Mokapo ya Zomi na Mwambe
Yehova alendisi elimo ya bato ya komikitisa
1. Maloba nini ya kokitisa motema Yehova alobi, mpe mituna nini maloba yango ebimisi?
‘YE OYO azali likoló mpe Oyo-Atombwami-Mosika, ye oyo akoumela libela, oyo nkombo na ye ezali mosantu, alobi ete, Nafandi na esika mosantu mpe oyo etombwami mosika, mpe elongo na moto oyo azali na elimo etutami mpe moto ya komikitisa, mpo na kolendisa elimo ya moto ya komikitisa mpe kolendisa motema ya moto oyo atutami.’ (Yisaya 57:15) Mosakoli Yisaya akomaki makambo oyo na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Makambo nini ezalaki koleka na Yuda oyo esalaki ete maloba yango elendisa? Ndenge nini maloba oyo epemami ekoki kosalisa baklisto lelo oyo? Botaleli ya Yisaya mokapo 57 ekopesa biso biyano na mituna wana.
‘Bino, bóbɛlɛma penepene’
2. (a) Emonani ete maloba ya Yisaya mokapo 57 ezali kokokisama ntango nini? (b) Na ntango ya Yisaya, nini ezali kokómela bayengebene?
2 Emonani lokola nde eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali kokokisama na ntango na ye. Talá sikoyo ndenge mabe ekɔteli bato: ‘Moyengebene azali kokufa nde moko te akotya likambo yango na motema na ye; bato ya boboto bazali kolongolama nde moto te akososola. Mpo ete moyengebene alongolami na yango ezali mabe. Akɔti na kimya. Bango bakolala na mbeto na bango, baoyo bazali kotambola na sembo.’ (Yisaya 57:1, 2) Soki moyengebene akwei, moto moko te azali kotya likebi. Ata soki akufi mobesu ezali kotungisa bato te. Ntango moto akufi azwi kimya, asikolami na minyoko ya bato oyo bazali kotyola Nzambe, mpe mpasi na ye esili. Bizaleli ya ekólo oyo Nzambe aponi ebebi mpenza kobeba. Na ntembe te, baoyo bazali kotikala sembo balendisami mpenza kaka te na koyeba ete Yehova azali komona makambo nyonso wana, kasi lisusu na koyeba ete akosalisa bango!
3. Maloba nini Yehova alobi na bato mabe ya Yuda, mpe mpo na nini?
3 Yehova abendi likebi ya bato mabe ya Yuda na maloba oyo: ‘Kasi bino bana ya mwasi nganga-nkisi, bóbɛlɛma penepene; libota ya mobali ya ekobo mpe mwasi ya ndumba.’ (Yisaya 57:3) Nkombo wana ya nsɔni ebongi mpenza na bango, bana ya nganga-nkisi mpe bana ya mobali ya ekobo mpe ya mwasi ya ndumba. Losambo ya lokuta oyo bakangami na yango ezali na makambo ya mbindo oyo euti na losambo ya bikeko, na misala ya bilimo mabe mpe na misala ya pite ná ekobo. Na yango, Yehova atuni bato ya masumu wana boye: ‘Bino bozali kotɛmɛla nani na kosepela na bino? Bokofungolela nani monɔkɔ na bino, bokobimisela nani lolemo na bino? Bozali bana ya masumu te mpe libota ya bokosi te? Bino bokozikaka na mposa mabe na nse ya nzete ya ela, mpe na nse ya nzete nyonso mibesu; bobomaka bana na bino na mabwaku na nse ya mabulu ya mabanga.’—Yisaya 57:4, 5.
4. Bato mabe ya Yuda bakweisami na makambo nini?
4 Bato mabe wana ya Yuda bazali lisusu kobanga te kosala na miso ya bato makambo ya nsɔni ya losambo na bango ya bopakano, bazali kutu “kosepela.” Bazali kosɛka basakoli oyo Nzambe atindi mpo na kolongola bango na nzela mabe, bazali kobimisa lolemo na lityo mpenza, likambo oyo emonisi kozanga limemya. Atako bazali bana ya Abalayama, botomboki na bango ekómisi bango bana ya masumu mpe libota ya bokosi. (Yisaya 1:4; 30:9; Yoane 8:39, 44) Na zamba na nse ya banzete minene, bazali kopelisa milende na losambo na bango ya bikeko. Mpe yango ezali solo losambo ya nsɔmɔ! Kutu, bazali koboma bana na bango, lokola bikólo oyo misala mabe na bango etindaki Yehova abengana bango na esika bazalaki.—1 Mikonzi 14:23; 2 Mikonzi 16:3, 4; Yisaya 1:29.
