Mokapo ya Zomi na Moko
“Bótya motema epai ya bato minene te”
1, 2. (a) Toli nini ya Nzambe Bayuda balandi te, mpe esukelaki bango ndenge nini? (b) Mpo na nini Yehova atuni ete: ‘Mokanda ya koboma libala ezali wapi?’
“BÓTYA motema na bino epai ya bato minene te, to epai ya mwana ya moto, oyo akokoka kobikisa te. . . . Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo azali lisungi na ye, mpe atye elikya epai ya Yehova Nzambe na ye, Mokeli ya likoló ná mabelé.” (Nzembo 146:3-6, NW) Soki Bayuda ya ntango ya Yisaya bálandaka toli yango ya mokomi ya nzembo! Soki bátyaka motema na bango na Ezipito te to mpe na ekólo mosusu ya bapakano te, kasi na “Nzambe ya Yakobo”! Mbɛlɛ Yehova abateli Yuda ntango banguna na ye bakokɔtela ye. Kasi, Yuda aboyi koluka lisalisi epai ya Yehova. Mpo na yango, Yehova akotika bábebisa Yelusaleme mpe bámema bato ya Yuda na boombo na Babilone.
2 Yuda akopesa moto mosusu foti te, ezali nde mabe na ye moko. Akoki soki moke te koloba ete libebi oyo ekokwela ye ezali mpo Yehova akosi ye to asundoli kondimana oyo asalaki elongo na ye. Mozalisi azangaka te kotosa kondimana oyo ye asali. (Yilimia 31:32; Danyele 9:27; Emoniseli 15:4) Mpo na kobimisa likanisi yango polele, Yehova atuni Bayuda: “Mokanda ya koboma libala ya mama na bino ezali wapi? Oyo ngai nalongoli ye na yango?” (Yisaya 50:1a) Na ntango ya Mibeko ya Moize, mobali oyo alingi koboma libala na mwasi na ye asengelaki kopesa ye mokanda ya kolongola ye na libala. Na ntango wana mwasi yango akokaki kobala mobali mosusu. (Deteronome 24:1, 2) Na maloba ya elilingi, Yehova apesaki mokanda yango epai ya Yisalaele, ndeko mwasi ya Yuda, kasi apesi yango Yuda naino te.a Azali naino ‘mobali’ ya Yuda. (Yilimia 3:8, 14) Yuda azali na bonsomi soki moke te ya kotambola elongo na bikólo ya bapakano. Boyokani ya Yehova elongo na ye ekolandana “kino Shilo, [Masiya] akoya.”—Genese 49:10, NW.
3. Mpo na nini Yehova ‘atɛki’ bato na ye?
3 Yehova atuni lisusu Yuda: “Modefisi nani na ngai oyo natɛkisi bino epai na ye?” (Yisaya 50:1b) Bayuda bakotindama na boombo na Babilone te mpo na kofuta nyongo moko boye oyo Yehova amikɔtisaki. Yehova azali te lokola Moyisalaele moko mobola oyo asengeli kotɛka bana na ye epai ya modefisi moko mpo na kofuta nyongo na ye. (Exode 21:7) Kasi, Yehova ayebisi ntina ya solosolo oyo bato na ye bakokende na boombo: “Talá botɛkisamaki mpo na masumu na bino mpe mpo na mabe na bino mama na bino alongolamaki.” (Yisaya 50:1c) Bayuda nde basundolaki Yehova, kasi ye asundolaki bango te.
4, 5. Ndenge nini Yehova amonisi ete alingaka bato na ye, mpe ezaleli nini Yuda amonisi?
