Mokapo ya Zomi na Libwa
Bokosi etɔndɔlami!
1. Ndenge nini Yesu ná Yehova batalelaka bokosi, mpe lolenge nini bokosi ezalaki komonana na mikolo ya Yisaya?
YESU alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye boye: “Na libándá bomonanaka mpenza bayengebene na miso ya bato, kasi na kati botondi na bokosi mpe na botyoli-mibeko.” (Matai 23:28) Ezaleli ya Yesu ya kotɔndɔla bokosi ezali komonisa ndenge oyo Tata na ye ya likoló atalelaka yango. Mokapo 58 ya esakweli ya Yisaya ezali kobenda mpenza likebi likoló na bokosi oyo epalangani mingi na Yuda. Koswana, konyokola bato, mpe mobulu etondi kotonda, mpe kokumisa Sabata ekómi kaka molulu moko ya mpamba. Bato ya ekólo yango bazali kosambela Yehova kaka mpo na kosambela mpe bazali kokila bilei kaka mpo na komilakisa epai ya bato ete basambelaka. Yango ezali kokamwisa te soki Yehova atɔndɔli bokosi na bango!
‘Yebisá bato masumu na bango’
2. Ezaleli nini Yisaya amonisi ntango azali kosakola nsango ya Yehova, mpe lelo oyo banani bakokani na ye?
2 Atako Yehova ayoki mpenza mabe mpo na etamboli ya Yuda, maloba na Ye ezali mpe na libyangi ya bolingo mpo ekólo yango ebongola motema. Kasi Yehova alingi ete báyeba malamu mpenza ntina ya mpamela oyo akopesa bango. Yango wana, apesi Yisaya etinda oyo: “Gangá na nkingo na mongongo monene, tiká te! Tombolá mongongo na yo lokola mondule, mpe monisá bato na ngai kopɛngwa na bango mpe ndako ya Yakobo masumu na bango.” (Yisaya 58:1) Kosakola maloba ya Yehova na mpiko mpenza ekoki kosala ete bato báyina Yisaya, kasi azongi nsima te mpo na kobanga. Azali kaka na elimo ya komipesa oyo amonisaki liboso ntango alobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Yisaya azali solo ndakisa malamu ya mpiko mpo na Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso, oyo bazwi mpe mokumba ya kosakola Liloba ya Nzambe mpe ya kotɔndɔla bokosi ya mangomba!—Nzembo 118:6; 2 Timote 4:1-5.
3, 4. (a) Bokosi nini bato bazali komonisa na mikolo ya Yisaya? (b) Makambo nini ezali mpenza kosalema na Yuda?
3 Bato ya ntango ya Yisaya bazali komimonisa ete balukaka Yehova mpe ete basepelaka mingi na bikateli na ye ya boyengebene. Totángi maloba ya Yehova boye: ‘Kasi bazali koluka ngai mokolo na mokolo mpe bazali kosepela ete báyeba nzela na ngai; lokola ete bazali ekólo oyo esalaka boyengebene mpe bazali kotika malako na Nzambe na bango te. Bazali kotuna ngai malako ya boyengebene, basepeli kobɛlɛma epai ya Nzambe.’ (Yisaya 58:2) Kosepela oyo bazali kosepela na banzela ya Yehova euti mpenza na motema? Te. Bazali lokola “ekólo oyo esalaka boyengebene,” kasi kokokana wana ezali bobele ya libándá mpamba. Ya solo, ekólo yango esilá “kotika malako ya Nzambe na bango.”
4 Ezaleli na bango ekokani mpenza na oyo bamonisaki mosakoli Ezekiele nsima. Yehova alobaki na Ezekiele ete Bayuda bazali koloba moto na moto na moninga na ye ete: ‘Yaká tóyoka liloba nini ebimi na Yehova.’ Kasi Nzambe akebisaki Ezekiele ete mitema na bango ezali semba te: ‘Bakokóma epai na yo . . . mpe bakoyoka monɔkɔ na yo nde bakosala yango te; mpo ete na monɔkɔ na bango bakomonisa bolingo mingi, kasi bakotya motema na bango na libonza. Mpe, talá, na miso na bango ozali lokola moyembi ya mongongo malamu oyo abɛti ekembe malamu mpe ayembi loyembo kitoko; boye bakoyoka maloba na yo, nde bakosala yango te.’ (Ezekiele 33:30-32) Bato ya ntango ya Yisaya mpe balobi ete bazali ntango nyonso koluka Yehova, kasi batosaka maloba na ye te.
