Mokapo ya Misato
“Ye oyo naponi mpe oyo molimo na ngai endimi!”
1, 2. Mpo na nini mokapo 42 ya Yisaya ezali na ntina mingi mpo na baklisto lelo oyo?
‘YEHOVA alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona.’ (Yisaya 43:10) Maloba yango ya Yehova, oyo Yisaya akomaki na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), emonisi ete ekólo oyo Yehova asalaká na yango kondimana na ntango ya kala ezalaki ekólo ya batatoli. Bazalaki moombo to mosaleli oyo Nzambe amiponelaki. Mbula soki 2 600 na nsima, na 1931, baklisto bapakolami balobaki na miso ya bato ete maloba yango etali mpe bango. Bazwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova mpe bandimaki na motema moko kosala makambo nyonso oyo mosaleli ya Nzambe awa na mabelé asengeli kosala.
2 Batatoli ya Yehova bazalaka na mposa makasi ya kosepelisa Nzambe. Yango wana, mokapo 42 ya mokanda ya Yisaya ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na bango, mpamba te emonisi ndenge mosaleli oyo Yehova andimi azalaka mpe ndenge mosaleli oyo Yehova andimi te azalaka. Soki totaleli esakweli yango mpe kokokisama na yango, tokoyeba makambo oyo esalaka ete moto andimama na Nzambe mpe oyo esalaka ete moto andimama na Nzambe te.
“Natye elimo na ngai kati na ye”
3. Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova asakoli nini mpo na ‘mosaleli na ye’?
3 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova asakoli koya ya mosaleli moko oyo ye moko akopona: “Talá! Mosaleli na ngai, oyo nasimbi ye makasi! Ye oyo naponi mpe oyo molimo na ngai endimi! Natye elimo na ngai kati na ye. Bosembo mpo na bikólo, yango nde akobimisa. Akoganga te, akotombola mongongo na ye mpe te, mpe akoyokisa mongongo na ye na balabala te. Akobuka nkɛkɛlɛ oyo efinamá te; mpe mpo na oyo etali nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke, akoboma yango te. Na bosolo mpenza akobimisa bosembo. Akopela mokemoke te, akofinama mpe te tii akotya naino bosembo na mabelé; mpe bisanga ekozela mobeko na ye.”—Yisaya 42:1-4, NW.
4. Nani azali Mosaleli ‘aponami’ oyo asakolamaki, mpe ndenge nini toyebi yango?
4 Mosaleli oyo balobeli awa ezali nani? Balakisi biso ye polele. Evanzile ya Matai ezongeli bavɛrsɛ yango mpe esaleli yango mpo na Yesu Klisto. (Matai 12:15-21) Yesu nde azali Mosaleli ya bolingo, ‘ye oyo aponami.’ Ntango nini Yehova atyaki elimo na ye likoló ya Yesu? Na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), ntango Yesu azwaki batisimo. Lisolo ya Biblia elobeli batisimo yango mpe elobi ete nsima ya kobima ya Yesu na mai, “likoló efungwamaki mpe elimo santu na ndenge ya nzoto lokola ebenga ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló ete: ‘Yo ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo.’” Na ndenge yango, Yehova ye moko alakisaki nani oyo azali Mosaleli na ye ya bolingo. Mosala oyo Yesu asalaki nsima na yango mpe makamwisi oyo asalaki emonisaki ete elimo ya Yehova ezalaki mpenza likoló na ye.—Luka 3:21, 22; 4:14-21; Matai 3:16, 17.
‘Akobimisa bosembo mpo na bikólo’
5. Mpo na nini, na ekeke ya liboso T.B., esengelaki komonisa polele soki bosembo ezali nini?
5 Ye oyo Yehova aponi asengelaki ‘kobimisa,’ elingi koloba komonisa polele, bosembo ya solosolo. “Akomonisa polele epai ya bikólo soki bosembo ezali nini.” (Matai 12:18) Na ekeke ya liboso T.B., esengelaki mpenza komonisa polele soki bosembo ezali nini! Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki koteya lolenge mabe ya kotalela bosembo mpe boyengebene. Bazalaki koluka kokóma na boyengebene na nzela ya mibeko makasimakasi oyo mingi kati na yango eutaki na bango moko. Bosembo na bango, oyo ezalaki kosɛnga kolanda makambo nyonso ya mikemike oyo esɛngami na mibeko, ezalaki kotinda bango báyokelaka basusu mawa te.