4 Motuna mosusu oyo Yehova atuni ezali komonisa malamu ete alingaka bato na ye: “Mpo na nini wana eyaki ngai, moto azalaki te? Wana ebengaki ngai, moko azongisaki monɔkɔ te.” (Yisaya 50:2a) Na nzela ya basaleli na ye basakoli, ezali lokola nde Yehova ayaki epai ya bato na ye mpo na kobondela bango bázonga epai na ye na motema na bango mobimba. Kasi moto moko andimaki te. Bayuda bamonaki malamu koluka lisalisi epai ya bato, kutu mbala mosusu bazalaki koluka lisalisi ya Ezipito.—Yisaya 30:2; 31:1-3; Yilimia 37:5-7.
5 Na likambo ya kobikisa, ebongi kotyela Ezipito motema koleka Yehova? Emonani lokola ete Bayuda wana oyo bazangi bosembo babosani makambo oyo esalemaki mpo ekólo na bango ebotama bankama ya bambula liboso. Yehova atuni bango boye: ‘Lobɔkɔ na ngai eyei mokuse ete eyeba kosikola te? Ngai nazangi nguya ete nabikisa te? Talá na mpamela na ngai nakokaukisa mai-na-monana, nakokómisa bibale lokola esobe; mbisi ekolumba nsolo mabe mpo na kozanga mai mpe ekokufa na mposa ya komɛla. Nakolatisa lola na moindo mpe nakopesa bango saki lokola ezipeli na yango.’—Yisaya 50:2, 3.
6, 7. Ndenge nini Yehova amonisaki nguya na ye ya kobikisa liboso na makaneli ya Baezipito?
6 Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Ezipito azalaki monyokoli, kasi mobikisi te oyo ekólo ya Nzambe ekokaki kotyela motema. Bayisalaele bazalaki baombo na mboka wana ya bapakano. Kasi Yehova asikolaki bango, mpe wana ezalaki solo kosikolama moko monene! Ya liboso, atindelaki mboka yango Malɔzi Zomi. Nsima ya bolɔzi ya zomi oyo ezalaki nsɔmɔ mpenza, Farao, mokonzi ya Ezipito, abenganaki bango mpo bálongwa na mboka yango. (Exode 7:14–12:31) Nzokande, nokinoki nsima ya kobima na bango, Farao azwaki makanisi mosusu. Ayanganisaki basoda na ye mpe akendeki mpo na kozongisa Bayisalaele na makasi na Ezipito. (Exode 14:5-9) Lokola ebele ya basoda ya Ezipito bazalaki kolanda bango na nsima, mpe Mbu Motane ezalaki liboso na bango, Bayisalaele bazalaki lokola bakangami na motambo! Kasi Yehova azalaki wana mpo na kobundela bango.
7 Yehova asalaki ete Baezipito bákanga Bayisalaele te; atyaki likonzí ya lipata kati na bango mpe Bayisalaele. Na ngámbo ya Baezipito lipata ezalaki kopesa molili; na ngámbo ya Bayisalaele ezalaki mwinda. (Exode 14:20) Nsima na yango, wana Yehova azali kaka kosala ete Baezipito bápusana pene na Bayisalaele te, ‘azongisaki mai ya mbu na mopɛpɛ makasi oyo eutaki na ɛsti butu mobimba, mpe akómisaki mbu mabelé.’ (Exode 14:21) Ntango mai ekabwanaki, bato nyonso, mibali, basi mpe bana bakatisaki Mbu Motane na makolo. Ntango bato na ye bakatisaki malamu na ngámbo mosusu, Yehova alongolaki lipata yango. Na nkanda makasi, Baezipito bakɔtaki mbangu na nzela oyo efungwamaki na katikati ya mai. Lokola bato na ye bazalaki lisusu na likama te na ngámbo mosusu, Yehova atikaki mai ezongela Farao ná basoda na ye mpe bakufaki. Na ndenge yango, Yehova abundelaki bato na ye. Wana ezali solo elendiseli monene mpo na baklisto lelo oyo!—Exode 14:23-28.
