Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
“Tiká ete bákumisa nkombo na Yehova; mpo ye atindaki, mpe basalamaki.”—NZEMBO 148:5, NW.
1, 2. (a) Motuna nini esengeli tótalela yango? (b) Ndenge nini motuna ya Yisaya etaleli bikelamu nyonso?
“OYEBI te?” Moto mosusu akoki kokanisa motuna oyo etunami se mpo moto apesa eyano oyo ezali mpe motuna ete, ‘Koyeba nini?’ Kasi, motuna yango ezali na ntina mingi. Tokoki kolanda yango malamu soki totaleli epai oyo batuni yango: na Biblia, na mokanda ya Yisaya mokapo 40. Yisaya, Moebele moko ya ntango ya kala nde akomaki yango. Elakisi ete motuna yango etunamá kala. Kasi ezali mpe motuna oyo ebongi kotunama na mikolo na biso; etali mpenza bomoi na yo.
2 Lokola motuna yango ya Yisaya 40:28 ezali na ntina mingi, ebongi tótalela yango malamumalamu: “Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela [Mozalisi, NW] na nsuka na mokili?” Tomoni mpenza ete ‘koyeba’ yango etalelaki koyeba Mozalisi ya mabelé. Mpe maloba oyo ezali zingazinga emonisi ete akelaki kaka mabelé te. Mwa liboso, na vɛrsɛ 26, Yisaya akomaki boye na ntina na minzoto: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, . . . mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”
3. Ata soki oyebi makambo mingi na ntina na Mozalisi, mpo na nini osengeli koluka koyeba lisusu mingi koleka?
3 Motuna oyo, “Oyebi te?” etaleli mpenza Mozalisi ya mokili mobimba. Mbala mosusu ondimaka ete Yehova Nzambe azali “Mozalisi ya nsuka ya mokili.” Mbala mosusu mpe oyebi bizaleli na ye mpe banzela na ye. Kasi okosala nini soki okutani na moto moko oyo atyaka ntembe ete Mozalisi azali te mpe ayebi mpenza te soki azali ndenge nini? Likambo yango ekoki kokamwisa yo te mpamba te ezali na bamilio na bamilio ya bato oyo bayebi te ete Mozalisi azali to mpe bandimelaka ye te.—Nzembo 14:1; 53:1.
4. (a) Mpo na nini ebongi kotuna mituna na ntina na Mozalisi sikoyo? (b) Na mituna nini bato ya siansi ekoki kopesa biyano te?
4 Na bakelasi bazali koteya makambo oyo ezali kopusa bato mingi na kokanisa ete bato ya siansi bazali (to bakozwa) biyano na mituna ya koyeba ndenge nini mokili esalemaki mpe bomoi ebandaki ndenge nini. Bernard Hagene na Charles Lenay bakomaki boye na buku na bango (Aux Origines de la Vie): “Tii lelo oyo tokómi na ebandeli ya ekeke ya 21, bato bazali naino kotyana ntembe mpo na koyeba ndenge bomoi ebandaki. Ezali mpasi mpo na kosilisa mokakatano yango mpe ezali kosɛnga koluka bipai nyonso, banda na likoló oyo eyebani nsuka te tii na biloko mikemike oyo emonanaka na miso te.” Kasi, na mokapo ya nsuka ya buku yango, oyo ezali na motó ya likambo ete, “Tozwi naino eyano te” balobi boye: “Totaleli na bozindo biyano mosusu oyo bato ya siansi bapesi na motuna oyo: Bomoi ebandaki ndenge nini awa na mabelé? Kasi na mituna ya koyeba mpo na nini bomoi ebandaki? Bomoi ezali na ntina nini? Bato ya siansi bakoki kopesa biyano te. Bato ya siansi balukaka koyeba ‘ndenge nini’ bomoi ebandaki. Kasi ‘ndenge nini’ na ‘mpo na nini’ ezali mituna mibale oyo ekeseni mpenza. . . . Mpo na koyeba ‘mpo na nini,’ ezali nde filozofi, mangomba mpe mingimingi, mokomoko na biso nde asengeli koluka eyano na motuna yango.”