6. Ndenge nini Yesu asalaki ete bosembo ya solosolo eyebana?
6 Kasi Yesu amonisaki ndenge oyo Nzambe atalelaka bosembo. Na mateya na ye mpe na bomoi na ye, Yesu amonisaki ete bosembo ya solosolo etindaka moto ayokela basusu mawa. Tózwa kaka lisolo na ye oyo eyebani mingi: Lisolo Likoló ya Ngomba. (Matai, mokapo 5-7) Lisolo yango elimboli mpenza malamu ndenge oyo moto akoki komonisa bosembo mpe boyengebene! Ntango totángaka masolo oyo ezali na Baevanzile, motema mawa oyo Yesu azalaki komonisela babola ná bato ya mpasi esimbaka mpenza mitema na biso, boye te? (Matai 20:34; Malako 1:41; 6:34; Luka 7:13) Amemaki nsango na ye ya kobɔndisa epai ya bato mingi oyo bazalaki lokola nkɛkɛlɛ oyo efinamá, egunzamá mpe ebɛtamibɛtami. Bazalaki lokola nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke, mpe ekómi pene na kokufa. Yesu abukaki te “nkɛkɛlɛ oyo efinamá,” azimisaki mpe te “nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke.” Maloba mpe misala na ye ya bolingo mpe ya mawa ezalaki nde kolendisa mitema ya bato ya komikitisa.—Matai 11:28-30.
7. Mpo na nini esakweli elobaki ete Yesu ‘akoganga te mpe akotombola mongongo na ye na balabala te’?
7 Kasi, mpo na nini esakweli elobi ete Yesu “akoganga te, akotombola mongongo na ye mpe te, mpe akoyokisa mongongo na ye na balabala te”? Mpamba te ye azalaki komilakisa te lokola bato ebele ya ntango na ye. (Matai 6:5) Ntango abikisaki moto moko ya maba, ayebisaki ye boye: “Kebá ete oyebisa moto te.” (Malako 1:40-44) Yesu alukaki te ete bápanza ye nsango to mpe bato bákanisa boye to boye mpo bayoki masolo na minɔkɔ ya bato; kasi alingaki nde bato bátalela bilembeteli ya solosolo mpo básosola bango moko ete ye azali Klisto, Mosaleli mopakolami ya Yehova.
8. (a) Ndenge nini Yesu abimisaki ‘bosembo mpo na bikólo’? (b) Lisese oyo Yesu alobelaki ya Mosamalia ya motema malamu eteyi biso nini mpo na bosembo?
8 Mosaleli oyo aponami asengelaki kobimisa ‘bosembo mpo na bikólo.’ Yango nde Yesu asalaki. Longola ndenge amonisaki ete bosembo ya Nzambe esɛngaka komonisa motema mawa, Yesu ateyaki mpe ete esengeli komonisela bato nyonso bosembo yango. Mokolo mosusu, Yesu akundwelaki moto moko oyo ayebaki Mibeko malamumalamu ete asengeli kolinga Nzambe mpe mozalani na ye. Moto yango atunaki Yesu boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Ntango mosusu akanisaki ete Yesu akoyanola ete: “Ndeko na yo Moyuda.” Kasi Yesu alobelaki lisese ya Mosamalia ya motema malamu. Na lisese yango, Mosamalia moko asalisaki moto moko oyo bayibi babɛtaki, nzokande Molevi moko ná nganga-nzambe moko basalisaki moto yango te. Yango esalaki ete moto oyo atunaki Yesu motuna andima ete, na likambo wana, Mosamalia oyo batyolaka nde azalaki mozalani, kasi Molevi te, nganga-nzambe mpe te. Na nsuka ya lisese yango, Yesu apesaki moto yango toli oyo: “Yo moko salá se bongo.”—Luka 10:25-37; Levitike 19:18.
