Kanisá Mozalisi na yo Monene!
“Kanisá [Mozalisi na yo Monene, NW] . . . naino mikolo mabe iyei te.”—MOSAKOLI 12:1.
1. Ndenge nini bilenge oyo bamipesi na Nzambe basengeli kosalela ye ntango bazali bilenge mpe bazali na makasi?
YEHOVA apesaka basaleli na ye makasi ya kosala makambo oyo ye alingaka. (Yisaya 40:28-31) Na likambo yango, atalaka mbula ya moto te. Kasi, ebongi mpenza ete bilenge oyo bamipesi na Nzambe básala oyo ezali malamu ntango bazali naino bilenge mpe na nzoto makasi. Yango wana, bilenge yango balandaka toli ya “mosakoli,” elingi koloba Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala. Salomo alobaki boye: “Kanisá [Mozalisi na yo Monene, NW] na mikolo na bolenge na yo, naino mikolo mabe iyei te, naino [bambula] ikómi te wana okolobaka ete, Nazali na esengo na yango te.”—Mosakoli 1:1; 12:1.
2. Bana ya baklisto oyo bamipesi basengeli kosala nini?
2 Salomo apesaki toli ete moto akanisa Mozalisi na ye Monene ntango azali naino elenge libosoliboso epai ya bilenge ya Yisalaele. Bilenge yango babotamaki na ekólo oyo emipesaki na Yehova. Tokoki koloba boni mpo na bana ya baklisto oyo bamipesi na Nzambe lelo oyo? Ebongi mpenza bákanisa Mozalisi na bango Monene. Soki basali bongo, bakokumisa ye mpe bango moko bakozala malamu.—Yisaya 48:17, 18.
Bato oyo bapesaki ndakisa malamu na ntango ya kala
3. Yosefe, Samwele na Davidi, bapesaki ndakisa nini?
3 Biblia elobeli bilenge mingi oyo bapesaki ndakisa malamu, bakanisaki Mozalisi na bango Monene. Banda ntango azalaki mwana moke, Yosefe mwana ya Yakobo azalaki kokanisa Mozalisi na ye. Ntango mwasi ya Potifala alingaki ete Yosefe asala na ye pite, Yosefe aboyaki na motema moko mpe alobaki boye: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:9) Samwele azalaki Molevi, akanisaki Mozalisi na ye kaka ntango azalaki mwana moke te, kasi na bomoi na ye mobimba. (1 Samwele 1:22-28; 2:18; 3:1-5) Elenge Davidi akolaki na Beteleme, ye mpe abosanaki Mozalisi na ye te. Alakisaki ete azalaki kotyela Nzambe motema ntango abundaki na engambe Mofilistia moko na nkombo Goliata. Yoká ndenge Davidi alobaki: “Yo oyeli ngai na mopanga mpe na likɔnga monene mpe na likɔnga moke, kasi ngai nayeli yo na nkombo na [Yehova] na bibele, Nzambe na basoda na Yisalaele oyo yo obɛteli bango ntembe. Lelo oyo [Yehova] akokitisa yo na lobɔkɔ na ngai; nakobɛta yo mpe nakolongola motó na yo; . . . ete bato na mokili mobimba báyeba ete Nzambe azali na Yisalaele. Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete [Yehova] akobikisa na mopanga mpe na likɔnga te. Mpo ete etumba ezali na [Yehova] mpe ye akopesa bino na mabɔkɔ na biso.” Nsima ya mwa ntango, Goliata akufaki, mpe Bafilistia bakimaki.—1 Samwele 17:45-51.
4. (a) Nini emonisi ete elenge mwasi Moyisalaele oyo azalaki moombo na Sulia mpe Yosiya oyo akomaki mokonzi wana azalaki naino elenge, bakanisaki Mozalisi na biso Monene? (b) Ntango Yesu azalaki na mbula 12, ndenge nini amonisaki ete akanisaki Mozalisi na ye?