8. Makebisi nini bato ya Yuda batyeli likebi te oyo esali ete nsukansuka bákende na boombo?
8 Na ntango ya Yisaya, mbula nkama nsambo ekokaki banda Nzambe alongaki etumba yango. Na ntango yango Yuda azali komiyangela ye moko. Na bantango mosusu, azali kosala boyokani mpo na koluka kimya elongo na bikólo ya bapaya, lokola Asiria mpe Ezipito. Kasi bakonzi ya bikólo wana ya bapakano bazali bato ya kotyela motema te. Bazali kotya ntango nyonso matomba na bango moko liboso ya boyokani nyonso oyo basali elongo na Yuda. Na nkombo ya Yehova, basakoli bazali kokebisa bato ya Yuda ete bátyaka motema epai ya bato ya ndenge wana te; kasi bazali kolanda maloba ya basakoli te. Nsukansuka, Bayuda bakokende na boombo na Babilone mbula 70. (Yilimia 25:11) Nzokande, Yehova akobosana bato na ye te, to mpe akobwaka bango libela te. Na ntango oyo etyamá, akokanisa bango, mpe akofungola nzela bázonga na mboka na bango mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Na mokano nini? Mpo na kobongisa boyei ya Shilo, ye oyo bato ya bikólo nyonso basengeli kotosa!
Shilo ayei
9. Shilo azali nani, mpe azali moteyi ya ndenge nini?
9 Bankama ya bambula eleki. “Nsuka mpenza ya ntango yango” ekoki, mpe ye oyo abengami Shilo, Nkolo Yesu Klisto, ayei awa na mabelé. (Bagalatia 4:4; Baebele 1:1, 2) Lokola Yehova aponi moninga mpenza na ye ya motema azala Molobeli na ye epai ya Bayuda, yango emonisi ete Yehova alingi mpenza bato na ye mingi. Yesu azali molobeli ya ndenge nini? Molobeli monene mpenza! Yesu azali kaka molobeli te, azali mpe moteyi, Moteyi Monene. Yango ekoki kokamwisa te, mpamba te azali na molakisi oyo aleki balakisi nyonso, Yehova Nzambe. (Yoane 5:30; 6:45; 7:15, 16, 46; 8:26) Likambo yango endimisami na maloba ya esakweli oyo Yesu alobi na monɔkɔ ya Yisaya: “Nkolo [Yehova] apesi ngai lolemo ya baoyo balakisami ete nayeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi. Ntɔngɔ na ntɔngɔ akolamukisa, akolamukisa litoi na ngai koyoka lokola bango baoyo bakolakisama.”—Yisaya 50:4.b
10. Ndenge nini Yesu amonisaki bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na bato na Ye, mpe ndenge nini bayambaki Yesu?
10 Liboso Yesu aya awa na mabelé, azalaki kosala mosala pembeni ya Tata na ye kuna na likoló. Boyokani mpe bolingo makasi kati na Tata ná Mwana elobelami na maloba ya ntɔki na Masese 8:30, boye: ‘Nazalaki pembeni na [Yehova lokola mosali monene]; . . . kosepela liboso na ye ntango nyonso.’ Ntango Yesu azalaki koyoka Tata na ye, azalaki koyoka esengo mingi. Bolingo na ye epai ya “bana na bato” ezalaki makasi lokola oyo ya Tata na ye. (Masese 8:31) Ntango ayaki awa na mabelé, Yesu asimbaki “na maloba ye oyo alɛmbi.” Ntango abandaki mosala na ye ya kosakola atángaki maloba ya kolendisa oyo ezali na esakweli ya Yisaya: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola, . . . mpo na kotika bato oyo batutamá ete bákende na bonsomi.” (Luka 4:18; Yisaya 61:1) Nsango malamu mpo na babola! Kobɔndisama mpo na baoyo balɛmbi! Maloba yango esengelaki solo kopesa bato esengo monene! Mwa ndambo ya bato basepelaki, kasi bato nyonso te. Mpo na kosukisa, mingi baboyaki kondima ete Yesu alakisamaki na Yehova.
