Mokapo ya Ntuku Mibale na Libwa
Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano
1, 2. Na lolenge nini Hizikiya amonanaki ete azalaki mokonzi malamu koleka Ahaza?
HIZIKIYA azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi ya Yuda. Akozala mokonzi ya ndenge nini? Akolanda ndakisa ya tata na ye, Mokonzi Ahaza, mpe akotinda bato na ye bálanda banzambe ya lokuta? To nde akobenda bato na losambo ya Yehova, ndenge nkɔkɔ na ye, Mokonzi Davidi asalaki?—2 Mikonzi 16:2.
2 Mwa moke nsima ya komata na ebonga ya bokonzi, ekómaki komonana polele ete Hizikiya azalaki na mposa ya kosala oyo ezalaki “malamu na miso ya Yehova.” (2 Mikonzi 18:2, 3) Na mbula ya liboso na boyangeli na ye, apesaki etinda ete bábongisa tempelo ya Yehova mpe misala na yango ezonga. (2 Ntango 29:3, 7, 11) Na nsima, abongisaki elambo moko monene ya Elekeli mpe abyangaki bato ya ekólo mobimba—bakisa mpe mabota zomi ya Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi. Ezalaki mpenza fɛti oyo bakokaki kobosana te! Fɛti ya ndenge wana esalemaki te kobanda na eleko ya Mokonzi Salomo.—2 Ntango 30:1, 25, 26.
3. (a) Ekateli nini bato oyo bafandi na Yuda oyo bayanganaki na elambo ya Elekeli oyo Hizikiya abongisaki bazwaki? (b) Liteya nini baklisto ya lelo bazwi na ekateli ya bato oyo bayanganaki na Elekeli yango?
3 Na nsuka ya elambo ya Elekeli, bayangani bazwaki ekateli ya kokatakata makonzí mosantu, kobuka bikeko mosantu, kokweisa bisika ya likoló mpe bitumbelo ya banzambe na bango ya lokuta; nsima na yango bazongaki na bingumba na bango mpe bazwaki ekateli ya kosalela Nzambe ya solo. (2 Ntango 31:1) Oyo nde bokeseni monene na lolenge bazalaki kosambela kala! Lelo oyo baklisto ya solo bakoki kozwa liteya na likambo etali ‘kotika te koyangana elongo moko.’ Bokutani ya ndenge wana, ezala na masangá to na mayangani ya mike to ya minene, ezali na ntina mingi mpamba te kuna nde balendisamaka mpe basepelaka elongo na bandeko mpe elimo santu etindaka bango na ‘kosala misala malamu.’—Baebele 10:23-25.
Kondima etyami na komekama
4, 5. (a) Ndenge nini Hizikiya amonisaki ete azalaki kotalela Asulia te? (b) Likambo nini basoda ya Saneheliba basali na Yuda, mpe bibongiseli nini Hizikiya azwi mpo etumba ya mbalakaka eyela Yelusaleme te? (c) Bibongiseli nini Hizikiya azwi mpo na kobatela Yelusaleme na matata ya Baasulia?
4 Komekama makasi ezali kozela Yelusaleme. Hizikiya akati boyokani oyo tata na ye Ahaza, oyo azangaki kondima, asalaki na Baasulia. Kutu akómi koyangela Bafilisitia, oyo bazali na boyokani na Asulia. (2 Mikonzi 18:7, 8) Yango epesaki mokonzi ya Asulia nkanda. Mpo na yango, tozali kotánga boye: “Na [mbula, NW] ya zomi na minei ya mokonzi Hizikiya, Saneheliba, mokonzi ya Asulia, ayaki [kobundisa, NW] mboka nyonso ya makasi ya Yuda mpe [abɔtɔlaki, NW] yango.” (Yisaya 36:1) Mbala mosusu mpo na kobatela Yelusaleme na matata ya mbalakaka ya mampinga ya basoda ya Asulia, Hizikiya andimi kofuta amande moko monene ya talanta 300 ya palata mpe talanta 30 ya wolo.a—2 Mikonzi 18:14.