4 Moto mosusu oyo akanisaki Mozalisi na ye Monene ezalaki elenge mwasi Moyisalaele oyo akendaki boombo na mboka mopaya. Ayebisaki mwasi ya Namana, mokonzi ya basoda ya Sulia, likambo moko malamu. Yango wana, Namana akendaki koluka mosakoli ya Nzambe; basalisaki ye mpe maba na ye esilaki, mpe akómaki kosambela Yehova. (2 Mikonzi 5:1-19) Ntango Yosiya akomaki mokonzi azalaki elenge mpe alendisaki bato bálanda losambo ya pɛto ya Yehova. (2 Mikonzi 22:1–23:25) Kasi na kati ya bato nyonso wana, Yesu moto ya Nasalete nde apesaki ndakisa oyo eleki malamu ya moto oyo akanisaki Mozalisi na ye Monene banda ntango azalaki mwana moke. Talá likambo oyo esalemaki ntango azalaki na mbula 12. Baboti na ye bamemaki ye na Yelusaleme mpo na feti ya Elekeli. Ntango bazalaki kozonga na mboka na bango, baboti ya Yesu bamonaki ye te; yango wana, bazongaki lisusu na Yelusaleme mpo na koluka ye. Na mokolo ya misato, bakendaki kokuta ye na tempelo azali kosolola makambo ya Biblia na balakisi. Ntango mama na ye ayebisaki ye ete bamitungisaki mingi mpo na ye, Yesu atunaki ye boye: “Bozalaki koluka ngai mpo na nini? Boyebaki te ete ekoki na ngai kozala na ndako na Tata na ngai?” (Luka 2:49) Ezalaki malamu ete Yesu ayekola makambo ya Nzambe na tempelo, ‘ndako ya Tata na ye.’ Lelo oyo, Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova ezali esika malamu mpenza mpo na koyeba malamu Mozalisi na biso Monene.
Kanisá Yehova banda sikoyo!
5. Limbolá na maloba na yo moko, makambo oyo mosakoli alobaki na Mosakoli 12:1?
5 Moto oyo asambelaka Yehova na motema mobimba azalaka na mposa ya kosala mosala na Ye na ntango akokisi makambo oyo esɛngami mpe kosalela Nzambe na bomoi na ye mobimba. Kasi moto oyo asalaki eloko moko te mpo na kokanisa Mozalisi na ye ntango azalaki elenge akozala na elikya nini? Elimo ya Nzambe epusaki mosakoli na koloba boye: “Kanisá [Mozalisi na yo Monene, NW] na mikolo ya bolenge na yo, naino mikolo mabe iyei te, naino [bambula] ikómi te wana okolobaka ete, Nazali na esengo na yango te.”—Mosakoli 12:1.
6. Makambo nini emonisi ete Simeona na Ana atako bazalaki mibange bakanisaki Mozalisi na bango Monene?
6 Moto moko te asepelaka na “mikolo mabe,” elingi koloba ntango moto akómaka mobange. Kasi, mibange oyo babosanaka Nzambe te bazalaka na esengo. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki naino mwana mpe bamemaki ye na tempelo, mobange Simeona amemaki ye na mabɔkɔ na ye mpe alobaki na esengo nyonso ete: “[Sikoyo], Nkolo, otika moombo na yo kokenda na kimya [lokola] elobaki yo; mpo ete miso na ngai mamoni kobikisa na yo oyo ebongisi yo na miso na bato nyonso, moi mpo na emoniseli na mabota, mpe nkembo na bato na yo Yisalaele.” (Luka 2:25-32) Lisusu Ana, mobange mwasi ya mbula 84 akanisaki Mozalisi na ye. Ana azalaki kokende na tempelo mikolo nyonso mpe azalaki wana ntango bakendaki na Yesu na tempelo. “Ayaki na ntango yango mpenza; atɔndaki Nzambe, mpe asololaki na ntina na mwana yango na bango nyonso bazalaki kotalela lisiko na Yelusaleme.”—Luka 2:36-38.
