Mokapo 42
Likoló na sika mpe mabelé na sika
1. Yoane amoni nini ntango anzelu azongisi ye na ebandeli na Boyangeli na mbula nkoto?
EMONANELI na nkembo ezali kolandana wana anzelu azongisi Yoane na ebandeli ya Boyangeli ya mbula nkoto. Azali kolobela nini? “Namonaki likoló na sika mpe mabelé na sika, mpo ete likoló na kala mpe mabelé na kala esili kolimwa. Mai monene mpe ezali lisusu te.” (Emoniseli 21:1) Likambo kitoko mingi na kotala.
2. (a) Ndenge nini esakweli na Yisaya oyo etali makoló na sika mpe mabelé na sika ekokanaki likoló na Bayuda oyo basikolamaki na 537 liboso na ntango na biso? (b) Ndenge nini toyebi ete ndimbola mosusu ezali na ntina na esakweli na Yisaya, mpe ndenge nini elaka yango ezali kokokisama?
2 Bikeke mingi liboso na Yoane, Jéhovah alobaki na Yisaya ete: “Tala nazali kotonga makoló na sika mpe mabelé na sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” (Yisaya 65:17; 66:22) Esakweli wana ekokanaki mpo na mbala ya liboso ntango Bayuda ya sembo bazongaki na Yelusaleme na 537 liboso ya ntango na biso, nsima na mibu 70 oyo balekisaki na Babilone. Na ntango ya bozongi wana, bakómaki libota lipetwi, “mabelé na sika,” oyo etyamaki na nse na boyangeli na sika to “makoló na sika.” Kasi ntoma Petelo asakolaki kokokana mosusu ya esakweli yango, na kolobáká ete: “Nde tozali kozela makoló na sika mpe mabelé na sika lokola elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Yoane amonisi sikawa ete elaka yango ezali kokokana na mokolo na Nkolo. “Likoló na kala mpe mabelé na kala,” na elobeli mosusu ebongiseli na biloko bibongisami na Satana mpe biyangeli na yango oyo bitambwisami na Satana mpe badémo na ye, ekolimwa. “Mai” monene na kongala, elimboli bato na yauli mpe batomboki, ekozala lisusu te. Na esika na yango, ekozala na “likoló na sika mpe mabelé na sika” to libota na sika na bato, etyami na nse na litambwisi ya boyangeli ya sika, Bokonzi na Nzambe.—Tala Emoniseli 20:11.
3. (a) Yoane alobeli nini, mpe Yelusaleme na Sika ezali nini? (b) Na ndimbola nini Yelusaleme na Sika ‘ezali kokita longwa na likoló’?
3 Yoane akobi: “Namoni mpe mboka mosantu, Yelusaleme na sika kokita na likoló, kouta na Nzambe. Esilaki kobongisama lokola mwasi na libala oyo asili kokembisa nzoto mpo na mobali na ye.” (Emoniseli 21:2) Yelusaleme na Sika ezali mwasi na Klisto, lisangá na baklisto bapakolami oyo bazali kotikala sembo kino na liwa na bango, mpe basekwisami mpo na kozala bakonzi mpe banganga penepene na Yesu oyo akembisami. (Emoniseli 3:12; 20:6) Lokola Yelusaleme na mabelé ekomaki efandelo na boyangeli kati na Yisraele na kala, bobele bongo mpe Yelusaleme na Sika oyo ezali kongala mpe Mobali na yango basali boyangeli ya ebongiseli na biloko na sika. Yango nde likoló na sika. ‘Mwasi azali kokita longwa na likolo,’ ezali ndenge tozali koyokela yango te, kasi na ndimbola oyo ete azali kotya likebi na ye epai na mabelé. Mwasi ya Mwana na Mpate akosala na boyokani mpe na bosembo elongo na ye na motó ya boyangeli na sembo oyo ekotambwisa mokili mobimba. Oyo nde lipamboli kitoko mpo na mabelé ya sika!