Kokila bilei na ndenge ya bokosi
5. Ndenge nini Bayuda bazali koluka kondimama na Nzambe, mpe eyano nini Yehova apesi bango?
5 Mpo bándimama na Nzambe, Bayuda bamipesi na momeseno mpamba ya kokila bilei; kasi ezaleli wana ya kolakisa ete basambelaka ezali nde kopɛngwisa bango mosika na Yehova. Batuni lokola nde bazali kokamwa ete: “Mpo na nini tokili bilei nde yo omoni yango te? Mpo na nini totuti milimo na biso nde yo oyebi yango te?” Yehova apesi eyano ya polele ete: ‘Talá na mokolo ya kokila na bino, bozali koluka bisengo ya bino moko; bozali konyokola baombo na bino nyonso. Talá, bokilaka bilei bobele mpo na kowelana mpe kobundana, mpe kobɛtana na bibɔtu mabe; bozali kokila lelo oyo na motindo mokoki te mpo na koyokisa mongongo na bino kuna na likoló. Ezali lolenge oyo ya kokila oyo ngai naponi yango? Mokolo oyo moto akonyokola molimo na ye? Ezali nde mokolo ya kogumbisa motó na nse lokola mongendu mpe kotandisa saki mpe putulu ya mɔtɔ na nse na ye? Okobenga oyo kokila mpe mokolo ya koyambama na Yehova?’—Yisaya 58:3-5.
6. Makambo nini Bayuda bazali kosala efundi bango ete bazali kokila bilei na bokosi?
6 Ntango bato yango bazali kokila bilei, bazali kosala lokola nde bazali bayengebene, bazali kutu koluka bikateli ya boyengebene epai ya Yehova, nzokande bazali kolanda bisengo na bango moko mpe matomba ya mombongo na bango. Bazali komipesa na kowelana, konyokola bato, mpe na mobulu. Mpo na kozipa makambo mabe wana, bazali komitanda mpo bato bámona kolela na bango—kogumba mitó lokola mingendu mpe kofanda na bilamba ya saki na putulu—mpo na kokosa ete babongoli motema, batiki masumu na bango. Makambo wana nyonso ezali na ntina nini soki batiki kotombokela Nzambe te? Bazali komonisa ata mawa moke te oyo eyokani na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe kobongola motema oyo emonisami na kokila bilei na ndenge oyo ebongi. Atako baleli makasi ndenge nini, kolela yango ezali koyokana te na likoló.
7. Na ndenge nini Bayuda ya ntango ya Yesu bazalaki kosala makambo na bokosi, mpe na ndenge nini bato mingi bazali kosala bongo lelo?
7 Mpo na komilakisa na miso ya bato, Bayuda ya mikolo ya Yesu mpe bazalaki kokila bilei ndenge mimeseno ya lingomba esɛngaki, basusu kutu bazalaki kokila bilei mbala mibale na pɔsɔ! (Matai 6:16-18; Luka 18:11, 12) Bakonzi mingi ya mangomba bakómaki mpe makambo makasimakasi mpe konyokola bato ndenge ezalaki na mikolo ya Yisaya. Mpo na yango, na mpiko nyonso, Yesu atɔndɔlaki bokosi wana ya mangomba ntango ayebisaki bango ete losambo na bango ezali na ntina moko te. (Matai 15:7-9) Ndenge moko lelo, bamilio ya bato “balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango, mpamba te bazali bato ya bosɔtɔ mpenza mpe bazangá botosi mpe babongi te mpo na mosala ata moko ya malamu.” (Tito 1:16) Bato yango bakoki kokanisa ete Nzambe akoyokela bango mawa, kasi misala na bango ezali kofunda bango ete mitema na bango ezali sembo te. Nzokande, Batatoli ya Yehova bakangamaka makasi na Nzambe mpe balingaka bandeko na bango na motema mobimba.—Yoane 13:35.