7. Bato oyo bakómi mibange na mosala ya Nzambe bazalaka na ezaleli nini?
7 Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova oyo bakómi mibange na mosala ya Nzambe bakoki kozala na bampasi mpe mitungisi oyo eyelaka moto ntango akómi mobange. Kasi bazali na esengo. Mpe tosepelaka na mosala ya sembo oyo bazali kosala mpo na Nzambe. Mibange yango bazali na “esengo ya Yehova” mpo bayebi ete Yehova alakisi bokasi na ye oyo moto moko te awa na mokili akoki kolonga yango mpe atii Yesu Klisto mokonzi ya makasi kuna na likoló. (Nehemia 8:10) Oyo ezali ntango malamu mpo bilenge mpe mikóló bálanda toli oyo: “Bilenge mpe baseka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo na [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe lola.”—Nzembo 148:12, 13.
8, 9. (a) “Mikolo mabe” ezalaka na esengo te mpo na banani, mpe mpo na nini ezalaka bongo? (b) Limbolá maloba ya Mosakoli 12:2.
8 “Mikolo mabe,” elingi koloba ntango moto akómaka mobange, ezalaka mikolo ya esengo te, mpe mbala mosusu ezalaka na mitungisi mingi mpo na bato oyo bakanisaki Mozalisi na bango Monene te mpe bayebi te makambo malamu oyo akani kosala. Bayebi makambo ya elimo te oyo ekoki kolɛmbisa mikakatano ya bompaka mpe bampasi oyo bato bazali koyoka banda babenganaki Satana na likoló. (Emoniseli 12:7-12) Yango wana, mosakoli alendisi biso tókanisa Mozalisi na biso “naino moi mpe pole na sanza mpe [minzoto] izimisami te to mapata [mazongi] nsima na mbula te.” (Mosakoli 12:2) Maloba yango elimboli nini?
9 Salomo akokanisi makambo oyo ezalaka ntango moto azali elenge na eleko ya molunge na mokili ya Palestine. Na ntango yango moi, sanza, mpe minzoto engɛngaka na likoló mpe mapata ezalaka te. Biloko nyonso emonanaka polele. Kasi, ntango moto akómi mobange, makambo ekómaka lokola na eleko ya malili makasi mpe ya mbula, na mikakatano na yango kilikili. (Yobo 14:1) Ezali mpenza mawa soki moto ayebi Mozalisi kasi asaleli ye te ntango azali elenge! Na ntango moto akómi mobange, makambo ebebaka, lokola na eleko ya malili makasi, mingimingi mpo na baoyo bakokaki kosalela Yehova ntango bazalaki bilenge kasi baboyaki kosalela ye mpo basepelaki kolanda makambo ya mpambampamba. Kasi, ezala tozali bilenge to mibange, ‘tólanda Yehova na motema mobimba,’ lokola Kalebe, moto ya sembo oyo asalaki elongo na mosakoli Mose.—Yosua 14:6-9.
Mikakatano oyo eyaka ntango moto akómi mobange
10. (a) “Babateli ya ndako” ezali elilingi ya nini? (b) “Bato ya nguya” ezali elilingi ya nini?
10 Nsima na yango, Salomo amonisaki mikakatano oyo ezalaka “na mokolo wana babateli ya ndako bakolɛnga mpe bato na nguya bakokumbama mpe batuti bakotika mosala zambi bazali mingi te mpe baoyo bakotalaka na maninisa bakozwa molili.” (Mosakoli 12:3) “Ndako” ezali nzoto ya moto. (Matai 12:43-45; 2 Bakolinti 5:1-8) “Babateli” na yango ezali nde mabɔkɔ oyo ebatelaka nzoto mpe esalaka mosala mpo na kokokisa bamposa na yango. Ntango moto anuni, mbala mingi mabɔkɔ elɛngaka na kolɛmba, na kobanga, to ekosala lisusu te. “Bato na nguya,” elingi koloba makolo, ezalaka lisusu lokola makonzi makasi oyo esimbi nzoto te, kasi elɛmbaka mpe etutanaka moko na mosusu. Kasi, osepelaka te ntango omonaka bandeko oyo bazali mibange na makita ya lisangá?