5 Lokola wolo mpe palata ezali mingi te na ebombelo ya ndako ya mokonzi mpo na kofuta amande yango, Hizikiya azwaki bibende nyonso ya motuya na tempelo. Alongoli mpe bizibeli ya tempelo oyo bapakolaki wolo, mpe atindi yango epai ya Saneheliba. Yango esepelisaki Moasulia yango, kasi kaka mpo na mwa ntango mokuse. (2 Mikonzi 18:15, 16) Na ntembe te, Hizikiya asosoli ete Baasulia bakotika Yelusaleme te mpo na ntango molai. Yango wana, esengeli kozwa bibongiseli. Bato ya engumba yango bazipi maziba ya mai oyo ekoki kosalisa banguna na bango Baasulia. Hizikiya akómisi bisika-makasi ya Yelusaleme lisusu makasi mpe atongi esika ya kobomba bibundeli, kati na yango atii mpe “bibundeli [ya kobwaka mbanzi] mpe nguba mingi mpenza.”—2 Ntango 32:4, 5.
6. Hizikiya atyelaki nani motema?
6 Nzokande, Hizikiya atii motema na ye na mayele ya bitumba te to na bisika-makasi te, kasi na Yehova na bibele. Apesi bakonzi ya basoda na ye toli ete: “Yiká mpiko mpe zalá na molende; bangá te, yoká mpe nsɔmɔ liboso na mokonzi ya Asulia te mpe liboso na ebele mobimba na ye elongo te; zambi moko azali na biso elongo oyo azali koleka ye oyo azali elongo na ye. Na ye azali na lobɔkɔ ya mosuni nde na biso [Yehova], Nzambe na biso azali mpo na kosunga biso mpe kobuna bitumba na biso.” Lokola balendisami, bato yango “bayikaki mpiko mpo na maloba ya Hizikiya mokonzi ya Yuda.” (2 Ntango 32:7, 8) Kanisá naino makambo ya kosepelisa oyo elandaki, ndenge tokotalela mokapo 36 tii 39 ya esakweli ya Yisaya.
Laba-sake apesi makanisi na ye
7. Laba-sake azali nani, mpe mpo na nini batindi ye na Yelusaleme?
7 Saneheliba atindi Laba-sake (titre ya basoda, kasi nkombo ya moto te) elongo na bankumu mosusu mibale na Yelusaleme mpo na kosɛnga ete bato ya engumba yango bámipesa bango moko. (2 Mikonzi 18:17) Hizikiya atindi bato misato bakei kokutana na bango na libándá ya efelo ya engumba, Eliakimi mokɛngɛli ya ndako ya Hizikiya, Sebena mokomeli, mpe Yoa mwana ya Asafa mobateli ya mikanda.—Yisaya 36:2, 3.
8. Ndenge nini Laba-sake aluki kolɛmbisa Yelusaleme?
8 Mokano ya Laba-sake eyebani—kondimisa Yelusaleme ete emipesa kozanga kobunda. Wana azalaki koloba na Liebele, agangi liboso ete: “Nini elikya oyo yo ozali [kotyela motema, NW]? . . . Yo okotyela nani motema na yo ete otombokela ngai?” (Yisaya 36:4, 5) Na nsima Laba-sake atumoli Bayuda wana bazali kobanga, akundoleli bango ete basundolami mpenza. Bakoluka lisalisi epai ya nani? Epai ya “lititi oyo batuti yango” Ezipito? (Yisaya 36:6, NW) Na eleko yango, Ezipito azali mpenza lokola lititi oyo batuti yango. Ya solo, na boumeli ya mwa ntango, Etiopia alongaki nguya yango ya kala ya mokili mobimba, mpe Falo ya ntango yango, Mokonzi Tilaka, azali Moezipito te kasi Moetiopia. Mpe etikali moke Asulia akolonga ye. (2 Mikonzi 19:8, 9) Lokola Ezipito akoki komibikisa ye moko te, akokoka mpenza te kosalisa Yuda.
