Bisakweli oyo elobelaki Masiya
LOKOLA bayebaki makambo oyo Yisaya mpe basakoli mosusu bakomaki mpo na Masiya, Bayuda bazalaki kozela koya na ye banda kala. Yango wana, na mikolo ya Yesu, Bayuda mingi “bazalaki kozela” ete Masiya amonana na ntango wana. (Luka 3:15) Likambo ya esengo, bisakweli mingi ya Biblia elobeli mpe makambo oyo esengelaki kosalema na bomoi ya Masiya. Moto ata moko te akokaki kosakola makambo wana to kosala ete makambo yango nyonso ekokisama epai na Yesu.
Makambo etali kobotama ya Masiya. Yisaya asakolaki ete Masiya, to Klisto, akobotama na mwana mwasi oyo ayebi mibali te. Nsima ya kolobela kobotama ya Yesu na ndenge moko ya kokamwa, ntoma Matai akomaki boye: “Nyonso wana esalemaki mpenza mpo oyo elobamaki na Yehova na nzela ya mosakoli na ye ekokisama, ete: ‘Talá! Ngɔndɔ akokóma na zemi mpe akobota mwana mobali.’” (Matai 1:22, 23; Yisaya 7:14) Yisaya asakolaki mpe ete Klisto akouta na libota ya Davidi, mpe atángaki mpenza nkombo ya Yese, tata ya Davidi. Ya solo, Yesu autaki mpenza na libota ya Davidi. (Matai 1:6, 16; Luka 3:23, 31, 32) Yango wana, liboso Yesu abotama, anzelu Gabiliele ayebisaki Malia, mama ya Yesu ete: “Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye.”—Luka 1:32, 33; Yisaya 11:1-5, 10; Baloma 15:12.
Makambo etali bomoi ya Yesu. Na sinagoga ya Nazalete, Yesu atángaki na mongongo makasi esakweli ya Yisaya, oyo elobaki ete: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola.” Mpo na komonisa ete esakweli yango ekokisami epai na ye, Yesu alobaki ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.” (Luka 4:17-21; Yisaya 61:1, 2) Yisaya asakolaki mpe ete Yesu akomonisela bato oyo bazali na mposa ya kobikisama boboto mpe akobɛta ntangwa te mpo na makambo oyo akosala. Matai akomaki ete: “Mingi mpe balandaki ye, mpe abikisaki bango nyonso, kasi azalaki kopekisa bango makasi ete bábɛtɛla ye ntangwa te; mpo oyo elobamaki na nzela ya Yisaya mosakoli ekokisama . . . Akoswana te, mpe akoganga makasi te, . . . Nkɛkɛlɛ oyo efinamá akobuka yango te.”—Matai 8:16, 17; 12:10-21; Yisaya 42:1-4; 53:4, 5.
Makambo etali minyoko ya Masiya. Yisaya asakolaki ete bato mingi na Yisalaele bakondima Masiya te, kasi akokóma nde “libanga ya kobɛtisa [bango] libaku.” (1 Petelo 2:6-8; Yisaya 8:14, 15) Mpe atako Yesu asalaki ebele ya makamwisi, bato “bandimelaki ye te, mpo liloba ya mosakoli Yisaya ekokisama oyo elobaki ete: ‘Yehova, nani andimi likambo oyo biso toyokaki?’” (Yoane 12:37, 38; Yisaya 53:1) Likambo mosusu oyo etindaki Bayuda báboya kondima ete Yesu azali Masiya, ezali likanisi ya lokuta oyo bato mingi bazalaki na yango, ete Masiya akolongola bango mbala moko na boombo ya Baloma mpe akozongisa Bokonzi ya Davidi na mabelé. Lokola Yesu anyokwamaki mpe akufaki, Bayuda mingi bandimaki te ete azali Masiya. Kasi, Yisaya asakolaki ete Masiya akonyokwama liboso akóma Mokonzi.
