Bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango
“Kanisá, uta sikawa, Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”—MOSAKOLI 12:1, NW.
1. Maloba nini ya elenge moko ya mibu 11 oyo mamonisi ete Mozalisi na biso azali moto ya solosolo?
OYO nde likambo malamu ntango bilenge bazali koloba mpe kosala na lolenge oyo ezali komonisa ete bazali kotalela Yehova Nzambe lokola moto ya solosolo oyo bango bakumisaka mpe oyo balingi kosepelisa! Elenge mobali moko ya mibu 11 alobaki ete: “Wana nazali ngai moko mpe nazali kotala na lininisa, namonaka ete biloko bizalisami na Yehova bizali ya kokamwa. Na nsima, nakanisaka lolenge Paladiso ekozala kitoko na mikolo mizali koya mpe lolenge nakoki kosimba banyama na ntango wana.” (Yisaya 11:6-9) Abakisaki ete: “Wana nazali ngai moko, nabondelaka Yehova. Nayebi ete akosilikela ngai te mpo ete nazali kosolola na ye ntango nyonso. Nayebi ete amonaka ngai ntango nyonso.” Mozalisi na biso azali mpenza moto ya solosolo mpo na yo ndenge elenge mobali oyo azali kotalela ye?
Nzambe azali mpenza moto ya solosolo mpo na yo?
2. (a) Lolenge nini Mozalisi na yo akoki kokóma moto ya solosolo mpo na yo? (b) Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango na kososola ete Nzambe azali mpenza moto ya solosolo?
2 Mpo ete Yehova azala moto ya solosolo mpe bilaka na ye bizala solo mpo na yo, osengeli libosoliboso koyeba makambo matali ye mpe makambo kitoko oyo alaki yo mpo na mikolo mizali koya kati na mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Biblia ezali kolobela. (Emoniseli 21:3, 4) Soki baboti na yo bateyaki yo makambo wana, ozali na ntina ya kozala na botɔ́ndi mpamba te yango epesi yo likoki ya kolanda mobeko oyo mopemami: “Kanisá, uta sikawa, Mozalisi na yo Monene.” (Mosakoli 12:1, NW ) Na kotalela mateya oyo azwaki uta bolenge epai na baboti na ye, elenge moko alobaki ete: “Yehova atalelamaki kati na makambo nyonso ya bomoi. Yango ezalaki likambo lipesaki ngai nzela ya kokanisa Mozalisi na ngai.” Elenge mwasi mosusu alobaki ete: “Nakozala ntango nyonso na botɔ́ndi epai na baboti na ngai lokola bateyaki ngai ete Yehova azali moto ya solosolo. Bamonisaki ngai lolenge ya kolinga ye mpe bazalaki kolobela ngai esengo oyo ezwamaka na kosalela ye ntango nyonso.”
3, 4. Nini ekoki kosalisa yo na kokanisa Yehova lokola moto ya solosolo?
3 Nzokande, mingi bakakatanaka mpo na kotalela Nzambe lokola moto ya solosolo oyo azali komibanzabanza mpo na bango. Ezali bongo mpo na yo? Elenge moko asalisamaki mpenza na kokanisa na ntina na Nzambe na lisalisi ya maloba oyo mazalaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: “Toyebi te bonene ya nzoto ya Yehova Nzambe.” Ya solo, lokumu ya Nzambe etaleli te bolai to bonene ya nzoto na ye, lokola maloba oyo malandi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli wana eyebisaki yango: “Bonene na ye ya solosolo etaleli lolenge nini ya Nzambe ye azali,” elingi koloba Nzambe ya bosembo, ya motema mawa, ya bolingo mpe oyo alimbisaka.a (Exode 34:6; Deteronome 32:4; Nzembo 86:5; Yakobo 5:11) Otalelaka Yehova lokola moto ya solosolo, moninga ya kotyela motema oyo okoki kozala na boyokani kitoko elongo na ye?—Yisaya 41:8; Yakobo 2:23.