“Akopela mokemoke te, akofinama mpe te”
9. Soki tokangi ntina ya ndimbola mpenza ya bosembo ya solosolo, yango ekotinda biso na kosala nini?
9 Lokola Yesu amonisaki polele ndimbola mpenza ya bosembo ya solosolo, bayekoli na ye bayekolaki ndenge ya komonisa ezaleli yango. Biso mpe tosengeli kosala lokola bango. Ya liboso, tosengeli kondima mibeko ya Nzambe na oyo etali mabe ná malamu, mpamba te ye azali na lotomo ya komonisa makambo oyo ezali sembo mpe oyo eyokani na boyengebene. Soki tozali kosala milende mpo na kosala makambo ndenge Yehova alingaka, etamboli na biso ya sembo ekomonisa polele eloko babengi bosembo ya solosolo.—1 Petelo 2:12.
10. Mpo na nini tosengeli kosakola mpe koteya mpo na komonisa bosembo?
10 Tomonisaka mpe bosembo ya solosolo ntango tozali kosakola mpe koteya na molende. Yehova asopeli biso boyebi ya ye moko, ya Mwana na ye, mpe ya mikano na ye; boyebi yango ebatelaka bomoi ya bato. (Yoane 17:3) Tokozala sembo te soki tobombi boyebi nyonso wana mpo na biso moko. Salomo alobi boye: “Koboya te kosala malamu epai ya baoyo basengeli na yango na ntango oyo lobɔkɔ na yo ezali na makoki ya kosala bongo.” (Masese 3:27, NW) Tóyebisa bato nyonso, na motema na biso mobimba, makambo oyo toyebi na ntina na Nzambe; tóponaka loposo te, ekólo te to mboka te.—Misala 10:34, 35.
11. Na ndakisa ya Yesu, ezaleli nini tosengeli komonisa epai ya basusu?
11 Lisusu, moklisto ya solo asalelaka bato makambo ndenge Yesu azalaki kosala. Lelo oyo, ebele ya bato bazali na mikakatano oyo ezali kolɛmbisa bango nzoto mpe bazali na mposa bámonisela bango motema mawa mpe bálendisa bango. Ata baklisto mosusu oyo bamipesá na Nzambe bakoki kozala na mikakatano makasi oyo ekoki kosala ete bákokana na nkɛkɛlɛ oyo efinamá to na nsinga oyo ezali kopela mokemoke. Tomoni te ete bazali na mposa ya lisungi na biso? (Luka 22:32; Misala 11:23) Oyo nde esengo tozali na yango ndenge tozali kati na baklisto ya solo oyo basalaka makasi mpo na komonisa bosembo ndenge Yesu amonisaki!
12. Mpo na nini tokoki kondima mpenza ete etikali moke bosembo ezala mpo na bato nyonso?
12 Mokolo mosusu, bosembo ekozala mpo na bato nyonso? Ɛɛ. Ye oyo Yehova aponi “akopela mokemoke te, akofinama mpe te tii akotya naino bosembo na mabelé.” Etikali moke mpenza, Klisto Yesu, ye oyo asili kosekwa mpe kotyama Mokonzi, “akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te.” (2 Batesaloniki 1:6-9; Emoniseli 16:14-16) Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya biyangeli ya bato. Bosembo mpe boyengebene ekotonda. (Masese 2:21, 22; Yisaya 11:3-5; Danyele 2:44; 2 Petelo 3:13) Basaleli ya Yehova na bisika nyonso—ezala ata baoyo bafandi na bisika oyo ezali mosika mpenza, elingi koloba “bisanga”—bazali kozela mokolo yango na motema mɔtɔ.