Na mokanda ya Yisaya, Masiya alobaki ete: “Napesi mokɔngɔ na ngai epai ya babɛti . . . Nabombi elongi na ngai te na nsɔni mpe na kotwelama nsoi.” Matai ayebisi makambo oyo esalemaki ntango bazalaki kosambisa Yesu: “Babwakelaki ye nsoi na elongi mpe babɛtaki ye makofi. Bamosusu babɛtaki ye bambata na elongi.” (Yisaya 50:6; Matai 26:67) Yisaya akomaki ete: “Anyatami, nde ata bongo azipoli monɔkɔ na ye te.” Yango wana, ntango Pilato atunaki Yesu makambo oyo Bayuda bafundaki ye, Yesu “ayanolaki ye te, ɛɛ, ata liloba moko te, na boye ete guvɛrnɛrɛ akamwaki mingi.”—Yisaya 53:7; Matai 27:12-14; Misala 8:28, 32-35.
Makambo etali liwa ya Masiya. Esakweli ya Yisaya ekokisamaki mpe ntango Yesu akufaki, ata mpe na nsima. Yisaya asakolaki ete: “Nkunda na ye esalamaki elongo na bato mabe, mpe kufa na ye elongo na mozwi.” (Yisaya 53:9) Ndenge nini esakweli yango, oyo emonanaki lokola bongolabongola, ekokisamaki? Ntango Yesu akufaki, babakaki ye na nzete elongo na miyibi mibale. (Matai 27:38) Kasi na nsima, Yozefe ya Alimatai, moto moko ya bomɛngo akundaki Yesu na lilita na ye moko oyo autaki komisalela. (Matai 27:57-60) Lisusu, liwa ya Yesu ekokisaki moko ya bisakweli ya ntina mpenza ya Yisaya. Na ntina na Masiya, Yisaya alobi boye: “Moombo na ngai ya boyɛngɛbɛnɛ akolongisa mingi; mpe akokumba masumu na bango.” Ya solo, liwa ya Yesu esikolaki bato nyonso ya sembo na bozito ya lisumu.—Yisaya 53:8, 11; Baloma 4:25.
Bisakweli oyo ekokokisama mpenza
Mpo na komonisa na nzela ya Makomami ete Yesu azali Masiya, bantoma mpe Yesu ye moko batángaki esakweli ya Yisaya mbala mingi koleka mikanda mosusu nyonso ya Biblia. Kasi, kaka mokanda ya Yisaya te nde esakolaki makambo oyo ekoya. Bisakweli mingi mosusu ya Makomami ya Liebele ekokisami mpe epai ya Yesu, na Bokonzi na ye mpe na makambo ya malamu oyo Bokonzi yango ekokokisa na mikolo ezali koya.a (Misala 28:23; Emoniseli 19:10) Nini emonisaki ete bisakweli yango ekokokisama? Yesu ayebisaki Bayuda oyo bazalaki koyoka ete: “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mibeko to Basakoli [elingi koloba, Makomami ya Liebele]. Nayaki, mpo na kobebisa te, kasi mpo na kokokisa; mpo ya solo mpenza nazali koloba na bino ete likoló mpe mabelé ekoki koleka kasi lɛtɛlɛ ata oyo eleki moke to mwa eteni moko ya lɛtɛlɛ uta na Mibeko ekoleka soki moke te kozanga ete makambo nyonso esalema.”—Matai 5:17, 18.
Yesu alobelaki mpe bisakweli ya Biblia oyo ekokisamaki na bomoi na ye mpe oyo esengelaki kokokisama na nsima. (Danyele 9:27; Matai 15:7-9; 24:15) Lisusu, Yesu ná bayekoli na ye basakolaki makambo oyo esengelaki kosalema nsima ya ntango na bango, ná makambo mingi oyo ezali kosalema na mikolo na biso. Lisolo oyo ekolanda ekolobela bisakweli mosusu ya Biblia oyo ekokokisama lobi to lobi kuna.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba bisakweli mosusu oyo ekokisamaki na ntina na Yesu, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? lokasa 200, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 4]
“Ngɔndɔ . . . akobota mwana mobali”
[Elilingi na lokasa 5]
“Nabombi elongi na ngai te na nsɔni”