Esika nini tokoki kozwa biyano mpe koyeba ntina ya bomoi
5. Bato ya ndenge nini bakoki kozwa litomba na koyeba Mozalisi malamu?
5 Ɛɛ, tosengeli mpenza koyeba mpo na nini tozali na bomoi, mpe mingimingi mpo na nini tozali awa na mabelé. Mpe lisusu, tosengeli komibanzabanza mpo na bato oyo bandimi naino te ete Mozalisi azali mpe bayebi mpenza banzela na ye te. To mpe, tókanisa naino bato oyo bayekolá makambo ya Nzambe na ndenge oyo Biblia elobi te. Bamiliare ya bato bakolá na Azia to na bamboka mosusu epai oyo bato mingi bakanisaka te ete Nzambe azali moto ya solo oyo azali na bizaleli malamu. Mpo na bato yango, liloba “nzambe” ezali se likanisi mpamba to makasi moko boye. ‘Bayebi Mozalisi’ te, mpe bayebi banzela na ye te. Kanisá soki bato yango to bamilio ya bato mosusu oyo bakanisaka lokola bango bandimi ete Mozalisi azali, bolamu oyo bakoki kozwa, bakisa mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko! Bakoki mpe kozwa eloko moko oyo bato mingi te bazali na yango: kozala na bomoi oyo ezali na ntina mpe kozwa kimya ya makanisi.
6. Ndenge nini bomoi ya bato mingi ekokani na makambo oyo Paul Gauguin akutanaki na yango mpe na liyemi moko oyo asalaki?
6 Tópesa ndakisa mpo na kolimbola malamu likambo yango: Na mobu 1891, Paul Gauguin, moto ya ekólo France mpe moto ya misala ya ntɔki akendaki kofanda na bisanga ya Polynésie française mpo azala na bomoi ya malamu, na esika oyo ezali lokola paladiso yango. Kasi, lokola liboso azalaki na etamboli ya mabe, azwaki maladi mpe apesaki bato mosusu maladi yango. Ntango amonaki ete alingi akufa, ayemaki bililingi na etanda moko monene oyo emonisi ete ‘azalaki komona bomoi lokola libombami monene.’ Oyebi ndenge Gauguin abéngaki liyemi yango? “Toutaka wapi? Tozali banani? Tokendaka wapi?” Ekoki kozala ete osilá koyoka bato mosusu oyo batunaki mituna yango. Bato mingi batunaka bongo. Kasi soki bazwi biyano ya malamu te, mpe bamoni ntina ya solosolo ya bomoi na bango te, bakoki kokanisa nini? Bakoki komona ete bomoi na bango ekeseni mpenza te na bomoi ya nyama.—2 Petelo 2:12.a
7, 8. Mpo na nini bolukiluki ya siansi yango moko ekoki kopesa biyano na mituna na biso te?
7 Tokoki sikoyo kokanga ntina oyo moto lokola Freeman Dyson, profesere ya fizike, akomaki ete: “Ezali na bato mosusu ya lokumu oyo, lokola ngai, batunaka mituna oyo Yobo atunaká. Mpo na nini tonyokwamaka? Mpo na nini bosembo ezali te na mokili? Mpo na nini tomonaka mpasi mpe tozwaka makama?” (Yobo 3:20, 21; 10:2, 18; 21:7) Lokola tolobaki yango, bato mingi balukaka biyano na siansi na esika bátuna Nzambe. Basava ya bioloji, basava oyo bayekolaka biloko oyo ezali na mbu (océan), na basava mosusu, bazali se kobimisa makambo ya sika mpo na mabelé mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali awa na mabelé. Na ngámbo mosusu, basava ya astronomi mpe ya fizike bazali koyekola makambo oyo elekaka na moi na baplanete oyo ebalukaka zingazinga na yango (système solaire), bazali koyekola minzoto, ata mpe bagalaksi oyo ezali mosika mpenza. (Talá Genese 11:6.) Makambo nyonso wana ezali kopusa biso tóloba nini?