9. Makambo nini etindi Laba-sake aloba ete Yehova asundoli basaleli na Ye, kasi yango ezali mpenza bongo?
9 Laba-sake andimisi mpenza sikawa ete Yehova akobundela basaleli na Ye te mpamba te asepeli na bango te. Laba-sake alobi ete: “Soko okoloba na ngai ete, Tokotya mitema na biso epai na [Yehova], Nzambe na biso, ezali ye oyo Hizikiya alongoli bisika ya likoló mpe bitumbelo na ye te?” (Yisaya 36:7) Ya solo, lokola bakweisi bisika ya likoló mpe bitumbelo na mokili yango, yango emonisi ete Bayuda bazongeli mpenza Yehova, kasi babwaki ye te.
10. Mpo na nini ezali na ntina te ete basoda ya Yuda bázala mingi to moke?
10 Na nsima, Laba-sake akundoleli Bayuda ete Asulia aleki bango na basoda. Na lolendo mpenza, abimisi ntembe oyo: ‘[Tiká napesa yo mpunda, NW] nkóto mibale soko yo okokoka kotya batambolisi na likoló na yango.’ (Yisaya 36:8) Kasi ezali mpenza na ntina ete bampunda ya Yuda ezala mingi to moke? Te, mpamba te lobiko ya Yuda etaleli makasi ya basoda te. Masese 21:31 elobi boye: “[Mpunda, NW] ebongisami mpo na mokolo ya etumba, nde elonga ezali epai ya Yehova.” Na nsima Laba-sake alobi ete lipamboli ya Yehova ezali epai ya Baasulia, kasi Bayuda te. Alobi ete, soki ezalaki bongo te, mbɛlɛ Baasulia bakokaki kokɔta te na katikati mpenza ya ekólo ya Yuda.—Yisaya 36:9, 10.
11, 12. (a) Mpo na nini Laba-sake atingami koloba kaka na “monɔkɔ ya Bayuda,” mpe ndenge nini aluki kolɛngola Bayuda oyo bazali koyoka ndenge azali koloba? (b) Maloba ya Laba-sake ekoki kosala Bayuda nini?
11 Bamonisi ya Hizikiya bazali komitungisa: Maloba oyo Laba-sake alobi ekobimisa likambo nini epai na mibali oyo bazali koyoka ye na likoló na efelo ya engumba? Bankumu ya Bayuda yango batuni ete: “Lobá na baombo na yo na monɔkɔ ya Sulia, zambi tokoyoka yango. [Koloba, NW] na biso na monɔkɔ ya Bayuda te na matoi ya bato bazali likoló na [efelo, NW].” (Yisaya 36:11) Kasi Laba-sake alingi ata te koloba na monɔkɔ ya Sulia. Alingi kolona makanisi ya ntembe mpe kobanga na mitema ya Bayuda mpo ete bámipesa bango moko mpe Yelusaleme ezwama kozanga kobunda! (Yisaya 36:12) Yango wana Moasulia yango alobi lisusu na “monɔkɔ ya Bayuda.” Akebisi bafandi ya Yelusaleme ete: “Tiká te ete Hizikiya azimbisa bino, zambi ye akolonga kobikisa bino te.” Nsima na yango, ameki kolɛngola bato oyo bazalaki koyoka ye ntango azali koloba, alobeli ndenge bomoi ya Bayuda ekozala ntango bakoyangelama na Asulia: “Kataná na ngai kondimana mpe bimelá ngai; bongo moto na moto akolya longwa na nzete na ye moko na [vinyo, NW] mpe nzete na ye moko na mbuma mpe bokomɛlaka, moto na moto mai ya liziba na ye moko kino ekoya ngai mpe nakolekisa bino kino mokili lokola mokili na bino mpenza, mokili ya loso mpe ya vinyo, mokili ya [mampa, NW] mpe bilanga ya [vinyo, NW].”—Yisaya 36:13-17
12 Bayuda bakozwa eloko te na bilanga na bango na mbula oyo—lokola Baasulia bakɔti na mboka na bango, bakolona bilanga te. Elikya ya kolya mbuma ya vinyo kitoko mpe komɛla mai ya malili esengeli kobenda mibali oyo bazalaki koyoka maloba yango likoló na efelo. Kasi Laba-sake asilisi naino te makanisi na ye ya kolɛngola Bayuda.
13, 14. Atako Laba-sake alobeli yango, mpo na nini likambo oyo ekómelaki Samalia ezali na boyokani te na ezalela ya Yuda?