‘Nakopesa ye lokola pole ya bikólo’
13. Yehova asakoli nini mpo na Mosaleli oyo ye aponi?
13 Yisaya alobi lisusu boye: ‘Nzambe Yehova alobi boye, Mozalisi ya lola mpe Nzambe Monene oyo asembolaki yango, ye oyo atandisaki mokili mpe biloko bikoutaka na yango, ye oyo apesaka mpema epai ya bato likoló na yango mpe elimo epai na baoyo batambolaka wana.’ (Yisaya 42:5) Talá ndenge Yisaya akumisi Yehova, Mozalisi! Lokola akundweli biso makasi ya Yehova ndenge wana, yango epesi maloba ya Yehova kilo mingi. Yehova alobi boye: “Ngai Yehova nabengi yo na boyengebene, mpe nasimbaki yo na lobɔkɔ. Nakobatela yo mpe nakopesa yo lokola kondimana ya bato, lokola pole ya bikólo mpo ofungola miso oyo ekufá, mpo obimisa moto ya bolɔkɔ na kasho, na ndako ya bakangami baoyo bafandi na molili.”—Yisaya 42:6, 7, NW.
14. (a) Lokola Yehova asimbi lobɔkɔ ya Mosaleli oyo ye andimi, yango elakisi nini? (b) Mokumba nini Mosaleli oyo aponami azali kokokisa?
14 Mozalisi Monene ya molɔ́ngɔ́, Mopesi ya bomoi mpe ye oyo abatelaka yango, asimbi lobɔkɔ ya Mosaleli oyo ye aponi mpe alaki ye ete akosunga ye ntango nyonso mpe na makambo nyonso. Elaka oyo ezali mpenza kokitisa motema ya moto! Longola yango, Yehova abateli ye mpo apesa ye lokola “kondimana ya bato.” Kondimana ezali kontra, to boyokani kati na bato mibale to koleka; ezali elaka moko ya lisɛki te. Ezali mpe mobeko moko ya solo mpenza. Ɛɛ, Yehova akómisi Mosaleli na ye “elaka ya solosolo mpo na bato.”—An American Translation.
15, 16. Na lolenge nini Yesu azalaki “pole ya bikólo”?
15 Lokola azali “pole ya bikólo,” Mosaleli oyo alakami akofungola “miso oyo ekufá” mpe akobimisa “baoyo bafandi na molili.” Yango nde Yesu asalaki. Yesu apesaki nkombo ya Tata na ye ya likoló nkembo na ndenge azalaki kopesa litatoli mpo na solo. (Yoane 17:4, 6) Abimisaki polele bokosi ya mangomba, asakolaki nsango malamu ya Bokonzi, mpe afungolaki porte ya bonsomi ya elimo mpo na baoyo bazalaki baombo ya losambo ya lokuta. (Matai 15:3-9; Luka 4:43; Yoane 18:37) Akebisaki bato bátika misala ya molili mpe amonisaki polele ete Satana azali “tata ya lokuta” mpe “moyangeli ya mokili oyo.”—Yoane 3:19-21; 8:44; 16:11.
16 Yesu alobaki ete: “Ngai nazali pole ya mokili.” (Yoane 8:12) Amonisaki yango malamu mpenza ntango apesaki bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola lisiko. Na ndenge yango, apesaki baoyo bazali komonisa kondima likoki ya kolimbisama masumu na bango, ya kozala na boyokani malamu na Nzambe mpe ya kozala na elikya ya bomoi ya seko. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Ndenge akangamaki na Nzambe bomoi na ye mobimba, Yesu alongisaki bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe amonisaki ete Zabolo azali mobuki-lokuta. Ya solo, Yesu nde moto afungolaki miso ya bato oyo bakufá miso mpe asikolaki baoyo bakangamaki na molili ya elimo.
17. Makambo nini tosalaka oyo ezali komonisa ete tozali bamemi-pole?
17 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino bozali pole ya mokili.” (Matai 5:14) Biso mpe tozali bamemi-pole, boye te? Na bomoi na biso mpe na mosala na biso ya kosakola, tozalaka na libaku malamu ya komema basusu epai ya Yehova, Ye oyo apesaka pole ya solosolo. Lokola Yesu, biso mpe tosalaka ete bato báyeba nkombo ya Yehova, tolongisaka bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, tosakolaka Bokonzi na Ye mpe tomonisaka ete yango nde ezali elikya kaka moko mpo na bato. Lisusu, lokola tozali bamemi-pole, tomonisaka polele bokosi ya mangomba, toyebisaka bato bákeba na misala ya mbindo oyo ezali misala ya molili mpe totɔndɔlaka Satana, moto mabe.—Misala 1:8; 1 Yoane 5:19.
