Mokapo ya Zomi
“Ntango ya boboto”
1, 2. (a) Lipamboli nini Yisaya azwaki? (b) Bisakweli oyo ezali na eteni ya liboso ya mokapo 49 ya Yisaya etali banani?
KOBANDA kala, eyebani ete Nzambe andimaka mpe abatelaka bato nyonso ya sembo. Kasi Yehova amoniselaka moto nyonso te boboto na ye. Mpo na kozwa lipamboli monene wana, moto asengeli kokokisa masɛngami. Yisaya azalaki moko ya bato oyo bakokisaki masɛngami yango. Azalaki moto oyo Yehova asepelaki na ye mpe asalelaki ye mpo na koyebisa bato mokano na ye. Ndakisa moko oyo emonisi likambo yango ekomami na eteni ya liboso ya mokapo 49 ya esakweli ya Yisaya.
2 Maloba yango ezali bisakweli mpo na momboto ya Abalayama. Na kokokisama ya liboso ya esakweli yango, momboto yango ezali ekólo ya Yisalaele, oyo euti na Abalayama. Kasi, maloba yango etali mingi mpenza Masiya oyo alakamaki, Momboto ya Abalayama oyo bato bazalaki kozela uta kala. Etali mpe bandeko ya elimo ya Masiya, baoyo bakómi na kati ya momboto ya elimo ya Abalayama mpe na kati ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 3:7, 16, 29; 6:16) Eteni yango ya esakweli ya Yisaya ezali mpe kolobela boyokani ya makasi oyo ezali kati na Yehova mpe Mwana na ye ya bolingo, Yesu Klisto.—Yisaya 49:26.
Yehova aponaki ye mpe abatelaki ye
3, 4. (a) Nani asimbi mosala ya Masiya? (b) Masiya azali koloba na banani?
3 Nzambe amoniselaki Masiya boboto, andimaki ye. Yehova apesaki ye bokonzi mpe makoki nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokumba na ye. Boye, ye oyo akokóma Masiya akokaki mpenza koloba ete: ‘Bóyokamela ngai, bino bisanga; bóyoka, bino bato ya bikólo ya mosika. Yehova abengi ngai longwa na libumu, longwa na nzoto na mama na ngai abengi nkombo na ngai.’—Yisaya 49:1.
4 Awa Masiya azali koloba na bato oyo bazali “mosika.” Atako Masiya alakamaki mpo na ekólo ya Bayuda, mosala na ye ekozala mpo na bolamu ya bikólo nyonso. (Matai 25:31-33) “Bisanga” mpe “bato ya bikólo,” atako bazali na kati ya kondimana elongo na Yehova te, basengeli koyoka Masiya ya Yisalaele mpamba te atindami mpo na kobikisa bato nyonso.
5. Ndenge nini Masiya apesamaki nkombo liboso kutu abotama lokola moto?
5 Esakweli yango elobi ete Yehova akopesa Masiya nkombo liboso kutu abotama lokola moto. (Matai 1:21; Luka 1:31) Ntango molai liboso Yesu abotama, babengaki ye ‘Mopesi-toli ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Nkolo ya kimya.’ (Yisaya 9:6) Emanuele, oyo ezalaki mbala mosusu nkombo ya mwana ya Yisaya, ekómaki mpe nkombo ya esakweli mpo na Masiya. (Yisaya 7:14; Matai 1:21-23) Ata Yesu, nkombo mpenza oyo Masiya akoyebana na yango, esakolamaki liboso abotama. (Luka 1:30, 31) Nkombo yango euti na liloba ya Liebele oyo elimboli “Yehova azali lobiko.” Ezali polele ete Yesu amityaki Klisto ye moko te.