4. Elaka nini Nzambe apesi ekokani na oyo apesaki na libota na Yisraele oyo eutaki kosalama sika?
4 Yoane alobi na biso lisusu ete: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete: ‘Tala! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo.’” (Emoniseli 21:3) Ntango Jéhovah asalaki boyokani ya Mibeko elongo na Bayisraele, kokomisaka bango libota mobimba, apesaki elaka oyo: “Nakosala hema na ngai kati na bino, mpe molimo na ngai ekoyina bino te. Nakotambola kati na bino mpe nakozala Nzambe na bino, mpe bino bokozala bato na ngai.” (Levitike 26:11, 12) Sikawa, Jéhovah azali kopesa elaka ya motindo moko epai na bato na sembo. Na boumeli ya Mokolo na Kosambisa ya mbula nkoto, bakokoma libota ya ntina mingi mpo na ye.
5. (a) Na motindo nini Nzambe akozala esika moko na bato na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto? (b) Ndenge nini Nzambe akofanda esika moko na bato nsima na Boyangeli ya mbula nkoto?
5 Na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto, Jéhovah “akofanda” elongo na bato engebene ebongiseli moko ya ntango moke, na boye ete akomonisama na Mwana na ye mokonzi, Yesu Klisto. Kasi na nsuka ya mbula nkoto, ntango Yesu akozongisa Bokonzi epai na Tata na ye, momonisi moko te to mokonzi-moyokanisi moko te akozala lisusu na ntina. Jéhovah akofanda kati na elimo elongo na “bato na ye” mpenza libela mpe na nsima ya moto mosusu te. (Tala Yoane 4:23, 24.) Oyo nde libaku kitoko mpo na bato na ntango yango!
6, 7. (a) Bilaka nini minene Yoane andimisi, mpe banani bakozwa matomba yango? (b) Na maloba nini Yisaya azali komonisa paradis ezala na elimo to na mosuni?
6 Yoane alobi lisusu: “Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Mbala oyo lisusu, bazali kokundwela biso bilaka na kala bipemamaki na Nzambe. Yisaya mpe azalaki kozela mokolo oyo liwa mpe kolela ekozala lisusu te, mokolo oyo mawa ekotika esika na esengo. (Yisaya 25:8; 35:10; 51:11; 65:19) Yoane amonisi sikawa ete bilaka yango bikokokisama na ndenge kitoko mingi na boumeli ya Mokolo na Kosambisama ya mbula nkoto. Ya liboso, ezali basangani ya ebele monene nde bakozwa mapamboli. “Mwana na Mpate oyo na kati na kiti na bokonzi . . . akokamba bango epai na mitó na mai na bomoi” wana ekolanda ye koleisa bango. “Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 7:9, 17) Kasi nsuka na yango, basekwi nyonso oyo bakozala na kondima kati na bibongiseli bikamatami na Jéhovah bakoya kosangana na bango mpo na kosepela na paradis ya elimo mpe ya mosuni.
7 Yisaya alobi ete: “Na ntango wana, miso na bakufeli miso makofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama; bongo motengumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) Na ntango wana mpe, “bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolia mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alia; mpo ete lokola mikolo na nzete, bobele bongo ekozala mikolo na bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na maboko na bango.” (Yisaya 65:21, 22) Bakopikolama soki moke te.
8. Jéhovah ye moko alobi nini na ntina na bosolo ya bilaka oyo minene?
8 Ntango tozali kokanisa na bilaka yango, motema na biso ezali kongala na esengo. Boyangeli na likoló oyo epusami na bolingo ezali kobombela bato na sembo mapamboli mingi ya kitoko koleka. Bilaka oyo bizali nde ya lokuta? Ezali bobele bandoto ya mobange moko oyo azalaki na boombo na esanga ya Patamo? Jéhovah ye moko ayanoli, kolobáká ete: “Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete: ‘Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ Alobi mpe ete: ‘Koma ete maloba oyo mazali sembo, na solo.’ Alobi na ngai ete: ‘Yango esili kosalama! Ngai Alfa mpe Omega; ebandeli mpe nsuka.’”—Emoniseli 21:5, 6a.
