ELOBELI TITRE YA EZIPELI
Ndenge ya kosalela ntango na yo malamu
“Soki nazalaki ata na ntango mingi!” Mbala boni osí olobá bongo? Ntango nde esalaka ete bato nyonso bázala ndenge moko, mpo ezala bato oyo bazali na bokonzi mpe bazwi bazalaka na ntango ndenge moko na bato mpamba mpe babola. Longola yango, ezala mozwi to mobola, moko te akoki konduka ntango. Soki esí ekei, ezongaka te. Likambo ya mayele ezali ya kosalela ntango na biso malamu. Ndenge nini? Tótalela makambo minei oyo esalisaki bato mingi básalela ntango na bango malamu.
1. Yebá kobongisa makambo
Yebá makambo oyo eleki ntina. Biblia epesi toli oyo: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Salá liste ya makambo oyo ezali na ntina to oyo ezali kosɛnga osala yango nokinoki, kasi kobosana te ete makambo ya ntina na ndakisa kosomba biloko ya kolya ekoki kosɛnga mpenza te ete osala yango nokinoki. Mpe makambo oyo ekoki kosɛnga ete osala yango nokinoki, na ndakisa kozala ntango emisyo moko ya televizyo oyo osepelaka na yango ebandi, ekoki mpenza kozala na ntina te.a
Kanisá liboso. Mosakoli 10:10 elobi boye: “Soki esaleli moko ya ebende esili mino mpe moto apelisi yango te, akobimisa mpenza nguya na ye ya bomoi.” Ebakisi boye: “Kosalela bwanya mpo na kolonga epesaka litomba.” Liteya nini tozwi? Pelisá epasola na yo, elingi koloba bongisá makambo liboso mpo okoka kosalela ntango na yo na ndenge ya malamu. Tyá pembeni to longolá makambo oyo ezangi ntina, oyo elyaka ntango mpe esilisaka makasi ya nzoto. Soki omoni ete mosala oyo osalaki etikeli yo ntango, mpo na nini te kosala mosala mosusu oyo okanaki kosala yango nsima? Kokanisa liboso ekosala ete ntango na yo ebimisela yo matomba, lokola mosali ya mayele oyo apelisaka epasola na ye.
Komisá bomoi na yo pɛpɛlɛ. Boyáká makambo oyo ezangi ntina to oyo elyaka ntango kaka mpamba. Soki ozali na baprogramɛ mpe makambo mingi ya kosala, yango ekoki kobakisela yo mitungisi oyo ezangi motó na makolo mpe kosilisela yo esengo.
2. Boyá makambo oyo eyibaka ntango
Kozongisa makambo nsima mpe kokakatana mpo na kozwa bikateli. “Ye oyo azali kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te; mpe ye oyo azali kotala mapata akobuka mbuma te.” (Mosakoli 11:4) Liteya nini tozwi? Kozongisa makambo nsima eyibaka ntango mpe ememelaka moto matomba te. Mosali-bilanga oyo azelaka tii ntango makambo nyonso ekobonga akoki te kolona to kobuka mbuma. Ndenge moko mpe, kozanga koyeba makambo oyo ekokómela biso lelo to lobi ekoki kosala ete tózala bato ya mitema mibale. To tokoki komona ete tosengeli kozela tii tokoyeba makambo nyonso liboso tózwa ekateli moko boye. Mpo na koloba solo, kozwa bikateli ya ntina esɛngaka kosala bolukiluki mpe kokanisa malamumalamu. Masese 14:15 elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” Mpo na koloba solo, mbala mingi toyebaka mpenza te soki bikateli oyo tozwaka ezalaka malamu to te.—Mosakoli 11:6.
Koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka. Yakobo 3:17 elobi ete: “Bwanya oyo euti na likoló [to epai ya Nzambe] ezalaka . . . makambo makasimakasi te.” Toboyi te, koluka kosala makambo malamu ezali mabe te! Kasi na bantango mosusu, soki toluki kosala makambo na ndenge ya kokoka kasi esimbi te, tokoki kolɛmba nzoto. Na ndakisa moto oyo azali koyekola monɔkɔ mosusu asengeli kobosana te ete akoki mpe kosala mabunga, mpe koyeba ete akoki kozwela mabunga yango liteya. Kasi, moto oyo alingaka kosala makambo na ndenge ya kokoka akoki kobanga ete aloba likambo oyo esengeli te; ezaleli oyo ekoki kopekisa ye akende liboso. Ezali malamu mingi koyeba ete tokokoka makambo nyonso te! Masese 11:2 elobi ete: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” Lisusu, bato ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa bamonaka te ete bazali sipesiale mpe mbala mingi bandimaka mabunga na bango.