4 Yesu asalisaki bayekoli na ye ya liboso ete moko na moko azala na boyokani elongo na Nzambe. Na yango, ntango ntoma Yoane akomaki na ntina na lisekwa na ye mpo na kozala na bomoi na likoló, Yoane alobaki ete: “Tokozala lokola [Nzambe], mpo ete tokomona ye pelamoko ezali ye.” (1 Yoane 3:2; 1 Bakolinti 15:44) Lelo oyo, bilenge bakoki mpe kosalisama ete bátalela Nzambe lokola moto ya solosolo, moto oyo bakoki koyeba malamu ata soki bakoki mpenza komona ye na miso te. Elenge mobali moko alobaki ete: “Baboti na ngai basalisaki ngai ete nakanisa Yehova na kotunáká ngai mituna mingi, na ndakisa, ‘Yehova akoloba nini? Lolenge nini okoki kolimbola yango na maloba na yo moko? Yango elimboli nini?’” Mituna lokola oyo mipusaka biso ete tókanisa na ntina na boyokani na biso elongo na Nzambe, boye te?
Kokanisa: ndimbola na yango
5. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete kokanisa moto esɛngi makambo mingi kasi esuki te bobele na komikundola nkombo na ye?
5 Kotosa etindá oyo ete, “Kanisá, uta sikawa Mozalisi Monene na yo,” elimboli makambo mingi kasi esuki te bobele na kobanza na ntina na Yehova. Elimboli mpe kosala eloko, kosala oyo ezali kosepelisa ye. Ntango mosáli mabe abondelaki Yesu ete, “Wana ekokóma yo na bokonzi na yo, kanisá ngai,” alingaki ete Yesu asala eloko mpo na ye, kasi asuka te bobele na komikundola nkombo na ye. Alingaki ete Yesu asala eloko, asekwisa ye. (Luka 23:42) Bobele bongo, Yosefe ntango azalaki na bolɔ́kɔ azalaki komizela ete likambo moko esalema mpo na ye ntango asɛngaki epai na mosáli na mesa ya Falo ete akanisa ye epai na Falo. Mpe ntango Yobo abondelaki Nzambe ete: “Kanisá ngai,” Yobo azalaki kosɛnga ete Nzambe asekwisa ye na mikolo mizalaki koya.—Yobo 14:13; Genese 40:14, 23.
6. Lolenge nini liloba ya Liebele libongolami na “kanisá” etaleli bolingo mpo na eloko to moto oyo ozali komikundola?
6 Nganga-mayele moko alobi ete liloba ya Liebele oyo libongolami na “kanisá” mbala mingi emonisaka “bolingo oyo ezwami kati na makanisi mpe likambo oyo likoki kopusa moto ete amikundwela.” Kolobelama ya “bolingo” kati na liloba “kokanisá” ekoki komonana na lolenge oyo “bato ndenge na ndenge” balobaki wana bazalaki na mokili mokauki: “Tozali kokanisa mbisi elyaki biso na lifuti te na Ezipito.” Motindo moko Yobo abondelaki ete Nzambe akanisa ye na lolenge ya malamu, bobele bongo Hizikiya, Nehemia, Davidi, mpe mokomi moko na Nzembo babondelaki mpe ete Yehova akanisa bango na bolingo, ete abosana te bosembo na bango.—Mituya 11:4, 5; 2 Mikonzi 20:3; Nehemia 5:19; 13:31; Nzembo 25:7; 106:4.
7. Soki tozali na bolingo nyonso kokanisa Nzambe, lolenge nini yango ekozala na bopusi likoló na etamboli na biso?
7 Na yango, tokoki komituna ete: ‘Biso tokanisaka Mozalisi na biso na bolingo nyonso mpe toboyaka kosala makambo oyo makoki koyokisa ye mawa to kopesa ye mpasi na motema?’ Elenge mwasi moko alobaki ete: “Mama asalisaki ngai na koyeba ete Yehova azali na mayoki, mpe uta bomwana na ngai, nayebaki ete misala na ngai mikokaki kosepelisa ye to kosilikisa ye.” (Nzembo 78:40-42) Mosusu alimbolaki boye: “Nayebaki ete misala na ngai mikoki kosalisa to kopekisa ngai kopesa eyano na ntembe oyo Satana abimiselaki Yehova. Nazalaki kolinga kosepelisa motema ya Yehova, yango nde esalisaki ngai mpe ezali kolanda kosalisa ngai lelo oyo.”—Masese 27:11.