6. Na ndimbola nini monɔkɔ ya Masiya ezali lokola mopanga oyo epeli, mpe ndenge nini babombi ye?
6 Maloba ya esakweli oyo etali Masiya elandi boye: ‘Abongisi monɔkɔ na ngai lokola mopanga oyo epeli, abombi ngai na molili ya lobɔkɔ na ye; abongisi ngai lokola mbanzi oyo epelisami; atye ngai kati na libenga na ye ya mbanzi.’ (Yisaya 49:2) Wana ntango ekokaki mpo Masiya ya Yehova abanda mosala na ye awa na mabelé na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), maloba mpe misala ya Yesu ezalaki mpenza lokola mopanga to mbanzi oyo bapelisi sɛlisɛli, oyo ekoki kokɔta mbala moko na mitema ya bayoki na ye. (Luka 4:31, 32) Maloba mpe misala na ye ezalaki kopelisa nkanda ya monguna monene ya Yehova, Satana mpe ya bato na ye. Kobanda ntango Yesu abotamaki, Satana alukaki koboma ye, kasi Yesu azalaki lokola mbanzi oyo ebombami na kati ya libenga ya mbanzi ya Yehova.a Akokaki bongo kotyela mpenza Tata na ye motema ete akobatela ye. (Nzembo 91:1; Luka 1:35) Na ntango oyo etyamá, Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kobikisa bato. Kasi ntango ekoya wana akobima lokola mobundi makasi kuna na likoló, alati bibundeli ya ndenge mosusu, mpe mopanga oyo epeli makasi ezali kobima na monɔkɔ na ye. Mbala oyo, mopanga oyo epeli elakisi bokonzi oyo Yesu azali na yango ya kosambisa mpe kopesa banguna ya Yehova etumbu.—Emoniseli 1:16.
Misala ya basaleli ya Nzambe ezali mpamba te
7. Maloba ya Yehova oyo ezali na Yisaya 49:3 ezali kokokisama epai ya nani mpe mpo na nini?
7 Sikoyo Yehova abimisi maloba oyo ya esakweli: “Ozali mosaleli na ngai, ee Yisalaele, yo oyo na nzela na yo nakomonisa kitoko na ngai.” (Yisaya 49:3, NW) Yehova alobeli ekólo ya Yisalaele lokola mosaleli na ye. (Yisaya 41:8) Kasi Yesu Klisto nde azali Mosaleli ya liboso ya Nzambe. (Misala 3:13) Ekelamu moko te ya Nzambe ekoki komonisa “kitoko” ya Yehova malamu koleka Yesu. Na yango, atako Yehova amonisi ete azali koloba na Yisalaele, kasi maloba yango ezali mpenza kokokisama nde epai ya Yesu.—Yoane 14:9; Bakolose 1:15.
8. Ndenge nini bato mpenza ya ekólo ya Masiya bayambaki ye, kasi epai ya nani Masiya atye motema mpo na kokata soki mosala na ye elongi to te?
8 Nzokande, ezali solo te ete ebele mpenza ya bato ya ekólo ya Yesu batyolaki ye mpe baboyaki ye? Ezali bongo. Bato mingi ya Yisalaele bandimaki te ete Yesu azali Mosaleli oyo Nzambe apakolaki. (Yoane 1:11) Nyonso oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé, bato ya ntango na ye ntango mosusu bamonaki yango ete ezali na ntina moke, to mpe bamonaki yango mpamba. Na nsima Masiya alobeli mwa moke likambo yango oyo emonani lokola nde alongi te na mosala na ye: “Nasali mosala mpamba, nabimisi nguya na ngai mpo na eloko te mpe bobele mpamba.” (Yisaya 49:4a) Masiya alobi maloba wana te mpo alɛmbi nzoto. Talá oyo alobi lisusu: “Kasi kolonga na ngai ezali epai ya [Yehova] mpe libonza na ngai epai ya Nzambe na ngai.” (Yisaya 49:4b) Nzambe nde akokata soki Masiya alongi to te, kasi bato te.
9, 10. (a) Mosala nini Yehova apesaki Masiya, mpe mbuma nini ye azwaki? (b) Ndenge nini makambo oyo Masiya akutanaki na yango ekoki kolendisa baklisto ya lelo?
9 Yesu azali koluka libosoliboso ete Nzambe andima ye to amonisela ye boboto. Kati na esakweli, Masiya alobi boye: ‘Sikoyo Yehova alobi, ye oyo atongi ngai longwa na libumu ete nazala mosaleli na ye, mpo na kozongisa Yakobo epai na ye mpe ete Yisalaele báyanganisama na ye; zambi nakokumisama na miso ya Yehova mpe Nzambe na ngai akokóma nguya na ngai.’ (Yisaya 49:5) Masiya ayaki mpo na kozongisa mitema ya bana ya Yisalaele epai ya Tata na bango ya likoló. Ebele kati na bango baboyaki, kasi mwa ndambo bandimaki. Nzokande, lifuti na ye ya solosolo ezali epai ya Yehova Nzambe. Kolonga na ye ekotalelama na kolanda mitinda ya bato te, kasi na kolanda mitinda ya Yehova ye moko.