Bazali kosopela mabanga mbeka ya masanga
5, 6. (a) Bato ya Yuda baponi kosala nini na esika ya kosambela Yehova? (b) Nini emonisi ete losambo ya bikeko eleki mabe mpe epalangani bipai nyonso na Yuda?
5 Talá kino wapi bato ya Yuda bakɔti mpenza na losambo ya bikeko: ‘Libula na yo ezali kati na mabanga ya moselu na lobwaku, yango, yango ezali libula na yo! Epai na yango osopi mbeka ya masanga, oyeisi mbeka ya bilei. Ngai nakobɔndisama na oyo?’ (Yisaya 57:6) Bayuda bazali bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana, nzokande na esika básambela ye, bazali kolɔkɔta mabanga na mai mpe kokómisa yango banzambe. Davidi asakolaki ete Yehova azali libula na ye, kasi bato wana ya masumu baponi bikeko ya mabanga ezangi bomoi lokola libula na bango mpe bazali kosopela yango mbeka ya masanga. (Nzembo 16:5; Habakuku 2:19) Ndenge nini Yehova akoki kobɔndisama na losambo ya lipɛngwi oyo bato bamemi nkombo na ye bamipesi na yango?
6 Na bisika nyonso—na nse ya banzete minene, na mabwaku oyo ezali na mai, na bangomba mike, na bingumba—Yuda azali kosambela bikeko. Kasi Yehova azali komona nyonso wana mpe na monɔkɔ ya Yisaya, abimisi misala na bango ya nsɔni polele: ‘Likoló ya ngomba molai mpe etombwani likoló, otye mbeto na yo; obuti wana mpo na kopesa mbeka. Nsima ya ekuke mpe na likonzí ya ekuke, otɛlɛmisi elembo na yo.’ (Yisaya 57:7, 8a) Na bisika oyo ezali likoló, Yuda atandi mbeto ya bosɔtɔ na ye ya elimo, mpe kuna apesi mbeka epai ya banzambe ya bapaya.a Ata na bandako na bango moko bikeko ezali nsima ya baporte mpe ya makonzí ya baporte.
7. Nini etindi Yuda amikɔtisa na losambo ya pite?
7 Basusu bakoki kotuna mpo na nini Yuda amikɔtisi na losambo ya mbindo ndenge wana. Boye ekólo moko ya nguya mingi koleka nde etindi ye na makasi aboya Yehova? Eyano ezali ete te. Aponaki kosala bongo na motema na ye mobimba, na nko nyonso. Yehova alobi: “Zambi wana otiki ngai, ozipoli mbeto na yo, obuti likoló na yango, oyeisi yango monene; obongisi na bango kondimana mpo na yo moko; olingi mbeto na bango; otali makambo ya nsɔni.” (Yisaya 57:8b) Yuda asali kondimana na banzambe na ye ya lokuta, mpe asepeli na boyokani na ye wana ya mbindo oyo asali na bango. Alingi mpenzampenza misala ya pite—makambo lokola kosalela elembo ya biboteli—oyo ezalaki mingi na losambo ya banzambe yango!
8. Na boyangeli ya mokonzi nani losambo ya bikeko epalanganaki mpenza mingi na Yuda?
8 Ndenge balobeli losambo ya bikeko awa, ná makambo na yango ya mbindo mpe ya mabe ekokani mpenza na makambo oyo toyebi na ntina na bakonzi mingi ya mabe ya Yuda. Na ndakisa, Manase atongaki bisika ya likoló, atɛlɛmisaki bitumbelo mpo na Baala, mpe atyaki bitumbelo ya losambo ya lokuta na mabándá (cours) mibale ya tempelo. Atumbaki bana mibali na ye na mɔtɔ lokola mbeka, asalelaki nkisi, soloka, mpe alendisaki misala mosusu ya bilimo mabe. Mokonzi Manase atyaki mpe kati na tempelo ya Yehova ekeko ya nzete mosantu oyo ye asalaki.b Atindaki Yuda asala “mabe koleka bikólo oyo Yehova abebisaki.” (2 Mikonzi 21:2-9, NW) Bato mosusu bakanisaka ete Manase nde atindaki báboma Yisaya, atako nkombo ya Manase emonani te na Yisaya 1:1.