8. (a) Mosala nini ekomonisa ete tozali kokanisa Yehova na bolingo nyonso? (b) Mituna nini bilenge bakotalela na mayele nyonso?
8 Ya solo mpenza, kati na mokili mabe oyo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kokanisa Yehova na komipesáká mobimba na mosala oyo mozali kosepelisa ye. Nzokande, ekozala mpenza likambo malamu soki bilenge bakomekola ndakisa ya elenge Timoté ya ekeke ya liboso—kozanga kobosana ebele ya bilenge oyo babangaka Nzambe lelo oyo—na kokóba mosala ya ntango nyonso ya boklisto lokola ministre mobongisi-nzela! (Misala 16:1-3; 1 Batesaloniki 3:2) Nzokande, ekoki kotunama ete: Okozala mpenza na likoki ya komisunga yo moko kati na mosala ya mobongisi-nzela? Mpe soki obali, okozala na makoki ya koleisa bato ya libota na yo? (1 Timoté 5:8) Oyo ezali mituna ya ntina, mpe ezali litomba ete okanisa malamumalamu likoló na yango.
Kolakisama oyo ezali na mokano
9. Ekateli nini bilenge basengeli kozwa na ntina na kotánga kelasi?
9 Lokola mokili ya lelo ekómi na makambo ndenge na ndenge, ekosengela kotánga kelasi mwa mingi mpo na kozwa mosala oyo ekosunga yo kati na mosala ya mobongisi-nzela. Osili mbala mosusu komona ete ata bato oyo batángaki na eteyelo monene bazali lisusu kozongela kotánga kelasi mosusu mpo na koyekola makambo ya sika oyo bankolo-kompanyi bazali kotalela yango na motuya lelo oyo. Na bongo, bino bilenge oyo bolingi kosepelisa Nzambe, kelasi boni bosengeli kotánga? Ekateli ya malamu esengeli kokamatama na kolanda etindá oyo epemami: “Kanisá, uta sikawa, Mozalisi na yo Monene.”
10. Kolakisama nini eleki malamu tokoki kozwa yango?
10 Ya solo, okolinga kolanda oyo ata bato mingi ya mayele ya mokili batalelaka ete kolakisama ya malamu koleka—oyo ezwamaka na koyekola na likebi nyonso Liloba ya Nzambe. Mokomi moko ya babúku, Johann Wolfgang von Goethe, ye moto na Allemagne, akomaki ete: “Soki mayele ekóli mingi na [libota moko], boye likoki ekozala mpenza mingi ete Biblia esalelama lokola moboko mpe ezala esaleli mpo na kolakisa.” Ɛɛ, boyekoli ya Biblia ekosalisa yo malamu na bomoi koleka kolakisama nyonso mosusu oyo okoki kozwa!—Masese 2:6-17; 2 Timoté 3:14-17.
11. (a) Mosala nini moleki ntina tokoki kosala? (b) Mpo na nini elenge akoki kopona kotánga mwa ndambo ya kelasi?
11 Lokola boyebi ya Nzambe epesaka bomoi, mosala ya ntina koleka oyo okoki kosala lelo ezali ya kokabola boyebi yango epai na bato mosusu. (Masese 3:13-18; Yoane 4:34; 17:3) Nzokande, mpo na kosala na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma, osengeli koteyama na banzela ya moboko. Osengeli kozala na likoki ya kokanisa malamumalamu, koloba polelepolele, kotánga mpe kokoma malamu—makoki oyo nyonso eteyamaka na eteyelo. Na yango, zwá makambo oyo ozali koyekola na eteyelo na motuya, lokola esalaki yango Tracy, elenge moko ya Florida, na États-Unis, oyo azwaki lipɔlɔ́mi na bapwɛ́ mingi na eteyelo ya kati. Amonisaki elikya na ye: “Mokano na ngai ezali ya kokóma mosaleli ya ntango nyonso ya Nzambe na ngai Yehova, mpe nazali kolikya ete kolakisama oyo nazwi ekosalisa ngai ete nakokisa mokano yango.”