“Biloko esombamaka na mbongo mpenza te. esombamaka nde na ntango.”—Buku What to Do Between Birth and Death
3. Talelá makambo na ndenge oyo ebongi mpe yebá ete okokoka makambo nyonso te
Tyá mosala mpe kozwa mwa mopɛpɛ na esika na yango. “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:6) Mbala mingi, baoyo bamikómisá baombo ya mosala bazwaka litomba te na mbuma ya “ebele ya mosala makasi” ya mabɔkɔ na bango. Batikalaka ata na ntango te mpe na makasi te. Nzokande gɔigɔi alingaka nde kopema mingi mpe abebisaka ntango na ye mpamba. Biblia esɛngi tózala na bokatikati: salá mosala makasi mpe sepelá na lifuti na yango. Kosepela ya ndenge wana ezali “likabo ya Nzambe.”—Mosakoli 5:19.
Laláká malamu. Mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi na kimya.” (Nzembo 4:8) Mpo na kozala nzoto malamu mpe kokanisa malamu, moto oyo akómi mokóló asengeli kolekisaka ngonga mwambe na mpɔngi. Kolala malamu ekosalisa moto asalela ntango na ye malamu mpo ekosalisa ye atya makanisi esika moko mpe ekosala ete abosanaka makambo te, na ndenge yango, akozala na likoki ya kosimba makambo oyo azali koyekola. Kasi, kozanga kolala malamu ebebisaka likoki ya koyekola makambo mpe ekoki kosala ete moto asala baaksida, mabunga mpe asilikaka mpambampamba.
Mityelá mikano oyo okokoka kokokisa. “Komona na miso eleki mposa makasi ya molimo.” (Mosakoli 6:9) Na mokuse, moto ya bwanya atikaka te ete mposa moko boye etambwisa bomoi na ye, mingimingi bamposa oyo ebongi te to oyo akokoka kokokisa te. Longola yango, akosamaka te na bapiblisite oyo ebendaka bato to na kɔtá nyongo oyebana. Kutu, asepelaka na biloko oyo akoki kozwa—‘oyo miso na ye ezali komona.’
4. Tiká bizaleli malamu etambwisa yo
Talelá bizaleli na yo. Bizaleli esalisaka moto ayeba oyo ezali malamu, na ntina mpe oyo ebongi. Soki bomoi na yo ezalaki likɔnga, bizaleli na yo elingaki kotya likebi na esika oyo yango ezali kouta. Nzokande, bizaleli malamu esalisaka moto atya makambo oyo ebongi na esika ya liboso na bomoi na ye mpe asalela ntango na ye ya mokolo na mokolo na ndenge ya malamu mpenza. Epai wapi okoki kozwa bizaleli ya ndenge wana? Bato mingi batalelaka Biblia, bandimaka ete eleki mpenza na bwanya.—Masese 2:6, 7.
Tyá bolingo na esika ya liboso. Bakolose 3:14 elobi ete bolingo “ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” Tokoki te kozala na esengo ya solosolo mpe na kimya na makanisi soki tozangi bolingo, mingimingi na kati ya libota. Bato oyo bakipaka makambo yango te, mbala mosusu batyaka koluka bozwi to mosala na bango na esika ya liboso, bazalaka na esengo ya solosolo te. Yango wana, Biblia emonisi ete bolingo ezali ezaleli ya libosoliboso, etángi yango mbala ebele mpenza.—1 Bakorinti 13:1-3; 1 Yoane 4:8.
Zwáká ntango ya koyekola makambo ya Nzambe. Mobali moko na nkombo Geoff azalaki na mwasi ya malamu, bana mibale, baninga ya malamu mpe mosala ya monganga oyo ezalaki kofuta ye malamu. Ata bongo, mosala na ye ezalaki kosala ete akutana na bato oyo bazalaki konyokwama mpe kokufa. Amitunaki boye: “Oyo nde ndenge bomoi esengelaki kozala?” Na nsima, mokolo moko atángaki mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia mpe azwaki biyano ya malamu mpenza.
Geoff ayebisaki mwasi mpe bana na ye makambo oyo ayekolaki, bango mpe basepelaki na yango. Libota na bango ekómaki koyekola Biblia mpe yango esalaki ete bomoi na bango ekóma na ntina mpe esalisaki bango básalela ntango na bango malamu koleka. Boyekoli na bango ya Biblia epesaki mpe bango elikya kitoko ya bomoi ya seko na mokili oyo ezangi mpasi.—Emoniseli 21:3, 4.
Makambo oyo Geoff akutanaki na yango etindi biso tókanisa maloba oyo Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Okosepela kobomba mwa ntango mpo na koyekola makambo ya Nzambe? Mpo na koloba solo, longola kobomba ntango ya koyekola makambo ya Nzambe, ezali na eloko mosusu te oyo ekoki kopesa yo mayele ya kosalela malamu kaka te ntango na yo ya mokolo na mokolo kasi mpe ya bomoi na yo mobimba.
a Talá lisolo “20 façons de libérer du temps,” na Lamuká! ya 04/2010 na Lifalanse.