13 Na maloba na ye, Laba-sake asaleli ebundeli mosusu. Akebisi Bayuda ete bándima Hizikiya te ata soki alobi ete: “[Yehova] akobikisa biso.” Laba-sake akundoleli Bayuda ete banzambe ya Samalia bakokaki te kopekisa Baasulia kolonga ekólo yango ya mabota zomi. Mpe tokoloba nini mpo na banzambe ya mabota mosusu oyo Asulia alongaki? Atuni ete: “Banzambe ya Hamata mpe ya Alapada wapi? Wapi banzambe ya Sefalewaima? Babikisaki nde Samalia na lobɔkɔ na ngai?”—Yisaya 36:18-20.
14 Ya solo, Laba-sake, mosambeli ya banzambe ya lokuta, asosoli te ete bokeseni monene ezali kati na Samalia ya lipɛngwi mpe Yelusaleme oyo eyangelami na Hizikiya. Banzambe ya lokuta ya Samalia bazali na nguya te ya kobikisa bokonzi ya mabota zomi. (2 Mikonzi 17:7, 17, 18) Lisusu, na boyangeli ya Hizikiya, Yelusaleme apesi banzambe ya lokuta mokɔngɔ mpe akómi kosalela Yehova. Kasi, bamonisi misato ya Yuda bameki ata te koyebisa Laba-sake likambo yango. “Bazalaki nyɛɛ, bazongiselaki ye liloba te, zambi mokonzi alobaki ete, Zongiselá ye liloba te.” (Yisaya 36:21) Eliakimi, Sebena, mpe Yoa bazongi epai ya Hizikiya mpe bapesi ye lapolo ya maloba ya Laba-sake.—Yisaya 36:22.
Hizikiya azwi ekateli
15. (a) Ekateli nini Hizikiya asengeli kozwa sikoyo? (b) Ndenge nini Yehova andimisi basaleli na ye?
15 Mokonzi Hizikiya asengeli sikoyo kozwa ekateli. Yelusaleme akomipesa na mabɔkɔ ya Baasulia? Akosɛnga lisungi ya mampinga ya basoda ya Ezipito? to akotɛlɛma mpe akobunda? Hizikiya atungisami mingi. Akei na tempelo ya Yehova, kasi atindi Eliakimi mpe Sebena elongo na mikóló ya banganga, bákenda kotuna Yehova na nzela ya mosakoli Yisaya. (Yisaya 37:1, 2) Batindami ya mokonzi balati basaki, mpe balobi na Yisaya ete: “Mokolo oyo ezali mokolo na bolɔzi mpe na mpamela mpe na kotungisama . . . Soko, [Yehova] Nzambe na yo akoyoka maloba na Laba-sake oyo mokonzi ya Asulia, nkolo na ye, atindi ye [kotumola Nzambe ya bomoi, mpe ya solo mpenza akosɛnga ye azongisa monɔkɔ, NW] mpo na maloba mayoki [Yehova], Nzambe na yo.” (Yisaya 37:3-5) Ɛɛ, Baasulia batumoli Nzambe ya bomoi! Yehova akotya likebi na matumoli na bango? Na nzela ya Yisaya, Yehova andimisi Bayuda ete: “Bangá maloba mayoki yo te oyo baombo ya mokonzi ya Asulia batyoli ngai na yango. Talá, [nakotya elimo moko kati na ye, mpe akoyoka nsango moko, NW] mpe akozonga na mokili na ye moko; nakokweisa ye na mopanga ya mokili na ye mpenza.”—Yisaya 37:6, 7.