Kobongola motema ya solo esɛngaka nini?
8, 9. Misala nini ya malamu esengeli kotambola nzela moko na kobongola motema ya solo?
8 Yehova alingi ete basaleli na ye básuka kaka te na kokila bilei mpo na masumu na bango, alingi bábongola motema. Na ndenge yango akondima bango. (Ezekiele 18:23, 32) Amonisi ete, mpo kokila bilei ezala na ntina, moto asengeli kotika masumu na ye ya kala. Talá mituna oyo Yehova atuni mpo básosola mitema na bango: ‘Oyo ezali kokila bilei esili ngai kopona te? Kofungola nsinga ya minyoko, kofungola ekangeli, kotika monyokolami ete akóma na bonsomi, mpe kobuka bikangeli nyonso.’—Yisaya 58:6, NW.
9 Nsinga ya minyoko mpe ekangeli ezali komonisa boombo ya mabe mpenza. Na yango, na esika ya kokila bilei mpe konyokola baninga na bango bandimi, bato basengeli nde kotosa etinda oyo: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Basengeli kotika bato nyonso oyo bango banyokoli mpe oyo bakangaki na boombo kaka mpamba.a Makambo ya lingomba, lokola kokila bilei, ekoki te kozwa esika ya bokangami ya solosolo epai ya Nzambe mpe ya misala oyo emonisaka ete tolingaka bandeko. Mosakoli Mika, oyo azalaki na bomoi na mikolo ya Yisaya, akomaki boye: “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—Mika 6:8.
10, 11. (a) Mpo na Bayuda, nini elingaki kozala malamu koleka kokila bilei? (b) Ndenge nini baklisto bakoki lelo oyo kosalela toli oyo Yehova apesaki Bayuda?
10 Bosembo, boboto mpe bopɔlɔ ezali kosɛnga kosalela bato mosusu makambo malamu, yango nde ntina mpenza ya Mibeko ya Yehova. Na esika ya kokila bilei, elekaki malamu bákabela babola mwa ndambo ya ebele ya biloko oyo bazalaki na yango. Yehova atunaki bango boye: ‘Kokila bilei oyo naponi ezali te ete okabola kwanga na yo epai na ye oyo azali na nzala? Mpe ete okɔtisa na ndako na yo babola oyo babwakami libándá? Ete wana okomona moto bolumbu, olatisa ye, mpe ete omibomba te liboso na bato ya libota na yo mpenza?’ (Yisaya 58:7) Ya solo, na esika ya komonisa ete bakilaka bilei, baoyo bazali na makoki basengeli nde kopesa bilei, bilamba, to esika ya kolala na bandeko na bango Bayuda, oyo bazalaki na bosɛnga.
11 Mitinda wana ya malamu ya kolinga bandeko mpe komonisa motema mawa ndenge Yehova alobi, etali kaka Bayuda ya ntango ya Yisaya te. Mitinda yango ezali mpe kolakisa baklisto nzela. Yango wana ntoma Paulo akomaki boye: “Na bongo, ya solo, wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Lisangá ya boklisto esengeli kozala esika mpenza oyo bolingo ezali komonana mpe bandeko bazali kolingana mingi, mingimingi na mikolo mabe oyo tozali, oyo mpasi ezali se kobakisama.—2 Timote 3:1; Yakobo 1:27.