10 Lelo oyo bayekoli ya Yesu bakoki mbala mosusu kokanisa ete bazali kosala mosala ya mpunda. Na bisika mosusu, mosala na bango ya kosakola ekoki komonana ete ezali kobota mbuma mingi te soki bakanisi milende oyo basalaka. Atako bongo, bazali koyika mpiko, ndakisa ya Yesu ezali kolendisa bango. Maloba oyo ntoma Paulo akomaki ezali mpe kolendisa bango: “Na yango, bandeko na ngai balingami, bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.”—1 Bakolinti 15:58.
‘Pole mpo na bikólo nyonso’
11, 12. Na ndenge nini Masiya azali “pole mpo na bikólo nyonso”?
11 Na esakweli ya Yisaya, Yehova alendisi Masiya, akundoleli ye ete kozala Mosaleli ya Nzambe ezali ‘likambo moke’ te. Yesu asengeli ‘kotɛlɛmisa mabota ya Yakobo mpe kozongisa babikisami ya Yisalaele.’ Yehova ayebisi lisusu: ‘Nakopesa yo lokola pole mpo na bikólo nyonso ete kobika na ngai ekóma na nsuka ya mokili.’ (Yisaya 49:6) Na ndenge nini Yesu akopesa bato ya bikólo pole tii “na nsuka ya mokili” nzokande mosala na ye ya kosakola esuki kaka na Yisalaele?
12 Biblia emonisi ete “pole mpo na bikólo nyonso” oyo Nzambe apesaki ekufaki te ntango Yesu asilisaki mosala na ye awa na mabelé. Mbula soki 15 nsima ya liwa ya Yesu, Paulo ná Balanabasi, oyo bazalaki bamisionɛrɛ, bazongelaki maloba ya esakweli ya Yisaya 49:6 mpe basalelaki yango epai ya bayekoli ya Yesu, bandeko na ye ya elimo. Balobaki boye: “Yehova apesi biso etinda na maloba oyo ete, ‘Natye yo lokola pole ya bikólo mosusu, mpo yo ozala lobiko tii na nsukansuka ya mabelé.’” (Misala 13:47) Liboso kutu Paulo akufa, amonaki ndenge nsango malamu ya lobiko esakolamaki kaka epai ya Bayuda te kasi mpe na “bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.” (Bakolose 1:6, 23) Lelo oyo, bandeko ya Klisto bapakolami na elimo, oyo bazali naino awa na mabelé, bazali kokoba na mosala wana. Na lisalisi ya “ebele ya bato” oyo bazali bamilio, bapakolami yango bazali “pole mpo na bikólo nyonso” na bamboka koleka 230 na mokili mobimba.—Emoniseli 7:9.
13, 14. (a) Makambo nini Masiya mpe bayekoli na ye bakutanaki na yango na mosala ya kosakola? (b) Mbongwana nini esalemi?
13 Ntembe ezali te, Yehova nde apesaki Mosaleli na ye Masiya makasi mpe ye nde azali kopesa makasi na bandeko ya Masiya oyo bapakolami na elimo, mpe na baoyo nyonso kati na ebele ya bato bazali kolanda kosakola nsango malamu elongo na bango. Ezali solo ete, ndenge kaka ezalaki mpo na Yesu, bato bazali kotyola mpe kotɛmɛla bayekoli na ye. (Yoane 15:20) Kasi, na ntango oyo esengeli, Yehova abongolaka ntango nyonso makambo mpo akoka kobikisa mpe kopesa basaleli na ye ya sembo mbano. Mpo na Masiya, oyo “atyolami” mpe “aboyami na mabota,” Yehova apesi elaka oyo: ‘Bakonzi bakomona mpe bakotɛlɛma, mikóló mpe bakogumbama na nse, mpo na Yehova, ye oyo azali sembo, Mosantu ya Yisalaele, ye oyo aponi yo.’—Yisaya 49:7.