12. Soki ekateli ezwami ya kotánga kelasi ya likoló, mokano nini yango ekosalisa na kokokisa?
12 Osili kokanisa mpo na nini okendaka na eteyelo? Mokano na yango ya liboso ezali ya kobongisa yo mpo ete okóma ministre ya molende ya Yehova? Soki ezali bongo, okolinga kotalela na likebi nyonso lolenge malamu kelasi na yo ezali kokokisa mokano wana. Nsima na kosolola elongo na baboti na yo, ekateli ekoki kozwama ete osengeli kokóba kotánga mwa kelasi mosusu koleka oyo esɛngami na Letá. Kelasi wana ya likoló ekoki kosalisa yo ete ozwa mosala oyo ekosunga yo mpe oyo ekotikela yo ntango mpe makoki ya kosangana mingi na mosala ya Bokonzi.—Matai 6:33.
13. Lolenge nini baklisto mibale ya mboka Russie oyo balandaki kelasi ya likoló bamonisaki mokano na bango kati na bomoi?
13 Bamoko oyo bazali kolanda kelasi ya likoló bazali kobanda mosala ya ntango nyonso ata wana bazali kotánga kelasi yango. Tótalela ndakisa ya Nadia mpe Marina, bilenge basi mibale na Moscou, na mboka Russie. Bango nyonso mibale bazwaki batisimo na Apríli 1994 mpe babandaki kosala lokola baministre babongisi-nzela basungi. Mwa moke na nsima, bazwaki mapɔlɔ́mi na eteyelo ya kati mpe bakɔtaki kelasi mosusu ya koyekola kontabilité mpo na boumeli ya mbula mibale. Na sanza ya Máí 1995, babandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nzokande, bakóbaki kozwa bapwɛ́ malamu mingi na kelasi na bango ya kontabilité. Lisusu, bazalaki na likoki ya kotambwisa bango mibale, mwayene ya bayekoli 14 ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ wana bazalaki naino kokende na eteyelo. Bilenge basi wana bazali na elikya ete mateya bazwi na boyekoli na bango ya kontabilité ekosalisa bango na kozwa mosala malamu, na boye ete bákoka komisunga bango moko kati na mosala ya ntango nyonso.
14. Na kotalela motuya boni ya kelasi oyo tokopona kotánga, eloko nini esengeli kozala na ntina koleka kati na bomoi na biso?
14 Soki ozali kolanda bakelasi ya likoló koleka oyo esɛngami na Letá, talelá na mayele nyonso ntina oyo ozali kolanda yango. Ezali nde mpo na kokóma moto monene mpe kozala na bozwi ya mosuni? (Yilimia 45:5; 1 Timoté 6:17) To mokano na yo ezali nde ya kosalela kelasi ya likoló mpo na kosangana mingi na mosala ya Yehova? Lydia, elenge mwasi oyo aponaki kolanda kelasi ya likoló, amonisaki likanisi malamu na makambo ya elimo, alimbolaki ete: “Basusu balandaka kelasi milaimilai mpe batikaka ete mposa ya bozwi ya mosuni ebosanisa bango Nzambe. Mpo na ngai, boyokani na ngai elongo na Nzambe, yango nde likambo ya ntina koleka.” Oyo nde ezaleli malamu mpo na biso banso!