“Otindi bantoma na yo”
9. Mpo na nini Yuda azali kotinda bantoma “mosika”?
9 Masumu ya Yuda esuki kaka na kosalela banzambe ya lokuta te. Yehova asaleli Yisaya lokola molobeli, mpe alobi boye: “Okei epai ya mokonzi elongo na mafuta, ofulisi malasi na yo; otindi bantoma na yo mosika, omikitisi kino esika ya bakufi mpenza.” (Yisaya 57:9) Bokonzi ya Yuda, oyo ezalaki sembo te, ekiti kino epai ya “mokonzi”—ekoki mpenza kozala mokonzi ya mboka moko makasi ya bapaya—mpo na kopesa ye makabo ya motuya mingi mpe ya kitoko, oyo babengi mafuta mpe malasi. Yuda azali kotinda bantoma mosika mpenza. Mpo na nini? Mpo na kosɛnga bikólo ya bapakano básala boyokani ya politiki elongo na ye. Lokola alongoli motema epai ya Yehova, atye elikya na ye epai ya bakonzi ya bapaya.
10. (a) Ndenge nini Mokonzi Ahaza aluki kosala boyokani elongo na mokonzi ya Asiria? (b) Na ndenge nini Yuda ‘amikitisi kino na bozindo ya sheole’?
10 Tózwa na ndakisa likambo oyo esalemaki na mikolo ya Mokonzi Ahaza. Ntango abangaki makama oyo ekouta na boyokani oyo Yisalaele asalaki na Siria, mokonzi wana ya Yuda, oyo azalaki sembo te, atindi bantoma epai ya Tigilata-Pilesele III, mokonzi ya Asiria, mpo na koloba na ye ete: ‘Ngai nazali moombo na yo mpe mwana na yo. Yaká mpe bikisá ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Siria mpe na lobɔkɔ ya mokonzi ya Yisalaele baoyo bazali kotɛmɛla ngai.’ Ahaza atindeli mokonzi ya Asiria kanyaka ya palata mpe wolo, mpe mokonzi yango andimi. Akei kobunda na Siria mpe kobebisa yango. (2 Mikonzi 16:7-9) Na boyokani oyo asalaki elongo na bikólo ya bapakano, Yuda akitaki kino na “bozindo ya sheole.” (Bible Liénart) Mpo na makambo yango, akokufa, to akolimwa mpe akozala lisusu te ekólo moko ya bonsomi oyo ezali na mokonzi na yango.
11. Kimya nini ya lokuta Yuda alakisi?
11 Yehova alandi kosolola na Yuda boye: “Olɛmbaki mpo na molai ya nzela na yo nde olobi te ete, Elikya ezangi—ee! Ozwi nguya ya sika na lobɔkɔ na yo mpe bongo osenzwi te.” (Yisaya 57:10) Ɛɛ, ekólo yango esali misala makasi na banzela na yango ya lipɛngwi, kasi ezali komona te ete misala yango nyonso ezali se mpamba. Kutu, amikosi na kokanisa ete alongi mpo na nguya na ye moko. Ayoki ete azwi makasi mpe azali nzoto makasi. Oyo nde bozoba!