14 Na nsima ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Filipi mpo na mbongwana yango oyo esakolami. Alobelaki Yesu lokola moto oyo asambwisamaki likoló na nzete ya mpasi, kasi na nsima Nzambe atombolaki ye. Yehova apesaki Mosaleli na ye “esika moko ya likoló mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso, mpo ete na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama.” (Bafilipi 2:8-11) Bakebisi bayekoli ya sembo ya Klisto ete bango mpe bakonyokwama. Kasi, lokola Masiya, bandimi solo ete Yehova akomonisela bango boboto na ye.—Matai 5:10-12; 24:9-13; Malako 10:29, 30.
“Ntango mpenza oyo endimami”
15. “Ntango” nini oyo esakweli ya Yisaya elobeli, mpe yango emonisi nini?
15 Esakweli ya Yisaya ebakisi maloba moko ya ntina mingi. Yehova ayebisi Masiya boye: “Na ntango ya ngɔlu [“boboto,” NW] nazongiseli yo liloba; na mokolo ya kobikisama nasungi yo; nakobatela yo mpe nakopesa yo lokola kondimana epai ya bato.” (Yisaya 49:8a) Esakweli mosusu oyo ekokani na yango ezali na Nzembo 69:13-18 (NW). Mokomi ya nzembo abengi “ntango ya ngɔlu to ya boboto” ete “ntango oyo endimami.” Maloba yango emonisi ete Yehova amonisaka boboto na ye mpe abatelaka na likebi mingi kasi na ntango moko etyamá mpe ya mokuse.
16. Ntango ya boboto oyo Yehova abongisaki mpo na Yisalaele ya kala ezalaki ntango nini?
16 Ntango yango ya boboto ezalaki ntango nini? Na ebandeli, maloba yango ezalaki na kati ya esakweli ya kozongisama mpe esakolaki kolongwa ya Bayuda na boombo mpe kozonga na bango. Ekólo ya Yisalaele ekómaki na ntango oyo bamoniselaki yango boboto wana bazwaki makoki ya “kobongisa mboka” na bango mpe kozongela “mabelé ya libula [na bango] oyo etikalaki mpamba.” (Yisaya 49:8b, NW) Bazalaki lisusu “bakangami” na Babilone te. Ntango bazali kozonga na mboka na bango, Yehova asalaki ete báyoka “nzala” to “mposa ya mai” te, to ete ‘molunge makasi to moi ebɛta bango’ te. Bayisalaele oyo bapanzanaki bipai nyonso bayanganaki lisusu na mboka na bango ‘longwa na mosika . . . , na nɔrdi mpe na wɛsti.’ (Yisaya 49:9-12) Longola kokokisama monene yango ya liboso, Biblia emonisi ete esakweli yango ekokisamaki mpe lisusu.
17, 18. Ntango nini ya boboto Yehova atyaki na ekeke ya liboso?
17 Ya liboso, ntango Yesu abotamaki, baanzelu basakolaki kimya mpe motema boboto ya Nzambe epai ya bato. (Luka 2:13, 14) Nzambe amonisaki motema boboto yango epai ya bato nyonso te, kasi kaka epai ya baoyo bamonisaki kondima kati na Yesu. Na nsima, Yesu atángaki liboso ya bato esakweli ya Yisaya 61:1, 2 mpe alobaki ete ekokisamaki epai na ye mpamba te azalaki kosakola “mbula ya kondimama na Yehova.” (Luka 4:17-21) Ntoma Paulo alobelaki ndenge Yehova abatelaki mpenza Klisto na mikolo ya bomoi na ye na mosuni. (Baebele 5:7-9) Na yango, ntango wana ya boboto elakisi nde boboto oyo Nzambe amoniselaki Yesu wana azalaki na bomoi lokola moto.
18 Nzokande, esakweli oyo ezali lisusu kokokisama. Nsima ya kozongela maloba ya Yisaya oyo etali ntango ya boboto, Paulo alandi koloba: “Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.” (2 Bakolinti 6:2) Paulo akomaki maloba yango mbula 22 nsima ya liwa ya Yesu. Ezali polele ete, ntango lisangá ya boklisto ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova abakisaki mikolo na mbula na ye ya boboto mpo bayekoli ya Klisto oyo bapakolami na elimo bázwela mpe yango litomba.