11. “Batuti” mpe “baoyo bakotala na maninisa” ezali bililingi ya nini?
11 Bongo na ndimbola nini “batuti bakotika mosala zambi bazali mingi te”? Mino ekoki kolɛmba to kosila na monɔkɔ, to mpe ekoki kotikala kaka moko moko. Kotafuna bilei ya makasi ekómaka mpasi, mbala mosusu mpe moto akokaka lisusu kotafuna te. “Baoyo bakotalaka na maninisa,” elingi koloba miso, ebebaka mpe moto amonaka lisusu malamu te to mpe nyonso ekómaka mpenza molili.
12. (a) Na ndimbola nini “bikuke ikozipama na nzela”? (b) Okoloba nini mpo na mibange oyo basakolaka Bokonzi?
12 Mosakoli alobi lisusu boye: “Mpe bikuke ikozipama na nzela mpe mongongo na kotutatuta ezalaka moke mpe alamukaka na mongongo na ndɛkɛ mpe bana basi na nzembo bakokitisama.” (Mosakoli 12:4) Bikuke mibale ya monɔkɔ, elingi koloba mbebu, efungwamaka lisusu malamu te, mbala mosusu mpe efungwamaka lisusu te mpo na kobimisa oyo ezali na kati ya “ndako” to nzoto ya mibange oyo basalelaka Nzambe te. Babimisaka lisusu eloko na “nzela” te, elingi koloba epai ya bato oyo bafandi na bango. Kasi, tokoki koloba boni mpo na mibange ya mpiko oyo bazali kosakola Bokonzi? (Yobo 41:14) Ya solo, mbala mosusu batambolaka malɛmbɛmalɛmbɛ ntango bazali kokende ndako na ndako mpe ekoki kozala ete bamosusu bakoki kozala na mokakatano mpo na koloba, kasi toyebi ete bazali kosanzola Yehova!—Nzembo 113:1.
13. Ndenge nini mosakoli alobeli mikakatano mosusu oyo mibange bakutanaka na yango, kasi nini emonanaka epai ya mibange baklisto?
13 Makɛlɛlɛ ya kotuta ekómaka moke mpo moto atafunaka sikoyo bilei na monɔkɔ oyo ezali na mino te. Soki alali na mbeto, mobange azwaka lisusu mpɔngi ya malamu te. Ata mwa makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ elamusaka ye. Ayembaka lisusu mingi te, mpe soki ayembi, ezalaka na mongongo ya nse. “Bana basi na nzembo bakokitisama,” maloba yango elimboli ete mongongo na ye ekómaka moke. Mibange bayokaka malamu te banzembo mpe miziki oyo bato bazali kobɛta. Kasi, mibange oyo bazali bapakolami na elimo oyo bakómi mibange na baninga na bango oyo bamosusu kati na bango mpe bakómi mibange, bayembaka nzembo mpo na kosanzola Yehova na makita ya lisangá. Tozalaka na esengo mingi ntango tozali na bango na lisangá mpe tozali kokumisa Yehova elongo!—Nzembo 149:1.
14. Mibange babangaka makambo nini?
14 Mibange, mingi mpenza baoyo babosanaki Mozalisi na bango, bazalaka na mawa mpenza! Mosakoli alobi ete: “Lisusu wana bakobanga oyo ezali molai, mpe makambo na nsɔmɔ na nzela; wana nzete na amanade ekobimisa felele mpe likelele ezali na bozito mpe [mbuma ya câpre ekopasuka, NW]; mpo ete moto akokenda na ndako na ye na [seko] mpe baleli bakotambola na nzela.” (Mosakoli 12:5) Mibange mingi, soki batɛlɛmi likoló ya sikalie molai, babangaka ete bakokwea. Bayokaka mpe kizunguzungu na kotala eloko oyo ezali molai. Soki babimi na balabala oyo ezali na bato mingi, babangaka noki bakotuta bango to miyibi bakobimela bango.