Kotosa ememaka mapamboli ebele
12. Yehova akosala nini soki bato ya ekólo na ye batosi ye?
12 Soki bato ya ekólo ya Yehova bámonisaka bososoli mpo na kolanda mpamela na ye oyo etondi na bolingo! Yehova alobi boye: “Bongo, pole na yo ekobima lokola moi, mpe kobika na yo ekopunzwa mbangu; boyengebene na yo ekotambola liboso na yo, nkembo ya [Yehova] ekobatela yo na nsima. Bongo, okobenga mpe [Yehova] akozongisa liloba; okoganga mpe ye akoloba ete, Nazali awa.” (Yisaya 58:8, 9a) Maloba oyo ezali ya esengo mpenza mpe ezali kosimba motema! Yehova apambolaka mpe abatelaka baoyo balingaka boboto mpe boyengebene. Soki bato ya ekólo ya Yehova babongoli motema, batiki makambo ya makasimakasi, bokosi na bango mpe batosi ye, bomoi na bango ekobonga. Yehova ‘akobikisa’ ekólo na bango na elimo mpe na mosuni. Akobatela mpe bango ndenge abatelaki bankɔkɔ na bango ntango babimaki na Ezipito. Mpe akosalisa bango nokinoki soki basɛngi ye lisalisi.—Exode 14:19, 20, 31.
13. Mapamboli nini ezali kozela Bayuda soki bandimi toli ya Yehova?
13 Sikoyo Yehova abakisi maloba oyo na toli oyo apesaki liboso: ‘Soko okolongola ekangeli [ya boombo mabe, likoló ya moto oyo abongi na yango te] na kati na yo, kotalisa na mosapi [mpo na kotyola to kofunda na lokuta] mpe maloba mabe; soko okopesa bato oyo bazali na nzala eloko oyo molimo na yo elingaka mpe okotondisa mposa na molimo monyokolami, bongo pole na yo ekobima kati na molili mpe molili na yo ekobongwana lokola ntango ya midi.’ (Yisaya 58:9b, 10) Ezaleli ya moimi mpe ya makambo makasimakasi epesaka moto ye moko mpasi mpe epelisaka nkanda ya Yehova. Nzokande, boboto mpe kokabela bato, mingi mpenza baoyo bazali na nzala mpe na mpasi, ememaka mapamboli ya Nzambe. Soki Bayuda básimbaka solo oyo na mitema na bango! Mbɛlɛ pole mpe bomɛngo na bango ya elimo engɛngisaki bango lokola mwese oyo elimwisaka molili nyonso na ntango ya midi. Na koleka, mbɛlɛ bapesaki lokumu mpe nkembo na Yehova, oyo apesaki bango nkembo mpe mapamboli.—1 Mikonzi 8:41-43.
Ekólo oyo ezongisami
14. (a) Na ndenge nini bato ya ntango ya Yisaya bandimi maloba na ye? (b) Yehova alandi kopesa bango elikya nini?
14 Likambo ya mawa, ekólo yango etye likebi te na libyangi ya Yehova, kutu emikɔtisi nde na misala mabe. Nsukansuka, Yehova akosala likambo mosusu te kaka kotinda bango na boombo, ndenge ayebisaki bango. (Deteronome 28:15, 36, 37, 64, 65) Atako bongo, maloba mosusu oyo Yehova ayebisi na monɔkɔ ya Yisaya ezali kopesa elikya. Nzambe asakoli ete nsima ya kozwa etumbu, batikali na bango oyo batutami na motema, bakozonga na esengo na Yuda, mokili na bango, atako yango etikali mpamba.
15. Kozongisama nini ya esengo Yehova asakoli?
15 Na ntina etali kozongisama ya bato ya ekólo na ye, oyo ekosalema na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova alobi boye na monɔkɔ ya Yisaya: ‘Yehova akokamba yo ntango nyonso, akotondisa mposa ya molimo na yo na bisika bikauki, akokembisa mpe mikuwa na yo na mafuta; okozala lokola elanga oyo basopeli mai, mpe lokola liziba ya mai oyo mai na yango ezangaka te.’ (Yisaya 58:11) Yehova akosala ete mabelé ya Yisalaele oyo ekauki na moi ekóma mabelé oyo ebotaka biloko mingi. Oyo eleki lisusu mpenza, akopambola bato ya ekólo na ye oyo babongoli motema, akokembisa “mikuwa” na bango mpo elongwa na ezaleli ya kokufa ya elimo mpe ezonga na bomoi mpenza. (Ezekiele 37:1-14) Bato bakokóma mpenza lokola “elanga oyo basopeli mai” oyo etondi na mbuma ya elimo.