19. Ndenge nini baklisto bakoki lelo oyo kozwa litomba na ntango ya boboto ya Yehova?
19 Bongo ezali boni mpo na bayekoli ya Yesu na ntango na biso oyo bapakolami na elimo te mpo na kozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe na likoló? Baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bakoki mpe kozwa litomba na ntango yango oyo endimami? Ɛɛ. Mokanda ya Emoniseli elobi ete oyo ezali ntango Yehova azali komonisa boboto epai ya ebele ya bato oyo bakouta “na bolɔzi monene” mpo na kozwa bomoi na paladiso awa na mabelé. (Emoniseli 7:13-17) Na ndenge yango, baklisto nyonso bakoki kozwa litomba na ntango mokuse oyo Yehova azali komonisa boboto na ye epai ya bato bazangi kokoka.
20. Ndenge nini baklisto bakoki kokima likama ya kozanga kokokisa mokano ya boboto monene ya Yehova?
20 Ntoma Paulo apesaki likebisi liboso ya kolobela ntango endimami ya Yehova. Abondelaki baklisto ete ‘báyamba te boboto monene ya Nzambe mpo na kozanga kokokisa mokano na yango.’ (2 Bakolinti 6:1) Yango wana, baklisto basalelaka libaku nyonso mpo na kosepelisa Nzambe mpe kosala mokano na ye. (Baefese 5:15, 16) Ekozala malamu soki balandi toli oyo ya Paulo: “Bókeba, bandeko, noki te motema ya mabe oyo ezangi kondima eya kokola na kati ya moko na bino na kopɛngwáká na Nzambe ya bomoi; kasi bókoba kolendisana mokolo na mokolo, na ntango oyo ekoki kobengama ete ‘Lelo,’ noki te moko na bino akóma motema makasi mpo na nguya ya bokosi ya lisumu.”—Baebele 3:12, 13.
21. Maloba nini ya esengo esukisi eteni ya liboso ya mokapo 49 ya Yisaya?
21 Nsima ya lisolo ya esakweli kati na Yehova ná Masiya na ye, Yisaya abimisi maloba oyo ya esengo: “Yembá, ee lola; sepelá, ee mokili; ee ngomba, bandá koyemba nzembo; mpo ete [Yehova] abɔndisi bato na ye, akoyokela banyokolami na ye mawa.” (Yisaya 49:13) Oyo ezali solo maloba kitoko ya kobɔndisa mpo na Bayisalaele ya ntango ya kala, mpo na Yesu Klisto, Mosaleli monene ya Yehova, mpe mpo na basaleli ya Yehova oyo bapakolami na elimo elongo na baninga na bango “bampate mosusu” ya mikolo na biso!— Yoane 10:16.
Yehova abosanaka basaleli na ye te
22. Ndenge nini Yehova amonisi polele ete akobosana bato na ye soki moke te?
22 Sikoyo Yisaya alandi koyebisa maloba ya Yehova. Asakoli ete Bayisalaele oyo bakokende boombo bakolɛmba nzoto mpe bakobungisa elikya. Yisaya alobi boye: “Siona alobaki ete, [Yehova] atiki ngai. Nkolo na ngai abosani ngai.” (Yisaya 49:14) Yango ezali solo? Yehova asundoli bato na ye mpe abosani bango? Yisaya, molobeli ya Yehova, abakisi ete: ‘Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo azali komɛlisa ye mabɛlɛ? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata basi oyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.’ (Yisaya 49:15) Eyano oyo emonisi mpenza bolingo ya Yehova! Ndenge Yehova alingaka bato na ye eleki ndenge mama alingaka mwana na ye. Atikaka te kokanisa basaleli na ye ya sembo. Abosanaka bango te, lokola nde nkombo na bango ekomamá na matandu ya mabɔkɔ na ye: “Talá nakomi nkombo na bino na matandu ya mabɔkɔ na ngai, mapango na yo ezali libela liboso na ngai.”—Yisaya 49:16.