11. Banani bakamati ekanganeli ya Yesu, mpe yango epesi bango nini?
11 Nzokande, bato mosusu bazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi. Bayambaki na esengo mpenza libyangi ya kolendisa oyo Yesu apesaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:28, 29) Kati na bato oyo bayaki epai ya Yesu, tokotánga mibali oyo bakómaki bantoma na ye. Bayebaki ete kokamata ekanganeli ya Yesu ekosɛnga básala mingi. Mosala yango ekosɛnga makambo lokola kosakola nsango malamu ya Bokonzi tii na nsuka ya mabelé. (Matai 24:14) Ntango bantoma mpe bayekoli mosusu bamipesaki na mosala yango, bamonaki ete yango ezali kopemisa milimo na bango. Lelo oyo, baklisto ya sembo bazali kokokisa mosala wana mpe ezali kopesa bango esengo ndenge moko.
Azali motomboki te
12. Ndenge nini Yesu amonisaka botosi na ye epai ya Tata na ye ya likoló?
12 Yesu abosanaki soki moke te ntina oyo ayaki awa na mabelé: kosala mokano ya Nzambe. Lolenge na ye ya kotalela makambo esakolamaki: “Nkolo [Yehova] azipoli litoi na ngai, nazalaki [motomboki] te; nazongaki nsima mpe te.” (Yisaya 50:5) Yesu atosaka Nzambe ntango nyonso. Yango wana alobaki: “Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi kaka oyo amonaka Tata azali kosala.” (Yoane 5:19) Ntango azalaki na bomoi liboso akóma moto, Yesu asalaki mosala pembeni ya Tata na ye bamilio, ata mpe bamiliare ya bambula. Ntango ayaki awa na mabelé, alandaki kotosa malako ya Yehova. Bongo na koleka, biso bayekoli ya Klisto, bato ya kozanga kokoka, tosengeli mpenza kotosa malako ya Yehova!
13. Nini ezalaki kozela Yesu, kasi ndenge nini amonisaki mpiko?
13 Kati na baoyo baboyaki kondima Mwana mobotami-se-moko ya Yehova, basusu banyokolaki ye; yango mpe esakolamaki: ‘Napesi mokɔngɔ na ngai epai ya babɛti, mpe matama na ngai epai ya baoyo babimisi mandɛfu. Nabombi elongi na ngai te na nsɔni mpe na kobwakelama nsoi.’ (Yisaya 50:6) Esakweli wana eyebisaki ete batɛmɛli ya Masiya bakoyokisa ye mpasi mpe bakosambwisa ye. Yesu ayebaki likambo yango. Ayebaki epai wapi minyoko yango ekomema ye. Atako bongo, ntango akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, abangaki te. Kozanga kotɛngatɛnga, akendeki na Yelusaleme, esika bakoboma ye. Na nzela, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Talá, tozali komata na Yelusaleme, mpe Mwana ya moto akokabama epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli, mpe bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye epai ya bato ya bikólo mosusu, mpe bakosɛka ye mpe bakobwakela ye nsoi mpe bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye, kasi mikolo misato na nsima akosekwa.” (Malako 10:33, 34) Minyoko nyonso wana ekouta na banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli, mibali oyo basengelaki koyeba malamu ete ye azali Masiya.
14, 15. Ndenge nini maloba ya Yisaya oyo emonisi ete bakonyokola Yesu mpe bakosambwisa ye ekokisamaki?
14 Na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu akendeki na elanga ya Getesemane elongo na bayekoli na ye. Kuna azali kobondela. Ebele ya bato babimi pwasa mpe bakangi ye. Kasi azali kobanga te. Ayebi ete Yehova azali na ye. Yesu akitisi motema ya bayekoli na ye oyo bazali na nsɔmɔ makasi; alobi na bango ete soki alingi, akoki kosɛnga Tata na ye atinda mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu mpo na kobikisa ye, kasi abakisi ete: “Bongo, ndenge nini Makomami ekokokisama?”—Matai 26:36, 47, 53, 54.