12. Makambo nini oyo ezali kosalema na mangomba ya boklisto ekokani na oyo ezalaki na Yuda?
12 Na mikolo na biso, ezali na ebongiseli moko oyo misala na yango ezali kokundolela biso ekólo ya Yuda na ntango ya Yisaya. Mangomba ya boklisto ezali kosalela nkombo ya Yesu, kasi bazali kolanda kosala boyokani na bikólo mpe batondisi bisika na bango ya losambo na bikeko. Bato na yango bazali kutu kotya bikeko ya losambo ya lokuta na bandako na bango. Mangomba ya boklisto epesaki bilenge na yango lokola mbeka na bitumba ya bikólo. Makambo wana nyonso esengeli mpenza kopesa Nzambe ya solo mpasi, ye oyo apesi baklisto etinda ete: “Bókima losambo ya bikeko.” (1 Bakolinti 10:14) Na ndenge mangomba ya boklisto ezali komikɔtisa na makambo ya politiki, ‘esali pite elongo na bakonzi ya mabelé.’ (Emoniseli 17:1, 2) Ya solo, mangomba ya boklisto ezali eteni monene oyo esimbi ONU. Nini ezali kozela mangomba mpo na kindumba wana? Bongo, Yehova alobaki nini na Yuda, mboka oyo ezangi bosembo oyo ezalaki elilingi ya mangomba yango, mingi mpenza Yelusaleme, mboka-mokonzi na yango?
‘Biloko oyo onduki ekobikisa yo te’
13. “Lokuta” nini Yuda azali kobuka, mpe asali nini ntango Yehova amoniselaki ye motema molai?
13 Yehova atuni boye: “Obangi mpe ozali na nsɔmɔ mpo na nani, ete obuka lokuta?” Motuna oyo ebongi mpenza! Yuda azalaki komonisa ata moke te bobangi ya malamu, bobangi ya Yehova Nzambe. Soki azala na bobangi yango, mbɛlɛ akómi te ekólo ya bato ya lokuta, basambeli ya banzambe ya lokuta. Yehova alandi koloba: “Okanisi ngai te, otye likambo na motema na yo te. Ngai nafandi nyɛɛ longwa ntango molai te? Bongo obangi ngai te.” (Yisaya 57:11) Yehova afandaki nyɛɛ, apesaki Yuda etumbu nokinoki te. Yuda akangaki ntina na likambo yango? Te, kutu atalaki motema molai ya Nzambe lokola nde Nzambe azalaki kotyela ye likebi te. Azalaki lisusu na bobangi ya Nzambe te.
14, 15. Yehova alobi nini mpo na misala ya Yuda, mpe ‘biloko oyo anduki’?
14 Kasi, mokolo ekoya wana Nzambe akokanga lisusu motema te. Wana azali kokanisa ntango yango, Yehova alobi: ‘Nakosakola mpo na boyengebene na yo mpe mosala na yo, nde ekopesa yo lisungi te. Wana ekobenga yo, tiká ete biloko oyo onduki ebikisa yo! Mopɛpɛ ekolongola yango, mopɛpɛ moke ekobɔtɔla yango.’ (Yisaya 57:12, 13a) Yehova akomonisa polele ete boyengebene ya Yuda ezalaki bokosi. Misala na ye ya bokosi ekozala na ntina moko te mpo na ye. Biloko oyo ‘andukaki,’ ebele ya bikeko na ye, ekobikisa ye te. Ntango mpasi ekokwela ye, banzambe oyo atyelaki motema, mwa mopɛpɛ moke ekopumbwisa bango mosika.
15 Maloba ya Yehova ekokisamaki na mobu 607 L.T.B. Ezalaki ntango Nebukadanesala mokonzi ya Babilone abebisaki Yelusaleme, atumbaki tempelo na mɔtɔ, mpe amemaki bato ya Yuda na boombo. ‘Bongo balongolaki Yuda na mokili na ye mpe akendeki boombo.’—2 Mikonzi 25:1-21.
16. Nini ezali kozela mangomba ya boklisto mpe mangomba mosusu ya “Babilone Monene”?
16 Se ndenge moko, ebele ya bikeko ya mangomba ya boklisto ekobikisa yango te na mokolo ya nkanda ya Yehova. (Yisaya 2:19-22; 2 Batesaloniki 1:6-10) Mangomba ya boklisto ekolimwa nyɛɛ elongo na mangomba mosusu ya “Babilone Monene,” lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Nyama ya elilingi ya langi motane-ngwaa mpe maseke na yango zomi “bakopanza [Babilone Monene] mpe bakotika ye bolumbu, mpe bakolya misuni na ye mpe bakozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.” (Emoniseli 17:3, 16, 17) Tozali mpenza na esengo ndenge totosi etinda oyo: “Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai, soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.” (Emoniseli 18:4, 5) Tózongela ye mpe banzela na ye soki moke te.
