Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Mosakoli
YOBO alobaki ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Ezali mpenza likambo ya ntina ete tóbungisaka te bomoi na biso oyo ezali mokuse na makambo ezangi ntina. Tokoki kosalela ntango, makasi mpe bozwi na biso na makambo nini? Nini tosengeli koboya? Maloba ya bwanya oyo ezali na Mokanda ya Mosakoli ezali kopesa toli oyo ebongi na likambo yango. Maloba ya Mokanda yango “ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema” mpe ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu mpenza.—Baebele 4:12.
Mokanda ya Mosakoli ekomamaki na Salomo, mokonzi ya Yisalaele oyo ayebani mingi mpo na bwanya na ye; mokanda yango ezali kopesa toli ya malamu na makambo oyo ezali mpenza na ntina mpe oyo ezali na ntina te na bomoi. Lokola Salomo alobeli misala mosusu ya kotonga bandako oyo asalaki, ekoki kozala ete akomaki Mokanda ya Mosakoli nsima ya kosilisa misala wana mpe liboso apɛngwa na losambo ya solo. (Nehemia 13:26) Emonani ete Mokanda yango ekomamaki liboso ya mobu 1000 L.T.B., pene na nsuka ya mbula 40 ya boyangeli ya Salomo.
NINI EZALI MPAMBA TE?
Mosakoli alobi ete “nyonso ezali bobele mpamba!” mpe atuni boye: “Moto akozwa libonza nini na misala nyonso na ye oyo ekosalaka ye na nse ya moi?” (Mosakoli 1:2, 3) Maloba “mpamba” mpe “na nse ya moi” esalelami mbala mingi na Mokanda ya Mosakoli. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mpamba” elimboli mpenza “mpema” to “mopɛpɛ” mpe emonisi eloko oyo ezangi ntina, oyo eumelaka te to oyo ezangi motuya. Liloba “na nse ya moi” elimboli “na mabelé oyo” to “na mokili oyo.” Na yango, milende nyonso oyo bato bazali kosala kozanga kotalela Nzambe ezali mpamba.
Salomo alobi ete: “Batelá makolo na yo wana okokɔta na ndako ya Nzambe mpe meká koyoka.” (Mosakoli 5:1) Komipesa na losambo ya solo ya Yehova Nzambe ezali mpamba te. Na yango, soki tozali kobatela boyokani na biso na ye, bomoi na biso ekozala mpenza na ntina.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:4-10—Na ndenge nini mbongwana ya biloko oyo Nzambe asalá ‘elɛmbisaka’? Mosakoli alobeli kaka makambo misato ya ntina mpo na bomoi awa na mabelé: moi, mopɛpɛ mpe kobongwana ya mai. Soki totali malamu, mbongwana ya biloko oyo Nzambe asalá ezali mingi mpe ezali mpasi mpo na koyeba yango nyonso. Moto akoki kolekisa bomoi mobimba mpo na koyekola yango mpe akokanga ntina na makambo yango nyonso te. Yango ekoki mpenza ‘kolɛmbisa.’ Tokoki mpe kolɛmba soki tozali kokokanisa bomoi na biso oyo ezali mokuse na mbongwana wana oyo ezangi nsuka. Ata mpe koluka koyeba makambo ya sika elɛmbisaka. Atako bato ya mayele bazali kobimisa makambo ya sika, bazali kaka kolanda malako oyo Nzambe ya solo atyá mpe asilá kosalela yango na biloko oyo akelá.
2:1, 2, Bible na lingala ya lelo oyo—Na ndimbola nini kosɛka ezali “bozoba”? Kosɛka ekoki kosalisa biso tóbosana mpasi mwa moke mpe kosepela ekoki kosalisa biso tómona mikakatano na biso eloko mpamba. Nzokande, kosɛka ekoki te kosilisa mikakatano na biso. Na yango, Biblia elobi ete koluka esengo na kosɛka ezali “bozoba.”