15. Na ndimbola nini “nzete ya amanade ikobimisa felele,” mpe na ndimbola nini likelele ‘ezali na bozito’?
15 Mpo na mobange, “nzete ya amanade ekobimisa felele.” Ekoki kozala elilingi ya nsuki na bango oyo ekómaka motane, mpe na nsima ekómaka mpɛmbɛ. Nsuki ya mibange ekómaka lokola fololo ya mpɛmbɛ ya nzete ya amanade. Mobange akómaka lokola likelele ntango azali ‘na bozito’ mpo na kotambola, mbala mosusu okomona ye agumbami mpe mabɔkɔ elɛmbi to asimbi loketo mpe mabɔlɔngɔ egumbami. Soki moto moko kati na biso azali ndenge yango, biso bamosusu tóbosana te ete tozali na kati ya basoda ya Yehova oyo bazali lokola mayoyo ya mpiko oyo ezali kotambola mbangu!—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1998, nkasa 8-13.
16. (a) Ntango balobi ete ‘mbuma ya câpre epasuki’ ekoki kozala na ndimbola nini? (b) ‘Ndako ya seko’ ya moto ezali nini, mpe makambo nini elakisaka ete liwa ezali lisusu mosika te?
16 Mobange azalaka lisusu na mposa ya kolya mingi te, ata soki bapesi ye bilei oyo ezali na elɛngi lokola mbuma ya câpre. Na ntango ya kala bazalaki kosalela mbuma yango mpo na kopesa moto mposa ya kolya. Ntango balobi ete ‘mbuma ya câpre epasuki’ emonisi ete ntango mobange azali lisusu koyoka mposa ya kolya mingi te, ata mbuma yango ekoki kopesa ye mposa ya kolya te. Makambo oyo nyonso elakisaka ete azali kopusana na ‘ndako na ye ya seko,’ elingi koloba lilita. Yango ekozala ndako na ye libela na libela soki akanisaki Mozalisi na ye te mpe soki amipesaki na misala ya mabe oyo ekosala ete Nzambe asekwisa ye te. Kolelalela ya mobange elakisaka ete liwa ezali lisusu mosika te.
17. Ndenge nini “nsinga ya palata” ekatanaka, mpe “saani ya wolo” ezali elilingi ya nini?
17 Balendisi biso tókanisa Mozalisi na biso “naino nsinga na palata ekatani te to saani na wolo ebukani te to mbeki ebukani na motó ya mai te to yika ekatani na liziba te.” (Mosakoli 12:6) “Nsinga ya palata” ekoki kozala mafuta ya mokuwa ya mokɔngɔ (moelle épinière). Liwa ya moto ezalaka lisusu mosika te ntango nzela yango oyo ekei tii na bɔɔngɔ ebebi. “Saani ya wolo” elimboli bɔɔngɔ. Yango ezalaka lokola nde efandi na saani na kati ya motó, mpe ekangani na mafuta ya mokuwa ya mokɔngɔ. Bɔɔngɔ ezali na ntina mingi, yango wana bakokanisi yango na wolo. Soki ezali kosala lisusu te, moto asukaka kaka na kokufa.
18. “Mbeki na mitó ya mai” ezali elilingi ya nini, mpe nini esalemaka soki ebukani?