16. Ndenge nini mboka ekobongisama lisusu?
16 Kozongisama ekosɛnga mpe kotonga lisusu bingumba oyo bato ya Babilone babebisaki na mobu 607 L.T.B. ‘Mabondo ya mabanga na yo ya kala makotongama lisusu, okotombola lisusu miboko oyo eumeli mabota na mabota; okobengama ete, Mobambi ya bisika bipaswami; Mobongisi ya nzela mpo na kofanda.’ (Yisaya 58:12) Maloba oyo ezali na makanisi ndenge moko, “mabondo ya mabanga” mpe “miboko oyo eumeli mabota na mabota” ( to miboko oyo eumeli na libebi mabota na mabota) emonisi ete batikali oyo bakozonga na mboka na bango bakotonga lisusu bingumba ya Yuda oyo ebebisamaki, mingi mpenza engumba Yelusaleme. (Nehemia 2:5; 12:27; Yisaya 44:28) Bakobongisa “bisika bipaswami,” elingi koloba bisika nyonso oyo bifelo ya Yelusaleme ebukanaki, mpe na ntembe te, oyo ya bingumba mosusu mpe.—Yilimia 31:38-40; Amosa 9:14.
Mapamboli ya kotosa Sabata ntango nyonso
17. Na maloba nini Yehova asɛngi bato ya na ye bátosa Mibeko ya Sabata?
17 Sabata ezalaki komonisa ete Nzambe atyelaka bolamu ya bato na ye likebi monene, na mosuni mpe na elimo. Yesu alobaki boye: “Sabata esalemaki mpo na moto.” (Malako 2:27) Mokolo yango oyo Yehova atángaki mokolo mosantu ezalaki kopesa Bayisalaele libaku malamu ya komonisa ete balingi Nzambe. Likambo ya mawa, na mikolo ya Yisaya, Sabata ekómaki mokolo ya komipesa na milulu ezangi ntina mpe na bamposa ya moimi. Na ntina wana, Yehova azali lisusu kopamela bato na ye. Mpe, aluki lisusu kosimba mitema na bango. Alobi: ‘Soko okopekisa lokolo na yo na mokolo ya sabata, mpe okoboya kosala misala na yo na mokolo mosantu na ngai, mpe okobenga sabata ete na esengo, mpe mokolo mosantu ya Yehova ete ezala na lokumu, soko okotosa yango, kotambola na nzela na yo moko te, mpe koluka bisengo na yo te mpe kolobaloba mpamba te, mbɛlɛ, okomisepelisa kati na Yehova, mpe nakopumbwisa yo kino bisika ya likoló ya mabelé, mpe nakoleisa yo libula ya Yakobo, tata na yo; zambi monɔkɔ ya Yehova esili koloba.’—Yisaya 58:13, 14.
18. Nini ekokómela Yuda lokola batosi Sabata te?
18 Sabata ezali mokolo ya kotya likebi na makambo ya elimo, kobondela mpe kosambela na libota. Esengelaki kosalisa Bayuda bákanisa misala ya kokamwa ya Yehova mpo na kobikisa bango mpe bákanisa boyengebene ná bolingo oyo emonisami polele na Mibeko na ye. Na bongo, kotosa ntango nyonso mokolo mosantu wana esengelaki kosalisa bato ya ekólo yango bápusana penepene na Nzambe na bango. Na esika ya kotosa bongo, bazali nde kobuka mibeko ya Sabata mpe na yango bakozwa mapamboli ya Yehova te.—Levitike 26:34; 2 Ntango 36:21.