“Bóyembela Yehova loyembo ya sika”
18. Makambo nini Yehova ayebisaka basaleli na ye?
18 Sikoyo, Yehova atye likebi na ye epai ya basaleli na ye, alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai ya mosusu te, kosanzola na ngai epai ya bikeko te. Talá makambo ya kala masili kokoka, mpe nazali kosakola makambo ya sika; naino ebimi yango te, nazali koyebisa bino mpo na yango.” (Yisaya 42:8, 9) Ezali te nzambe moko ya mpambampamba nde alobaki esakweli oyo etali ‘mosaleli na ngai,’ kasi ezali Nzambe kaka moko ya bomoi mpe ya solo moto alobaki yango. Ata ndenge nini, esakweli yango esengelaki kokokisama mpe ekokisamaki solo. Yehova Nzambe azali mpenza Mobandisi ya makambo ya sika, mpe ayebisaka yango basaleli na ye liboso ekokisama. Yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
19, 20. (a) Loyembo nini esengeli koyembama? (b) Lelo oyo, banani bazali koyembela Yehova loyembo ya kosanzola?
19 Yisaya akomi boye: ‘Bóyembela Yehova loyembo ya sika, mpe lisanzoli kosanzola ye longwa na ndelo ya mokili; bino bokitaka kino mai na monana mpe nyonso etondisaka yango, bisanga mpe bafandi kati na yango. Tiká ete esobe mpe bingumba na yango bátombola mongongo na bango, bamboka ezali Kedala kofanda; bafandi kati na libanga báyemba na esengo, báganga na epai ya likoló ya ngomba. Bákumisa Yehova na nkembo, bátatola lisanzoli na ye na kati na bisanga.’—Yisaya 42:10-12.
20 Basɛngi bato ya bipai nyonso, ezala baoyo bafandi na bingumba, na bamboka mike oyo ezali kati na esobe, na bisanga, ata mpe na “Kedala,” oyo elakisi bakaa kati na esobe, báyemba loyembo ya kosanzola Yehova. Ezali likambo ya kolendisa mpenza komona ete, na mikolo na biso, bamilio ya bato bandimi kosala likambo yango oyo esakolamaki! Bandimi solo ya Liloba ya Nzambe mpe bandimi Yehova lokola Nzambe na bango. Basaleli ya Yehova bazali koyemba loyembo yango ya sika, bazali kopesa Yehova nkembo na mikili koleka 230. Koyemba kati na bayembi yango ya mimeseno, minɔkɔ mpe mposo ndenge na ndenge ezali mpenza likambo moko ya kosepelisa!
21. Mpo na nini banguna ya basaleli ya Nzambe bakoki kolonga te kokata loyembo ya kosanzola Yehova?
21 Banguna bakoki kotɛmɛla Nzambe mpe kokata loyembo yango ya kosanzola? Bakokoka soki moke te! “Yehova ye moko akobima lokola elombe. Lokola mobundi ya bitumba, akolamusa molende na ye. Akoganga, ya solo, akoganga lokola na ntango ya etumba; akozala na makasi koleka banguna na ye.” (Yisaya 42:13, NW) Nguya nini ekoki kotɛmɛla Yehova? Mbula soki 3 500 liboso, mosakoli Moize ná bana ya Yisalaele bayembaki boye: “[Yehova] azali mobali na etumba; [Yehova] ezali nkombo na ye. Ye abwaki makalo na Falo mpe ebele na ye kati na mai na monana; mpe bakapitɛnɛ basili kozinda kati na Mai Motane.” (Exode 15:3, 4) Yehova alongaki basoda oyo balekaki makasi na ntango wana. Ata monguna moko te ya basaleli ya Nzambe akoki kolonga bango soki Yehova abimi lokola mobundi ya makasi.
“Longwa ntango molai nazali nyɛɛ”
22, 23. Mpo na nini Yehova ‘azali nyɛɛ ntango molai’?