15 Makambo nyonso oyo esakolamaki mpo na mpasi mpe liwa ya Masiya ekokisamaki. Nsima ya kosambisa Yesu likolólikoló na Sanedrina, bamemi ye epai ya Ponsi Pilato, atuni ye mituna, mpe abɛtisi ye fimbo. Basoda ya Loma ‘babɛti ye nkɛkɛlɛ na motó mpe babwakeli ye nsoi.’ Na ndenge yango, maloba ya Yisaya ekokisami. (Malako 14:65; 15:19; Matai 26:67, 68) Atako Biblia emonisi polele te ete balongolaki mandɛfu ya Yesu—likambo oyo basalaka moto mpo na kosambwisa ye mpenza—ntembe ezali te ete yango esalemaki, se ndenge Yisaya asakolaki.c—Nehemia 13:25.
16. Liboso ya mitungisi makasi oyo Yesu akutanaki na yango, amonisaki ezaleli nini, mpe mpo na nini ayokaki nsɔni te?
16 Ntango Yesu atɛlɛmaki liboso ya Pilato, abondelaki te ete bátika ye na bomoi; kasi atikalaki nyɛɛ, mpamba te ayebaki ete asengelaki kokufa mpo na kokokisa Makomami. Ntango guvɛrnɛrɛ wana Moloma ayebisaki Yesu ete azali na bokonzi ya kobomisa ye to mpe ya kotika ye, Yesu azongiselaki ye kozanga kobanga ete: “Olingaki kozala na bokonzi likoló na ngai ata moke te soki yango epesamaki epai na yo te uta na likoló.” (Yoane 19:11) Basoda ya Pilato banyokolaki Yesu na ndenge moko ya mabe, kasi bakokaki te koyokisa ye nsɔni. Bongo mpo na nini asengelaki koyoka nsɔni? Etumbu oyo bazali kopesa ye ezali te mpo asalaki likambo moko ya mabe. Kasi bazali konyokola ye nde mpo na boyengebene. Na yango, maloba mosusu ya esakweli ya Yisaya ekokisami: “Nkolo [Yehova] akosunga ngai bongo nabulunganisami te. Bongo nakangi elongi na ngai lokola libanga makasi mpe nayebi ete nakoyokisama nsɔni te.”—Yisaya 50:7.
17. Ndenge nini Yehova azalaki ntango nyonso penepene na Yesu na boumeli ya mosala na ye ya kosakola?
17 Yesu azalaki na mpiko mpamba te atyelaki Yehova motema na ye mobimba. Bizaleli na ye emonisaki ete bomoi na ye eyokani mpenza na maloba oyo ya Yisaya: ‘Ye oyo akolongisa ngai azali penepene, nani akowelana na ngai? Tótɛlɛma elongo moko! Nani azali motɛmɛli na ngai? Tiká ete abɛlɛma epai na ngai! Talá Nkolo Yehova akosunga ngai, nani akoloba ete nazali na ekweli? Talá nyonso na bango bakokóma na bambula mingi lokola elamba oyo ebebi, nsɛlɛlɛ ekolyaka bango nyɛɛ.’ (Yisaya 50:8, 9) Na mokolo oyo Yesu azwaki batisimo, Yehova alongisaki ye ete azali moyengebene, mwana na ye ya elimo. Kutu, mongongo mpenza ya Nzambe eyokanaki, ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Pene na nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé, ntango afukamaki mpo na kobondela na elanga ya Getesemane, “anzelu moko oyo autaki na likoló abimelaki ye mpe alendisaki ye.” (Luka 22:41-43) Na yango, Yesu ayebaki ete Tata na ye andimi etamboli na ye. Mwana wana ya kokoka ya Nzambe asalaki lisumu moko te. (1 Petelo 2:22) Na lokuta nyonso banguna na ye bafundaki ye ete azalaki kotosa Sabata te, azalaki molangwi masanga, mpe azalaki na demo; atako bongo, lokuta na bango esilisaki lokumu ya Yesu te. Nzambe azalaki na ye, bongo nani akokaki kotɛmɛla ye?—Luka 7:34; Yoane 5:18; 7:20; Baloma 8:31; Baebele 12:3.