3:11—Eloko nini Nzambe asalaki “kitoko na ntango na yango”? Kokelama ya Adama ná Eva, kondimana ya monama, ya Abalayama mpe ya Davidi, koya ya Masiya mpe kotyama ya Yesu Klisto lokola mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, ezali na kati ya makambo “kitoko” to oyo ebongi mpe ezali na litomba, oyo Yehova Nzambe asalaki na ntango ebongi. Kasi, mosika te Yehova akosala likambo mosusu ya “kitoko.” Tokoki kolikya ete na ntango oyo ebongi, akosala mokili ya sika ya boyengebene.—2 Petelo 3:13.
3:15b, (NW)—Ndenge nini Nzambe ya solo azali kokoba koluka oyo bazali kolanda? Oyo bazali kolanda ekoki kozala makambo oyo Nzambe akani kosala. Atako makambo oyo ezongelamaka mbala na mbala lokola kobotama mpe kokufa, bitumba mpe kimya, ekoki kolɛmbisa moto mpe kotinda ye akanisa ete eloko moko ebongwani te na makambo oyo ezali kosalama lelo oyo, Nzambe ya solo akoki koluka mpe kosala makambo nyonso oyo ye alingi. (Mosakoli 3:1-10, 15a) Oyo bazali kolanda ekoki mpe kolobela bayengebene oyo bato mabe bazali kolanda ntango nyonso. Tokoki koloba ete Yehova azali kokoba koluka bayengebene mpo ‘amonisela bango nguya na ye.’—2 Ntango 16:9.
5:9—Na ndenge nini ‘litomba ya mabelé ezali mpo na bato nyonso’? Bato nyonso awa na mabelé babikaka na “litomba ya mabelé,” elingi koloba biloko oyo mabelé ebimisaka. Ata bakonzi mpe babikaka na litomba ya mabelé. Mpo bázwa yango, basali na bango basalaka mosala makasi mpo na kolona bilanga na bango.
Mateya mpo na biso:
1:15. Ntina ezali te ya koboma nzoto mpo na koluka kosilisa minyoko mpe kozanga bosembo oyo tozali komona lelo oyo. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo nyonso ya mabe.—Danyele 2:44.
2:4-11. Misala lokola kotonga bandako, kosala bilanga, miziki mpe bomɛngo ezali “koluka kokwa mopɛpɛ” mpamba te yango ekoki te kopesa biso esengo ya solosolo to ya libela na libela.
2:12-16. Bwanya eleki bozoba mpamba te ekoki kosalisa biso tósilisa mikakatano mosusu. Kasi, na likambo etali liwa, bwanya ya bato ezali na litomba te. Mpe atako moto akoki koyebana mingi mpo na bwanya na ye, ekoumela te bakobosana ye.
2:24; 3:12, 13, 22. Kosepela na misala ya mabɔkɔ na biso ezali mabe te.
2:26. Bwanya ya Nzambe oyo epesaka esengo, epesami na ‘ye oyo asepelisaka Yehova.’ Mpo na kozwa bwanya yango, tosengeli kozala na boyokani malamu na Nzambe.
3:16, 17. Tókanisaka te ete bosembo ekozala na makambo nyonso. Na esika tómitungisa mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo, tosengeli nde kozela ntango oyo Yehova akobongisa makambo.
4:4. Mosala makasi oyo esalemi malamu epesaka esengo. Kasi, kosala mosala makasi kaka mpo na koluka koleka bato mosusu ebimisaka kowelana, koyinana, nkanda mpe zuwa. Soki tozali komipesa makasi na mosala ya kosakola, tosengeli kosala yango na makanisi malamu.
4:7-12. Kozala na boyokani malamu na bato ezali na ntina mingi koleka biloko ya mosuni mpe tosengeli te kobebisa yango mpo na koluka bozwi.
4:13. Kozala mokonzi to mokóló esalaka ntango nyonso te ete bámemya moto. Baoyo bazali na mikumba basengeli kosalela yango na bwanya.
4:15, 16. “Elenge ya nsima” oyo akitani mokonzi, bakoki kondima ye na ‘bato oyo azalaki likoló na bango nyonso,’ kasi ‘baoyo bakoya nsima na ye bakosepela na ye te.’ Ya solo, bakoki kondima moto lelo, kasi nsima ya mwa ntango baboyi ye.
