Bateyami na Yehova kino Lelo
“[Yehova] apesi ngai lolemo na baoyo balakisami.”—YISAYA 50:4.
1, 2. (a) Mpo na likambo nini Yehova abongisaki moyekoli na ye oyo alingaka mingi, mpe yango ebimisaki litomba nini? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki botɔ́ndi mpo na Eutelo ya mateya na ye?
YEHOVA NZAMBE azali Molakisi uta ntango akómaki Tata. Nsima na mwa ntango, wana bana na ye mosusu batombokaki, abongisaki moyekoli na ye oyo alingaka mingi, Mobotami na ye ya liboso, mpo na mosala ya kosakola awa na mabelé. (Masese 8:30) Na lolenge ya esakweli, Yisaya mokapo 50 ezali komonisa moyekoli yango lokola ye oyo azali koloba ete: “Nkolo [Yehova] apesi ngai lolemo na baoyo balakisami ete nayeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi.” (Yisaya 50:4) Lokola litomba ya kosalela mateya ya Tata na ye wana azalaki na mabelé, Yesu azalaki liziba ya libɔndisi epai na baoyo nyonso ‘balɛmbaki mpe bazalaki na mokumba mpe na bozito.’—Matai 11:28-30.
2 Yesu asalaki misala mingi ya nguya na ekeke ya liboso. Afungolaki miso ya bakufeli miso mpe asekwisaki nkutu bakufi, nzokande bato ya eleko na ye bayebaki ye liboso mpenza lokola moteyi. Bayekoli na ye mpe batɛmɛli na ye bazalaki kobénga ye bongo. (Matai 8:19; 9:11; 12:38; 19:16; Yoane 3:2) Yesu amikumisaki te mpo na oyo azalaki koteya kasi na komikitisa nyonso andimaki ete: “Mateyo na ngai mazali ya ngai te kasi na motindi na ngai.” “Pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.”—Yoane 7:16; 8:28; 12:49.
Boyokani kati na molakisi mpe moyekoli oyo ebongi komekolama
3. Lolenge nini esakweli ya Yisaya ezali komonisa likebi oyo Yehova azali kotya likoló na baoyo azali koteya?
3 Moteyi malamu mpenza atyaka likebi ya sikisiki, ya mozindo, mpe ya bolingo epai na bayekoli na ye. Yisaya mokapo 50 ezali komonisa ete Yehova Nzambe atyaka likebi motindo wana epai na baoyo ateyaka. Esakweli yango emonisi ete: “Ntɔ́ngɔ́ na ntɔ́ngɔ́ akolamukisa, akolamukisa litoi na ngai koyoka lokola bango baoyo [balakisami, NW].” (Yisaya 50:4) Elobeli wana ezali komonisa molakisi oyo alamwisaka bayekoli na ye na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo ete akoka koteya bango. Kolobáká na ntina na kokokisama ya mokapo wana, nganga-mayele moko ya Biblia amonisaki ete: “Likanisi ezali oyo ete Mosikoli asengelaki kozala . . . na elobeli ya elilingi, ye oyo atángaki kati na eteyelo ya Nzambe; ye oyo akozala na makoki ya kopesa kolakisama epai na basusu. . . . Masiya asengeli mpenza kozala na makoki mingi ya koteya bato awa na nsé, na nzela ya mateya mauti na Nzambe.”
4. Lolenge nini Yesu ayambaki mateya ya Tata na ye?
4 Na lolenge esengeli mpenza, bayekoli bayambaka malamu mateya ya molakisi na bango. Lolenge nini Yesu ayambaki mateya ya Tata na ye? Eyano na ye ezalaki na boyokani na makambo oyo tozali kotánga kati na Yisaya 50:5: “Nkolo [Yehova] azipoli litoyi na ngai, nazalaki [motomboki, NW] te; nazongaki nsima mpe te.” Ee, Yesu azalaki na mposa makasi ya koyekola. Azalaki moyoki malamu. Lisusu, azalaki pene ya kosala nyonso oyo Tata na ye azalaki kosɛnga na ye. Azalaki motomboki te, nzokande, alobaki ete: “Mokano na ngai esalema te, kasi bobele mokano na yo.”—Luka 22:42.
5. (a) Nini emonisi ete Yesu ayebaki liboso minyoko oyo alingaki kokutana na yango awa na mabelé? (b) Lolenge nini esakweli ya Yisaya 50:6 ekokisamaki?