9. Mpo na nini kokokisama ya mapamboli oyo mazali liboso na biso ekoki kotyamela ntembe te?
9 Ezali lokola ete Jéhovah ye moko atii maboko na mokanda mpo na kopesa yango epai na bato na sembo, mokanda oyo ekopesa bango lotomo mpo na kozwa mapamboli wana ezali koya. Nani akomeka kotya ntembe na Mosimbi bilaka lokola ye? Bilaka na Jéhovah bizali solo, azali kolobela yango lokola ete esili kokokisama: “Yango esili kosalama!” Jéhovah azali “Alfa mpe Omega, . . . Ye oyo azali mpe azalaki mpe akozala, Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 1:8) Solo mpenza! Ye moko alobi: “Ngai nazali na liboso mpe ngai nazali na nsima, Nzambe mosusu azali te bobele ngai.” (Yisaya 44:6) Akoki bongo kopemisa bisakweli mpe kosala ete yango ekokana ata na makambo mikemike oyo mazwami na kati. Oyo nde elendiseli mpo na kondima! Na yango, Nzambe alaki: “Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Na esika ya kobeta ntembe na ntina na bosolo ya mapamboli wana, tosengeli nde komituna: ‘Likambo nini ngai nasengeli kosala mpo na kozwa mapamboli wana?’
“Mai” mpo na baoyo bazali na mposa na komela
10. “Mai” nini Jéhovah azali kopesa, mpe yango elimboli nini?
10 Ezali Jéhovah nde alobi: “Mpo na moto na mposa na komela, ngai nakomelisa ye na liziba na mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 21:6b) Mpo na kosilisa mposa na yo ya mai, esengeli na yo koyeba bamposa na yo ya elimo mpe kozala pene na kondima “mai” oyo mazali kouta na Jéhovah. (Yisaya 55:1; Matai 5:3) “Mai” yango mazali nini? Yesu ye moko ayebisaki yango ntango apesaki litatoli na mwasi moko penepene na libulu ya mai na Samaria. “Nde ye oyo akomela mai makopesa ngai epai na ye, libela akoyoka mposa lisusu te; kasi mai makopesa ngai ye makokóma epai na ye liziba likopesaka bomoi na seko.” “Liziba na mai na bomoi” euti na Nzambe na nsima na Klisto, mpe yango nde nzela oyo abongisaki mpo na kozongisa bato kati na ezaleli ya kokoka. Lokola mwasi Mosamaria, tómela mai ya liziba yango na mposa nyonso. Mpe lokola ye, tózala pene na kotika matomba ya mokili mpo na kosakola nsango malamu epai na bazalani na biso.—Yoane 4:14, 15, 28, 29.
Balóngi
11. Elaka nini Jéhovah apesi, mpe banani batalelami liboso na maloba oyo?
11 Baoyo bazali komela “mai” wana ya kokitisa motema basengeli mpe kolonga, lokola Jéhovah alobi yango sikawa: “Molongi akozwa biloko oyo, mpe ngai nakozala Nzambe na ye mpe ye akozala mwana na ngai.” (Emoniseli 21:7) Elaka oyo ekokani na oyo tozali kokuta kati na bansango oyo etindamaki na masangá nsambo; na ntina yango, maloba oyo masengeli kotalela liboso mpenza bayekoli bapakolami. (Emoniseli 2:7, 11, 17, 26-28; 3:5, 12, 21) Na boumeli ya bikeke, bandeko na Klisto na elimo bazelaki na motema móto libaku ya kozala basangani na Yelusaleme na Sika. Soki bakozala balóngi lokola Yesu, elikya na bango ekokokana.—Yoane 16:33.