5:2. Na esika tolobaka maloba ebeleebele na mabondeli na biso, tosengeli nde komanyola mpe komonisa limemya.
5:3-7. Soki tokómi komitungisa mingi mpo na biloko ya mosuni, yango ekoki nokinoki kotinda biso na kokanisa kaka matomba na biso moko. Yango ekoki mpe kopekisa moto alala malamu na butu, mpamba te akobanda kaka kokanisakanisa mpe kolɔtalɔta. Koloba mingi ekoki kobimisa moto zoba na miso ya bato mosusu mpe kotinda ye alapa ndai liboso ya Nzambe kozanga kokanisa. Soki tozali ‘Kotosa Nzambe,’ tokosala makambo wana te.
6:1-9. Bomɛngo, lokumu, bomoi molai ata mpe kokóma na libota monene ezali na litomba nini, soki yango ezali kopesa biso esengo te? Mpe ‘komonana na miso’ to kosepela na oyo tozali na yango ezali malamu koleka “kotambolatambola na mposa,” elingi koloba koluka kokokisa bamposa oyo eleki makoki na biso. Kosepela na “bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto” ná makambo ya malamu na bomoi mpe kobatela boyokani malamu na Yehova ezali bomoi oyo eleki malamu.—1 Timote 6:8.
TOLI MPO NA BATO YA BWANYA
Ndenge nini tokoki kobatela nkombo malamu to lokumu na biso? Ndenge nini tosengeli kotalela bakonzi ya mokili mpe makambo ya mabe oyo bato bazali kosala biso? Lokola bakufi bayebaka eloko te, ndenge nini tokoki kosalela bomoi na biso sikoyo? Ndenge nini bilenge bakoki kosalela ntango mpe makasi na bango na bwanya? Toli kitoko oyo Mosakoli apesi mpo na makambo oyo mpe makambo mosusu ezwami na Mokanda ya Mosakoli mokapo 7 kino 12.
Biyano na mituna ya Biblia:
7:19 (NW)—Ndenge nini bwanya eleki “bato zomi ya nguya”? Na Biblia, motángo zomi na maloba ya elilingi, elimbolaka eloko oyo ezali mobimba. Salomo alingi koloba ete bwanya ekoki kobatela koleka motángo mobimba ya bato ya etumba oyo bazali kobatela mboka.
10:2—Na ndimbola nini motema ya moto ekoki kozala “na lobɔkɔ na ye ya mobali” to “na lobɔkɔ na ye ya mwasi”? Lokola lobɔkɔ ya mobali emonisaka esika ya malamu, soki motema ya moto ezali na lobɔkɔ na ye ya mobali, elimboli ete etindaka ye asala malamu. Kasi, soki motema ya moto ezali kotinda ye na nzela ya mabe, tokoloba ete ezali na lobɔkɔ na ye ya mwasi.
10:15—Na ndimbola nini ‘mosala ya zoba ekolɛmbisa ye’? Soki moto azangi bososoli, mosala makasi oyo azali kosala ekobota mbuma malamu te. Yango ekopesa ye esengo te. Koboma nzoto mpamba ndenge wana elɛmbisaka.
11:7, 8—Maloba “Pole ezali na kitoko mpe ezali malamu mpo na miso komona moi” elimboli nini? Pole mpe moi esepelisaka bikelamu ya bomoi. Awa, Salomo alingi koloba ete eleki malamu kozala na bomoi mpe ‘kosepela’ liboso ete mikolo ya molili to bobange esilisa makasi na biso.
11:10—Mpo na nini “bomwana mpe bolenge” ezali mpamba? Soki tosaleli bolenge na biso na ndenge oyo ebongi te, ekozala bobele mpamba, mpo mikolo ya bolenge elimwaka nokinoki lokola mopɛpɛ.
Mateya mpo na biso:
7:6. Kosɛka na ntango oyo ebongi te epesaka nkanda mpe ezali na ntina te lokola makɛlɛlɛ ya nzubɛ oyo ezali kozika na nse ya nzungu. Tosengeli kokeba na yango.