23. Ndenge nini Paulo alendisaki baklisto bátya motema ete Yehova akobosana bango te?
23 Na mokanda ya ntoma Paulo epai ya Bagalatia, alendisaki baklisto ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te na ntango oyo ekoki tokobuka soki tolɛmbi te.” (Bagalatia 6:9) Epai ya Baebele akomaki maloba oyo ya kolendisa: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Baebele 6:10) Tosengeli soki moke te kokanisa ete Yehova abosani basaleli na ye. Ndenge moko na Siona ya kala, baklisto bazali na ntina mpenza ya kosepela mpe ya kozela Yehova na motema mpiɔ. Azangaka te kokokisa makambo mpe bilaka oyo ezali na kati ya kondimana na ye.
24. Ndenge nini Siona akozongisama, mpe mituna nini akotuna?
24 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova abakisi maloba mosusu ya kobɔndisa. Baoyo “babebisi [Siona],” ezala bato ya Babilone to Bayuda oyo bapɛngwi, bazali lisusu likama te. ‘Bana’ ya Siona, Bayuda oyo bakendeki boombo kasi batikali sembo epai ya Yehova, “bazali kosala mbangu.” ‘Bakoyanganisama.’ Ntango bazongi mbangu na Yelusaleme, Bayuda oyo bauti na boombo bakozala lokola biloko oyo ekokómisa mboka-mokonzi na bango kitoko, se ndenge ‘mwasi ya libala’ alataka na ‘lipombo mpe kitoko.’ (Yisaya 49:17, 18) Bisika ya Siona “bibebisami.” Kanisá sikoyo kokamwa na ye ntango akómi mbala moko na bato ebele mpe esika ekómi komonana moke. (Tángá Yisaya 49:19, 20.) Yango wana amituni, epai wapi bana wana nyonso bauti: ‘Okoloba na motema na yo ete, Nani aboteli ngai baoyo? Nabungisaki bana na ngai mpe nazalaki ekomba, nakangamaki mpe nalekisamaki mosika, kasi nani abɔkɔli baoyo? Talá natikamaki mpamba; baoyo, kutu, bazalaki wapi?’ (Yisaya 49:21) Talá likambo ya esengo mpo na Siona oyo kala azalaki ekomba!
25. Na ntango na biso, Yisalaele ya elimo ezongisamaki lisusu ndenge nini?
25 Maloba wana ezali mpe kokokisama na ntango na biso. Na bambula ya mpasi mingi ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Yisalaele ya elimo bakutanaki na monyoko mpe bakangamaki na boombo. Kasi bazongisamaki lisusu mpe bakɔtaki na paladiso ya elimo. (Yisaya 35:1-10) Lokola mboka oyo ebebisamaki na ntango ya kala, oyo Yisaya alobeli, Yisalaele ya elimo asepelaki na komona ete atondi na basaleli ya Yehova oyo bazali na esengo mpe bazali komipesa na mosala.
“Elembo mpo na bato”
26. Malako nini Yehova apesi bato na ye oyo basikolami?
26 Na ndenge ya esakweli, sikoyo Yehova amemi Yisaya na ntango oyo bato na Ye bakosikolama na Babilone. Nzambe akopesa bango malako? Yehova apesi eyano: ‘Talá nakotombola lobɔkɔ na ngai epai na bikólo, nakotɛlɛmisa elembo na ngai liboso na bato, mpe bakoyeisa bana babali na yo na ntolo na bango, bana basi na yo bakokumbama na mapeka na bango.’ (Yisaya 49:22) Ntango maloba oyo ekokisamaki na mbala ya liboso, Yelusaleme, oyo kala ezalaki esika ya guvɛrnema mpe ya tempelo ya Yehova, nde ekómaki “elembo” ya Yehova. Ata kutu bato minene ya bikólo mosusu, lokola “bakonzi” mpe ‘basi ya lokumu,’ bapesaki Bayisalaele mabɔkɔ mpo bázonga na mboka na bango. (Yisaya 49:23a) Bakonzi ya Perse lokola Sirise mpe Alatazelezese Lobɔkɔ-Molai ná mabota na bango bazalaki kati na bato oyo bapesaki lisalisi yango. (Ezela 5:13; 7:11-26) Maloba ya Yisaya ezali mpe kokokisama lisusu.