22 Yehova aponaka bilongi te mpe azali na boyengebene, ata na ntango oyo azali kopesa banguna na ye etumbu. Alobi boye: ‘Longwa ntango molai nazali nyɛɛ, nafandi kimya, namipekisi; sikoyo nakoganga lokola mwasi oyo azali kobota, nakokimela mpe nakopemapema. Nakoyeisa ngomba mike mpe ngomba mpamba, nakokaukisa matiti nyonso na yango; nakokómisa bibale bisanga, nakokaukisa mpe maziba.’—Yisaya 42:14, 15.
23 Liboso Yehova abanda kosambisa, atikelaka basali mabe ntango mpo bátika banzela na bango. (Yilimia 18:7-10; 2 Petelo 3:9) Tózwa ndakisa ya bato ya Babilone. Ntango ekólo na bango elekaki bikólo ya mokili mobimba na makasi, babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Soki Yehova atikaki nzela na likambo yango ezalaki mpo na kopesa Bayisalaele etumbu lokola bazangaki bosembo. Kasi, bato ya Babilone bayebaki te ete bazalaki kokokisa mokumba ya Nzambe. Basalelaki ekólo ya Nzambe makambo mabe mpenza koleka ndenge etumbu ya Nzambe esɛngaki. (Yisaya 47:6, 7; Zekalia 1:15) Nzambe ya solo ayokaki mpenza mpasi na motema na komona ndenge bazali konyokola bato ya ekólo na ye! Kasi, asalaki eloko moko te tii ntango oyo ye moko atyaki ekokaki. Nsima na yango, asalaki makasi—ndenge moko na mwasi oyo azali kobota—mpo na kosikola libota oyo asalaki na yango kondimana mpe kobota to kokómisa yango ekólo moko ya bonsomi. Mpo na kokokisa likambo yango, na mobu 539 L.T.B., akaukisaki mpe abebisaki Babilone ná biloko nyonso oyo ezalaki kobatela yango.
24. Makambo nini Yehova alakaki libota na ye Yisalaele?
24 Basaleli ya Nzambe basepelaki mpenza ntango bafungolelaki bango nzela ya kozonga na mboka na bango nsima ya kolekisa ebele ya bambula na boombo! (2 Ntango 36:22, 23) Na ntembe te bazalaki na esengo ya komona kokokisama ya elaka oyo ya Yehova: ‘Nakokamba bakufeli miso na nzela eyebaki bango te; na bilekelo biyebaki bango te, nakotambolisa bango. Nakobongola molili liboso na bango ete mozala pole, bisika na mabulumabulu ete bizala nzela alima. Oyo ezali makambo makosala ngai mpo na bango mpe nakotika bango te.’—Yisaya 42:16.
25. (a) Likambo nini basaleli ya Yehova bakoki mpenza kondima lelo oyo? (b) Mokano nini tosengeli kozala na yango?
25 Ndenge nini maloba yango ezali kokokisama lelo oyo? Eleki sikoyo bambula ebele, bankama ya bambula kutu, Yehova atikeli bikólo básala oyo mitema na bango elingi. Kasi, ntango oyo atyá mpo na kokata makambo ekómi pene. Na mikolo na biso, abimisi bato oyo bazali kotatola mpo na nkombo na ye. Alongoli botɛmɛli oyo ezalaki liboso na bango, alongoli mikakatano na nzela na bango mpo básambela ye “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Alakaki ete: “Nakotika bango te,” mpe akokisi elaka yango. Ezali boni mpo na baoyo bazali kokoba kosambela banzambe ya lokuta? Yehova alobi boye: “Bango bakozongisama nsima, bakoyokisama mpe nsɔni mingi, baoyo bakotalela bikeko; baoyo bakolobaka na bikeko binangwi ete, Bino bozali banzambe na biso.” (Yisaya 42:17) Ezali na ntina mingi ete tótikala sembo epai ya Yehova, ndenge Ye oyo aponami atikalaki sembo!
‘Mosaleli oyo akufá matoi ná miso’
26, 27. Ndenge nini Yisalaele amonisi ete azali ‘mosaleli oyo akufá matoi ná miso,’ mpe mbuma nini babuki mpo na yango?