5 Esakweli emonisi ete Mwana ayebiselamaki makambo oyo malingaki kobimela ye mpo na ezaleli na ye ya kokokisa mokano ya Nzambe. Yango emonisami na makambo ye oyo alakisami alobi: “Napesi mokongo na ngai epai na babɛti, mpe matama na ngai epai na baoyo [babendi, NW] mandefu. Nabombi elongi na ngai te na nsɔ́ni mpe na kotwelama nsoyi.” (Yisaya 50:6) Lokola esakweli ezali komonisa yango, Yesu anyokwamaki mingi na ntango azalaki na mabelé. Ntoma Matai akomi ete, “Batwaki nsoyi na elongi na ye.” “Bamosusu baboli ye mbata.” (Matai 26:67) Yesu azwaki mpasi wana ntango azalaki na mabɔ́kɔ ya bakonzi ya mangomba, na butu ya mokolo ya Pasika na mobu 33 T.B. Na mokolo molandaki, Yesu apesaki mokongo na ye epai na babéti, wana basodá Baloma babetaki ye kozanga koyokela ye mawa, liboso ya kokakisa ye na nzeté ete akufa.—Yoane 19:1-3, 16-23.
6. Nini emonisi ete Yesu abungisaki elikya soko moke te epai na Tata na ye, mpe mbano nini azwaki mpo na elikya na ye?
6 Mwana, oyo ateyamaki malamu, abungisaki elikya na ye te epai na Moteyi na ye. Yango emonani na makambo oyo alobaki na nsima engebene esakweli: “Zambi Nkolo [Yehova] akosunga ngai; bongo nabulungani te.” (Yisaya 50:7) Elikya ya Yesu epai na Molakisi na ye ememelaki ye mbano mingi. Tata na ye apesaki ye nkembo mingi, apambolaki ye na kopesáká ye etɛlɛmɛlo oyo ezali likoló koleka basaleli nyonso ya Nzambe. (Bafilipi 2:5-11) Mapamboli kitoko mazali mpe kozela biso soki tondimi mateya ya Yehova na botosi nyonso mpe ‘tozongi nsima te.’ Tótala lolenge oyo mateya yango makómi kino na mikolo na biso.
Ebongiseli monene ya koteya
7. Lolenge nini Yehova azali kokóba kolakisa mateya na ye awa na mabelé?
7 Lokola tomonaki yango liboso, Yehova asalelaki Motindami na ye na mabelé, Yesu Klisto, mpo ete alakisa mateya mauti na Nzambe, na ekeke ya liboso. (Yoane 16:27, 28) Yesu azalaki ntango nyonso kotánga Liloba ya Nzambe lokola eutelo ya mateya na ye, kopesáká ndakisa mpo na baoyo azalaki koteya. (Matai 4:4, 7, 10; 21:13; 26:24, 31) Na nsima, mateya ya Yehova makóbaki kolakisama na mabelé na nzela ya mosala ya kosakola ya baoyo bateyami. Tomikundola ete Yesu apesaki bango etindá oyo ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Bato oyo bakómaki bayekoli, bakómaki mpe basangani ya “Ndako na Nzambe, . . . [lisangá, NW] na Nzambe na bomoi.” (1 Timoté 3:15) Basanganaki mpe kati na masangá makeseni, oyo kati na yango bateyamaki na Yehova. (Misala 14:23; 15:41; 16:5; 1 Bakolinti 11:16) Ezali na lolenge wana nde mateya mauti na Nzambe malandani kino mikolo na biso?
8. Engebene Yesu, lolenge nini mosala ya kosakola esengelaki kokambama na mabelé liboso ete nsuka eya?
8 Ee, ezali mpenza bongo! Mikolo misato liboso ya kufa na ye, Yesu asakolaki ete liboso ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, mosala monene ya kosakola mosengelaki kosalema. Alobaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” Yesu akóbaki na kolobeláká esaleli oyo na nzela na yango mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe ebongiseli ya kolakisama esengelaki kokambama. Alobaki na ntina na “moombo na sembo mpe na mayele” oyo asengelaki kosalelama lokola nzela, to esaleli, mpo na kopesa bilei ya elimo epai na basaleli na ye. (Matai 24:14, 45-47) Yehova Nzambe azali kosalela “moombo” wana mpo na kokɛngɛla matomba ya Bokonzi na mabelé mobimba.
9. Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?
9 Lelo oyo, moombo ya sembo mpe ya mayele esalemi na batikali ya basangoli ya libula ya Bokonzi. Bazali bongo baklisto bapakolami, batikali ya ba 144 000 oyo bazali naino awa na mabelé, baoyo “bazali bato na Klisto” mpe bazali basangani ya “[mombóto, NW] ya Abalayama.” (Bagalatia 3:16, 29; Emoniseli 14:1-3) Lolenge nini tokoki koyeba moombo na sembo mpe na mayele? Mingimingi, na nzela ya mosala oyo bazali kosala mpe bokangami na bango makasi na Liloba ya Nzambe, Biblia.