15. Kolakisama nini ya ndenge na ndenge baklisto ya ekeke ya liboso bazwaki yango?
15 Likambo ya ntina koleka, baklisto ya ekeke ya liboso bazwaki kolakisama ya boyebi ndenge na ndenge na makambo makeseni. Na ndakisa, ntoma Petelo mpe ntoma Yoane batalelamaki lokola bato “bamesani na mikanda te, mpe bato bayekoli makambo te,” mpamba te batángaki te na biteyelo ya balabi. (Misala 4:13) Nzokande, ntoma Paulo atángaki na eteyelo oyo tokoki kokokanisa yango lelo na iniversité. Atako bongo, Paulo asalelaki te kolakisama na ye mpo na kobenda likebi likoló na ye moko; kasi yango esalisaki ye mingi ntango azalaki kosakola epai na bato ndenge na ndenge. (Misala 22:3; 1 Bakolinti 9:19-23; Bafilipi 1:7) Bobele bongo, Manaene, oyo ‘atángaki esika moko na mokonzi Elode,’ azalaki moko kati na baoyo bakambaki lisangá oyo lizalaki na Antiokia.—Misala 13:1.
Mpo na nini kosalela mosolo na yo na mayele nyonso?
16. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi kokanisa Mozalisi na biso soki tozali na banyongo? (b) Lolenge nini moko na masese na Yesu emonisi ntina ya kokanisa malamu liboso ya kobimisa mosolo?
16 Soki oyebi kosalela te mosolo na yo na mayele nyonso, ekozala mpasi ete okanisa Mozalisi na yo na kosaláká oyo ezali kosepelisa ye. Mpamba te soki omikɔtisi na banyongo, ekoki kolobama ete ozali na nkolo mosusu. Biblia elimboli ete: “Moto wa nyongo azali moombo wa oyo adefisi ye.” (Masese 22:7, Liloba lya Nzambe) Moko na masese ya Yesu emonisi ntina ya kokanisa liboso ya kobimisa mosolo. Yesu alobaki ete: “Mpo ete soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso kotánga motuya na yango kotala soko azali na mosolo na kosilisa yango te? Soko boye te, akotya moboko, mpe soko akoki kosilisa yango te, bango nyonso bakotala yango bakobanda kosɛka ye.”—Luka 14:28, 29.
17. Mpo na nini mbala mingi ezalaka mpasi koyeba kosalela mosolo na yo malamu?
17 Na yango, na mayele nyonso, okotosa etindá ya Makomami oyo ete ‘ozalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana.’ (Baloma 13:8) Kasi ezalaka mpasi na kolanda yango, mingimingi ntango tozali liboso na biloko ya sika oyo basáli na piblisité bazali komonisa ete ozali mpenza na mposa na yango. Moboti moko, oyo asalaki makasi mpo na kosalisa bana na ye ete bázala na bososoli, alobaki ete: “Tosili kolekisa ntango mingi mpo na kolobela nini oyo tosengeli na yango mpe nini oyo tolingi sé kolinga.” Mingimingi biteyelo bilóngi te na koteya makambo motindo oyo, bizali mpenzampenza te kopesa kolakisama mpo na oyo etali lolenge ya kosalela mosolo na motindo molongobani. Mwasi moko oyo ayekolá makambo matali bomoi ya bato kati na efandelo na bango, alobaki ete: “Tozali kozwa lipɔlɔ́mi na eteyelo ya kati na koyebáká mingi makambo matali triangle isocèle; nzokande toyebi te lolenge ya kobatela mosolo.” Na bongo, nini ekoki kosalisa yo na kosalela mosolo na mayele nyonso?
18. Nini ezali nzela ya mayele mpo na kosalela mosolo, mpe mpo na nini?
18 Kotosa etindá oyo ete, “Kanisá, uta sikawa Mozalisi Monene,” ezali nzela malamu mpo na koyeba kosalela na mayele nyonso mosolo na yo. Ezali bongo mpamba te soki otosi etindá wana, mokano na yo ya libosoliboso ekozala bongo ya kosepelisa Yehova, mpe bolingo na yo mpo na ye ezali na bopusi likoló na lolenge ozali kosalela mosolo na yo. Na yango, okopesa nzela te na makambo oyo olingi ete ezwa esika ya komipesa na yo molimo mobimba epai na Nzambe. (Matai 16:24-26) Okosala makasi na kobatela liso na yo “pɛtɛɛ,” elingi koloba kotalela bobele Bokonzi ya Nzambe mpe kosala mokano na ye. (Matai 6:22-24) Boye, okomona ete etindá ya Nzambe oyo ya “kokumisa Yehova na biloko na yo ya motuya” ezali bongo libaku moko ya esengo.—Masese 3:9, NW.