8 Bato mosusu ya siansi bazali koloba ete mokili ezali kolakisa biso “mayele” to “mosala” ya Nzambe. Kasi, mbala mosusu yango ekoki kobungisa likambo ya ntina oyo tozali koluka? Lisolo moko ya zulunalo Science elobaki boye: “Ntango bato ya mayele bazali koloba ete koyekola ndenge oyo mokili ebandá ezali kolakisa biso ‘mayele’ to ‘mosala’ ya Nzambe, bazali komonisa se mwa eloko moke na mosala oyo Nzambe asalaki: ndenge oyo mokili ebongisamá.” Kutu, Steven Weinberg, oyo azali sava ya fizike mpe azwaki mbano babéngi prix Nobel akomaki boye: “Wana tozali koyeba mokili oyo malamu, mbala moko tozali mpe komona ete mokili ezali na ntina te.”
9. Makambo nini ekoki kosalisa biso na bato mosusu tóyeba Mozalisi?
9 Kasi, okoki kozala moko ya bamilio ya bato oyo batalelaki likambo yango malamumalamu mpe bamoni mpenza ete koyeba Mozalisi epesaka ntina ya solosolo na bomoi. Kanisá lisusu makambo oyo ntoma Paulo akomaki: “Bato bakoki koloba te ete bayebi Nzambe te. Banda ebandeli ya mokili, bato bakoki komona ndenge Nzambe azali na biloko oyo asalá. Yango ezali kolakisa nguya na Ye oyo ekotikala seko. Ezali kolakisa ete Ye azali Nzambe.” (Baloma 1:20, Holy Bible, New Life Version) Ya solo, mokili ezali na makambo mpe biso moko tozali na makambo oyo ekoki kosalisa biso na bato mosusu tóyeba Mozalisi mpe tóyeba ntina oyo asalaki biso. Tótalela makambo misato: mokili oyo, ndenge bomoi ebandá, mpe mayele na biso.
Makambo oyo ezali kondimisa biso
10. Mpo na nini tosengeli kotalela “ebandeli”? (Genese 1:1; Nzembo 111:10)
10 Mokili esalemaki ndenge nini? Mbala mosusu oyokaka ete ntango basava batalaka biloko oyo ezali na likoló na nzela ya bamasini (télescopes, sondes spatiales), mingi bandimaka ete mokili ezali na ebandeli mpe ezali se kokóma monene. Likambo yango emonisi nini? Yoká oyo Bernard Lovell, sava ya astronomi alobi: “Soki kalakala, mokili ezalaki lokola mwa eloko moko ya moke mpenza, tosengeli komituna soki eloko nini ezalaki liboso na yango . . . Tozali na mokakatano ya kolimbola Ebandeli.”
11. (a) Mokili mobimba ezali monene ndenge nini? (b) Ndenge makambo nyonso ebongisamá malamu na mokili, ezali kopesa biso likanisi nini?
11 Ndenge mokili oyo esalemá, na mabelé, ezali kolakisa ete makambo nyonso ebongisamaki malamumalamu. Na ndakisa, ezali na makambo mibale ya kokamwa oyo tomonaka na moi mpe minzoto mosusu: eumelaka mingi mpenza mpe ebongwanaka te. Lelo oyo bato ya siansi bazali koloba ete bagalaksi ekoki kozala miliare 50 kino miliare 125. Galaksi oyo biso tozali (ebéngami na lompoto Voie lactée) ezali na bamiliare na bamiliare ya minzoto. Sikoyo, kanisá naino: Toyebi ete mpo motɛrɛ ya motuka epela mpe esala malamu, esɛngaka ete esansi esangana na mwa mopɛpɛ na ndenge oyo ekoki mpenza. Soki ozali na motuka, na ntembe te okoluka moto oyo ayebi kobongisa motɛrɛ malamu mpo motuka etambola malamu. Soki ezali kosɛnga ete makambo nyonso ebongisama malamumalamu mpo na mwa eloko lokola motɛrɛ, okanisi boni mpo na moi oyo “engalaka” kasi epesaka biso molunge na ndenge oyo ekoki mpenza? Tomoni mpenza ete makambo nyonso ebongisami malamumalamu mpo bikelamu ya bomoi ezala awa na mabelé. Tokoki kokanisa ete emibongisaki yango moko na mbalakaka? Batunaki Yobo, moto moko ya ntango ya kala, motuna oyo: “Yo nde otyaki mibeko oyo etambwisaka likoló, to yo nde okataki mibeko ya mokili awa na mabelé?” (Yobo 38:33, The New English Bible) Moto moko te atyaki yango. Boye, nini esalaki ete makambo nyonso ebongisama malamu?—Nzembo 19:1.