27. (a) Na kokokisama monene ya esakweli yango, epai ya “elembo” nini bato ya bikólo bakoyangana? (b) Likambo nini ekomonana ntango bakosɛnga ete bikólo nyonso bátosa boyangeli ya Masiya?
27 Yisaya 11:10 (NW) elobeli “elembo mpo na bato.” Ntoma Paulo asalelaki maloba yango mpo na Klisto Yesu. (Baloma 15:8-12) Yango wana, na kokokisama monene ya esakweli yango, Yesu ná bayekoli na ye oyo bapakolami na elimo, baoyo bakoyangela elongo na ye, nde bazali “elembo” ya Yehova esika bato ya bikólo bazali koyangana. (Emoniseli 14:1) Na ntango oyo etyamá, bato nyonso ya mabelé, ata baoyo bazali koyangela lelo, bakotosa mpenza boyangeli ya Masiya. (Nzembo 2:10, 11; Danyele 2:44) Ekosuka ndenge nini? Yehova alobi ete: ‘Bongo okoyeba ete ngai nazali Yehova, baoyo bakotya elikya epai na ngai bakoyoka nsɔni te.’—Yisaya 49:23b.
“Sikoyo lobiko na biso ekómi penepene lisusu”
28. (a) Na maloba nini Yehova akitisi lisusu bato na ye motema ete bakosikolama? (b) Elaka nini Yehova apesi bato na ye oyo ezali tii lelo?
28 Basusu kati na baoyo bazali na boombo na Babilone bakoki komituna, ‘Yisalaele ekosikolama solo?’ Yehova atye likebi na motuna yango mpe atuni boye: “Bato oyo moto ya makasi akangi bakoki nde kobɔtɔla ye bango, to bato nyonso oyo monyokoli moko akangi bakoki kokima?” (Yisaya 49:24, NW) Eyano ezali ɛɛ. Yehova akitisi bango motema: “Ata bakangami ya moto ya makasi bakobɔtɔla ye bango, mpe bato oyo monyokoli moko akangi bakokima.” (Yisaya 49:25a, NW) Oyo ezali solo maloba ya kobɔndisa mpe ya kokitisa motema! Lisusu, Yehova akomonisela bato na ye kaka boboto te, alaki mpe bango ete akobatela bango. Alobi yango na maloba ya polele: “Ngai nakowelana na bango baoyo bakowelana na yo, mpe ngai nakobikisa bana na yo.” (Yisaya 49:25b) Elaka yango ezali naino na ntina tii lelo. Ndenge ekomami na Zekalia 2:8 (NW), Yehova alobi na bato na ye ete: “Ye oyo asimbi bino azali kosimba na mbuma ya liso na ngai.” Ya solo, sikoyo tozali na ntango ya boboto oyo bato ya mabelé mobimba bakoki kosalela mpo na koyangana na Siona ya elimo. Nzokande, ntango yango ya boboto ekosuka.
29. Likambo nini ya nsɔmɔ ezali kozela baoyo baboyi kotosa Yehova?
29 Likambo nini ekokómela baoyo bazali koboya na nko nyonso kotosa Yehova mpe bazali ata konyokola basaleli na ye? Alobi boye: ‘Nakoleisa banyokoli na yo mosuni na bango mpenza mpe bakolangwa na makila na bango mpenza lokola masanga.’ (Yisaya 49:26a) Talá likambo ya nsɔmɔ! Batɛmɛli yango ya mitó makasi bakoumela ntango molai te. Bakobomama mpenza. Na yango, wana Yehova akobikisa bato na ye mpe akoboma banguna na bango, ekomonana ete azali Mobikisi. “Bongo nyonso na nzoto bakoyeba ete Ngai nazali [Yehova], mobikisi na yo; mosikoli na yo, mpe, Oyo-na-Nguya na Yakobo.”—Yisaya 49:26b.