26 Yesu Klisto, Mosaleli oyo Nzambe aponi, atikalaki sembo tii na liwa. Nzokande, Yisalaele, libota ya Yehova, bango bamonisaki ete bazali mosaleli oyo azangi bosembo mpe oyo akufá matoi ná miso na elimo. Yehova ayebisi bango boye: ‘Bino bato bakufá matoi, bóyoka! Bino bakufeli miso, bótala ete bómona! Nani akufeli miso lokola mosaleli na ngai? Nani azali moto akufá matoi lokola momemi-nsango na ngai oyo ngai nazali kotinda? Nani mokufeli miso lokola mobulisami na ngai? Nani mokufeli miso lokola mosaleli na Yehova? Okomona makambo oyo nde okotala yango te; matoi mafungwami nde makambo mayokami te. Yehova asepelaki mpo na boyengebene na ye ete akumisa malako na ye mpe akembisa yango.’—Yisaya 42:18-21.
27 Yisalaele ezali kopesa mpenza mawa! Mbala na mbala, bato na yango bamipesi na kosambela banzambe ya bikólo mosusu, oyo ezalaka bademo. Mbala na mbala, Yehova alɛmbi te kotindela bango bamemi-nsango na ye, kasi bazali kotyela bango ata likebi te. (2 Ntango 36:14-16) Yisaya asakoli mbuma mabe oyo bakobuka: ‘Oyo ezali libota bayibelami mpe bapunzami, bango nyonso bakangami na mabulu, babombami na ndako ya bakangami. Bakómi kopunzama mpe moto te akobikisa, banyatelami mpe moto te alobi ete, Zongisá! Nani kati na bino akotya litoi na oyo? Nani akotya likebi mpe akoyoka na ntango ekoya? Nani apesi Yakobo epai ya mopunzi mpe Yisalaele epai ya bayibi? Ezali Yehova te, oyo biso nyonso tosaleli ye masumu, oyo tolingaki kotambola na nzela na ye te, oyo makambo na ye, tolingaki kotosa yango te? Bongo asopaki likoló na ye mɔtɔ na nkanda na ye; makasi ya etumba; ezikisaki ye epai na epai nde asosolaki te; ezikisaki ye, nde atyaki yango na motema te.’—Yisaya 42:22-25.
28. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bato ya Yuda? (b) Ndenge nini tokoki koluka ete Yehova andima biso?
28 Lokola bato ya Yuda bazangi bosembo, Yehova atiki nzela ete mokili na bango epunzama mpe ebebisama na mobu 607 L.T.B. Bato ya Babilone bazikisi tempelo ya Yehova, babebisi Yelusaleme, mpe bamemi Bayuda na boombo. (2 Ntango 36:17-21) Tóbosana te ndakisa wana, yango ezali kokebisa biso; mpe tókangaka matoi te na malako ya Yehova, tókangaka mpe miso te na Liloba na ye oyo ekomami. Tóluka nde ete Yehova andima biso; mpo na yango, tólanda ndakisa ya Klisto Yesu, Mosaleli oyo Yehova ye moko andimaki. Ndenge moko na Yesu, tóyebisa bosembo ya solosolo na maloba mpe na misala na biso. Soki tozali kosala bongo, tokotikala na molɔngɔ ya basaleli ya Yehova; tokozala mpe bamemi-pole oyo bazali kosanzola Nzambe ya solo mpe bazali kopesa ye nkembo.
[Bililingi na lokasa 33]
Bosembo ya solosolo etindaka na komonisela basusu motema mawa
[Elilingi na lokasa 34]
Na lisese ya Mosamalia ya motema malamu, Yesu amonisaki ete bosembo ya solosolo bamoniselaka yango bato nyonso
[Bililingi na lokasa 36]
Soki tolendisaka basusu mpe tozalaka na boboto epai na bango, tozali komonisa bosembo oyo eyokani na mokano ya Nzambe
[Bililingi na lokasa 39]
Ntango tosakolaka, tomonisaka bosembo oyo eyokani na mokano ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 40]
Mosaleli oyo andimami apesamaki “lokola pole ya bikólo”