19. Ebele ya mapamboli nini ezali kozela bato ya ekólo ya Nzambe soki bazongeli kotosa Sabata?
19 Nzokande, soki Bayuda bazwi liteya na etumbu yango mpe batosi lisusu Sabata, bakozwa ebele ya mapamboli. Kosala oyo losambo ya solo esɛngi mpe kotosa Sabata ekomemela bango bolamu na makambo nyonso ya bomoi na bango. (Deteronome 28:1-13; Nzembo 19:7-11) Na ndakisa, Yehova akosala ete bato na ye “bápumbwa kino bisika mosika likoló ya mokili.” Maloba oyo emonisi ete bakozala na esika ya libateli mpe bakolonga banguna na bango. Moto oyo abɔtɔli bisika ya likoló, bangomba mike mpe bangomba minene, akobɔtɔla mpe mboka mobimba. (Deteronome 32:13; 33:29) Na ntango oyo Yisalaele ezalaki kotosa Yehova, Ye abatelaki ekólo yango, mpe bikólo mosusu ezalaki komemya, kutu mpe kobanga ekólo wana. (Yosua 2:9-11; 1 Mikonzi 4:20, 21) Soki bazongeli kotosa Yehova, mwa nkembo wana ya kala ekozongela bango. Yehova akopesa bato na ye “libula ya Yakobo” mobimba, elingi koloba mapamboli oyo alakaki ete ekoya na nzela ya kondimana na Ye elongo na bankɔkɔ na bango, mingimingi kozwa Mokili ya Ndaka mpe kofanda wana na kimya.—Nzembo 105:8-11.
20. “Kopema ya sabata” nini ezali mpo na baklisto?
20 Baklisto bakoki nde kozwa liteya na likambo yango? Ntango Yesu akufaki, Mibeko ya Moize elongwaki, ezala mpe mibeko etali Sabata. (Bakolose 2:16, 17) Nzokande, likanisi oyo mibeko ya Sabata ezalaki kolendisa epai ya Bayuda, elingi koloba kotya matomba ya elimo liboso mpe kopusana penepene na Yehova, ezali naino na ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova. (Matai 6:33; Yakobo 4:8) Lisusu, ntoma Paulo alobi boye na mokanda na ye epai ya Baebele: “Etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya ekólo ya Nzambe.” Baklisto bakɔtaka na “kopema ya Sabata” wana ntango batosaka Yehova mpe balandaka boyengebene oyo euti na kondima kati na makila ya Yesu Klisto. (Baebele 3:12, 18, 19; 4:6, 9-11, 14-16) Mpo na baklisto, lolenge yango ya kotosa Sabata ezalaka kaka mbala moko na pɔsɔ te, kasi mokolo na mokolo.—Bakolose 3:23, 24.
Yisalaele ya Nzambe ‘ezali kopumbwa na bisika ya likoló ya mabelé’
21, 22. Ndenge nini Yehova asali ete Yisalaele ya Nzambe ‘epumbwa na bisika ya likoló ya mabelé’?
21 Uta kosikolama na bango na boombo ya Babilone na 1919, baklisto bapakolami bazali kotosa ntango nyonso eloko oyo Sabata ezalaki elilingi na yango. Yango wana, Yehova asali ete ‘bápumbwa na bisika ya likoló ya mabelé.’ Ndenge nini? Kala na mobu 1513 L.T.B., Yehova asalaki kondimana elongo na bakitani ya Abalayama, ete soki batosi ye, bakokóma ekólo ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu. (Exode 19:5, 6) Na boumeli ya mbula nyonso 40 na esobe, Yehova amemaki bango na kimya nyonso, ndenge mpongo ememaka bana na yango, mpe apesaki bango biloko mingi. (Deteronome 32:10-12) Nzokande, ekólo yango ezangaki kondima, mpe nsukansuka babungisaki mabaku malamu nyonso oyo ezalaki liboso na bango. Atako bongo, Yehova azali lelo oyo na bokonzi moko ya bonganga-nzambe. Ezali Yisalaele ya Nzambe.—Bagalatia 6:16; 1 Petelo 2:9.