18, 19. Makambo nini oyo Yesu akutanaki na yango oyo baklisto bapakolami mpe bakutani na yango?
18 Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) Eumelaki te, makambo oyo esalemaki endimisaki maloba na ye. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., elimo santu ekitelaki bayekoli ya sembo ya Yesu, mpe lisangá ya boklisto ebotamaki. Nokinoki bakonzi ya mangomba balukaki kosukisa mosala ya kosakola ya mibali mpe basi wana ya sembo oyo bazalaki sikoyo “momboto ya Abalayama” elongo na Yesu mpe oyo Nzambe azwaki bango lokola bana na ye ya elimo. (Bagalatia 3:26, 29; 4:5, 6) Kobanda ekeke ya liboso kino sikoyo, esɛngaki ete baklisto bapakolami, wana bakangami makasi na boyengebene, báyika mpiko na makambo ya lokuta mpe na minyoko ya makasi oyo euti na banguna ya Yesu.
19 Atako bongo, babosanaka te elendiseli oyo Yesu apesaki: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:11, 12) Yango wana, ata na ntango ya minyoko makasi, baklisto bapakolami bayokaka nsɔni te. Ata soki banguna na bango balobi likambo nini mpo na kotɛmɛla bango, bayebi ete Nzambe nde atángi bango bayengebene. Na miso na ye, bazali bato “bazangi litɔnɔ mpe bato bakoki kofundama ata na likambo moko te.”—Bakolose 1:21, 22.
20. (a) Banani bazali kopesa baklisto bapakolami mabɔkɔ, mpe makambo nini bazali kokutana na yango? (b) Ndenge nini baklisto bapakolami mpe “bampate mosusu” bazwaka lolemo ya bato bateyami?
20 Na mikolo na biso, “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bazali kosalisa baklisto bapakolami. Bango mpe bakangami makasi na boyengebene. Yango wana, bango mpe banyokwami elongo na bandeko na bango baklisto bapakolami mpe “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.” Yehova atángi bango bayengebene mpo bábika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:9, 14, 15; Yoane 10:16; Yakobo 2:23) Ata soki ezali komonana sikoyo ete banguna na bango bazali na makasi, esakweli ya Yisaya elobi ete na ntango oyo Nzambe atyá, banguna yango bakomonana lokola elamba oyo nsɛlɛlɛ elei, oyo esengeli se kobwakama. Liboso makambo yango esalema, baklisto bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali ntango nyonso na makasi mpo babondelaka, bayekolaka Liloba ya Nzambe, mpe bayanganaka na makita ya lisangá. Na ndenge yango bazali koteyama na Yehova mpe koyekola koloba na lolemo ya bato balakisami to bateyami.
Kotya motema na nkombo ya Yehova
21. (a) Banani oyo bazali kotambola na pole, mpe nini ezali kozela bango? (b) Makambo nini ekómelaka baoyo batambolaka na molili?