16. Mikanda nini Saneheliba atindi?
16 Na ntango yango, Mokonzi Saneheliba abengi Laba-sake mpo azala pembeni na ye ntango azali kobunda na Libina. Saneheliba akotalela makambo ya Yelusaleme nsima. (Yisaya 37:8) Kasi, atako Laba-sake akei, yango ekitisi motungisi ya Hizikiya te. Saneheliba atindi mikanda oyo ezali komonisa likambo oyo ekokómela bato oyo bafandi na Yelusaleme soki baboi komipesa na mabɔkɔ ya Asulia: “Yo oyoki makambo masali mikonzi ya Asulia na mikili nyonso, lokola ete babebisi bango nyɛɛ. Yo nde okobika? Banzambe ya mabota babikisaki nde bango baoyo batata na ngai babebisaki bango . . . ? Wapi mokonzi ya Hamata mpe mokonzi ya Alapada mpe mokonzi ya mboka ya Sefalewaima mpe ya Ena na Iwa?” (Yisaya 37:9-13) Na maloba mosusu, Moasulia alobi ete ezali mpenza bozoba koboya komipesa—koboya ekobebisa kaka makambo!
17, 18. (a) Na makanisi ya ndenge nini Hizikiya asɛngi lisalisi ya Yehova? (b) Eyano nini Yehova apesi Moasulia na nzela ya Yisaya?
17 Lokola atungisami mingi mpo na ekateli oyo asengeli kozwa, Hizikiya atandi mikanda ya Saneheliba liboso ya Yehova na tempelo. (Yisaya 37:14) Asali libondeli moko ya mozindo mpenza mpe asɛngi Yehova atya likebi na matumoli ya Moasulia, mpe asukisi libondeli na ye na maloba oyo: “Boye [sikoyo, ɛ Yehova, NW], Nzambe na biso, nabondeli yo ete obikisa biso na lobɔkɔ na ye ete makonzi nyonso na mokili báyeba ete yo [ɛɛ Yehova, ozali Nzambe NW], bobele yo moko.” (Yisaya 37:15-20) Hizikiya amonisi na maloba na ye ete azali komitungisa libosoliboso mpo na lobiko na ye moko te, kasi nde mpo na nsɔni oyo ekobwakama likoló na nkombo ya Yehova soki Asulia alongi Yelusaleme.
18 Yehova ayanoli libondeli ya Hizikiya na nzela na Yisaya. Yelusaleme asengeli komipesa na mabɔkɔ ya Asulia te; asengeli kotɛlɛma ngwi. Lokola nde azalaki koloba na Saneheliba, na nguya mpenza, Yisaya alobi nsango ya Yehova epai ya Moasulia: “Azali kotyola yo, azali koboya yo, ɛɛ moseka, mwana mwasi ya Siona; atombweli yo motó na ye. [Na nsima na yo mwana mwasi ya Yelusaleme aningisi motó [na lityo], NW].” (Yisaya 37:21, 22) Na nsima, Yehova abakisi ete: ‘Yo nani mpo otumola Mosantu ya Yisalaele? Nayebi misala na yo. Ozali na mikano oyo eleki ndelo; ozali komitombola mingi. Otyeli basoda na yo elikya mpe olongi mikili mingi. Kasi ozali elombe te. Nakobebisa mikano na yo. Nakolonga yo. Na nsima nakosala yo ndenge osali basusu. Nakotya ndɔbɔ na zolo na yo mpe nakozongisa yo na Asulia!’—Yisaya 37:23-29, NW.
“Oyo mpe ekozala elembo epai na yo”
19. Elembo nini Yehova apesi Hizikiya, mpe yango elimboli nini?
19 Ndanga nini Hizikiya azali na yango ete esakweli ya Yisaya ekokokisama? Yehova ayanoli ete: “Oyo mpe ekozala elembo epai na yo ete na [mbula, NW] oyo okolya biloko bizali kokola yango mpenza mpe na [mbula, NW] ya mibale biloko bikobima na yango; nde na [mbula, NW] ya misato bokokona mpe bokobuka. Bokokona nzete ya [vinyo, NW] mpe bokolya mbuma na yango.” (Yisaya 37:30) Yehova akopesa Bayuda oyo bakangami biloko ya kolya. Atako bazali na likoki ya kolona te mpo Moasulia azingi mboka na bango na basoda, bakolya biloko oyo ekobota na mitika oyo batikaki na bilanga na mbula oyo eleki. Na mbula oyo elandi, mbula ya sabata, basengeli kotika bilanga na bango epema, atako bazali na mpasi. (Exode 23:11) Yehova alaki ete soki basaleli na ye batosi maloba na ye, biloko mingi ekobota na bilanga na bango mpo na kosalisa bango. Na nsima, na mbula oyo elandi, mibali bakolona lokola na momeseno mpe bakolya mbuma ya mosala na bango.
