te na ezaleli oyo ete ‘tólya mpe tómela, mpe tósakana zambi tokokufa lobi.’ (1 Bakolinti 15:14, 32-34) Alingaki nde koloba ete tosengeli kosepela na bisengo oyo bibongi, lokola kolya mpe komela, wana ‘tozali kosala malamu na boumeli ya bomoi na biso.’ Na ntembe te, kosala bongo ezali kosunga biso ete tópesa bomoi na biso mobimba na kosala mokano ya Mozalisi, mpamba te ye nde ayebi komonisa oyo ezali mpenza malamu.—Nzembo 25:8; Mosakoli 9:1; Malako 10:17, 18; Baloma 12:2.
16 Salomo akomaki ete: “Kendá, lyá [limpa, NW] na yo na esengo mpe melá vinyo na yo na motema na kosepela, mpo ete Nzambe akondima misala na yo sasaipi.” (Mosakoli 9:7-9) Ɛɛ, mobali to mwasi oyo azali mpenza na bozwi mpe na bomoi ya esengo ezali moto oyo amipesi na misala mikosepelisaka Yehova. Yango esɛngi na biso ete tótalelaka ye ntango nyonso. Lolenge oyo ya kotalela makambo ekeseni mpe na lolenge bato mingi batalelaka yango, bazali kosala makambo na bomoi engebene makanisi ya bomoto!
17, 18. (a) Bato mingi bazali kosala nini liboso ya makambo ya bomoi? (b) Makambo nini mamonanaka oyo tosengeli te kobosana yango?
17 Atako mangomba mingi mazali koteya ete ezali na bomoi mosusu nsima ya oyo ya sikawa, bibele ya bato bazali na makanisi ete bakoki kotya motema na bango mobimba bobele na bomoi oyo. Osili mbala mosusu komona lolenge bazali kosala makambo motindo Salomo alobaki ete: “Mitema na bana na bato ikani makasi kosalaka mabe, zambi etumbu mpo na kosala mabe epesami noki te.” (Mosakoli 8:11) Ata baoyo bakangami na misala ya mabe te bazali komonisa ete lobanzo na bango nyonso ezali likoló na bomoi ya sikawa. Yango wana bazali kopesa motuya mingi na mosolo, na biloko ya mosuni, na lokumu, na nguya likoló na basusu, na libota, to na makambo mosusu ya lolenge wana. Kasi Salomo asuki wana te. Abakisaki ete: “Ata moto na masumu akosala mabe mbala monkámá mpe mikolo na ye izali kofuluka mingi nde nayebi solo ete ekozala malamu epai na bango bazali kotosa [“kobanga,” NW] Nzambe, baoyo bakobangaka liboso na ye. Nde ekozala malamu na moto mabe te; akofulisa mpe mikolo na ye te, oyo izali lokola molili, zambi atosi [“abangi,” NW] Nzambe te.” (Mosakoli 8:12, 13) Ya solo, Salomo andimisamaki ete ekozala malamu mpo na biso soki ‘tozali kobanga Nzambe ya solo.’ Malamu ndenge nini? Eyano ekoki kozwama kati na maloba ya bokesenisi oyo asalaki. Yehova akoki ‘kofulisa mikolo na biso.’
18 Baoyo bazali naino bilenge basengeli komanyola likoló na likambo oyo ya solo ete ekozala malamu mpo na bango soki bakobanga Nzambe. Yo moko osili mbala mosusu komona ete moto oyo azali na mbangu mingi akoki kobɛta libaku mpe kozanga kozwa libonza ya momekano ya bopoti mbangu. Limpinga ya basodá makasi likoki kolóngama na banguna. Moto oyo azali na mayele mingi na makambo ya mombongo akoki kokwea na bobólá. Mpe makambo mingi mosusu oyo mazali kobima mbalakaka mazali kopesa nzela te ya koyeba oyo ekoya lobi na bomoi. Nzokande, okoki mpenza kondimisama na likambo oyo: etamboli ya mayele mpe ya bolóngi ezali oyo ya kosepela na bomoi wana ozali kosala malamu engebene mibeko ya Nzambe oyo mitali bizaleli malamu mpe na boyokani na mokano na ye. (Mosakoli 9:11) Yango esɛngi koyekola kosala mokano ya Nzambe na lisalisi ya Biblia, komipesa epai na ye bomoi na yo mobimba, mpe kokóma moklisto oyo abatisami.—Matai 28:19, 20.
19. Lolenge nini bilenge bakoki kosalela bomoi na bango, kasi nzela ya mayele ezali oyo wapi?
19 Mozalisi akoki soko moke te kotindika bilenge to basusu na makasi ete bálanda litambwisi na ye. Bakoki komipesa na kelasi milaimilai, kokómáká mbala mosusu bayekoli ya mbula na mbula ya babúku ndenge na ndenge ya mayele ya bato. Nsukansuka, yango ekoya mpenza kolɛmbisa nzoto. To mpe bakoki komitambwisa engebene motema na bango ya bomoto ya kozanga kokoka to kolanda oyo ezali kosepelisa miso na bango. Na ntembe te, yango ekomemela bango mitungisi, mpe bomoi oyo elekisami lolenge wana ekoya komonana ete ezalaki bisalasala. (Mosakoli 11:9–12:12; 1 Yoane 2:15-17) Na yango, Salomo abwaki mbelá epai na bilenge—mbelá oyo tosengeli kotalela malamumalamu, ata soki tozali na mbula boni: “Kanisá Motongi na yo na mikolo na bolenge na yo, naino mikolo mabe iyei te, naino bilanga ikómi te wana okolobaka ete, Nazali na esengo na yango te.”—Mosakoli 12:1.