18 “Mbeki na motó ya mai” ezali motema. Ntango makila ezali kotambola na nzoto, ekendaka kosuka na motema; na nsima, motema etindaka yango lisusu na nzoto mobimba. Ntango moto akufi, ezalaka lokola nde mbeki ebukani, epanzani na motó ya mai mpamba te ekoki lisusu te kozwa makila, kobomba yango, mpe kotinda yango na nzoto mobimba mpo nzoto esala malamu mpe ezala makasi. Na ntango wana ‘yika oyo ekatani na liziba’ ebalukaka lisusu te, mpe makila etambolaka lisusu na nzoto te. Tomoni ete banda kala mpenza Yehova amonisaki Salomo ete nzoto mobimba ezali na misisa oyo elekisaka makila liboso ete William Harvey, moto moko ya mayele na makambo ya fizike, aya kolimbola yango na ekeke ya 17.
19. Ndenge nini maloba ya Mosakoli 12:7 ekokisamaka na ntango ya liwa?
19 Mosakoli alobaki lisusu boye: “Mpe mputulu ekozonga na mabelé lokola ezalaki yango; mpe [elimo, NW] ekozonga epai na Nzambe oyo apesaki yango.” (Mosakoli 12:7) Soki “yika” ekatani, nzoto ya moto oyo esalemi na mputulu ya mabelé, ezongaka na mputulu. (Genese 2:7; 3:19) Molimo ekufaka mpamba te elimo, to nguya ya bomoi, oyo Nzambe apesaka, ezongaka epai na Mozalisi na biso, ye akobomba yango.—Ezekiele 18:4, 20; Yakobo 2:26.
Baoyo bazali kokanisa Mozalisi bakozwa mbano nini?
20. Mose azalaki kosɛnga eloko nini ntango asalaki libondeli oyo ezali na Nzembo 90:12?
20 Salomo amonisaki malamu mpenza ntina ya kokanisa Mozalisi na biso Monene. Ya solo, baoyo babosanaka Yehova te mpe basalaka makambo oyo alingaka na motema na bango mobimba, bazalaka na elikya ya bomoi malamu koleka bomoi mokuse oyo etondi na mikakatano. Bázala bilenge to mibange, bazali na makanisi ndenge moko na Mose ntango abondelaki boye: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema na mayele.” Mose, mosakoli ya Nzambe mpe moto ya komikitisa, azalaki na mposa ete Yehova alakisa to ateya ye na libota ya Yisalaele mpo bázala na mayele ya kotalela malamu ‘mikolo ya bomoi,’ mpe básalela yango na ndenge oyo ezali kosepelisa Nzambe.—Nzembo 90:10, 12.
21. Soki tolingi kotánga mikolo na biso mpo na lokumu ya Yehova, tosengeli kosala nini?
21 Ebongi mpenza ete bilenge baklisto bátalela malamu toli oyo mosakoli apesi bango ete bábosana Mozalisi te. Bilenge bazali mpenza na makoki ya kosalela Nzambe na mosala na ye! Kasi, ezala tozali bilenge to mibange, soki toyekoli kotánga mikolo na biso mpo na kokumisa Yehova na “ntango ya nsuka” oyo tozali, tokoki kozwa libaku ya kotánga yango mpo na libela. (Danyele 12:4, NW; Yoane 17:3) Mpo na yango, tosengeli kokanisa Mozalisi na biso Monene. Mpe lisusu, tosengeli kokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azali kosɛnga biso.
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini balendisi bilenge ete bákanisa Mozalisi na bango?
◻ Biblia elobeli banani oyo bakanisaki Mozalisi na bango Monene?
◻ Salomo alobaki makambo nini moto akutanaka na yango ntango akómi mobange?
◻ Bato oyo bazali kobosana Mozalisi na bango te bakozwa bolamu nini?
[Bililingi na lokasa 15]
Davidi, elenge mwasi Moyisalaele oyo azalaki moombo, Ana mpe Simeona bakanisaki Yehova
[Bililingi na lokasa 16]
Mibange Batatoli ya Yehova bazali kosalela Mozalisi na biso Monene mosala ya bulɛɛ na esengo