12. Mpo na nini kokanisa ete ezali na Moto moko ya mayele mpe ya nguya oyo akelaki biloko nyonso ezali likambo ya bozoba te?
12 Ekoki kozala eloko to Moto moko oyo tokoki komona ye te nde asalaki yango? Tótuna naino bato ya siansi mpo na kozwa eyano na motuna yango. Lelo oyo, basava mingi ya astronomi bandimaka ete kuna na likoló ezali na biloko ya nguya oyo babéngi trous noirs. Biloko yango emonanaka na miso te, kasi bato ya mayele bandikama ete ezali. Ndenge moko mpe, Biblia elobi ete ezali na bikelamu ya nguya, bikelamu ya elimo oyo tokoki komona yango na miso te. Soki bikelamu wana ya nguya mpe emonanaka te ezali, tomoni te ete ndenge makambo nyonso ebongisamá malamu na mokili ezali kolakisa ete esalemaki na Moto moko ya mayele mpe ya nguya?—Nehemia 9:6.
13, 14. (a) Bato ya siansi bamonisi nini mpo na ebandeli ya bomoi? (b) Lokola bikelamu ya bomoi ezali awa na mabelé, yango emonisi nini?
13 Likambo ya mibale oyo ekoki kosalisa bato bándima ete Mozalisi ya biloko nyonso azali etaleli ndenge oyo bomoi ebandaki. Lelo oyo, banda Louis Pasteur amonisaki yango na nzela ya siansi, eyebani malamu ete ekelamu ya bomoi ekoki kobima pwasa te. Na bongo, bomoi ebandaki ndenge nini awa na mabelé? Na bambula ya 1950, bato ya siansi bamekaki komonisa ete kala mopɛpɛ ezalaki ndenge mosusu; bongo, bomoi ebandaki mokemoke na mbu moko ya kalakala wana mikalikali ezalaki kopela mbala na mbala na likoló. Kasi, makambo oyo bato ya siansi bamoni sikoyo ezali kolakisa ete bomoi ekokaki kobanda ndenge yango te mpamba te mopɛpɛ ya ndenge oyo bazalaki kokanisa ezalaki te. Yango wana, basava mosusu bamoni ete lolenge wana ya kolimbola ebandeli ya bomoi awa na mabelé ebongi te mpe bazali koluka kolimbola yango ndenge mosusu. Kasi, bango mpe babosani eloko oyo tozali koluka?
14 Fred Hoyle, sava ya astronomi mpe moto ya ekólo Grande-Bretagne, alekisaki bambula ebele na koyekola mokili mpe bikelamu ya bomoi. Ye alobaki boye: “Na esika tóndima ete banguya ya mokili ebimisaki bomoi na ndenge ya pwasa, eleki malamu tókanisa ete Moto moko ya mayele nde alingaki ete bikelamu ya bomoi bizala mpe asalaki yango.” Ɛɛ, wana tozali kokoba koyekola makambo ya kokamwa etali bomoi, mayele ya bomoto ezali se kotinda biso na kokanisa ete Mozalisi moko ya mayele nde asalaki yango.—Yobo 33:4; Nzembo 8:3, 4; 36:9; Misala 17:28.
15. Mpo na nini tokoki koloba ete ndenge ozali wana okeseni na bikelamu mosusu nyonso?
15 Likambo ya liboso oyo tolobeli mpo na kondimisa biso ezali mokili; mpe likambo ya mibale, ezali ndenge oyo bomoi ebandaki awa na mabelé. Sikoyo, talá likambo ya misato: biso bato tokeseni na bikelamu mosusu nyonso. Bato bakeseni na bikelamu mosusu nyonso na makambo ebele; elingi koloba yo mpe okeseni na bikelamu mosusu nyonso. Ndenge nini? Mbala mosusu, osilá koyoka bakokanisi bɔɔngɔ na ordinatere ya makasi. Kasi, makambo oyo bato ya siansi bayebi sikoyo emonisi ete ordinatere ekokani ata moke te na bɔɔngɔ. Moto moko ya siansi oyo azali molakisi na eteyelo moko monene (Massachusetts Institute of Technology) alobaki boye: “Baordinatere oyo tozali na yango lelo oyo ekokani ata moke te na mwana moke ya mbula 4 na makoki na ye ya kotala, koloba, kotambola, to kokanisa. . . . Ekoki kozala ete makoki ya kobomba makambo oyo ordinatere oyo eleki makasi ezali na yango ekokani na makoki ya bɔɔngɔ ya mbɛmbɛ. ‘Ordinatere’ monene oyo ezali na motó na yo eleki yango mosika.”