“Ye oyo akomibomba epai na ngai akozwa mboka lokola libula”
17. Elaka nini bapesi ye oyo ‘akomibomba epai ya Yehova,’ mpe ntango nini yango ekokisamaki?
17 Bongo maloba ya esakweli ya Yisaya oyo elandi elimboli nini? “Kasi ye oyo akomibomba epai na ngai akozwa mboka lokola libula, mpe akosangola ngomba na ngai mosantu.” (Yisaya 57:13b, NW) Sikoyo Yehova azali koloba na nani? Azali kotala mosika koleka mpasi oyo ekoya mpe azali kosakola kosikolama ya bato ya ekólo na ye na mabɔkɔ ya Babilone, mpe kozongisama ya losambo ya pɛto na Yelusaleme, ngomba mosantu na ye. (Yisaya 66:20; Danyele 9:16) Maloba yango ezalaki solo elendiseli mpo na Bayuda nyonso oyo batikalaki sembo! Lisusu, Yehova alobi ete: “Ekolobama ete, Tombolá! Tombolá! Bongisá nzela! Longolá mabaku nyonso na nzela ya bato na ngai.” (Yisaya 57:14) Wana ntango ekokoka mpo Nzambe abikisa bato na ye, nzela ekobongisama, mabaku nyonso ekolongolama.—2 Ntango 36:22, 23.
18. Na maloba nini bamonisi ete Yehova azali likoló mingi mpenza, atako bongo likebi nini ya bolingo azali komonisa?
18 Ezali awa nde mosakoli Yisaya alobaki maloba oyo etyamaki na ebandeli: ‘Ye oyo azali likoló mpe Oyo-atombwami-mosika, ye oyo akoumela libela, oyo nkombo na ye ezali mosantu, alobi ete, Nafandi na esika mosantu mpe oyo etombwami mosika, mpe elongo na moto oyo azali na elimo etutami mpe moto ya komikitisa, mpo na kolendisa elimo ya moto ya komikitisa mpe kolendisa motema ya moto oyo atutami.’ (Yisaya 57:15) Kiti ya bokonzi ya Yehova ezali mpenza mosika kuna na likoló. Esika mosusu oyo ezali likoló koleka yango ezali te. Wana ezali solo likambo ya kobɔndisa na koyeba ete, longwa na esika yango azali komona makambo nyonso. Azali komona te kaka masumu ya bato mabe kasi lisusu misala malamu ya baoyo bazali kosala milende mpo na kosalela ye! (Nzembo 102:19; 103:6) Lisusu, ayokaka kolela ya bato oyo banyokwami mpe alendisaka baoyo batutami na motema. Boye maloba wana esimbaki mpenza mitema ya Bayuda ya kala oyo babongolaki motema. Yango ezali mpe kosimba mpenza mitema na biso lelo oyo.
19. Ntango nini nkanda ya Yehova esilaka?
19 Talá maloba mosusu ya Yehova oyo ezali mpenza kolendisa: ‘Nakobunda libela te, nakozala mpe na nkanda seko te; ete elimo elɛmba liboso na ngai te, ɛɛ bikelamu ya bomoi oyo ngai nasali yango.’ (Yisaya 57:16) Soki nkanda ya Yehova eumeli seko, ekelamu moko te ekoki kobika. Nzokande, likambo ya esengo, kosilika ya Nzambe ezalaka na ndelo. Esilaka soki ekokisi mokano na yango. Bososoli oyo tozwi na maloba mapemami wana ezali kosalisa biso tózala lisusu na botɔndi koleka mpo na bolingo ya Yehova epai ya biloko oyo ye asalá.
20. (a) Yehova asalaka nini na moto mabe oyo abongoli motema te? (b) Ndenge nini Yehova abɔndisaka moto oyo atutami na motema?