30. Wapi misala ya kobikisa oyo Yehova asali mpo na bato na ye, mpe akosala lisusu nini?
30 Maloba yango ekokisamaki liboso ntango Yehova asalelaki Sirise mpo na kosikola bato na Ye na boombo oyo bazalaki na Babilone. Ekokisamaki lisusu na 1919 ntango Yehova asalelaki Mwana na ye Yesu Klisto, oyo atyamaki mokonzi, mpo na kosikola basaleli na Ye na boombo ya elimo. Yango wana, Biblia ezali kolobela Yehova mpe Yesu lokola babikisi. (Tito 2:11-13; 3:4-6) Yehova azali Mobikisi na biso, mpe Yesu Masiya azali “Kapita” na ye. (Misala 5:31) Ntembe ezali te, misala ya kobikisa oyo Nzambe azali kosala na nzela ya Yesu Klisto ezali mpenza ya kokamwa. Na nzela ya nsango malamu, Yehova azali kosikola bato ya mitema sembo na boombo ya losambo ya lokuta. Na lisalisi ya lisiko, azali kosikola bango na boombo ya lisumu mpe liwa. Na 1919 asikolaki bandeko ya Yesu na boombo ya elimo. Mpe na etumba ya Armagedona, oyo ezali koya mbangu, akobikisa ebele ya bato ya sembo ntango bato ya masumu bakobomama.
31. Baklisto basengeli kosala nini lokola bazali bato oyo Nzambe azali komonisela boboto?
31 Na yango, ezali solo libaku malamu kozala bato oyo Nzambe azali komonisela boboto! Tiká ete biso nyonso tósalela malamu ntango oyo endimami. Mpe tiká misala na biso emonisa ete toyebi ete ntango etikali moke, tótya likebi na maloba oyo Paulo akomelaki Baloma: “Boyebi eleko oyo, ete ngonga na bino ya kolamuka na mpɔngi esili kokoka, mpo sikoyo lobiko na biso ekómi penepene lisusu koleka ntango oyo tokómaki bandimi. Butu epusani mpenza; ntɔngɔ ekómi pene. Na yango tiká ete tólongola misala ya molili mpe tólata bibundeli ya pole. Lokola na moi tiká ete tótambola na ndenge ya lokumu, na bilambo ya lokoso te mpe na kolangwa masanga te, na misala mabe ya kosangisa nzoto te mpe na etamboli ya mbindo te, na koswana te mpe na zuwa te. Kasi bólata nde Nkolo Yesu Klisto, mpe bósalaka myango te mpo na bamposa ya mosuni.”—Baloma 13:11-14.
32. Bilaka nini ya solosolo basaleli ya Nzambe bazali na yango?
32 Yehova akokoba komonisa ete andimi baoyo bayokaka toli na ye. Akopesa bango nguya mpe makoki oyo esengeli mpo na kosakola nsango malamu. (2 Bakolinti 4:7) Yehova akosalela basaleli na ye ndenge asalelaka Yesu, Motambwisi na bango. Akokómisa monɔkɔ na bango “lokola mopanga oyo epeli” mpo bákoka kosimba mitema ya bato ya komikitisa na nsango malamu. (Matai 28:19, 20) Akobatela basaleli na ye “na molili ya lobɔkɔ na ye.” Lokola “mbanzi epelisami,” akobomba bango “na libenga na ye ya mbanzi.” Ya solo, Yehova akosundola bato na ye te! —Nzembo 94:14; Yisaya 49:2, 15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Ntango Satana ayebaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe moto oyo esakweli elobaki ete akosasa motó na ye (Ge 3:15), asalaki nyonso mpo na koboma Yesu. Kasi, ntango anzelu Gabiliele azalaki kosakola kobotama ya Yesu epai ya Malia, ayebisaki ye ete: ‘Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.’ (Lk 1:35) Yehova abatelaki Mwana na ye. Milende oyo esalemaki mpo na koboma Yesu ntango azalaki mwana moke elongaki te.”—Étude perspicace des Écritures, volimi 2, lokasa 902, ebimisami na Batatoli Yehova.
[Elilingi na lokasa 139]
Masiya azali lokola “mbanzi epelisami” oyo ezali na kati ya libenga ya mbanzi ya Yehova
[Elilingi na lokasa 141]
Masiya azali “pole mpo na bikólo nyonso”
[Elilingi na lokasa 147]
Nzambe alingaka basaleli na ye koleka ndenge mama alingaka mwana na ye