16. Likoki oyo ozali na yango ya koloba ezali komonisa nini?
16 Bɔɔngɔ na yo nde epesaka yo likoki ya koloba. Bato mosusu balobaka minɔkɔ mibale, misato, to koleka. Kasi koyeba koloba ata monɔkɔ moko ekesenisi biso bato na bikelamu mosusu nyonso. Profesere R. S. Fouts na profesere Deborah Fouts batunaki motuna oyo: “Kaka bato nde . . . bakoki koloba na lokota moko mpo báyokana? . . . Ya solo, banyama nyonso eyokanaka na . . . koningisa binama mosusu ya nzoto, na nsolo, na koganga, na makɛlɛlɛ, mpe na nzembo; ezala na kobina, lokola mpo na nzoi. Longola moto, banyama ezalaka na maloba oyo ebongisami malamu na lokota te. Likambo mosusu oyo ekoki kobenda likebi na biso ezali ete banyama eyebi koyema bililingi te. Esukaka se na kosala banzelanzela oyo ezali ata na ndimbola moko te.” Kaka bato nde bakoki kosalela bɔɔngɔ na bango mpo na koloba lokota mpe koyema bililingi ya biloko ya solo.—Talá Yisaya 8:1; 30:8; Luka 1:3.
17. Bokeseni nini ya monene ezali kati na nyama mpe moto soki bamitali na talatala?
17 Lisusu, yo moko oyebaka to ososolaka ete ozali. (Masese 14:10) Osilá komona ndenge ndɛkɛ, mbwa, to nyau esalaka soki emimoni na talatala? Elukaka kododa, kogangela to kobundisa elilingi na yango. Nyama esalaka bongo mpo ekanisaka ete emoni nyama mosusu, eyebaka te ete ezali nde yango moko. Kasi, ntango yo moto omitalaka na talatala, oyebaka ete elilingi oyo ozali komona ezali nde yo. (Yakobo 1:23, 24) Okoki kotala elongi na yo to kokanisa ndenge okozala nsima ya mwa bambula. Nyama moko te esalaka bongo. Ya solo, bɔɔngɔ na yo ekesenisi yo na bikelamu mosusu nyonso. Nani asalaki yango? Bɔɔngɔ na yo esalemaki ndenge nini soki Nzambe te nde asalaki yango?
18. Makoki nini ya bɔɔngɔ ezali kokesenisa yo na banyama?
18 Bɔɔngɔ na yo mpe esalisaka yo osepela na biloko oyo esalemi malamu na bato ya misala ya mabɔkɔ, osepela na miziki mpe ozala na bizaleli mpe bomoto ya malamu. (Exode 15:20; Basambisi 11:34; 1 Mikonzi 6:1, 29-35; Matai 11:16, 17) Mpo na nini kaka yo kasi banyama te? Banyama esalelaka bɔɔngɔ na yango mingimingi mpo na kokokisa bamposa na yango ya mokolo na mokolo: koluka bilei, koluka mwasi, to kotonga zumbu. Kaka bato nde bakanisaka makambo ekoya. Bato mosusu kutu bamitungisaka mpo na bomoi ya bato oyo bakobotama na bambula ekoya, yango wana bakebaka ete makambo oyo bazali kosala ebebisa mopɛpɛ to mabelé te. Mpo na nini? Mosakoli 3:11 elobi na ntina na bato ete: “[Mozalisi] atii mpe lobiko kati na mitema na bango.” Lokola okanisaka kozala na bomoi ya seko to bomoi oyo ezangi nsuka, yango ekesenisi yo na bikelamu mosusu nyonso.