20 Wana Yehova alandi koloba, bososoli na biso ebakisami lisusu. Alobi liboso boye: “Mpo na mabe na kolulela na ye nayoki nkanda, nabɛti ye, nabombi elongi na ngai mpe nayoki nkanda; kasi alekaki kopɛngwa na nzela ya motema na ye moko.” (Yisaya 57:17) Mabe oyo moto asali mpo na bilulela epelisaka mpenza nkanda ya Nzambe. Soki moto yango azali kaka kotomboka na motema na ye, Yehova mpe akotika kosilika te. Bongo soki motomboki yango andimi etumbu oyo bapesi ye? Na ntango yango Yehova akomonisa ndenge bolingo mpe motema mawa na ye etindaka ye na kosala: ‘Namoni nzela na ye nde nakobikisa ye; nakokamba ye mpe nakozongisela ye mabɔndisi elongo na baleli na ye.’ (Yisaya 57:18) Nsima ya kopesa etumbu, Yehova akolendisa moto ya motema motutami mpe akobɔndisa ye, mpe baoyo bazali kolela elongo na ye. Yango wana na mobu 537 L.T.B., Bayuda bazongaki na mboka na bango. Ya solo, kobanda ntango yango Yuda ezongá lisusu te bokonzi moko ya bonsomi oyo etambwisami na mokonzi moko ya libota ya Davidi. Atako bongo, batongaki lisusu tempelo na Yelusaleme, mpe bazongisaki losambo ya pɛto kuna.
21. (a) Ndenge nini Yehova alendisaki elimo ya baklisto bapakolami na 1919? (b) Ezaleli nini mokomoko na biso asengeli kolona?
21 Yehova, “Oyo azali likoló mpe Oyo-atombwami-mosika” amonisaki mpe ete azali komibanzabanza mpo na bolamu ya batikali bapakolami na 1919. Mpo bazalaki na elimo etutami, elimo ya komikitisa, Yehova, Nzambe monene amonaki na boboto nyonso mpasi na bango mpe asikolaki bango na boombo ya Babilone. Alongolaki liboso na bango mabaku nyonso mpe apesaki bango bonsomi; na ndenge yango bazwaki likoki ya kopesa ye losambo ya pɛto. Na bongo, maloba oyo Yehova alobaki na monɔkɔ ya Yisaya ekokisamaki na ntango yango. Mpe maloba yango ezali na mitinda oyo ebongwanaka te, oyo etali mokomoko na biso. Yehova andimaka bobele losambo ya baoyo bazali na elimo ya komikitisa. Mpe soki mosaleli moko ya Nzambe asali lisumu, asengeli nokinoki kondima mabunga na ye, kondima mpamela mpe kobongisa banzela na ye. Tóbosana soki moke te ete Yehova alendisaka mpe abɔndisaka bato ya komikitisa kasi “atɛmɛlaka bato ya lolendo.”—Yakobo 4:6.
‘Kimya epai ya bato ya mosika mpe ya penepene’
22. Mpo na ntango ezali koya Yehova asakoli nini mpo na (a) baoyo babongoli motema? (b) bato mabe?
22 Yehova amonisi bokeseni oyo ekozala kati na baoyo babongoli motema mpe baoyo batingami na banzela na bango ya mabe, mpe alobi boye: ‘Ngai nakosala mbuma ya bibɛbu. Kimya! Kimya! epai ya moto ya mosika mpe ya penepene . . . mpe nakobikisa ye. Nde bato mabe bazali lokola mai-na-monana mazali kotombwatombwa, bayebi kofanda na kimya te, mai na yango ekobwaka bosɔtɔ mpe pɔtɔpɔtɔ likoló. Nzambe na ngai alobi ete, Mpo na bato mabe kimya ezali te.’—Yisaya 57:19-21.