20. Na lolenge nini bato oyo bakobika na matumoli ya Moasulia ‘bakokɔtisa misisa na mabele lisusu mpe ekobota mbuma likoló’?
20 Yehova akokanisi sikawa basaleli na ye na nzete oyo ekoki kopikolama na bolɛmbu te: “Baoyo bakobika na libota ya Yuda bakokɔtisa misisa na mabele lisusu mpe ekobota mbuma likoló.” (Yisaya 37:31, 32) Ɛɛ, baoyo batyeli Yehova motema bakobanga eloko te. Bango na bana na bango bakotikala kaka na mokili yango.
21, 22. (a) Nini esakolami mpo na Saneheliba? (b) Ndenge nini mpe ntango nini maloba ya Yehova mpo na Saneheliba ekokisamaki?
21 Tokoloba nini na matumoli ya Moasulia epai ya Yelusaleme? Yehova ayanoli ete: “Akokóma na [engumba, NW] oyo te, akobɛta mpe mbanzi wana te; akokóma liboso na yango na nguba te; [akofandela yango te na basoda na ye, NW]. Na nzela oyo eyaki ye na yango, akozonga bobele na yango; akokɔta na [engumba, NW] oyo te.” (Yisaya 37:33, 34) Etumba ekozala te kati na Asulia mpe Yelusaleme. Likambo ya kokamwa mpenza, Bayuda nde bakolonga Baasulia kozanga kobunda na bango.
22 Na maloba yango, Yehova atindi anzelu moko abomi mampinga ya basoda ya Saneheliba—mibali 185 000 bakufi. Emonani ete yango esalemaki na Libina, mpe Saneheliba ye moko ntango alamuki akuti bakambi, bakomanda mpe mibali ya makasi ya basoda na ye bakufi. Na nsɔni nyonso, azongi na Ninive, kasi atako alongaki te, akangami kaka na motó makasi na nzambe na ye ya lokuta Nisiloko. Nsima ya mwa bambula, ntango azalaki kosambela na tempelo ya Nisiloko, bana mibali mibale ya Saneheliba babomi ye. Yango mpe emonisi ete Nisiloko, oyo azali na bomoi te, azali na nguya ya kobikisa te.—Yisaya 37:35-38.
Kondima ya Hizikiya elendisami lisusu
23. Likambo nini etungisi Hizikiya ntango Saneheliba akei mpo na mbala ya liboso kobundisa Yuda, mpe lobanzo na ye etaleli nini?
23 Pene na ntango oyo Saneheliba akei mpo na mbala ya liboso kobundisa Yuda, Hizikiya abɛli makasi mpenza. Yisaya ayebisi ye ete akokufa. (Yisaya 38:1) Mokonzi yango oyo azali na mbula 39 alɛmbi nzoto. Azali komitungisa kaka mpo na ye moko te kasi mpe mpo na bomoi ya bato na ye na mikolo ezali koya. Yelusaleme mpe Yuda ezali na likama mpamba te Baasulia balingi kokɔtela yango. Soki Hizikiya akufi, nani akotambwisa makambo ya etumba? Na ntango wana, Hizikiya azali na mwana te oyo akotikala na bokonzi na ye. Hizikiya abondeli Yehova makasi ayokela ye mawa.—Yisaya 38:2, 3.
24, 25. (a) Na ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli ya Hizikiya na boboto mpenza? (b) Likamwisi nini Yehova asali, ndenge yango elobelami na Yisaya 38:7, 8?
24 Yisaya abimi naino te na libándá ya ndako ya mokonzi, Yehova azongisi ye na pembeni ya mbeto ya mokonzi oyo azali kobɛla mpo ayebisa ye nsango mosusu: “Nayoki mabondeli na yo, namoni mpe mpisoli na yo. Talá, nakobakisela mikolo na yo [mbula, NW] zomi na mitano. Nakobikisa yo mpe [engumba, NW] na yo na lobɔkɔ na mokonzi ya Asulia; [nakobundela engumba, NW] oyo.” (Yisaya 38:4-6; 2 Mikonzi 20:4, 5) Yehova akokokisa elaka na ye na elembo moko ya kokamwa: “Talá, [nakozongisa, NW] nsima kino matambe zomi [elili esili] kokita na nse na [ebuteli, NW] na Ahaza.”—Yisaya 38:7, 8a.