7:21, 22. Tómitungisaka koleka ndelo te mpo na makambo oyo basusu bazali koloba mpo na biso.
8:2, 3; 10:4. Ntango mokonzi to patrɔ asemboli biso, ebongi tófanda nyɛɛ. Eleki malamu ‘kolongwa na miso na ye na mbangu te,’ kosala bongo ekolakisa ete oboyi mosala.
8:8; 9:5-10, 12. Bomoi na biso ekoki kosuka mbalakaka lokola mbisi oyo ekangami na monyama to ndɛkɛ oyo ekangami na motambo. Lisusu, moto moko te akoki kopekisa nguya ya bomoi ebima, to komisikola na liwa, monguna ya bato. Yango wana, tosengeli te kobungisa ntango na biso mpamba. Yehova alingaka ete tópesa bomoi na biso motuya mpe tósepelaka na yango na ndenge ebongi. Mpo na kosala yango, tosengeli kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso.
8:16, 17. Ata soki tolali te butu mobimba mpo na koluka koyeba bonene ya biloko nyonso oyo Nzambe asalá mpe apesá nzela ete bato básala, tokokoka te. Soki tozali komitungisa mpo na makambo nyonso ya mabe oyo ezali kosalema, yango ekoki kosilisa biso esengo na bomoi.
9:16-18. Tosengeli kopesa bwanya motuya ata soki bato mingi bazali kosepela na yango te. Maloba ya kimya ya moto ya bwanya eleki koganga ya zoba.
10:1. Tosengeli kokeba na maloba mpe misala na biso. Kozanga mwa bokengi na makambo lokola nkanda makasi, kolangwa masanga to kosala pite to ekobo, ekoki kobebisa lokumu ya moto oyo bamemyaka.
10:5-11. Tosengeli te kolula ebonga ya mokonzi, atako mokonzi yango azali na makoki te. Kozanga makoki ata na mosala ya moke, ekoki kosuka mabe. Nzokande, koyekola ‘kosalela mayele mpo na kolonga’ ezali na litomba monene mpenza. Ezali mpenza likambo ya ntina ete tókoma na makoki na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli.
11:1, 2. Soki tozali kokabela basusu na motema mobimba, bango mpe bakokabela biso.—Luka 6:38.
11:3-6. Atako toyebaka te oyo ekoya lobi, yango ekoki te kopekisa biso tózwa bikateli.
11:9; 12:1-7. Bilenge bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova. Yango wana, basengeli kosalela ntango mpe makasi na bango na mosala ya Nzambe liboso ete makasi esila na bobange.
TÓTEYAMA NA “MALOBA YA BATO YA MAYELE”
Ndenge nini tosengeli kotalela “maloba ya kitoko” oyo Mosakoli alukaki mpe akomaki? Na bokeseni na “babuku mingi” oyo ekomami na bwanya ya bato, maloba ya bato ya bwanya ezali lokola mangenda, mpe baoyo bayanganisaka makanisi ya bwanya bazali lokola bansɛtɛ epikami makasi; nyonso euti na mobateli se moko.” (Mosakoli 12:10-12, NW) Maloba ya bwanya oyo Yehova “mobateli moko” apesi, esalisaka biso tótɛngatɛngaka te.
Soki tozali kosalela toli ya bwanya oyo ezwami na Mokanda ya Mosakoli, na ntembe te ekosalisa biso tózala na bomoi ya ntina mpe ya esengo. Lisusu, Biblia elaki ete: “Ekozala malamu epai na bango bazali kotosa Nzambe.” Na yango, tiká ete tózwa ekateli makasi ya ‘kotosa Nzambe mpe kobatela mibeko na ye.’—Mosakoli 8:12; 12:13.
[Elilingi na lokasa 15]
Moko ya misala ya Nzambe ya kitoko mpenza ekokokisama na ntango na yango
[Elilingi na lokasa 16]
Kolya, komɛla mpe kosepela na misala makasi nyonso oyo tozali kosala ezali makabo ya Nzambe