10. Bisaleli nini kelasi ya moombo ezali kosalela mpo na kotombola mateya ya Yehova?
10 Yehova azali kosalela “moombo” yango lokola esaleli na ye mpo na koteya bato lelo oyo. Basangani na kelasi ya moombo bakamataki nkombo Batatoli ya Yehova na 1931. Uta na ntango wana bamilió ya bato basangani elongo na bango mpe bandimi nkombo yango mpe basangani kati na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Zulunalo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ezali esaleli ya liboso oyo “moombo” wana azali kosalela kati na mosala ya koteya. Nzokande, mikanda mosusu mizali mpe kosalelama, kati na yango babúku, mwa babúku, batrakte, mpe zulunalo Lamuká!
11. Biteyelo nini “moombo” azali kobongisa, mpe mokano nini eteyelo moko na moko ezali kokokisa?
11 Lisusu, “moombo” yango azali kokamba biteyelo ndenge na ndenge. Kati na yango tokoki kotánga Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower, oyo ezali bongo kelasi ya sanza mitano oyo ezali kobongisa bilenge baministre baklisto mpo na mosala ya misionere na mikili ya bapaya, mpe Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo ezali bongo kelasi ya sanza mibale, oyo ebongisaka bankulutu mpe basaleli ya misala oyo bazali minzemba mpo na mikumba minene ya teokrasi. Ezali mpe na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, oyo kati na yango bankulutu baklisto mpe basaleli na misala balakisamaka na ntina etali mikumba na bango kati na lisangá, mpe Eteyelo ya babongisi-nzela, oyo ezali kosalisa bapalanganisi nsango malamu ya ntango nyonso mpo na kokóma na makoki mingi mpenza kati na mosala na bango ya kosakola.
12. Eteni nini ya ebongiseli ya kolakisama esalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ?
12 Eteni mosusu ya ebongiseli ya kolakisama ezali bongo makita mitano oyo masalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na masangá ya basaleli ya Yehova koleka 75 500 kati na mokili mobimba. Ozali kozwa matomba na lolenge ekoki mpenza kati na makita wana? Na kotyáká likebi na kolakisama oyo ezali kopesama, tomonisaka ete tozali kondima mpenza ete tozali kati na eteyelo ya Nzambe, na elobeli ya elilingi? Bokóli na yo ya elimo ezali komonana polele epai na basusu ete ozali na “lolemo na baoyo balakisami”?—Yisaya 50:4; 1 Timoté 4:15, 16.
Toteyami kati na makita ya lisangá
13. (a) Wapi mwango ya ntina mingi oyo Yehova azali kosalela mpo na koteya bato na ye lelo oyo? (b) Lolenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi na biso mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?
13 Yehova ateyaka mpenzampenza basaleli na ye na nzela ya boyekoli ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na kosaleláká Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli lokola esaleli ya koteya. Otalelaka likita yango lokola esika ya koteyama na Yehova? Atako Yisaya 50:4 ezali kosalelama liboso mpenza epai na Yesu, ekoki mpe kosalelama epai na baoyo nyonso bazali kosalela bibongiseli ya Nzambe mpo na kokóma na “lolemo na baoyo balakisami.” Moko na lolenge oyo tokoki komonisa ete tozwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na motuya ezali bongo na kotángáká nimero nyonso nokinoki nsima ya kozwa yango. Na nsima, ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyekolami kati na lisangá, okoki komonisa botɔ́ndi na yo epai na Yehova na kozaláká wana mpe na komibongisáká mpo na koyambola elikya na yo.—Baebele 10:23.
14. (a) Mpo na nini kopesa biyano na makita ezali libaku moko ya ntina mingi? (b) Biyano nini ya bana mike oyo elendisaka mpenza?
14 Oyebi ete na nzela na biyano na yo na makita, okoki kosangana na ebongiseli kitoko ya koteya ya Yehova? Ntembe ezali te mpo na yango, kopesa biyano kati na makita ezali lolenge ya ntina mingi oyo na nzela na yango tokoki kolendisana moko na mosusu na “kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.” (Baebele 10:24, 25) Bana mike mpe bakoki kosangana kati na ebongiseli wana ya kolakisama? Ee, bakoki mpe kosangana na yango. Biyano biuti na motema, oyo bana mike bapesaka, mbala mingi elendisaka mikóló. Na bantango mosusu, bato ya sika kati na makita na biso balendisamaki na biyano ya bana mike mpo na kosepela lisusu mingi na solo ya Biblia. Bilenge mosusu bazalaka na momeseno ya kotánga biyano na bango mbala moko kati na paragrafe to kozongela maloba oyo mokóló moko ayebisi bango na litoyi. Nzokande, elendisaka lisusu mingi soki babongisi biyano na bango malamu. Biyano motindo wana epesaka mpenza nkembo epai na Molakisi na biso monene mpe na ebongiseli na ye kitoko ya koteya.—Yisaya 30:20, 21.
15. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango ete bapesaka biyano na lolenge malamu koleka?
15 Ezali esengo na komona ete bilenge bazali komonisa mposa ya kosangana na kosanzola Yehova. Yesu atalelaki maloba ya masanzoli ya bilenge ete mazali na motuya. (Matai 21:15, 16) Nkulutu moklisto moko amikundoli ete: “Na ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kolinga kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nsima ya kosalisa ngai ete nabongisa eyano, tata na ngai azalaki kosɛnga ete namimekisa mpo na eyano yango mbala nsambo to koleka.” Ekoki mpenza kozala ete na boumeli ya boyekoli ya Biblia kati na libota, bino baboti bokoki kosunga bana na bino ete bábongisa biyano na maloba na bango moko na baparagrafe oyo eponami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bósalisa bango ete bátalela libaku monene oyo bazali na yango ya kosangana na ebongiseli ya kolakisama ya Yehova ete ezali na motuya.
16. Wapi matomba ya Eteyelo ya mosala ya teokrasi, mpe nani akoki kokomama na yango?
16 Kolakisama kati na makita mosusu ya lisangá esengeli mpe kotalelama na motuya mpenza, ezala epai na baoyo bazwi libaku ya koteya, ezala mpe baoyo bazali koyoka makambo oyo mazali koteyama. Esili koleka mibu 50, Yehova azali kosalela Eteyelo ya mosala ya teokrasi pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kobongisa bamilió ya mibali mpe basi mpo na kolakisa nsango ya Bokonzi na lolenge ekoki kopesa mpenza matomba. Baoyo bazali kosangana na molende nyonso kati na lisangá bakoki kokɔta, ata mpe baoyo babandi koyangana uta kala mingi te kati na makita, soki bazali na lolenge ya bomoi oyo ezali na boyokani na mitindá ya boklisto.
17. (a) Na mokano nini mpenza Likita ya bato banso lisalelamaka? (b) Makambo nini baoyo basalaka masukúlu ya bato banso basengeli kobosana te?
17 Eteni mosusu oyo ebandá kala kati na ebongiseli ya kolakisama ezali bongo Likita ya bato banso. Lokola nkombo na yango ezali komonisa, likita oyo ebongisami liboso mpenza mpo na kosunga baoyo bazali Batatoli te ete bámesana na mateya ya moboko ya Biblia. Na yango, ye oyo azali kosala lisukúlu asengeli kosala yango na lolenge boye ete ekoka kozala mpasi te mpo na baoyo bazali koyoka nsango mpo na mbala ya liboso. Elingi koloba, kolimbola maloba ya sika mpo na bango, na ndakisa “bampate mosusu,” “bandeko,” mpe “batikali,” maloba oyo bato oyo bazali Batatoli te bakoki mbala mosusu kosimba te ntina na yango. Lokola baoyo bayanganaka na Likita ya bato banso bakoki mbala mosusu kozala na bindimeli to lolenge ya bomoi oyo eyokani te na Makomami—atako mokili ya lelo ezali kondima yango—molobi asengeli ntango nyonso koloba na mayele mpe asengeli soko moke te kotyola bindimeli wana to lolenge wana ya bomoi.—Kokanisá na 1 Bakolinti 9:19-23.
18. Makita nini mosusu ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ tozalaka na yango na lisangá, mpe ekokisaka mokano nini?
18 Boyekoli ya Mokanda na lisangá ezali likita oyo kati na yango mikanda mibongisami na nsé ya litambwisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele miyekolamaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ elongo na Biblia. Búku Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi! ezali yango nde ezali koyekolama kati na mikili mingi. Likita ya mosala ebongisami mpo na kosunga basaleli ya Yehova ete básangana na molende nyonso kati na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli.—Matai 28:19, 20; Malako 13:10.