22 Na “ntango ya nsuka,” ekólo wana ya elimo esali makambo oyo Yisalaele ya kala elongaki te kosala. Babateli kondima epai ya Yehova. (Danyele 8:17) Lokola bato na yango bazali kobatela na bosembo mpenza mitinda mpe banzela ya Yehova oyo eleki malamu, na ndenge ya elimo Yehova atomboli bango likoló. (Masese 4:4, 5, 8; Emoniseli 11:12) Lokola babatelami mpo mbindo oyo ezali zingazinga na bango ezwa bango te, bazali na bomoi moko ya malamu mpenza, mpe na esika ya koluka na makasi kosala makambo ndenge balingi, bazali “komisepelisa na Yehova” mpe na Liloba na ye. (Nzembo 37:4) Yehova abateli bango na elimo atako bakutanaki na botɛmɛli makasi na mokili mobimba. Kobanda 1919 moto moko te ameki kokɔta na makasi na “mokili” na bango ya elimo. (Yisaya 66:8) Bazali ntango nyonso ekólo moko oyo ezali mpo na nkombo na ye, oyo etombwani mingi, oyo bazali kosakola na esengo mpenza na mokili mobimba. (Deteronome 32:3; Misala 15:14) Lisusu, ebele ya bato ya komikitisa oyo bauti na bikólo nyonso bazwi sikoyo libaku malamu elongo na bango ya kolakisama banzela ya Yehova mpe bazali kozwa lisalisi mpo na kotambola na banzela na ye.
23. Ndenge nini Yehova asali ete basaleli na ye bapakolami ‘bálya libula ya Yakobo’?
23 Yehova asali ete basaleli na ye bapakolami ‘bálya libula ya Yakobo.’ Ntango Yisaka apambolaki Yakobo na esika ya Esau, maloba ya tata wana ya libota esakolaki mapamboli mpo na bato nyonso oyo bakondima Momboto oyo balakaki Abalayama. (Genese 27:27-29; Bagalatia 3:16, 17) Lokola Yakobo—oyo akeseni na Esau—baklisto bapakolami mpe baninga na bango ‘bazalaka na botɔndi mpo na makambo mosantu,’ mingi mpenza mpo na ebele ya bilei ya elimo oyo Nzambe apesaka. (Baebele 12:16, 17; Matai 4:4) Bilei yango ya elimo—oyo kati na yango tozali kokuta boyebi ya makambo oyo Yehova azali kosala na nzela ya Momboto ya elaka mpe baoyo basangani na Momboto yango—elendisaka, epesaka makasi mpe ezalaka na ntina mingi mpo na bomoi na bango ya elimo. Na yango, ezali na ntina mingi ete bálya ntango nyonso bilei ya elimo na kotángáká mpe komanyoláká Liloba ya Nzambe. (Nzembo 1:1-3) Ezali na ntina mingi ete báyanganaka na makita ya boklisto elongo na baninga na bango bandimi. Ezali mpe na ntina koleka ete bátosa mitinda oyo eleki malamu oyo ezali na kati ya losambo ya pɛto wana bazali na esengo nyonso kokabela bato mosusu bilei yango.
24. Ndenge nini baklisto ya solo bazali komitambwisa lelo?
24 Wana bazali kozela na motema likoló kokokisama ya bilaka ya Yehova, tiká ete baklisto ya solo bálanda kobwaka bokosi ya lolenge nyonso. Lokola baleisami na ‘libula ya Yakobo,’ tiká bálanda kosepela na libateli ya elimo na “bisika ya likoló ya mabelé.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yehova azwaki bibongiseli mpo bato ya ekólo na ye oyo bakokɔta nyongo monene bámitɛka lokola baombo—bákóma basali oyo bazali kozwa lifuti—mpo bákoka kofuta nyongo na bango. (Levitike 25:39-43) Nzokande, Mibeko ezalaki kosɛnga ete bányokola baombo te. Baombo oyo bankolo na bango basalelaki bango makambo mabe mpenza basengelaki kozwa bonsomi.—Exode 21:2, 3, 26, 27; Deteronome 15:12-15.
[Elilingi na lokasa 278]
Bayuda bazalaki kokila bilei mpe kogumba mitó na bango mpo na kokosa ete babongoli motema—kasi babongwanaki te
[Elilingi na lokasa 283]
Baoyo bazali na makoki bapesaka baoyo bazali na bosɛnga esika ya kolala, bilamba, to biloko ya kolya
[Elilingi na lokasa 286]
Soki Yuda abongoli motema, akotonga lisusu bingumba na ye oyo ebebi