Bilenge oyo babongi komekolama
19. Lolenge nini bilenge na ntango ya kala bakanisaki Mozalisi na bango?
19 Likambo ya esengo, bilenge mingi, ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso, basili kokanisa Mozalisi na bango. Elenge Samwele akangamaki ngwi na mosala na ye kati na mongombo atako bopusi mabe ya baoyo azalaki kosala elongo na bango. (1 Samwele 2:12-26) Bonzenga mpe kitoko ya mwasi ya Potifala, ekokaki te kolengola Yosefe na kosala pite. (Genese 39:1-12) Atako azalaki “bobele elenge,” Yilimia asakolaki na mpiko nyonso liboso na botɛmɛli makasi. (Yilimia 1:6-8) Mwana mwasi moke ya Yisalaele, kozanga kobanga, ayebisaki mokonzi ya mampinga ya Sulia ete akenda koluka lisalisi na Yisalaele, epai akokaki koyekola makambo na ntina na Yehova. (2 Mikonzi 5:1-4) Elenge Danyele mpe baninga na ye babatelaki kondima na bango ntango bamekamaki na ntina na bilei oyo bipekisamaki na mibeko ya Nzambe. Mpe elenge Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego baponaki kobwakama na litumbu ya mɔ́tɔ na esika ya kobebisa bosembo na bango epai na Nzambe na kosambeláká ekeko.—Danyele 1:8, 17; 3:16-18; Exode 20:5.
20. Lolenge nini bilenge mingi basili kokanisa Mozalisi na bango na mikolo na biso?
20 Lelo oyo bilenge koleka 2 000 oyo bazali na mibu 19 kino 25 bazali kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Etúká ya New York, na États-Unis. Bazali bobele ndambo moke kati na ebele ya bilenge oyo bazali kokanisa Mozalisi na bango na mokili mobimba. Lokola Yosefe na ntango ya kala, basili koboya kobebisa bopɛto na bango ya bizaleli. Mingi batosaki Nzambe na esika ya kotosa bato ntango bapusamaki ete bápona nani basengeli kosalela. (Misala 5:29) Na mobu 1946, na mboka Pologne, banyokolaki Henryka Zur, elenge ya mibu 15, ntango aboyaki kofukamela ekeko. Moko na bato oyo bazalaki konyokola ye alobaki ete: “Okoki kondima nyonso oyo olingi, kasi salá bobele O nkombo.” Lokola aboyaki, babendaki ye kati na zámba mpe kuna babɛtaki ye masasi, elikya na ye ya bomoi ya seko ebatelamaki ngwi!b
21. Ekozala likambo ya mayele kondima libyangi nini, mpe litomba na yango ekozala nini?
21 Oyo nde esengo esengeli kozala kati na motema ya Yehova na ntina na bilenge oyo basili kokanisa ye na boumeli ya bikeke! Okoyanola na libyangi na ye oyo ete, “Kanisá, uta sikawa, Mozalisi na yo Monene”? Ya solo, ebongi mpenza ete okanisa ye! Kanisá mokolo na mokolo na ntina na nyonso oyo asili kosala mpo na yo mpe oyo akosala, mpe ndimá libyangi na ye oyo ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.”—Masese 27:11.
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Desɛ́mbɛ 1953, lokasa 750 (na Lingelesi).
b Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1994, nkasa 217-218, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Lolenge nini bilenge bakoki kosalisama ete bátalela Nzambe lokola moto ya solosolo?
◻ Kokanisa Mozalisi na yo elimboli nini?
◻ Kelasi oyo tozali kotánga esengeli kozala na mokano nini?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina kosalela mosolo na biso na mayele nyonso?
◻ Bilenge nini babongi ete omekola bango?
[Elilingi na lokasa 17]
Osili kokanisa mpo na nini ozali kokende na eteyelo?
[Elilingi na lokasa 18]
Ozali koyekola lolenge ya kosalela mosolo na mayele nyonso?