Toteyami kati na mayangani minene
19. Mayangani nini ya minene “moombo” abongisaka mbula na mbula?
19 Esili koleka mibu nkámá uta ‘moombo ya sembo’ azali kobongisa mayangani minene mpe ya mike mpo na koteya mpe kopesa malendisi ya sikisiki epai na baklisto ya solo. Mayangani minene misato ya motindo wana mazali sikawa kosalema mbula na mbula. Ezali na liyangani ya mokolo moko oyo na boumeli na yango etuluku ya masangá oyo masali zongazonga moko mayanganaka. Na boumeli ya mobu, zongazonga moko na moko ezalaka mpe na liyangani ya zongazonga, oyo eumelaka mikolo mibale. Lisusu, ezali na liyangani moko oyo ebéngami liyangani ya etúká, esangisaka bazongozonga mingi. Na bambula mosusu, mayangani ya mikili mingi mpe masalemaka. Mayangani minene wana oyo mazalaka mpe na Batatoli bauti na mikili ndenge na ndenge ya bapaya, malendisaka mpenza kondima ya basaleli ya Yehova.—Kokanisá na Deteronome 16:16.
20. Nini elobelamaka mbala na mbala kati na mayangani minene ya Batatoli ya Yehova?
20 Na 1922, na ntango bato soko 10 000 bayanganaki na Cedar Point, Ohio, na Etats-Unis, bayikisamaki mpiko na malendisi ya molobi: “Oyo ezali mokolo monene. Botala, Mokonzi azali koyangela! Bino bozali bapanzi nsango na ye. Na yango, bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi mpe Bokonzi na ye.” Mayangani minene motindo oyo mazali ntango nyonso kolobela mingi mosala ya kosakola. Na ndakisa, na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba New York na 1953, liyebisi lipesamaki na ntina na mwango ya kobongisama mpo na mosala ya kosakola ndako na ndako oyo esengelaki kopesama kati na masangá nyonso. Kosalema na yango epesaki litomba kati na mosala ya kosakola Bokonzi na mikili mingi.
Toteyami na Nzambe mpo na koteya
21. Libaku kitoko nini tolingi kondima, kozanga kobungisa mokano na yango?
21 Ya solo, Yehova azali na ebongiseli moko kitoko ya koteya lelo oyo awa na mabelé! Baoyo nyonso balandaka yango bakoki koteyama na Nzambe, ee, bakoki kozala kati na baoyo bapesameli “lolemo na baoyo bateyami.” Oyo nde libaku kitoko, na elobeli ya elilingi, ya kozala kati na eteyelo ya Nzambe! Nzokande, wana tozali kondima libaku malamu yango, tosengeli te kobungisa mokano na yango. Yehova ateyaki Yesu mpo ete akoka koteya basusu. Yesu mpe ateyaki bayekoli na ye mpo ete bango mpe bákoka kosala mosala oyo ye asalaki kasi na etando monene lisusu koleka. Bobele bongo, Yehova azali kobongisa biso kati na mwango na ye kitoko ya kolakisama mpo ete tókoka koteya basusu.—Yoane 6:45; 14:12; 2 Bakolinti 5:20, 21; 6:1; 2 Timoté 2:2.
22. (a) Mokakatano nini Mose mpe Yilimia bazalaki na yango, kasi lolenge nini balóngaki? (b) Kondimisama nini tokoki kozala na yango ete Nzambe akosala na boye ete mosala ya kosakola Bokonzi ekokisama?
22 Olobaka lokola Mose, ete: “Nazali moto na maloba polele te,” to lokola Yilimia, ete: “Nayebi koloba te”? Yehova akosalisa yo lolenge asalisaki bango. Alobaki na Mose ete: “Ngai nakozala na monɔkɔ na yo elongo.” Mpe alobaki na Yilimia ete: “Bangá . . . te, ngai nazali na yo elongo.” (Exode 4:10-12; Yilimia 1:6-8) Na ntango bakonzi ya mangomba balingaki kokangisa bayekoli na ye monɔkɔ, Yesu alobaki ete: “Soko baoyo bakozala nyɛɛ, mbɛ mabángá makonganga.” (Luka 19:40) Kasi mabángá mazalaki na ntina ya konganga te na ntango wana, mazali mpe na ntina te ya konganga lelo oyo mpamba te Yehova azali kosalela lolemo ya bato na ye bateyami mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi.
Okoki koyanola?
◻ Ndakisa nini ya boyokani malamu kati na Moteyi mpe moyekoli emonisami polele kati na Yisaya mokapo 50?
◻ Lolenge nini Yehova azali kokamba ebongiseli moko monene ya kolakisama?
◻ Tangá ndambo ya makambo mazali kati na ebongiseli ya kolakisama ya Yehova?
◻ Mpo na nini kosangana kati na ebongiseli ya kolakisama ya Yehova ezali libaku moko kitoko?
[Elilingi na lokasa 16]
Biyano biuti na motema, oyo bana mike bapesaka, mbala mingi elendisaka mikóló