25 Josèphe, moto ya Istware, alobi ete na kati ya ndako ya mokonzi, ebuteli moko ezalaki wana mpe likonzí moko monene ezalaki pene na yango. Soki kongɛnga ya moi ebɛti na likonzí yango, ezalaki kosala mwa elili likoló ya ebuteli. Bakokaki komeka koyeba ngonga na kotalela ndenge elili yango ezali komata na matambe ya ebuteli. Sikawa Yehova akosala likamwisi. Ntango elili ekiti na matambe lokola na momeseno, ekozonga nsima matambe zomi. Nani asilá koyoka likambo ya ndenge wana? Biblia elobi ete: “[Moi ezongaki nsima, NW] kino matambe zomi lokola matambe masili yango kokita na nse.” (Yisaya 38:8b) Mwa moke na nsima, Hizikiya abiki. Nsango ekei tii na Babilone. Ntango mokonzi ya Babilone ayoki yango, atindi bato na Yelusaleme mpo na koyeba likambo yango malamumalamu.
26. Lokola Hizikiya akobi kozala na bomoi, yango epesi litomba nini?
26 Mbula soki misato nsima ya kobika ya Hizikiya na ndenge ya likamwisi, mwana na ye ya liboso, Manase abotami. Ntango Manase akoli, amonisi botɔndi te na motema mawa ya Nzambe, soki mpo na yango te, mbɛlɛ abotami te! Kutu, na bomoi na ye, Manase asalaki makambo mingi oyo ezalaki mabe na miso ya Yehova.—2 Ntango 32:24; 33:1-6.
Libunga ya kososola makambo
27. Na lolenge nini Hizikiya amonisi botɔndi mpo na Yehova?
27 Ndenge moko na nkɔkɔ na ye Davidi, Hizikiya azali mobali ya kondima. Azali kotalela Liloba ya Nzambe na motuya. Masese 25:1 elobi ete abongisaki ete makambo oyo ezali na Masese mokapo 25 tii 29 esangisama esika moko. Bato mosusu balobaka ete ye nde akomaki mpe Nzembo ya 119. Loyembo ya botɔndi oyo Hizikiya akomi nsima ya kobika na ye na maladi, emonisi ete azali mobali ya makanisi ya mozindo mpenza. Asukisi ete likambo oyo eleki ntina na bomoi ezali kozala na likoki ya kokumisa Yehova na tempelo na ye “mikolo nyonso na bomoi na biso.” (Yisaya 38:9-20) Tiká ete biso nyonso tózala na makanisi ya ndenge wana mpo na losambo ya pɛto!
28. Wapi libunga monene Hizikiya asali oyo emonisi ete akanisi malamu te mwa ntango moke nsima ya kobika na ndenge ya kokamwa?
28 Atako azali sembo, Hizikiya azali moto ya kozanga kokoka. Asali libunga monene oyo emonisi ete akanisi malamu te mwa ntango moke nsima wana Yehova abikisi ye. Yisaya alobi: “Na ntango yango, Melodakabaladana, mwana ya Baladana, mokonzi ya Babilone, atindaki mikanda mpe likabo epai na Hizikiya, zambi ayokaki ete azalaki na [maladi, NW] mpe asili kobika. Mpe Hizikiya asepelaki na yango mpe amonisaki bango ndako ya biloko na ye bibombami mpe palata mpe wolo mpe malasi mpe nkisi malamu mpe ndako mobimba ya [bibundeli, NW] na ye mpe biloko nyonso bimonanaki na bibombelo na ye. Eloko ezalaki te kati na ndako na ye mpe na mokili mobimba na ye oyo Hizikiya amonisaki bango te.”—Yisaya 39:1, 2.b
29. (a) Nini, mbala mosusu, etindaki Hizikiya alakisa batindami ya Babilone bozwi na ye? (b) Libunga ya Hizikiya ekobimisa makambo nini?