23. Mbuma ya bibɛbu ezali nini, mpe ndenge nini Yehova azali ‘kosala’ yango?
23 Mbuma ya bibɛbu ezali mbeka ya masanzoli oyo bapesi Nzambe, kosakola nkombo na ye polele. (Baebele 13:15) Ndenge nini Yehova azali ‘kosala’ mosala wana ya kosakola? Mpo na kopesa mbeka ya masanzoli, moto asengeli liboso koyeba Nzambe mpe kozala na kondima epai na ye. Kondima—mbuma ya elimo ya Nzambe—etindaka moto alobela basusu makambo oyo ayokaki. Elingi koloba, azali kosakola polele liboso ya bato. (Baloma 10:13-15; Bagalatia 5:22) Lisusu, tóbosana te ete ezali Yehova nde apesi basaleli na ye mokumba ya kosakola nkembo na ye. Mpe Yehova nde moto asikolaka basaleli na ye, azali kopesa bango likoki ya kopesa bambeka ya masanzoli. (1 Petelo 2:9) Na yango, tokoki koloba ete Yehova nde asali mbuma wana ya bibɛbu.
24. (a) Nani nde azalaka na kimya ya Nzambe, mpe yango ebimisaka nini? (b) Banani bakoki te kozala na kimya, mpe ekosukela bango ndenge nini?
24 Boye Bayuda bapesaki mpenza mbeka ya mbuma ya bibɛbu ya esengo mingi ntango bazongaki na mboka na bango, wana bayembaki mpo na kosanzola Yehova! Bazali solo na esengo ya kozala na kimya ya Nzambe, bázala “mosika” (mosika na Yuda, wana bazalaki kozela kozonga) to bázala “penepene” (wana bazongi na mboka na bango). Nzokande, makambo ezalaka mpenza bongo te mpo na bato mabe! Moto nyonso oyo aboyi etumbu ya Yehova, moto mabe, ezala azali nani to azali wapi, akozwa kimya ya solo te. Bazali kopunzwapunzwa lokola mai ya mbu oyo efandaka kimya te, bazali ntango nyonso kobimisa mbuma ya bibɛbu te, kasi nde “bosɔtɔ mpe pɔtɔpɔtɔ,” makambo nyonso ya mbindo.
25. Ndenge nini bato mingi ya mosika mpe ya penepene bazali kokóma na kimya?
25 Lelo oyo mpe, basaleli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye na bisika nyonso. Na mikili koleka 230, ya mosika mpe ya penepene, baklisto bazali kopesa mbeka ya mbuma ya bibɛbu na bango, bazali koyokisa masanzoli ya Nzambe bobele moko ya solo. Masanzoli oyo bazali koyemba ezali koyokana “longwa na ndelo ya mokili.” (Yisaya 42:10-12) Baoyo bazali koyoka maloba na bango mpe bazali kondima yango bazali koyamba solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Bango mpe bazali kokóma na kimya, oyo eutaka na kosalela “Nzambe oyo apesaka kimya.”—Baloma 16:20.
26. (a) Nini ezali kozela bato mabe? (b) Elaka nini ya malamu bapesi bato ya komikitisa, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?
26 Ezali solo ete bato mabe batyaka likebi te na nsango ya Bokonzi. Nzokande, etikali moke bakozwa lisusu nzela te ya kobebisa kimya ya bayengebene. Yehova alaki ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te.” Baoyo bazali komibomba epai ya Yehova bakozwa mabelé lokola libula na ndenge moko ya kokamwa. “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:10, 11, 29) Mabelé ekozala solo esika moko kitoko! Tiká ete biso nyonso tózala na ekateli makasi ya kobungisa soki moke te kimya ya Nzambe, mpo tókoka koyembela Nzambe masanzoli libela na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete liloba “mbeto” ezali kolobela etumbelo to mpe esika ya losambo ya bopakano. Kobenga yango mbeto ezali kozongisa na makanisi ete losambo ya ndenge wana ekokani na kindumba ya elimo.
b Nzete mosantu ezalaki mbala mosusu kolakisa biboteli ya basi, mpe makonzí mosantu ezalaki elembo ya biboteli ya mibali. Bato ya Yuda oyo bazalaki lisusu sembo epai ya Nzambe te bazalaki kosambela yango nyonso mibale.—2 Mikonzi 18:4; 23:14.
[Elilingi na lokasa 263]
Yuda azali komipesa na losambo ya mbindo na nse ya nzete monene nyonso
[Elilingi na lokasa 267]
Yuda atongi bitumbelo na mboka mobimba
[Elilingi na lokasa 275]
“Nazali kosala mbuma ya bibɛbu”