Tiká ete Mozalisi asala ete bomoi na yo ezala na ntina
19. Wapi makambo misato okoki kosalela mpo na kosalisa bato mosusu bákanisa Mozalisi?
19 Tolobeli kaka makambo misato: ndenge makambo ebongisami malamu na mokili, ndenge bomoi ebandá awa na mabelé, mpe bɔɔngɔ ya moto na makoki mingi na yango oyo ekesenisi ye na bikelamu mosusu nyonso. Makambo misato oyo ezali kolakisa biso nini? Talá ndenge okoki kosolola na bato mosusu mpo osalisa bango bázwa eyano bango moko. Ya liboso okoki kotuna boye: Mokili oyo ezali na ebandeli? Bato mingi bakondima ete ezali na ebandeli. Na nsima okotuna boye: Ebandaki yango moko, to basalaki yango? Bato mingi bamonaka ete mokili esalemaki. Yango ekomema na motuna ya nsuka: Ezali na eloko moko oyo ezali libela na libela to Moto moko oyo azali libela na libela nde asalaki yango? Na mituna oyo ya polele mpe na mayele, bato mingi bakoloba ete: Mozalisi na yango asengeli kozala! Lokola ezali bongo, tokanisi ete bomoi esengeli kozala na ntina, boye te?
20, 21. Mpo na nini koyeba Mozalisi ezali na ntina mingi mpo bomoi na biso ezala na ntina?
20 Na ntembe te esengeli kozala na Mozalisi oyo apesá biso bomoi, apesá biso mposa ya komonisa bizaleli malamu mpe atyá mibeko ya bizaleli malamu. Doktere Rollo May akomaki boye: “Ndimbola ya solosolo ya bomoi nde esimbaka bizaleli oyo tokoki mpenza kobénga bizaleli malamu.” Tokoki kokuta yango wapi? Abakisaki: “Moboko ya solosolo ezali nde bomoto ya Nzambe. Mibeko ya Nzambe ezali mibeko oyo esimbi bomoi banda Nzambe abandaki kokela biloko tii na nsuka.”
21 Tokoki sikoyo kokanga mpenza ntina oyo mokomi ya nzembo alakisaki komikitisa mpe mayele ntango asɛngaki Mozalisi ete: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo. Tambolisá ngai kati na solo na yo mpe lakisá ngai, zambi yo ozali Nzambe na kobika na ngai.” (Nzembo 25:4, 5) Ntango mokomi ya nzembo ayebaki Mozalisi malamu, na ntembe te bomoi na ye ekómaki na ntina mingi, ayebaki eloko nini akosala na bomoi na ye, mpe akokaki kotambwisa yango malamu. Ekoki mpe kozala bongo mpo na mokomoko na biso.—Exode 33:13.
22. Koyeba banzela ya Mozalisi elimboli nini?
22 Koyeba “banzela” ya Mozalisi elimboli mpe koyeba ye malamumalamu, koyeba bomoto mpe banzela na ye. Kasi lokola Mozalisi amonanaka te mpe azali na nguya mingi mpenza, ndenge nini tokoki koyeba ye malamu? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango atalelaki makambo oyo elekaki na bakaa oyo Banazi bazalaki kotya bakangami, Doktere Viktor Frankl alobaki boye: “Likambo ya libosoliboso oyo epusaka moto na bomoi na ye ezali koluka ntina ya bomoi, ezali ‘likambo oyo asalaka te kaka mpo na kosala’ lokola nde apusami na lɔɔmbi” lokola nyama. Alobaki lisusu ete bambula mingi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ankɛtɛ moko esalemaki na France “elakisaki ete bato mingi (89 %) oyo batunaki balobaki ete moto azalaka na mposa ya ‘eloko’ oyo ekosala ete bomoi na ye ezala na ntina.”
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na koyekola makambo ya siansi?
◻ Mpo na kosalisa bato mosusu báyeba Mozalisi, okoki komonisa bango nini?
◻ Mpo na nini koyeba Mozalisi ezali sɛkɛlɛ ya kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina?
[Etanda/Elilingi na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Okanisi Boni?
Mokili oyo
↓ ↓
Ezali na Ezali na
ebandeli te ebandeli
↓ ↓
Ebandaki yango Basalaki yango
moko ↓ ↓
Na eloko oyo ezali Na moto oyo azali
libela na libela libela na libela
[Elilingi na lokasa 15]
Ndenge oyo mokili ezali monene mpe makambo na yango ebongisami malamu epusi bato mingi na kondima ete Mozalisi azali
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Lokasa 15 na 18: Jeff Hester (Arizona State University) mpe NASA