29 Ata nsima wana anzelu ya Yehova alongaki ye mpenza, Asulia akobaki kotumola mabota mingi, kati na yango Babilone. Mbala mosusu Hizikiya alingaki kokamwisa mokonzi ya Babilone ete mokolo mosusu bakoki kosala boyokani. Kasi, Yehova alingi te ete bato ya Yuda básala boyokani na banguna na bango; alingaki ete bátyela ye motema! Na lisalisi ya mosakoli Yisaya, Yehova amonisi ndenge bomoi ya Hizikiya ekozala na mikolo ezali koya: “Mikolo mikoya wana ndako na yo mobimba mpe nyonso oyo batata na yo babombi wana kino mokolo oyo ekobɔtɔlama kino [Babilone], eloko moko ekotikala te . . . Bana na yo, baoyo babotami na nzoto na yo, bakolongolama mpe bakozala mikube mpo na ndako ya mokonzi ya [Babilone].” (Yisaya 39:3-7) Ɛɛ, mokolo mosusu, kaka libota oyo Hizikiya alingaki kokamwisa yango, ekopunza bozwi ya Yelusaleme mpe ekomema bafandi na yango na boombo. Lokola alakisaki bato ya Babilone bozwi na ye, yango elamusi mpe lokoso na bango.
30. Ezaleli nini ya malamu Hizikiya amonisi?
30 Mokanda ya 2 Ntango 32:26 elobi boye, lokola nde ezali kolobela ntango oyo Hizikiya alakisaki bato ya Babilone bozwi na ye: “Hizikiya amikitisaki mpo na lolendo na motema na ye, ye mpe bafandi ya Yelusaleme lokola; bongo, nkanda ya [Yehova] eyelaki bango na mikolo ya Hizikiya te.”
31. Makambo ekómaki ndenge nini mpo na Hizikiya, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?
31 Atako azalaki moto ya kozanga kokoka, Hizikiya azalaki mobali ya kondima. Ayebaki ete Yehova, Nzambe na ye, azali moto mpenza, mpe azali na mayoki. Ntango atungisamaki, Hizikiya azalaki kobondela Yehova na molende mpenza, mpe Yehova azalaki koyanola ye. Yehova Nzambe apesaki ye kimya na boumeli ya mikolo ya bomoi na ye oyo etikalaki, mpe Hizikiya azalaki na botɔndi mpo na yango. (Yisaya 39:8) Yehova asengeli kozala moto mpenza mpo na biso mpe lelo oyo. Ntango mikakatano ebimi, ndenge moko na Hizikiya, tóluka Yehova mpo na kozwa bwanya mpe nzela, ye “akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te.” (Yakobo 1:5) Soki tokobi koyika mpiko mpe komonisa kondima epai na Yehova, tokoki komindimisa ete “akozongisa libonza epai na [baoyo, NW] bakolukaka ye,” sikawa mpe na mikolo ezali koya.—Baebele 11:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Badolare koleka milio 9,5 lelo oyo.
b Nsima ya kokwea ya Saneheliba, mabota ya zingazinga bayaki kopesa Hizikiya makabo, bayaki na wolo, palata mpe biloko mosusu ya motuya. Na 2 Ntango 32:22, 23, 27, totángi ete “Hizikiya [akómaki, NW] na misolo mingi mpenza mpe na lokumu” mpe ete “akumisamaki na miso ya mabota nyonso.” Mbala mosusu makabo yango esalisaki ye atondisa lisusu ndako na ye na biloko ya motuya, oyo asilisaki mpo na kofuta amande epai ya Baasulia.
[Elilingi na lokasa 383]
Mokonzi Hizikiya atyelaki Yehova elikya ntango alingaki kondongwana na nguya ya Asulia
[Elilingi na lokasa mobimba 384]
[Elilingi na lokasa 389]
Mokonzi atindi bato epai ya Yisaya mpo na koyoka toli ya Yehova
[Elilingi na lokasa 390]
Hizikiya abondeli Yehova ete kokwea ya Asulia ekumisa nkombo na ye
[Elilingi na lokasa 393]
Anzelu ya Yehova abomi Baasulia 185 000