12. Ndenge nini elaka na Jéhovah oyo eyebisami na Emoniseli 21:7 ekokokana mpo na bolamu ya ebele monene?
12 Basangani ya ebele monene oyo bauti na mabota nyonso bazali mpe kolikya na elaka yango. Basengeli mpe kolónga mpe kosalela Nzambe na bosembo nyonso kino ekobima bango na bolozi monene. Na bongo, bakozwa libula na bango na mabelé, elingi koloba ‘bokonzi oyo ebongisamaki mpo na bango longwa na ebandeli ya mokili.’ (Matai 25:34.) Baoyo wana, mpe bamosusu kati na bampate ya Nkolo na mabelé oyo bakolónga komekama na nsuka ya mbula nkoto, babyangami “bapetwi” to babulami. (Emoniseli 20:9) Lokola bakómi basangani ya lisangá ya molongo mobimba ya Mozalisi na bango Jéhovah Nzambe, bakozala elongo na ye na boyokani ya tata mpe bana, boyokani ya bulee.—Yisaya 66:22; Yoane 20:31; Baloma 8:21.
13, 14. Mpo na kozwa libula na bilaka minene na Nzambe, misala nini ya mabe tosengeli kopéngola, mpe mpo na nini?
13 Wana ezali bango kozela bolamu monene oyo, ebongi ete ba Témoins de Jéhovah bamibatela peto sikawa liboso na mokili ya Satana mpe na bosoto na yango. Basengeli kozala makasi, kobatela ekateli ya koboya kopusama na Diable elongo na bato oyo Jéhovah alobi na ntina na bango ete: “Nde mpo na bagoigoi, na bato na ntembe, na bato babebi na bosoto, na babomi na bato, na bato na pite, na bato na ndoki, na basambeli na bikeko, na bato na lokuta nyonso, likabo na bango ekozala kati na libeke likopelaka na móto na sufulu, oyo ezali kufa na mibale.” (Emoniseli 21:8) Ee, ye oyo azali na mposa ya kozwa libula wana asengeli kokima misala oyo mibebisi ebongiseli na biloko ya ntango oyo. Asengeli kolónga, na kotikalaka sembo atako bopusi mpe masenginya ezali mingi.—Baloma 8:35-39.
14 Atako boklisto ya mokili oyo ezali komiloba ete ezali mwasi na Klisto, nzokande bazali mpenza kosalaka bizaleli wana ya mbindo oyo bilobelami awa na Yoane. Boklisto ya lokuta ekobomama mpenza libela elongo na mangomba mosusu ya Babilone Monene. (Emoniseli 18:8, 21) Bobele bongo, moto nyonso oyo azali kati na baklisto bapakolami to kati na ebele monene, oyo akomipesa na kosaláká misala wana ya mabe, to na kolendisa yango, moto yango azali na likama ya kokoma kino etumbu ya liwa ya seko. Soki akangami na etamboli na ye wana, akozwa libula na bilaka te. Mpe kati na mokili ya sika, ye oyo akomeka kokótisa bizaleli motindo wana akobomama nokinoki; akokende na kufa ya mibale kozanga elikya ya lisekwa.—Yisaya 65:20.
15. Tanga balóngi oyo baleki balóngi nyonso mosusu, mpe na nzela na emonaneli nini Emoniseli éngali mpenza na kitoko nyonso?
15 Mwana na Mpate Yesu Klisto mpe mwasi na ye to Yelusaleme na Sika, lisangá na ba 144 000 bazali balongi oyo baleki balongi nyonso. Ebongi mpenza ete Emoniseli éngala kati na emonaneli ya nsuka mpe ya kosepelisa oyo etali Yelusaleme na sika. Yoane akomonisa yango sikawa.
[Bililingi na lokasa 302]
Na mabelé na sika to lisangá ya sika ya bato, moto nyonso akosepela na mosala mpe akozala na esengo na kofanda elongo na baninga