21 Sikoyo talá bokeseni monene oyo: ‘Nani kati na bino abangaka Yehova mpe atosaka mongongo ya mosaleli na ye, oyo atambolaka na molili mpe azali na mwinda te? Tiká ete atya motema na nkombo ya Yehova mpe atalela Nzambe na ye.’ (Yisaya 50:10) Baoyo bayokaka mongongo ya Yesu Klisto, Mosaleli ya Nzambe, batambolaka na pole. (Yoane 3:21) Basukaka kaka te na kosalela nkombo ya Nzambe, Yehova, kasi batyaka mpe motema epai na ye oyo abengami na nkombo yango. Ata soki liboso batambolaki na molili, sikoyo bazali lisusu kobanga bato te. Batalelaka nde Nzambe. Nzokande, baoyo bazali kaka kotambola na molili bazali naino kobanga bato. Ponsi Pilato azali moko ya bato yango. Atako ayebaki malamu ete Yesu asalaki mabe moko te kasi bafundaki ye kaka mpamba, mpo na kobanga, mosali ya Leta wana Moloma atikaki Yesu te. Basoda ya Loma babomaki Mwana ya Nzambe, kasi Yehova asekwisaki ye mpe alatisaki ye nkembo mpe lokumu. Bongo Pilato asukaki ndenge nini? Moyuda moko, mokomi ya makambo ya kala, na nkombo Flavius Josèphe, alobi ete, se mbula minei mpamba nsima ya liwa ya Yesu, moto mosusu akómaki guvɛrnɛrɛ na esika na ye mpe ye azwaki etinda ya kozonga na Loma mpo na kozongisa monɔkɔ na bifundeli minene oyo bafundaki ye. Bongo Bayuda oyo balukaki liwa ya Yesu? Ekokaki ata mbula ntuku minei te, basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme mpe babomaki bato na yango to mpe bamemaki bango na boombo. Baoyo baponi kotambola na molili bazali na elikya moko te ya malamu.—Yoane 3:19.
22. Mpo na nini ezali nsuka na bozoba kotya motema epai ya bato mpo na koluka kobikisama?
22 Kotya motema epai ya bato mpo na koluka kobikisama ezali nsuka na bozoba. Esakweli ya Yisaya eyebisi biso mpo na nini ezali bongo: “Talá! Bino nyonso bozali kopelisa mɔtɔ, bozali kongɛngisa mintɛntɛi; bótambola na pole na mɔtɔ na bino, mpe na mintɛntɛi oyo bopelisi. Bokozwa oyo na lobɔkɔ na ngai: Bokolala na mpasi.” (Yisaya 50:11, NW) Bato oyo bayangelaka, bayangelaka mwa ntango moke. Moto oyo ayebi mpenza koloba akosimba makanisi ya bato mpo na mwa ntango. Nzokande ata moto oyo azali mpenza na mikano ya sembo akoki kosala makambo nyonso te. Na esika ete apelisa mɔtɔ ya makasi, ndenge baoyo bazali kolanda ye bazali kozela, akoki kopelisa kaka mwa “mintɛntɛi” (étincelles) moke, oyo ekopesa se pole moke mpe mwa mɔtɔ moke, kasi ekoumela te. Nzokande, baoyo bakotya motema epai ya Shilo, Masiya oyo Nzambe alakaki, bakoyoka mawa soki moke te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bavɛrsɛ misato ya liboso ya Yisaya mokapo 50, Yehova alobeli ekólo mobimba ya Yuda lokola mwasi na ye mpe moto mokomoko ya ekólo yango lokola mwana ya mwasi yango.
b Kobanda vɛrsɛ 4 kino nsuka ya mokapo, emonani lokola mokomi azali kolobela makambo etali ye moko. Mbala mosusu Yisaya akutanaki na komekama mosusu oyo alobeli na bavɛrsɛ yango. Nzokande, na kokokisama na yango ya monene, esakweli oyo ekokisamaki mpenzampenza epai ya Yesu Klisto.
c Kutu na libongoli ya Septante, Yisaya 50:6 elobi: “Napesaki mokɔngɔ na ngai mpo na fimbo, mpe matama na ngai mpo na bambata.”
[Elilingi na lokasa 155]
Bayuda bazali kotalela bakonzi na esika ya kotalela Yehova
[Elilingi na lokasa 156, 157]
Na Mbu Motane, Yehova abatelaki bato na ye ntango atyaki likonzí ya lipata kati na bango mpe Baezipito