20. Nsango oyo ezali na mokanda ya Mosakoli ezali na likanisi nini ya bokatikati?
20 Na bongo, tokopesa bosukisi nini? Ezali boni mpo na bosukisi oyo Salomo akómaki na yango? Asosolaki, to atalelaki na bozindo, “makambo nyonso masalami na nsé na moi mpe talá, nyonso izali bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 1:14) Mokanda ya Mosakoli ezali te maloba ya moto moko ya makanisi mabe, oyo azangi esengo to moto moko oyo motema ebebá. Maloba yango mazali nde eteni moko ya Liloba lipemami ya Nzambe mpe ebongi na biso ete tótalela yango.
21, 22. (a) Makambo nini ya bomoi Salomo atyaki likebi likoló na yango? (b) Akómaki na bosukisi nini ya mayele? (c) Kotalelama ya mokanda ya Mosakoli esali bopusi nini likoló na yo?
21 Salomo atyaki likebi na milende ya bato, na mikakatano na bango, mpe na bamposa na bango. Amanyolaki likoló na lolenge makambo matambolaka malamu wana nyonso esalemi na motindo mobongi, mpe lolenge bato mingi bazali kosuka na kozwa mitungisi mpe na kozanga kozwa litomba. Atalelaki na bozindo makambo ya sikisiki oyo matali ezaleli ya kozanga kokoka ya moto, bakisá mpe liwa oyo ezali kouta na yango. Kati na makambo yango, alobelaki mpe boyebi oyo Nzambe apesi likoló na ezalela ya bakufi mpe bilikya ya bomoi na mikolo mizali koya. Nyonso wana etalelamaki na moto oyo Nzambe abakiselaki ye mayele, ɛɛ, moko na baoyo baleki mayele kati na bato nyonso bazali na bomoi kino lelo. Na bongo, bosukisi oyo akómaki na yango ekɔtisamaki na Makomami Mosantu mpo na bolamu na biso banso oyo tolingi ete bomoi na biso ezala mpenza na ntina. Tosengeli kondima yango, boye te?
22 ‘Lokola nyonso esili koyokama, nsuka ya likambo mobimba ezali ete: Bangá Nzambe mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango ezali nyonso oyo esɛngami epai na moto. Mpo ete Nzambe ya solo yemei akoyeisa lisambisi likoló na mosala ya motindo nyonso, na ntina na makambo nyonso mabombami, koyeba soko mazali malamu to mazali mabe.’—Mosakoli 12:13, 14, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaki ndimbola oyo ya bososoli mozindo: “Tosengeli te kobebisa bomoi na biso na bisalasala mpamba . . . Soki nyonso ezali kosuka bobele na bomoi oyo, boye likambo ya ntina ezali te. Bomoi oyo ezali lokola ndembo ebwakami na likoló, oyo mwa moke na nsima ekokwea lisusu na mabelé. Ezali elili oyo ezali koleka lokola mokalikali, fololo oyo ezali kokauka, lititi moke oyo lisengeli kokatama mpe kokauka nyɛɛ. . . . Soki tokokanisi yango na bolai ya bomoi ya seko na seko, bomoi na biso ezali bobele mwa mpumbulu. Na kotalela bolai ya elekelo ya ntango, bomoi oyo ezali bobele mwa litangá ya mai kati na ebale. Ya solo, [Salomo] azali na elónga ntango ataleli mabanzo mpe misala ya moto mpe atángi yango ete ezali bisalasala. Tozali kokufa nokinoki, mpe emonani lokola ete ntina ya kobotama ezali kútu te; tozali lokola moto moko kati na bamiliare ya bato oyo basengeli koya mpe kokende, mpe bobele bato moke nde bayebi ete tofandaki awa solo. Likanisi oyo lizali te ya kozokisa to ya koyokisa mawa to mpe ya kolɛmbisa. Yango ezali nde bosolo, likambo ya solosolo, likanisi ya semba, soki nyonso ezali kosuka bobele na bomoi oyo.—15 Febwáli 1958, lokasa 58, ebimeli ya Lifalansé.
Ozali komikundola?
◻ Wapi likanisi ya mayele na oyo etali esika ya bozwi kati na bomoi na yo?
◻ Mpo na nini tosengeli te kopesa motuya ya koleka ndelo na libota, na lokumu, to na bopusi likoló na basusu?
◻ Salomo alendisaki ezaleli nini endimami na Nzambe na ntina na bisengo?
◻ Litomba nini osili kozwa na botaleli na biso ya mokanda ya Mosakoli?
[Bililingi na lokasa 15]
Mosolo mpe bozwi ezali ndanga ya bosepeli te
[Elilingi na lokasa 17]
Bilenge bakoki kondimisama ete makambo makozala malamu mpo na bango soki bazali kobanga Nzambe